Yobo ayikaki mpiko—Biso mpe toyika mpiko!
“Tala, tolobi ete tobiangi bango bato na esɛngɔ baoyo bayiki mpiko bongo.”—YAKOBO 5:11.
1. Mobangé moklisto moko alobaki nini na ntina na komekama na ye?
‘ZÁBOLO azali koluka komeka ngai! Nazali kooka lokola Yobo aokaki!’ Ezali na maloba wana nde A. H. Macmillan amonisaki mayoki na ye epai na moninga na ye ya penepene na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Ndeko Macmillan asukisaki bomoi na ye ya mabelé wana azalaki na mibu 89, na Augústo 26, 1966. Ayebaki ete lifuta mpo na mosala ya sembo ya baklisto bapakolami lokola ye esengelaki ‘kolanda bango.’ (Emoniseli 14:13) Ya solo, basengeli kokóba mbala moko mosala ya Yehova na nsima ya lisekwa na bomoi bozangi kufa kati na likoló. Baninga na ye basepelaki ete ndeko Macmillan azwaki mbano wana. Nzokande, wana azalaki kobɛlɛma na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, akutanaki na komekama ndenge na ndenge, kati na yango mpe mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto oyo etindaki ye na kososola mpenza ete ezalaki nde myango oyo Satana azalaki kosalela mpo na kobebisa bosembo na ye epai na Nzambe.
2, 3. Yobo azalaki nani?
2 Wana ndeko Macmillan alobaki ete azalaki kooka lokola Yobo aokaki, azalaki kokanisa na ntina na mobali moko oyo ayikaki mpiko na komekama minene ya kondima. Yobo azalaki kofanda na “mokili ya Usa,” ekoki kozala na nɔ́rdi ya Arabie. Azalaki mokitani ya Semi, mwana ya Noa, azalaki mosambeli ya Yehova. Emonani lokola ete komekama ya Yobo esalemaki na ntango oyo ezalaki kati na liwa ya Yosefe mpe ntango oyo Mose amimonisaki moto ya sembo. Na boumeli ya eleko wana ezalaki na moto moko te oyo akokanaki na Yobo mpo na oyo etali ezaleli ya kosambela Nzambe. Yehova atalelaki Yobo lokola moto malamu, ya sembo mpe oyo abangaka Nzambe.—Yobo 1:1, 8.
3 Lokola azalaki “moto oyo alekaki bato banso epai na ebimelo na ntango,” Yobo azalaki na basaleli mingi, mpe bibwɛlɛ 11 500. Kasi bozwi ya elimo nde ezalaki na ntina mingi mpo na ye. Lokola batata oyo bakobangaka Nzambe lelo oyo, ekoki mpenza kozala ete Yobo azalaki koteya bana na ye nsambo ya mibali mpe misato ya basi na ntina na Yehova. Ata wana bazalaki lisusu kofanda na ndako na ye te, azalaki kosala lokola nganga ya libota na kopesáká mbeka mpo na bango, kokanisáká ete mbala mosusu basilaki kosala lisumu.—Yobo 1:2-5.
4. (a) Mpo na nini baklisto oyo bazali konyokwama basengeli kotalela ndakisa ya Yobo? (b) Na ntina na Yobo, mituna nini tokotalela?
4 Yobo azali moto oyo baklisto oyo bazali konyokwama basengeli kotalela mpo ete bámilendisa na koyika mpiko na motema pɛtɛɛ nyonso. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Tala, tolobi ete tobiangi bango bato na esɛngɔ baoyo bayiki mpiko bongo. Bosili koyoka mpɔ na mpiko na Yobo, bosili komɔna nsuka na makambo na ye epai na [Yehova], jambi [Yehova atondi na boboto mpe na motema mawa, NW].” (Yakobo 5:11) Lokola Yobo, bayekoli bapakolami ya Yesu mpe “ebele monene” ya mikolo na biso bazali na mposa ya mpiko mpo na kolónga komekama na ntina na kondima. (Emoniseli 7:1-9) Na bongo, komekama nini Yobo ayikelaki yango mpiko? Mpo na nini yango ebimaki? Mpe lolenge nini tokoki kozwa litomba na makambo oyo makómelaki ye?
