Ehude alongaki banyokoli na bango
LISOLO oyo elobeli makambo ya solo, ya moto oyo amonisaki mpiko mpe asalelaki mayele mpo na kokokisa mokano na ye. Esalemaki eleki sikoyo mbula soki 3 000. Lisolo yango ya Biblia ebandi boye: “Bato ya Yisalaele basalaki mabe na miso ya [Yehova] lisusu, mpe [Yehova] alendisaki Egelone, mokonzi ya Moaba, mpo na kobunda na Yisalaele, mpo ete bango basalaki mabe na miso ya [Yehova]. Ye ayanganisaki Baamona mpe Baamaleki epai na ye mpe akendaki mpe abukaki Yisalaele mpe bakamataki mboka ya mbila. Bato ya Yisalaele basalelaki Egelone, mokonzi ya Moaba, mbula zomi na mwambe.”—Basambisi 3:12-14.
Bato ya Moaba bazalaki kofanda na ɛsti ya Ebale Yaladene mpe ya Mbu Ekufá. Kasi, bakatisaki ebale mpe bazwaki bamboka oyo ezalaki pembenipembeni na Yeliko—“mboka ya mbila,” mpe bakómisaki Bayisalaele baombo. (Deteronome 34:3) Egelone, mokonzi ya Moaba, “moto ya mafuta mingi,” akómaki kofutisa Bayisalaele mpako ya motuya mingi mpe anyokolaki bango na boumeli ya mbula pene na 20. (Basambisi 3:17) Kasi, mpako oyo azalaki kofutisa Bayisalaele epesaki bango nzela ya koboma monyokoli yango.
Lisolo elobi boye: “Kasi wana elelaki bato ya Yisalaele epai ya [Yehova], [Yehova] atɛmisaki mobikisi mpo na bango, Ehude, mwana na Gela, Mobenyamina, moto ya lobɔkɔ ya mwasi. Bato ya Yisalaele batindelaki Egelone, mokonzi ya Moaba, mpako na lobɔkɔ na ye.” (Basambisi 3:15) Na ntembe te Yehova atambwisaki makambo mpo bápona Ehude na kati ya bato oyo basengelaki kokende kotika mpako. Lisolo elobi te soki azalaki kokende kotika mpako yango liboso. Kasi, ndenge oyo Ehude amibongisaki mpo na kokutana na Egelone mpe mayele oyo asalelaki ezali kopesa likanisi ete amesanaki na ndako ya mokonzi mpe ayebaki makambo oyo akokaki kokutana na yango kuna. Na nyonso wana, likambo moko ya ntina na komibongisa na ye ezali ete azalaki moto ya lobɔkɔ ya mwasi.
Ebɔsɔnɔ to mobundi ya mpiko?
Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “lobɔkɔ ya mwasi,” elimboli mpenza ‘lobɔkɔ ya mobali ekangamá, etɛngamá, to elingamá.’ Yango elingi nde koloba ete Ehude azalaki ebɔsɔnɔ, mbala mosusu lobɔkɔ na ye ya mobali ekauká? Tótalela oyo Biblia elobi mpo na ‘mibali nkama nsambo, oyo baponamaki’ na libota ya Benyamina, oyo bazalaki bato ya lobɔkɔ ya mwasi. Basambisi 20:16 elobi ete: “Moto na moto akokaki kobwaka libanga na nkamba epai na mosuki mpe kozanga te.” Emonani ete baponaki mibali yango mpo bazalaki makasi na etumba. Balimboli mosusu ya Biblia bamonisi ete maloba “moto ya lobɔkɔ ya mwasi,” elimboli moto oyo ayebi kosalela mabɔkɔ nyonso mibale, ya mwasi ná ya mobali.—Basambisi 3:15.
