Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Wapi balolenge minei oyo liloba “lisangá” esalelami na Makomami ya Grɛki ya boklisto?
Esalelami libosoliboso mpo na kolobela etuluku ya baklisto bapakolami (na bavɛrsɛ mosusu, ná Yesu na kati). Na bisika mosusu, “lisangá ya Nzambe” elimboli baklisto nyonso ya eleko moko boye. Ya misato, elimboli baklisto ya etúká moko. Mpe ya minei, liloba yango ekoki mpe komonisa etuluku ya baklisto oyo bayanganaka esika moko.—15/4, nkasa 21-23.
• Ntango nini Nzambe akotika kobenga bato oyo bakokende likoló?
Biblia epesi eyano ya sikisiki te na motuna yango. Koponama yango ebandaki na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) mpe ekobaki tii na mikolo na biso. Nsima ya 1935, mosala ya kokómisa bato bayekoli ekómaki kosalema libosoliboso mpo na koyanganisa ebele ya bato. Baklisto mosusu oyo babatisamaki nsima ya 1935 bazwaki litatoli ya elimo santu ete baponami mpo na kokende likoló; na yango, tokoki te koloba mpenza ntango oyo koponama yango esukaki. Bapakolami ya solosolo bazali te na elimo santu koleka bampate mosusu, mpe balukaka te ete bato bámonaka bango ete bazali bato ya ndenge mosusu. Ata soki moklisto azali na elikya ya kokende likoló to te, asengeli kotikala sembo mpe kokoba kosala mokano ya Nzambe.—1/5, nkasa 30-31.
• Ntango Yefeta alapaki ndai na ye, alingaki mpenza kotumba mwana na ye ya mwasi lokola mbeka epai ya Nzambe?
Te. Yefeta alingaki kopesa na mosala ya Nzambe moto ya liboso oyo akokutana na ye; Mibeko ya Moize endimaki likambo yango. (1 Samwele 2:22) Mpo na kokokisa ndai ya tata na ye, mwana ya Yefeta akobaki kosala na tabenakle; yango ezalaki likambo monene mpamba te atikalaki monzemba bomoi na ye mobimba.—15/5, nkasa 9-10.
• Ndenge nini codex esalisaki baklisto ya liboso?
Emonani ete tii pene ya nsuka ya ekeke ya liboso T.B., baklisto bazalaki kosalela barulo. Na bikeke oyo elandaki, bato oyo bazalaki kosepela na codex ná baoyo bazalaki kosepela na rulo bazalaki kowelana makasi. Bato ya mayele balobaka ete baklisto nde basalaki ete codex ekóma kosalelama mingi.—1/6, nkasa 14-15.
• Manaka ya Gezele ezali nini?
Ezali mwa etanda moko ya libanga oyo bato ya arkeoloji bakundolaki na 1908, na esika oyo engumba Gezele ezalaki. Bato mingi bamonaka ete mwana-kelasi moko nde akomaki makambo yango. Etanda yango ezongeli na mokuse basanza ya mosala ya bilanga na mbula mobimba; ebandi na sanza ya koyanganisa mbuma, oyo ezali kati ya Sɛtɛmbɛ mpe Ɔkɔtɔbɛ na manaka ya lelo oyo, mpe elobeli biloko oyo bazalaki kokona mpe misala ya bilanga oyo bazalaki kosala.—15/6, lokasa 8.
• Kosalela elimo santu lisumu elimboli nini?
Moto akoki kosalela elimo santu ya Yehova lisumu; lisumu yango ekolimbisama te. (Matai 12:31) Nzambe nde akataka soki moto asali lisumu oyo ekoki kolimbisama te, mpe akoki kolongola elimo na ye epai na biso. (Nzembo 51:11) Soki tozali na mawa makasi mpo na lisumu moko oyo tosali, yango ekoki komonisa ete tobongoli mpenza motema mpe na bongo, tosaleli elimo santu lisumu te.—15/7, nkasa 16-17.
• Mokonzi Saulo ayebaki Davidi; kasi, mpo na nini mokonzi atunaki lisusu soki Davidi azalaki mwana ya nani? (1 Samwele 16:22; 17:58)
Saulo alingaki kaka te koyeba nkombo ya tata ya Davidi. Lokola Saulo amonaki ete Davidi azalaki na kondima makasi mpe na mpiko na ndenge abomaki Goliata, alingaki koyeba soki tata oyo abɔkɔlaki ye azalaki mobali ya ndenge nini. Ekoki mpe kozala ete Saulo azalaki na likanisi ete Yese to bandeko na ye mosusu, bákóma basoda na ye.—1/8, lokasa 31.