Mabe elongi nde?
BANDA kalakala, bakomi mpe bato ya filozofi balobaka makambo ndenge na ndenge mpo na likanisi oyo emonisaka ete, na kati ya molɔ́ngɔ́, kowelana moko elekaka kati na malamu na mabe. Kasi, ezali na buku moko oyo ezali kolobela malamumalamu etumba oyo ezali koleka na kati ya Nzambe na Zabolo. Buku yango ezali Biblia. Biblia ezali kolimbola polele ntina ya etumba yango mpe ezali kosalisa na koyeba nani mpenza alongi.
Ntango Nzambe akelaki mobali na mwasi ya liboso, elekaki ntango mingi te, ekelamu moko ya elimo, Satana Zabolo, abimisaki ntembe na ntina etali boyangeli ya Nzambe. Na ndenge nini? Asalelaki mayele mabe mpo na kokosela Nzambe makambo ete abombelaki bikelamu na ye makambo ya malamu mpe ete moto akozala na bomoi ya malamu koleka soki amitambwisi ye moko.—Genese 3:1-5; Emoniseli 12:9.
Na nsima, na ntango ya Yobo, Satana abimisaki ntembe mosusu. Lokola azalaki na mposa ya kokweisa Yobo mpo azala lisusu sembo te epai ya Nzambe, Satana alobaki ete: “Loposo mpo na loposo! Moto akopesa nyonso ezali na ye mpo na bomoi na ye.” (Yobo 2:4) Likambo yango ezalaki moke te! Lokola asalelaki liloba “moto” na esika atánga nkombo ya Yobo, Satana abimisaki ntembe mpe alobaki ete moto moko te akoki kotikala sembo. Na ndenge yango, alobaki ete: ‘Moto akosala nyonso mpo na kobikisa bomoi na ye. Soki otikeli ngai nzela okomona ndenge nakopɛngwisa bato nyonso epai na Yo.’
Mpo na koyeba soki nani alongi na kati ya Nzambe na Zabolo, tosengeli koluka biyano na mituna mibale oyo: Moto akoki mpenza komitambwisa ye moko? Zabolo alongi nde kopɛngwisa bato nyonso?
Bato bakoki mpenza komitambwisa bango moko?
Banda kalakala, bato bameká biyangeli ya ndenge na ndenge. Bameká baguvɛrnema ya ndenge na ndenge, lokola monarchie, aristocratie, autocratie, Fascisme mpe Kominisme. Soki totaleli kaka likambo yango moko ya komekameka baguvɛrnema ndenge na ndenge, ezali komonisa ete baguvɛrnema yango ebongi te.
Na buku na ye (A History of the World), oyo ebimaki na 1922, Herbert Wells akomaki boye: “Baloma bazalaki koyeba te ete babandaki likambo moko monene ya komekameka ndenge oyo ebongi koyangela mboka.” Abakisaki boye: “Lolenge ya koyangela mboka ezalaki kobongwana ntango nyonso, ata mbala moko te etikalaki ndenge moko. Soki totaleli makambo na lolenge moko boye, tokoloba ete komekameka yango elongaki te. Kasi soki totaleli mpe na lolenge mosusu, tokoloba ete komekameka yango ekómaki na nsuka te, mpe lelo oyo, na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika bazali naino kaka komeka kosilisa mokakatano oyo ezali na mokili mobimba na likambo etali koyangela mboka, ndenge bato ya Loma bazalaki na yango.”
Tii na ekeke ya 20, bato bamekaki baguvɛrnema ya ndenge na ndenge. Na nsuka ya ekeke yango, bikólo mingi mpenza endimaki boyangeli ya demokrasi. Na maloba, bamonisaka ete demokrasi ezali boyangeli ya bato nyonso. Kasi demokrasi emonisi ete moto akoki komitambwisa ye moko kozanga kotalela Nzambe? Jawaharlal Nehru, ye azalaká ministre-mokonzi ya Inde, alobaki ete demokrasi ezali ebongiseli ya malamu, kasi abakisaki ete: “Nalobi bongo mpo bibongiseli mosusu eleki mabe.” Valéry Giscard d’Estaing, prezida ya kala ya ekólo France, alobaki ete: “Demokrasi ya solosolo ezali lisusu te.”
Ata na ekeke ya mitano liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Platon, moto ya filozofi na Grèce, amonaki ete demokrasi ezali lolenge malamu mpenza te ya boyangeli. Buku moko (A History of Political Theory) eyebisi ete alobelaki “kozanga mayele mpe kozanga makoki ya bato ya politiki, makambo oyo ezali mpenzampenza kobebisa demokrasi.” Bato mingi ya politiki na mikolo na biso bazali komilelalela ete ekómi mpasi mpenza mpo na kozwa bato oyo bazali na makoki mpo na kosala na guvɛrnema. Zulunalo moko (The Wall Street Journal) elobaki ete bato “balɛmbi bakonzi oyo, soki likambo moko monene ebimi oyo esengeli básilisa, bakokaka kosilisa yango te.” Ebakisaki ete: “Bato bazali koyoka mabe na komona ete ntango bango bazali koluka batambwisi ya malamu, bazali komona kaka bakonzi oyo bazali kokoka kozwa bikateli te mpe balingi kanyaka.”
