Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na eteni ya mitano ya mokanda ya Nzembo
BATO ya bozwi bakoki koloba ete: “Bana mibali na biso bázala na bolenge na bango pelamoko nzete ekokola alima mpenza; mpe ete bana basi na biso bázala pelamoko na mabanga matongami na nsuka ya ndako, pelamoko yango ezali na ndako monene ya mokonzi; ete bibombelo na biso bitonda maa . . . ete mpate na biso bábota nkoto nkoto.” Bakoki lisusu koloba boye: “Esengo ezali na bato baoyo bazali boye.” Na bokeseni na bango, mokomi ya nzembo alobaki: “Esengo ezali na bato oyo [Yehova] azali Nzambe na bango.” (Nzembo 144:12-15) Ya solo, ezali mpenza bongo! Yehova azali Nzambe ya esengo; basaleli na ye mpe basengeli kozala bato ya esengo. (1 Timote 1:11) Eteni ya nsuka ya Mokanda ya Nzembo, banda na Nzembo 107 tii na Nzembo 150, emonisi mpenza bosolo ya likambo yango.
Eteni ya mitano ya Mokanda ya Nzembo emonisi mpe bizaleli malamu mingi ya Yehova, lokola motema-boboto, bosembo mpe bolamu. Soki toyebi bizaleli ya Yehova, tokokóma kolinga ye mingi mpe kobanga ye; mpe yango ekomemela biso esengo. Ya solo, eteni ya Mitano ya Mokanda ya Nzembo ezali na nsango moko ya ntina mingi!—Baebele 4:12.
ESENGO MPO NA MOTEMA-BOBOTO YA YEHOVA
Bayuda oyo bazalaki kozonga na Yelusaleme nsima ya kobima na boombo na Babilone bazalaki koyemba boye: “Tiká ete básanzola [Yehova] mpo na boboto na ye; mpo na misala na ye ya kokamwa epai ya bana ya bato.” (Nzembo 107:8, 15, 21, 31) Davidi ayembelaki Yehova mpo na kokumisa ye ete: “Sembo na yo bobɛlɛ kino mapata.” (Nzembo 108:4) Na loyembo oyo elandi, abondelaki Yehova ete: “Sungá ngai, Ɛ [Yehova], Nzambe na ngai; bikisá ngai pelamoko epimeli ya boboto na yo.” (Nzembo 109:18, 19, 26) Nzembo 110 ezali esakweli ya boyangeli ya Masiya. Nzembo 111:10 elobi ete “kobanga [Yehova] ezali ebandeli ya [bwanya, NW].” Nzembo oyo elandi elobi ete: “Esengo ezali na moto oyo akobangaka [Yehova].”—Nzembo 112:1.
Nzembo 113 tii na 118 ebengami Nzembo ya Hallel, mpamba te ezongeli mbala na mbala liloba “Hallelujah” (Aleluya) to “Sanzolá Yah!” Mishnah (buku moko ya ekeke ya misato oyo etyaki na mikanda mibeko ya Bayuda oyo ekomamaki te) elobaki ete bazalaki koyemba nzembo yango na eleko ya Elekeli mpe na biyenga misato oyo Bayuda bazalaki kosala mbula na mbula. Nzembo 119, nzembo oyo eleki molai na kati ya nzembo nyonso mpe mokapo oyo eleki molai na Biblia mobimba, ekumisi mpenza Liloba to nsango ya Yehova.
Biyano na mituna ya Biblia:
109:23—Davidi alingaki koloba nini ntango alobaki ete: “Nalimwe lokola elilingi wana ekómi yango molai, nakimisami pelamoko liyoyo”? Na Maloba wana, Davidi alingaki koloba ete amoni liwa na ye ekómi pene.—Nzembo 102:11.
110:1, 2—Yesu Klisto, “Nkolo ya [Davidi],” azalaki kosala nini ntango afandaki na lobɔkɔ mobali ya Nzambe? Nsima ya lisekwa na ye, Yesu amataki na likoló mpe azelaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe tii na 1914 mpo na kobanda koyangela. Na ntango wana, Yesu azalaki koyangela baklisto bapakolami, kotambwisa bango na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, mpe kobongisa bango mpo na koyangela elongo na ye na Bokonzi na ye.—Matai 24:14; 28:18-20; Luka 22:28-30.
