Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Samwele
TOSENGELI nde kotosa Yehova na makambo nyonso mpo na komonisa ete tondimaka bokonzi na ye? Moto ya bosembo asalaka ntango nyonso malamu na miso ya Nzambe? Moto ya ndenge nini ‘asepelisaka motema’ ya Nzambe? (1 Samwele 13:14) Mokanda ya Mibale ya Samwele ezali kopesa biyano oyo ebongi na mituna nyonso wana.
Mokanda yango ekomamaki na Gada ná Natana, basakoli mibale oyo bazalaki koyokana malamu na Mokonzi Davidi.a Basilisaki kokoma yango na mobu 1040 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), na nsuka ya bokonzi ya Davidi oyo eumelaki mbula 40; mokanda yango ezali kolobela mingimingi Davidi mpe boyokani na ye ná Yehova. Masolo kitoko ya mokanda yango ezali komonisa ndenge oyo ekólo oyo ezalaki ntango nyonso na bitumba ekómaki na kimya mpe makambo na yango ebongaki na boyangeli ya mokonzi moko ya mpiko. Masolo na yango esimbaka motema mpe ezali komonisa mpenza mayoki ya bato oyo elobeli.
DAVIDI AKÓMI “MONENE”
Likambo oyo Davidi asali ntango ayoki nsango ya liwa ya Saulo ná Yonatana emonisi makanisi na ye mpo na bango mpe mpo na Yehova. Baponi Davidi mokonzi ya libota ya Yuda na Hebeloni. Mabota mosusu baponi Isibosete, mwana ya Saulo, mpo azala mokonzi na bango. Davidi azali se kokóma “monene,” mpe mbula nsambo ná ndambo na nsima, baponi ye mokonzi ya mabota nyonso ya Yisalaele.—2 Samwele 5:10.
Davidi abɔtɔli Bayebusi engumba Yelusaleme mpe akómisi yango engumba-mokonzi ya ekólo Yisalaele. Makambo etamboli malamu te ntango ameki komemisa sanduku ya kondimana na Yelusaleme mpo na mbala ya liboso. Kasi, nyonso eleki malamu ntango ameki mpo na mbala ya mibale, mpe Davidi abini na esengo. Yehova asali kondimana na Davidi mpo na bokonzi. Davidi alongi banguna na ye mpamba te Nzambe azali na ye ntango nyonso.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:18—Mpo na nini Yoaba ná bandeko na ye mibale babengami bana ya Seluya, mama na bango? Na Makomami ya Liebele, ntango bazali kotánga baboti ya moto, mbala mingi batángaka nkombo ya tata na ye. Ekoki kozala ete mobali ya Seluya akufaki noki, to mpe amonanaki ete abongi te bátya nkombo na ye na Makomi Mosantu. Ekoki mpe kozala ete batángi nkombo ya Seluya mpo azalaki ndeko ya Davidi to tata na ye azalaki ndeko ya tata ya Davidi. (1 Ntango 2:15, 16) Balobeli tata na bango kaka na esika oyo balobeli malita na ye na Beteleme.—2 Samwele 2:32.
3:29 (NW)—Maloba “mobali oyo asimbaka nzete ya kotonga” elimboli nini? Na momeseno, basi nde bazalaki kosala bilamba. Yango wana, maloba yango ekoki kotalela mibali oyo bazali na makoki te ya kosala misala lokola kokende na etumba mpe na bongo, basengeli kosalaka misala oyo, mbala mingi basi nde bazalaki kosala yango.
5:1, 2—Ntango boni elekaki kobanda babomaki Isibosete tii baponaki Davidi mokonzi ya Yisalaele mobimba? Tokoki mpenza kokanisa ete Isibosete, oyo ayangelaki mbula mibale, azwaki bokonzi mwa moke nsima ya liwa ya Saulo, mpe kaka na ntango wana, Davidi akómaki mokonzi na Hebeloni. Davidi azalaki mokonzi ya libota ya Yuda mbula nsambo na ndambo mpe azalaki kofanda na Hebeloni. Ntango akómaki mokonzi ya Yisalaele mobimba, nsima ya mwa ntango akómisaki Yelusaleme engumba-mokonzi. Na bongo, mbula soki mitano elekaki kobanda liwa ya Isibosete tii ntango Davidi akómaki mokonzi ya Yisalaele mobimba.—2 Samwele 2:3, 4, 8-11; 5:4, 5.
