Talá Moto oyo asalaka makambo ya kokamwa!
“Tɛlɛmá nyɛɛ mpe kanisá misala ya kokamwa ya Nzambe.”—YOBO 37:14.
1, 2. Na 1922, biloko nini ya kokamwa bamonaki, mpe bato yango bamiyokaki ndenge nini ntango bamonaki yango?
BANDA ebele ya bambula, moto moko ya arkeoloji azalaki kosala elongo na moto monene moko ya Angleterre mpo na koluka biloko ya motuya. Nsukansuka, mokolo ya 26 Novɛmbɛ 1922, na malita ya Bafalo ya Ezipito na esika oyo babengi Lobwaku ya Bakonzi, mosala ya Howard Carter, moto ya arkeoloji na Lord Carnarvon, ezwaki mbano: bamonaki lilita ya Falo Toutankhamon. Ntango bakómaki liboso ya ekuke moko ekangamá, batɔbɔlaki lidusu na ekuke yango. Carter akɔtisaki buji na lidusu yango mpe atalaki na kati.
2 Na nsima, Carter ayebisaki ndenge makambo elekaki: “Ntango Lord Carnarvon amonaki ete azeli mingi mpe nazali kaka koloba eloko te, atunaki, ‘Ozali komona eloko na kati?’ maloba oyo nazongiselaki ye ezalaki kaka ete, ‘Ɛɛ, biloko ya kokamwa.’” Bamonaki ebele ya biloko ya motuya mpe kati na yango ezalaki na sanduku moko makasi ya wolo. Mbala mosusu osi omoná mwa ndambo ya “biloko ya kokamwa” yango na fɔtɔ to na ndako oyo babombaka biloko ya kalakala. Atako biloko yango ezali biloko ya kokamwa, yango te nde esimbi bomoi na yo. Yango wana, tótika yango naino mpo na kolobela biloko ya kokamwa oyo ezali na ntina na bomoi na yo mpe ezali na motuya mpo na yo.
3. Epai wapi tokoki koyekola makambo ya kokamwa oyo ezali na ntina mpo na biso?
3 Na ndakisa, tókanisa naino moto moko oyo azalaki na bomoi eleki sikoyo bankama ya bambula, moto yango ayebani koleka bavɛdɛti nyonso ya bafilme, bilombe ya masano to bato ya mabota ya bakonzi. Balobi ete moto yango alekaki bato nyonso oyo bafandaki epai oyo moi ebimaka. Oyebi nkombo na ye, ezali Yobo. Mokanda mobimba ya Biblia ezali kolobela ye. Kasi, elenge mobali moko na nkombo Elihu, oyo azalaki mpe na bomoi na ntango ya Yobo, amonaki ete asengeli kosembola makanisi ya Yobo. Elihu alobaki ete Yobo alekisaki komityela likebi mpe kotyela baoyo azalaki na bango likebi. Yobo mokapo 37 ezali na toli ya polele mpe ya malamu oyo ekoki kozala na ntina mingi mpo na mokomoko na biso.—Yobo 1:1-3; 32:1–33:12.
4. Nini etindaki Elihu aloba makambo oyo ezali na Yobo 37:14?
4 Baninga misato ya lokuta bayaki kolobaloba na Yobo ebele ya makambo mpo na komonisa ye ete asalaki mabe, na makanisi to na misala. (Yobo 15:1-6, 16; 22:5-10) Elihu afandaki nyɛɛ mpe azelaki tii basilisaki kosolola. Na nsima, azwaki maloba mpe alobaki mpenza lokola moto ya bososoli mpe ya mayele. Alobaki ebele ya makambo ya malamu, kasi talá likambo ya ntina koleka oyo alobaki: “Ɛ Yobo, yoká oyo; tɛlɛmá nyɛɛ mpe kanisá misala ya kokamwa ya Nzambe.”—Yobo 37:14.
Ye oyo asalaki misala
5. “Misala ya kokamwa ya Nzambe” oyo Elihu alobelaki ezali misala nini?
