Tyá likebi na misala ya kokamwa ya Nzambe
“Ɛ [Yehova], Nzambe na ngai, yo osali makambo mingi, misala na yo ya kokamwa mpe mikano na yo izali mpo na biso; mosusu lokola yo azali te.”—NZEMBO 40:5.
1, 2. Makambo nini ezali komonisa biso misala ya kokamwa ya Nzambe, mpe yango esengeli kotinda biso na kosala nini?
SOKI okamati Biblia mpe obandi kotánga yango, okomona mbala moko ete Nzambe asalaki makambo ya kokamwa mpo na Yisalaele, libota ya basaleli na ye na ntango ya kala. (Yosua 3:5; Nzembo 106:7, 21, 22) Atako lelo oyo Yehova azali kosala makambo wana te na bomoi ya bato, tozali na ebele ya makambo oyo ezali komonisa misala na ye ya kokamwa. Yango wana, tokoki mpenza koloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Misala na yo mingi boni, Ɛ [Yehova]! Otɛmisaki yango nyonso na mayele malamu; mokili etondi maa na biloko bisalaki yo.”—Nzembo 104:24; 148:1-5.
2 Lelo oyo, bato mingi bazali koboya kondima makambo oyo ezali komonisa polele misala ya Mozalisi. (Baloma 1:20) Kasi, ebongi tótyela misala yango likebi mpe tóluka koyeba esika na biso mpe mikumba na biso liboso na Moto oyo akelaki biso. Yobo mokapo 38 tii 41 ekoki kosalisa biso na likambo yango mpamba te, na mikapo yango, Yehova abendaki likebi ya Yobo likoló ya mwa ndambo ya misala na ye ya kokamwa. Tótalela mituna mosusu ya ntina oyo Nzambe atunaki.
Misala ya nguya mpe ya kokamwa
3. Ndenge elobami na Yobo 38:22, 23, 25-29, Nzambe atunaki mituna na ntina na makambo nini?
3 Na esika moko Nzambe atunaki Yobo boye: “[Okɔti] na bibombelo ya mbula-mpɛmbɛ? Omoni bibombelo ya matandala? Oyo ngai nabombi mpo na ntango ya mobulu, mpo na mokolo ya etumba mpe kobunda.” Mbula-mpɛmbɛ na matandala eyebani na bisika mingi na mokili. Nzambe atunaki lisusu boye: “Nani atimoli nzela-na-mai mpo na mbula mingi mpe nzela mpo na nkake na konguluma, konokisa mbula na mokili wana moto azali te, na lisobe lizali na bato wana te, kotondisa mokili ya mpamba mpe ya eloko te, kotoisa matiti mibesu? Mbula ezali nde na tata? Nani abotaki matɔnɔ ya mamwe? Matandala ikobima na libumu ya nani? Nani abotaki mai-na-mpiɔ longwa na lola?”—Yobo 38:22, 23, 25-29.
4-6. Nini emonisi ete bato bayebi mbula-mpɛmbɛ malamu te?
4 Bato mosusu oyo bafandi na bamboka oyo basengeli kosala makambo mbangumbangu mpo na kowela ntango mpe basengeli kosala mibembo, bakoki komona ete mbula-mpɛmbɛ ezali eloko oyo etyelaka bango nkaka. Nzokande, ebele ya bato mosusu basepelaka mpenza na mbula-mpɛmbɛ; ntango ezipi bitando minene, epesaka bango likoki ya kosala masano oyo, soki mbula-mpɛmbɛ ezali te, bakoki kosala yango te. Soki tozongi na motuna ya Nzambe, tokoki nde koloba ete toyebi mpenza mbula-mpɛmbɛ malamu? toyebi ata ndenge yango ezalaka? Ya solo, toyebi ndenge mbula-mpɛmbɛ ezalaka soki ezali ebele; mbala mosusu tosi tomoná yango, na bafɔtɔ to na miso, ezipi bitando minene. Kasi, toyebi ndenge oyo liboke ya mbula-mpɛmbɛ oyo okoki kotoka na lobɔkɔ (flocon) ezalaka na kati?