Likambo moko ya ntina monene
5. Kozanga ete Yobo ayeba yango, likambo nini lizalaki kosalema kati na likoló?
5 Kozanga ete Yobo ayeba yango, likambo moko ya ntina monene ezalaki pene ya kobima na likoló. Mokolo moko “bana na Njambe bayaki komimɔnisa liboso na [Yehova].” (Yobo 1:6) Mwana bobele moko ya Nzambe oyo abéngami Liloba, azalaki mpe wana. (Yoane 1:1-3) ‘Bana ya Nzambe’ baanzelu ya sembo mpe baanzelu oyo bazangi botosi, bazalaki mpe wana. (Genese 6:1-3) Satana mpe azalaki wana, mpamba te kobwakama na ye longwa na likoló esengelaki kosalema te liboso ete Bokonzi ekoka kotyama na 1914. (Emoniseli 12:1-12) Na mikolo ya Yobo, Satana alingaki kobimisa likambo moko ya ntina monene. Azalaki pene na kotya ntembe na lotómo oyo Yehova azali na yango ya koyangela bikelamu na Ye nyonso.
6. Satana azalaki koluka kosala nini, mpe lolenge nini alobaki lokuta na ntina na Yehova?
6 Yehova atunaki ye ete: “Olongwi wapi?” Satana ayanolaki ete: “Longwa na kotambolatambola kati na mokili mpe kokɛnda epai na epai na yango.” (Yobo 1:7) Azalaki kolukaluka moto oyo akokaki kolya. (1 Petelo 5:8, 9) Na kobebisáká bosembo ya bato oyo bazali kosalela Nzambe, Satana alingaki komonisa ete moto ata moko te akotosa Nzambe na bolingo nyonso. Kolobeláká likambo yango, Yehova atunaki Satana ete: “Okanisi na motema na yɔ likambo na moombo na ngai, Yobo? Mpɔ ete mosusu ajali lokola ye kati na mokili tɛ, moto malamu bɛ mpe na sembo, oyo akotosaka Njambe mpe akoboyaka mabe.” (Yobo 1:8) Yobo atosaki mpenza mitinda ya Nzambe oyo mitalelaki malamu ezaleli na ye ya kozanga kokoka. (Nzembo 103:10-14) Kasi Satana azongisaki ete: “Yobo akotosaka Njambe bobɛlɛ mpamba? Yɔ otiki lopango kojingela ye tɛ mpɔ na ndako na ye mpe na bilɔkɔ na ye yɔnsɔ epai na epai? Opamboli mosala na mabɔkɔ na ye mpe bibwɛlɛ na ye isili kofuluka mingi kati na mokili.” (Yobo 1:9, 10) Na bongo Zábolo alobaki lokuta na ntina na Yehova na komonisáká ete ezali na moto moko te oyo azali kolinga Ye mpe kosambela Ye na ntina na etɛlɛmɛlo na Ye mpe bizaleli na Ye, kasi Nzambe azali nde kopesa bikelamu na ye biloko mpo ete bákoka kosambela Ye. Satana alobaki ete Yobo azalaki kosalela Nzambe mpo na matomba ya moimi, kasi mpo na bolingo te.
Satana azali kobundisa!
7. Na likambo nini Zábolo abetelaki Nzambe ntembe, mpe lolenge nini Yehova ayanolaki?
7 Satana alobaki ete: “Nde tika ete osembola lobɔkɔ na yɔ sasaipi mpe omama yɔnsɔ ijali na ye mpe akolakela yɔ mabe na miso na yɔ.” Lolenge nini Nzambe akokaki koyanola na ntembe wana ya kotuka? Yehova alobaki ete: “Tala, yɔnsɔ oyo ejali na ye, ejali na lobɔkɔ na yɔ; kasi sembola lobɔkɔ na yɔ epai na ye mɔkɔ tɛ!” Zábolo alobaki ete nyonso oyo Yobo azalaki na yango epambwamaki, efulukaki mingi, mpe ebatelamaki. Nzambe apesaki bongo nzela ete Yobo anyokwama, atako nzoto na ye esengelaki kosimbama te. Lokola azwaki ekateli ya kosala mabe, Satana abimaki na liyangani yango.—Yobo 1:11, 12.
8. (a) Biloko nini ya mosuni Yobo abungisaki? (b) Ndimbola ya solo na ntina na “mɔtɔ na Njambe” ezalaki nini?
