Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Ezela
MASOLO ya mokanda ya Ezela ebandi na esika oyo masolo ya mokanda ya Mibale ya Ntango esuki. Nganga-nzambe Ezela, mokomi ya mokanda yango, abandi lisolo na ye na kolobela mobeko oyo Sirise, mokonzi ya Perse, abimisaki; mobeko oyo epesaki Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone nzela ya kozonga na ekólo na bango. Mokanda yango esuki na lisolo oyo elobeli mikano oyo Ezela azwaki mpo na kopɛtola bato oyo babalaki basi bapaya oyo bafandaki na mokili na bango. Masolo nyonso ya mokanda yango esalemaki na boumeli ya bambula 70—banda na mobu 537 tii 467 liboso ya ntango na biso (L.T.B.).
Ezela akomaki mokanda na ye na mokano moko: komonisa ndenge oyo Yehova akokisaki elaka na Ye ya kolongola libota na ye na boombo na Babilone mpe kozongisa losambo ya solo na Yelusaleme. Yango wana, Ezela alobeli kaka makambo oyo eyokani na mokano yango. Mokanda ya Ezela elobeli ndenge oyo tempelo etongamaki lisusu mpe ndenge losambo ya Yehova ezongisamaki atako bato mosusu bazalaki kotɛmɛla libota ya Nzambe mpe bango moko basalaki mabunga mingi. Mokanda yango ezali na ntina mingi mpo na biso mpamba te, biso mpe tozali na eleko oyo losambo ya solo ezongisami. Ebele ya bato bazali kobuta na “ngomba ya [Yehova],” mpe mosika te, mabelé mobimba ‘ekotonda na boyebi ya nkembo ya Yehova.’—Yisaya 2:2, 3; Habakuku 2:14.
BATONGI LISUSU TEMPELO
Sirise abimisaki mobeko moko oyo epesaki Bayuda bonsomi; yango wana bato soki 50 000 bazongaki na Yelusaleme; Guvɛrnɛrɛ Zorobabele, to Sheshbatsar nde akambaki bango. Bato oyo bazongaki balekisaki ntango te, batongaki mbala moko etumbelo na esika oyo ezalaká kala mpe babandaki kotumbela Yehova bambeka.
Na mbula oyo elandaki, Bayisalaele batongaki fondasyo ya ndako ya Yehova. Lokola banguna bazalaki koluka na ndenge nyonso kopekisa mosala ya kotonga, nsukansuka balongaki kosala ete mokonzi abimisa mobeko oyo epekisaki mosala yango. Mosakoli Hagai ná mosakoli Zekalia batikaki te kolendisa bato tii bazongelaki mosala ya kotonga tempelo atako epekisamaki. Banguna na bango bakokaki lisusu kosala eloko te mpamba te babangaki kotɛmɛla mobeko ya Baperse oyo ekoki kobongwana te, oyo Sirise abimisaká. Nsima ya koluka malamumalamu, bamonaki mobeko ya Sirise “mpo na ndako ya Nzambe na Yelusaleme.” (Ezela 6:3) Mosala etambolaki malamu tii na nsuka.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:3-6—Bayisalaele oyo bazongaki na ekólo na bango te bazalaki nde na kondima moke? Ekoki kozala ete bato mosusu bazongaki na Yelusaleme te mpo balingaki mingi biloko ya mokili to bazalaki koyeba motuya ya losambo ya solo te, kasi ezalaki bongo mpo na bato nyonso te. Ya liboso, mobembo tii na Yelusaleme ezalaki kilomɛtrɛ 1 600 mpe ezalaki koumela sanza minei to mitano. Lisusu, kofanda na mboka oyo etikalaki mpamba mbula 70 mpe kosala mosala ya kotonga ezalaki kosɛnga kozala na makasi mingi. Yango wana, ekoki mpenza kozala ete bato mosusu bazongaki te mpo na mikakatano mosusu, na ndakisa maladi, bobange, mpe mikumba ya libota.
2:43 (NW)—Banetinime bazalaki banani? Bazalaki bankɔkɔ ya bato oyo bazalaki Bayuda te oyo bazalaki baombo to basali na tempelo. Kati na bango ezalaki na bankɔkɔ ya bato ya Gibona oyo basalaki boyokani na Bayuda na mikolo ya Yosua, mpe ezalaki na bamosusu “baoyo Davidi mpe mikóló na ye bapesaki mpo na mosala ya Balevi.”—Ezela 8:20.
