“Bapesami”: ebongiseli ya Jéhovah
“Bapaya bakotɛlɛma mpo na koleisa bitonga na bino.”—YISAYA 61:5, MN.
1. Mpo na nini likambo ya kopesa “makabo” lizali kopusa biso na kokanisa na ntina na Jéhovah?
NZAMBE akopesaka na bokabi nyonso. Ntóma Paulo alobaki ete: “[Jéhovah] akopesaka bomoi epai na bato nyonso, mpema na biloko nyonso.” (Misala 17:25, MN) Ekoki kozala litomba mpo na biso na kokanisa likoló na ebele na ‘makabo nyonso kitoko mpe yango nyonso na malamu’ oyo tozali kozwa epai na Nzambe.—Yakobo 1:5, 17, MN; Nzembo 29:11; Matai 7:7; 10:19; 13:12; 21:43.
2, 3. (a) Makabo na Nzambe masengeli kozala na bopusi nini likoló na biso? (b) Na ndimbola nini Balevi bazalaki “bapesami”?
2 Mokomi na nzembo amitunaki na sembo nyonso mpo na oyo akokaki kozongisela Jéhovah. (Nzembo 116:12) Mozalisi na biso azali mpenza na mposa ya eloko moko te oyo bato bakoki kozala na yango to kopesa ye. (Nzembo 50:10, 12) Kasi, Jéhovah amonisaki ete azali kosepela komona bato na botɔndi kopesa bomoi na bango moko na losambo ya solo. (Tala Baebele 10:5-7.) Bato nyonso basengeli kopesa bomoi na bango epai na Mozalisi na bango, ye oyo akoki kopesa, bango mikumba mosusu, lokola Balevi ya kala. Bayisraele nyonso bamipesaki epai na Nzambe; atako bongo, aponaki bobele basangani na libota ya Alona Molevi, lokola banganga mpo na kopesa mbeka na tabernakle mpe nsima, na tempelo. Boni mpo na Balevi mosusu?
3 Jéhovah alobaki na Moize ete: “Bɛlɛmisa libota ya Levi . . . Bakobatela bisaleli nyonso ya hema na koyangana . . . Okopesa Balevi epai na Alona mpe bana mibali na ye. Bazali bapesami [na Liebele nethunim’] epai na ye, kati na bana na Yisraele.” (Mituya 3:6, 8, 9, 41) Balevi “bapesamaki” epai na Alona mpo na kokokisa misala ndenge na ndenge kati na tabernakle; tala ntina oyo Nzambe alobaki ete: “Bazalaki bapesami epai na ngai, kati na bana na Yisraele.” (Mituya 8:16, 19; 18:6) Balevi mosusu bazalaki kokokisa misala mike; basusu bazwaki mikumba minene, lokola kolakisa mibeko na Nzambe. (Mituya 1:50, 51; 1 Ntango 6:48; 23:3, 4, 24-32; 2 Ntango 35:3-5) Totalela sikawa libota mosusu ya “bapesami” mpe kokokana na yango na ntango na biso.
Bayisraele bauti longwa na Babilone
4, 5. (a) Bayisraele nini bautaki na boombo longwa na Babilone? (b) Na eleko na biso, likambo nini likokani na bozongi ya Bayisraele longwa na boombo?
4 Esdrase mpe Nehemia bayebisi lolenge oyo batikali na Bayisraele oyo batambwisamaki na guvernere Yolobabele, bautaki na boombo na bango longwa na Babilone, mpo na kozongisa losambo ya solo. Masoló nyonso mibale mayebisi sikisiki ete bazalaki bato 42 360. Mingi kati na bango ezalaki “bato ya libota na Yisraele.” Masoló yango mazali lisusu kotanga banganga. Soko Balevi 350 batangami mpe na nsima, bayembi mpe bakɛngɛli na bikuke bazalaki kati na bango. Esdrase mpe Nehemia balobeli mpe ebele na bato mosusu oyo bakokaki kozala Bayisraele, mbala mosusu banganga nde bankoko na bango bayebanaki te.—Esdrase 1:1, 2; 2:2-42, 59-64; Nehemia 7:7-45, 61-66.
