Mokanda ya Biblia nimero 12—2 Mikonzi
Mokomi: Yilimia
Bisika ya bokomi: Yelusaleme mpe Ezipito
Nsuka ya bokomi: 580 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: soko 920–580 L.T.B.
1. Masoló nini mayebisami kati na mokanda ya Mikonzi ya Mibale, mpe mazali bongo mpo na kolóngisama ya nini?
MOKANDA ya Mikonzi ya Mibale ekóbi na kolobeláká ezaleli ya kilikili oyo emonanaki kati na bikonzi ya Yisalaele mpe ya Yuda. Elisa akamataki elamba ya Eliya mpe apambolamaki na kozwáká ndambo mibale ya elimo ya Eliya, asalaki makamwisi 16, kasi Eliya asalaki bobele makamwisi 8. Eliya akóbaki kosakola libebi likoló na Yisalaele oyo epɛngwaki, epai kuna bobele Yehu nde amonisaki mwa molende mpo na Yehova. Bakonzi ya Yisalaele balandaki komikɔtisa na mabe, mpe nsukansuka, bokonzi ya nɔ́rdi eyaki kobebisama na Asulia na 740 L.T.B. Na bokonzi ya súdi, oyo ya Yuda, mwa ndambo moke ya bakonzi bakesanaki na basusu, mingi mpenza Yosafata, Yoasa, Hizikiya, mpe Yosiya; balongolaki lipɛngwi mpo na mwa ntango moke, kasi na nsuka Nebukadanesala akokisaki bikateli ya Yehova na kobebisáká Yelusaleme, tempelo na yango, mpe mokili ya Yuda na mobu 607 L.T.B. Na yango, bisakweli ya Yehova bikokisamaki mpe liloba na ye lilóngisamaki!
2. Tokoki koloba nini na ntina na mokomi ya mokanda ya Mikonzi ya Mibale mpe kozala na yango kati na kanɔ́ ya Biblia, mpe lisoló na yango eumelaki ntango boni?
2 Lokola na ebandeli mokanda ya Mikonzi ya Mibale ezalaki bobele rulo moko na mokanda ya Mikonzi ya Liboso, makambo nyonso oyo malobamaki mpo na komonisa ete Yilimia nde akomaki mokanda ya Mikonzi ya Liboso mataleli mpe mokanda oyo ya mibale, mpe lotómo na yango ya kozala kati na kanɔ́ ya Biblia, mpe bosolo na yango. Esilaki kokomama soko na mobu 580 L.T.B. mpe lisoló oyo elobelami kati na yango ebandi na eleko ya boyangeli ya mokonzi Ahazia na Yisalaele soko na mobu 920 L.T.B. mpe esuki na mbula ya 37 ya kokangama ya Yoyakini, na 580 L.T.B.—2 Mik. 1:1; 25:27.
3. Biloko nini ya kobenda likebi oyo emonanaki na nzela ya bokundoli ya arkeoloji ezali kondimisa bosolo ya mokanda ya Mikonzi ya Mibale?
3 Bokundoli oyo esalemaki na nzela ya arkeoloji, oyo ezali kondimisa mokanda ya Mikonzi ya Mibale, ezali komonisa bilembeteli mosusu na ntina na bosolo na yango. Na ndakisa, ezali na libanga moko eyebani mingi, oyo ebéngami Libanga ya Moaba, makambo makomami likoló na yango mazali koyebisa ndenge Mesa, mokonzi ya Moaba, alobeli etumba oyo esalemaki kati na Moaba mpe Yisalaele. (2 Mik. 3:4, 5) Ezali mpe na libanga mosusu ya moindo ya mokonzi Moasulia Salamanesele III, ezwami sikawa kati na British Museum, na Londres; libanga yango etángi Yehu mokonzi ya Yisalaele na nkombo na ye mpenza. Ezali na makomi ya mokonzi Moasulia Tigilata-pilɛsɛlɛ III (Pulu), oyo etángi nkombo ya bakonzi mingi ya Yisalaele mpe ya Yuda, bakisá mpe Menaheme, Ahaza, mpe Peka.—2 Mik. 15:19, 20; 16:5-8.a
4. Nini emonisi ete mokanda ya Mikonzi ya Mibale ezali eteni moko kati na Makomami mapemami?
4 Elembeteli ya polele ya bosolo ya mokanda yango emonani na lolenge oyo elobeli na bosembo nyonso kokokisama ya bikateli ya Yehova likoló na libota na ye moko. Kobebisama ya bikonzi ya Yisalaele, mpe ya Yuda, ezali komonisa biso bonene ya bikateli na ye bisakolami, oyo bizwami kati na Deteronome 28:15-28. Kobebisama ya bikonzi wana mibale elimboli “nkanda na [Yehova] epelelaki mokili oyo, mpe ayeisi bilakeli mabe nyonso bikomami na mokanda oyo na likoló na yango.” (Det. 29:27; 2 Mik. 17:18; 25:1, 9-11) Makambo mosusu oyo makomami kati na mokanda ya Mikonzi ya Mibale malimbolami polele kati na mikanda mosusu ya Makomami. Na Luka 4:24-27, nsima wana Yesu alobeli Eliya mpe mwasi mokufeli-mobali ya mboka Salepata, alobi na ntina na Elisa mpe Namana na komonisáká ntina oyo ye moko andimamaki te lokola mosakoli kati na mboka na ye. Na yango, ezala mokanda ya Mikonzi ya Liboso to mpe ya Mibale etalelami ete ezali moko kati na biteni oyo bisali Makomami Mosantu.
