Kondima mpe kobanga Nzambe epesaki bango mpiko
“Zalá makasi mpe yiká mpiko . . . [Yehova] Nzambe na yo azali na yo elongo.”—YOSUA 1:9.
1, 2. (a) Na ndenge ya bomoto, Bayisalaele bakokaki kolonga Bakanana? (b) Elikya nini Yehova apesaki Yosua?
NA MOBU 1473 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Bayisalaele balingaki kokɔta na Mokili ya Ndaka. Mpo na mikakatano oyo ezalaki kozela bango, Moize alobaki na bango boye: “Okokata ngámbo ya Yolodani lelo mpo na koingela mpe kobimisa mabota maleki yo na monene mpe na nguya, mpe mboka minene, mpe ezingami na mapango kino lola, mpe bato ya lokumu mpe minene, bana ya Baanaki, baoyo oyebi bango, mpe baoyo oyoki likambo na bango ete, Nani akoki kotɛlɛma liboso ya bana ya Anaki?” (Deteronome 9:1, 2) Ɛɛ, bingambe wana bakendaki nsango! Lisusu, Bamboka mosusu ya Bakanana ezalaki na basoda oyo bazalaki na bibuneli makasi, bampunda mpe makalo oyo bakangisá makwangola na bapinɛ na yango.—Basambisi 4:13.
2 Nzokande, ekólo Yisalaele bautaki na boombo mpe basalaki mbula 40 na kati ya mokili ekauká. Yango wana, na ndenge ya bomoto, bakokaki kolonga banguna wana te. Kasi, Moize azalaki na kondima; azalaki “komona” azali kotambwisa bango. (Baebele 11:27) Alobaki na Bayisalaele ete: “Ye oyo aleki liboso na yo . . . ezali [Yehova] Nzambe na yo. Ye akoboma bango mpe akobuka bango liboso na yo.” (Deteronome 9:3; Nzembo 33:16, 17) Nsima ya liwa ya Moize, Yehova ayebisaki na Yosua ete akotika ye te na maloba oyo: “Tɛlɛmá mpe katá ngámbo ya Yolodani oyo, yo mpe bato oyo nyonso, kokɔta na mokili oyo ezali ngai kopesa na bango, na bato ya Yisalaele. Moto moko te akokoka kotɛlɛma liboso na yo mikɔlo nyonso ya bomoi na yo. Lokola nazalaki na Moize elongo, boye nakozala na yo elongo.”—Yosua 1:2, 5.
3. Nini esalisaki Yosua mpo azala na kondima mpe na mpiko?
3 Mpo Yehova asunga Yosua mpe atambwisa ye, asengelaki kotánga mpe komanyola Liloba ya Nzambe mpe kosalela yango na bomoi na ye. Yehova alobaki boye: “Bongo okozalisa nzela na yo malamu mpe bongo okozala na makila malamu. Ngai nalakeli yo te? Zalá makasi mpe yiká mpiko. Bangá te mpe zalá na nsɔmɔ te, mpo ete [Yehova] Nzambe na yo azali na yo elongo soki wapi ekokenda yo.” (Yosua 1:8, 9) Lokola Yosua ayokelaki Nzambe, azwaki mpiko, makasi mpe alongaki. Nzokande, bato mingi ya ntango na ye baboyaki koyoka. Yango wana, balongaki te mpe bakufaki na mokili mokauká.
Bazangaki mpiko mpo bazalaki na kondima te
4, 5. (a) Bokeseni nini ezalaki na kati ya mibali zomi oyo bakendaki kotala Mokili ya Ndaka ná Yosua mpe Kalebe? (b) Yehova ayokaki ndenge nini mpo na kozanga kondima na bango?
4 Mbula ntuku minei liboso, ntango Yisalaele bakómaki pene na mokili ya Kanana, Moize atindaki mibali 12 bákende kotala Mokili ya Ndaka, mpe mibali yango bazongaki na kobanga. Balobaki boye: “Bato nyonso oyo emoni biso kuna bazali bato ya nzoto minene. Tomoni mpe bilombe kuna (bana ya Anaki bautaki na bilombe). Biso tomonani na miso na biso lokola mayoyo.” Ezali ya solo ete “bato nyonso” bazalaki bilombe lokola bana ya Anaki? Te. Bana ya Anaki bautaki mpenza na bilombe oyo bazalaki liboso ya Mpela? Te. Kasi, lokola mibali oyo bautaki kuna bayebisaki bango makambo ya lokuta, Bayisalaele batondaki na nsɔmɔ. Bakómaki kutu na mposa ya kozonga na Ezipito, epai bazalaki baombo!—Mituya 13:31–14:4.