8:2—Bato boni ya Moaba babomamaki ntango babundaki na Yisalaele? Bazalaki kokata motángo ya bato oyo bakobomama na komeka na nsinga, kasi na kotánga bango mokomoko te. Emonani ete Davidi alalisaki Bamoaba na nse, na molɔngɔ, moto na moto pembeni ya moninga na ye. Na nsima, bamekaki bango na nsinga, na molai ya molɔngɔ. Ekoki mpenza kozala ete azalaki koboma bato nyonso bazalaki kozwa nsima ya komeka molai na nsinga mbala mibale, mpe azalaki kotika na bomoi bato oyo bazalaki kozwa nsima ya komeka molai na nsinga mbala moko.
Mateya mpo na biso:
2:1; 5:19, 23. Davidi atunaki Yehova liboso ya kofanda na Hebeloni mpe liboso ya kobundisa banguna na ye. Biso mpe tosengeli kosɛngaka Yehova atambwisa biso ntango tolingi kozwa bikateli oyo ekoki kotalela elimo na biso.
3:26-30. Kozongisa mabe na mabe ebotaka mbuma ya malamu te.—Baloma 12:17-19.
3:31-34; 4:9-12. Davidi atikaki ndakisa malamu ya moto oyo azongisaka mabe na mabe te mpe abombaka nkanda te.
5:12. Tosengeli kobosanaka te ete Yehova ateyi biso banzela na ye mpe tokoki kokóma baninga na ye.
6:1-7. Atako Davidi azalaki na makanisi ya malamu, lokola amemisaki Sanduku na likalo, abukaki mobeko ya Nzambe, yango wana alongaki te. (Exode 25:13, 14; Mituya 4:15, 19; 7:7-9) Lisusu, etumbu oyo Uza azwaki mpo asimbaki Sanduku emonisi ete makanisi malamu ya moto ekoki kobongola masɛngami ya Nzambe te.
6:8, 9. Ntango Davidi akutanaki na mokakatano, liboso asilikaki, na nsima abangaki—mbala mosusu kutu apesaki Yehova foti na likambo wana. Tosengeli kopesaka Yehova foti te ntango tokutani na mikakatano mpo totosaki mibeko na ye te.
7:18, 22, 23, 26. Komikitisa ya Davidi, komipesa na ye mobimba epai ya Yehova, mpe mposa na ye ya kokumisa nkombo ya Nzambe ezali bizaleli malamu oyo tosengeli komekola.
8:2. Esakweli yango oyo elobamaki mbula 400 liboso ekokisamaki. (Mituya 24:17) Liloba ya Yehova ezangaka te kokokisama.
9:1, 6, 7. Davidi akokisaki elaka na ye. Biso mpe tosengeli kosala makasi tókokisaka maloba na biso.
YEHOVA AKƆTISI MPASI NA NDAKO YA MOPAKOLAMI NA YE
Yehova alobi na Davidi boye: “Talá nakokolisa mabe ete matɛmɛla yo kati na ndako na yo moko; nakokamata mpe basi na yo liboso na miso na yo mpe nakopesa bango na mozalani na yo; akolala na bango na nse ya moi.” (2 Samwele 12:11) Mpo na nini Yehova alobi bongo? Mpo na lisumu ya Davidi ná Bata-seba. Atako Davidi abongoli motema mpe Nzambe alimbisi ye, kasi abateli ye te na mbuma mabe ya lisumu na ye.
Ya liboso, mwana oyo Bata-seba aboti, akufi. Na nsima, Amenono, mwana ya Davidi, abebisi Tamala, ndeko na ye ya mwasi oyo ayebaki naino mobali te. Abesaloma, ndeko ya Tamala, oyo abotamá na ye mama moko, abomi Amenono mpo na likambo mabe oyo asalaki. Abesaloma atombokeli tata na ye mpe amikómisi mokonzi na Hebeloni. Davidi alongwe na Yelusaleme mpo na kobikisa bomoi na ye. Abesaloma asangisi nzoto na bamakango zomi oyo tata na ye atikaki mpo bábatelaka ndako. Davidi azongi na bokonzi nsima ya liwa ya Abesaloma. Seba, moto moko ya libota ya Benyamina abimisi botomboki oyo ememi ye na liwa.