MAKAMBO MAZALI KATI NA MIKONZI YA MIBALE
5. Eliya apameli Ahazia mpo na likambo nini, ekateli nini ya mabe asakoli yango?
5 Ahazia, mokonzi ya Yisalaele (2 Mik. 1:1-18). Mokonzi Ahazia, mwana ya Ahaba, akwei kati na ndako na ye mpe azwi maladi. Atindi bamemi-nsango ete bákende kotuna Baala-zebuba, nzambe ya Ekelone, mpo na koyeba soki akobika. Eliya apekisi bamemi-nsango mpe azongisi bango epai na mokonzi mpo na kopamela ye mpamba te atuni Nzambe ya solo te, mpe mpo na koyebisa ye ete, lokola amibaloli te epai na Nzambe ya Yisalaele, akokufa solo. Wana mokonzi atindi kapita moko elongo na mibali 50 ete bákende kokanga Eliya mpe bámema ye epai na ye, Eliya abéngi mɔ́tɔ uta na likoló, mpe ezikisi bango nyɛɛ. Likambo motindo wana ekómeli mpe kapita ya mibale oyo atindami elongo na mibali 50. Atindi lisusu kapita ya misato mpe mibali 50, mpe na mbala oyo Eliya abateli bango na bomoi mpamba te kapita na bango amonisi ezaleli malamu na kobondeláká Eliya na limemya nyonso. Eliya akei elongo na bango kino epai na mokonzi mpe asakoli lisusu etumbu ya liwa epai na mokonzi Ahazia. Bobele lokola Eliya asakolaki yango, mokonzi akufi. Na nsima Yolama, ndeko ya Ahazia, akómi mokonzi na Yisalaele, mpamba te Ahazia azalaki na mwana ya mobali te mpo ete akoka kokamata ebonga na ye.
6. Makambo nini masalemaki na ntango Eliya atikaki Elisa, mpe lolenge nini Elisa amonisaki nokinoki ete “elimo ya Eliya” etikalaki epai na ye?
6 Elisa akitani Eliya (2 Mik. 2:1-25). Ntango ekoki mpo ete Eliya alongolama. Elisa azali bobele elongo na ye kino na mobembo na ye, uta na Gilegale kino na Betele, mpe na Yeliko, na nsuka bakatisi Yordani. Eliya akaboli mai ya Ebale Yordani na kobetáká elamba na ye ya mosala na mai yango. Wana Elisa amoni likalo moko ya etumba lizali kopela mɔ́tɔ mpe mpunda na mɔ́tɔ eyei kotɛlɛma katikati na ye mpe Eliya, amoni Eliya komata kati na mopɛpɛ makasi, Elisa azwi ndambo mibale ya elimo ya Eliya lokola elakelamaki ye. Nokinoki, amonisi ete “elimo ya Eliya” efandi likoló na ye. (2 Mik. 2:15, NW) Alɔkɔti elamba oyo Eliya atikaki, mpe asaleli yango mpo na kokabola lisusu mai. Mpe na bongo apɛtoli mai mabe ya Yeliko. Wana azali kokende na Betele, bana mike ya mibali bazali kotyola ye ete: “Butá, yo moto na libandi! Butá yo moto na libandi!” (2 Mik. 2:23) Elisa abondeli Yehova, mpe ngombolo mibale ya basi ebimi na zámba mpe ebomi bilenge 42 kati na bilenge wana ya kilikili.
7. Mpo na ntina nini Yehova abikisi Yosafata mpe Yolama?
7 Yolama, mokonzi ya Yisalaele (2 Mik. 3:1-27). Mokonzi wana akóbi kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, akangami mpenza na masumu ya Yelobama. Mokonzi na Moaba azalaki liboso kofuta mpako epai na Yisalaele kasi sikawa atomboki, mpe Yolama azwi lisungi ya mokonzi Yosafata ya Yuda mpe ya mokonzi ya Edome mpo ete abundisa Moaba. Wana ezali bango kokenda na etumba, mampinga na bango makómi na etando oyo ezangi mai mpe bomoi na bango ezali mpenza na likámá. Bakonzi wana misato bakei epai na Elisa ete atuna Yehova Nzambe na ye. Mpo na Yosafata moto na sembo, Yehova abikisi bango mpe apesi bango bolóngi likoló na Moaba.
8. Makamwisi mosusu nini Elisa asali?
8 Makamwisi mosusu ya Elisa (2 Mik. 4:1–8:15). Mwasi moko oyo mobali na ye asilá kokufa azalaki moko na bana mibali ya basakoli, asɛngi Elisa lisungi mpo ete bato oyo ye asengeli kofuta bango nyongo balingi kokamata bana na ye mibale ya mibali lokola baombo. Na lolenge ya likamwisi ayikanisi mwa mafuta moke oyo etikalaki kati na ndako ya mwasi yango na ntina ete azwa likoki ya kotekisa yango mpo na kofuta nyongo wana. Mwasi moko ya mboka Suneme andimeli Elisa lokola mosakoli ya Nzambe ya solo, mpe elongo na mobali na ye, balɛngɛli esika ya kolala mpo na ye na ntango akoya na Suneme. Mpo na boboto na ye, Yehova apamboli ye, aboti mwana mobali. Mwa bambula na nsima, mwana yango abɛli mpe akufi. Nokinoki mwasi yango akei koluka Elisa. Elisa akei kino na ndako na ye, mpe na lisalisi ya nguya ya Yehova azongisi mwana yango na bomoi. Wana azongi epai na bana mibali ya basakoli na Gilegale, na lolenge ya likamwisi, Elisa alongoli “kufa ezali kati na mbɛki” na kosaláká ete mbuma ya mabɔkɛ oyo ezali na ngɛngɛ ezala likámá te. Na nsima aleisi mibali monkámá mikate ntuku mibale ya lɔsɔ, mpe “batikaki ndambo.”—2 Mik. 4:40, 44.