5 Batikali oyo na Bayisraele baoyo bamemamaki na boombo, nde nsima bazongaki na Yelusaleme mpe na Yuda, bamonisaki bokangami makasi mpe ya mozindo epai na Nzambe mpe na losambo ya solo. Lokola tolobaki yango, tozali komona kokokana malamu na eleko na biso epai na batikali na Yisraele ya elimo, baoyo babimaki na boombo ya Babilone Monene, na 1919.
6. Lolenge nini Nzambe azali kosalela Bayisraele ya elimo na eleko na biso?
6 Uta kosikolama na bango, na 1919, batikali na bandeko na Klisto bakendaki liboso kati na losambo ya solo, na molende nyonso. Jéhovah apambolaki milende oyo basalaki mpo na koyanganisa basangani ya nsuka kati na baklisto 144 000 oyo basali “Yisraele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16; Emoniseli 7:3, 4) Batikali bapakolami nyonso basali kelasi ya “moombo na sembo mpe na mayele” oyo esalelami mpo na kopesa ebele na bilei ya elimo oyo bikopesa bomoi, mpe bazali kosala na molende nyonso mpo na kokabola bilei yango na mokili mobimba.—Matai 24:45-47.
7. Banani basangani na bapakolami kati na losambo ya solo?
7 Lokola lisoló ya liboso emonisaki yango, libota ya Jéhovah lizali sikawa na bamilió mingi na “bampate mosusu,” baoyo Nzambe asili kopesa bango elikya ya kokatisa bolózi monene oyo ebɛlɛmi. Bampate wana bazali na mposa ya kosalela Jéhovah libela na libela awa na mabelé epai bakozala lisusu na nzala te, na mposa na mai te, mpe epai mpisoli ya mawa ekokita lisusu te. (Yoane 10:16; Emoniseli 7:9-17; 21:3-5) Mpo na bato wana, tozali nde na likambo likokani kati na lisoló ya Bayuda oyo bautaki Babilone? Ee!
Bato oyo bazali Bayisraele te bazongi lokola
8. Banani bazalaki elongo na Bayisraele na ntango bautaki na Babilone?
8 Na ntango libyangi lipesamaki epai na baoyo balingaki Jéhovah na mboka Babilone mpo ete bazonga na Mokili na ndaká, ebele na bato oyo bazalaki Bayisraele te bayanolaki na libyangi yango. Kati na bato oyo batangami na Esdrase mpe Nehemia, tozali komona ete ezalaki na ba “Banetinime” (oyo elimboli “bapesami”) mpe “bana na basali na Salomo,” baoyo bazalaki bango nyonso na motango ya bato 392. Masoló yango malobeli mpe bato mosusu koleka 7 500: ‘baombo mibali mpe baombo basi’; “bayembi basi mpe mibali” baoyo bazalaki Balevi te. (Esdrase 2:43-58, 65; Nehemia 7:46-60, 67) Likambo nini lipusaki ebele na bato oyo bazalaki Bayisraele te ete bazonga na Yelusaleme?
9. Elimo na Nzambe esalaki mosala nini mpo na bozongi na Bayisraele longwa na boombo?
9 Esdrase 1:5 elobeli “baoyo nyonso Nzambe ya solo alamusaki elimo na bango, mpo bakenda kotonga lisusu ndako na Jéhovah.” Ee ezali Jéhovah nde apusaki baoyo nyonso bazongaki na Yelusaleme. Alendisaki elimo na bango, makanisi oyo mazalaki kopusa bango na kosala mosala. Ata uta na makoló, Nzambe akokaki kosala yango na nzela ya elimo santu na ye, bokasi na ye bokosalaka mosala. Na bongo, baoyo nyonso batɛlɛmaki “mpo bakenda kotonga lisusu ndako na Jéhovah,” basalisamaki “na elimo [na Nzambe].”—Zakaria 4:1, 6; Hagai 1:14.
Kokokana na eleko na biso
10, 11. Kokokana nini tokoki komonisa na ntina na bato oyo bazalaki Bayisraele te baoyo bautaki na Babilone?
10 Bato oyo bazalaki Bayisraele te baoyo bazongaki na Yelusaleme, bazalaki elilingi na banani? Baklisto mingi bakoloba mbala mosusu ete: ‘Bametinime bakokani na “bampate mosusu” ya eleko na biso.’ Yango ezali solo, kasi bobele Banetinime te; mpamba te bato nyonso oyo bazalaki Bayisraele te baoyo bazongaki na Yelusaleme, bamonisi nde baklisto oyo bazali lelo kati na Yisraele ya elimo te.
