LISOLO YA BOYEKOLI 4
Kobá kokolisa bolingo ya bondeko
“Na bolingo ya bondeko bólinganaka na motema.”—ROM. 12:10.
LOYEMBO 109 Tólingana makasi, na motema moko
NA MOKUSEa
1. Makambo nini emonisi ete lelo oyo bato ya mabota mingi balinganaka lisusu te?
BIBLIA esakolaki ete, na mikolo ya nsuka, bato ‘bakolingana te na kati ya libota.’ (2 Tim. 3:1, 3) Lelo oyo, tozali komona ndenge esakweli yango ezali kokokisama. Na ndakisa, lokola mabala mingi ezali kokufa, yango esali ete baboti mingi bákóma koyokelana nkanda mpe bana na bango bámiyokaka ete basundolami. Ekoki mpe kosalema ete ata bato ya mabota oyo bafandaka esika moko bálingana mpenza te. Moto moko oyo apesaka mabota toli alobi boye: “Tata, mama, mpe bana basololaka lisusu te, moto na moto akóma kaka kolekisa ntango mingi liboso ya ordinatɛrɛ, tablɛti, telefone, to mpe na kobɛta masano ya video. Atako bato ya mabota yango bafandaka ndako moko, bayebanaka mpenza malamu te.”
2-3. (a) Na kotalela Baroma 12:10, tosengeli komonisela banani bolingo ya bondeko? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Tolingi te ete tózanga bolingo lokola bato mingi ya mokili oyo. (Rom. 12:2) Kutu, tosengeli komonisa bolingo ya bondeko kaka te epai ya bandeko na biso ya libota, kasi mpe epai ya bandeko na biso bakristo. (Tángá Baroma 12:10.) Bolingo ya bondeko ezali nini? Ezali boyokani ya makasi oyo ezalaka kati na bandeko ya libota moko. Yango nde bolingo oyo tosengeli komonisela bandeko na biso bakristo. Soki tozali komonisela bandeko na biso bolingo ya bondeko, yango ekosala ete biso nyonso tókoba kosambela Yehova na bomoko mpe na esengo.—Mika 2:12.
3 Mpo na kosalisa biso tókolisa mpe tómonisa bolingo ya ndenge wana, tótalela mateya oyo tokoki kozwa na bandakisa oyo ezali na Biblia.
YEHOVA AZALI NA “BOLINGO MINGI YA MOTEMA”
4. Yakobo 5:11 elobi nini mpo na oyo etali bolingo oyo Yehova alingaka biso?
4 Biblia elobeli bizaleli mingi ya malamu ya Yehova. Na ndakisa, elobi ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoa. 4:8) Koyeba yango etindaka biso tópusana penepene na ye. Nzokande, Biblia elobi mpe ete Yehova “azali na bolingo mingi ya motema.” (Tángá Yakobo 5:11.) Yango emonisi ete Yehova alingaka biso mingi mpenza!
5. Ndenge nini Yehova amonisaka ezaleli ya motema mawa, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?
5 Yakobo 5:11 emonisi ete bolingo ya motema ya Yehova eyokani mpe na motema mawa, ezaleli na ye mosusu oyo esalaka ete tópusana penepene na ye. (Kob. 34:6) Lolenge moko oyo Yehova amonisaka ezaleli na ye ya motema mawa ezali na ndenge alimbisaka masumu na biso. (Nz. 51:1) Kasi na Biblia, motema mawa esuki kaka te na kolimbisa moto oyo asaleli biso likambo moko ya mabe. Ezali mpe mpasi makasi oyo toyokaka na motema ntango tomoni moto moko azali konyokwama; mpe yango etindaka biso tósalisa ye. Yehova alobi ete mposa makasi oyo azalaka na yango ya kosalisa biso eleki mosika mayoki oyo mama azalaka na yango mpo na mwana na ye. (Yis. 49:15) Ntango tozali konyokwama, motema mawa ya Yehova etindaka ye asalisa biso. (Nz. 37:39; 1 Ko. 10:13) Tokoki komonisela bandeko na biso ezaleli ya motema mawa soki tozali kolimbisa bango ntango basaleli biso mabe mpe soki toboyi kokangela bango nkanda na motema. (Ef. 4:32) Kasi, lolenge mosusu ya malamu ya komonisela bandeko na biso motema mawa ezali ya kosalisa bango ntango bazali kokutana na mikakatano. Ntango bolingo etindaka biso tómonisela basusu motema mawa, tomekolaka Yehova, oyo amonisaka bolingo ya motema mingi koleka moto mosusu nyonso.—Ef. 5:1.