5 Nzokande, mibale kati na mibali yango, Yosua ná Kalebe, bazalaki na mposa makasi ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Balobaki boye: Bakanana “bakozala lokola kwanga mpo na biso. Bobateli na bango esili kolongwa na bango mpe [Yehova] azali na biso elongo. Bóbanga bango te.” (Mituya 14:9) Yosua ná Kalebe bazalaki nde matoi mangbongi? Te. Elongo ná ekólo mobimba, bamonaki ndenge Yehova asambwisaki Ezipito ná banzambe na yango na Malɔzi Zomi. Bamonaki mpe ndenge Yehova abomaki Falao ná basoda na ye na Mbu Motane. (Nzembo 136:15) Emonani polele ete mibali zomi wana ná bato oyo bayokelaki ndimelaki bango bazalaki na ntina ya kobanga te. Mpo na komonisa bango ete asepeli te, Yehova alobaki na bango boye: “Bato oyo bakotyola ngai ntango molai boni? Bakoboya kondima ngai ntango molai boni ata nasili kosala bilembo oyo nyonso na kati na bango?”—Mituya 14:11.
6. Boyokani nini ezali na kati ya mpiko mpe kondima, mpe ndenge nini yango ezali komonana lelo oyo?
6 Yehova asosolaki mpenza ete kobanga ya Bayisalaele eutaki na kozanga kondima na bango. Ɛɛ, kondima ezali na boyokani makasi ná mpiko. Yango wana ntoma Yoane akomaki mpo na lisangá ya boklisto mpe etumba ya elimo ete: “Bolongi oyo elongi mokili yango oyo, kondima na biso.” (1 Yoane 5:4) Lelo oyo, kondima lokola oyo ya Yosua ná Kalebe ezali kotinda Batatoli ya Yehova koleka milio motoba, bilenge mpe mikóló, oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ mpe baoyo bazali na bamaladi, básakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba. Monguna moko te alongi kokangisa limpinga yango ya nguya mpe ya mpiko monɔkɔ.—Baloma 8:31.
‘Kozonga nsima’ te
7. ‘Kozonga nsima’ elimboli nini?
7 Basaleli ya Yehova lelo oyo bazali kosakola nsango malamu na mpiko mpenza, mpo bazali na makanisi ndenge moko na ntoma Paulo, oyo akomaki ete: “Biso tozali te motindo ya bato oyo bazongaka nsima mpo na libebi, kasi nde motindo ya bato oyo bazali na kondima mpo na kobatelama ya molimo na bomoi.” (Baebele 10:39) Ndenge ntoma Paulo amonisaki yango, ‘kozonga nsima’ elimboli te kaka kobanga mwa moke, mpamba te basaleli mingi ya sembo ya Nzambe babangaki. (1 Samwele 21:12; 1 Mikonzi 19:1-4) Elimboli nde “kobenda nzoto,” kotika komipesa na solo mpe kolɛmbisa mabɔkɔ na mosala ya Nzambe. Nzokande, bato oyo bazali na kondima makasi balɛmbisaka mabɔkɔ te ntango bakutani na mikakatano, ezala bazali konyokola bango, babɛli to bazali kotungisama na makambo mosusu. Bakobaka nde kokende liboso na mosala ya Yehova, mpo bayebi ete amibanzabanzaka mpenza mpo na bango mpe ayebi esika makoki na bango esuki. (Nzembo 55:22; 103:14) Ozali na kondima ya ndenge wana?
8, 9. (a) Ndenge nini Yehova alendisaki kondima ya baklisto ya ekeke ya liboso. (b) Ndenge nini tokoki kokóma na kondima makasi?
