Liteya mpo na lolenge ya kosala liboso ya mikakatano
BATO mingi basilá naino te kobunda na mikakatano nyonso oyo Yobo akutanaki na yango. Na boumeli ya mwa ntango mokuse, abulunganisamaki mpo na kobebisama ya bozwi mpe misala na ye, liwa ya nsɔ́mɔ ya bana na ye nyonso, mpe na nsuka, bokɔnɔ moko ya makasi ebetaki ye. Baninga mpe bandeko na ye nyonso basundolaki ye, mwasi na ye asɛngaki ye ete ‘alakela Njambe mabe mpe akufa!’—Yobo 2:9; 19:13, 14.
Nzokande, Yobo azali liziba monene ya elendiseli mpo na moto nyonso oyo akutani na mikakatano motindo wana. Litomba malamu ya likambo na ye wana ya mpasi ezali komonisa ete koyika mpiko liboso na mikakatano esepelisaka motema ya Yehova, soki mpenza tosali bongo mpo ete topusami na ezaleli ya solosolo ya komipesa epai na Nzambe kasi te mpo na matomba ya moimi.—Yobo, mikapo 1, 2; Yobo 42:10-17; Masese 27:11.
Lisoló oyo ya Biblia ezali na batoli mingi mpo na oyo etali lolenge ya kosala liboso na mikakatano. Ezali kopesa bandakisa ya kobenda likebi mpo na lolenge nini—mpe lolenge nini te—moto oyo akutani na mikakatano asengeli kopesamela toli. Lisusu, likambo oyo Yobo akutanaki na yango ekoki kosalisa biso na kosala na lolenge lobongi na ntango tokutani na makambo ya mpasi.
Liteya mpo na oyo etali lolenge mabe ya kopesa toli
Elobeli “mobɔndisi na Yobo” esili kokóma elobeli mpo na komonisa moto oyo ayebi bobele kotya pilipili na makambo na esika ya komonisa mawa na ntango moninga akweli likambo. Kasi, atako baninga misato ya Yobo basilá kozwa lokumu mabe, tokoki koloba te ete mikano na bango ezalaki nyonso ya mabe. Na lolenge moko to mosusu, ekoki kozala ete balingaki nde kosunga Yobo, na lisalisi ya makanisi na bango oyo elongobanaki te. Mpo na nini balóngaki te? Lolenge nini bakómaki bisaleli ya Satana, ye oyo azalaki na mokano ya kobebisa bosembo ya Yobo?
Batoli na bango nyonso ezalaki na moboko likoló ya likanisi moko ya lokuta: ete bobele bato oyo basalaka masumu nde bazwaka mpasi. Na ntango azwaki maloba mpo na mbala ya liboso, Elifaza alobaki ete: “Oyo na malamu abebaki ntango nini? Bato na sembo balongolami ntango nini? Lokola ngai namɔni, baoyo bakotimola masumu mpe bakokona yauli, bakobuka bobɛlɛ yango.” (Yobo 4:7, 8) Elifaza akanisaki na libunga nyonso ete bato malamu bakoki kozwa mpasi te. Alobaki ete lokola Yobo azwaki mpasi makasi, ekoki kozala ete asalaki lisumu na miso ya Nzambe.a Biledada mpe Sofala balobaki ete Yobo asengelaki mpenza kobongwana longwa na masumu na ye.—Yobo 8:5, 6; 11:13-15.
Na nsima, baninga misato ya Yobo baokisaki ye motema mpasi na kobimisáká makanisi na bango moko na esika ya koloba engebene mayele ya Nzambe. Elifaza akendeki mosika kino koloba ete ‘Nzambe andimaka basaleli na ye te’ mpe ata soki Yobo azalaki sembo to azalaki sembo te, yango ezalaki na motuya mingi te na miso ya Nzambe. (Yobo 4:18; 22:2, 3) Ezali mpasi mpo na kokanisa likambo motindo oyo ya kolɛmbisa—to ya kozanga sembo—motindo oyo! Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete na nsima, Yehova apamelaki Elifaza mpe baninga na ye mpo na ezaleli oyo ya kotuka. Alobaki ete: “Bolobi likambo na sembo mpɔ na ngai tɛ.” (Yobo 42:7) Kasi maloba ya makasi mpenza elobamaki naino te na ntango wana.