5 Bato mosusu basali bambula ebele na koyekola maboke ya mbula-mpɛmbɛ mpe kokanga yango bafɔtɔ. Liboke moko ya mbula-mpɛmbɛ ekoki kozala na mwa mabanga ya mai mikemike ya kitoko mpe ya ndenge na ndenge nkama moko. Mokanda moko (Atmosphere) elobi boye: “Mitindo ebele mpe ya ndenge na ndenge ya maboke ya mbula-mpɛmbɛ ekamwisaka mpenza, mpe atako bato ya siansi balobaka ete ezali na likambo moko te ekoki kopekisa ete maboke yango ekokana, naino bamoná te mabanga mike mibale oyo ekokani mpenza. Na boumeli ya mbula koleka 40, Wilson Bentley . . . akambaki mosala monene ya kotalatala maboke ya mbula-mpɛmbɛ mpe kokanga yango bafɔtɔ na mikroskopɛ mpo na koyekola yango, kasi ata mokolo moko te amonaki mabanga mikemike mibale ya mbula-mpɛmbɛ oyo ekokani.” Ata soki ekoki komonana ete mabanga mibale ekokani, mitindo ekeseni ya maboke ndenge na ndenge ya mbula-mpɛmbɛ ezali kaka likambo ya kokamwa!
6 Tózongela lisusu motuna oyo Nzambe atunaki: “[Okɔti] na bibombelo ya mbula-mpɛmbɛ?” Bato mingi bakanisaka ete mbula-mpɛmbɛ ezalaka na mapata. Okanisi ete okoki kokende na bibombelo yango mpo na kotánga mitindo ndenge na ndenge ya maboke ya mbula-mpɛmbɛ mpe koyekola ndenge oyo esalemaki? Mokanda moko ya siansi elobi ete: “Tii lelo oyo, toyebi te ndenge nini mpe esika nini matanga ya mai ya mapata ebandaka kokangama mpo ekóma mwa mabanga mikemike ya mai ya malili makasi mpenza (-40°C).”—Nzembo 147:16, 17; Yisaya 55:9, 10.
7. Bato bayebi makambo nini mpo na mbula?
7 Tokoloba boni mpo na mbula? Nzambe atunaki Yobo boye: “Mbula ezali nde na tata? Nani abotaki matɔnɔ ya mamwe?” Na mokanda ya siansi oyo touti kolobela, bakómi boye: “Lokola ezali na makambo kilikili oyo elekaka na mopɛpɛ mpe lokola londende mpe biloko oyo ezali na mopɛpɛ ebongwanaka mingi mpe nokinoki, ezali mpasi mpo na koyekola mpe kolimbola ndenge oyo mapata mpe mbula esalemaka.” Yango elingi koloba ete bato ya siansi balobilobi makambo ebele mpo na mbula, kasi bakoki mpenza kolimbola mbula malamumalamu te. Atako bongo, oyebi ete mbula ebɛtaka, epolisaka mabele, ekolisaka milona mpe esalaka ete bomoi ezala malamu mpe tósepela na yango.
8. Mpo na nini maloba ya Paulo na Misala 14:17 ebongi mpenza?
8 Ozali na likanisi moko te na ntoma Paulo? Ye alendisaki bato mosusu bámona na misala yango ya kokamwa elembo ete ezali na Moto oyo asalaki yango. Paulo alobaki mpo na Yehova Nzambe ete: “Azangi kotatola na ntina na ye mpenza te, mpo ete asali misala malamu mpe apesi bino mbula na likoló mpe bilaka ya kobota mbuma mingi, mpe atondisi mitema na bino na biloko ya kolya mpe na esengo.”—Misala 14:17; Nzembo 147:8.