8 Mosika te, Satana abandaki kobundisa. Moko na basaleli ya Yobo apesaki ye nsango mabe oyo ete: “Bangɔmbɛ bajalaki kotimola mpe bampunda baliaki pɛmbɛni na bango, nde Baseba bakwelaki bango mpe babɔtɔlaki bango, babomaki baombo na mopɔtu na mopanga.” (Yobo 1:13-15) Libateli lizalaki lisusu te likoló na biloko ya Yobo. Nokinoki, nguya ya bademó esalelamaki, mpamba te mosaleli mosusu ayebisaki ete: “Mɔtɔ na Njambe ebimi na lola mpe ejikisi bampate mpe baombo mpe ebebisi bango nyɛ.” (Yobo 1:16) Ezalaki mabe mingi na komonisa ete Nzambe nde atindaki makambo wana ya mpasi likoló ya mosaleli na ye mpenza! Mpo ete mɔ́tɔ eutaki na likoló, kozanga nkaká Yehova akokaki kopamelama, kasi ezali solo ete mɔ́tɔ yango eutaki epai na bademó.
9. Kobungisama ya biloko ya Yobo ezalaki na bopusi nini likoló na boyokani na ye elongo na Nzambe?
9 Lokola Satana alandaki kobundisa, mosaleli mosusu ayebisaki ete Bakaladi basili kokamata bakamela ya Yobo mpe basili koboma baombo nyonso mosusu. (Yobo 1:17) Atako Yobo abungisaki biloko na ye, yango ebebisaki te boyokani na ye elongo na Nzambe. Okokoka koyika mpiko na kobungisama ya ebele ya biloko na yo ya mosuni kozanga ete obebisa bosembo na yo epai na Yehova?
Likambo ya mawa monene ebimi
10, 11. (a) Nini ekómelaki bana zomi ya Yobo? (b) Nsima na kufa ya nsɔ́mɔ ya bana na ye, lolenge nini Yobo atalelaki Nzambe?
10 Zábolo atiki naino te kobundisa Yobo. Mosaleli mosusu ayebisaki ete: “Bana na yɔ babali mpe bana na yɔ basi bajalaki kolia mpe komɛla vinyo kati na ndako na nkulutu na bango, mpe tala, mopɛpɛ monɛnɛ ebimi na lisobe mpe ebɛti bipai minei na ndako mpe yango ekwei likolo na bilɛngɛ mpe bakufi. Bobɛlɛ ngai mɔkɔ nabiki mpɔ na koyebisa yɔ.” (Yobo 1:18, 19) Bato oyo bayebi mpenza malamu te ndenge likambo yango elekaki bakoki kokanisa ete libebi wana lisalemaki na mopepe ezalaki nde ‘mosala na Nzambe.’ Nzokande, ezali nguya ya bademó nde ekwelaki Yobo mingimingi na bisika oyo ekokaki kopesa mpasi na mayoki.
11 Lokola azalaki na mawa makasi, Yobo ‘apasolaki elamba na ye, akokolaki motó na ye, akweaki na mabelé mpe afukamaki.’ Nzokande, tóyoka maloba na ye: “[Yehova] apɛsaki, [Yehova] asili kolongola. Nkombo na [Yehova] esanjolama.” Lisoló ebakisi ete: “Na kati na oyo yɔnsɔ, Yobo asalaki lisumu tɛ mpe afundi Njambe na ntina na mabe tɛ.” (Yobo 1:20-22) Satana alóngaki mpe te na mbala oyo. Basaleli ya Nzambe basengeli kosala nini soki bakufeli moto to soki likambo moko ya mawa ekómeli bango? Kosambela Yehova na motema na biso mobimba mpe kotya elikya epai na ye ekoki kosalisa biso na koyika mpiko lokola bato ya bosembo, ndenge moko Yobo asalaki yango. Bapakolami mpe baninga na bango oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé bakoki solo kozwa libɔndisi mpe makasi na lisoló oyo elobeli mpiko ya Yobo.
Likambo liyei ndóngó
12, 13. Na liyangani mosusu kati na likoló, likambo nini Satana asɛngaki, mpe lolenge nini Nzambe ayanolaki?
12 Mosika te, Yehova abyangisi liyangani mosusu kati na likoló. Yobo azalaki lisusu na bana te, akómaki mobólá, oyo amonanaki lokola nde ete minyoko na ye eutaki epai na Nzambe, kasi abungisaki bosembo na ye te. Ya solo, Satana andimaki te ete bifundeli na ye na ntina na Nzambe mpe na ntina na Yobo ezalaki ya lokuta. Sikawa ‘bana na Nzambe’ bazalaki pene na koyoka maloba ya kolóngisa mpe maloba ya kokweisa, wana Nzambe azalaki komema Satana ete akóma kino na nsuka ya ntembe yango.