Na nsuka, Elifaza alekisaki mpenza ndelo mpo na oyo etali kobimisa bifundeli ya lokuta. Lokola akokaki te kondimisa Yobo ete asalaki mabe, abandaki kotánga masumu oyo ye moko akanisaki ete ekokaki kozala oyo Yobo asalaki yango. Elifaza atunaki ete: “Mabe na yɔ ejali nde na monɛnɛ tɛ? Mpe masumu na yɔ ikosuka tɛ? Jambi oluki ndanga epai na bandeko na yɔ mpamba, osili kobɔtɔla bilamba na baoyo na bolumbu. Opɛsi mai tɛ epai na ye oyo alɛmbi, oboyisi oyo na njala bilei.” (Yobo 22:5-7) Bifundeli oyo nyonso ezalaki ya lokuta. Yehova ye moko alobaki na ntina na Yobo ete azalaki “moto malamu bɛ mpe na sembo.”—Yobo 1:8.
Yobo asalaki nini liboso na maloba wana nyonso oyo ya kobeta ntembe likoló na bosembo na ye? Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete, na meko moko to mosusu, makambo yango epesaki ye mpasi na makanisi mpe na mayoki, kasi azwaki lisusu ekateli makasi koleka mpo na komonisa ete bifundeli wana ezalaki ya lokuta. Ya solo, akómaki komikumisa mingi na boye ete, tokoki koloba ete, akómaki kopamela Yehova mpo na ezalela na ye ya mpasi. (Yobo 6:4; 9:16-18; 16:11, 12) Bayebaki te makambo ya solo oyo ezalaki na kati, lisoló ekómaki bobele ntembe ezangi ntina. Liteya nini baklisto bakoki kozwa kati na batoli wana ya kobebisa?
1. Baklisto oyo bazali na bolingo basukisaka nokinoki te na koloba ete mikakatano ya bandeko ezali mpo na mabe na bango moko. Kolobaloba kozanga kokanisa na ntina na mabunga ya kala—ezala ya solo to ya lokuta—ekoki mpenza kolɛmbisa moto oyo azali kosala makasi mpo na kotikala ngwi. Baoyo banyokwami na makanisi bazali na mposa ya ‘kobɔndisama’ na esika ya kopamelama. (1 Batesaloniki 5:14) Yehova alingi ete bankulutu bázala “lokola ebombelo mpɔ na mopɛpɛ,” kasi te “babɔndisi mabe” lokola Elifaza, Biledada, mpe Sofala.—Yisaya 32:2; Yobo 16:2.
2. Tosengeli kobimisa efundeli te soki elembeteli ya polele ezali te. Biyokayoka to bikanisela—lokola oyo ya Elifaza—ezali moboko malamu te mpo na kopesa na yango mpamela. Na ndakisa, soki nkulutu moko abimisi bifundeli ya lokuta, akoki mpenza kobungisa limemya na ye mpe yango ekoki kopesa mpasi na mayoki. Yobo amimonaki lolenge nini na ntango ayokaki batoli oyo elongobani te? Amonisaki mawa na ye polele na kongangáká na maloba oyo ya kotyola ete: “Obikisi lobɔkɔ lojangi makasi boni?” (Yobo 26:2) Mokɛngɛli oyo ayebi komibanzabanza mpo na basusu ‘akokembisa mabɔkɔ oyo mazali kolɛmba,’ na esika ya koyeisa makambo ndóngó.—Baebele 12:12.