5 Omoni ete Elihu asɛngaki te ete Yobo amityela likebi, to atyela ye Elihu likebi, to atyela bato mosusu likebi. Kasi, na maloba ya mayele mpenza, Elihu asɛngaki Yobo—na biso mpe—na kotya likebi na misala ya kokamwa ya Yehova Nzambe. Okanisi nini, “misala ya kokamwa ya Nzambe” ezali misala nini? Lisusu, soki otali mitungisi oyo mbala mosusu ozali na yango mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto, mpo na kozwa mbongo, mpo na bomoi na yo na mikolo ezali koya, mpo libota na yo, baninga na yo ya mosala mpe ya kartye, mpo na nini osengeli lisusu kotyela misala ya Nzambe likebi? Misala ya kokamwa ya Yehova Nzambe ezali komonisa mayele mpe bokonzi na ye likoló ya biloko nyonso oyo tomonaka. (Nehemia 9:6; Nzembo 24:1; 104:24; 136:5, 6) Mpo na komona yango polele, tótalela likambo moko oyo ezali na mokanda ya Yosua.
6, 7. (a) Na mikolo ya Mose mpe ya Yosua, Yehova asalaki misala nini ya kokamwa? (b) Soki omonaki moko na misala wana oyo esalemaki na mikolo yango, olingaki kozala ndenge nini?
6 Yehova abimiselaki bato ya Ezipito ya kala malɔzi mpe na nsima akabolaki Mai Motane mpo ete Mose alekisa Bayisalaele mpe bázwa bonsomi. (Exode 7:1–14:31; Nzembo 106:7, 21, 22) Yosua mokapo 3 elobeli lisolo mosusu oyo ekokani na yango. Nsima ya liwa ya Mose, Yosua nde azwaki esika na ye, akambaki libota ya Nzambe mpo na kokatisa mai mosusu mpe kokɔta na bango na Mokili ya Ndaka. Yosua alobaki boye: “[Bómibulisa] bino mpenza, mpo ete lobi [Yehova] akosala misala ya kokamwa na kati na bino.” (Yosua 3:5) Misala yango ya kokamwa ezalaki misala nini?
7 Lisolo elobi ete Yehova akabolaki mai ya Ebale Yaladene mpo ete bankóto ya mibali, basi mpe bana báleka na mabele ekauki. (Yosua 3:7-17) Soki tozalaki wana mpe tomonaki ndenge oyo mai ya ebale ekabwanaki mpe bato wana nyonso bazali kokatisa kozanga likama, tolingaki kotikala monɔkɔ polele liboso ya likambo ya kokamwa ya ndenge wana! Likambo yango emonisaki nguya oyo Nzambe azali na yango likoló ya biloko oyo akelá. Kasi, ata lelo oyo, ezali mpe na makambo ya kokamwa motindo wana. Mpo na koyeba makambo yango mosusu mpe ntina oyo tosengeli kotyela yango likebi, tótalela Yobo 37:5-7.
8, 9. Wapi misala ya kokamwa oyo Yobo 37:5-7 elobeli, kasi mpo na nini tosengeli kokanisa yango?
8 Elihu alobaki boye: “Nzambe akongulumaka na kokamwa na mongongo na ye; akosalaka makambo minene masosoli biso ntina te.” Elihu azalaki kokanisa makambo nini ntango alobaki ete Nzambe asalaka makambo ya “kokamwa”? Elihu alobeli mbula-mpɛmbɛ na mbula. Yango ekataka mosala ya mosali-bilanga mpe epesaka ye ntango mpe ntina ya kokanisa misala ya Nzambe. Mbala mosusu tozali basali-bilanga te, kasi ezali na makambo oyo mbula na mbula-mpɛmbɛ esalaka na bomoi na biso. Ezala mbula to mbula-mpɛmbɛ, oyo kaka enokaka na mboka na biso ekoki kokata misala na biso. Tozwaka ntango ya kofanda mpe kokanisa soki nani asalaki biloko yango ya kokamwa mpe soki elimboli nini? Osi osalá yango?