110:4—Ndai yango oyo Yehova alobi ete ‘akobongola yango te’ ezali nini? Ndai yango ezali kondimana oyo Yehova asalaki na Yesu Klisto mpo azala Mokonzi mpe Nganga-nzambe monene.—Luka 22:29.
113:3—Na ndenge nini nkombo ya Yehova esengeli kosanzolama “longwa na kotana ya moi kino kolimwa na yango”? Yango ezali te kolobela kaka mwa etuluku ya bato oyo bazali kosalela Nzambe mikolo nyonso. Banda na kobima ya moi na ɛsti tii na kolala na yango na wɛsti, engɛngisaka mabelé mobimba. Ndenge moko, esengeli básanzola Yehova na mabelé mobimba. Yango ekoki kosalema te soki bato basangani esika moko te. Biso Batatoli ya Yehova, tozali na libaku malamu ya kosanzola Nzambe mpe komipesa na molende mpenza na kosakola Bokonzi.
116:15—Na ndenge nini ‘kokufa ya basembwi ya Yehova ezali likambo ya motuya monene na miso na ye’? Lokola Yehova atalelaka basambeli na ye na motuya mingi, akoki ata moke te kotika ete bango nyonso bákufa. Soki asali bongo, ekozala lokola nde banguna na ye baleki ye na makasi. Mpe mokili ya sika ekokuta moto te awa na mabelé.
119:71—Na ndenge nini koyoka mpasi ekoki kozala malamu? Konyokwama ekoki kosalisa biso tóyeba kotyela Yehova motema, kobondela ye na molende, komipesa na koyekola Biblia mpe kosalela makambo oyo yango ezali koloba. Lisusu, konyokwama ekosalisa biso tóyeba bolɛmbu na biso mpe tósilisa yango. Minyoko ekokómisa biso nkandankanda te soki totiki yango ebongisa bomoto na biso.
119:96—Maloba “nsuka ya biloko nyonso bizali malamu” elimboli nini? Mokomi ya nzembo azali kolobela makambo oyo ezali malamu na miso ya bato. Na ntembe te, alingaki komonisa ete makambo oyo ezali malamu na miso ya bato ezalaka malamu na makambo nyonso te. Nzokande, mibeko ya Nzambe ezali malamu na makambo nyonso. Mibeko na ye etalelaka makambo nyonso ya bomoi. Biblia Liloba lya Nzambe elobi boye: “Namoni ’te malamu manso mazali na nsuka, kasi mobeko mwa yo mozali na nsuka te!”
119:164—Kosanzola Nzambe “mbala nsambo na mokolo” elimboli nini? Mbala mingi, motángo nsambo emonisaka eloko oyo ezali mobimba. Na yango, mokomi ya nzembo alingaki koloba ete Yehova abongi kozwa masanzoli nyonso.
Mateya mpo na biso:
107:27-31. Bwanya ya mokili ‘ekokóma na nsuka’ na Armagedona. (Emoniseli 16:14, 16) Ekobikisa ata moto moko te. Kaka bato oyo bakotalela Yehova nde bakobika mpe ‘bakosanzola ye mpo na boboto na ye.’
109:30, 31; 110:5. Lobɔkɔ ya mobali ya soda oyo ezalaki kosimba mopanga ezalaki kobatelama na nguba te, mpamba te nguba ezalaki kosimbama na lobɔkɔ ya mwasi. Na maloba ya elilingi, Yehova azali “na lobɔkɔ ya mobali” ya basaleli na ye mpo na kobundela bango. Na ndenge yango, azali kobatela mpe kosalisa bango. Yango wana, ebongi mpenza ‘tósanzola Yehova mingi’!
113:4-9. Lokola Yehova aleki likoló, amikitisaka ata “mpo na kotala epai ya lola.” Atako bongo, ayokelaka basokemi, babola mpe basi oyo babotaka te mawa. Nkolo Mokonzi Yehova amikitisaka, mpe alingi basambeli na ye bázala na ezaleli yango.—Yakobo 4:6.
114:3-7. Koyeba makambo ya kokamwa oyo Yehova asalelaki libota na ye na Mbu Motane, na Ebale Yolodani mpe na Ngomba Sinai esengeli mpenza kosimba mitema na biso. “Mokili,” elingi koloba bato, basengeli kolenga, to na maloba ya elilingi ‘kotelengana’ liboso ya Nkolo.
