Bakomeli na ntango ya kala mpe Liloba ya Nzambe
NA SIƐKLƐ ya mitano liboso ya ntango na biso (L.T.B.), basilisaki kokoma Makomami ya Liebele. Na boumeli ya bambula mingi oyo elandaki, Bayuda oyo bazalaki bato ya mayele na mikanda, mingimingi Basoferime mpe na nsima, Bamasorete, basalaki mosala monene mpo na kobatela Makomami ya Liebele mpo ebongwana te. Nzokande, mikanda ya liboso ya Biblia ekomamaki na ntango ya Moize mpe ya Yosua, mbula nkóto liboso ya Basoferime. Bapapirise oyo bazalaki kokoma likoló na yango ezalaki koumela te mpo na kobeba; yango wana, bazalaki mbala na mbala kokoma makambo yango na bapapirise ya sika. Ndenge nini bakomeli bazalaki kosala mosala na bango na ntango wana? Bakomeli bazalaki mpe na Yisalaele ya kala?
Bamaniskri ya Biblia oyo eumeli mingi koleka, oyo ezali tii lelo oyo, ezali na kati ya barulo ya Mbu Ekufá; misusu ekomamaki na siɛklɛ ya misato mpe ya mibale L.T.B. Alan Millard, moto moko ya mayele na arkeoloji mpe na minɔkɔ ya mikili ya Proche-Orient, alobi boye: “Tozali na kopi moko te ya kalakala ya mokanda ata moko ya Biblia. Mimeseno ya bato ya bikólo oyo ezalaki zingazinga ya Yisalaele ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo bakomeli ya kala bazalaki kosala mosala na bango, mpe yango ekoki kosalisa biso tóyeba soki makomi ya Liebele ebatelamaki malamu mpenza.”
Mosala ya bakomeli na ebandeli
Na mikili ya Mezopotamia, bato babandaki kokoma mikanda ya masolo ya kala, ya makambo ya losambo, ya mibeko, ya kelasi, mpe ya makambo ya ntɔki eleki mbula nkóto minei. Biteyelo mingi ya bakomeli efungwamaki mpe moko na mateya oyo bazalaki koyekola ezalaki ndenge ya kosala kopi ya mokanda kozanga kobakisa to kolongola ata liloba moko. Lelo oyo, bato ya mayele oyo bayekolaka mikanda ya Babilone ya kala bamoni kaka bokeseni na makambo ya mikemike kati na bakopi ndenge na ndenge ya mikanda oyo esalemaki na boumeli ya mbula nkóto to koleka.
Bakomeli bazalaki kaka na mikili ya Mezopotamia te. Buku moko (The Oxford Encyclopedia of Archaeology in the Near East) elobi boye: “Ekoki kozala ete moto oyo azalaki mokomeli na Babilone na bambula ya 1500 L.T.B. ayebaki mosala ndenge moko na bakomeli oyo bazalaki kosala ata na esika nini na mikili mosusu ya Mezopotamia, na Sulia, na Kanana, to mpe na Ezipito.”a
Na eleko ya Moize, mosala ya bakomeli ezalaki na lokumu mingi na Ezipito. Bakomeli bazalaki kosala bakopi ya mikanda mokolo na mokolo. Na malita ya kalakala ya Baezipito, oyo eumeli koleka mbula nkóto minei, tokoki komona mayemi ya bakomeli bazali kosala mosala na bango. Mpo na bakomeli ya eleko wana, buku oyo touti kotánga maloba na yango elobi boye: “Na bambula ya 2 000 L.T.B., basilaki kosala bakopi ya mikanda ebele oyo elobeli bomoi mpe misala ya bato ya mikili ya Mezopotamia mpe ya Ezipito mpe basilaki kobongisa mibeko ya mosala ya bakomeli.”
Mibeko yango ya mosala esɛngaki mpe kokoma mwa maloba na nsuka ya mokanda. Maloba yango ezalaki nkombo ya mokomeli mpe ya nkolo-mokanda, dati, mokanda oyo basaleli kopi, motángo ya milɔngɔ oyo ezali na yango, mpe bongo na bongo. Mbala mingi, mokomeli azalaki kobakisa boye: “Ekomami na kolanda ndenge mpenza ezali na mokanda ya liboso mpe etalelami malamumalamu.” Maloba yango emonisi ete na ntango ya kala, bakomeli bazalaki kosɛnzɛla ete kopi ekesana na mokanda ya liboso ata na liloba moko te.