9 Ndenge totángaka yango na Yobo mokapo 38, Yehova Nzambe ye moko amonisaki makanisi ya ndenge wana ntango atunaki Yobo mituna ya ntina mpenza. Atako Mozalisi atunaki nde Yobo, mituna yango etaleli mpe elimo na biso, bomoi na biso ya lelo mpe ya mikolo ezali koya. Na yango wana, tótalela naino makambo oyo Nzambe atunaki mpe tókanisa soki yango elimboli nini; tósala likambo oyo Yobo 37:14 ezali kosɛnga biso.
10. Yobo mokapo 38 esengeli kotinda biso na kosala nini, mpe ezali kobimisa mituna nini?
10 Mokapo 38 ebandi boye: “[Yehova] azongisaki liloba epai na Yobo uta na mopɛpɛ makasi ye ete, Nani oyo [akobebisa] toli na maloba mazangi boyebi? Kangá loketo na yo lokola mobali, nakotuna yo, yo okoyebisa ngai.” (Yobo 38:1-3) Maloba yango ezali kotinda moto afungola matoi mpo na koyoka oyo ekolanda. Maloba yango esalisaki Yobo asosola ete azali liboso ya Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe ete asengelaki kotuna ye. Ebongi ete biso na bazalani na biso tósala likambo yango. Na nsima, Nzambe azongelaki makambo oyo Elihu alobaki. “Yo ozalaki wapi wana natyaki miboko ya mokili? Yebisá ngai, soko oyebi kososola. Nani apimaki bipimelo na yango—oyebi nde? Nani asembolaki nsinga likoló na yango? Miboko na yango ikitisami na nini? Nani atii libanga na yango ya nsuka?”—Yobo 38:4-6.
11. Yobo 38:4-6 esengeli kopesa biso makanisi nini?
11 Yobo azalaki wapi, to mpe nani kati na biso akoki kotombola mosapi ete azalaki ntango basalaki mabele? Biso nde tosalaki plan ya mabele, mpe na nsima tokamataki lati mpe tomekaki bolai mpe bonene na yango? Te! Kutu, na ntango wana bato bakelamaki naino te. Nzambe akokanisaki mabele na ndako moko mpe atunaki ete: “Nani atii libanga na yango ya nsuka?” Toyebi ete ntaka oyo ekaboli mabele na moi ebongi mpenza mpo tózala na bomoi awa na mabele mpe tózala malamu. Mabele ezali mpe na bonene oyo ebongi. Soki mabele ezalaki monene koleka ndenge ezali, mbɛlɛ gaze oyo babengi hydrogène eleki mingi na mopɛpɛ mpe mpo na yango, mbɛlɛ bikelamu ya bomoi ezali te awa na mabele. Tomoni mpenza ete ezali na moto moko oyo ‘atyaki libanga na yango ya nsuka’ na esika oyo ebongi mpenza. Moto yango ezalaki Yobo? Ezali nde biso? To ezali nde Yehova Nzambe?—Masese 3:19; Yilimia 10:12.
Nani akoki kopesa eyano?
12. Motuna oyo ezali na Yobo 38:6 ezali kotinda biso na kokanisa likambo nini?
12 Nzambe atunaki ete: “Miboko na yango ikitisami na nini?” Oyo ezali motuna ya malamu mpenza. Mbala mosusu toyebi liloba moko oyo Yobo ayebaki yango te: gravitation. Mingi kati na biso toyebi ete eloko babengi gravitation to nguya oyo moi ezali na yango ya kobenda biloko, yango nde esalaka ete mabele etikala na esika na yango na ntaka oyo ekaboli yango na moi; ezali lokola nde miboko na yango etyami makasi. Kasi, nani kati na biso ayebi nguya yango malamumalamu?
13, 14. (a) Tosengeli kondima likambo nini mpo na nguya ya gravitation? (b) Likambo oyo emonisami na Yobo 38:6 esengeli kotinda biso na kosala nini?