9. Likamwisi nini lisalemi na ntina na Namana, mpe na ntina na ebende ya epasola?
9 Namana, mokonzi ya limpinga ya Sulia, azali na maladi ya mbala. Elenge mwasi moko mokangami Moyisalaele ayebisi mwasi ya Namana ete mosakoli moko azali na Samalia, oyo akoki kobikisa mobali na ye. Namana akei epai na Elisa, kasi na esika ete ye moko akende, Elisa atindeli ye maloba ete akende kosukola mbala nsambo kati na Ebale Yordani. Namana asiliki makasi mpo na likambo oyo emonani lokola kozanga limemya. Bibale na Damasɛkɛ bizali malamu te koleka bibale na Yisalaele? Kasi basɛngi na ye ete atosa maloba ya Elisa, andimi kosala bongo mpe abikisami. Elisa aboyi kondima libonza oyo epesameli ye lokola mbano; kasi na nsima Gehazi mosungi na ye akei epai na Namana mpe asɛngi likabo na nkombo ya Elisa. Na bozongi na ye, Gehazi ameki kokosa Elisa, kasi azwi maladi ya mbala. Likamwisi mosusu esalemi wana Elisa asali ete epasola etepatepa likoló na mai.
10. Lolenge nini nguya ya Yehova eleki monene emonisami, mpe lolenge nini Elisa akweisi mwango ya Basulia?
10 Na ntango Elisa akebisi mokonzi ya Yisalaele ete Basulia bayangi mwango mpo na koboma ye, mokonzi ya Sulia atindi limpinga ya basodá ete bákende na mboka Dotana mpo na kokanga Elisa. Komonáká lolenge mboka yango ezingami na basodá ya Sulia, mosungi ya Elisa akómi kobanga. Elisa alendisi ye ete: “Bánga te mpo ete baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na bango!” Na nsima abondeli Yehova ete amonisa mosungi na ye nguya monene oyo ezali elongo na ye. ‘Talá, ngomba etondi na mbalata mpe makalo na mɔ́tɔ oyo ezali kozingela Elisa.’ (2 Mik. 6:16, 17) Na ntango Basulia babandi etumba, mosakoli abondeli lisusu Yehova, mpe Basulia babulunganisami mpe bamemami kino epai na mokonzi ya Yisalaele. Na esika ete bábomama, Elisa ayebisi mokonzi ete aleisa bango mpe azongisa bango na mboka na bango.
11. Lolenge nini bisakweli ya Elisa na ntina na Basulia mpe Bene-hadadi bikokisami?
11 Na nsima, Mokonzi Bene-hadadi ya Sulia azingeli Samalia, mpe nzala monene ekɔti na mboka. Mokonzi ya Yisalaele apameli Elisa mpo na yango, kasi mosakoli asakoli ete na mokolo molandi bilei bikozala mingi. Na butu, Yehova ayokisi Basulia makɛlɛlɛ ya mampinga mosusu ya nguya mingi, na boye ete bakimi, kotikáká bongo bilei na bango nyonso mpo na Bayisalaele. Mwa moke na nsima, Bene-hadadi azwi maladi. Wana ayoki ete Elisa ayei na Damasɛkɛ, atindi Hazaele akende kotuna ye soki akobika. Eyano ya Elisa emonisi ete mokonzi yango akokufa mpe ete Hazaele akokitana na esika na ye. Mpo na kokokisa mpenza likambo yango, Hazaele ye moko abomi mokonzi mpe akamati bokonzi.
12. Yolama mwana na Yosafata amonisi ete azali mokonzi ya lolenge nini?
12 Yolama, mokonzi ya Yuda (2 Mik. 8:16-29). Bobele na ntango oyo, Yolama mwana ya Yosafata azali sikawa mokonzi kati na Yuda. Alandi bobele lokolo ya bakonzi ya Yisalaele, kosaláká mabe na miso ya Yehova. Mwasi na ye ezali bongo Atalia, mwana ya Ahaba, oyo ndeko na ye ya mobali nkombo na ye mpe Yolama, azali mokonzi na Yisalaele. Na ntango mokonzi Yolama ya Yuda akufi, mwana na ye Ahazia akómi mokonzi na Yelusaleme.
13. Kampanye nini ya bopɛtoli Yehu abandi kosala yango na nsima ya kopakolama na ye?
13 Yehu, mokonzi ya Yisalaele (2 Mik. 9:1–10:36). Elisa atindi moko na bana ya basakoli ete apakola Yehu mpo ete akóma mokonzi ya Yisalaele mpe apesa ye etindá ya koboma libota mobimba ya Ahaba. Yehu asali nokinoki. Alandi Yolama, mokonzi ya Yisalaele, wana azali komisalisa na Yizelele mpo na mpota oyo azokaki na etumba. Mosɛnzɛli amoni etuluku monene ya bato bazali koya, na nsima ayebisi na mokonzi ete: “Etambweli ezali lokola yango na Yehu, mwana na Nimisi, zambi azali kotambola mbangumbangu.” (2 Mik. 9:20) Mokonzi Yolama ya Yisalaele mpe mokonzi Ahazia ya Yuda baluki koyeba mikano ya Yehu. Yehu ayanoli na kotunáká ete: “Kimya ekozala wapi naino makambo ya Yezabele, mama na yo mpe kozimbisa na ye mpe izali?” (2 Mik. 9:22) Lokola Yolama alingi kokima, Yehu atɔbɔli ye likɔnga na motema. Nzoto na ye ebwakami na elanga ya Nabota, lokola lifuti na ye mpo na makila ya basembwi oyo Ahaba asopaki. Na nsima Yehu mpe bato na ye balandi Ahazia, babɛti ye mingi na boye ete akufi na Megido. Bakonzi mibale bakufi na boumeli ya kampanye ya liboso ya bopɛtoli oyo Yehu asali.