2:55—Bana ya baombo ya Salomo bazalaki banani? Bazalaki bapaya na Yisalaele oyo bakómaki na mikumba minene na mosala ya Yehova. Ekoki kozala ete bazalaki bakomeli na tempelo to na misala mosusu ya Leta.
2:61-63—Bato oyo bautaki na boombo bazalaki nde na Ulimi mpe Tumimu, oyo ezalaki kosalelama mpo na koyeba eyano ya Yehova na likambo moko? Bakokaki kosalela Ulimi mpe Tumimu mpo na kondima to koboya bato oyo balobaki ete bazali bato ya mabota ya banganga-nzambe, kasi bazalaki na bilembeteli te mpo na kondimisa yango. Ezela alobi kaka ete Ulimi mpe Tumimu ekokaki kosalelama. Lisolo moko te ya Biblia elobi ete basalelaki Ulimi mpe Tumimu na ntango wana to na nsima. Masolo ya kala ya Bayuda elobaka ete Ulimi mpe Tumimu ebungaki ntango tempelo ebomamaki na mobu 607 L.T.B.
3:12—Mpo na nini “mibange baoyo bamonaki ndako ya liboso” ya Yehova balelaki? Mibali yango bakanisaki kitoko ya tempelo oyo Salomo atongaki. Fondasyo ya tempelo ya sika oyo bazalaki komona ezalaki “na miso na [bango] lokola eloko mpamba” soki bakanisi oyo ya kala. (Hagai 2:2, 3) Bazalaki komituna soki bakokoka kotonga tempelo oyo ekozala kitoko lokola oyo ya kala. Ekoki kozala ete likambo yango epesaki bango mawa, yango wana balelaki.
3:8-10; 4:23, 24; 6:15, 16—Mosala ya kotonga lisusu tempelo eumelaki mbula boni? Batyaki fondasyo ya tempelo na mobu 536 L.T.B.—“na [mbula] ya mibale ya koya na bango.” Batikaki mosala ya kotonga na mikolo ya Mokonzi Alatazelezese, na mobu 522 L.T.B. Bazalaki lisusu kosala mosala yango te tii na mobu 520 L.T.B., na mbula ya mibale ya Mokonzi Dalio. Basilisaki kotonga tempelo na mbula ya motoba ya boyangeli na ye, to mobu 515 L.T.B. (Talá etanda “Bakonzi ya Perse banda na mobu 537 tii mobu 467 L.T.B.”) Na bongo, mosala ya kotonga lisusu tempelo eumelaki mbula soki 20.
4:8–6:18—Mpo na nini bavɛrsɛ yango ekomamaki na monɔkɔ ya Aramɛyɛ? Eteni yango ezali mingimingi na makambo oyo eutaki na mikanda oyo basali ya Leta bazalaki kotindela bakonzi mpe mikanda oyo bakonzi bazalaki kotindela bango. Ezela azwaki makambo yango na mikanda ya Leta oyo ekomamaki na Aramɛyɛ, monɔkɔ oyo bazalaki kosalela na ntango wana na misala ya mombongo mpe na boyokani na bikólo mosusu. Biteni mosusu ya Biblia oyo ekomamaki na monɔkɔ wana ya kala ezali Ezela 7:12-26, Yilimia 10:11, mpe Danyele 2:4b–7:28.
Mateya mpo na biso:
1:2. Makambo oyo Yisaya asakolaki mbula soki 200 liboso ekokisamaki. (Yisaya 44:28) Bisakweli ya Liloba ya Yehova ezangaka te kokokisama.
1:3-6. Lelo oyo, na ndakisa ya Bayisalaele mosusu oyo batikalaki na Babilone, Batatoli ya Yehova mingi bakoki te kosala mosala ya ntango nyonso to kosala na bisika oyo basakoli bazali mingi te. Atako bongo, basungaka mpe balendisaka baoyo bakoki kosala yango mpe bapesaka makabo mpo mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli ekende liboso.
3:1-6. Na sanza ya nsambo ya mobu 537 L.T.B. (Tishri, oyo ekokani na Sɛtɛmbɛ/Ɔkɔtɔbɛ), bato ya sembo oyo bazongaki bapesaki bambeka na bango ya liboso. Bato ya Babilone bakɔtaki na Yelusaleme na sanza ya mitano (Ab, oyo ekokani na Yuli/Augusto) ya mobu 607 L.T.B., mpe sanza mibale na nsima, basilisaki kobebisa engumba yango mobimba. (2 Mikonzi 25:8-17, 22-26) Ndenge esakolamaki, Yelusaleme etikalaki mpamba mbula 70. (Yilimia 25:11; 29:10) Likambo nyonso oyo Liloba ya Yehova esakoli ekokisamaka.