9. Ndenge nini misala ya kokamwa ya Nzambe ezali komonisa ete azali na nguya mingi?
9 Tokoki kotya ntembe te ete Moto oyo asalaki makambo ya kokamwa mpe ya malamu ndenge yango azali na mayele oyo ezali na nsuka te mpe azali na nguya mingi. Mpo na komona ete azali na nguya mpenza, kanisá naino likambo oyo: Balobaka ete na mokili mobimba, mokolo na mokolo mbula 45 000 ya nkake na mikalikali ebɛtaka, elingi koloba ete na mobu moko, bambula ya ndenge yango koleka milio 16 ebɛtaka. Elingi koloba ete na ngonga oyo tozali koloba, mbula soko 2 000 ya nkake na mikalikali ezali kobɛta na bisika mingi na mokili. Nguya oyo mapata ya mbula moko ya nkake ezali na yango ekokani na nguya ya babɔmbi nikleere zomi to koleka oyo babwakaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Tomonaka nguya na yango mosusu lokola mikalikali. Atako mikalikali ebangisaka, yango nde esalaka eloko oyo babengi azote oyo ezalaka na mopɛpɛ oyo ekoki kokɔta na mabele mpe milona esalelaka yango lokola bilei. Na bongo, atako mikalikali ezali nguya oyo emonanaka, kasi ezali mpe na matomba.—Nzembo 104:14, 15.
Epesi yo makanisi nini?
10. Okopesa biyano nini na mituna oyo ezali na Yobo 38:33-38?
10 Meká naino komitya na esika ya Yobo, bongo Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso atunaka yo mituna. Na ntembe te oyebi ete bato mingi batyelaka mpenza misala ya kokamwa ya Nzambe likebi te. Yehova atuni biso mituna oyo ezali na Yobo 38:33-38. “Oyebi nde mibeko ya lola, okolonga [kotya] bokonzi na yango kati na mokili? Oyebi [kotombola] mongongo na yo epai na mapata, ete mpela ya mai ezindisa yo? Oyebi kotinda nkake ete ibima mpe iloba na yo ete, Talá biso! Nani atii mayele kati na mapata? Nani apesi bososoli epai na londende? Nani akotángaka mapata mpo na mayele? Nani akolalisa mbeki-na-mai na lola ntango wana mputulu ekokóma makasi mpe ndambo ya mabele ikokangana elongo moko?”
11, 12. Yebisá mwa makambo oyo endimisi ete Nzambe azali Moto oyo asalaka misala ya kokamwa.
11 Totaleli kaka mwa makambo moke oyo Elihu alobaki na Yobo, mpe tomoni mituna mosusu oyo Yehova atunaki Yobo ayanola “lokola mobali.” (Yobo 38:3) Tolobi “mwa makambo moke” mpamba te na mokapo 38 mpe 39, Nzambe abendaki mpe likebi na biloko mosusu ya minene oyo asalá. Na ndakisa, alobelaki maboke ya minzoto (constellation) na likoló. Nani oyo ayebi mibeko na yango nyonso? (Yobo 38:31-33) Yehova atángelaki Yobo mwa banyama lokola nkosi, yanganga, ntaba ya ngomba, zɛbrɛ, nzale, maligbanga, mpunda mpe mpongo mpe atunaki Yobo soki ye nde asalaki ete banyama yango ezala na makambo oyo toyebeli yango, mpo ezala na bomoi mpe ekola. Mbala mosusu okosepela koyekola mikapo yango, mingimingi soki osepelaka na bampunda to na banyama mosusu.—Nzembo 50:10, 11.
12 Okoki mpe kotalela mokapo 40 mpe 41, epai Yehova atunaki lisusu Yobo mituna mpo na banyama mibale. Tokanisi ete banyama yango ezali ngubu (Behemote), nyama monenemonene mpe ya makasi, mpe ngando ya Ebale Nil (Leviatana), nyama ya nsɔmɔ. Mokomoko na yango ezali ekelamu ya kokamwa oyo ebongi tótyela yango likebi. Tótalela sikoyo makanisi oyo makambo yango esengeli kopesa biso.