14. Lolenge nini esakweli ya Eliya na ntina na Yezabele ekokisami?
14 Sikawa ekómi ngala ya Yezabele! Wana Yehu azali kokende na Yizelele nsima ya bolóngi na ye, Yezabele amimonisi na lininisa ya ndako na ye, akembisi elongi na lolenge mpenza ya kolɛngola. Kasi yango elɛngoli Yehu soko moke te. Ayebisi basungi na ye ete: “Bwaká ye na nsé!” Akwei na mabelé, makila na ye mapolisi efelo mpe mpunda oyo ezali konyatanyata ye. Wana bakei mpo na kokunda ye, bakuti bobele motó na ye, makolo na ye, mpe mabɔkɔ na ye. Yango ekokisi bongo esakweli ya Eliya, oyo ete ‘mbwa elei mosuni na Yezabele, ebembe na ye ekómi nyei likoló na elanga na mokili na Yizelele.’—2 Mik. 9:33, 36, 37; 1 Mik. 21:23.
15. Yehu akutani na banani wana ezali ye kokende na Samalia?
15 Na nsima, Yehu apesi etindá ete bana mibali 70 ya Ahaba bábomama, mpe asangisi mitó na bango na ekɔtelo ya Yizelele. Bato nyonso ya Yizelele oyo bazalaki kondima makambo ya Ahaba babomami. Sikawa, ekómi ngala ya mboka-mokonzi ya Yisalaele, Samalia! Na nzela, akutani na bandeko mibali 42 ya Ahazia, bazali kokende na Yizelele, bayebi te likambo nini liuti kosalema. Bakangami mpe babomami. Kasi talá, bokutani mosusu oyo ekeseni. Yonadaba mwana na Lekaba ayei kokutana na Yehu. Yehu atuni ye ete: “Motema na yo ezali malamu lokola motema na ngai ezali esika moko na motema na yo?” Yonababa ayanoli ete: “Ezali bongo.” Na nsima Yehu amemi ye kati na likalo na ye mpo ete amona na miso na ye moko ete Yehu ‘atikaka nzela te na bombanda mpo na Yehova.’—2 Mik. 10:15, 16.
16. Lolenge nini Yehu abebisaki nyɛɛ ndako ya Ahaba mpe Baala?
16 Na ntango bakómi na Samalia, Yehu abebisi nyɛɛ biloko nyonso oyo Ahaba atikaki kati na ndako na ye, engebene liloba oyo Yehova ayebisaki na Eliya. (1 Mik. 21:21, 22) Nzokande, ezali boni mpo na losambo ya mbindo ya Baala? Yehu alobi ete: “Ahaba akumisaki Baala mwa nde Yehu akokumisa ye mingi.” (2 Mik. 10:18) Ayanganisi basambeli nyonso ya bademó kati na ndako ya Baala, alatisi bango bilamba ya komikesenisa mpe asali na boye ete mosambeli moko te ya Yehova azala kati na bango. Na nsima atindi bato na ye báboma bango, bátika ata moto moko te ete akima. Ndako ya Baala ebebisami, mpe esika yango ekómi kabiné, etikali bongo kino na eleko ya Yilimia. ‘Boye, Yehu alongoli Baala na kati na Yisalaele.’—2 Mik. 10:28.
17. Likambo nini Yehu azangi kosala yango, mpe lolenge nini Yehova abandi koyeisa etumbu likoló na Yisalaele?
17 Nzokande ata Yehu mpe, ye moto na molende, ayei kokwea. Mpo na nini? Mpamba te atiki te kosalela bana na ngɔmbɛ ya wolo oyo Yelobama atɛlɛmisaki na Betele mpe na Dani. “Atosaki te ete abila Mobeko na [Yehova], Nzambe na Yisalaele na motema mobimba na ye.” (2 Mik. 10:31) Kasi mpo na likambo oyo asalaki likoló na ndako ya Ahaba, Yehova alaki ete bana na ye bakozala bakonzi na Yisalaele kino na molɔngɔ́ ya minei. Na eleko na ye, Yehova abandi kobɔtɔla mabelé ya bokonzi ya Yisalaele na ɛ́sti, kotɛlɛmisáká Hazaele Mosulia ete abundisa Yisalaele. Nsima ya koyangela na boumeli ya mbula 28, Yehu akufi mpe mwana na ye Yoahaza akitanaki ye.
18. Lolenge nini mwango mabe ya Atalia kati na Yuda ekweisami, mpe likambo nini ya kobenda likebi emonani kati na boyangeli ya Yoasa?
18 Yoasa, mokonzi ya Yuda (2 Mik. 11:1–12:21). Mama-mokonzi, Atalia, azali mwana ya Yezabele na elimo mpe na mosuni. Wana ayoki nsango ya liwa ya mwana na ye Ahazia, apesi etindá ete basangani nyonso ya libota ya mokonzi bábomama mpe abɔtɔli bokonzi. Bobele Yoasa mwana mobali ya moke mpenza ya Ahazia abiki mpamba te babombaki ye. Na mbula ya nsambo ya boyangeli ya Atalia, nganga Yoyada apakoli Yoasa lokola mokonzi mpe abomisi Atalia. Yoyada akambi bato na losambo ya Yehova, alakisi elenge mokonzi yango mikumba na ye liboso na Nzambe, mpe akamati bibongiseli mpo ete ndako ya Yehova ebongisama. Na nzela ya makabo, Yoasa alóngi Hazaele, mokonzi ya Sulia oyo alingi kobundisa ye. Nsima ya koyangela na Yisalaele na boumeli ya mbula 40, Yoasa abomami na basaleli na ye, mpe mwana na ye Amazia abandi koyangela na esika na ye.
19. (a) Losambo nini ya lokuta ekóbi na boumeli ya bikonzi ya Yoahaza mpe ya Yoasa na Yisalaele? (b) Lolenge nini Elisa asukisi mosala na ye lokola mosakoli ya Yehova?
