Tókangama na mosala ya kobuka mbuma!
“Baoyo bazali kolona na mpisoli bakobuka na koganga na esengo.”—Nzembo 126:5, NW.
1. Mpo na nini tosengeli lelo oyo ‘kobondela Nkolo ya elanga atinda basali’?
NSIMA ya kotambola mpo na mbala ya misato na bamboka ya Galilai mpo na kosakola, Yesu Klisto ayebisaki bayekoli na ye ete: “Mbuma na elanga eteli mingi nde basali bazali mingi te.” (Matai 9:37) Alobaki mpe ndenge moko na Yudea. (Luka 10:2) Soki ezalaki bongo na ntango wana esili koleka mbula 2000, tokoloba nini na mikolo na biso? Na mbula ya mosala oyo euti koleka, Batatoli ya Yehova milio 6 bamipesaki mpenza na mosala ya kobuka mbuma na elimo epai ya bato miliare 6 na mokili oyo, mingi na bango bazali bato oyo “balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te.” Yango wana, ndenge oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete ‘bábondela Nkolo ya elanga atinda basali kati na elanga na ye’ ezali na ntina mpo na biso ndenge ezalaki mpe na ntina na ntango ya kala.—Matai 9:36, 38.
2. Eloko nini ebimisi biso polele na miso ya bato?
2 Yehova Nzambe Nkolo ya elanga ayokaki libondeli na bango oyo basɛngaki ete atinda basali mingi. Bongo tozali na esengo ya kosangana na mosala ya kobuka mbuma, mosala oyo Nzambe azali kokamba! Atako tozali moke liboso ya bato ya mokili mobimba, mosala oyo tozali kosala na molende nyonso ya kosakola bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli, ebimisi biso polele na miso ya bato nyonso. Na bamboka ebele, bapanzi-nsango balobelaka biso mingi. Na bafilme mosusu oyo bazali kolakisa na televizyo, soki babɛti na ekuke ya ndako moko, mbala mosusu okoyoka bato ya ndako balobi ete ekoki kozala Batatoli ya Yehova. Ya solo, mosala na biso lokola babuki-mbuma ya elilingi eyebani malamu na ekeke ya 21 oyo tozali.
3. (a) Ndenge nini toyebi ete bato bayebaki mosala ya kosakola Bokonzi oyo ezalaki kosalema na ekeke ya liboso? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete baanzelu bazali kosalisa biso na mosala na biso?
3 Ndenge moko mpe, na ekeke ya liboso, bato bamonaki ndenge mosala ya kosakola Bokonzi ezalaki kosalema mpe ndenge basakoli ya nsango malamu banyokwamaki. Yango wana, ntoma Paulo akomaki boye: “Mpo ete nabanzi ete Nzambe abimisi biso bantoma na nsuka ya molɔngɔ lokola bato bakitisami ete bákufa, ete tózala etaliseli mpo na mokili mpe mpo na baanzelu mpe mpo na bato.” (1 Bakolinti 4:9) Lelo oyo mpe, ndenge tozali kokangama na mosala ya kosakola Bokonzi atako bazali konyokola biso, ezali kobimisa biso polele na miso ya bato, mpe yango ezali na ntina mingi mpo na baanzelu. Emoniseli 14:6 elobi ete: “[Ngai ntoma Yoane] namonaki anzelu mosusu kopumbwa na nzanga, mpe azalaki na Nsango Malamu ya seko mpo na kosakola na bafandi ya mokili mpe na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso, na bibolo nyonso.” Baanzelu bazali mpenza kosalisa biso na mosala na biso ya kobuka mbuma!—Baebele 1:13, 14.
‘Bayinami’
4, 5. (a) Yesu akebisaki bayekoli na ye na likambo nini? (b) Mpo na nini basaleli ya Nzambe lelo oyo ‘bayinami’?
4 Ntango bantoma ya Yesu bakendaki kosala mosala ya kobuka mbuma, balandaki malako na ye ete “bázala nde na mayele lokola banyoka mpe na bopɔlɔ lokola bibenga.” Alobaki na bango lisusu boye: “Bókeba mpo na bato; zambi bakokaba bino liboso na makita mpe bakobɛtabɛta bino na biyanganelo. Bakobenda bino liboso ya mikóló ya mokili mpe ya mikonzi mpo na ngai, mpo na litatoli epai na bango mpe epai na mabota ya bapaya . . . Bakoyina bino mpo na nkombo na ngai. Kasi ye oyo akoumela kino nsuka akobika.”—Matai 10:16-22.