3. Toli esengeli kozwa moboko likoló na Liloba ya Nzambe, kasi likoló na makanisi na biso moko te. Maloba ya baninga ya Yobo mazalaki ya kolongobana te mpe ya kobebisa. Na esika ya kobɛlɛmisa Yobo pene na Yehova, bapusaki ye na kokanisa ete ezalaki na epekiseli moko oyo ezalaki kokabola ye na Tata na ye ya likoló. (Yobo 19:2, 6, 8) Nzokande, kosalela malamu Biblia ekoki kotɛlɛmisa, kopesa makasi epai na basusu, mpe ekopesaka libɔndisi ya solo.—Luka 24:32; Baloma 15:4; 2 Timoté 3:16; 4:2.
Mokanda ya Yobo ezali kosalisa baklisto ete báyeba mitambo misusu, ezali mpe kopesa liteya kitoko mpo na oyo etali lolenge ya kopesa toli oyo ebongi mpenza.
Lolenge nini kopesa toli
Toli ya Elihu ekesanaki mpenza na oyo ya baninga misato ya Yobo, ezala na makambo oyo alobaki, ezala mpe na ezaleli oyo azalaki na yango liboso na Yobo. Abéngaki Yobo na nkombo na ye mpe alobaki na ye lokola moninga, kasi azalaki te lokola mosambisi liboso na Yobo. “Ɛ, Yobo, nalɔmbi yɔ ete oyokamela kosakola na ngai, mpe ete otia litoi na maloba yɔnsɔ na ngai. Tala mpe liboso na Njambe ngai najali lokola yɔ, ngai mpe natongamaki na ndambo na mabele.” (Yobo 33:1, 6) Elihu azalaki mpe pene ya kopesa Yobo longonya nokinoki mpo na etamboli na ye ya sembo. Ayebisaki Yobo ete: “Nasepeli na bosembo na yo.” (Yobo 33:32, NW) Longola lolenge na ye ya kopesa toli na boboto nyonso, ezali mpe na bantina mosusu mpo na yango Elihu alóngaki.
Nsima ya kozela na motema ya kokita nyonso liboso ete basusu básilisa koloba, Elihu akokaki kosimba malamu ntina ya makambo liboso ya kopesa toli. Andimaki ete Yobo azalaki moto ya sembo, Yehova alingaki kopesa ye etumbu? Elihu angangaki ete: “Ejala mosika mpe na Oyo-na-Nguya-Yɔnsɔ ete ajala na lisumu!” “Akolongola miso na ye na bayɛngɛbɛni tɛ.”—Yobo 34:10; 36:7.
Bosembo ya Yobo nde ezalaki likambo na ntina monene? Elihu abendaki likebi ya Yobo likoló na likanisi wana lizangi bokatikati. Alobaki ete: “Olobi ete, Boyɛngɛbɛnɛ na ngai eleki Njambe? Tala na lola mpe mɔna, tala mapata maleki yɔ likolo.” (Yobo 35:2, 5) Lokola mapata mazali likoló koleka biso, bobele bongo mpe banzela ya Yehova ezali mosika koleka banzela na biso. Tozali na lotómo ya kosambisa te lolenge ye asambisaka. Elihu asukisaki ete: “Na bongo, bato bakotosaka ye, ye akotalaka bango tɛ, baoyo bajali na mayɛlɛ na miso na bango mpenja.”—Yobo 37:24; Yisaya 55:9.
Toli kitoko ya Elihu ebongisaki nzela mpo na Yobo mpo ete akoka kozwa malako mosusu epai na Yehova ye moko. Ya solo, bokokani monene ezali kati na maloba ya Elihu na ntina na “misala na kokamwa na Njambe,” oyo ezwami na mokapo 37, mpe maloba ya Yehova epai na Yobo, oyo ekomami na mokapo 38 kino mokapo 41. Emonani polele ete Elihu atalelaki makambo engebene makanisi ya Yehova. (Yobo 37:14) Lolenge nini baklisto bakoki komekola ndakisa malamu ya Elihu?