13 Mpo na kokata likambo ya Satana, Yehova atunaki ye: “Olongwi wapi boye?” Eyano na ye ezalaki nini? “Longwa na kotambolatambola kati na mokili mpe kokɛnda epai na epai na yango.” Yehova abendaki lisusu likebi likoló na mosaleli na ye Yobo, moto malamu mpe na sembo oyo akobangaka Nzambe, oyo azali kolanda kobatela makasi bosembo na ye. Satana ayanolaki ete: “Loposo mpɔ na loposo! Moto akopɛsa yɔnsɔ ejali na ye mpɔ na bomɔi na ye. Osembola lobɔkɔ na yɔ sasaipi mpe omama mikwa na ye mpe mosuni na ye mpe akolakela yɔ mabe na miso na yɔ.” Boye Nzambe alobaki ete: “Tala ajali na lobɔkɔ na yɔ, nde bikisa bomoi na ye.” (Yobo 2:2-6) Komonisáká ete Yehova alongolaki naino te bipekiseli nyonso ya libateli, Satana asɛngaki ete mpasi ekwela mikuwa mpe mosuni ya Yobo. Zábolo azwaki te ndingisa ya koboma Yobo; kasi Satana ayebaki ete bokɔnɔ ya nzoto elingaki kopesa ye mpasi mingi mpe yango elingaki komonana lokola ete azalaki kozwa mpasi mpo na etumbu eutaki epai na Nzambe na ntina na masumu oyo azalaki kosala na nkuku.
14. Satana abɛtaki Yobo na nini, mpe mpo na nini moto moko te akokaki kosunga ye mpo na yango?
14 Nsima wana abimisamaki na liyangani yango, Satana akóbaki kosepela na kosala misala mabe. Abɛtaki Yobo na “bibimba mabe longwa na matambe na makolo na ye kino epai na likolo na motó na ye.” Oyo nde mpasi oyo Yobo ayikelaki yango mpiko wana ezalaki ye kofanda kati na mputulu na mɔ́tɔ mpe komikwanza na biteni ya mbeki epasuki! (Yobo 2:7, 8) Ezalaki na monganga moko te oyo akokaki kosalisa ye longwa na mpasi wana ya makasi, ya nsɔ́mɔ, mpe ya nsɔni mpamba te eutaki na nguya ya Satana. Bobele Yehova nde akokaki kobikisa Yobo. Soki ozali mosaleli ya Yehova oyo azali kobɛla, kobosana soko moke te ete Nzambe akoki kosalisa yo ete oyika mpiko mpe akoki kopesa yo bomoi kati na mokili na ye ya sika oyo mozangi bokɔnɔ.—Nzembo 41:1-3; Yisaya 33:24.
15. Mwasi ya Yobo asɛngaki ye ete asala nini, mpe mayoki ya Yobo mazalaki nini?
15 Na nsuka, mwasi ya Yobo alobaki ete: “[Ozali naino kobatela bosembo, NW] na yɔ na makasi? Lakela Njambe mabe mpe kufa!” “Bosembo” emonisi komipesa na losambo kozanga efundeli, mpe ekoki kozala ete alobaki na lolenge ya mabe mpo na kopusa Yobo ete alakela Nzambe mabe. Kasi Yobo azongisaki ete: “Yɔ ojali koloba lokola ekolobaka basi na bilema. Nini? Tokojua malamu na mabɔkɔ na Njambe; bongo tokojua mabe mpe tɛ?” Atako Satana asalelaki mayele mabe wana, alóngaki te, mpamba te eyebisameli biso ete: “Na oyo yɔnsɔ Yobo asalaki lisumu na bibɛbu na ye tɛ.” (Yobo 2:9, 10) Na ndakisa, ekoki kokóma ete basangani ya libota na biso oyo bazali batɛmɛli bakoki koloba ete tozali koboma nzoto mpamba kati na mosala ya boklisto mpe basɛngi biso ete tótika Yehova Nzambe. Lokola Yobo, tokoki koyika mpiko na komekama motindo wana, mpamba te tolingi Yehova mpe mposa na biso ezali ya kosanzola nkombo na ye mosantu.—Nzembo 145:1, 2; Baebele 13:15.