11 Mokanda Vous pouvez survivre à Harmaguédon et entrer dans le monde nouveau de Dieua emonisaki ete: “Ezalaki te bobele batikali 42 360 na Bayisraele nde balongwaki na Babilone na litambwisi ya guvernere Yolobabele . . . Bazalaki elongo na ebele na bato oyo bazalaki Bayisraele te . . . Longola [Banetinime], ezalaki na bato mosusu oyo bazalaki Bayisraele te: baombo, bayembi mibali mpe bayembi basi, mpe bana na basali na Salomo.” Mokanda yango molimbolaki ete: “[Banetinime], baombo, bayembi mpe bana na basali na Salomo, bato nyonso wana oyo bazalaki Bayisraele te, balongwaki na boombo mpe bazongaki na Yisraele . . . Ebongi na kokanisama te ete na mikolo na biso, bato ya bikólo ndenge na ndenge, baoyo batangami kati na Bayisraele ya elimo te, basengeli kosangana na batikali mpo na kokólisa losambo ya Nzambe elongo na bango? Ezali boye.” Baoyo wana basili “kokóma [Banetinime], bayembi mpe bana na basali na Salomo” na ntango biso.
12. Lolenge nini Nzambe azali kosalela elimo na ye na motindo moleki mpenza mpo na Bayisraele ya elimo, kasi mpo na nini tokoki kondimisama ete elimo yango ezali kopesama epai na basambeli na ye nyonso?
12 Lolenge moko na ntango na kala, Nzambe azali mpe kopesa elimo na ye epai na baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé. Ya solo, bazali kobotama lisusu te. Moto na moto kati na ba 144 000 azali kobotama lisusu lokola mwana na Nzambe oyo apakolami na elimo santu. (Yoane 3:3, 5; Baloma 8:16; Baefese 1:13, 14) Ya solo, kopakolama wana ezali elembo monene ya elimo na Nzambe epai na etonga moke. Kasi elimo na Nzambe ezali lisusu na ntina mpo na kokokisa mokano na ye. Tala mpo na nini Yesu alobaki ete: ‘Tata oyo azali na likoló azali kopesa elimo santu epai na baoyo bakosɛngaka ye yango.’ (Luka 11:13) Ata soko moto oyo azali kosɛnga azali na elikya ya kozala na bomoi na likoló to mpe azali kati na bampate mosusu, elimo na Jéhovah ezali na ntina mingi mpo na kokokisa mokano na Ye.
13. Lolenge nini elimo ekoki kosala mosala na yango epai na basaleli nyonso na Nzambe?
13 Elimo na Nzambe epusaki Bayisraele ata mpe baoyo bazalaki Bayisraele te mpo na kozonga na Yelusaleme; ezali mpe kolendisa mpe kosalisa basaleli nyonso ya sembo na eleko na biso. Ata soko Nzambe asili kopesa ye elikya ya kozala na bomoi na likoló to awa na mabelé, moklisto asengeli kosakola nsango malamu; mpe elimo santu ezali kosalisa ye na kozala sembo na mosala yango. Mokomoko kati na biso azali na mposa ya kolóna mbuma ya elimo, ata soko elikya na biso ezali nini; biso nyonso tosengeli kozala na yango mobimba.—Bagalatia 5:22-26.
Bapesami mpo na mosala ya ntina mingi
14, 15. (a) Bituluku mibale nini bizalaki kati na bato oyo bazalaki Bayisraele te baoyo bazongaki na Yelusaleme? (b) Banetinime bazalaki banani, mpe mosala nini bazalaki kosala?
14 Kati na ebele na bato oyo bazalaki Bayisraele te, baoyo elimo epusaki bango ete bazonga na Yelusaleme, ezalaki na bituluku mibale ya mike oyo Liloba na Nzambe likesenisaki: Banetinime mpe bana na basali na Salomo. Bango bazalaki banani? Bazalaki kosala mosala nini? Mpe yango ekoki komonisa likambo nini na eleko na biso?
