Longolá miso na yo na biloko oyo ezangi ntina!
“Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina; batelá ngai na bomoi na nzela na yo moko.”—NZ. 119:37.
1. Miso ezali na ntina nini?
MISO na biso ezali mpenza na motuya mingi! Esalisaka biso tómona na mbala moko biloko oyo ezali zingazinga na biso, na bozindo mpe langi na yango. Miso esalisaka biso tómona baninga oyo tolingaka to makama. Na nzela na yango, tomonaka kitoko ya biloko, tosepelaka na biloko ya kokamwa oyo Nzambe akelá, mpe tomonaka polelepolele ete Nzambe azali mpenza mpe ete azali na nkembo. (Nz. 8:3, 4; 19:1, 2; 104:24; Rom. 1:20) Mpe lokola yango nde nzela monene ya kokɔtisa makambo na bɔɔngo, miso esalaka mingi mpo tózwa boyebi ya Yehova mpe tókolisa kondima epai na ye.—Yos. 1:8; Nz. 1:2, 3.
2. Mpo na nini tosengeli kokeba na biloko oyo tozali kotala, mpe liteya nini tokoki kozwa na maloba ya mokomi ya nzembo?
2 Nzokande, makambo oyo tozali kotala ekoki mpe kosala biso mabe. Miso mpe makanisi na biso ezali na boyokani makasi mpenza, yango wana makambo oyo tozali kotala ekoki kobota to kokolisa bilikya mpe bamposa na motema na biso. Mpe lokola tozali na mokili oyo ebebá, ya bato oyo balingá komisepelisa mpe oyo etambwisami na Satana Zabolo, ezali na ebele ya bililingi mpe makanisi oyo ekoki kobungisa biso nzela kozanga mpasi, ata soki tobwaki liso kaka moke. (1 Yoa. 5:19) Na yango, tokoki kokamwa te soki mokomi ya nzembo asɛngaki Nzambe boye: “Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina; batelá ngai na bomoi na nzela na yo moko.”—Nz. 119:37.
Ndenge miso na biso ekoki kokosa biso
3-5. Masolo nini ya Biblia emonisi likama ya kotika miso na biso ekosa biso?
3 Tótala likambo oyo ekómelaki Eva, mwasi ya liboso. Satana alobaki ete miso na ye “ekofungwama mpenza” soki alei mbuma ya “nzete ya koyeba malamu ná mabe.” Na ntembe te Eva akómaki na mposa makasi ya koyeba soki kozala na miso oyo ‘efungwami’ ekoki kozala ndenge nini. Mposa ya kolya mbuma ya nzete oyo epekisami ekómaki kutu makasi mingi ntango “amonaki ete nzete yango ezalaki malamu na kolya mpe ete ezalaki eloko oyo miso ekokaki kolula, ɛɛ, nzete yango ezalaki kitoko na kotala.” Kotala nzete yango na mposa makasi etindaki Eva abuka mobeko oyo Nzambe apesaki. Mobali na ye, Adama, mpe azangaki botosi, mpe yango ememelaki bato nyonso makama minene.—Eba. 2:17; 3:2-6; Rom. 5:12; Yak. 1:14, 15.
4 Na mikolo ya Noa, baanzelu mosusu mpe balandaki makambo oyo bamonaki. Mpo na baanzelu yango, Ebandeli 6:2 elobi boye: “Bana ya Nzambe ya solo babandaki kotala bana basi ya bato, bamonaki ete bazali kitoko; mpe babandaki kozwa basi, elingi koloba, nyonso oyo bango baponaki.” Kotala bana basi ya bato na mposa makasi elamwisaki epai ya baanzelu yango oyo batombokaki mposa oyo ebongi na bango te, mposa ya kosangisa nzoto ná bato, mpe baanzelu yango babotaki bana ya mobulu. Mabe ya bato ya ntango wana ememelaki bato nyonso libebi, longola kaka Noa ná libota na ye.—Eba. 6:4-7, 11, 12.