Bakosi misato ya lofundo
16. Banani bayaki, lokola nde mpo na kobɔndisa Yobo, kasi lolenge nini Satana asalelaki bango?
16 Mwango mosusu ya Satana ezalaki oyo ete, “baninga” misato bayaki, lokola nde mpo na kobɔndisa Yobo. Moko nkombo na ye Elifaza, ekoki mpenza kozala ete azalaki mokitani ya Abalayama na nzela ya Esau. Lokola Elifaza nde moto azalaki koloba mingi, ntembe ezali te ete ye nde azalaki mokóló kati na bango misato. Ya mibale, Biledada, mokitani ya Suhu, oyo azalaki moko kati na bana ya Abalayama oyo abotaki elongo na Ketula. Ya misato, Sofala, oyo abéngami Monama mpo na komonisa libota na ye to esika azalaki kofanda, mbala mosusu na nɔ́rdi-wɛ́sti ya Arabie. (Yobo 2:11; Genese 25:1, 2; 36:4, 11) Motindo moko lokola baoyo bazali komeka kopusa lelo Batatoli ya Yehova ete bátika Nzambe, bato wana misato basalelamaki na Satana mpo na kondimisa na lokuta nyonso epai na Yobo ete azali na ekweli mpe koluka kobebisa bosembo na ye.
17. Bato misato oyo bayaki kotala Yobo basalaki nini, mpe nini basalaki te na boumeli ya mikolo nsambo mpe butu nsambo?
17 Bato wana misato bamonisaki ezaleli monene ya koyokela mawa na koleláká, na kopasoláká bilamba na bango, mpe kosopáká mputulu na mitó na bango. Kasi bafandaki elongo na Yobo mikolo nsambo mpe butu nsambo kozanga kobimisa ata liloba moko ya kobɔndisa! (Yobo 2:12, 13; Luka 18:10-14) Lokola bakosi wana misato ya lofundo bazangaki bizaleli ya elimo, yango wana bazalaki te na likambo ya kobɔndisa oyo bakokaki koloba na ntina na Yehova mpe bilaka na ye. Nzokande, babendamaki na kosala bisukiseli ya mabe mpe bazalaki komilɛngɛla mpo na kosalela yango mpo na kokweisa Yobo wana ezalaki bango kosala lolenge bato banso bamonisaka mawa polele. Likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete, liboso ete mikolo nsambo ya kozanga koloba ekóma na nsuka na yango, elenge mobali Elihu atɛlɛmaki mpembeni mpo na koyoka masoló na bango.
18. Mpo na nini Yobo alukaki kimya kati na kufa?
18 Na nsuka, Yobo azwaki maloba. Lokola azwaki libɔndisi te epai na bato misato oyo bayaki kotala ye, alakelaki mabe mokolo oyo ye abotamaki mpe amitunaki soki mpo na nini bomoi na ye ya mawa ezalaki koumela ntango molai. Alukaki ete akufa mpo akóma na kimya, kozanga nkutu kokanisa ete, mokolo mosusu, akokaki lisusu kozala na bomoi moko kitoko liboso ete akufa, mpo ete sikawa asili kobungisa nyonso, akufeli bana, mpe azali na bokɔnɔ makasi. Kasi Nzambe atikaki te ete Yobo anyokwama kino kokufa.—Yobo 3:1-26.
Bafundi ya Yobo babandi koyokisa ye mpasi
19. Na makambo nini Elifaza afundaki Yobo na lokuta nyonso?
19 Elifaza nde moto ya liboso na koloba kati na biteni misato ya liboso ya masoló wana, oyo na nsima, etyaki bosembo ya Yobo na komekama. Kati na lisukúlu na ye ya liboso, Elifaza atunaki ete: “[Osilá naino komona wapi bato na sembo balongolami?, NW]” Asukisaki ete ekokaki mpe kozala ete Yobo asalaki likambo moko ya mabe oyo esali ete azwa etumbu euti epai na Nzambe. (Yobo, mikapo 4, 5) Kati na lisukúlu na ye ya mibale, Elifaza atyolaki mayele ya Yobo mpe atunaki ete: “Oyebi nini oyo biso toyebi tɛ?” Elifaza alingaki koloba ete Yobo azalaki koluka komimonisa ete ye aleki ye oyo azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Na nsuka ya kobundisa na ye ya mibale na maloba, alobaki ete Yobo azali na ekweli na ntina na lipɛngwi, kanyaka mpe bokosi. (Yobo, mokapo 15) Kati na lisukúlu na ye ya nsuka, na lokuta nyonso, Elifaza afundaki Yobo ete asalaki makambo mingi ya mabe—kobɔtɔla biloko, koboya kopesa mampa mpe mai epai na baoyo bazalaki na bosénga, mpe konyokola basi-bakufeli-mibali mpe bitike.—Yobo, mokapo 22.