15 Banetinime bazalaki etuluku ya bato oyo bazalaki Bayisraele te, nde bazwaki libaku kitoko ya kosala elongo na Balevi. Tomikundola mpo na Bakanana ya Gabao, baoyo bakómaki “bakati na nkoni mpe batoki na mai mpo na koyangana mobimba mpe mpo na etumbelo na Jéhovah.” (Yosua 9:27) Kati na Banetinime oyo bautaki na Babilone, emonani ete ezalaki na bakitani mosusu ya bato na Gabao, mpe basusu oyo babakisamaki lokola Banetinime na boyangeli ya Davidi mpe na bileko mosusu. (Esdrase 8:20) Banetinime bazalaki kosala mosala nini? Balevi bapesamaki mpo na kosalisa banganga, mpe Banetinime bapesamaki mpo na kosalisa Balevi. Ata mpo na bapaya oyo bakatamaki ngenga, yango ezalaki libaku moko kitoko.
16. Na nsima, mokumba ya Banetinime ebongwanaki kati na likambo nini?
16 Na ntango etuluku wana eutaki Babilone, Balevi bazalaki bobele moke na kokokanisa bango na banganga to na Banetinime to mpe “bana na basali na Salomo.” (Esdrase 8:15-20) Mokanda Dictionnaire de la Bible (angl.) ya James Hastings, emonisi ete: “Nsima na mwa ntango, [Banetinime] bakómaki kelasi moko eyebanaki malamu, oyo ezalaki kokokisa mosala ya bulee mpe bapesamaki mikumba mingi.” Totangi kati na Vetus Testamentum, zulunalo moko ya bato na mayele mingi, ete: “Mbongwana esalemaki. Nsima na kolongwa na boombo, [bapaya] wana batalelamaki lisusu te lokola baombo kati na tempelo, kasi batalelamaki nde lokola basaleli; bazalaki na lokumu motindo moko na bato mosusu oyo bazalaki kosala kati na tempelo.”—Tala encadré “Mbongwana ya etɛlɛmɛlo.”
17. Mpo na nini Banetinime bazwaki misala mingi, mpe elembeteli nini ya Biblia emonisi likambo yango?
17 Ya solo, Banetinime bakokanaki te na banganga mpe na Balevi. Baoyo wana bazalaki Bayisraele; baponamaki na Jéhovah ye moko mpe bato oyo bazalaki Bayisraele te bakokaki kozwa esika na bango te. Nzokande, Biblia emonisi ete lokola Balevi bazalaki mingi te, Banetinime bazalaki na mingi ya kosala kati na mosala ya Nzambe. Bapesamelaki bandako penepene na tempelo. Na eleko ya Nehemia, basalaki elongo na banganga mpo na kobongisa lopango ya mboka penepene na tempelo. (Nehemia 3:22-26) Mpe mokonzi ya Pelesa apesaki mobeko ete Banetinime lokola Balevi basengelaki lisusu kofuta mpako te, mpo na mosala oyo bazalaki kosala na tempelo. (Esdrase 7:24) Yango emonisi ete “bapesami” wana (Balevi mpe Banetinime) bazalaki na boyokani malamu kati na elimo mpe wana mposa ekómaki mingi, misala ya Banetinime mibakisamaki, atako batangamaki na molongó ya Balevi te. Na nsima, na ntango Esdrase ayanganisaki baoyo bakendaki na boombo ete bazonga, ata Molevi moko te azalaki kati na bango. Na bongo, asalaki milende mpo na kozwa bamoko na bango. Bongo, Balevi 38 mpe Banetinime 220 bazongaki na Yelusaleme mpo na kozala “basali mpo na ndako na Nzambe na biso.”—Esdrase 8:15-20.
18. Mosala nini bana na basali na Salomo bazalaki mbala mosusu kokokisa yango?
18 Ezali na etuluku mosusu ya bato oyo bazalaki Bayisraele te, baoyo balobelami kati na masoló oyo: bana na basali na Salomo. Biblia elobi bobele moke na ntina na bango. Basusu kati na bango bazalaki “bana na Sofelete.” Esdrase abakisi article défini liboso na nkombo yango, oyo ekómi ete Has-so-phe’reth, oyo elimboli “bakomeli.” (Esdrase 2:55; Nehemia 7:57) Ezalaki bongo ekipe ya bakomeli oyo bazalaki kosala na tempelo to basalelamaki na misala ya kotambwisa ekólo. Atako bazalaki bapaya, bana na basali na Salomo bamonisaki bokangami na bango epai na Jéhovah na kotikáká Babilone mpe bazongaki na Yelusaleme mpo na kosangana na mosala ya kozongisa losambo na Ye.
