Ana azwaki kimya
MWASI moko ya sembo nkombo na ye Ana asanzolaki Yehova na libondeli. Amonaki ete Nzambe atombolaki ye mpe alongolaki ye nsɔni.
Nini esalaki ete Ana amiyoka bongo? Mpo na nini akómaki na esengo? Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo akutanaki na yango? Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tótalela lisolo ya Ana.
Mikakatano na libota
Ana azalaki moko kati na basi mibale ya Elekana, Molevi moko oyo azalaki kofanda na mokili ya Efelaima. (1 Samwele 1:1, 2a; 1 Ntango 6:33, 34) Atako na ebandeli Nzambe abongisaki te ete mobali abala basi mingi, mibeko ya Moize epesaki mobali nzela ya kobala basi mingi mpe epesaki malako mpo na yango. Libota mobimba ya Elekana bazalaki kosambela Yehova, kasi ndenge lisolo ya libota ya Elekana emonisi yango, mbala mingi libala ya bombanda ebimisaka matata.
Ana azalaki kobota te, nzokande mbanda na ye, Penina, azalaki na bana mingi.—1 Samwele 1:2b.
Na Yisalaele, soki mwasi azali kobota te ezalaki nsɔni mingi mpe ezalaki elembo ete abongi te na miso ya Nzambe. Kasi, eloko moko te emonisi ete soki Ana azalaki kobota te ezalaki mpo Nzambe aboyaki ye. Na esika Penina abɔndisa Ana, azalaki kutu kotyola ye.
Mibembo na tabenakle
Atako mikakatano yango, mbula na mbula Elekana azalaki kokende ná libota na ye kopesa mbeka na ndako ya Yehova na Shilo.a Bazalaki kotambola kilomɛtrɛ soki 60 na makolo. Na mabaku yango, Ana azalaki koyoka mpasi mingi na motema mpamba te ye azalaki kozwa kaka eteni moko ya mbeka ya kimya, nzokande Penina azalaki kozwa biteni mingi mpo na ye mpe bana na ye. Penina azalaki kosalela mabaku yango mpo na kotumola Ana mpe koyokisa ye mpasi na motema mpo ezalaki komonana lokola nde Yehova ‘azipaki libumu na ye.’ Penina azalaki kosala bongo mbula na mbula mpe yango ezalaki kotinda Ana alela mpe aboya kolya. Kokende na Shilo, likambo oyo esengelaki kozala esengo, ekómaki motungisi mpo na Ana. Atako bongo, Ana atikaki te kokende na tabenakle ya Yehova.—1 Samwele 1:3-7.
Omoni ndakisa malamu oyo Ana atikelaki biso? Ntango likambo moko epesi yo mpasi na motema osalaka nini? Omitangolaka mpe oboyaka kozala esika moko na bandeko mosusu? Ana asalaki bongo te. Atikaki te momeseno ya kozala ná basambeli mosusu ya Yehova. Biso mpe tosengeli kosala bongo ata soki tozali na mikakatano.—Nzembo 26:12; 122:1; Masese 18:1; Baebele 10:24, 25.
Elekana alukaki kobɔndisa Ana mpe kolendisa ye aloba makambo oyo ezalaki kotungisa ye. Atunaki ye boye: “[Hana] mpo na nini ozali kolela mpe kolya te? Motema na yo etondi na mawa mpo na nini? Ngai moko nazali malamu epai na yo te, koleka bana babali zomi?” (1 Samwele 1:8) Ekoki kozala ete Elekana ayebaki te makambo oyo Penina azalaki kosala, mpe ntango mosusu Ana amonaki malamu afanda kimya na esika amilelalelaka. Ata soki ezalaki bongo to te, Ana, mwasi oyo azalaki kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, abondelaki Yehova mpo na kozwa kimya.
