Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Mikonzi
“SOKI bato ya bosembo bazali mingi, bato ya mboka basepelaka; kasi soki moto ya mabe azwi bokonzi, bato banyokwamaka.” (Masese 29:2, Bible na lingala ya lelo oyo) Mokanda ya Liboso ya Mikonzi ezali komonisa mpenza bosolo ya lisese oyo. Ezali kolobela lisolo ya bomoi ya Salomo, oyo na boyangeli na ye, Yisalaele ya kala elekaki bikólo nyonso ya mabelé na bomɛngo mpe na makasi. Mokanda yango elobeli mpe ndenge ekólo yango ekabwanaki nsima ya liwa ya Salomo; elobeli mpe bakonzi 14 oyo bayangelaki nsima na ye, bamosusu na Yisalaele mpe bamosusu na Yuda. Kati na bakonzi yango, kaka mibale nde batikalaki sembo epai na Yehova. Lisusu, mokanda yango elobeli misala ya basakoli motoba; Eliya azalaki moko na bango.
Mokanda yango ekomamaki na Yelusaleme mpe na Yuda, mpe mosakoli Yilimia nde akomaki yango. Makambo oyo balobeli na Mokanda yango esalemaki na boumeli ya mbula soki 129, banda na mobu 1040 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) tii na mobu 911 L.T.B. Ntango azalaki kokoma mokanda yango, Yilimia asalelaki mikanda mosusu ya kala, na ndakisa “mikanda ya misala ya Salomo.” Mikanda yango ezalaka lisusu te.—1 Mikonzi 11:41; 14:19; 15:7.
MOKONZI MOKO YA BWANYA ATYE KIMYA MPE BOZWI
Mokanda ya liboso ya Mikonzi ebandi na lisolo ya Adoniya, mwana ya Davidi oyo alukaki kobɔtɔla tata na ye bokonzi. Mosakoli Natana asalaki nokinoki mpo na kobebisa mwango na ye mpe Salomo, mwana ya Davidi akómaki mokonzi. Yehova asepelaki na likambo oyo mokonzi ya sika asɛngaki na libondeli na ye mpe apesaki ye “motema ya [bwanya] mpe ya bososoli,” mpe “[bozwi] ná lokumu.” (1 Mikonzi 3:12, 13) Bwanya ná bozwi ya mokonzi Salomo elekaki oyo ya bato nyonso. Yisalaele ekómaki mpenza na kimya mpe na bozwi.
Kati na bandako oyo Salomo atongaki, tokoki kotánga tempelo ya Yehova mpe bandako ndenge na ndenge ya Leta. Yehova alakaki Salomo ete soki akobi kotosa ye, ‘akopika bokonzi na ye seko na ekolo ya Israel.’ (1 Bakonzi 9:4, 5, Bible na lingala ya lelo oyo) Nzambe ya solo alobaki na ye mpe ete soki atosi ye te akosuka mabe. Atako bongo, Salomo azwaki basi ebele ya bapaya. Ntango akómaki mobange, basi yango bamemaki ye na losambo ya lokuta. Yehova alobaki ete bokonzi na ye ekokabwana. Na 997 L.T.B., Salomo akufaki, mpe liwa na ye esukisaki boyangeli na ye ya mbula 40. Mwana na ye Lehobama akómaki mokonzi.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:5—Mpo na nini Adoniya alukaki kobɔtɔla bokonzi ntango Davidi azalaki naino na bomoi? Biblia eyebisi yango te. Kasi, tokoki koloba ete lokola Amenona mpe Abesaloma, bayaya ya Adoniya basilaki kokufa, mpe ntango mosusu Kileaba, mwana ya Davidi akufaki, Adoniya amonaki ete azali na lotomo ya kozwa bokonzi mpamba te ye nde azalaki yaya ya bana ya Davidi oyo batikalaki. (2 Samwele 3:2-4; 13:28, 29; 18:14-17) Lokola Yoaba, mokonzi ya nguya mpenza ya basoda mpe nganga-monene Abiatala bandimaki kosalisa ye, Adoniya amonaki mpenza ete mwango na ye ekolonga. Biblia elobi te soki ayebaki ete likanisi ya Davidi ezali ete Salomo akóma mokonzi na esika na ye. Kasi, Adoniya aboyaki kobenga Salomo ná bato mosusu ya sembo ya Davidi ntango akabaki “mbeka.” (1 Mikonzi 1:9, 10) Yango emonisi ete Adoniya azalaki kotalela Salomo lokola monguna na ye.