8 Na ntango moko boye, bantoma bamonaki ete kondima na bango ezali moke mpe balobaki na Yesu ete: “Pesá biso kondima mingi koleka.” (Luka 17:5) Bazwaki mpe likabo yango oyo basɛngaki na motema moko, mingimingi na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), ntango elimo santu oyo Yesu alaki bango ekitelaki bayekoli mpe esalisaki bango báyeba malamumalmu Liloba ya Nzambe mpe mokano na ye. (Yoane 14:26; Misala 2:1-4) Lokola kondima ya bayekoli ekómaki makasi, bamipesaki na mosala ya kosakola, mpe atako bazalaki kotɛmɛla bango, bamemaki nsango malamu “na kati ya bozalisi nyonso oyo ezali na nse ya likoló.”—Bakolose 1:23; Misala 1:8; 28:22.
9 Soki biso mpe tolingi kokolisa kondima na biso mpe kokoba kokende liboso na mosala ya kosakola, tosengeli koyekola mpe komanyola na Makomami mpe kobondela mpo na kosɛnga Nzambe apesa biso elimo santu. Lokola Yosua, Kalebe mpe baklisto ya ekeke ya liboso, tokokóma na kondima oyo ekopesa biso mpiko mpo tólɛmba te na etumba na biso ya elimo mpe tólonga kaka soki toyebi Nzambe malamumalamu.
Kondima ya mpamba ekoki te
10. Kondima ya solosolo esɛngaka nini?
10 Ndenge bato ya sembo ya ntango ya kala bamonisi yango, kondima kaka ete Nzambe azali ekoki te mpo na kozwa mpiko mpe makasi. (Yakobo 2:19) Esɛngaka koyeba Yehova malamumalamu mpe kotyela ye mpenza motema. (Nzembo 78:5-8; Masese 3:5, 6) Elimboli kondima na motema mobima ete kotosa mibeko mpe mitinda ya Nzambe ezali na litomba. (Yisaya 48:17, 18) Kondima esɛngaka mpe kozala na elikya makasi ete Yehova akokokisa bilaka na ye nyonso mpe akokóma “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.”—Baebele 11:1, 6; Yisaya 55:11.
11. Mbano nini Yosua ná Kalebe bazwaki mpo na kondima mpe mpiko na bango?
11 Kondima ya ndenge wana etɛlɛmaka esika moko te. Ekolaka soki tozali kosalela solo na bomoi na biso, ‘komeka’ matomba na yango, ‘kososola’ biyano na mabondeli na biso mpe, na makambo mosusu, komona ete Yehova azali kotambwisa biso. (Nzembo 34:8; 1 Yoane 5:14, 15) Ntembe ezali te ete kondima ya Yosua ná Kalebe ekómaki makasi mpo bamonaki bolamu ya Nzambe. (Yosua 23:14) Na ndakisa, babikaki na mobembo ya mpasi oyo basalaki na boumeli ya mbula 40 na mokili mokauká, ndenge Nzambe alakaki bango. (Mituya 14:27-30; 32:11, 12) Bapesaki mabɔkɔ na bitumba oyo Bayisalaele babundaki na boumeli ya mbula motoba mpo na kobotola mokili ya Kanana. Nsukansuka, Yehova apesaki bango bomoi ya esengo mpe nzoto kolɔngɔnɔ, mpe mokomoko na bango azwaki libula. Ya solo mpenza, Yehova apesaka bato oyo basalelaka ye na bosembo mpe na mpiko mbano!—Yosua 14:6, 9-14; 19:49, 50; 24:29.
12. Ndenge nini Yehova ‘akumisaka maloba na ye’?
12 Motema-boboto oyo Yehova amoniselaki Yosua ná Kalebe ezali kokundwela biso maloba ya mokomi ya nzembo oyo: “Okumisi maloba na yo koleka kutu nkombo na yo.” (Nzembo 138:2, NW) Soki Yehova apesi elaka na nkombo na ye, kokokisama na yango ‘ekokumisama’ mpamba te ekokokisama na ndenge oyo ekoleka kutu ndenge tozali kokanisa. (Baefese 3:20) Ɛɛ, Yehova atikaka ata mokolo moko te bato oyo bazali ‘komisepelisa’ na ye.—Nzembo 37:3, 4.
“Asepelisaki mpenza Nzambe”
13, 14. Mpo na nini esengelaki Enoka azala na kondima mpe na mpiko?
