Pusaná penepene na Nzambe
“Okozala na mposa makasi”
EZALAKA mpasi komona moto oyo olingaka azali konyokwama mpe akufa. Toyokaka mpenza mawa soki moto ya bongo akufi. Kasi, ezali mpenza esengo koyeba ete Mozalisi na biso, Yehova Nzambe ayebaka mpasi na biso. Longola yango, azalaka na mposa ya kosalela nguya na ye oyo eleki banguya nyonso mpo na kozongisa bakufi na bomoi. Elikya yango emonisami na maloba ya Yobo, oyo ezali na Yobo 14:13-15.
Tótalela mpo na nini Yobo alobaki maloba yango. Yobo, moto oyo azalaki na kondima monene, akutanaki na mpasi makasi—abungisaki mpe biloko na ye, bana na ye bakufaki, mpe abɛlaki maladi moko ya mabe. Ntango mpasi elekaki ye, ayebisaki Nzambe ete: “Aa soki obombaka ngai ata na Nkunda!” (Vɛrsɛ 13) Yobo amonaki Nkunda esika malamu ya kopema. Soki Nzambe abombi ye kuna lokola eloko ya motuya, alingaki kosikolama na minyoko mpe mpasi.a
Yobo asengelaki kotikala libela na Nkunda? Yobo akanisaki bongo te. Akobaki libondeli na ye boye: “Aa . . . soki okatelaka ngai ata ntango mpo okanisa ngai!” Yobo azalaki na elikya ete akozala na Nkunda kaka mpo na mwa ntango mpe Yehova akobosana ye te. Yobo akokanisaki ntango oyo akolekisa na Nkunda na “mosala makasi”—ntango oyo esengelaki azela. Mpo na ntango boni? Alobi ete, “tii ntango kobɔndisama na ngai ekoya.” (Vɛrsɛ 14) Kobɔndisama yango elingaki kolimbola kobima na Nkunda—na maloba mosusu, kosekwa na kati ya bakufi!
Mpo na nini Yobo andimaki mpenza ete kobɔndisama na ye ekoya? Mpo ayebaki ndenge Mozalisi na biso ya bolingo ayokaka na ntina na basaleli na ye ya sembo oyo bakufá. Yobo alobaki ete: “Yo okobenga, mpe ngai nakondima. Okozala na mposa makasi ya mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Vɛrsɛ 15) Yobo ayebaki ete azali mosala ya mabɔkɔ ya Nzambe. Ata soki Yobo akufi, Mopesi ya bomoi oyo abongisaki Yobo na kati ya libumu akokaki mpenza kozongisa ye lisusu na bomoi.—Yobo 10:8, 9; 31:15.
Maloba ya Yobo eteyi biso ete Yehova azali Nzambe ya motema mawa; azalaka mpenza moninga ya baoyo, lokola Yobo bamitikaka na mabɔkɔ na ye, oyo bandimaka ete abongisa bango mpo bákóma bato oyo babongi na miso na ye. (Yisaya 64:8) Yehova azwaka mpenza na motuya basambeli na ye ya sembo. Mpo na basaleli na ye ya sembo oyo bakufá, azali na “mposa makasi.” Na yango, moto moko ya mayele alobi ete liloba ya Ebre oyo ebongolami na maloba yango ezali ‘moko ya maloba ya ntina mpenza oyo esalelamaka mpo na komonisa mposa makasi oyo moto azali koyoka.’ Ya solo, Yehova asukaka kaka te na kokanisa basambeli na ye ya sembo, kasi azalaka mpe na mposa makasi ya kozongisa bango lisusu na bomoi.
Likambo ya esengo, na mokanda ya Yobo—moko ya mikanda ya Biblia ya liboso oyo ekomamaki—Yehova amonaki malamu amonisa mokano na ye ya kosekwisa bakufi.b Alingi ete ozala lisusu elongo na bato na yo oyo bakufá. Likanisi wana ekoki kosalisa yo otungisama mingi te ntango moto oyo olingaka akufi. Mpo na nini te koyekola makambo mingi oyo etali Nzambe yango ya bolingo mpe ndenge oyo okoki komitika ete abongisa yo mpo okóma moto oyo akomona ndenge mokano na ye ekokokisama?
Botángi ya biblia mpo na sanza ya Marsi:
a Buku moko elobi ete maloba oyo Yobo alobaki ‘bombá ngai’ elimboli “bombá [ngai] na esika ya kimya ndenge babombaka eloko ya motuya.” Buku mosusu elobi ete maloba yango elimboli “bombá ngai ndenge babombaka eloko ya motuya.”
b Mpo na koyekola makambo mingi oyo etali elaka oyo Biblia epesi ete bato bakosekwa mpo na kokɔta na mokili ya sika ya sembo, talá mokapo 7 na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.