YONATANE NÁ DAVIDI BALINGANAKI MINGI MPENZA
6. Ndenge nini Yonatane ná Davidi bamoniselanaki bolingo ya motema?
6 Biblia ezali na masolo ya bato ya kozanga kokoka oyo balinganaki mpenza na bolingo ya bondeko. Tótalela ndakisa ya Yonatane ná Davidi. Biblia elobi ete: “Molimo ya Yonatane ekanganaki na molimo ya Davidi, mpe Yonatane akómaki kolinga ye lokola molimo na ye moko.” (1 Sa. 18:1) Yehova aponaki Davidi akóma mokonzi nsima ya Saulo. Na nsima, Saulo akómaki koyina Davidi mpe alukaki koboma ye. Kasi, Yonatane, Mwana ya Saulo, apesaki tata na ye mabɔkɔ te ntango azalaki koluka koboma Davidi. Yonatane ná Davidi bapesanaki elaka ete bakotikala baninga mpe bakosalisana ntango nyonso.—1 Sa. 20:42.
7. Nini ekokaki kopekisa Yonatane azala moninga ya Davidi?
7 Ezali mpenza likambo ya kokamwa ndenge Yonatane ná Davidi bazalaki baninga ya motema, nzokande ezali na makambo mingi oyo ekokaki kopekisa bango bázala baninga. Na ndakisa, Yonatane alekaki Davidi na mbula soki 30. Yonatane akokaki koloba ete akoki te kozala moninga ya mwana moke boye oyo ayebaki makambo mingi te lokola ye. Kasi, Yonatane akanisaki bongo te; azalaki mpenza komemya Davidi.
8. Mpo na nini okanisi ete Yonatane azalaki mpenza moninga ya motema ya Davidi?
8 Yonatane akokaki mpe koyokela Davidi zuwa. Lokola Yonatane azalaki mwana ya Saulo, akokaki koloba ete azali na lotomo ya kokóma mokonzi nsima ya tata na ye. (1 Sa. 20:31) Kasi Yonatane azalaki na komikitisa, mpe azalaki sembo epai ya Yehova. Na yango, andimaki na motema moko ndenge Yehova aponaki Davidi azala mokonzi nsima ya Saulo. Azalaki mpe sembo epai ya Davidi atako yango ezalaki kosala ete Saulo asilika makasi.—1 Sa. 20:32-34.
9. Ndenge nini toyebi ete Yonatane azalaki koyokela Davidi zuwa te?
9 Lokola Yonatane azalaki kolinga Davidi na bolingo ya motema, yango wana ayokelaki ye zuwa te. Yonatane azalaki mobali ya mpiko oyo abundaki bitumba mingi, mpe ayebaki malamu kosalela litimbo mpe mbanzi. Bato bazalaki koloba ete ye ná tata na ye Saulo “bazalaki na mbangu koleka bampongo” mpe na “makasi koleka bankɔsi.” (2 Sa. 1:22, 23) Na yango, Yonatane akokaki komikumisa mpo na makambo minene oyo asalaki. Nzokande, Yonatane alukaki te koleka Davidi mpe azalaki koyoka zuwa te mpo na makambo ya malamu oyo Davidi azalaki kosala. Kasi, azalaki nde kosepela na Davidi mpo na mpiko oyo azalaki na yango mpe ndenge oyo azalaki kotyela Yehova motema. Kutu, ezalaki nsima ya koboma Goliate nde Yonatane akómaki kolinga Davidi mingi mpenza. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka bandeko na biso ndenge Yonatane alingaki Davidi?
NDENGE YA KOMONISA BOLINGO YA BONDEKO LELO OYO
10. ‘Kolingana makasi na motema moko’ elimboli nini?