13 Mokanda moko oyo ebimi sika (The Universe Explained) elobi ete ‘gravitation ezali nguya oyo bato bameseni na yango mingi, kasi bayebi yango malamu te.’ Mokanda yango elobi lisusu boye: “Ezali komonana lokola ete nguya ya gravitation etambolaka nokinoki mpenza na kati ya molɔ́ngɔ́, kasi eyebani mpenza te soki etambolaka ndenge nini. Nzokande, na bambula oyo euti koleka, bato ya mayele ya fiziki bakómaki kokanisa ete nguya yango etambolaka lokola mbonge oyo esalemi na biloko mikemike babengi graviton . . . Kasi moto moko te ayebi mpenza soki biloko yango ezali.” Talá likambo!
14 Banda Yehova atuná Yobo mituna wana, eleki sikoyo mbula 3 000 mpe mayele ya siansi ekoli mingi. Kasi, moto moko te, ezala biso to bato ya mayele ya fiziki, akoki kolimbola gravitation, nguya oyo esalaka ete mabele etikala na nzela na yango, na esika oyo ebongi mpo biso tózala na bomoi awa na mabele. (Yobo 26:7; Yisaya 45:18) Nyonso oyo elingi koloba te ete biso nyonso tómipesa sikoyo na koyekola na mozindo mpo na koyeba nguya ya gravitation malamumalamu. Nzokande, soki totii likebi ata na likambo kaka moko oyo kati na misala ya kokamwa ya Nzambe, ekobongola ndenge oyo biso totalelaka ye. Mayele mpe boyebi na ye ezali kokamwisa yo mpe ozali komona ntina oyo tosengeli koyekola mokano na ye malamumalamu?
15-17. (a) Yobo 38:8-11 elobelaki makambo nini mpe ebimisi mituna nini? (b) Tosengeli koloba nini mpo na makambo oyo bato bayebi mpo na mbu mpe mpo na ndenge oyo mai ya mbu ekabwani na mokili mobimba?
15 Mozalisi alandaki kotuna mituna: “Nani akangi mai-na-monana na bikuke wana epunzwaki yango na ebotelo? Na ntango wana nalatisaki yango mapata lokola elamba mpe molili tuu elamba ya kozingela yango; wana nakokisaki ndelo na ngai likoló na yango, natyaki mpe bikangelo mpe bikuke, mpe nalobaki ete, Okokóma kino esika oyo nde okoleka awa te, awa mbonge na yo na lolendo ikosuka.”—Yobo 38:8-11.
16 Kokanga mai-na-monana na bikuke etaleli bakɔntina, mbu, komata mpe kokita ya mai ya mbu. Bato balekisi ntango boni mpo na kotalatala mpe koyekola makambo yango? Bankóto ya bambula; mpe na ekeke oyo eleki, bamipesaki mingi mpenza na koyekola yango. Okoki kokanisa ete lelo oyo tosi toyebi makambo mingi oyo etali biloko yango. Kasi, lelo oyo na 2001, soki oluki likambo yango na mikanda na babibliotɛkɛ ya minene to soki oluki na Internet makambo ya sika oyo bato bayekoli mpo na yango, okomona nini?
17 Mokanda moko eyebani mingi elobi boye: “Ndenge oyo bakɔntina ekabwaná na mbu na mabele, mpe ndenge oyo biloko ndenge na ndenge ya mokili [bangomba, mai, mabwaku, mpe bongo na bongo] ekabolamá, ezalaka banda kala mokakatano monene oyo basavá babundaka mpo na koyekola mpe kolimbola yango”. Nsima ya maloba yango, mokanda yango eyebisi makambo minei oyo ekoki kozala bandimbola ya makambo yango, kasi elobi lisusu ete yango ezali kaka “mwa ndambo kati na makanisi ebele oyo bato bazali kobimisa mpo na komeka kolimbola likambo yango.” Yo moko oyebi ete soki bapesi kaka likanisi, yango “emonisi ete bilembeteli ya solosolo ezali mpenza te mpo na kolimbola malamu likambo yango, kasi ezali kaka komeka.”