19 Yoahaza mpe Yoasa, bakonzi ya Yisalaele (2 Mik. 13:1-25). Yoahaza mwana na Yehu akóbi na losambo ya bikeko, mpe Yisalaele ezwami na nsé ya bokonzi ya Sulia, kasi Yoahaza alongolami na kiti ya bokonzi te. Na nsima, Yehova asikoli Bayisalaele, kasi batiki te kosambela ekeko ya mwana ngɔmbɛ ya wolo ya Yelobama. Na nsima ya liwa ya Yoahaza, mwana na ye Yoasa akitani ye lokola mokonzi na Yisalaele, bobele na ntango yango Yoasa mosusu azali koyangela na Yuda. Yoasa ya Yisalaele akóbi na losambo ya bikeko ya tata na ye. Na nsima ya liwa na ye, mwana na ye Yelobama akómi mokonzi. Ezali bongo na eleko ya boyangeli ya Yoasa nde Elisa azwi maladi mpe akufi, nsima ya koyebisa esakweli na ye ya nsuka ete Yoasa akobebisa Sulia mbala misato, esakweli yango ekokisami mpe solo. Likamwisi ya nsuka ya Elisa esalemi na nsima ya liwa na ye ntango babwaki ebembe ya mobali moko kati na esika Elisa akundamaki, na mbala moko mobali yango asekwi na ntango atutani na mikuwa ya Elisa.
20. Lobela boyangeli ya Amasia na Yuda.
20 Amasia, mokonzi ya Yuda (2 Mik. 14:1-22). Amasia azali kosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova, kasi abuki te bisika na likoló oyo bizalaki kosalelama mpo na losambo ya lokuta. Yoasa mokonzi na Yisalaele alóngi ye na etumba. Nsima ya koyangela na boumeli ya mbula 29, basaleli ye mwango mabe mpe babomi ye. Mwana na ye Azalia akitani na bokonzi.
21. Makambo nini masalemi na boumeli ya boyangeli ya Yelobama II na Yisalaele?
21 Yelobama II, mokonzi na Yisalaele (2 Mik. 14:23-29). Yelobama ya mibale, oyo akómi mokonzi na Yisalaele, akóbi na losambo ya lokuta ya batata na ye. Ayangeli na Samalia na boumeli ya mbula 41 mpe alóngi kobɔtɔla lisusu biteni ya mabelé oyo Yisalaele ebungisaki. Mwana na ye Zekalia akitani ye na bokonzi.
22. Makambo nini mayebisami na ntina na boyangeli ya Azalia na Yuda?
22 Azalia (Uziya), mokonzi ya Yuda (2 Mik. 15:1-7). Azalia ayangeli na boumeli ya mbula 52. Azali sembo na miso ya Yehova kasi abuki te bisika na likoló. Na nsima, Yehova apesi ye etumbu ya maladi ya mbala, mpe mwana na ye Yotama abandi kokokisa mikumba ya bokonzi, akómi mokonzi na nsima ya liwa ya Azalia.
23. Makambo nini ya mabe mazali kosalema kati na Yisalaele wana Baasulia bazali kokanela yango?
23 Zekalia, Salumu, Maneheme, Pekahia, mpe Peka, bakonzi ya Yisalaele (2 Mik. 15:8-31). Engebene elaka ya Yehova, bobele bana ya Yehu nde bazali kokóma bakonzi na Yisalaele kino na molɔngɔ́ ya minei, Zekalia. (2 Mik. 10:30) Na yango, akómi mokonzi na Samalia, kasi sanza motoba na nsima, abomami. Salumu, oyo abɔtɔli bokonzi, aumeli na yango bobele sanza moko. Losambo ya lokuta, koboma, mpe myango mabe ekóbi kobebisa Yisalaele wana bakonzi Menaheme, Pekahia, mpe Peka bazwi bokonzi. Na boumeli ya boyangeli ya Peka, Baasulia bazali komilɛngɛla mpo na kobundisa Yisalaele. Hosea abomi Peka, mpe akómaki mokonzi ya nsuka ya Yisalaele.
24. Na nsima ya Yotama, lolenge nini Ahaza moto na Yuda asali lisumu na ntina na losambo?
24 Yotama mpe Ahaza, bakonzi ya Yuda (2 Mik. 15:32–16:20). Yotama azali kosalela losambo ya pɛto kasi atiki bisika na likoló ete bikóba kozala. Mwana na ye Ahaza amekoli bakonzi ya mboka ya zingazinga ya Yisalaele na kosaláká oyo ezali mabe na miso ya Yehova. Wana bakonzi ya Yisalaele mpe ya Sulia bayei kobundisa ye, asɛngi lisungi epai na mokonzi ya Asulia. Baasulia bayei kosunga ye, babɔtɔli Damaseke, mpe Ahaza akei kuna mpo na kokutana na mokonzi ya Asulia. Na esika yango, Ahaza amoni etumbelo ya losambo, atindi ete etumbelo motindo wana etongama mpe na Yelusaleme, mpe abandi kotumba mbeka likoló na yango na esika ya kosalela etumbelo ya motako oyo ezwami kati na tempelo ya Yehova. Mwana na ye Hizikiya akitani ye na bokonzi na Yuda.
25. Lolenge nini Yisalaele ekei na boombo, mpe mpo na nini?
25 Hosea, mokonzi ya nsuka ya Yisalaele (2 Mik. 17:1-41). Sikawa Yisalaele ekómi na nsé ya boyangeli ya Asulia. Hosea atomboki mpe asɛngi lisungi ya Ezipito, kasi na mbula ya libwa ya bokonzi na ye, Asulia elóngi Yisalaele na etumba mpe bamemami na boombo. Awa nde bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele esuki. Mpo na nini? “Bana na Yisalaele basili kosalela [Yehova] Nzambe na bango masumu . . . Basalelaki bikeko oyo Nzambe asili kolakisa bango ete, Bokosala likambo oyo te. Boye [Yehova] ayokelaki Yisalaele nkanda mingi mpe alongolaki bango na miso na ye.” (2 Mik. 17:7, 12, 18) Baasulia babyangi bato na ɛ́sti ete báya kofanda na mboka yango, mpe bato yango bakómi ‘kobanga Yehova,’ atako bakóbi bobele kosambela banzambe na bango.—2 Mik. 17:33.