5 Bikeke mingi na nsima, miso ya Moyisraele moko na nkombo Akana ekosaki ye mpe etindaki ye ayiba biloko oyo eutaki na Yeriko, engumba oyo balongaki. Nzambe apesaki mitindo ete biloko nyonso ya engumba yango ebebisama, longola kaka biloko mosusu oyo basengelaki komema na esika ya kobomba biloko ya motuya ya Yehova. Bakebisaki Bayisraele boye: “Bósimba eloko moko te oyo esengeli kobebisama, noki bókóma na mposa na yango” mpe bózwa eloko moko oyo euti na engumba yango. Ntango Akana abukaki mibeko, engumba ya Ai elongaki Bayisraele mpe mingi kati na bango bakufaki. Akana andimaki te ete ye nde moyibi tii ntango babimisaki ye polele. Akana alobaki boye: “Ntango namonaki” biloko yango, “bongo nalulaki yango mpe nazwaki yango.” Mposa ya miso na ye ememaki ye ná “nyonso oyo azalaki na yango” na libebi. (Yos. 6:18, 19; 7:1-26) Akana alulaki na motema na ye biloko oyo bapekisaki ye.
Tosengeli komipekisa
6, 7. “Mayele” nini Satana asalelaka mbala mingi mpo na kokanga biso na motambo, mpe ndenge nini basali-piblisite basalelaka yango?
6 Lelo mpe bato bazali komekama ndenge Eva, baanzelu oyo batombokaki, mpe Akana bamekamaki. Na “mayele” nyonso oyo Satana asalelaka mpo na kokosa bato, kolamwisa “mposa ya miso” nde ezali na nguya mingi. (2 Ko. 2:11; 1 Yoa. 2:16) Basali-piblisite na mikolo na biso bayebi malamu ete banda kala, kolamwisa mposa ya miso ezalaka na nguya mingi. Moto moko ya mayele na makambo ya piblisite na Mpoto alobaki boye: “Miso nde enama oyo ekosaka mingi koleka binama mosusu. Mbala mingi, elɛmbisaka makasi ya binama mosusu, mpe ezalaka na nguya ya kondimisa biso tósala makambo oyo toyebi ete ezali malamu te.”
7 Ezali likambo ya kokamwa te soki basali-piblisite bazali kosopela biso bililingi oyo esalemá na mayele mpenza mpo ebɛta miso makasi mpe elamwisa mposa ya biloko to mpe misala na bango! Na États-Unis, moto moko ya mayele oyo ayekolaki ndenge piblisite esalaka epai ya bato alobaki ete piblisite “esalemaka kaka te mpo na koyebisa moto likambo moko boye, kasi ezalaka mingimingi nde mpo na kotinda moto ayoka mposa ya eloko yango mpe aluka kozwa yango.” Mbala mingi, basalelaka bililingi oyo elamwisaka mposa ya kosangisa nzoto. Talá ntina nini tosengeli kokeba mpenza na biloko oyo tozali kotala mpe oyo tozali kotika ete ekɔta na makanisi mpe na mitema na biso!
8. Ndenge nini Biblia emonisi ntina mpenza ya kobatela miso na biso?
8 Mposa ya miso mpe ya nzoto ekoki kokweisa ata bakristo ya solo. Na yango, Liloba ya Nzambe elendisi biso tókeba na makambo oyo totalaka mpe oyo tozali na mposa na yango makasi. (1 Ko. 9:25, 27; tángá 1 Yoane 2:15-17.) Yobo, moto ya sembo, andimaki ete komona ná koyoka mposa ezali na boyokani makasi. Alobaki boye: “Nasalá kondimana na miso na ngai. Bongo ekobanda boni natya likebi epai ya ngɔndɔ?” (Yobo 31:1) Yobo aboyaki kaka te kosimba mwasi na ndenge ya nsɔni, kasi akokaki mpe te kotika ata bɔɔngɔ na ye ekanisakanisa likambo ya ndenge wana. Yesu amonisaki ntina ya kolongola makanisi ya mbindo na bɔɔngo ntango alobaki ete: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.”—Mat. 5:28.