Ana akati ndai
Bayisalaele bazalaki kolya mbeka ya kimya na tabenakle ya Yehova. Ana atikaki bato oyo azalaki kolya elongo na bango mpe akendaki kobondela Nzambe. Abondelaki boye: “[Yehova] na bibele, soki okotala nsɔni na ngai, moombo na yo, mpe soki okokanisa ngai mpe okobosana moombo na yo te nde okopesa moombo na yo mwana mobali, ngai nakopesa ye epai ya [Yehova] mikolo nyonso ya bomoi na ye mpe lotɛbu ekokata nsuki na ye te.”—1 Samwele 1:11.
Ana alobaki polele likambo oyo azalaki na yango mposa. Asɛngaki mwana mobali mpe alakaki ete akopesa mwana yango epai ya Yehova mpo asalela ye bomoi na ye mobimba lokola Monasili. (Mituya 6:1-5) Makambo oyo Elekana asalaki na nsima emonisaki ete andimaki ndai oyo mwasi na ye asalaki.
Ndenge oyo Ana azalaki kobondela etindaki nganga-nzambe Eli akanisa ete alangwe masanga. Kaka bibɛbu na ye nde ezalaki koningana, kasi maloba ezalaki kobima te, mpamba te Ana azalaki kobondela na kati ya motema. Azalaki kobondela na etingya. (1 Samwele 1:12-14) Kanisá mpasi oyo Ana ayokaki na motema ntango Eli alobaki na ye ete alangwe masanga! Atako bongo, ayanolaki nganga-nzambe na limemya nyonso. Ntango Eli ayebaki ete Ana azalaki nde kobondela, ‘mpo na ebele ya mabanzo na ye mpe mpo na mawa na ye,’ alobaki boye: “Tiká ete Nzambe na Yisalaele apesa yo libondeli esili yo kobondela ye.” (1 Samwele 1:15-17) Na yango, Ana akendaki alyaki mpe “mawa emonanaki lisusu na elongi na ye te.”—1 Samwele 1:18.
Makambo nyonso oyo ekoki koteya biso nini? Ntango tozali kobondela Yehova mpo na likambo moko oyo ezali kotungisa biso, tosengeli koyebisa ye ndenge oyo tozali koyoka mpe makambo oyo tolingi asala mpo na biso. Soki tosali nyonso oyo tokoki, tosengeli kotika makambo na mabɔkɔ na ye moko. Yango nde likambo eleki malamu.—Masese 3:5, 6.
Na ntembe te, nsima ya kobondela na etingya nyonso mosaleli ya Yehova asengeli kozwa kimya lokola oyo Ana azwaki. Na oyo etali libondeli, ntoma Paulo akomaki boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Ntango tokitisi mokumba na biso epai ya Yehova, tosengeli kotika ye asala. Lokola Ana ekozala lisusu na ntina te tómitungisa mpo na yango.—Nzembo 55:22.
Mwana oyo atikami na mabɔkɔ ya Yehova
Nzambe akanisaki Ana, azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. (1 Samwele 1:19, 20) Yango ezali moko kati na mwa masolo ya Biblia oyo Yehova asalaki ete mwana moko abotama oyo akozala mosaleli na ye. Samwele, mwana ya Elekana ná Ana akómaki mosakoli ya Yehova, akokisaki mokumba monene na likambo etali kotyama ya mokonzi na Yisalaele.
Na ntembe te, Ana abandaki koteya Samwele banda ntango azalaki naino moke mpenza. Kasi, abosanaki elaka na ye? Te! Alobaki boye: “Nakokende bobele nsima ya kokilisa mwana mabɛlɛ; bongo nakoyeisa ye mpe akomonana liboso ya [Yehova] mpe akotikala kuna libela.” Ntango kaka Samwele alongwaki na mabɛlɛ, ekoki kozala ntango akokisaki mbula misato to mpe koleka, Ana akokisaki elaka na ye, amemaki Samwele na tabenakle mpo akende kofanda kuna.—1 Samwele 1:21-24; 2 Ntango 31:16.