26, 27. (a) Lolenge nini mokonzi Hizikiya ya Yuda asali oyo ezali sembo na miso ya Yehova? (b) Lolenge nini Yehova ayanoli na libondeli ya Hizikiya na kozongisáká Baasulia na mboka na bango? (c) Esakweli ya Yisaya ezali na kokokisama nini mosusu?
26 Hizikiya, mokonzi ya Yuda (2 Mik. 18:1–20:21). Hizikiya azali kosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova, na kolandáká nyonso oyo nkɔ́kɔ na ye Davidi asalaki. Alongoli losambo ya lokuta mpe abukibuki bisika na likoló, mpe lokola bato bakómi kosambela nyoka ya motako oyo Mose asalaki, abuki mpe yango. Sikawa Senakeliba mokonzi ya Asulia abebisi Yuda mpe abotoli bingumba mingi ya makasi. Hizikiya aluki kosomba yango na mosolo mingi, kasi Senakeliba atindi Laba-sake momemi-nsango na ye, moto yango ayei na lopango ya Yelusaleme mpe asɛngi na bato na engumba ete bámitika bango moko na mabɔkɔ ya Asulia mpe atyoli Yehova wana bato nyonso bazali koyoka ye. Mosakoli Yisaya alendisi Hizikiya na kosakoláká libebi likoló na Senakeliba. ‘[Yehova] alobi ete, Bangá te.’ (2 Mik. 19:6) Wana Senakeliba akóbi koyeisa makaneli, Hizikiya alɔmbi Yehova ete: “Boye sasaipi, ɛ [Yehova] Nzambe na biso, nabondeli yo ete obikisa biso kati na lobɔkɔ na ye ete makonzi nyonso na mokili báyeba ete yo ozali [Yehova] Nzambe, bobele yo moko.”—2 Mik. 19:19.
27 Yehova ayanoli na libondeli oyo esalemi na motema moko mpenza? Ya liboso, na nzela ya Yisaya, ayebisi ete “mposa na [Yehova]” ekokweisa banguna. (2 Mik. 19:31) Na nsima, bobele na butu yango, atindi anzelu na ye ete aboma basodá 185 000 ya Baasulia. Na ntɔ́ngɔ́, bango nyonso ‘bakómi bibembe.’ (2 Mik. 19:35) Senakeliba alóngami mpe akei kofanda na Ninive. Mpo na mbala oyo lisusu, Nisilɔkɔ nzambe na ye asali eloko moko te mpo na ye, mpamba te bana na ye moko ya mibali babomi ye wana ezalaki ye kosambela; yango ekokisi esakweli ya Yisaya.—2 Mik. 19:7, 37.
28. Hizikiya ayebani mingi mpo na likambo nini, kasi asali libungá na likambo nini?
28 Hizikiya azwi maladi makasi, kasi na mbala oyo lisusu Yehova ayoki libondeli na ye mpe ayeisi bomoi na ye molai na kobakiseláká ye mibu 15. Mokonzi ya Babilone atindeli ye bamemi-nsango elongo na makabo, mpe Hizikiya amonisi elimo ya lolendo na kolakisáká bango biloko na ye nyonso ya motuya kati na ndako. Na bongo Yisaya asakoli ete mokolo mosusu biloko nyonso ya ndako na ye bikomemama na Babilone. Na nsima Hizikiya akufi, ayebanaki mingi mpo na nguya na ye mpe mpo na talase oyo atongaki mpo na kokɔtisa mai na kati ya engumba ya Yelusaleme.
29. Losambo nini ya bikeko Manase abandisi yango, mpe mawa monene nini Yehova asakoli, mpe lisumu nini mosusu Manase asali?
29 Manase, Amona, mpe Yosiya, bakonzi ya Yuda (2 Mik. 21:1–23:30). Manase akitani tata na ye Hizikiya, mpe ayangeli na boumeli ya mbula 55, kosaláká mabe mingi mpenza na miso ya Yehova. Atongi lisusu bisika na likoló mpo na losambo ya lokuta, atɛlɛmisi bitumbelo mpo na Baala, asali likonzi ya bulɛɛ lokola Ahaba asalaki yango, mpe akómisi ndako ya Yehova esika ya losambo ya bikeko. Yehova asakoli ete akoyeisa libebi monene likoló na Yelusaleme lokola asili kosala yango mpo na Samalia, “akokɔmba epai moko mpe akobongola yango.” Manase mpe asopaki makila ‘mingi mpenza’ ya bato basali likambo te. (2 Mik. 21:13, 16) Mwana na ye Amona akitani ye, ye mpe akóbi na kosaláká mabe na boumeli ya mbula mibale, kino na ntango oyo babomi babomaki ye.
