LISOLO YA BOYEKOLI 42
Yehova akoki kokómisa yo oyo esengeli!
“Nzambe . . . azali kosala na kati na bino mpo bino bólinga mpe bósala.”—FLP. 2:13.
LOYEMBO 104 Elimo santu ezali likabo ya Nzambe
NA MOKUSEa
1. Yehova akoki kosala nini mpo na kokokisa mokano na ye?
YEHOVA akoki kokóma nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mokano na ye. Na ndakisa, Yehova akómaki Moteyi, Mobɔndisi, Mopalanganisi ya nsango malamu, mpe esuki kaka wana te. (Yis. 48:17; 2 Ko. 7:6; Gal. 3:8) Kasi, mbala mingi asalelaka bato mpo na kokokisa mokano na ye. (Mat. 24:14; 28:19, 20; 2 Ko. 1:3, 4) Yehova akoki mpe kopesa biso bwanya mpe makasi oyo tosengeli na yango mpo tókóma nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mokano na ye. Nyonso wana ezali na kati ya ndimbola ya nkombo Yehova, ndenge bato ebele ya mayele bamonisaka yango.
2. (a) Mpo na nini na bantango mosusu tondimaka mpenza te ete Yehova asalelaka biso? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?
2 Biso nyonso tolingaka Yehova asalela biso, kasi bamosusu bandimaka mpenza te ete Yehova asalelaka bango. Mpo na nini? Mpo bamonaka ete bakoki kosala mingi te na kotalela mbula na bango, makambo ya bomoi na bango, to makoki na bango. Nzokande, bato mosusu bamonaka ete oyo basalaka na mosala ya Yehova ekoki mpe ete ezali na ntina te básala lisusu mingi. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge Yehova akoki kopesa mokomoko na biso oyo esengeli mpo na kokokisa mokano na ye. Na nsima, tokotalela masolo ya Biblia oyo emonisi ndenge Yehova apesaki basaleli na ye, ya mibali mpe ya basi, mposa mpe nguya ya kosalela ye. Na nsuka, tokomona ndenge oyo tokoki kotika Yehova asalela biso.
YEHOVA APESAKA BISO OYO ESENGELI
3. Na kotalela maloba ya Bafilipi 2:13, ndenge nini Yehova akoki kopesa biso mposa ya kosalela ye?
3 Tángá Bafilipi 2:13.b Yehova akoki kosala kati na biso mpo tólinga, elingi koloba akoki kopesa biso mposa ya kosalela ye. Ndenge nini akoki kosala yango. Mbala mosusu toyoki ete lisangá ezali na bosɛnga na likambo moko boye. To mpe bankulutu batángi mokanda oyo euti na Betele, oyo emonisi ete mposa ezali makasi na teritware moko boye. Mpo na yango, tokoki komituna: ‘Ndenge nini nakoki kosalisa?’ To mpe bapesi biso mokumba moko monene kasi tozali komituna soki tokokoka mpenza kokokisa yango malamu. Ekoki mpe kozala ete nsima ya kotánga Biblia, tomituni ete: ‘Ndenge nini nakoki kosalela vɛrsɛ oyo mpo na kosalisa basusu?’ Yehova akotinda biso na makasi te ete tósala boye to boye. Kasi, ntango amoni ete tozali kokanisa oyo tokoki kosala, akoki kopesa biso mposa ya kosala likambo oyo tozalaki kokanisa.
4. Ndenge nini Yehova akoki kopesa biso nguya ya kosalela ye?
4 Paulo alobaki mpe ete Yehova akoki kosala na kati na biso mpo tósala, elingi koloba akoki kopesa biso nguya. (Yis. 40:29) Akoki kosalela elimo santu na ye mpo ebimisa malamumalamu makoki oyo tozalaka na yango. (Kob. 35:30-35) Na nzela ya ebongiseli na ye, Yehova akoki koteya biso ndenge ya kokokisa mikumba mosusu. Soki oyebi te ndenge ya kokokisa mokumba moko boye, sɛngá lisalisi. Lisusu, kobangaka te kosɛnga Tata na biso ya likoló apesa yo “nguya oyo eleki makasi.” (2 Ko. 4:7; Luka 11:13) Biblia ezali na bandakisa ebele oyo emonisi ndenge Yehova apesaki basaleli na ye ya mibali mpe ya basi mposa mpe nguya oyo esengeli mpo básalela ye. Ntango tozali kotalela bandakisa yango, meká kokanisa ndenge Yehova akoki kosalela mpe yo.