18. Yobo 38:8-11 epesi yo makanisi nini?
18 Nyonso wana ezali mpenza komonisa ete mituna oyo totángi na Yobo 38:8-11 ezali na ntina ata na moi ya lelo, boye te? Ezali biso te nde tobongisaki mabele ndenge ezali. Biso te bato totyaki sanza na esika oyo ezali mpo nguya na yango ya kobenda biloko etombolaka mpe ekitisaka mai ya mbu, mpe atako bongo, ezindisaka bokula te to bisika oyo tofandi. Oyebi nani asalaki yango? Ezali Moto oyo asalaka makambo ya kokamwa.—Nzembo 33:7; 89:9; Masese 8:29; Misala 4:24; Emoniseli 14:7.
Tópesa Yehova lokumu oyo abongi na yango
19. Maloba kitoko oyo ezali na Yobo 38:12-14 ezali kobenda likebi na biso na makambo nini ya mokili?
19 Tokoki koloba te ete soki mabele ebalukaka, likambo oyo Yobo 38:12-14 elobeli, ezali na mayele ya bato. Ndenge mabele ebalukaka esalaka ete ntɔngɔ etanaka mokolo na mokolo, mpe mbala mingi kotana ya ntɔngɔ ezalaka na kitoko ya koloba te. Ntango moi ezali kobima, mokemoke, biloko nyonso oyo ezali na mabele ekómaka komonana polele, se ndenge mbeki ekómaka kitoko ntango bazali kotya yango nzɔlɔkɔ. Soki totii likebi ata moke na kotala ndenge mabele ebalukaka, likambo oyo ekokamwisa biso ezali ete mabele ebalukaka mbangumbangu te; mpe toyebi ete soki ezalaka bongo, mbɛlɛ ezali likama. Mabele ebalukaka mpe malɛmbɛ koleka te mpo ete moi to butu eleka molai te mpe epesa molunge to mpiɔ oyo eleki te, likambo oyo ekokaki kozala likama mpo na bikelamu ya bomoi awa na mabele. Tosengeli mpenza kosepela ete Nzambe ye moko, kasi bato te, asalá ete mabele ebalukaka na lombangu oyo ebongi.—Nzembo 148:1-5.
20. Okopesa biyano nini na mituna oyo etunami na Yobo 38:16, 18?
20 Kanisá soki Nzambe atuni yo mituna mosusu oyo: “[Okɔti] kati na maziba ya mai-na-monana? Otamboli kati na mabulu ya bozindo?” Ata bato ya mayele oyo bayekolaka makambo ya mbu bakoki te kopesa biyano oyo ebongi mpenza na mituna yango! “Ososoli monene ya mokili? Yebisá yango soko oyebi oyo nyonso.” (Yobo 38:16, 18) Osi otambolá mpe omoná bisika nyonso awa na mabele, ata mpe mingi kati na yango? Tosengeli koumela mbula boni na bomoi mpo na kotala bisika kitoko mpe ya kokamwa oyo ezali awa na mabele? Mpe mbɛlɛ ekozala mpenza bomoi ya kitoko!
21. (a) Makanisi nini bato ya siansi bakoki kopesa na mituna oyo ezali na Yobo 38:19? (b) Makambo oyo toyebi mpo na pole esengeli kotinda biso na kosala nini?