13. Mituna oyo Nzambe atunaki Yobo esalaki Yobo nini, mpe yango esengeli kosala biso nini?
13 Yobo mokapo 42 emonisi biso likambo oyo esalemaki epai ya Yobo nsima ya koyoka mituna ya Nzambe. Liboso, Yobo azalaki komityela likebi mingi mpe azalaki kotyela bato mosusu likebi mingi. Kasi, lokola andimaki kosembolama na nzela ya mituna oyo Nzambe atunaki, Yobo abongolaki makanisi na ye. Alobaki ete: “Nayebi ete yo [Yehova] okoki kosala makambo nyonso mpe ete mokano moko na yo ekopekisama te. Nani [abebisi] toli nde na boyebi te? Boye nabimisi makambo mayebi ngai ntina te, makambo maleki ngai na kokamwa, nayebaki yango te.” (Yobo 42:2, 3) Nsima ya kotala malamu misala ya Nzambe, Yobo alobaki ete ezalaki mpenza makambo ya kokamwa mpo na ye. Soki biso mpe totaleli misala yango, tokokamwa na mayele mpe na nguya oyo Nzambe azali na yango. Na nsuka, tokosala nini? Ezali kaka kokamwa mpamba ete Nzambe azali na nguya mpe na makoki mingi? To tosengeli nde kosala likambo mosusu?
14. Misala ya kokamwa ya Nzambe etindaki Davidi na kosala nini?
14 Na Nzembo 86, tozali kotánga maloba ya Davidi oyo eyokani na makambo yango; na nzembo mosusu liboso, Davidi alobaki ete: “Likoló ekosakolaka nkembo ya Nzambe, lola ekoyebisaka misala ya mabɔkɔ na ye. Mokolo moko ekoteyaka yango na mokolo mosusu, butu moko ekoyebisaka yango na butu mosusu.” (Nzembo 19:1, 2) Kasi Davidi asukaki wana te. Nzembo 86:10, 11 elobi boye: “Zambi yo ozali monene mpe okosalaka makambo ya kokamwa; yo moko ozali Nzambe. Ɛ [Yehova] teyá ngai na nzela na yo; nakotambola kati na solo na yo; pesá ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.” Kokamwa oyo Davidi akamwaki mpo na misala minene ya Mozalisi esanganaki mpe na kobanga mpe limemya. Okoki koyeba ntina na yango. Davidi alingaki ata moke te koyokisa Ye oyo azali na likoki ya kosala misala ya kokamwa motema mpasi. Biso mpe tosengeli kosala bongo te.
15. Mpo na nini kobanga mpe limemya oyo Davidi azalaki na yango epai ya Nzambe ebongaki mpenza?
15 Na ntembe te Davidi asosolaki ete lokola Nzambe azali na nguya mingi mpe azali kotambwisa biloko ya nguya mingi, akoki kosalela nguya yango mpo na kopesa moto nyonso oyo asepeli na ye te etumbu. Mpo na bato yango, ezali likama. Nzambe atunaki Yobo ete: “[Okɔti] na bibombelo ya mbula-mpɛmbɛ? Omoni bibombelo ya matandala? Oyo ngai nabombi mpo na ntango ya mobulu, mpo na mokolo ya etumba mpe kobunda.” Mbula-mpɛmbɛ, matandala, mbula ya makasi, mopɛpɛ makasi mpe mikalikali ezali bibundeli ya Nzambe. Bibundeli yango ezali na nguya ya kosakana te!—Yobo 38:22, 23.
16, 17. Nini ezali komonisa nguya ya kokamwa oyo Nzambe azali na yango, mpe ndenge nini asalelaki yango na ntango ya kala?
16 Mbala mosusu ozali koyeba makama oyo moko ya biloko yango—ezala mopɛpɛ makasi, matandala, mpela—esalaki. Na ndakisa, na nsuka ya 1999, mipɛpɛ makasi ebebisaki bamboka ya sudi-wɛsti ya Mpoto. Likambo yango ekamwisaki ata bato ya mayele oyo bayekolaka mbula na mipɛpɛ makasi. Mipɛpɛ yango ezalaki koleka na lombangu ya kilomɛtrɛ 200 na ngonga moko, elongolaki bansamba ya bandako ebele, epikolaki makonzí ya minene ya kura, mpe ebalusaki mituka ya minene. Kanisá naino: Mipɛpɛ yango epikolaki to ebukaki nzete soki milio 270 mpe nzete 10 000 kaka na parkɛ ya Versailles, pene na Paris. Na bamilio ya bandako, kura ekatanaki. Bato soki 100 bakufaki. Nyonso wana esalemaki na mwa ntango moke. Talá nguya ya kokamwa boye!