Tótalela sikoyo boyangeli ya Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala. Yehova Nzambe apesaki Salomo bwanya mingi mpenza. (1 Mikonzi 4:29-34) Ekólo Yisalaele ezalaki ndenge nini na boumeli ya mbula 40 ya boyangeli ya Salomo? Biblia epesi eyano ete: “Yuda mpe Yisalaele bazalaki mingi lokola zɛlɔ pembeni ya mai-na-monana; balyaki mpe bamɛlaki mpe bayokaki esengo.” Lisolo yango elobi lisusu ete: “Yuda mpe Yisalaele bafandaki na kimya longwa na Dani kino Bele-seba, moto na moto na nse ya [nzete na ye ya vinyo mpe ya figi, NW], mikolo nyonso ya Salomo.” (1 Mikonzi 4:20, 25) Ekólo yango mobimba ezalaki na kimya, bomɛngo mpe esengo nsuka te mpamba te mokonzi moko ya bwanya, oyo azalaki momonisi ya Yehova Nzambe, Moyangeli Monene oyo amonanaka te, nde azalaki koyangela ekólo yango.
Talá bokeseni monene na kati ya boyangeli ya bato mpe oyo ya Nzambe! Moto moko akoki mpenza koloba na bosembo ete Satana alongi na ntembe oyo atyelaki Nzambe na likambo ya boyangeli? Te, mpamba te mosakoli Yilimia alobaki solo ete: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela ya moto ezali na kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.”—Yilimia 10:23.
Satana akoki nde kopɛngwisa bato nyonso?
Satana alongi kosala likambo oyo alobaki ete akoki kopɛngwisa bato nyonso bátika kotosa Nzambe? Na mokapo 11 ya mokanda ya Baebele, ntoma Paulo atángaki nkombo ya mibali na basi ya sembo oyo bazalaki na bomoi liboso ete Klisto aya awa na mabele. Na nsima alobaki ete: “Ntango ekozanga ngai soki nakobi mpo na kolobela Gideona, Balaka, Samasona, Yefeta, Davidi, mpe Samwele ná basakoli mosusu.” (Baebele 11:32) Paulo abengaki basaleli yango ya sembo ya Nzambe ‘lipata monene ya batatoli.’ (Baebele 12:1) Liloba ya Grɛki oyo esalelami awa mpo na “lipata” elimboli mwa lipata ya moke te, kasi lipata ya monene mpenza, oyo ebandeli na nsuka na yango ezali komonana te. Ebongi mpenza bongo mpamba te basaleli ya sembo ya Nzambe na ntango ya kala bazalaki ebele mpenza, tokoki koloba ete bazalaki lokola lipata moko monene. Ɛɛ, banda kalakala, ebele ya bato baponaka bango moko kosalela Yehova Nzambe.—Yosua 24:15.
Tozali komona nini na ntango na biso? Atako banyokolaki Batatoli ya Yehova mpe batɛmɛlaki bango makasi na boumeli ya ekeke ya 20, bakómi ebele, koleka milio motoba na mokili mobimba. Bato mosusu pene na milio libwa bazali koyangana na bango, mpe mingi kati na bango bazali kosala makasi mpo na kokóma baninga ya Nzambe.
Ezali Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe nde apesaki eyano ya malamu mpenza na likambo oyo Satana alobaki ete akoki kopɛngwisa bato nyonso bátika kotosa Yehova. Ata mpasi makasi oyo ayokaki likoló ya nzete ya mpasi elongaki te kosukisa bosembo na ye. Liboso akata motema, Yesu agangaki na mongongo makasi ete: “Tata, na mabɔkɔ na yo natiki elimo na ngai.”—Luka 23:46.
Satana azali kosala nyonso oyo akoki, ezala komeka bato to konyokola bango polelepolele, mpo na koluka koyangela bango. Ntango azali kosalela ‘mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela’ mpo na komeka bato, baoyo bazali koluka kokende epai ya Yehova azali koluka kopekisa bango to mpe baoyo bazali epai ya Yehova, azali koluka kokabola bango na Ye. (1 Yoane 2:16) Satana ‘azipi mpe makanisi ya bato oyo bazangi kondima mpo ete kongɛnga ya nsango malamu ya nkembo oyo etali Klisto ekoka kokɔta te.’ (2 Bakolinti 4:4) Satana asalelaka ata makaneli mpe kobanga bato mpo na kokokisa mokano na ye.—Misala 5:40.