Biyano na mituna ya Biblia:
14:7 (NW)—Maloba “mɔtɔ ya makala na ngai” ezali elilingi ya nini? Mɔtɔ ya makala oyo ezali kopela ezali elilingi ya bana ya moto oyo bazali naino na bomoi.
19:29—Mpo na nini Davidi alobaki na Mefibosete bongo nsima ya koyoka ye? Mbala mosusu nsima ya koyoka Mefibosete, Davidi asosolaki ete asalaki libunga na ndenge andimaki maloba ya Siba kozanga ete atalela yango malamu. (2 Samwele 16:1-4; 19:24-28) Ekoki kozala ete Davidi ayokaki nkanda mpe alingaki lisusu koyoka likambo yango te.
Mateya mpo na biso:
11:2-15. Ndenge lisolo yango elobeli polele mabunga ya Davidi emonisi mpenza ete Biblia ezali Liloba epemami na Nzambe.
11:16-27. Soki tosali lisumu ya monene, tosengeli kobomba yango te ndenge Davidi asalaki. Tosengeli nde koyambola lisumu na biso epai ya Yehova mpe koluka lisalisi ya bankulutu.—Masese 28:13; Yakobo 5:13-16.
12:1-14. Natana atikaki ndakisa malamu mpo na bankulutu na lisangá. Basengeli kosalisa bato oyo basali masumu bázonga na nzela. Basengeli kokokisa mokumba yango malamumalamu.
12:15-23. Lokola Davidi ayebaki malamu ntina oyo likambo wana ekómelaki ye, yango esalisaki ye andima yango.
15:12; 16:15, 21, 23. Ntango Ahitofele amonaki ete eloko moko lisusu te ekopekisa Abesaloma akóma mokonzi, lolendo mpe mposa ya lokumu etindaki mopesi-toli wana ya mayele mingi atika Davidi. Moto oyo azali na mayele mingi, soki azangi komikitisa mpe bosembo, yango ekoki kokóma motambo mpo na ye.
19:24, 30. Mefibosete azalaki na botɔndi mpo na motema-boboto ya Davidi. Andimaki ndenge oyo mokonzi akataki likambo na ye ná Siba. Botɔndi na biso epai ya Yehova mpe na ebongiseli na ye esengeli kotinda biso tózala na botosi.
20:21, 22. Bwanya ya moto moko ekoki kobikisa ebele ya bato.—Mosakoli 9:14, 15.
TIKÁ TÓKWEA ‘NA LOBƆKƆ YA YEHOVA’
Nzala ekɔti na mboka mpe eumeli mbula misato mpo na nyongo ya makila oyo Saulo amemaki na ndenge abomaki bato ya Gibona. (Yosua 9:15) Mpo na kofuta nyongo yango, bato ya Gibona basɛngi ete bana nsambo ya Saulo bábomama. Davidi apesi bango na mabɔkɔ ya bato ya Gibona, elanga esili mpe mbula makasi ebɛti. Bingambe Bafilistia minei ‘bakwei na lobɔkɔ ya Davidi mpe na mabɔkɔ ya baombo na ye.’—2 Samwele 21:22.
Davidi asali lisumu monene ya kotánga motuya ya bato, likambo oyo Nzambe atindi ye te. Asɛngi bolimbisi mpe aponi kokwea “na lobɔkɔ ya [Yehova].” (2 Samwele 24:14) Mpo na lisumu yango, bato 70 000 bakufi na maladi mabe. Davidi alandi malako ya Yehova, mpe maladi yango etiki kopalangana.
Biyano na mituna ya Biblia:
21:8—Mpo na nini vɛrsɛ yango elobi ete Mikala, mwana ya Saulo azalaki na bana mitano, nzokande 2 Samwele 6:23 emonisi ete abotaki te tii liwa na ye? Ndimbola oyo bato mingi bandimaka ezali ete bana yango bazalaki bana ya ndeko na ye Melaba, mwasi ya Adeliele. Ekoki mpenza kozala ete Melaba akufaki ntango bana bazalaki naino mike mpe Mikala abɔkɔlaki bango.