17 Moto mosusu akoki koloba ete mipɛpɛ makasi eyaka na mbalakaka, etambolaka bongobongo mpe eyebanaka epai yango ekosuka te. Kasi, nini ekoki kosalema soki Ye oyo azali na nguya nyonso asaleli nguya ya ndenge wana mpo na kosala misala ya kokamwa? Asalaki likambo ya ndenge wana na mikolo ya Abalayama, mpe Abalayama ayebaki ete Mosambisi ya mokili mobimba amonaki ndenge oyo mabe ekómaki mingi na bingumba mibale, Sodomo na Gomola. Bato yango babebaki mpenza, yango wana kolela mpo na mabe na bango emataki tii epai ya Nzambe oyo abikisaki bato ya sembo na bingumba yango oyo esengelaki kozwa etumbu. Lisolo elobi boye: “Na nsima [Yehova] anokisaki sufulu mpe mɔ́tɔ . . . longwa na [Yehova] na likoló” ya bingumba wana. Likambo wana ezalaki mosala ya kokamwa ya Nzambe, abatelaki bato ya sembo mpe abomaki bato oyo bazalaki mabe mpenza.—Genese 19:24.
18. Yisaya mokapo 25 ezali kolobela misala nini ya kokamwa?
18 Bambula mingi na nsima, Nzambe akatelaki Babilone, engumba moko ya kala, etumbu. Ekoki mpenza kozala ete Yisaya mokapo 25 elobeli nde mboka yango. Nzambe asakolaki ete engumba yango ekotikala mpamba: “Okómisi mboka lokola libondo, mpe mboka ya makasi bobele eloko mpamba. Ndako monene ya bapaya ezali mboka lisusu te, libela ekotongama lisusu te.” (Yisaya 25:2) Lelo oyo, bato oyo bakendaka kotala esika oyo Babilone ya kala ezalaki, bakoki kotatola ete likambo yango esalemaki mpenza. Kobomama ya Babilone ekanamaki? Ɛɛ. Tokoki mpenza kondima makanisi ya Yisaya ete: “Ɛ [Yehova], yo Nzambe na ngai; nakokumisa yo, nakosanzola nkombo na yo, mpo ete osali makambo ya kokamwa, myango mibongisamaki kala na solo mpe na sembo.”—Yisaya 25:1.
Misala ya kokamwa na mikolo oyo ekoya
19, 20. Ndenge nini Yisaya 25:6-8 ekokokisama lisusu?
19 Nzambe akokisaki esakweli oyo touti kolobela na ntango ya kala, mpe akosala makambo ya kokamwa na mikolo ekoya. Na bavɛrsɛ mosusu oyo elandi, epai Yisaya alobeli “makambo ya kokamwa” ya Nzambe, ezali na esakweli moko oyo ekokisami naino te; kasi, ekokokisama se ndenge esakweli oyo eyebisaki etumbu ya Babilone ekokisamaki. ‘Likambo’ nini ‘ya kokamwa’ alaki? Yisaya 25:6 elobi ete: “Na ngomba oyo [Yehova] na bibele akobongisela mabota nyonso elambo ya bilei ya mafuta, elambo ya vinyo oyo esili koumela, na bilei kitoko bitondi na mafuta mpe na vinyo iumeli mpe iponami.”