1:49-53; 2:13-25—Mpo na nini Salomo abomaki Adoniya nsima ya kolimbisa ye? Atako, Bata-seba ayebaki makanisi oyo Adoniya azalaki na yango te ntango asɛngaki bápesa ye Abisaga mpo azala mwasi na ye, Salomo ayebaki yango malamumalamu. Atako Davidi asangisaki nzoto na Abisaga te, eyebanaki ete mwasi kitoko wana azalaki mwasi na ye. Ndenge bazalaki kosala na ntango wana, Abisaga asengelaki kokóma mwasi ya moto oyo akozwa bokonzi na esika ya Davidi. Adoniya akanisaki ete soki azwi Abisaga, mwango na ye ya kobɔtɔla bokonzi ekolonga. Ntango Salomo amonaki ete mposa ya Adoniya ezali nde ya kozwa bokonzi, alimbisaki ye lisusu te.
6:37–8:2—Ntango nini fɛti mpo na kofungola tempelo esalemaki? Basilisaki kotonga tempelo na sanza ya mwambe ya mobu 1027 L.T.B., mbula ya 11 ya boyangeli ya Salomo. Emonani lokola mosala ya kokɔtisa biloko na tempelo mpe kobongisa makambo mosusu ezwaki sanza 11. Ekoki kozala ete fɛti mpo na kofungola tempelo esalemaki na sanza ya sambo ya mobu 1026 L.T.B. Mpo na komonisa misala nyonso ya kotonga oyo esalemaki na ntango wana, lisolo yango elobeli mpe misala mosusu ya kotonga oyo esalemaki nsima ya kosilisa kotonga tempelo, liboso kutu elobela fɛti ya kofungola tempelo.—2 Ntango 5:1-3.
9:10-13—Likambo oyo Salomo asalaki ya kopesa Hilama, mokonzi ya Tulo bingumba 20 ya Galilai eyokanaki na Mibeko ya Moize? Emonani lokola Mobeko oyo ezali na Levitike 25:23, 24 ezalaki kaka mpo na bamboka oyo bana ya Yisalaele bafandaki. Ata soki bingumba oyo Salomo apesaki Hilama ezalaki na kati ya mabelé ya Mokili ya Ndaka, ekoki kozala ete bato oyo bazalaki kofanda wana bazalaki Bayisalaele te. (Exode 23:31) Likambo oyo Salomo asalaki ekoki mpe komonisa ete atosaki makambo mosusu ya mobeko te, ndenge kaka asalaki ntango ‘andukaki bampunda mpo na ye moko’ mpe azwaki basi ebele. (Deteronome 17:16, 17) Ezala bongo to te, Hilama asepelaki na likabo yango te. Ekoki kozala ete bapakano oyo bazalaki kofanda na bingumba wana bazalaki kobatela yango malamu te, to mpe bingumba yango ezalaki na esika ya malamu te.
11:4—Kokóma mobange nde esalaki ete Salomo azala lisusu sembo te? Emonani ete ezali bongo te. Salomo azalaki elenge mpenza ntango abandaki koyangela, yango wana atako ayangelaki mbula 40, akómaki mobange makasi te. Lisusu, atikaki mpenza kosambela Yehova te. Ekoki kozala ete azalaki kosangisa losambo ya Yehova ná oyo ya bapakano.
Mateya mpo na biso:
2:26, 27, 35. Makambo nyonso oyo Yehova alakaka ekokisamaka. Ntango balongolaki Abiatala, mwana ya Eli, na mosala ya nganga-Nzambe, yango ekokisaki “liloba ya [Yehova] oyo ye alobaki mpo na libota ya Eli.” Kotyama ya Sadoko, moto oyo autaki na libota ya Fineasi na esika ya Abiatala ekokisaki maloba ya Mituya 25:10-13.—Exode 6:25; 1 Samwele 2:31; 3:12; 1 Ntango 24:3.