Eyebanaki ete libota ya Benyamina ezalaki na bato mingi ya lobɔkɔ ya mwasi. Mokapo ya 1 Ntango 12:1, 2 elobeli bato ya libota ya Benyamina oyo bazalaki “bato ya makasi baoyo basungaki ye na etumba. Bakumbaki matimbo mpe bayebaki kobwaka mabanga mpe mbanzi longwa na litimbo na lobɔkɔ ya mobali mpe na lobɔkɔ ya mwasi.” Buku moko elobi ete mpo na koyeba kosalela mabɔkɔ nyonso mibale, “bazalaki kokanga bana mike lobɔkɔ ya mobali—yango ebimisá maloba, ‘lobɔkɔ ya mobali ekangamá,’—mpe na ndenge yango, bazalaki koyekola mpe kosalela malamu lobɔkɔ ya mwasi.” Bayisalaele bazalaki kozwa formasyo ya kobunda na banguna oyo bazalaki kosalela lobɔkɔ ya mobali. Yango wana, basoda mingi ya banguna oyo bazalaki kobunda na bango bazalaki kosila mayele soki bakutani na soda oyo asalelaka lobɔkɔ ya mwasi.
‘Liloba ya nkuku’ mpo na Mokonzi
Libosoliboso, Ehude abongisaki naino “mopanga” ya mokuse epelisami bipai nyonso mibale, oyo akokaki kobomba na nse ya bilamba na ye. Ayebaki ete mbala mosusu bakɛngɛli bakoluka soki azali na ebundeli. Mingimingi, bazalaki kotya mopanga na lobɔkɔ ya mwasi, epai moto ya lobɔkɔ ya mobali akokaki kobimisa yango nokinoki. Lokola Ehude azalaki moto ya lobɔkɔ ya mwasi, abombaki ebundeli na ye “na ebɛlɔ na ye ya mobali na nse ya bilamba na ye,” esika oyo bakɛngɛli ya mokonzi bakokaki mbala mosusu kokanisa koluka te. Yango wana, alekaki bakɛngɛli mpe akɔtaki na ndako ya mokonzi mpe “apesaki mpe mpako na Egelone, mokonzi ya Moaba.”—Basambisi 3:16, 17.
Biblia elobi te makambo nyonso oyo elekaki ntango bakómaki na ndako ya Egelone. Biblia elobi kaka boye: “Esilaki Ehude kopesa mpako, ye azongisaki bato oyo bamemaki mpako.” (Basambisi 3:18) Ehude apesaki mokonzi mpako mpe bazongaki nzela moko na bato oyo bamemaki yango tii bakómaki mosika banda na ndako ya Egelone, bipai oyo bakokaki lisusu kozwa bango te soki balandi bango; nsima ya kokabwana na bango, azongaki lisusu epai ya Egelone. Mpo na nini? Akendaki na bato wana mpo bábatela ye, mpo mokonzi amona batindami mingi oyo bayei kotikela ye mpako, to bamemaki kaka biloko oyo bakendaki na yango epai ya mokonzi? Mpe Ehude alukaki nde bázala na likama te ntango akokokisa mokano na ye? Ata soki Ehude akanisaki nini, azalaki na mpiko mpe azongaki kaka ye moko.
“[Ehude] azongaki na nsima epai na esika ya kokata mabanga penepene na Gilegale, mpe alobaki ete, ‘Ee mokonzi, nazali na monɔkɔ ya kolobela yo na nkuku.’” Biblia elobi te oyo asalaki mpo na kokutana lisusu na mokonzi. Bakɛngɛli bakokaki te kozala na makanisi mabe mpo na ye? Bakanisaki nde ete Moyisalaele oyo azali kaka ye moko akokaki kosala mokonzi mabe te? Ndenge oyo Ehude akendeki kaka ye moko epesaki nde bango likanisi ete alingi kotɛka bato ya ekólo na ye? Na ndenge nyonso, Ehude alukaki nde kosolola na mokonzi na esika ya bango mibale kaka mpe asalaki yango.—Basambisi 3:19.