20 Esakweli yango ekokokisama solo na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, mokili yango ezali lisusu mosika te. Na ntango wana, mikakatano nyonso oyo ezali kotungisa ebele ya bato lelo oyo ekozala lisusu te. Esakweli ya Yisaya 25:7, 8 elaki ete Nzambe akosalela nguya na ye mpo na kosala moko na misala oyo eleki kokamwisa: “Akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Mokonzi Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso; akolongola mpe nsɔni na bato na ye longwa na mokili mobimba, zambi [Yehova] alobi bongo.” Ntoma Paulo azongelaki maloba wana mpe amonisaki ete elimboli ete Nzambe akozongisa bato oyo bakufá na bomoi, akosekwisa bango. Ekozala mpenza mosala ya kokamwa!—1 Bakolinti 15:51-54.
21. Nzambe akosala misala nini ya kokamwa mpo na bato oyo bakufá?
21 Ntina mosusu oyo kolela mpo na mawa ekosila ezali ete bato nyonso bakozala lisusu na maladi te. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, abikisaki bato mingi: bato oyo bakufá miso bamonaki, bato oyo bakufá matoi bayokaki, nzoto ya bibɔsɔnɔ ebongaki. Yoane 5:5-9 elobi ete Yesu abikisaki mobali moko oyo azalaki na maladi oyo eumelaki mbula 38. Bato oyo bamonaki balobaki ete ezali likamwisi to mosala ya kokamwa. Ezalaki mpenza bongo! Kasi, Yesu ayebisaki bango ete kokamwa ekoleka monene ntango akosekwisa bakufi: “Bókamwa na likambo oyo te, mpo ete ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima; baoyo basalaki malamu kino lisekwa na bomoi.”—Yoane 5:28, 29.
22. Mpo na nini babola na banyokwami bakoki kozala na elikya?
22 Likambo yango ekosalema mpenza, mpamba te ezali Yehova nde alaki yango. Zalá na kondima ete ntango akosalela mpe akotinda nguya na ye monene na ndenge oyo ebongi, makambo ya kokamwa ekosalema. Nzembo 72 emonisi makambo oyo akosala na nzela ya Mwana na ye Mokonzi. Bato ya sembo bakokóma ebele. Kimya ekozala mingi. Nzambe akobikisa babola na banyokwami. Alaki likambo oyo: “Masango ikotondana na mokili ata kino likoló ya [ngomba]; mpe mbuma na yango ikoningana [lokola] nzete ya Lebanona [ya kala]; bato ya mboka bakoyikana mingi, [lokola matiti] na mokili.”—Nzembo 72:16.
23. Misala ya kokamwa ya Nzambe esengeli kotinda biso na kosala nini?
23 Tozali mpenza na ntina ya kotya likebi na misala nyonso ya kokamwa ya Yehova—misala oyo asalá na ntango ya kala, oyo azali kosala lelo oyo, mpe oyo akosala na mikolo ezali koya. “Tiká ete [Yehova] Nzambe, Nzambe ya Yisalaele asanzolama zambi ezali bobele ye akosalaka makambo ya kokamwa. Tiká nkombo na ye ya nkembo esanzolama libela; tiká ete mokili nyonso etonda na nkembo na ye. [Amen mpe Amen, NW].” (Nzembo 72:18, 19) Yango nde lisolo oyo esengeli kolongwaka na monɔkɔ na biso te epai ya bandeko na biso mpe epai ya bato mosusu. Ɛɛ, ‘tósololaka lokumu na ye kati na mabota ya bato, misala na ye ya kokamwa kati na bato nyonso.’—Nzembo 78:3, 4; 96:3, 4.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini mituna oyo batunaki Yobo ezali komonisa ete ezali na makambo mingi oyo bato bayebi yango malamu te?
• Pesá bandakisa ya misala ya kokamwa ya Nzambe oyo elobelami na Yobo mokapo 37 tii 41 oyo ekamwisi yo mingi.
• Tosengeli kosala nini nsima ya kotalela ndambo ya misala ya kokamwa ya Nzambe?
[Bililingi na lokasa 10]
Okoloba nini na ntina na mitindo ndenge na ndenge ya maboke ya mbula-mpɛmbɛ mpe nguya ya kokamwa ya mikalikali?
[Eutelo ya bafɔtɔ]
snowcrystals.net
[Bililingi na lokasa 13]
Tólobelaka ntango nyonso misala ya kokamwa ya Nzambe