5 Lelo oyo mpe ‘bazali koyina biso’ mpamba te “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe,” Satana Zabolo, oyo azali monguna ya libosoliboso ya Nzambe mpe ya basaleli na Ye. (1 Yoane 5:19) Banguna na biso bazali komona ndenge makambo na biso ya elimo ezali kotambola malamu kasi baboyi kondima ete Yehova nde azali kopambola biso. Banguna na biso bamonaka biso ndenge tozalaka nsainsai ntango tosalaka mosala ya kobuka mbuma. Bomoko na biso ezali kokamwisa bango! Bakoki mbala mosusu kosala lokola nde bazali kondima yango te kasi bazali kondima na nse ya motema, ntango bakei mobembo na mboka mosusu, mpe kuna bazali kokuta Batatoli ya Yehova bazali kosala kaka mosala oyo bamonaka na mboka na bango. Nzokande, toyebi ete na ntango oyo esengeli, ata banguna na biso bakoyeba Yehova, ye oyo azali kosunga biso mpe azali kosala ete tózala na bomoko.—Ezekiele 38:10-12, 23.
6. Elikya nini tozalaka na yango ntango tosalaka mosala ya kobuka mbuma, kasi motuna nini ezali kotunama?
6 Nkolo ya elanga apesi Mwana na ye Yesu Klisto “bokonzi nyonso . . . na likoló mpe na nse.” (Matai 28:18) Yehova atindaka Yesu akamba mosala ya kobuka mbuma na nzela ya baanzelu ya likoló mpe mopakolami na ye, “moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo azali awa na mabele. (Matai 24:45-47; Emoniseli 14:6, 7) Kasi tokoki kosala nini mpo ete ntango banguna bazali kobundisa biso, tózala kaka na esengo mpe tókangama na mosala ya kobuka mbuma?
7. Tosengeli kosala makasi mpo tózalaka na makanisi nini ntango bazali kobundisa biso to konyokola biso?
7 Ntango banguna bazali kobundisa biso to ata soki bazali mpenza konyokola biso, tósɛnga Nzambe asalisa biso mpo tózala na makanisi ndenge moko na Paulo, ye akomaki boye: “Ekotukaka bato biso, tokopambolaka; ekonyokolaka bango biso, tokoyikaka mpiko; ekotyolaka bango biso, tokobɔndisaka na maloba.” (1 Bakolinti 4:12, 13) Kozala na makanisi ya ndenge wana, mpe koyeba kotya mwa mungwa na maloba ntango tozali kosakola epai ya bato nyonso, ntango mosusu esalaka ete banguna na biso bálongola makanisi mabe oyo bazalaka na yango mpo na biso.
8. Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 10:28 epesaka biso elikya nini?
8 Ata bakani koboma biso, tokokitisa molende na biso te na mosala ya kobuka mbuma mpo na yango. Tobangaka te, tosakolaka nsango malamu na miso ya bato nyonso na ndenge oyo tokoki kosala yango. Mpe maloba oyo ya Yesu epesaka biso makasi: “Bóbanga bango te baoyo bayebi koboma nzoto nde bayebi koboma molimo te. Bóbanga nde ye oyo azali na nguya [ya] kobebisa na molimo mpe na nzoto kati na Gehena.” (Matai 10:28) Toyebi ete Yehova, Tata na biso ya likoló, nde moto apesaka bato bomoi. Baoyo batikalaka sembo epai na ye mpe bakangamaka na mosala ya kobuka mbuma, apesaka bango mbano.