30. Mpo na nini mpe lolenge nini Yosiya azongi epai na Yehova na motema na ye mobimba?
30 Sikawa baponi Yosiya mwana ya Amona lokola mokonzi. Na boumeli ya boyangeli na ye ya mbula 31, abateli Yuda mpo na mwa ntango moke ete ekenda na libebi te ‘na kotamboláká na nzela nyonso ya Davidi, tata na ye.’ (2 Mik. 22:2) Abandi mosala ya kobongisa lisusu ndako ya Yehova, mpe kuna nganga monene amoni búku ya Mibeko. Yango endimisi ete libebi likokwela libota mpo na ezaleli na yango ya kozanga botosi epai na Yehova, kasi Yosiya andimisami ete lokola azali sembo, likambo yango ya mawa ekosalema na eleko na ye te. Apɛtoli ndako ya Yehova mpe mboka mobimba na kolongoláká losambo ya bademó mpe akóbi mosala na ye ya kolongola losambo ya bikeko kino na Betele, epai kuna abukibuki etumbelo ya Yelobama, kokokisáká bongo esakweli oyo ezwami kati na 1 Mikonzi 13:1, 2. Azongisi lisusu Elekeli mpo na Yehova. “Mokonzi mosusu liboso na ye azalaki lokola ye te, ye oyo abongwanaki na [Yehova] na motema na ye mobimba mpe na molimo na ye mobimba mpe na nguya na ye mobimba, kobila Mobeko mobimba na Mose.” (2 Mik. 23:25) Nzokande, nkanda ya Yehova ezali naino kopela mpo na mabe ya Manase. Yosiya akufi wana azalaki kokende kobundisa mokonzi ya Ezipito na Megido.
31. Lolenge nini Yuda ekweaki lisusu na nsima ya liwa ya Yosiya?
31 Yoahaza, Yoyakimi, mpe Yoyakini, bakonzi ya Yuda (2 Mik. 23:31–24:17). Nsima ya koyangela na boumeli ya sanza misato, Yoahaza mwana na Yosiya amemami na boombo na mokonzi ya Ezipito, mpe Eliakimi ndeko na ye ya mobali, ye oyo nkombo na ye ebongwani ete Yoyakimi, atyami na kiti ya bokonzi. Alandi nzela mabe ya batata na ye mpe akómi na nsé ya bokonzi ya Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone, kasi atombokeli ye na nsima ya mbula misato. Na nsima ya liwa ya Yoyakimi, mwana na ye Yoyakini abandi koyangela. Nebukadanesala azingeli Yelusaleme, abɔtɔli yango, mpe amemi biloko ya motuya ya ndako ya Yehova na Babilone, “pelamoko elobaki [Yehova]” na nzela ya Yisaya. (2 Mik. 24:13; 20:17) Yoyakini mpe ebele ya bato na ye bamemami na boombo na Babilone.
32. Makambo nini ya mpasi mabimi liboso ya kobebisama ya Yelusaleme mpe ya mboka mobimba?
32 Sidikiya, mokonzi ya nsuka ya Yuda (2 Mik. 24:18–25:30). Nebukadanesala akómisi Matania, nɔkɔ ya Yoyakini, mokonzi mpe abongoli nkombo na ye ete Sidikiya. Ayangeli na boumeli ya mbula 11 na Yelusaleme mpe akóbi kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova. Atombokeli Babilone, yango wana na mbula ya libwa ya boyangeli ya Sidikiya, Nebukadanesala mpe basodá na ye nyonso bayei mpe bazingeli lopango mobimba ya Yelusaleme. Na nsima ya sanza 18 nzala ekɔti na mboka yango. Batɔbɔli lidusu na bifelo ya lopango, mpe Sidikiya akangami wana azali koluka kokima. Bana na ye ya mibali babomami na miso na ye, mpe batɔbɔli ye miso. Na sanza elandi, ndako minene nyonso ya engumba, bakisá mpe ndako ya Yehova mpe ndako ya mokonzi, etumbami mpe lopango ya engumba ebebisami. Mingi na baoyo batikalaki na bomoi bamemamaki na boombo na Babilone. Gedalia aponami lokola guvernɛrɛ likoló na etuluku moke ya bato oyo batikali na mboka ya pembeni ya Yuda. Nzokande, abomami, mpe bato yango bakimi na Ezipito. Na yango, kobanda na sanza ya nsambo ya mobu 607 L.T.B., mboka etikali mpamba. Maloba ya nsuka ya mokanda ya Mikonzi ya Mibale ezali koyebisa na ntina na ngɔlu oyo mokonzi ya Babilone amoniselaki Yoyakini na mbula ya 37 ya bokangami na ye.
LITOMBA NA YANGO
33. Ndakisa malamu nini tosengeli kolanda kati na mokanda ya Mikonzi ya Mibale?
33 Atako mokanda ya Mikonzi ya Mibale ezali kolobela kokwea monene ya bikonzi ya Yisalaele mpe ya Yuda, kasi ezali mpe kolobela ndakisa mingi ya bato oyo Yehova apambolaki mpo ete bamonisaki bolingo epai na ye mpe epai na mitindá na ye ya sembo. Lokola mwasi mokufeli-mobali ya mboka Salepata, mwasi ya mboka Suneme azwaki mpe mapamboli mingi mpo na ezaleli na ye ya boyambi bapaya oyo amoniselaki mosakoli ya Nzambe. (2 Mik. 4:8-17, 32-37) Likoki oyo Yehova azali na yango ya kokokisa ntango nyonso mposa ya bato na ye emonisamaki na ntango Elisa aleisaki mibali monkámá na mikate 20; lokola likamwisi oyo Yesu ayaki kosala yango bikeke mingi na nsima. (2 Mik. 4:42-44; Mat. 14:16-21; Mko. 8:1-9) Talá lolenge oyo Yonadaba azwaki lipamboli na kobyangamáká ete abuta na likalo ya Yehu mpo na komona lolenge basambeli ya Baala bakobebisama. Mpo na nini bongo? Mpamba te, asalaki likambo moko malamu na kobimáká mpo na koya kopesa Yehu losako, mobali na molende. (2 Mik. 10:15, 16) Na nsuka, ezali na ndakisa kitoko ya Hizikiya mpe ya Yosiya, mpo na ezaleli na bango ya komikitisa mpe botosi mozindo na bango ya nkombo ya Yehova mpe ya Mibeko na ye. (2 Mik. 19:14-19; 22:11-13) Wana ezali ndakisa kitoko oyo biso tosengeli kolanda.