4:1-3. Batikali ya sembo baboyaki likanisi oyo elingaki komema bango básala boyokani ya losambo ná bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. (Exode 20:5; 34:12) Lelo oyo mpe, basambeli ya Yehova bakɔtaka te na bibongiseli oyo esangisi mangomba.
5:1-7; 6:1-12. Yehova akoki kotambwisa makambo na ndenge oyo ekosala ete basaleli na ye bálonga.
6:14, 22. Yehova asepelaka na bato oyo basalelaka ye na molende mpe apambolaka bango.
6:21. Komona ndenge mosala ya Yehova ezalaki kokende liboso etindaki Basamalia oyo bafandaki na mokili ya Bayuda mpe Bayuda mosusu oyo bautaki na boombo, kasi balandaki mimeseno ya bato ya bikólo mosusu, bábongola bomoi na bango. Biso mpe tosengeli kozala na esengo ya kosala mosala oyo Nzambe apesi biso, mingimingi mosala ya kosakola Bokonzi.
EZELA AYEI NA YELUSALEME
Mbula 50 eleki banda bafungolaki ndako ya Yehova oyo etongamaki lisusu. Tokómi na mobu 468 L.T.B. Ezela azwi bato mosusu ya libota ya Nzambe mpe makabo; basali mobembo longwa na Babilone tii na Yelusaleme. Makambo nini akuti kuna?
Mikóló balobi na Ezela boye: “Bato ya Yisalaele mpe banganga mpe Balevi bamitangoli na mabota ya mikili te; bazali kosala lokola makambo ya mbindo na bango.” Kutu, “lobɔkɔ ya mikóló mpe ya bato ya lokumu ezali liboso na likambo oyo ya lipɛngwi.” (Ezela 9:1, 2) Ezela ayoki mawa mingi. Balendisi ye ete ‘azala na mpiko mpe asala’ mosala. (Ezela 10:4, NW) Ezela azwi bibongiseli mpo na kosembola makambo, mpe bato bandimi makanisi na ye.
Biyano na mituna ya Biblia:
7:1, 7, 11—Alatazelezese oyo bavɛrsɛ yango elobeli ezali kaka oyo apekisaki mosala ya kotonga? Te. Alatazelezese ezali nkombo to titre oyo bakonzi mibale ya Baperse bazwaki. Alatazelezese oyo ya liboso ezali Bardiya to mpe Gaumata, oyo apekisaki mosala ya kotonga tempelo na mobu 522 L.T.B. Alatazelezese oyo azalaki mokonzi ntango Ezela akendaki na Yelusaleme ezali Alatazelezese Lobɔkɔ-molai.
7:28–8:20—Mpo na nini Bayuda mingi oyo bazalaki na Babilone bakakatanaki mpo na kokende ná Ezela na Yelusaleme? Atako eumelaki mbula koleka 60 banda etuluku ya liboso ya Bayuda bazongaki na ekólo na bango, bato bazalaki naino kaka mingi te na Yelusaleme. Moto oyo azongi na Yelusaleme asengelaki kobanda bomoi ya sika oyo etondi na mikakatano mpe makama. Na ntango wana, bomoi na Yelusaleme ezalaki te na makambo oyo Bayuda oyo mbala mosusu bakómaki na bomɛngo na Babilone, bakokaki kosepela na yango. Tóbosana mpe te ete mobembo wana ezalaki na makama mingi. Bato oyo bazongi basengelaki kozala na kondima makasi epai ya Yehova, kozala na molende mpo na losambo ya solo, mpe na mpiko mpo na kosala mobembo. Ata Ezela ye moko azwaki makasi lokola lobɔkɔ ya Yehova ezalaki likoló na ye. Na bilendiseli ya Ezela, mabota 1 500—ekoki kozala bato 6 000 bandimaki kokende. Ezela asɛngaki bato mosusu, mpe Balevi 38 ná Banetinime 220 bandimaki kokende.
