“Nalingaka mibeko na yo mingi”
“Nalingaka mibeko na yo mingi; mikolo nyonso nakanisaka yango.”—NZEMBO 119:97, Bible na Lingala ya lelo oyo
1, 2. (a) Mokomi ya Nzembo 119 akutanaki na mikakatano nini? (b) Asalaki nini na likambo yango mpe mpo na nini?
MOTO oyo akomaki Nzembo 119 akutanaki na makambo mingi ya mpasi. Bato oyo balingaki mibeko ya Nzambe te bazalaki kotyola ye mpe kokosela ye makambo. Bana ya mokonzi bazalaki kofandela ye likita mpe bazalaki konyokola ye. Afandaki elongo na bato mingi ya mabe oyo bazalaki mpe kokana koboma ye. Makambo nyonso wana ezalaki ‘koyokisa ye mawa mpe kozangisa ye mpɔngi.’ (Nzembo 119:9, 23, 28, 51, 61, 69, 85, 87, 161, NW) Atako mokomi ya nzembo azalaki kokutana na makambo nyonso wana, akomaki boye: “Nalingaka mibeko na yo mingi; mikolo nyonso nakanisaka yango.”—Nzembo 119:97, Bible na Lingala ya lelo oyo.
2 Tokoki komituna boye: “Ndenge nini mibeko ya Nzambe ekokaki kokitisa mokomi ya nzembo motema mpe kobɔndisa ye?” Azalaki kozwa makasi na elikya oyo azalaki na yango ete Yehova azalaki kotyela ye likebi. Lokola ayebaki matomba ya kotosa mibeko ya Nzambe, azalaki kaka na esengo atako banguna bazalaki konyokola ye. Ayebaki ete Yehova asalelaki ye boboto mingi. Longola yango, lokola azalaki kotosa mibeko ya Nzambe, azalaki mpe na mayele koleka banguna na ye mpe mibeko yango ebatelaki bomoi na ye. Kotosa mibeko ya Nzambe esalisaki ye azala motema mpiɔ mpe lisosoli na ye ezala kimya.—Nzembo 119:1, 9, 65, 93, 98, 165.
3. Mpo na nini kobatela mibeko ya Nzambe ezali pɛtɛɛ te lelo oyo?
3 Lelo oyo mpe baklisto mosusu ya sembo bazali kokutana na makambo oyo ezali komeka kondima na bango. Mbala mosusu tozali mpenza te na likambo moko oyo ekoki komemela biso liwa, ndenge ezalaki mpo na mokomi ya nzembo; atako bongo, mikolo na biso ezali “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” Bato mingi oyo tokutanaka na bango mokolo na mokolo bakipaka mibeko ya Nzambe te; bato yango balukaka kaka bolamu na bango mpe biloko ya mokili, batondi na lolendo mpe bazalaka na limemya ata moke te. (2 Timote 3:1-5) Mokolo na mokolo bilenge baklisto basengeli kobunda mpo bákwea te na makambo ya mbindo. Na makambo ya ndenge wana, kolinga ntango nyonso Yehova mpe makambo ya malamu ekoki kozala etumba monene. Ndenge nini tokoki komibatela?
4. Ndenge nini mokomi ya nzembo amonisaki ete azalaki kosepela na mibeko ya Nzambe, likambo oyo baklisto mpe basengeli kosala lelo oyo?
4 Likambo oyo esalisaki mokomi ya nzembo ayikela makambo oyo azalaki kokutana na yango mpiko ezali ete azalaki kozwa ntango ya koyekola mpe komanyola mibeko ya Nzambe. Na ndenge yango, akómaki kolinga mibeko ya Nzambe. Kutu, longola kaka bavɛrsɛ mwa moke, vɛrsɛ mokomoko ya Nzembo 119 elobeli lolenge moko to mosusu ya mibeko ya Yehova.a Lelo oyo, Nzambe azali kosɛnga te ete baklisto bátosa Mibeko oyo apesaki na ekólo Yisalaele. (Bakolose 2:14) Atako bongo, mitinda oyo esimbaki Mibeko yango ezali na ntina mpo na biso. Mitinda yango ezalaki kobɔndisa mokomi ya nzembo; ekoki mpe kobɔndisa basaleli ya Nzambe oyo bazali kobundana na mikakatano.