Nsango oyo ezali kobikisa bomoi ya bato
9. Ndenge nini bato mosusu bayambaki maloba ya Ezekiele mpe ndenge nini likambo yango ezali kosalema mpe lelo?
9 Ntango mosakoli Ezekiele asakolaki na mpiko nyonso nsango ya Yehova epai ya “mabota ya batomboki”—libota ya Yisalaele mpe libota ya Yuda—mwa bato bazalaki kosepela koyoka oyo Ezekiele azalaki koloba. (Ezekiele 2:3) Yehova alobi: “Talá, na miso na bango ozali lokola moyembi na mongongo malamu oyo abɛti likembe malamu mpe ayembi loyembo kitoko.” (Ezekiele 33:32) Atako bazalaki kosepela na maloba ya Ezekiele, kasi basalelaki yango te. Nini ezali kosalema lelo? Ntango batikali bapakolami mpe baninga na bango bazali kosakola bansango ya Yehova na molende nyonso, bato mosusu basepelaka koyoka makambo kitoko oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala, kasi basalaka eloko moko te oyo emonisaka ete ya solo mpenza basepeli na yango, bakómaka bayekoli te, mpe basanganaka na mosala ya kobuka mbuma te.
10, 11. Na ebandeli ya ekeke ya 20, basaleli ya Yehova basalaki nini mpo na kosakola nsango oyo ebikisaka bomoi ya bato, mpe ebotaki mbuma nini?
10 Nzokande, bato mingi bazali kosepela mpenza na mosala ya kobuka mbuma mpe bazali kosakola bansango ya Nzambe. Na ndakisa, na mayangani ya boklisto oyo esalemaki banda 1922 tii na 1928, nsango oyo ezali kosambisa mokili mabe ya Satana, esakolamaki polelepolele. Bansango yango ya kosambisa oyo elobamaki na mayangani wana elekaki na baradio. Na nsima, basaleli ya Yehova bakabolaki bamilio ya batrakte oyo ezalaki na bansango yango.
11 Na nsuka ya bambula ya 1930, bakómaki kosakola na ndenge mosusu ya sika, bakómaki kotambola na babalabala. Na ebandeli, basaleli ya Yehova bazalaki kolata mabaya oyo bakomá mito ya masukulu mpo na bato nyonso. Nsima, bakómaki kolata mabaya oyo bakomá maloba lokola “Lingomba ezali motambo mpe ezali lokuta” mpe “Salelá Yehova mpe Klisto Mokonzi.” Ntango bazalaki kotambola na babalabala, bato bazalaki kotalatala bango. Ndeko moko oyo azalaki kosala mosala yango mingi na babalabala oyo ezalaka na bato ebele na Londres, na Angleterre, alobaki ete ‘yango esalaki ete bato bátyela Batatoli ya Yehova likebi mpe bango moko balendisamaki.’
12. Longola bansango ya kosambisa ya Nzambe, makambo nini lisusu tolobelaki na mosala na biso ya kosakola, mpe lelo oyo banani basangani na mosala ya kosakola?
12 Ntango tozali kosakola bansango ya kosambisa ya Nzambe, tozali mpe kolobela makambo kitoko oyo ezali na kati ya nsango ya Bokonzi. Ntango tozali kopesa litatoli na molende liboso ya mokili, yango ezali kosalisa biso tóluka bato oyo babongi. (Matai 10:11) Bato mingi ya nsuka na kelasi ya bapakolami bandimaki mbela ya kobuka mbuma na bambula ya 1920 mpe 1930. Na nsima, na liyangani oyo esalemaki na 1935, nsango moko ya kitoko mingi eyebisaki ete “ebele monene” ya “bampate mosusu” bazali na lipamboli ya kofanda na paladiso awa na mabele. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Bayokaki nsango ya kosambisa ya Nzambe mpe basanganaki elongo na bapakolami na kati ya mosala ya kosakola nsango ya kobikisa bato.
13, 14. (a) Ndenge nini Nzembo 126:5, 6 ezali kokitisa biso motema? (b) Tokozwa nini soki tokobi kolona mpe kosopa mai?
13 Maloba ya Nzembo 126:5, 6 ezali kokitisa motema ya babuki-mbuma ya Nzambe, mingimingi baoyo bazali konyokwama, ete: “Baoyo bakokonaka na mpisoli bakobukaka na koganga na esengo. Ye oyo atamboli na kolela mpe [amemi] nkona mpo na kokona, akobutwa solo na koganga na esengo mpe [akomema] mbuma na ye.” Maloba ya mokomi ya nzembo oyo elobeli kolona mpe kobuka mbuma emonisi ete Yehova abatelaki ndambo ya Bayuda oyo bautaki na boombo na Babilone ya kala, mpe apambolaki bango. Basepelaki mingi ntango batikaki bango bábima na Babilone, kasi ekoki mpe kozala ete bazalaki kolela ntango bazalaki kolona mbuma na mabele oyo etikalaki mpamba mpe oyo balonaki eloko moko te likoló na yango mbula 70 nyonso oyo bazalaki na boombo. Nzokande, baoyo bakobaki kolona mpe kotonga bandako balyaki mbuma ya mosala na bango mpe basepelaki na mosala makasi oyo basalaki.