119:97-101. Kozwa bwanya, bososoli mpe mayele oyo euti na Liloba ya Nzambe ebatelaka biso na elimo.
119:105. Liloba ya Nzambe ezali mwinda mpo na makolo na biso mpo ekoki kotambwisa biso na makambo oyo tozali kokutana na yango mokolo na mokolo. Na ndimbola ya elilingi, ezali mpe kongɛngisa nzela na biso na ndenge ezali koyebisa biso makambo oyo Nzambe akani kosala na mikolo ekoya.
ESENGO ATA NA KATI YA MIKAKATANO
Ndenge nini tokoki kolonga bampasi mpe mikakatano? Nzembo 120 tii na 134 epesi eyano ya polele mpenza na motuna wana. Tokolonga mikakatano mpe tokobungisa esengo na biso te soki tomitiki na mabɔkɔ ya Yehova mpo asalisa biso. Ekoki kozala ete Bayisalaele bazalaki koyemba Nzembo yango, oyo ebengami Nzembo ya Kobuta, ntango bazali kokende na Yelusaleme na eleko ya biyenga.
Nzembo 135 mpe 136 emonisi ete Yehova azali lokola bikeko te oyo ekoki kosala eloko moko te, mpamba te ye asalaka nyonso oyo asepeli kosala. Nzembo 136 esalemaki mpo eyembamaka na bituluku mibale ya bato; bamosusu bazali koyemba mpe bamosusu bazali kondima. Nzembo 137 elobeli mpasi oyo Bayuda oyo bazalaki na mposa ya kosambela Yehova na Siona bazalaki koyoka ntango bazalaki na Babilone. Nzembo 138 tii na 145 ezali ya Davidi. Alingaki ‘kopesa Yehova matɔndi na motema na ye mobimba.’ Mpo na nini? Alobi boye: “Mpo ete nasalami na motindo ya kokamwa.” (Nzembo 138:1; 139:14) Na Nzembo mitano oyo elandi, Davidi azali kobondela Yehova mpo abatela ye na bato mabe, apamela ye, abikisa ye na mabɔkɔ ya banyokoli na ye mpe atambwisa ye. Amonisi mpe ete basaleli ya Yehova bazali bato ya esengo. (Nzembo 144:15) Nsima ya kolobela bonene mpe bolamu ya Yehova, Davidi alobi boye: “Monɔkɔ na ngai ekosanzola [Yehova]; tiká mpe mosuni nyonso esanzola nkombo na ye ya bulɛɛ, lobiko na lobiko.”
Biyano na mituna ya Biblia:
122:3—Na ndenge nini Yelusaleme ezalaki lokola mboka “ekangami esika moko makasi”? Ndenge bandako ya bingumba ya kala ezalaki kotongama, bandako ya Yelusaleme etongamaki mosikamosika te. Lokola engumba yango etongamaki bongo, ezalaki mpasi te kobatela yango na banguna. Lisusu, lokola bandako ezalaki mosikamosika te, bato ya engumba yango bazalaki kosalisana mpe kobatelana. Yango ezali komonisa bomoko oyo mabota 12 ya Yisalaele ezalaki na yango ntango bazalaki koyangana mpo na kosambela.
123:2—Maloba miso ya baombo elimboli nini? Baombo bazalaki kotala lobɔkɔ ya nkolo na bango mpo na ntina mibale: mpo na koyeba bamposa na ye mpe mpo na kozwa libateli mpe biloko ya kobikela. Ndenge moko, biso mpe totalelaka Yehova mpo na koyeba mokano na ye mpe mpo na kozwa mapamboli na ye.
131:1-3—Na ndenge nini Davidi ‘akitisaki mpe abɔndisaki molimo na ye lokola mwana akilisami mabele epai ya mama na ye’? Lokola mwana oyo baboisi mabele ayekolaka kozwa libɔndisi mpe makambo mosusu na mabɔkɔ ya mama na ye, Davidi ayekolaki kokitisa mpe kobɔndisa molimo na ye “[lokola] mwana akilisami mabele.” Ndenge nini? Azalaki na motema ya ngambo to ya kotyola te, azalaki mpe koluka na makambo oyo eleki ye na monene te. Na esika ya koluka lokumu, Davidi azalaki mbala mingi koyeba esika makoki na ye esuki mpe komikitisa. Tokomonisa bwanya soki tozali komekola ye, mingimingi ntango tozali koluka mikumba na lisangá.