Biloko ezangi ntina oyo tosengeli kokima
9. (a) Mpo na nini tosengeli kokeba mingimingi ntango tozali kosalela Internet? (b) Kotala pornografi ata mwa moke kaka ekoki kobimisa makambo nini?
9 Na mokili ya lelo, bato mingi bakómi na momeseno ya ‘kokoba kotala’ pornografi, mingimingi na Internet. Esɛngaka kutu te koluka basite ya ndenge wana—yango moko elukaka biso! Ndenge nini? Piblisite moko oyo ezali na elilingi moko oyo ezali kobenda likebi ekoki kobima pwasa na ordinatɛrɛ na yo. To mesaje (e-mail) oyo emonani ete ezali na likambo ya mabe te, soki kaka ofungoli yango, ekoki kobimisa elilingi moko ya pornografi oyo basalá na ndenge moko oyo ekozala mpasi kokanga yango. Ata soki moto atali yango kaka mwa moke liboso aboma yango, elilingi yango esili kosala mosala na bɔɔngɔ na ye. Kotala pornografi ata mwa moke kaka ekoki kobimisa makambo mingi ya mabe. Moto akoki kotikala na lisosoli oyo ezali kotungisama mpe na etumba mpo na kolongola bililingi ya nsɔni na makanisi na ye. Kutu likambo ya mabe koleka, moto oyo azali “kokoba kotala” pornografi na nko alakisi ete abomi naino te bamposa ya mabe na motema na ye.—Tángá Baefese 5:3, 4, 12; Kol. 3:5, 6.
10. Mpo na nini pornografi ekoki kobenda mingimingi bana, mpe kotala yango ekoki kosala bango nini?
10 Lokola bana bazalaka na mposa ya koyeba makambo, pornografi ekoki kobenda bango. Soki esalemi bongo, ndenge oyo batalelaka makambo ya basi ná mibali ekoki kokóma na mikakatano mpo na ntango molai. Lapolo moko elobi ete mikakatano yango ekoki kozala makambo lokola kozanga limemya na makambo etali kosangisa nzoto, kokóma na “mpasi mpo na kozala na boyokani ya malamu na bato; kotalela basi na ndenge oyo ebongi te; mpe mbala mosusu kokóma moombo ya pornografi mpe yango ekoki kopekisa mwana atánga malamu na kelasi, azala na boyokani malamu na baninga mpe na bato ya libota na ye.” Kutu mikakatano ya makasi koleka ekoki kobima nde na nsima, na libala.
11. Pesá ndakisa moko oyo emonisi likama ya kotala pornografi.
11 Ndeko moko akomaki boye: “Na makambo nyonso oyo nakómaki moombo na yango liboso nakóma Motatoli, pornografi nde elekaki mpasi mpo na kotika. Na bantango mosusu, namonaka bililingi yango na makanisi—ezongelaka ngai ntango nayoki nsolo moko boye, miziki moko boye, namoni eloko moko boye, to ntango kaka likanisi moko boye eyeli ngai. Ezali etumba ya mokolo na mokolo mpe ya ntango nyonso.” Ntango azalaki mwana moke, ndeko mosusu atalaki bazulunalo ya pornografi ya tata na ye oyo azalaki Motatoli te, ntango baboti na ye bazalaki na ndako te. Akomaki boye: “Bililingi yango ebebisaki mpenza makanisi na ngai! Ata sikoyo, mbula 25 na nsima, nakokaka te kolongola bililingi yango mosusu na bɔɔngɔ na ngai. Ata soki nasali makasi ndenge nini, elongwaka te. Etindaka ngai nayoka lokola namemi ngambo, atako naboyaka kokanisa yango.” Ezali mpenza malamu koboya kotala biloko ezangi ntina ya ndenge wana mpo tómimemisa kilo na makanisi na biso te! Ndenge nini moto akoki kosala yango? Asengeli kobunda mpo akómisa “likanisi nyonso mokangami mpo etosa Kristo.”—2 Ko. 10:5.