10 Biblia eyebisi biso ete ‘tólinganaka makasi na motema moko.’ (1 Pe. 1:22) Yehova azali mpenza ndakisa na likambo yango. Alingaka biso mingi mpenza. Na yango, soki tozali sembo epai na ye, akotika soki moke te kolinga biso. (Rom. 8:38, 39) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “makasi” ezali kopesa likanisi ya moto moko oyo azali kosala nyonso oyo akoki mpo na komonisa bolingo. Na bantango mosusu, ezalaka pɛtɛɛ te komonisela bandeko na biso bakristo bolingo. Soki ndeko moko azokisi biso, tosengeli ‘kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo, tósala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.’ (Ef. 4:1-3) Soki tozali kosala makasi tóbatela kimya elongo na bandeko na biso bakristo, tokobanda komona kaka mabunga na bango te. Tokosala nyonso oyo tokoki mpo tótalelaka bandeko ndenge Yehova atalelaka bango.—1 Sa. 16:7; Nz. 130:3.
11. Mpo na nini ekoki kozala mpasi na bantango mosusu komonisa bolingo ya bondeko?
11 Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te komonisela bandeko na biso bolingo ya bondeko, mingimingi soki toyebi mabunga na bango. Emonani ete bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso mpe bakutanaki na mokakatano yango. Na ndakisa, ekoki kozala ete Evodi ná Sɛntishe bazalaki na mokakatano te ya ‘koboma nzoto elongo na Paulo mpo na nsango malamu.’ Kasi likambo moko boye esalaki ete Evodi ná Sɛntishe báyokana te. Yango wana, ntoma Paulo alendisaki bango “bázala likanisi moko na kati ya Nkolo.”—Flp. 4:2, 3.
12. Tokoki kosala nini mpo tókóma baninga ya motema ya bandeko na biso bakristo?
12 Lelo oyo, ndenge nini tokoki komonisela bandeko na biso bolingo ya bondeko? Soki toyebi bandeko na biso bakristo malamu, ekozala mpasi te tómitya na esika na bango mpe tómonisela bango bolingo ya bondeko. Tokoki kokóma baninga na bango ata soki tokeseni bambula, to toutá bamboka ekeseni. Kobosana te, Yonatane alekaki Davidi na mbula soki 30, kasi yango epekisaki bango te bákóma baninga ya motema. Na lisangá na bino, ezali na ndeko moko oyo bokeseni bambula, oyo akoki kokóma moninga na yo? Soki osali bongo, okomonisa ete ozali ‘kolinga lisangá mobimba ya bandeko.’—1 Pe. 2:17.
13. Mpo na nini tokoki te kozala moninga ya motema ya moto nyonso na lisangá?
13 Kozala na bolingo ya bondeko elakisi nde ete tosengeli kozala moninga ya motema ya moto nyonso na lisangá? Te, ekoki kosalema bongo te. Ezali mabe te kokangama makasi na basusu mpo basepelaka na makambo oyo biso mpe tosepelaka na yango. Yesu azalaki kobenga bantoma na ye nyonso “baninga,” kasi alingaki nde Yoane mingi koleka. (Yoa. 13:23; 15:15; 20:2) Atako bongo, Yesu asalelaki Yoane te makambo koleka bango nyonso. Na ndakisa, ntango Yoane ná ndeko na ye Yakobo basɛngaki Yesu apesa bango esika ya lokumu na Bokonzi ya Nzambe, Yesu ayebisaki bango ete: “Kofandisa moto na lobɔkɔ na ngai ya mobali to na lobɔkɔ na ngai ya mwasi ezali likambo na ngai te.” (Mrk. 10:35-40) Mpo tómekola Yesu, tosengeli te koponaka bilongi to kosalela baninga na biso makambo koleka basusu. (Yak. 2:3, 4) Kosala bongo ekolongola kimya mpe bomoko na lisangá.—Yuda 17-19.