Biblia elobi lisusu ete: “Ehude abɛlɛmaki na [Egelone] wana ezalaki ye kofanda ye moko na eteni na ye ya mpiɔ na likoló ya ndako. Ehude alobelaki ye ete, ‘Nazali na [liloba] ya Nzambe mpo na yo.’” Ehude azalaki kolobela te nsango moko oyo Nzambe apesaki ye ayebisa mokonzi. Ehude azalaki kokanisa nde kosalela mopanga na ye. Lokola mokonzi akanisaki ntango mosusu ete akoyoka maloba oyo euti epai ya nzambe na ye Kemose, “atɛlɛmaki na kiti na ye ya bokonzi.” Ehude abendaki mbala moko mopanga na ye mpe akɔtisaki yango na libumu ya Egelone. Ekoki mpenza kozala ete esimbeli ya mopanga yango ezalaki polele. Na bongo, “esimbeli ekɔtaki nsima ya eteni oyo ezali mino, mpe mafuta ezipaki eteni oyo ezali mino, . . . mpe nyei ebandaki kobima,” mbala mosusu na mpota to Egelone ye moko nde asumbaki mpo na mpasi oyo ayokaki.—Basambisi 3:20-23, NW.
Akimi kozanga mokakatano
Kozanga ete alekisa lisusu ntango na koluka kobenda mopanga na ye, “Ehude abimaki na mbalasani mpe azipaki bikuke ya eteni ya likoló ya ndako mpe akangaki yango. Esilaki ye kokenda, basali [ya Egelone] bakómaki, mpe emonaki bango ete bikuke ya eteni ya likolo ya ndako bikangami, bakanisaki ete, ye akei bobele na kabine na eteni ya mpiɔ.”—Basambisi 3:23, 24.
“Mbalasani” epai Ehude abimelaki ezalaki nini? Buku moko elobi boye: “Ndimbola mpenza ya [liloba wana ya Liebele] eyebani te.” kasi, bamonisi ete bakoki kolimbola yango na “veranda.” Ehude akangaki ndako na kati mpe abimaki na nzela mosusu? To azwaki fungola epai ya mokonzi oyo asilaki kokufa mpe akangaki porte na libanda? Ntango abimaki, alekaki kaka liboso ya bakɛngɛli mpe asalaki lokola likambo moko esalemi te? Biblia elobi eloko moko te. Ata soki Ehude asalelaki mayele nini, basali ya Egelone bakaniselaki ye mabe mbala moko te, ata ntango bakutaki ndako ekangami. Bakanisaki ete mokonzi “akei bobele na kabine.”
Ntango basali ya mokonzi bazalaki kozela, Ehude akimaki. Na nsima ayebisaki bato ya ekólo na ye ete: “[Bólanda] ngai mpo ete [Yehova] asili kopesa bayini na bino Bamoaba na lobɔkɔ na bino.” Ehude ná bato na ye bakangaki bisika nyonso ya kokatisa mai ya Ebale Yaladene oyo bato ya Moaba, oyo bazalaki lisusu na mokonzi te mpe bazalaki kokima bakokaki koleka mpo na kozonga na mboka na bango. Na bongo, “[Bayisalaele] babomaki na ntango yango Bamoaba soki nkóto zomi, bango nyonso mibali makasi ya molende. Moto moko akimaki te. Bongo Moaba abukanaki na mokolo yango na nse ya lobɔkɔ ya Yisalaele, mpe mokili ezwaki kimya mbula ntuku mwambe.”—Basambisi 3:25-30.
Mateya oyo tokoki kozwa
Makambo oyo esalemaki na mikolo ya Ehude eteyi biso ete soki tozali kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova, yango ekomemela biso kaka mpasi. Lisusu, Yehova asalisaka baoyo babongoli motema mpe baluki lisalisi na ye.
Soki mikano ya Ehude elongaki, ezalaki mpo na mayele na ye moko te, ezalaki mpe te mpo banguna na ye bazangaki mayele. Makambo ya bato te nde ekoki kopekisa mokano ya Nzambe ekokisama. Ntina ya liboso oyo Ehude alongaki ezali ete Nzambe azalaki na ye, mpamba te azalaki kosala makambo na boyokani na mokano na Ye ya kobikisa bato na ye oyo moto moko te akokaki kopekisa yango. Nzambe atɛlɛmisaki Ehude, “wana etɛmisaki [Yehova] mosambisi mpo na [basaleli na ye], [Yehova] azalaki na mosambisi elongo.”—Basambisi 2:18; 3:15.