2:37, 41-46. Ezali mpenza likama kokanisa ete moto akoki kobuka mobeko ya Nzambe kozanga ete azwa etumbu! Baoyo bazali kotika na nko nyonso ‘nzela ekangamakangamá oyo ememaka na bomoi,’ bakobuka mbuma ya ekateli wana ezangi bwanya.—Matai 7:14.
3:9, 12-14. Yehova ayanolaka na mabondeli ya sembo ya basaleli na ye oyo basɛngaka ye bwanya, bososoli, mpe litambwisi mpo na kokokisa mosala na ye.—Yakobo 1:5.
8:22-53. Salomo amonisaki mpenza botɔndi epai na Yehova, Nzambe ya motema-boboto, oyo akokisaka bilaka, mpe oyo ayokaka mabondeli! Kokanisa na mozindo na maloba oyo Salomo alobaki na libondeli oyo asalaki na fɛti ya kofungola tempelo ekokómisa makasi botɔndi na biso mpo na bizaleli ya Nzambe oyo alobelaki na libondeli yango mpe bizaleli mosusu ya Nzambe.
11:9-14, 23, 26. Lokola Salomo azalaki lisusu kotosa Nzambe te ntango akómaki mobange, Yehova abimiselaki ye banguna. Ntoma Petelo alobi ete: “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amonisaka boboto monene na ye epai ya bato ya komikitisa.”—1 Petelo 5:5.
11:30-40. Mokonzi Salomo alukaki koboma Yelobama mpo na makambo oyo Ahiya asakolaki na ntina na Yelobama. Likambo wana oyo Salomo asalaki ekeseni mpenza na oyo asalaki mbula soki 40 liboso, ntango aboyaki kozongisela Adoniya ná batomboki mosusu mabe. (1 Mikonzi 1:50-53) Mbongwana wana emonisaki mpenza ete apesi Yehova mokɔngɔ.
BOKONZI OYO EZALAKI NA BOMOKO EKABWANI
Yelobama mpe bato mosusu bakendeki epai ya mokonzi Lehobama mpo na kosɛnga ye akitisa kilo oyo tata na ye Salomo atyaki likoló na bango. Na esika ayokela bango, Lehobama alobaki na bango nde ete akobakisela bango kilo. Mabota zomi batombokaki mpe batyaki Yelobama mokonzi na bango. Bokonzi ekabwanaki. Lehobama atikalaki koyangela bokonzi ya sudi, oyo ezalaki na mabota ya Yuda mpe Benyamina, mpe Yelobama akómaki mokonzi ya mabota zomi ya nɔrdi ya bokonzi ya Yisalaele.
Mpo na kolɛmbisa bato bakendeke kosambela na Yelusaleme te, Yelobama asalaki bikeko mibale ya wolo ya bana ya ngɔmbɛ, atyaki moko na Dani mpe mosusu na Betele. Kati na bato oyo bakómaki bakonzi na Yisalaele nsima ya Yelobama, tokoki kotánga Nadaba, Basa, Ela, Zimili, Tibini, Omili, Ahaba, mpe Ahazia. Abiyama, Asa, Yosafata, mpe Yolama bayangelaki na Yuda nsima ya Lehobama. Basakoli oyo bazalaki na mikolo ya bakonzi yango ezali Ahiya, Semaya, moto ya Nzambe oyo batángi nkombo na ye te, Yehu, Eliya mpe Mikaya.
Biyano na mituna ya Biblia:
18:21—Mpo na nini Bayisalaele batikalaki nyɛɛ ntango Eliya atunaki bango soki balingi kolanda Yehova to Baala? Ekoki kozala bayebaki ete bazali lisusu sembo epai ya Yehova te mpe bazalaki komona ete basali mabe. To mbala mosusu mitema na bango ekómaki makasi, yango wana atako bazalaki komibenga basambeli ya Yehova, bazalaki komona mabe te kosambela Baala. Kaka ntango Yehova amonisaki nguya na ye nde balobaki ete: ‘Yehova azali Nzambe ya solo! Yehova azali Nzambe ya solo!’—1 Mikonzi 18:39.