21:9, 10—Lisipa alekisaki ntango boni na kokɛngɛla bibembe ya bana na ye mibale mpe bankɔkɔ mitano ya Saulo oyo bato ya Gibona babomaki? Babomaki bato yango nsambo “na mikolo ya liboso ya kobuka mbuma,” oyo ezalaka sanza ya Marsi to Aprili. Bibembe na bango etikalaki likoló ya ngomba. Lisipa azalaki kokɛngɛla bibembe yango butu na moi tii ntango Yehova abɛtisaki mbula mpo na komonisa ete nkanda na ye ekiti. Mbula ya makasi ekokaki kobɛta te liboso eleko ya kobuka mbuma esila, elingi koloba liboso ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Na bongo, Lisipa akɛngɛlaki bibembe wana sanza mitano to motoba. Na nsima, Davidi atindaki ete bákunda mikuwa na bango.
24:1—Mpo na nini Nzambe amonaki ete Davidi asali lisumu monene na ndenge atángaki bato? Mibeko epekisaki kotánga motuya ya bato te. (Mituya 1:1-3; 26:1-4) Biblia elobi te mpo na nini Davidi atángaki bato. Nzokande, 1 Ntango 21:1 emonisi ete Satana atindaki ye na kosala likambo wana. Ezala ndenge nini, Yoaba, mokonzi ya basoda na ye, ayebaki ete ekateli ya Davidi ya kotánga bato ezalaki mabe, mpe amekaki kopekisa Davidi asala yango.
Mateya mpo na biso:
22:2-51. Nzembo ya Davidi ezali komonisa na maloba ya kitoko mpenza ete Yehova azali Nzambe ya solo, oyo tokoki kotyela motema mobimba!
23:15-17. Davidi azalaki mpenza komemya mobeko ya Nzambe mpo na bomoi mpe makila; yango wana, na libaku yango, aboyaki kosala likambo oyo emonanaki mpenza ete ekobuka mobeko yango. Biso mpe tosengeli kotalelaka mibeko nyonso ya Nzambe ndenge yango.
24:10. Lisosoli ya Davidi etindaki ye abongola motema. Lisosoli na biso esalaka mpenza mpe ekoki kotinda biso tósala lokola ye?
24:14. Davidi ayebaki malamu ete Yehova azali na motema mawa koleka bato. Biso mpe tondimaka yango?
24:17. Davidi ayokaki mawa na ndenge lisumu na ye ememelaki ekólo mobimba mpasi. Mosali-mabe oyo abongoli motema asengeli koyoka mawa mpo na nsɔni oyo lisumu na ye ekoki kopesa na lisangá.
Tokoki ‘kosepelisa motema ya Nzambe’
Mokonzi ya mibale ya Yisalaele azalaki ‘moto oyo asepelisaki motema ya Yehova.’ (1 Samwele 13:14) Ata mokolo moko te Davidi akakolaki mitinda ya sembo ya Yehova, mpe alukaki te kosala makambo kozanga kotalela Nzambe. Mbala nyonso oyo Davidi asali libunga, azalaki kowangana lisumu na ye te, azalaki kondima disipilini, mpe azalaki kozongela yango te. Davidi azalaki moto ya sembo. Bwanya etindaka mpe biso tósala lokola ye, mingimingi ntango tosali libunga?
Lisolo ya bomoi ya Davidi ezali komonisa polele ete kondima bokonzi ya Yehova elimboli kondima mitinda na Ye mpo na malamu ná mabe mpe kosala makasi ya kolanda yango na bosembo. Biso mpe tokoki kosala yango. Tokoki mpenza kozala na botɔndi mpo na mateya oyo tozwi na mokanda ya Mibale ya Samwele! Nsango epemami na Nzambe oyo ezali na mokanda yango ezali mpenza na bomoi mpe na nguya.—Baebele 4:12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako Samwele akomaki mokanda yango te, ebengamaka na nkombo na ye mpamba te na ntango ya kala na Liebele, Mokanda ya Liboso ya Samwele ná oyo ya Mibale ezalaki rulo moko. Samwele akomaki makambo mingi ya mokanda ya Liboso ya Samwele.
[Elilingi na lokasa 16]
Davidi abatelaki ezaleli ya komikitisa mpo abosanaki te nani akómisaki ye mokonzi
[Bililingi na lokasa 18]
“Talá nakokolisa mabe ete mátɛmɛla yo kati na ndako na yo moko”
Bata-seba
Tamala
Amenono