12, 13. Biloko nini oyo ezangi ntina bakristo basengeli koboya kotala, mpe mpo na nini?
12 Eloko mosusu “ya mpambampamba,” to ezangi ntina, oyo tosengeli koboya ezali kominanola oyo elendisaka elimo ya konduka biloko ya mokili to boyokani na bilimo mabe, to oyo emonisaka mobulu, kosopa makila mpe koboma. (Tángá Nzembo 101:3.) Baboti bakristo bazali na mokumba liboso ya Yehova ya kopona makambo oyo bakotika ete bato ya ndako na bango bátalaka. Ya solo, mokristo moko te ya solo akolinga komikɔtisa na nko na boyokani na bademo. Nzokande, baboti basengeli koyeba bafilme, ba-série ya televizyo, masano ya video, mpe ata bateyatre mpe babuku mosusu ya bana oyo elakisaka misala ya maji.—Mas. 22:5.
13 Tózala bilenge to mikóló, miso na biso esengeli te kosepela kotala masano ya video oyo elakisaka mobulu mpe koboma na ndenge ya nsɔmɔ. (Tángá Nzembo 11:5.) Tosengeli koboya kotya makanisi na biso na eloko nyonso oyo Yehova apekisi. Tóbosana te ete eloko Satana azali koluka ezali nde makanisi na biso. (2 Ko. 11:3) Ata kolekisa ntango mingi na kotala masano oyo ekoki komonana ete ezali mabe te ekoki kolekisela biso ntango ya kosala losambo na libota, kotánga Biblia mokolo na mokolo, mpe kobongisa makita na biso.—Flp. 1:9, 10.
Landá ndakisa ya Yesu
14, 15. Likambo nini tosengeli kosimba na komekama ya misato oyo Satana amekaki Kristo, mpe ndenge nini Yesu alongaki kotɛmɛla yango?
14 Likambo ya mawa, na mokili oyo mabe, tokoki te kokima komona biloko oyo ezangi ntina. Ata Yesu mpe balakisaki ye biloko ya ndenge wana. Na mbala ya misato oyo Satana amekaki Yesu mpo atika kosala mokano ya Nzambe, “Zabolo amemaki ye . . . na ngomba moko ya molai mingi mpenza, mpe alakisaki ye makonzi nyonso ya mokili ná nkembo na yango.” (Mat. 4:8) Mpo na nini Satana asalaki bongo? Na ntembe te alingaki kosalela nguya oyo miso ezalaka na yango. Komona nkembo ya makonzi ya mokili ekokaki kotinda Yesu akóma na mposa ya kozwa lokumu na mokili. Yesu asalaki nini?
15 Yesu atyaki te makanisi na ye na komekama yango. Atikaki te motema na ye ekolisa bamposa ya mabe. Mpe esɛngaki kutu te ete atala naino makambo oyo Zabolo alakisaki ye bongo na nsima aboya yango. Yesu aboyaki na mbala moko. Alobaki boye: “Longwá, Satana!” (Mat. 4:10) Yesu akobaki kotya makanisi na ye na boyokani na ye na Yehova mpe apesaki eyano oyo eyokanaki na mokano oyo azalaki na yango na bomoi—kosala mokano ya Nzambe. (Ebr. 10:7) Na yango, Yesu alongaki kokweisa mayele mabe ya Satana.