20:34—Ntango Yehova asalisaki Ahaba alonga Basulia, mpo na nini Ahaba abikisaki mokonzi na bango Bene-hadadi? Na esika aboma Bene-hadadi, Ahaba asalaki na ye kondimana mpo apesa ye babalabala ya Damasi, mboka-mokonzi ya Sulia, mpo atonga bazando. Kutu liboso, tata ya Bene-hadadi amipesaki babalabala na Samalia mpo na kosala mombongo. Yango wana, batikaki Bene-hadadi mpo Ahaba akóma kosala mombongo na Damasi.
Mateya mpo na biso:
12:13, 14. Ntango tozali kozwa bikateli ya ntina mingi na bomoi, tosengeli koluka toli epai ya bato oyo bazali na bwanya mpe bakɔmeli, oyo bayebi mpenza Makomami mpe bayebani lokola bato oyo batosaka mitinda ya Nzambe.
13:11-24. Soki moto moko, ata mpe ndeko moko oyo ayei na likanisi ya kosalisa yo, apesi yo toli to likanisi moko oyo omoni ete ezali mpenza malamu te, osengeli kotala malamu soki toli yango eyokani na Liloba ya Nzambe.—1 Yoane 4:1.
14:13. Yehova alukaka makambo malamu epai na biso. Ata soki malamu yango ezali moke ndenge nini, Yehova akoki kokómisa yango monene soki tozali kosala makasi mpo na kosalela ye.
15:10-13. Tosengeli na mpiko nyonso koboya lipɛngwi mpe kotombola losambo ya solo.
17:10-16. Mwasi-akufelá mobali ya Zalefata andimaki mpenza ete Eliya azali mosakoli mpe ayambaki ye mpo na yango, mpe Yehova apambolaki misala na ye ya kondima. Lelo oyo, Yehova mpe amonaka misala na biso ya kondima, mpe apesaka mbano epai na baoyo bazali kosala makambo ndenge na ndenge mpo na kosunga mosala ya Bokonzi.—Matai 6:33; 10:41, 42; Baebele 6:10.
19:1-8. Ntango tokutani na botɛmɛli makasi, tokoki kotya motema ete Yehova akosunga biso.—2 Bakolinti 4:7-9.
19:10, 14, 18. Basambeli ya solo bakoki kozala bango moko te. Yehova ná bandeko na bango ya mokili mobimba bazali na bango.
19:11-13. Yehova azali te mɔtɔ, mopɛpɛ, mai, ngomba to eloko mosusu nyonso ya nguya.
20:11. Ntango Bene-hadadi atutaki ntolo ete akobebisa Samalia, Mokonzi ya Yisalaele ayanolaki ye boye: “Makasi ya soda eyebanaka bobele soki alongi etumba, kasi liboso ya etumba té.” (Bible na lingala ya lelo oyo) Ntango bapesi biso mokumba moko, tosengeli te komityela motema koleka ndelo.—Masese 27:1; Yakobo 4:13-16.
Ezali na ntina mingi mpo na biso
Ntango Moize azalaki kolobela ndenge Nzambe apesaki ye Mibeko na ye na Ngomba Sinai, alobaki na bana ya Yisalaele boye: “Talá, natye na liboso na bino lelo lipamboli mpe elakeli mabe, lipamboli soki bokotosa malako ya [Yehova] Nzambe na bino, oyo elakeli ngai bino lelo, mpe elakeli mabe soki bokotosa malako ya [Yehova] Nzambe na bino te, kasi soki bokopɛngwa na nzela oyo elakeli ngai bino lelo, mpo na [kolanda] banzambe mosusu oyo boyebaki te.”—Deteronome 11:26-28.
Mokanda ya Liboso ya Mikonzi ebendi mpenza likebi na biso na likambo wana ya ntina mingi! Ndenge tomoni yango, mokanda yango epesi mpe mateya mosusu ya ntina mingi. Ya solo mpenza, nsango na yango ezali na bomoi mpe na nguya.—Baebele 4:12.
[Elilingi na lokasa 29]
Tempelo mpe bandako mosusu oyo Salomo atongaki
[Elilingi na lokasa 30]
Ntango Yehova amonisaki nguya na ye, Bayisalaele balobaki ete: ‘Yehova azali Nzambe ya solo!’