34. Liteya nini tokoki kozwa kati na mokanda ya Mikonzi ya Mibale na ntina na limemya oyo esengeli kopesama epai na bamonisi ya Nzambe mpe na ntina na nyongo ya makila?
34 Yehova atikaka nzela te ete bato bázanga komonisa botosi epai na bamonisi na ye. Wana bana ya kilikili batyolaki Elisa mosakoli ya Nzambe, nokinoki Yehova apesaki bango lifuti oyo ebongaki na bango. (2 Mik. 2:23, 24) Lisusu, Yehova amemyaka makila ya baoyo basali likambo te. Akweisaki ekateli monene na ndako ya Ahaba, te bobele mpo ete losambo ya Baala ezalaki kosalema kuna, kasi lisusu mpo ete makila mazalaki kosopama kuna. Na yango, Yehu apakolamaki mpo ete abekola ‘epai na Yezabele makila na baombo nyonso na [Yehova].’ Wana bikateli bikweaki likoló na Yolama, Yehu amikundolaki maloba oyo Yehova alobaki, ete ezalaki bongo mpo na “makila na Nabota mpe makila na bana na ye.” (2 Mik. 9:7, 26) Bobele bongo, ezalaki mpo na nyongo ya makila oyo etángamaki na motó ya Manase nde Yuda ebebisamaki. Longola losambo ya lokuta, Manase ‘atondisaki Yelusaleme na makila longwa epai moko kino epai mosusu.’ Atako na nsima Manase abongwanaki na kotikáká nzela na ye ya mabe, kasi nyongo ya makila elongwaki te. (2 Nta. 33:12, 13) Ata boyangeli malamu ya Yosiya, mpe bolóngi na ye likoló na losambo ya lokuta, ekokaki te kosilisa nyongo ya makila oyo etángamaki likoló na mboka mobimba na boumeli ya boyangeli ya Manase. Mbula mingi na nsima, wana Yehova abandaki kopusa bakokisi ya bikateli na ye ete bátɛmɛla Yelusaleme, alobaki ete ezalaki mpo ete Manase “atondisaki Yelusaleme na makila na mpamba, [Yehova] ayebaki kolimbisa yango te.” (2 Mik. 21:16; 24:4) Bobele bongo, Yesu alobaki ete Yelusaleme ya ekeke ya liboso T.B. esengelaki kobebisama mpamba te banganga na yango bazalaki bana ya baoyo basopaki makila ya basakoli, ‘makila nyonso ya bayengebene mákwela bango, oyo esopanaki na mokili.’ (Mat. 23:29-36) Nzambe akebisi bato na mokili ete akobukanisa makila masopami ya basembwi, mingi mpenza makila “na bango basili kobomama mpo na Liloba ya Nzambe.”—Emon. 6:9, 10.
35. (a) Nini emonisi ete Eliya, Elisa mpe Yisaya bazalaki mpenza basakoli ya solo? (b) Na oyo etali Eliya, Petelo alobi nini na ntina na esakweli?
35 Bosikisiki makasi ya lolenge oyo Yehova akokisaka bikateli na ye biyebisami na nzela ya bisakweli emonani mpe kati na mokanda ya Mikonzi ya Mibale. Ezali kobenda likebi na biso likoló na basakoli minene misato: Eliya, Elisa, mpe Yisaya. Bisakweli oyo mokomoko na bango asakolaki bikokisami na lolenge ya kokamwa. (2 Mik. 9:36, 37; 10:10, 17; 3:14, 18, 24; 13:18, 19, 25; 19:20, 32-36; 20:16, 17; 24:13) Kobongwana oyo Yesu abongwanaki likoló na ngomba emonisi biso ete Eliya azalaki mosakoli ya solo mpenza, amonanaki elongo na Mose mpe na Mosakoli Monene, Yesu Klisto. (Mat. 17:1-5) Kolobáká na ntina na libaku wana ya nkembo, Petelo ayebisaki ete: “Tozali kolendisa liloba lisakolami na makasi na koleka. Bokosala malamu kotya mitema na yango, lokola na mwinda oyo ezali kopela na esika na molili mabe, kino ekotana ntɔ́ngɔ́ mpe mɔ́tɔ [“monzoto,” NW] na ntɔ́ngɔ́ ekobima na mitema na bino.”—2 Pet. 1:19.
36. Mpo na nini Yehova amonisi motema mawa epai na bato na ye, mpe lolenge nini yango ezali koyeisa makasi elikya na biso na ntina na Bokonzi ya Mombóto?
36 Makambo oyo mayebisami kati na mokanda ya Mikonzi ya Mibale mamonisi polele ete ekateli ya Yehova likoló na baoyo nyonso bamipesi na losambo ya lokuta mpe baoyo basopaka na nkó nyonso makila ya bato basali likambo te ezali ete akobebisa bango nyɛɛ. Nzokande, Yehova amonisaki ngɔlu epai na bato na ye “mpo na kondimana na ye na Abalayama mpe na Yisaka mpe na Yakobo.” (2 Mik. 13:23) Abatelaki bango “mpo na Davidi moombo na ye.” (2 Mik. 8:19) Akomonisa motema mawa motindo wana epai na baoyo bazali kobaluka epai na ye na mikolo na biso. Wana ezali biso kotalela masoló mpe bilaka oyo bizwami kati na Biblia, bizali koyeisa makasi bilikya na biso na ntina na Bokonzi ya “mwana na Davidi,” Yesu Klisto, Mombóto molakami, oyo kati na yango kosopa makila mpe mabe ekozala lisusu te!—Mat. 1:1; Yis. 2:4; Nz. 145:20.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 152, 325; Vol. 2, nkasa 908, 1101.