21 Talá lisusu mituna ya makasi oyo ezali na Yobo 38:19: “Nzela nini kokóma na efandelo ya pole? Mpo na molili, esika na yango nini?” Mbala mosusu oyebi ete na ntango ya kala bato ya siansi bazalaki kokanisa ete pole etambolaka lokola mbonge, lokola mwa mbonge oyo tokoki komona na etima ya mai. Na nsima, na 1905, Albert Einstein alobaki ete pole ezali nguya oyo ezali mwa maboke mikemike to ezali mbuma mikemike mpenza oyo okoki komona na miso te. Bandimbola yango esukisaki likambo? Mokanda moko ebimi sika etuni motuna oyo: “Pole ezali mbonge to ezali nde mbuma mikemike?” Epesi eyano oyo: “Tozali komona lokola ete [pole] ekoki kozala mbonge te, ekoki mpe kozala mbuma mikemike te, mpamba te mitindo yango mibale [mbonge na mbuma mikemike] ekeseni mpenza. Eyano oyo eleki malamu ezali ete pole ezali moko ya biloko wana mibale te.” Atako moto moko te akoki kolimbola malamumalamu misala ya kokamwa ya Nzambe na likambo yango, pole ya moi epesaka biso kaka molunge (mbala moko to na lolenge mosusu). Banzete esalelaka pole mpe na nsima ebotaka biloko oyo tolyaka mpe epesaka mpema (oxygène) oyo topemaka. Pole esalisaka biso mpo tókoka kotánga, komona bilongi ya bato oyo tolingaka, kotala kolala ya moi, mpe bongo na bongo. Ntango tozali kosala nyonso wana, tosengeli kondimaka misala ya kokamwa ya Nzambe, boye te?—Nzembo 104:1, 2; 145:5; Yisaya 45:7; Yilimia 31:35.
22. Na ntango ya kala, misala ya kokamwa ya Nzambe etindaki Davidi na kosala nini?
22 Tolobeli misala ya Yehova nyonso oyo kaka mpo ekamwisa biso to ebangisa biso? Te. Mokomi ya nzembo alobaki ete tokokoka te kokanga ntina mpe kolobela misala nyonso ya Nzambe. Davidi akomaki boye: “Ɛ [Yehova], Nzambe na ngai, yo osali makambo mingi, misala na yo ya kokamwa . . . Soko nakoloba mpe nakoyebisa yango, ikoleka oyo ikoki kotángama.” (Nzembo 40:5) Kasi, tokanisi te ete alingaki koloba ete ye akolobela misala minene wana te. Davidi amonisaki yango na mokano oyo azalaki na yango ndenge oyo Nzembo 9:1 emonisi yango ete: “Nakotɔnda [Yehova] na motema mobimba na ngai; nakosakola misala ya kokamwa na yo nyonso.”
23. Misala ya kokamwa ya Nzambe ezali kopesa yo mposa nini, mpe ndenge nini okoki kosalisa bato mosusu?
23 Omoni te ete biso mpe tosengeli kosala bongo? Omoni te ete ndenge oyo tozali kokamwa liboso ya misala minene ya Nzambe esengeli kotinda biso na koloba mpo na ye, koloba makambo oyo asali mpe oyo akosala? Eyano ezali polele: tosengeli ‘kosolola lokumu na ye kati na mabota ya bato, misala na ye ya kokamwa kati na bato nyonso.’ (Nzembo 96:3-5) Tosengeli koyebisa bato mosusu makambo oyo toyekoli na ntina na Nzambe mpo na komonisa na komikitisa nyonso ete tozali kosepela na misala na ye ya kokamwa. Ata soki bato yango bakolaki na esika oyo batyelaka Mozalisi likebi te, elobeli na biso ya malamu, oyo ezali komonisa ete tozali na nsango malamu, ekoki kotinda bango bándima Nzambe. Longola yango, ekoki kotinda bango báluka koyeba mpe kosalela ye oyo ‘azalisaki biloko nyonso,’ Yehova, Ye oyo asalaka makambo ya kokamwa.—Emoniseli 4:11.
Okopesa eyano nini?
• Misala nini ya Nzambe maloba ya Yobo 37:14 ezali kotinda yo na kotalela?
• Tángá biloko mosusu oyo bato ya siansi bakoki kolimbola malamumalamu te oyo Yobo mokapo 37 mpe 38 elobeli.
• Ndenge nini ozali kotalela misala ya kokamwa ya Nzambe, mpe motema na yo ezali kotinda yo na kosala nini?
[Elilingi na lokasa 7]
Nani akangaki mai-na-monana mpo etikala na esika na yango?
[Elilingi na lokasa 7]
Nani oyo atambolá na bisika nyonso ya kitoko ya mokili oyo Nzambe akelá?