OYO MIBALI BAKÓMAKI
5. Ntango mpe ndenge oyo Yehova asalelaki Moize mpo asikola Bayisraele ezali koteya biso nini?
5 Yehova akómisaki Moize mosikoli ya Bayisraele. Kasi, ntango nini Yehova asalelaki ye? Ezalaki nde ntango Moize amonaki ete akómi na makoki mingi nsima ya ‘koteyama na bwanya nyonso ya Baezipito’? (Mis. 7:22-25) Te, Yehova asalelaki Moize kaka nsima ya kosalisa ye akóma moto ya komikitisa mpe ya boboto. (Mis. 7:30, 34-36) Yehova apesaki Moize mpiko ya kosolola na mokonzi oyo alekaki na nguya na Ezipito. (Kob. 9:13-19) Ntango oyo Yehova asalelaki Moize mpe ndenge oyo asalaki yango ezali koteya biso nini? Ezali koteya biso ete Yehova asalelaka baoyo bamekolaka bizaleli na ye mpe basɛngaka ye apesa bango makasi.—Flp. 4:13.
6. Ndenge oyo Yehova asalelaki Barazilai mpo na kosalisa Mokonzi Davidi ezali koteya biso nini?
6 Bankama ya bambula na nsima, Yehova asalelaki Barazilai mpo na kosalisa Mokonzi Davidi. Na esobe moko, Davidi ná bato na ye bazalaki ‘na nzala, balɛmbaki mpe bazalaki na mposa ya mai,’ ntango bazalaki kokima Abisalome. Elongo na bato mosusu, Barazilai, oyo na ntango wana akómaki mobange, atyaki bomoi na ye na likama mpo na kosalisa Davidi ná bato na ye. Barazilai akanisaki te ete lokola akómi mobange, Yehova akoki kosalela ye lisusu te. Kasi, amonisaki bokabi mpe asalelaki biloko oyo azalaki na yango mpo na kosalisa basaleli ya Nzambe oyo bazalaki na bosɛnga. (2 Sa. 17:27-29) Yango ezali koteya biso nini? Ata soki mbula na biso epusani, Yehova akoki kosalela biso mpo na kokokisa bamposa ya bandeko na biso oyo bazangi biloko ya kobikela, ezala na mboka na biso to na mikili mosusu. (Mas. 3:27, 28; 19:17) Ata soki biso moko tokokende te mpo na kosalisa bango, tokoki kotya makabo mpo esalisa na ntango oyo mposa ebimi na esika moko boye.—2 Ko. 8:14, 15; 9:11.
7. Ndenge nini Yehova asalelaki Simeone, mpe mpo na nini yango ekoki kolendisa biso?
7 Yehova alakaki Simeone, mobange moko ya sembo na Yerusaleme, ete akokufa te soki miso na ye emoni Masiya te. Na ntembe te, elaka yango elendisaki Simeone mingi, mpo azalaki kozela Masiya banda bambula mingi. Azwaki mbano mpo na kondima mpe ezaleli na ye ya koyika mpiko. Mokolo moko, ayaki na tempelo “na nguya ya elimo.” Kuna, Simeone amonaki mwana Yesu, mpe Yehova asalelaki ye mpo ayebisa esakweli moko mpo na mwana yango oyo asengelaki kokóma Kristo. (Luka 2:25-35) Atako mbala mosusu azalaki lisusu na bomoi molai te mpo amona ndenge Yesu akokokisa mosala na ye awa na mabele, Simeone azalaki na botɔndi mpo na libaku monene oyo azwaki, mpe na mikolo ezali koya, akozwa mapamboli mosusu ebele! Na mokili ya sika, mobali yango ya sembo akomona ndenge boyangeli ya Yesu ekomemela mabota nyonso ya mabele mapamboli. (Eba. 22:18) Biso mpe tokoki kozala na botɔndi mpo na mokumba nyonso oyo Yehova apesi biso na mosala na ye.