Atako bongo, Zabolo azali kolonga te baoyo bamitii na ngámbo ya Nzambe. Basili koyeba Yehova Nzambe mpe ‘kolinga ye na motema na bango mobimba mpe na molimo na bango mobimba mpe na makanisi na bango nyonso.’ (Matai 22:37) Ya solo, bosembo ya Yesu mpe ya ebele ya bato mosusu emonisi ete Satana Zabolo alongi ata moke te.
Nini ekosalema na mikolo ezali koya?
Bato bakokoba komekameka biyangeli libela na libela? Mosakoli Danyele alobaki boye: “Na mikolo ya mikonzi yango Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soki moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44) Bokonzi oyo Nzambe ya likoló atii ezali guvɛrnema ya likoló, oyo mokonzi na yango ezali Yesu Klisto. Bokonzi yango ezali oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye bábondelaka ete eya. (Matai 6:9, 10) Bokonzi yango ekobebisa baguvɛrnema nyonso ya bato na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” oyo etikali moke eya mpe ekoningisa mabele mobimba.—Emoniseli 16:14, 16.
Likambo nini ekokómela Satana? Biblia elobeli likambo oyo ekosalema na maloba oyo: “[Anzelu moko ya Yehova] asimbaki dalagona, nyoka yango ya ebandeli, oyo azali Zabolo mpe Satana, mpe akangaki ye minyɔlɔlɔ mbula nkóto moko. Mpe abwakaki ye na kati ya lobwaku mozindo mpe akangaki yango mpe atyaki yango elembo na likoló na ye, mpo akoka lisusu kobungisa bikólo nzela te tii ntango mbula nkóto yango ekosuka.” (Emoniseli 20:1-3) Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu Klisto ekobanda kaka nsima ya kobwakama ya Satana na lobwaku mozindo, elingi koloba ete akokoka lisusu kosala eloko moko te.
Mabele ekokóma esika moko kitoko mpenza! Mabe ekozala lisusu te, ata mpe baoyo nyonso babimisaka yango bakozala lisusu te. Biblia elaki boye: “Basali ya mabe bakosuka . . . Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nzembo 37:9-11) Moto moko te akobebisa kimya na bango, ezala ata nyama. (Yisaya 11:6-9) Kutu, ata ebele ya bato ya kala oyo bazalaki na ngámbo ya Satana na kozanga koyeba mpe mpo bazwaki libaku ya koyeba Yehova te, bakozonga na bomoi mpe bakoteya bango makambo ya Nzambe.—Misala 24:15.
Na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, mabele ekokóma paladiso, mpe bato nyonso oyo bakozala na mabele yango bakokóma bato ya kokoka. Na nsima bakofungola Satana “mpo na mwa ntango moke” mpe nsima ya mwa ntango yango, akobebisama mpo na libela, nzela moko na bato nyonso oyo bakotɛmɛla boyangeli ya Nzambe.—Emoniseli 20:3, 7-10.
Okozala na ngámbo ya nani?
Satana abebisaki mabele na ndenge ya mabe koleka na ekeke ya 20. Kasi makambo oyo ezali kosalema na mokili ezali komonisa te ete Satana alongi, ezali kutu nde komonisa ete tozali na mikolo ya nsuka ya mokili ya mabe oyo. (Matai 24:3-14; Emoniseli 6:1-8) Ezali te mabe oyo etondi na mokili to likanisi oyo bato mingi bazali na yango nde ekoki kosalisa na koyeba nani alongi. Makambo ya kotalela mpenzampenza yango nde oyo: Boyangeli ya nani eleki malamu? Mpe ezali na moto oyo asalelaki Nzambe na bolingo mpenza? Na makambo yango mibale, kaka Yehova nde moto alongi.
Soki ntango oyo Nzambe atikaki emonisi ete Satana alongi te, mpo na nini Nzambe azali kotika ete mabe ekoba kosalema? Yehova azali nde komonisa motema molai “mpo alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.” (2 Petelo 3:9) Mokano ya Nzambe “ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Tozali kolendisa yo osalela ntango oyo etikali mpo na koyekola Biblia mpe mpo na ‘koyekola koyeba Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo ye atindaki, Yesu Klisto.’ (Yoane 17:3) Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo ozwa boyebi yango mpo yo mpe okɔta na molɔngɔ ya ebele ya bato oyo bazali kotɛlɛma na ngámbo ya Ye oyo alongi.
[Bililingi na lokasa 5]
Ndenge Batatoli ya Yehova bazali kotikala sembo ezali mpe komonisa polele ete Satana alongi te
[Elilingi na lokasa 7]
Ebele ya bato ya sembo bazali na ngámbo ya Yehova