Lokola Elihu, bakɛngɛli basengeli komonisa ezaleli ya komitya na esika ya basusu mpe boboto, komikundoláká ete bango mpe bazali bato ya kozanga kokoka. Ekobonga malamu ete báyokamelaka na likebi nyonso mpo na koyeba makambo nyonso mpe kosimba makambo ya ntina liboso ya kopesa toli. (Masese 18:13) Lisusu, na kosaleláká Biblia, mpe mikanda mikolimbolaka Makomami, bakoki kondimisama ete likanisi ya Yehova eleki malamu.—Baloma 3:4.
Longola mateya kitoko oyo mokanda ya Yobo ezali kopesa epai na bankulutu, ezali mpe koteya lolenge nini tokoki kolónga mikakatano na bokatikati nyonso.
Nini tosengeli kosala te liboso na makambo ya mpasi
Lokola abulunganisamaki na bampasi na ye mpe lokola babɔndisi na ye ya lokuta bayokisaki ye mawa, Yobo azwaki mpasi na makanisi mpe na mayoki. Alelaki na maloba oyo: “Mokɔlɔ mobotami na ngai mobeba . . . Molimo na ngai elɛmbi na bomɔi na ngai.” (Yobo 3:3; 10:1) Kozanga koyeba ete Satana azalaki konyokola ye, Yobo akanisaki ete Nzambe nde azalaki kopesa ye mpasi. Emonanaki lokola ete ekoki kosalema te ete ye—moto na sembo—amona mpasi. (Yobo 23:10, 11; 27:2; 30:20, 21) Ezalela wana ekangaki Yobo miso, na yango, akokaki te komona makambo mosusu mpe epusaki ye na koloba makambo makasi na ntina na lolenge oyo Nzambe asalaka epai na bato. Yehova atunaki ye ete: “Yɔ okotiola kosambisa na ngai, okokitisa ngai ete yɔ mɔkɔ olongi?”—Yobo 40:8.
Mbala mosusu, na ntango okutani na mikakatano, liboso omiyokaka mpenza ete otyolami, ndenge emonani ete ekokaki kozala bongo mpo na Yobo. Eloko ya liboso bato mingi basalaka ezalaka bongo komituna ete, ‘Mpo na nini bobele ngai? Mpo na nini basusu—baoyo bazali mabe mingi koleka ngai—bazali na mikakatano te?’ Wana ezali makanisi mabe oyo ekoki kopekisa biso na komanyola Liloba ya Nzambe.
Na bokeseni na Yobo, tozali na likoki malamu ya kososola makambo ya ntina oyo etalelami. Toyebi ete Satana “ajali kotambola lokola nkɔsi, kolukaka sɔkɔ akolia nani.” (1 Pɛtɛlɔ 5:8) Lokola mokanda ya Yobo ezali komonisa yango, Zábolo asepelaka kobebisa bosembo na biso na kobimiseláká biso mikakatano. Azali na ekateli makasi ya komonisa ete likambo oyo ye alobaki ezali solo, ete tozali Batatoli ya Yehova bobele mpo ete tozali kozwa bolamu. (Yobo 1:9-11; 2:3-5) Tokozala na mpiko ya kosimba boyangeli ya Nzambe mpe komonisa ete Zábolo azali mokósi?
Ndakisa ya Yesu, mpe ya ebele mosusu ya basaleli ya Yehova ezali komonisa ete lolenge mosusu ya minyoko ekoki kopɛngolama te kati na ebongiseli ya biloko oyo. Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengeli kondima ‘kokamata nzeté na bango ya mpasi’ soki balingi kolanda ye. (Luka 9:23) “Nzeté ya mpasi” ya mokomoko na biso ekoki kozala mokakatano moko to mikakatano mingi oyo Yobo ayikelaki yango mpiko—bokɔnɔ, liwa ya balingami na biso, konyokwama na makanisi, mikakatano ya nkita, to botɛmɛli ya bato oyo bazali bandimi te. Ata lolenge nini ya mikakatano oyo tokokutana na yango, likambo malamu ezali kati na yango. Tokoki kotalela ezalela na biso lokola libaku malamu ya komonisa bompikiliki na biso mpe bokangami na biso makasi epai na Yehova.—Yakobo 1:2, 3.