13 Ndakisa ya Enoka, moto mosusu oyo azalaki na bomoi liboso Klisto aya, ekoki kosalisa biso tóyeba lisusu makambo mingi na ntina na kondima mpe mpiko. Emonani ete ata liboso Enoka abanda kosakola, ayebaki ete kondima mpe mpiko na ye ekomekama. Ndenge nini ayebaki yango? Mpamba te alobaki na Edene ete bonguna, to koyinana, ekozala na kati ya bato oyo bazali kosalela Nzambe ná baoyo bazali kosalela Satana. (Genese 3:15) Enoka ayebaki mpe ete koyinana yango ebandaki kaka na ebandeli ya mokili, ntango Kaina abomaki ndeko na ye Abele. Kutu, tata na bango Adama aumelaki lisusu mbula 310 nsima ya kobotama ya Enoka.—Genese 5:3-18.
14 Kasi, atako bongo, na mpiko mpenza “Enoka atambolaki na Nzambe elongo” mpe apamelaki “maloba nyonso makasi” oyo bato bazalaki koloba mpo na Yehova. (Genese 5:22; Yuda 14, 15) Emonani polele ete mpiko oyo Enoka amonisaki mpo na losambo ya solo ememelaki ye ebele ya banguna mpe etyaki bomoi na ye na likama. Na mbala wana, Yehova aboyaki mosakoli na ye amona mpasi ya liwa. Yehova ayebisaki Enoka ete “asepelisaki mpenza Nzambe,” mpe ‘atindamaki esika mosusu mpo amona liwa te.’ Yango ekoki kolimbola ete Nzambe asalaki ete asenzwa mpe na ntango yango asukisaki bomoi na ye.—Baebele 11:5, 13; Genese 5:24.
15. Wapi ndakisa malamu oyo Enoka atiká, oyo basaleli ya Yehova ya lelo oyo basengeli kolanda?
15 Ntango Paulo asilisaki kolobela ndenge bomoi ya Enoka esukaki, amonisaki lisusu ntina ya kondima na maloba oyo: “Lisusu, na kozanga kondima likoki ya kosepelisa [Nzambe] mpenza ezali ata moke te.” (Baebele 11:6) Ya solo, kondima epesaki Enoka mpiko ya kotambola elongo na Yehova mpe kosakola bitumbu oyo Nzambe akanaki kopesa bato mabe. Na likambo yango, Enoka atikelá biso ndakisa moko malamu. Lokola Enoka, biso mpe tozali kosakola bitumbu ya Nzambe na mokili oyo ezali mpenza kotɛmɛla losambo ya solo mpe etondi na makambo mabe ya ndenge nyonso.—Nzembo 92:7; Matai 24:14; Emoniseli 12:17.
Kobanga Nzambe epesaki bango mpiko
16, 17. Obadia azalaki nani, mpe akutanaki na mokakatano nini?
16 Longolá kondima, ezali na ezaleli mosusu oyo ekoki kosalisa moto azala na mpiko: kobanga Nzambe. Tózwa ndakisa ya moto moko oyo azalaki kobanga Nzambe na ntango ya mosakoli Eliya mpe Mokonzi Ahaba, oyo azalaki koyangela bokonzi ya nɔrdi ya Yisalaele. Na boyangeli ya Ahaba, losambo ya Baala epalanganaki na bokonzi ya nɔrdi na ndenge moko ya kosakana te. Basakoli 450 ya Baala mpe 400 ya Likonzí mosantu to Asela, oyo ezalaki elilingi ya enama ya mobali, bazalaki ‘kolya na mesa ya Yezabele,’ mwasi ya Ahaba.—1 Mikonzi 16:30-33; 18:19.
17 Yezabele, monguna monene ya Yehova, amekaki kolongola losambo ya solo na Yisalaele. Abomaki basakoli mosusu ya Yehova mpe alukaki kutu koboma Eliya, kasi na lisalisi ya Nzambe, akimaki na ngámbo mosusu ya Ebale Yolodani. (1 Mikonzi 17:1-3; 18:13) Kanisá naino ndenge ezalaki mpasi kozala na losambo ya solo na bokonzi ya nɔrdi na ntango wana! Ezalaki lisusu mpasi koleka mpo na mosambeli ya solo oyo azali kosala na ndako ya mokonzi! Yango nde mokakatano oyo Obadia,a oyo azalaki kosala na ndako ya Ahaba, azalaki na yango.—1 Mikonzi 18:3.