Topesa bomoi na biso lelo oyo
19. Boyokani nini bozali lelo kati na bapakolami mpe bampate mosusu?
19 Na eleko na biso, Nzambe azali kosalela batikali na lolenge na nguya mpenza mpo na kokólisa losambo ya peto mpe kosakola nsango malamu. (Malako 13:10) Batikali wana basepelaki mpenza na komona bankámá, nsima bankɔto, mpe bamilió na bampate mosusu kosangana na bango kati na losambo. Oyo nde boyokani malamu bozali kati na batikali mpe bampate mosusu!—Yoane 10:16.
20. Bososoli nini ya sika tokoki mpenza kozala na yango mpo na oyo ekokani na Banetinime mpe bana na basali na Salomo na mikolo na biso? (Masese 4:18)
20 Kokokana ezali kati na bato oyo bazalaki Bayisraele te baoyo bautaki longwa na Babilone ya kala, epai bazalaki na boombo mpe bampate mosusu oyo bazali kosala sikawa elongo na batikali na Yisraele ya elimo. Kasi, mpo na nini Biblia ebulisi Banetinime mpe bana na basali na Salomo? Na ntango na kala, Banetinime mpe bana na basali na Salomo bazwaki mikumba minene koleka bato mosusu oyo bazalaki Bayisraele te wana bautaki longwa na Babilone. Yango ekoki komonisa likambo oyo ete Nzambe azali lelo kopesa misala mpe mikumba mingi epai na baklisto mosusu kati na bampate mosusu baoyo bateli mpe bandimi kosala yango.
21. Misala nini mpe mikumba nini mizali sé kobakisama miye mipesami na bandeko mosusu oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi na mabelé?
21 Mikumba mibakisamaki epai na Banetinime mitalelaki mpenza makambo ya elimo. Emonani lokola ete bana na basali na Salomo bazwaki mikumba mitalaki kobatela to kokóma mikanda ya ekólo. Bobele bongo lelo Jéhovah azali kopambola bato na ye na kopesáká “makabo na mibali” mpo ete bakokisa bamposa na bango. (Baefese 4:8, 11, 12) Kozwáká litomba na ebongiseli yango, ebele na bandeko mibali bateli mpe na mayele mingi ‘bazali koleisa etonga’ na mosala ya circonscription to ya district, to kati na ba comités ya filiales 98 ya la Société Watch Tower. (Yisaya 61:5) Na biro monene ya la Société, oyo etambwisami na “kapita na sembo” mpe Collège central na ye, mibali ya makoki bazali kobongisama mpo na kopesa lisalisi na kolamba bilei ya elimo. (Luka 12:42) Mibali mosusu oyo bamipesi epai na Nzambe uta bambula mingi babongisamaki mpo na kotambwisa, ba Béthels mpe binyateli ya mikanda, mpe mpo na kokamba bibongiseli ya batongi kati na mokili mobimba—kotonga bandako ya ba filiales mpe bandako oyo ebongisami mpo na losambo na boklisto. Bazali kosala na lolenge loleki malamu na kosalanáká elongo na batikali bapakolami, baoyo bazali na bonganga na bokonzi.—Tala 1 Bakolinti 4:17; 14:40; 1 Petelo 2:9.
22. Mpo na nini ebongi mpenza ete basangani mosusu kati na bampate mosusu bazwa mikumba minene lelo, mpe yango ekoki kozala na bopusi nini likoló na biso?
22 Na ntango na kala, banganga mpe Balevi balandaki kokokisa mosala na bango kati na Bayuda. (Yoane 1:19) Nzokande, lelo oyo, motuya ya batikali na Yisraele ya elimo baoyo bazali awa na mabelé, mosengeli kokita. (Tala Yoane 3:30.) Na nsuka, nsima na kobomama ya Babilone Monene, ba 144 000 oyo ‘batyami bilembo’ bakokenda na likoló mpo na libala ya Mwana na mpate. (Emoniseli 7:1-3; 19:1-8) Nzokande, motuya ya bampate mosusu mosengeli kobakisama. Likambo oyo ete sikawa, basusu kati na bango oyo bakokisami na Banetinime mpe na bana na basali na Salomo, bapesameli mikumba minene na nsé na litambwisi ya batikali bapakolami, ezali koyeisa bango bato na lolendo te soko bato na lofundo mpe te. (Baloma 12:3) Yango ezali kondimisa biso ete wana libota na Nzambe ‘likouta longwa na bolózi monene,’ ekozala na mibali na mayele mingi, “ba princes,” babongisami mpo na kokamba bampate mosusu.—Emoniseli 7:14; Yisaya 32:1; tala Misala 6:2-7.