8. Ndenge nini Yehova akoki kosalela biso ndenge asalelaki Barnabasi?
8 Na siɛklɛ ya liboso, mobali moko ya boboto na nkombo Yozefe andimaki Yehova asalela ye. (Mis. 4:36, 37) Mbala mosusu Yozefe ayebaki mpenza kobɔndisa basusu, yango wana bantoma bapesaki ye nkombo Barnabasi, oyo elakisi “Mwana ya Libɔndisi.” Na ndakisa, ntango Saulo akómaki mondimi, bandeko mingi bazalaki kobanga ye mpo bayebaki ete azalaki konyokola masangá. Kasi, na boboto na ye, Barnabasi asalisaki Saulo, mpe na ntembe te Saulo azalaki na botɔndi mingi mpo na lisalisi yango. (Mis. 9:21, 26-28) Na nsima, bankulutu ya Yerusaleme bamonaki ete esengeli kokende kolendisa bandeko oyo bazalaki mosika, na Antiokia ya Siri. Batindaki nani? Barnabasi! Baponaki mpenza moto oyo abongi. Lisolo yango elobi ete Barnabasi “abandaki kolendisa bango nyonso ete bákangama na Nkolo na motema moko.” (Mis. 11:22-24) Lelo oyo mpe, Yehova akoki kosalisa biso tókóma bato oyo bayebi kobɔndisa basusu. Na ndakisa, akoki kosalela biso mpo tóbɔndisa baoyo moto oyo balingaki akufi. To mpe, akoki kotinda biso tókende kotala to mpe tóbenga na telefone moto oyo azali kobɛla to konyokwama na makanisi mpo tóyebisa ye maloba ya boboto. Okotika ete Yehova asalela yo ndenge asalelaki Barnabasi?—1 Tes. 5:14.
9. Ndenge oyo Yehova asalisaki Ndeko Vasily akóma mobateli ya mpate ya malamu ezali koteya biso nini?
9 Yehova asalisaki ndeko mobali moko na nkombo Vasily akóma mobateli ya mpate ya malamu mpenza. Ntango Vasily akómaki nkulutu, azalaki na mbula 26 mpe azalaki kobanga ete akoka te kosalisa bandeko ya lisangá na elimo, mingimingi baoyo bazalaki kokutana na mikakatano. Kasi, ayekolaki makambo mingi epai ya bankulutu oyo baumeli mpe akɔtaki Eteyelo ya mosala ya Bokonzi. Vasily asalaki makasi mpo asalela mateya yango. Na ndakisa, amityelaki mikano ebele ya mikemike. Ntango azalaki kokokisa mokano yango mokomoko, kobanga na ye ezalaki kosila mokemoke. Lelo oyo alobi boye: “Makambo oyo ezalaki kobangisa ngai na ntango wana, ekómá kopesa ngai esengo mingi. Ntango Yehova asalisi ngai nazwa vɛrsɛ oyo ebongi mpo na kolendisa ndeko mobali to ndeko mwasi moko na lisangá, nayokaka esengo mingi.” Bandeko mibali, soki bomekoli Vasily mpe botiki ete Yehova asalela bino, akoki kopesa bino makoki ya kokokisa mikumba ya minene koleka na lisangá.