20. Makambo motindo nini Biledada alobaki epai na Yobo?
20 Moto ya mibale mpo na kozwa maloba kati na biteni nyonso misato ya masoló ezalaki bongo Biledada, ye azalaki ntango nyonso kolanda bobele makambo oyo Elifaza azalaki kobandisa. Masukúlu ya Biledada mazalaki mikuse, kasi ezalaki na makambo ya kopesa mpasi mingi kati na motema. Nkutu afundaki bana ya Yobo ete basalaki mabe mpe yango wana bakufaki. Na makanisi ya libunga, asalelaki lisese oyo: Lokola matiti-na-mai mpe fololo ekokaukaka mpe ekokufaka soki ezangi mai, ezali yango nde ekokómelaka bato ‘yɔnsɔ oyo bakobosanaka Njambe.’ Maloba wana mazali solo, kasi makokaki te kosalelama mpo na Yobo. (Yobo, mokapo 8) Engebene Biledada, bampasi ya Yobo ekokani na oyo ekómelaka basáli na mabe. (Yobo, mokapo 18) Kati na lisukúlu na ye ya mokuse mpe ya misato, Biledada alobaki ete moto azali “mpambo” mpe “nkiso” mpe na yango azali mbindo liboso ya Nzambe.—Yobo, mokapo 25.
21. Na makambo nini Sofala afundaki Yobo?
21 Moto ya misato mpo na kokamata maloba ezalaki Sofala. Mingimingi makanisi na ye mazalaki kokokana na oyo ya Elifaza mpe Biledada. Sofala afundaki Yobo ete azali na mabe mingi mpe akebisaki ye ete atika kosala masumu. (Yobo, mikapo 11, 20) Nsima ya biteni mibale ya masoló, Sofala atikaki koloba. Azalaki na likambo ya kobakisa te na eteni ya misato. Nzokande, na boumeli ya masukúlu nyonso wana, na mpiko nyonso Yobo azalaki koyanola na bafundi na ye. Na ndakisa, alobaki ete: “Bino bojali yɔnsɔ babɔndisi mabe! Maloba na mopɛpɛ makosuka nde?”—Yobo 16:2, 3.
Tokoki koyika mpiko
22, 23. (a) Lokola asalaki epai na Yobo, lolenge nini Zábolo akoki koluka kobebisa bosembo na biso epai na Yehova Nzambe? (b) Atako Yobo ayikaki mpiko na komekama ndenge na ndenge, nini tokoki komituna na ntina na ezaleli na ye?
22 Lokola Yobo, tokoki kokutana na mikakatano mingi na mbala moko, mpe Satana akoki kolɛmbisa biso to kosalela makambo mosusu kati na milende na ye mpo na kobebisa bosembo na biso. Akoki koluka kopusa biso ete tópesa Yehova mokɔngɔ soki tokutani na mikakatano ya nkita. Soki moto moko oyo tolingaka akufi to tozali na bokɔnɔ, Satana akoki koluka kopusa biso na kopamela Nzambe. Lokola baninga ya Yobo, moto mosusu akoki ata kofunda biso na lokuta nyonso. Lokola ndeko Macmillan oyo tolobelaki na ebandeli, ekoki kozala ete Satana azali ‘koluka komeka biso,’ kasi tokoki koyika mpiko.
23 Lokola touti komona yango, Yobo ayikaki mpiko na komekama na ye ya ndenge na ndenge. Nzokande, ayikaki mpiko bobele mpo na mpamba? Azalaki mpenza na elimo etutami? Tiká tótala soki Yobo abungisaki mpenza elikya.
Lolenge nini okoki koyanola?
◻ Likambo nini ya ntina monene Satana abimisaki na mikolo ya Yobo?
◻ Na makambo nini Yobo amekamaki na lolenge ya mpasi mingi?
◻ “Baninga” misato ya Yobo bafundaki ye na makambo nini?
◻ Lokola ezalaki mpo na likambo ya Yobo, lolenge nini Satana akoki koluka kobebisa bosembo na biso epai na Yehova?
[Elilingi na lokasa 10]
A. H. Macmillan