23. Mpo na nini tosengeli kolóna elimo ya bokabi to ya komipesa mpo na mosala na Nzambe?
23 Baoyo nyonso bautaki Babilone bandimaki kosala na molende mpe na komonisa ete losambo na Jéhovah lozwaki esika ya liboso kati na elimo na bango mpe na motema na bango. Ezali bobele lolenge moko lelo. Elongo na batikali bapakolami, ‘bapaya batɛlɛmi mpo na koleisa bitonga.’ (Yisaya 61:5) Na yango, ata elikya nini oyo Nzambe asili kopesa biso, mpe ata mikumba nini mipesami na bankulutu oyo baponami na elimo liboso na mokolo na kobukanisa na Jéhovah na Armaguedon, biso nyonso tolóna elimo ya bolingo, ya malamu mpe ya kokaba. Tokoki te kozongisela Jéhovah ebele na bolamu na ye nyonso, kasi ata mosala nini tokosala kati na lisangá na ye, tosala yango na molimo na biso mobimba. (Nzembo 116:12-14; Bakolose 3:23) Na bongo, biso nyonso tokoki kopesa bomoi na biso mpo na losambo ya solo, bampate mosusu bakosalana elongo na bapakolami, baoyo ‘bakoyangela mabelé.’—Emoniseli 5:9, 10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkasa 142 kino 147; ebimisami na la Société Watchtower.
Bozongeli
◻ Na ndimbola nini Balevi bazalaki “bapesami” kati na Yisraele ya kala?
◻ Bala nini bautaki na baombo nde bazalaki Bayisraele te, mpe bazalaki elilingi ya banani?
◻ Mbongwana nini emonani lokola ete esalemaki epai na Banetinime?
◻ Kokokana nini tozali komona lelo na ntina na Banetinime mpe bana na basali na Salomo?
◻ Endimiseli nini ezwami mpo na boyokani oyo bozali kati na bapakolami mpe bampate mosusu?
[Etanda na lokasa 14]
MBONGWANA YA ETƐLƐMƐLO
Badiksionere mingi mpe mikanda mingi mikolimbolaka Biblia, milobeli mbongwana oyo esalemaki epai na bato oyo bazalaki Bayisraele te baoyo bautaki na boombo. Na ndakisa, na nsé na titre “Mbongwana kati na etɛlɛmɛlo na bango,” mokanda Encyclopaedia Biblica (ebimisami na Cheyne mpe Black, Volume lll, lokasa 3 399), elobi ete: “Lokola tomonisaki yango, na eleko wana, etɛlɛmɛlo na bango kati na bato etombwanaki mingi mpenza. [Banetinime] batalelamaki lisusu lokola baombo mpenza te.” Kati na mokanda The Cyclopedia of Biblical Literature (Volume ll, lokasa 417), John Kitto akomaki ete: “Esengelaki komizela te ete mingi kati na bango [Banetinime] bazonga na ezalela na bango ya bato mpamba na mboka Palestine . . . Motindo oyo bato wana bamipesaki mpenza ematisaki etɛlɛmɛlo ya Banetinime.” Mokanda The lnternational Standard Bible Encyclopedia (ebimisami na G. Bromiley, Volume 4, lokasa 570) emonisi ete: “Na kotalela boyokani wana mpe makambo oyo masalemaki na eleko na Salomo, tokoki kokanisa ete basali na Salomo bazalaki na mikumba minene kati na tempelo ya mibale.”
[Elilingi na lokasa 15]
Wana Bayisraele bazongaki na Yelusaleme mpo na kotonga lisusu mboka yango, ebele na bato oyo bazalaki Bayisraele te bakendaki elongo na bango
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 17]
Comité ya filiale ya mboka Corée. Lokola Banetinime na kala, mibali oyo bazali kati na bampate mosusu basili lelo kozwa mikumba minene kati na losambo ya solo.