9:1, 2—Kobala basi bapaya oyo bafandaki na mboka na bango ezalaki mpenza likama monene? Bato oyo bautaki boombo basengelaki kobatela losambo ya Yehova tii ntango Masiya asengelaki koya. Kobala basi bapaya oyo bafandaki na mokili na bango ezalaki mpenza likama mpo na losambo ya solo. Lokola bato mosusu babalanaki na basambeli ya bikeko, nsukansuka ekólo mobimba ekokaki kosangana na bikólo ya bapakano. Losambo ya pɛto ekokaki kolimwa na mokili. Na bongo, Masiya alingaki koya na ekólo nini? Tokoki kokamwa te ete Ezela alɛmbaki nzoto ntango ayokaki likambo oyo basalaki!
10:3, 44—Mpo na nini babenganaki basi elongo ná bana na bango? Soki bana batikalaki, nsukansuka bamosusu kati na basi yango balingaki kozonga mpo na bana wana. Lisusu, mbala mingi bana mike bazalaka na mposa ya libateli ya bamama na bango.
Mateya mpo na biso:
7:10. Ezela atikaki ndakisa malamu mpenza ya moyekoli ya molende ya Liloba ya Nzambe. Abongisaki motema na ye na nzela ya mabondeli mpo na koyekola Mibeko ya Yehova. Ntango Ezela azalaki koyekola yango, azalaki kotya likebi mingi na maloba ya Yehova. Ezela azalaki kosalela makambo oyo ayekolaki mpe asalaki molende mpo na koteya bato mosusu.
7:13. Yehova alingaka bato oyo basalelaka ye na kotindikama te.
7:27, 28; 8:21-23. Ezela akumisaki Yehova, abondelaki ye na bosembo liboso ya kosala mobembo molai mpe ya makama mingi tii na Yelusaleme, mpe andimaki kotya bomoi na ye na likama mpo na nkembo ya Nzambe. Mpo na yango, apesi biso ndakisa ya malamu.
9:2. Tosengeli kozwa na lisɛki te toli ya kobala “na kati ya Nkolo kaka.”—1 Bakolinti 7:39.
9:14, 15. Baninga ya mabe bakoki komema biso na misala oyo ekosala ete Yehova aboya biso.
10:2-12, 44. Bato oyo babalaki basi bapaya bamikitisaki, babongolaki mitema mpe bazongaki na nzela ya malamu. Makanisi mpe ekateli na bango ezali ndakisa malamu mpenza.
Yehova akokisaka bilaka na ye
Mokanda ya Ezela ezali na ntina mingi mpo na biso! Na ntango oyo ebongi, Yehova akokisaki elaka na ye ya kosikola bato na ye na boombo na Babilone mpe kozongisa losambo ya solo na Yelusaleme. Yango ezali mpenza kolendisa kondima na biso epai ya Yehova mpe na bilaka na ye!
Tókanisa mpe bato oyo bapesaki ndakisa ya malamu, oyo mokanda ya Ezela elobeli. Ezela ná bato oyo bazongaki mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kozongisa losambo ya solo na Yelusaleme bapesaki ndakisa malamu ya komipesa na Nzambe. Mokanda yango emonisi mpe kondima ya bapaya oyo bazalaki kobanga Nzambe mpe elimo ya komikitisa ya basali mabe oyo babongolaki mitema. Ya solo, mokanda ya Ezela oyo epemami na Nzambe ezali komonisa polele ete “liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”—Baebele 4:12.
[Etanda/Elilingi na lokasa 18]
BAKONZI YA PERSE BANDA NA MOBU 537 TII MOBU 467 L.T.B.
Sirise Monene (Ezela 1:1) akufaki na mobu 530 L.T.B.
Cambyse, to Asierise (Ezela 4:6) 530-522 L.T.B.
Alatazelezese—Bardiya to Gaumata (Ezela 4:7) 522 L.T.B. (Abomamaki nsima ya koyangela sanza nsambo mpamba)
Dalio I (Ezela 4:24) 522-486 L.T.B.
Zelezese, to Asierisea 486-475 L.T.B. (Ayangelaki elongo na Dalio I banda 496-486 L.T.B.)
Alatazelezese Lobɔkɔ-molai (Ezela 7:1) 475-424 L.T.B.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo ya Zelezese ezali te na mokanda ya Ezela. Na mokanda ya Esetele babengi ye Asierise.
[Elilingi]
Asierise
[Elilingi na lokasa 17]
Sirise
[Elilingi na lokasa 17]
Libanga ya Sirise, ezali na mobeko ya kozongisa baombo na mikili na bango
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Libanga: Tokangi fɔtɔ na yango na ndingisa ya British Museum
[Elilingi na lokasa 20]
Oyebi soki nini esalisaki Ezela azala moteyi malamu?