16. Mateya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu alongaki komekama ya Satana?
16 Tokoki koyekola makambo mingi na likambo oyo ekómelaki Yesu. Ya liboso, Satana akoki kosalela mayele mabe na ye epai ya moto nyonso. (Mat. 24:24) Ya mibale, esika oyo tozali kotya miso na biso ekoki kokolisa bamposa na mitema na biso, na ndenge ya malamu to ya mabe. Ya misato, Satana akosalela “bamposa ya miso” na ndenge nyonso mpo na kobungisa biso nzela. (1 Pe. 5:8) Mpe ya minei, biso mpe tokoki kotɛmɛla Satana, mingimingi soki tosali nokinoki.—Yak. 4:7; 1 Pe. 2:21.
Batelá liso na yo “alima”
17. Mpo na nini ezali bwanya te kozela tii tokokutana na eloko oyo ezangi ntina mpo tóyeba nini tokosala?
17 Ntango tomipesi na Yehova, tolaki mpe polelepolele ete tokoboya biloko oyo ezangi ntina. Ntango tosali elako ya kosala mokano ya Nzambe, tolobi ndenge moko na mokomi ya nzembo ete: “Napekisi makolo na ngai nzela nyonso ya mabe, mpo nabatela liloba na yo.” (Nz. 119:101) Ezali bwanya te kozela tii tokokutana na eloko oyo ezangi ntina mpo tóyeba nini tokosala. Toyekolá makambo oyo Makomami epekisi. Toyebi mayele mabe ya Satana. Ntango nini Yesu amekamaki mpo abongola mabanga mampa? Ezalaki nsima ya kokila bilei mikolo 40 butu moi mpe “ayokaki nzala.” (Mat. 4:1-4) Satana akoki koyeba ntango tozali na bolɛmbu mpe oyo tokoki kokwea noki na komekama. Na yango, sikoyo nde ntango ya kokanisa malamumalamu makambo yango. Koumisa te! Soki mokolo na mokolo tozali kobatela na makanisi elako oyo tosalelaki Yehova ntango tomipesaki na ye, ekateli na biso ya koboya biloko oyo ezangi ntina ekozala makasi.—Mas. 1:5; 19:20.
18, 19. (a) Bokeseni nini ezali kati na liso oyo ezali “alima” ná liso ya “mabe.” (b) Mpo na nini ezali na ntina tókoba kokanisa makambo oyo ezali na ntina, mpe toli nini Bafilipi 4:8 epesi biso na likambo yango?
18 Mokolo na mokolo, tomonaka biloko ndenge na ndenge oyo ezali kosepelisa miso, mpe biloko yango ezali se kobakisama. Likebisi oyo Yesu apesaki ya kobatela liso “alima” ezali mpenza na ntina mingi. (Mat. 6:22, 23) Liso oyo ezali “alima” etalaka kaka eloko moko—kokokisa mokano ya Nzambe. Nzokande, liso ya “mabe” ezalaka na mayele mabe, na lokoso, mpe elingá biloko oyo ezangi ntina.
19 Kobosana te, miso na biso eleisaka makanisi na biso mpe makanisi na biso eleisaka motema na biso. Na yango, ezali mpenza na ntina mingi tókoba kokanisa makambo oyo ezali na ntina. (Tángá Bafilipi 4:8.) Ya solo, tózongelaka ntango nyonso libondeli ya mokomi ya nzembo ete: “Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina.” Bongo, ntango tozali kobunda mpo na kosala na boyokani na libondeli yango, tokoki mpenza kolikya ete Yehova ‘akobatela biso na bomoi na nzela na ye moko.’—Nz. 119:37; Ebr. 10:36.
Nini tosengeli kobosana te na oyo etali . . .
• boyokani oyo ezali kati na miso, makanisi mpe motema na biso?
• makama ya kotala pornografi?
• ntina ya kobatela liso na biso “alima”?
[Bililingi na lokasa 23]
Biloko nini oyo ezangi ntina bakristo basengeli koboya kotala?