Profesɛrɛ Millard alobi lisusu boye: “Ntango moto atali mikanda wana ya kala, akomona polele ete bakomeli bazalaki kosalela mayele oyo ezalaki kopekisa ata libunga moko ekɔta. Na ebandeli ya eleko ya Moyen-Âge, Bamasorete bazongelaki mayele yango mosusu, mingimingi oyo esɛngaki kotánga milɔngɔ to maloba oyo ezali na mokanda mobimba.” Nyonso wana emonisi ete na ntango ya Moize mpe ya Yosua, na mikili ya Moyen-Orient bakomeli bazalaki na mayele ya kosala bakopi na ndenge oyo ezalaki kopekisa mabunga ekɔta.
Bakomeli oyo bayebi mosala ndenge wana bazalaki mpe na Yisalaele? Biblia yango moko ezali komonisa nini?
Bakomeli na Yisalaele ya kala
Moize akolaki na ndako ya Falao. (Exode 2:10; Misala 7:21, 22) Bato ya mayele oyo bayekolaka makambo ya Ezipito ya kala balobaka ete na bakelasi oyo Moize atángaki, ayekolaki mpe makomi ya Baezipito mpe ata ndambo ya mayele ya mosala ya mokomeli. Na buku na ye (Israel in Egypt), James Hoffmeier alobi boye: “Tozali na bilembeteli oyo ezali kondimisa biso likambo oyo Biblia elobi ete Moize akomaki makambo oyo esalemaki, alobelaki bisika oyo balekaki, mpe asalaki makambo mosusu oyo bakomeli bazalaki kosala.”b
Biblia elobeli mpe bato mosusu oyo bayebaki mosala ya mokomeli. Buku moko (The Cambridge History of the Bible) elobi ete Moize “aponaki bakapita . . . mpo na kokoma bikateli mpe kokabola bato na bituluku.” Likanisi yango euti na Deteronome 1:15, oyo elobi boye: “Bongo [ngai Moize] nakamataki bato ya liboso na mabota na bino . . . mpe natyaki bango bato ya liboso na bino, bakapitene ya nkóto mpe bakapitene ya monkama mpe bakapitene ya ntuku mitano mpe bakapitene ya zomi, mpe bakapita kati na mabota na bino nyonso.” Bakapita yango bazalaki na mokumba nini?
Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “kapita” ezali na bisika mwa mingi na masolo ya Biblia oyo elobeli eleko ya Moize mpe ya Yosua. Bato mingi ya mayele balobaka ete liloba yango elimboli “sekrɛtɛrɛ oyo mokumba na ye ezali ya kokoma makambo,” “moto oyo ‘akomaka’ to ‘atyaka na mokanda,’” mpe “kalaki oyo azalaki kokoma makambo ntango zuzi azali kosambisa.” Bisika oyo basaleli liloba yango ya Liebele emonisi ete na Yisalaele bakomeli yango bazalaki mwa mingi mpe bazalaki na mikumba mingi na makambo ya Leta na ebandeli ya ekólo yango.
Ndakisa ya misato ezali ya banganga-nzambe na Yisalaele. Buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobi ete “misala na bango na makambo ya losambo mpe makambo mosusu esɛngaki bango bázala bato oyo bayebi kotánga mpe kokoma.” Na ndakisa, Moize alobaki na Balevi boye: “Na nsuka ya mbula nsambo, . . . okotánga mobeko oyo liboso ya Yisalaele nyonso.” Banganga-nzambe bakómaki na mokumba ya kobatela mikanda ya Mibeko. Bango nde bazalaki kopesa ndingisa ya kosala bakopi mpe kotambwisa mosala yango.—Deteronome 17:18, 19.