5. Tokolobela mibeko nini na kati ya Mibeko ya Moize?
5 Sikoyo, tólobela mibeko misato na kati ya Mibeko ya Moize, mpe tótalela ndenge oyo ekoki kolendisa biso. Tokolobela mobeko ya Sabata, mobeko etali kolɔkɔta, mpe mobeko oyo epekisaki kolula biloko ya bato. Tokomona ete kokanga ntina ya etinda oyo ezali na mobeko mokomoko ekosalisa biso tóyeba oyo tosengeli kosala ntango tokutani na mikakatano.
Tosengeli kokokisa bamposa na biso ya elimo
6. Bato nyonso bazalaka na bamposa nini ya ntina mingi?
6 Nzambe akelá moto na bamposa mingi. Na ndakisa, mpo moto azala nzoto kolɔngɔnɔ, asengeli kolya, komɛla, mpe kolala. Kasi, moto asengeli mpe kokokisa bamposa na ye ya elimo. Soki akokisi yango te, akozala mpenza na esengo te. (Matai 5:3) Lokola kokokisa bamposa ya elimo ezali na ntina mingi na miso ya Yehova, aponaki mokolo moko na pɔsɔ mpe ayebisaki bana ya Yisalaele ete básalaka mosala te mokolo yango mpo na komipesa na makambo ya elimo.
7, 8. (a) Ndenge nini Nzambe akesenisaki mokolo ya Sabata na mikolo mosusu ya pɔsɔ? (b) Sabata ezalaki na ntina nini?
7 Mobeko ya Sabata ezalaki komonisa ntina ya kobomba ntango mpo na makambo ya elimo. Mbala ya liboso oyo Biblia etángi liloba “sabata” ezali na ntango Nzambe apesaki Bayisalaele mana na esobe. Moize ayebisaki Bayisalaele ete basengeli kolɔkɔtaka bilei yango mikolo motoba. Na mokolo ya motoba, basengelaki kolɔkɔta bilei ya “mikolo mibale,” mpamba te mokolo ya nsambo mana ezalaki kokwea te. Mokolo wana ya nsambo ezalaki sabata to “mokolo ya bulɛɛ mpo na [Yehova],” mpe moto na moto asengelaki kofanda na ndako na ye. (Exode 16:13-30) Mobeko moko na kati ya Mibeko Zomi elobaki ete na mokolo wana, moto akoki kosala ata mosala moke te. Ezalaki mokolo mosantu. Soki moto abuki mobeko ya Sabata, etumbu na ye ezalaki liwa.—Exode 20:8-11; Mituya 15:32-36.
8 Mobeko ya Sabata ezalaki komonisa ete Yehova alingaka ete bato na ye bázala nzoto kolɔngɔnɔ mpe bázala na boyokani malamu na ye. Yesu alobaki ete “sabata esalemaki mpo na moto.” (Malako 2:27) Mokolo yango Bayisalaele basengelaki kopema, kasi ezalaki mpe kopesa bango libaku ya kopusana penepene na Mozalisi na bango mpe kolakisa ete balingaka ye. (Deteronome 5:12) Mokolo yango ezalaki kaka mpo na makambo ya Nzambe. Bayisalaele bazalaki koyekola liloba ya Nzambe na libota, kobondela, mpe komanyola Mibeko ya Nzambe. Mokolo ya Sabata ezalaki kopekisa Bayisalaele bápesa ntango mpe makasi na bango nyonso na koluka biloko ya mokili. Mobeko wana ezalaki kosalisa bango bábosana te ete boyokani na bango na Yehova nde eloko eleki ntina na bomoi. Yesu amonisaki ete etinda ya mobeko yango ebongwanaki te ntango alobaki boye: “Ekomamá boye, ‘Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.’”—Matai 4:4.