Nsima ya kopesa mbeka, Ana ná mobali na ye Elekana bamemaki Samwele epai ya Eliya. Ekoki kozala ete Ana asimbaki mwana na ye na lobɔkɔ mpe alobaki na Eliya boye: “Nkolo na ngai, lokola ezali yo na bomoi, ngai mwasi oyo atɛlɛmaki penepene na yo awa, ntango ebondelaki ngai [Yehova]. Nabondelaki mpo na mwana oyo mpe [Yehova] apesi ngai yango ebondelaki ngai ye. Boye ngai natiki ye na mabɔkɔ ya [Yehova]; mikolo nyonso ya bomoi na ye akozala na mabɔkɔ ya [Yehova].” Ezali na ndenge yango nde Samwele abandaki mosala na ye oyo asalelaki Yehova bomoi na ye mobimba.—1 Samwele 1:25-28; 2:11.
Ana abosanaki Samwele te. Biblia elobi boye: “Mama na ye asalelaki ye elamba moke ya likoló, ayeiselaki ye yango [mbula na mbula] wana eyaki ye na mobali na ye elongo mpo na kopesa mbeka ya [mbula].” (1 Samwele 2:19) Ana atikaki te kobondela mpo na Samwele. Mbula na mbula, na ntembe te azalaki kolendisa ye akangama na mosala ya Nzambe.
Na libaku moko, Eliya apambolaki baboti ya Samwele mpe alobaki na Elekana boye: “[Yehova] apesa yo bana uta na mwasi oyo mpo na kozongisa likabo lidefisaki ye na [Yehova].” Mpo na yango, Ana ná Elekana babotaki bana mosusu; misato ya mibali mpe mibale ya basi.—1 Samwele 2:20, 21.
Elekana ná Ana batikaki ndakisa malamu mpenza mpo na baboti baklisto! Baboti mingi bandimaka kopesa bana na bango epai ya Yehova na ndenge balendisaka bango bákɔta na mosala ya ntango nyonso. Baboti yango babongi kozwa longonya mpo na elimo ya komipimela oyo bamonisaka. Mpe Yehova akozanga te kopesa bango mbano.
Libondeli ya Ana
Ana akómaki na esengo mpenza! Biblia ezali na mabondeli mingi te oyo basi basalaki. Kasi, elobeli mabondeli mibale ya Ana. Na libondeli ya liboso amonisaki ndenge oyo azalaki koyoka ntango mbanda na ye azalaki kotumola ye mpe kopesa ye mpasi, mpe libondeli ya mibale ezalaki mpo na kosanzola Nzambe mpe kopesa ye botɔndi. Ana abandaki libondeli yango na maloba oyo: “Motema na ngai esepeli na [Yehova].” Asepelaki mpo ‘ekomba abotaki bana,’ mpe akumisaki Yehova ye oyo ‘atombolaka likoló, atombolaka mobola longwa na putulu.’ Ya solo, ‘atombolaki mozangi longwa na ebwakelo ya matiti.’—1 Samwele 2:1-10.
Lisolo ya Ana emonisi ete bato mosusu bakoki kopesa biso mpasi mpo bazali bato ya kozanga kokoka. Kasi, tosengeli kotika te ete mikakatano yango elongola biso esengo ya kosalela Yehova. Azali Moyoki monene ya mabondeli, ye oyo ayokaka kolela ya basaleli na ye ya sembo, alongolaka bango na mpasi mpe apesaka bango kimya mpe mapamboli mingi mosusu.—Nzembo 22:23-26; 34:6-8; 65:2.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Biblia ebengi esika yango ya losambo ya solo ete “tempelo” ya Yehova. Nzokande na eleko wana sanduku ya kondimana ezalaki kaka na kati ya hema to tabenakle. Tempelo ya Yehova etongamaki ntango Salomo akómaki mokonzi.—1 Samwele 1:9; 2 Samwele 7:2, 6; 1 Mikonzi 7:51; 8:3, 4.
[Elilingi na lokasa 17]
Ana apesaki Samwele epai ya Yehova