14. Na kotalela Bafilipi 2:3, nini ekosalisa biso tósalaka te makambo mpo na koleka basusu?
14 Soki tozali komonisa bolingo ya bondeko, tokoluka te tósalaka makambo mpo na koleka basusu na lisangá. Kobosana te ete Yonatane ayokelaki Davidi zuwa te, mpe alukaki te kokóma mokonzi na esika ya Davidi. Biso nyonso tokoki kolanda ndakisa ya Yonatane. Tosengeli te koyokelaka bandeko zuwa mpo na makoki oyo bazali na yango; ‘kasi na elimo ya komikitisa tómonaka bamosusu ete baleki biso.’ (Tángá Bafilipi 2:3.) Kobosana likambo oyo te: ndeko nyonso akoki kosala mwa eloko oyo ekoki kosalisa lisangá. Soki tozali ntango nyonso na ezaleli ya komikitisa, tokomona bizaleli na bango ya malamu, mpe tokozwa matomba mpo na bosembo na bango.—1 Ko. 12:21-25.
15. Likambo oyo ekómelaki ndeko Tanya ná libota na ye, eteyi yo nini?
15 Ntango tokutani na mikakatano, Yehova abɔndisaka biso na bolingo na ye ya motema, mpe na lisalisi oyo tózwaka epai ya bandeko na biso bakristo. Tótalela makambo oyo ekómelaki libota moko na mokolo ya pɔsɔ, nsima ya liyangani oyo esangisaka mikili mingi oyo esalemaki na États-Unis na 2019. Liyangani yango ezalaki na motó ya likambo, “Bolingo esilaka soki moke te!” Libota yango ezali na bana misato. Tanya, mama ya bana yango alobi boye: “Ntango tozalaki kozonga na esika oyo tozalaki kolala, motuka moko etutaki motuka na biso. Ata moto moko te azokaki, kasi toyokaki mpasi; tobimaki na motuka mpe totɛlɛmaki pembeni ya balabala. Moto moko oyo azalaki na kati ya motuka na ye na ngámbo mosusu ya balabala abengaki biso mpo tokende kokɔta na motuka na ye. Ezalaki moko ya bandeko na biso oyo autaki mpe na liyangani yango. Kaka ye moko te nde atɛlɛmaki. Bandeko mosusu mitano oyo bautaki na Suède mpe batɛlɛmaki. Bandeko basi bayambaki ngai ná mwana na ngai ya mwasi na bolingo mpenza; yango esepelisaki biso mingi! Nayebisaki bandeko yango ete bakoki kokende na bango tokoyoka malamu, kasi balingaki kotika biso te. Batikalaki wana tii ntango minganga bayaki, mpe bamindimisaki ete tozali na eloko nyonso oyo tosengeli na yango. Na ntango wana ya mpasi, tomonaki mpenza bolingo ya Yehova. Likambo yango etindaki biso tólinga lisusu bandeko mingi mpenza. Lisusu, esalaki ete tókóma kolinga Yehova makasi mpe tókóma na botɔndi mingi.” Okoki koyeba lisusu mokolo moko oyo ozalaki kokelela mpe ndeko moko ya lisangá amoniselaki yo bolingo ya bondeko?
16. Wapi mwa bantina oyo esengeli kotinda biso tómoniselana bolingo ya bondeko?
16 Kanisá bolamu oyo tokozwa soki tozali komonisela bandeko na biso bolingo ya bondeko. Tokobɔndisa bandeko na biso ntango bazali na mikakatano. Tokosalisa bango mpo básalela Yehova na esengo mpe na bomoko. Tokomonisa ete tozali mpenza bayekoli ya Yesu, mpe yango ekobenda bato ya mitema sembo epai ya Yehova. Likambo eleki ntina, tokokumisa Yehova, “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” (2 Ko. 1:3) Tiká ete biso nyonso tózwa ekateli ya komonisa bolingo ya bondeko mpe ya kokolisa yango!
LOYEMBO 130 Tólimbisaka
a Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakoyebana na bolingo oyo bakozala na yango na kati na bango. Biso nyonso tosalaka makasi tótosa mobeko yango. Tosengeli kolinga bandeko na biso bakristo makasi kaka ndenge tolingaka bandeko na biso ya libota. Lisolo oyo ekosalisa biso tókolisa mpe tóbatela bolingo ya bondeko epai ya bandeko na biso ya lisangá.
b NDIMBOLA YA BILILINGI: Nkulutu moko oyo azali elenge, oyo ayekoli makambo mingi epai ya nkulutu oyo akómi mokóló, ayei na ndako ya nkulutu yango ya mokóló mpe bayambi ye na esengo. Bango ná basi na bango bamoniselani bolingo mpe bakabelani biloko.