9. Baklisto bakoki kozwa liteya nini na mobeko ya Sabata?
9 Lelo oyo, baklisto basɛngisami te ete bápemaka mokolo ya sabata; kasi, basengeli te kotalela mobeko wana lokola likambo oyo eleká. (Bakolose 2:16) Mobeko yango ezali komonisa biso ete tosengeli kotyaka boyokani na biso na Nzambe na esika ya liboso. Esengeli te tómipesa mobimba na koluka biloko ya mokili to bisengo mpe kobosana makambo ya elimo. (Baebele 4:9, 10) Yango wana, ebongi moto na moto amituna boye: “Makambo nini natyaka na esika ya liboso na bomoi na ngai? Nakanisaka liboso koyekola liloba ya Nzambe, kobondela, koyangana na makita, mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi? Makambo mosusu ezangisaka ngai ntango ya komipesa na makambo ya elimo?” Yehova alaki biso ete soki totye makambo ya elimo na esika ya liboso, tokozanga te biloko oyo tozali na yango mposa na bomoi.—Matai 6:24-33.
10. Tokoki kozwa matomba nini soki tozali kozwa ntango ya komipesa na makambo ya elimo?
10 Bantango nyonso oyo tolekisaka na koyekola Biblia, koyekola mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpe komanyola makambo oyo totángi, ekoki kosalisa biso tópusana penepene na Yehova. (Yakobo 4:8) Susan, ndeko mwasi moko oyo akómaki na momeseno ya koyekola Biblia mbala na mbala eleki sikoyo mbula soki 40, alobi ete na ebandeli ezalaki pɛtɛɛ te. Azalaki komona yango mosala monene. Kasi, lokola azalaki kaka komipesa, akómaki kosepela koyekola. Lelo oyo, soki likambo moko ezangisi ye ntango ya koyekola, ayokaka mabe mpenza. Alobi boye: “Koyekola esalisi ngai nayeba Yehova malamu mpe namona ete azali mpenza Tata na ngai. Nakoki kotyela ye motema mpe kobondela ye. Soki nakanisi bolingo oyo Yehova azali na yango mpo na basaleli na ye, ndenge oyo amibanzabanzaka mpo na ngai, mpe makambo nyonso oyo asali mpo na ngai, nyonso wana esimbaka motema na ngai.” Ya solo, moto akoki kozala na esengo mingi soki azali kokokisa bamposa na ye ya elimo!
Mobeko etali kolɔkɔta
11. Mobeko etali kolɔkɔta elobaki nini?
11 Mobeko mosusu ya Moize oyo ezali komonisa ete Nzambe alingaki mpenza ete basaleli na ye bázala malamu ezali mobeko oyo epesaki babola lotomo ya kolɔkɔta mbuma na elanga. Yehova alobaki ete ntango Moyisalaele azali kobuka mbuma na elanga na ye, asengeli kotika ete babola bálɔkɔta mbuma oyo bato ya mosala bazali kotika. Basali-bilanga basengelaki te kobuka milona nyonso pembenipembeni ya elanga; basengelaki mpe te kobuka lisusu mwa bambuma oyo etikali na nzete ya vinyo to na nzete ya olive. Soki mosali-elanga abosani liboke ya milona, asengeli te kozonga na elanga mpo na kokamata yango. Yehova apesaki mobeko yango mpo na kosalisa babola, bapaya, bitike, ná basi oyo bakufelá mibali. Kolɔkɔta biloko na elanga ezalaki mosala makasi; kasi, ebongiseli yango ezalaki kopekisa bango básɛngasɛngaka.—Levitike 19:9, 10; Deteronome 24:19-22; Nzembo 37:25.
12. Mobeko etali kolɔkɔta mbuma na elanga ezalaki kopesa Bayisalaele libaku nini?
12 Mobeko etali kolɔkɔta mbuma elobaki te soki biloko oyo mosali-elanga akotika mpo na babola ekozala mingi boni. Moto na moto azalaki kopona soki milona oyo akotika na mikala ya pembenipembeni ekozala mingi ndenge nini. Na ndenge yango, mobeko wana ezalaki koteya ezaleli ya kokaba. Mobeko yango ezalaki mpe kopesa basali-bilanga libaku ya kotɔnda Yehova, ye oyo abotisaka milona, mpamba te “ye oyo akokumisa [ Mozalisi] akoyokela mobola mawa.” (Masese 14:31) Na kati ya bato oyo basalaki ndenge wana, tokoki kotánga Boaza. Mobali yango asalelaki Luta boboto mpe atikaki ete mwasi yango oyo akufelá mobali, oyo azalaki kolɔkɔta mbuma na elanga na ye, azonga na mbuma mingi. Yehova apesaki Boaza lipamboli monene mpo na bokabi na ye.—Luta 2:15, 16; 4:21, 22; Masese 19:17.