OYO BASI BAKÓMAKI
10. Abigaile asalaki nini, mpe ndakisa na ye eteyi yo nini?
10 Davidi ná bato na ye bazalaki kokima Mokonzi Saulo oyo azalaki kolanda bango, mpe bazalaki na mposa ya lisalisi. Bato ya Davidi basɛngaki Moyisraele moko ya mozwi na nkombo Nabale apesa bango mwa biloko ya kolya, nyonso oyo akokaki kozala na yango. Basɛngaki ye mpo bango mpe babatelaki bibwɛlɛ ya Nabale na esobe. Kasi, lokola Nabale azalaki moimi, aboyaki kopesa bango biloko. Davidi asilikaki mpe akanaki koboma Nabale ná mibali nyonso ya ndako na ye. (1 Sa. 25:3-13, 22) Kasi, Abigaile, mwasi kitoko ya Nabale, azalaki na bososoli mingi. Abigaile amonisaki mpiko, afukamaki liboso ya Davidi mpe asɛngaki ye azongisa mabe na mabe te mpo akomema ngambo ya makila. Na mayele na ye, apesaki Davidi toli ete atika makambo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. Maloba ya Abigaile oyo emonisaki komikitisa na ye mpe ndenge asalaki makambo na mayele esimbaki motema ya Davidi. Davidi amonaki ete Yehova nde atindaki Abigaile. (1 Sa. 25:23-28, 32-34) Abigaile akolisaki bizaleli oyo esalaki ete Yehova asalela ye. Ndenge moko mpe, Yehova akoki kosalela bandeko basi oyo bayekolaka koloba na mayele mpe oyo bazali na bososoli mpo na kolendisa mabota na bango mpe basusu na lisangá.—Mas. 24:3; Tito 2:3-5.
11. Bana basi ya Shalume basalaki nini, mpe banani nde bazali komekola bango lelo oyo?
11 Bankama ya bambula na nsima, bana basi ya Shalume bazalaki na kati ya bato oyo Yehova asalelaki mpo bápesa mabɔkɔ na kobongisa bifelo ya Yerusaleme. (Neh. 2:20; 3:12) Atako Shalume azalaki nkumu, bana na ye ya basi bandimaki kosala mosala yango ya mpasi mpe ya likama. (Neh. 4:15-18) Bazalaki te lokola mibali ya lokumu ya Tekoa, oyo “baboyaki kosala mosala”! (Neh. 3:5) Kanisá esengo oyo bana basi ya Shalume bayokaki ntango mosala yango ya kotonga esilaki nsima ya mikolo 52 mpamba! (Neh. 6:15) Na mikolo na biso, bandeko basi ya molende bazali kokokisa mokumba moko ya ntina mingi na mosala ya Yehova: mosala ya kotonga mpe kobatela bandako ya losambo ya Yehova. Mayele na bango, esengo, mpe bosembo na bango esalisaka mingi na mosala yango.
12. Ndenge nini Yehova akoki kosalela biso ndenge asalelaki Tabita?
12 Yehova asalaki ete Tabita atonda “na misala ya malamu mpe na makabo ya motema mawa,” mingimingi epai ya basi oyo mibali bakufá. (Mis. 9:36) Lokola Tabita azalaki lobɔkɔ pɛtɛɛ mpe na boboto, bato mingi balelaki ye ntango akufaki. Kasi, bato yango batondaki na esengo ntango ntoma Petro asekwisaki ye. (Mis. 9:39-41) Ndakisa ya Tabita ezali koteya biso nini? Ezali koteya biso ete tózala bilenge to mikóló, tózala basi to mibali, ezali na makambo oyo tokoki kosala mpo na kosalisa bandeko na biso.—Ebr. 13:16.