Ndakisa mosusu etaleli kopi ya liboso ya Mibeko. Mwa mikolo liboso Moize akufa, ayebisaki Bayisalaele boye: “Na mokolo yango ekokata bino ngámbo ya Yaladene epai na mokili oyo [Yehova] Nzambe na yo apesi na yo, okotɛmisa mabanga minene mpe okopakola yango na mpɛmbɛ ya makɛsɛ, mpe okokoma likoló na yango maloba nyonso ya mibeko oyo.” (Deteronome 27:1-4) Nsima ya kokweisa engumba Yeliko mpe engumba Ai, Bayisalaele bayanganaki na Ngomba Ebali, oyo ezali na ntei mpenza ya Mokili ya Ndaka. Na esika yango, Yosua akomaki likoló ya mabanga ya etumbelo moko “lokola ekomami na mokanda ya Mibeko ya Moize.” (Yosua 8:30-32) Bakokaki kokoma makambo ndenge wana kaka na mboka oyo ezali na bato oyo bayebi kotánga mpe kokoma. Yango emonisi ete Bayisalaele ya kala bazalaki na mayele ya kobatela makomi mosantu mpo ete likambo ata moko te ebakisama to elongolama.
Makomami ebatelamaki malamumalamu
Nsima ya eleko ya Moize mpe ya Yosua, mikanda mosusu ya Biblia ekomamaki na monɔkɔ ya Liebele mpe bakomeli bazalaki kosala bakopi na yango. Lokola bazalaki kokoma likoló ya bapapirise, oyo ezalaki koumela te kopasuka to mpe kobeba na malili to koguga, esengelaki kokoma makambo yango na bapapirise ya sika. Mosala wana ekobaki kosalema na boumeli ya bankama ya bambula.
Atako bakomeli bazalaki mpenza kosɛnzɛla mpo libunga ekɔta te na Biblia, mwa mabunga ya mikemike ekɔtaki kaka. Kasi, bakomeli basalaki nde mabunga oyo ebongolaki mpenza Biblia? Te. Bato ya mayele bayekolaki bamaniskri ndenge na ndenge mpe bakokanisaki yango mpo na komona bokeseni, kasi bamonaki kaka mabunga mikemike mpenza oyo ebongolaki nsango ya Biblia ata moke te.
Baklisto bandimaka ete Makomami Mosantu ebongwanaki te soki bakanisi ndenge oyo Yesu Klisto azalaki kotalela mikanda ya liboso ya Biblia. Maloba lokola oyo: “Botángá te na mokanda ya Moize?” mpe “Moize apesaki bino Mibeko, boye te?” emonisi ete mpo na Yesu, bakopi ya mikanda ya Biblia oyo ezalaki ntango azalaki awa na mabelé ezalaki malamu. (Malako 12:26; Yoane 7:19) Longola yango, Yesu amonisaki ete Makomami ya Liebele ebongwanaki te ntango alobaki ete: “Makambo nyonso oyo ekomamá na mibeko ya Moize mpe na Basakoli mpe na Nzembo na ntina etali ngai esengeli kokokisama.”—Luka 24:44.
Yango wana, tokoki mpenza kozala na elikya ete Makomami Mosantu ebatelamaki malamumalamu. Yango ezali se ndenge oyo mosakoli Yisaya alobaki ete: “Matiti mazali kokauka, felele ezali kolɛmba, nde liloba ya Nzambe na biso ekotɛlɛma libela.”—Yisaya 40:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yosua, moto oyo azalaki na bomoi na bambula ya 1500 L.T.B., alobelaki engumba moko ya Bakanana oyo ezalaki kobengama Kilyata-sefele, nkombo oyo elimboli “Engumba ya Buku” to “Engumba ya Mokomeli.”—Yosua 15:15, 16.
b Na Exode 24:4, 7; 34:27, 28; mpe na Deteronome 31:24-26, Moize akomaki mibeko. Na Deteronome 31:22, akomaki nzembo moko, mpe na Mituya 33:2 akomaki bankombo ya bisika oyo balekaki na kati ya esobe.
[Elilingi na lokasa 18]
Mokomeli moko ya Ezipito azali kosala mosala na ye
[Elilingi na lokasa 19]
Mikanda ya liboso ya Biblia ekomamaki na ntango ya Moize