13. Liteya nini tokoki kozwa na mobeko etali kolɔkɔta?
13 Etinda oyo esimbaki mobeko etali kolɔkɔta ezali na ntina tii lelo oyo. Yehova alingi ete basaleli na ye bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, mingimingi epai ya babola. Soki tozali kokaba mingi, Yehova akopambola biso mingi. Yesu alobaki boye: “Bózala na momeseno ya kopesa, mpe bato bakopesa bino. Bakosopa na mabenga na bino ndambo moko ya malamu, oyo ekamolami, oyo eningisami esika moko mpe oyo etondi mingi mpenza. Mpamba te na emekelo oyo bozali komekela, bakomekela mpe bino na yango.”—Luka 6:38.
14, 15. Ndenge nini tokoki kolakisa ezaleli ya kokaba, mpe biso moko ná baoyo tokosalisa tokozwa matomba nini?
14 Ntoma Paulo alendisi biso “tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Bagalatia 6:10) Yango wana, ebongi mpenza tólukaka kolendisa na elimo bandeko na biso baklisto na ntango kondima na bango emekami. Kasi longola yango, tokoki mpe kosalisa bango na makambo mosusu oyo ekosunga bango, na ndakisa komema bango na Ndako ya Bokonzi, to kosalela bango wenze. Na lisangá na bino, bozali na mibange to bandeko oyo bazali maladi, to bandeko oyo bakɔtá ndako, oyo bakosepela mingi soki bokei kotala bango to bokei kosalela bango mwa misala ya ndako? Soki bozali kokanisa oyo bokoki kosala mpo na bandeko wana, Yehova akoki kosalela bino mpo na koyanola na mabondeli na bango. Atako Nzambe apesi biso baklisto mobeko ete tósalisanaka, moto oyo asalaka yango azwelaka yango mpe matomba. Soki tolingaka mpenza bandeko na biso ya elimo, biso moko tokozala na esengo mpe Yehova akosepela na biso.—Masese 15:29.
15 Lolenge mosusu ya ntina mingi oyo baklisto bakanisaka bazalani na bango ezali ndenge basalelaka ntango mpe makasi na bango mpo na kokende koyebisa bango mikano ya Nzambe. (Matai 28:19, 20) Mosakoli nyonso oyo ayekolá na moto tii na batisimo amonaka ete maloba ya Yesu ezali solo ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35.
Tóboya ezaleli ya kolula biloko ya bato
16, 17. Mobeko ya zomi epekisaki likambo nini, mpe mpo na nini?
16 Likambo ya misato tokolobela na mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele ezali mobeko ya zomi oyo epekisaki kolula biloko ya bato. Mobeko yango elobaki boye: “Okolula ndako ya mozalani na yo te. Okoluka mwasi ya mozalani na yo te, soki moombo mobali na ye te, soki moombo mwasi na ye te, soki ngɔmbɛ mobali na ye te, soki mpunda na ye te, soki eloko nini ezali ya mozalani na yo te.” (Exode 20:17) Moto moko te akokaki kolandela moto mosusu na ndenge oyo azali kotosa mobeko yango, mpamba te moto te akoki koyeba makanisi oyo ezali na motema ya moto mosusu. Kasi, mobeko yango emonisaki ete Mibeko ya Moize elekaki mpenza mibeko ya bato. Mobeko yango ezalaki kosalisa Moyisalaele mokomoko ayeba ete akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova, ye oyo akoki kotánga na mitema. (1 Samwele 16:7) Longola yango, mobeko yango epekisaki kutu likambo oyo etindaka bato básala makambo ya mabe.—Yakobo 1:14.