13. Ndenge nini Yehova asalelaki ndeko mwasi Ruth oyo azalaki nsɔninsɔni, mpe yango etindaki ye aloba nini?
13 Ndeko mwasi moko na nkombo Ruth azalaki na mposa ya kokóma misionɛrɛ, kasi azalaki nsɔninsɔni. Ntango azalaki elenge, azalaki kosakola ndako na ndako nokinoki, mpo na kokabola batrakte. Alobaki boye: “Nazalaki mpenza kolinga mosala yango. Kasi, ezalaki mpasi nasolola na bato mpe nayebisa bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe.” Atako azalaki nsɔninsɔni, Ruth akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza ntango akokisaki mbula 18. Na 1946, akɔtaki Eteyelo ya Gileade, mpe na nsima batindaki ye na Hawaii mpe na Japon. Yehova asalelaki ye na ndenge ya kokamwa mpo na kopalanganisa nsango malamu na bikólo yango. Nsima ya kosakola mbula soki pene na 80, Ruth alobaki boye: “Yehova apesaka ngai makasi mpenza. Asalisi ngai nabundisa ezaleli na ngai ya kozala nsɔninsɔni. Nandimaka na motema moko ete Yehova akoki kosalela moto nyonso oyo atyelaka ye motema.”
TIKÁ YEHOVA ASALELA YO
14. Na kotalela Bakolose 1:29, tosengeli kosala nini soki tolingi Yehova asalela biso?
14 Banda kala, Yehova akómisaka basaleli na ye oyo esengeli mpo bákokisa mikumba ndenge na ndenge. Yehova akoki mpe kokómisa yo oyo esengeli? Yango etaleli mingimingi mposa na yo ya komipesa na mosala na ye. (Tángá Bakolose 1:29.) Soki otiki Yehova asalela yo, akoki kokómisa yo mopalanganisi ya nsango malamu ya molende, moteyi ya malamu, mobɔndisi oyo abongi, mosali ya mayele, moninga ya solosolo, to ndenge nyonso oyo esengeli mpo akokisa mokano na ye.
15. Ndenge 1 Timote 4:12, 15 emonisi yango, bandeko mibali ya bilenge basengeli kosɛnga Yehova asalisa bango básala nini?
15 Tokoki koloba nini na bilenge oyo etikali moke bákóma mikóló? Ebongiseli ya Yehova ezali mpenza na mposa ya mibali oyo bazali makasi na nzoto mpo básala lokola basaleli na misala. Na masangá mingi, motángo ya bankulutu eleki mosika motángo ya basaleli na misala. Bilenge, bokoki kolona mposa ya kozwa mikumba na lisangá? Bandeko mibali mosusu balobaka boye: “Nasepelaka ndenge nazali kaka mosakoli na lisangá.” Soki yo mpe okanisaka bongo, sɛngá Yehova asalisa yo olona mposa ya kokokisa masɛngami mpo ozala mosaleli na misala mpe apesa yo nguya ya kosala nyonso oyo okoki mpo na kosalela ye. (Mos. 12:1) Tozali na mposa ya lisalisi na yo!—Tángá 1 Timote 4:12, 15.
16. Tosengeli kosɛnga Yehova nini, mpe mpo na nini?
16 Yehova akoki kokómisa yo nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mokano na ye. Na yango, sɛngá ye apesa yo mposa ya kosala mosala na ye, mpe apesa yo nguya oyo osengeli na yango. Ozala elenge to mokóló, salelá ntango, makasi, mpe makoki ná mayele na yo mpo na kokumisa Yehova sikoyo. (Mos. 9:10) Soki ozwi libaku ya kosala mingi na mosala ya Yehova, kotika te ete kobanga to kokanisa ete okokoka te etinda yo oboya kosimba libaku yango. Ezali mpenza lokumu monene kosala nyonso oyo tokoki mpo na kopesa Tata na biso ya bolingo lokumu oyo abongi na yango!
LOYEMBO 127 Lolenge ya moto oyo nasengeli kozala
a Omonaka ete oyo ozali kosala na mosala ya Yehova ezali moke? Omitunaka soki Yehova asalelaka yo kaka? To mpe omonaka ete ezali na ntina te omipesa na mosala ya Yehova ata soki ye alingi bongo? Lisolo oyo elobeli ndenge Yehova akoki kopesa yo mposa mpe nguya ya kokóma oyo esengeli mpo na kokokisa mokano na ye.
b Atako ntoma Paulo akomaki mokanda na ye mpo na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, maloba na ye etali mpe basaleli nyonso ya Yehova.