Mateya mpo na biso:
120:1, 2, 6, 7. Kokosela bato makambo mpe kotyola bango ekoki koyokisa bango mpasi mingi. Soki tozali kobatela lolemu na biso, tokomonisa ete ‘tozali bato ya kimya.’
120:3, 4. Soki tozali esika moko na moto oyo azali na “lolemo ya yauli,” tokoki kobɔndisama na koyeba ete Yehova akobongisa makambo na ntango na yango. Bato ya lokuta bakosuka na mabɔkɔ ya “oyo makasi.” Bakozanga te kozwa etumbu ya Yehova, oyo ebengami na maloba ya elilingi “makala ya mɔtɔ ya nzete ya letama.”
127:1, 2. Na makambo nyonso oyo tozali kosala, tosengeli kolukaka litambwisi ya Yehova.
133:1-3. Bomoko ya basaleli ya Nzambe ebɔndisaka mpe elendisaka. Tosengeli te kobebisa yango na koluka kaka mabunga ya basusu, na koswana to na koimaima.
137:1, 5, 6. Makanisi ya basambeli ya Yehova oyo bazalaki na boombo ezalaki kaka na Siona, oyo ezalaki komonisa ebongiseli ya Yehova. Ezali boni mpo na biso? Tokangami na ebongiseli oyo Yehova azali kosalela lelo oyo?
138:2, NW. Yehova ‘akumisi maloba na ye koleka kutu nkombo na ye,’ elingi koloba bilaka nyonso oyo apesi na nkombo na ye ekokokisama na ndenge oyo ekoleka kutu ndenge tozali kokanisa. Ya solo, bilikya kitoko mpenza ezali liboso na biso.
139:1-6, 15, 16. Yehova ayebi makambo na biso, makanisi na biso mpe maloba na biso, liboso kutu tóbimisa yango. Ayebi biso banda tozalaki liki na libumu ya mama, liboso kutu biteni nyonso ya nzoto na biso esalema. Nzambe ayebi biso na ndenge moko “ya kokamwa.” Ezali mpenza esengo koyeba ete Yehova ayebaka kaka te mikakatano na biso, kasi ayebaka mpe mpasi oyo yango ememelaka biso!
139:7-12. Nzambe akoki kolendisa biso na bisika nyonso oyo tokoki kozala.
139:17, 18. Tosepelaka na boyebi ya Yehova? (Masese 2:10) Soki ezali bongo, tozwi mpenza esengo oyo ezali na nsuka te. Makanisi ya Yehova “eleki mbuma ya zɛlɔ na motuya.” Tokozala ntango nyonso na makambo ya koyekola na ntina na ye.
139:23, 24. Tosengeli kosɛngaka Yehova atala mitema na biso mpo amona soki tozali “kotambola na nzela mabe,” elingi koloba soki tozali na makanisi, bamposa mpe mimeseno oyo ebongi te, mpe asalisa biso tólongola yango.
143:4-7. Ndenge nini tokoki koyikela ata mikakatano ya makasi mpiko? Mokomi ya nzembo apesi biso sɛkɛlɛ: Tosengeli kokanisaka mpe kolukaka koyeba ntango nyonso misala ya Yehova mpe kobondelaka ye mpo asalisa biso.
“Bósanzola Yah!”
Mokomoko ya biteni minei ya liboso ya Mokanda ya Nzembo esuki na maloba ya kosanzola Yehova. (Nzembo 41:13; 72:19, 20; 89:52; 106:48) Eteni ya nsuka mpe kaka bongo. Nzembo 150:6 elobi boye: “Tiká ete nyonso ya mpema básanzola [Yehova]. Aleluya!” Likambo yango ekokokisama mpenza na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.
Ntango tozali kozela ntango wana ya esengo, ezali na makambo mingi oyo esengeli kotinda biso tósanzola Nzambe ya solo mpe tókumisa nkombo na ye. Soki totali esengo oyo tozali na yango mpo toyebi Yehova mpe tozali na boyokani na ye, toyokaka te mposa ya kosanzola ye na botɔndi nyonso?
[Elilingi na lokasa 15]
Misala minene ya Yehova ezali ya kokamwa
[Elilingi na lokasa 16]
Makanisi ya Yehova “eleki mbuma ya zɛlɔ na motuya”