17 Mobeko oyo epekisaki kolula biloko ya bato ezalaki kolendisa Bayisalaele bámipesa te na koluka biloko ya mokili, báboya lokoso, mpe bámilelalelaka te. Mobeko yango ezalaki mpe kobatela bango mpo bálona te mposa ya koyiba to ya kosala ekobo. Na mokili oyo, ekozala kaka na bato oyo bakozala na biloko oyo tokosepela na yango to mpe bato oyo bakoleka biso na makambo mosusu. Soki tobateli makanisi na biso te, tokoki kokóma mawamawa mpe kolula biloko ya bato. Biblia elobi ete kolula biloko ya bato ezali “makanisi ya mabe.” Bomoi na biso ekozala malamu koleka soki tozali na ezaleli yango te.—Baloma 1:28-30.
18. Elimo nini epalangani lelo na mokili mpe ekoki komema mabe nini?
18 Elimo ya mokili ezali kolendisa bato bálukaka biloko ya mokili mpe báleka baninga na bango. Bakomelesa bazali kosalela piblisite mpo na kopesa biso mposa ya kosomba biloko oyo bazali kobimisa mpe bazali koluka kondimisa biso ete bomoi na biso ekozala na ntina te soki tozangi biloko yango. Mibeko ya Nzambe epekisaki mpenza elimo wana. Elimo wana emonanaka mpe na mposa ya kosala nyonso mpo na koleka bato mosusu mpe konduka bozwi. Ntoma Paulo akomaki boye: “Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama. Mpo bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe na kokolisáká bolingo wana bamosusu babungisami nzela uta na kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.”—1 Timote 6:9, 10.
19, 20. (a) Mpo na moto oyo alingaka mibeko ya Yehova, makambo nini ezali mpenza na ntina? (b) Lisolo oyo elandi ekolobela nini?
19 Bato oyo balingaka mibeko ya Nzambe bayebaka ete kolinga biloko ya mokili ezali mabe mpe baboyaka ezaleli yango. Na ndakisa, mokomi ya nzembo abondelaki Yehova boye: “Bendá motema na ngai epai ya matatoli na yo, epai ya mosolo te. Mobeko ya monɔkɔ na yo ezali malamu na ngai koleka nkóto-nkóto ya wolo mpe ya palata.” (Nzembo 119:36, 72) Soki tondimi mpenza ete maloba yango ezali solo, tokotikala na nzela ya malamu mpe tokobendama te na motambo ya kolinga biloko ya mokili, ya lokoso, mpe komilelalela. Ezali ‘ezaleli ya kokangama na Nzambe’ nde epesaka litomba monene, kasi te konduka biloko ya mokili.—1 Timote 6:6.
20 Mitinda oyo esimbaki Mibeko oyo Nzambe apesaki bana ya Yisalaele ezali na ntina mingi na ntango ya mpasi oyo tozali, se ndenge ezalaki na ntina ntango Yehova apesaki yango Moize. Soki tozali kolanda mitinda yango na bomoi na biso, tokokanga ntina na yango malamumalamu, tokolinga yango mingi, mpe tokozala na esengo mingi. Tokoki kozwa mateya mingi na Mibeko ya Moize mpe komona ntina ya mateya yango na masolo ya bomoi ya bato oyo Biblia elobeli mpe makambo oyo bakutanaki na yango. Tokolobela mwa ndambo ya bato yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Longola kaka bavɛrsɛ minei, bavɛrsɛ nyonso 176 ya nzembo 119 elobeli mitindo, bikateli, mibeko, malako, makebisi, maloba, matatoli, bisakola, mpe banzela ya Yehova.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini mokomi ya Nzembo 119 alingaki mibeko ya Yehova?
• Mobeko ya Sabata ekoki koteya baklisto nini?
• Mobeko etali kolɔkɔta ezali na ntina nini lelo oyo?
• Ndenge nini mobeko oyo epekisaki kolula biloko ya bato ezali kobatela biso?
[Elilingi na lokasa 21]
Mobeko ya Sabata emonisaki ntina ya likambo nini?
[Elilingi na lokasa 23]
Mobeko etali kolɔkɔta ezali koteya biso nini?