18. Nini emonisaki ete Obadia azali mosambeli ya solosolo ya Nzambe?
18 Na ntembe te, Obadia azalaki kosambela Yehova na bokɛngi mpe na mayele. Kasi, azalaki kosangisa ata moke te losambo ya solo na losambo ya lokuta. Kutu, 1 Mikonzi 18:3 (NW) eyebisi biso ete: “Obadia azalaki mpenza kobanga Nzambe.” Ya solo, Obadia azalaki kobanga Nzambe na ndenge ya lisɛki te! Kobanga Nzambe epesaki ye mpiko, oyo amonisaki ntango Yezabele abomaki basakoli ya Yehova.
19. Obadia asalaki nini, oyo emonisaki mpiko na ye?
19 Biblia elobi boye: “Wana Yezabele abomaki basakoli ya [Yehova], Obadia akamataki basakoli mokama mpe abombaki bango na bibolo ya ntuku mitano, ntuku mitano, kati na lidusu mpe apesaki bango kwanga mpe mai.” (1 Mikonzi 18:4) Na ntembe te, koleisa mibali nkama na kobombama ezalaki mpenza likama. Obadia asengelaki kaka te kokeba ete Ahaba ná Yezabele bámona ye te, kasi asengelaki mpe kokeba na basakoli ya lokuta 850 oyo bazalaki koya na esika wana. Longolá yango, ebele ya basambeli mosusu ya lokuta, oyo bazalaki bato ya ndenge nyonso, bakokaki kofunda Obadia mpo na koluka kosala boninga na mokonzi ná mwasi na ye. Kasi, liboso ya basambeli nyonso wana ya lokuta, Obadia azalaki kopesa basakoli ya Yehova bilei mpe mai. Kobanga Nzambe epesaka mpenza mpiko!
20. Ndenge nini kobanga Nzambe esalisaki Obadia, mpe ndenge nini ndakisa na ye esalisi yo?
20 Na ntembe te, lokola kobanga Nzambe esalisaki Obadia azala na mpiko, Yehova abatelaki ye na mabɔkɔ ya banguna na ye. Masese 29:25 elobi boye: “Kobanga bato ekoyeisa motambo; nde oyo akotalela [Yehova akobatelama, NW].” Obadia azalaki kaka moto lokola biso; azalaki kobanga bákanga ye mpe báboma ye, kaka ndenge biso mpe tokoki kobanga. (1 Mikonzi 18:7-9, 12) Kasi, kobanga Nzambe epesaki ye mpiko mpo abanga bato te. Obadia azali ndakisa malamu mpenza mpo na biso nyonso, mingimingi mpo na basambeli ya Yehova oyo bazali na likama ya kokangama to mpe kobomama. (Matai 24:9) Ya solo, mingi kati na biso bazali kobundana na kosalela Yehova “na ezaleli ya kobanga Nzambe mpe nsɔmɔ.”—Baebele 12:28.
21. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
21 Mpiko eutaka kaka te na kondima mpe kobanga Nzambe; bolingo mpe ekoki kopesa mpiko. Paulo akomaki boye: “Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te, kasi ya nguya mpe ya bolingo mpe ya makanisi malamu.” (2 Timote 1:7) Na lisolo oyo ekolanda, tokomona ndenge bolingo ekoki kosalisa biso tósalela Yehova na mpiko na mikolo mabe oyo ya nsuka.—2 Timote 3:1.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezali te Obadia oyo ya mosakoli.
Okoki kopesa eyano?
• Nini epesaki Yosua ná Kalebe mpiko?
• Kondima ya solosolo esɛngaka nini?
• Mpo na nini Enoka asakolaki bitumbu ya Nzambe na mpiko?
• Ndenge nini kobanga Nzambe ekoki kopesa moto mpiko?
[Elilingi na lokasa 17]
Yehova alobaki na Yosua ete: “Zalá makasi mpe yiká mpiko”
[Elilingi na lokasa 18]
Obadia aleisaki mpe abatelaki basakoli ya Nzambe
[Bililingi na lokasa 19]
Enoka asakolaki Liloba ya Nzambe na mpiko