Ezalaki na motindo wana nde bantoma ya Yesu basalaki. Mwa moke nsima ya Pantekote babetamaki fimbo mpo ete bazalaki koteya na ntina na Yesu. Na esika ete bálɛmba nzoto, bakóbaki “kosepela.” Esengo na bango ezalaki te mpo na mpasi oyo bazalaki kokutana na yango, kasi ezalaki nde mpo ete “batangami babɔngi na kojua nsɔni mpɔ na Nkombo na [Klisto].”—Misala 5:40, 41.
Ya solo, elingi koloba te ete bampasi nyonso ezali kokwela biso mpo ete tozali kosalela Yehova. Na lolenge moko to mosusu, biso moko mpe tomiyeiselaka mikakatano. To mbala mosusu kozanga ete biso moko tozala na libunga, likambo yango ekoki kobulunganisa bokatikati na biso ya elimo. Ata soki likambo yango ezali motindo nini, ezaleli ya komikitisa lokola oyo ya Yobo ekosalisa biso na kososola soki libunga liuti wapi. Liboso ya Yehova, Yobo andimaki likambo oyo ete: “Boye nabimisi makambo mayebi ngai ntina tɛ.” (Yobo 42:3) Ye oyo azali kondima libunga na ye na motindo oyo akozala mpenza na likoki ya kopɛngola mabunga mosusu motindo wana na mikolo mizali koya. Lokola masese elobi yango, “moto na mayɛlɛ akosɔsɔla mabe liboso mpe akomibomba.”—Masese 22:3.
Likambo lileki ntina ezali oyo ete, mokanda ya Yobo ezali kokundwela biso ete mikakatano na biso ekoumela libela te. Biblia elobi ete: “Tala, tolobi ete tobiangi bango bato na esɛngɔ baoyo bayiki mpiko bongo. Bosili koyoka mpɔ na mpiko na Yobo, bosili komɔna nsuka na makambo na ye epai na [Yehova], jambi Yehova atondi na mawa mpe na boboto” (Yakobo 5:11) Tokoki kondimisama ete Yehova akopesa mpe mbano epai na basaleli na ye ya sembo lelo oyo.
Tozali mpe kozela na esengo nyonso ntango oyo mikakatano ya lolenge nyonso—“makambo na liboso”—makoleka libela. (Emoniseli 21:4) Liboso ete mokolo yango eya, mokanda ya Yobo ezali lokola motambwisi ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa biso na koyeba nini tokoki kosala liboso na mikakatano.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako Biblia ezali koloba ete “sɔkɔ moto akokona nini, akobuka bobɛlɛ yango,” elingi koloba te ete soki moto azwi mpasi, yango ezali etumbu ya Nzambe. (Bagalatia 6:7) Kati na mokili oyo eyangelami na Satana, bato ya sembo bazali kokutana na mikakatano mingi koleka bato mabe. (1 Yoane 5:19) Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bakoyina bino mpɔ na nkombo na ngai.” (Matai 10:22) Bokɔnɔ mpe lolenge mosusu ya makambo ya mpasi ekoki kokwela basaleli ya sembo ya Nzambe.—Nzembo 41:3; 73:3-5; Bafilipi 2:25-27.
[Elilingi na lokasa 28]
“Tala na lola mpe mɔna, tala mapata maleki yɔ likolo.” Ezali na maloba motindo wana nde Elihu asalisaki Yobo na kososola ete banzela ya Nzambe etombwami koleka banzela ya bato