14 Tokoki mbala mosusu kolela ntango tozali konyokwama to ntango biso moko to baninga na biso bandimi bazali konyokwama mpo ete bazali kolanda kosala oyo ezali sembo. (1 Petelo 3:14) Na kati ya mosala na biso ya kobuka mbuma, ekoki kozala mpasi na ebandeli mpo tozali komona lokola nde mosala na biso ya kosakola ezali kobota mbuma te. Kasi soki tozali kaka kolona mpe kosopa mai, Nzambe akokolisa biloko, mbala mingi koleka ndenge oyo tokanisaki. (1 Bakolinti 3:6) Likambo yango ezali komonana polele na ndenge mosala na biso ya kokabola Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia ezali kobota mbuma.
15. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina ya mikanda na biso na kati ya mosala ya kobuka mbuma.
15 Tókamata ndakisa ya mobali moko nkombo na ye Jim. Ntango mama na ye akufaki, akutaki na kati ya biloko oyo mama na ye atikaki, mokanda La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création?a Atángaki yango na likebi mpenza. Ntango asololaki na Motatoli moko oyo akutanaki na ye na nzela, Jim andimaki ete Motatoli wana aya kotala ye na ndako, mpe na nsima akómaki koyekola Biblia. Jim akolaki nokinoki na elimo, amipesaki na Yehova, mpe azwaki batisimo. Ayebisaki bandeko na ye makambo oyo azalaki koyekola. Na nsima, ndeko na ye ya mwasi mpe ya mobali bakómaki Batatoli ya Yehova, mpe na nsima Jim azwaki libaku malamu ya kosala na Betele na Londres.
Banyokolami kasi bazali na esengo
16. (a) Mpo na nini mosala ya kobuka mbuma ezali kokende liboso? (b) Yesu alobaki na bayekoli na ye ete nsango malamu ekomema likambo nini, kasi tozalaka na elimo nini ntango tokendaka kotala bato?
16 Mpo na nini mosala ya kobuka mbuma ezali kokende liboso? Ezali mpo baklisto bapakolami na baninga na bango basalaki ndenge Yesu ayebisaki bango ntango alobaki ete: “Yango elobi ngai na bino na molili, bóloba yango kati na moi; yango mpe eyoki bino na matoi; bósakola yango likoló ya nsamba ya ndako.” (Matai 10:27) Nzokande, tokokamwa te soki tomoni mpasi, mpo Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Ndeko akokaba ndeko mpo na kufa mpe tata akokaba mwana mpe bana bakotɛmɛla baboti mpe bakoboma bango.” Yesu alobaki lisusu boye: “Bókanisa te ete nayei kotya kimya na mokili. Nayei kotya kimya te kasi mopanga.” (Matai 10:21, 34) Na makanisi na ye mpenza, Yesu alobaki bongo mpo na kokabola mabota te. Kasi nsango malamu yango moko ezalaki mbala mosusu mpe kokabola mabota. Ezali yango nde ezali komonana epai ya basaleli ya Nzambe lelo oyo. Ntango tozali kokende kotala bato, tokendaka te mpo na kokabola mabota na bango. Mposa na biso ezali ete bato nyonso báyamba nsango malamu. Yango wana, tosololaka na bato nyonso ya libota mokomoko na boboto nyonso, yango wana nsango na biso ezalaka kitoko mpo na baoyo “bazali na ezaleli ebongi mpo na bomoi ya seko.”—Misala 13:48, NW.
17. Ndenge nini baoyo bazali kosimba boyangeli ya Nzambe bakeseni na bato mosusu? Pesá ndakisa moko.
17 Nsango ya Bokonzi ezali kokesenisa bato oyo bakangami na boyangeli ya Nzambe na bato mosusu. Na ndakisa, talá ndenge oyo bandeko na biso bamonisaki ete bakeseni na mokili mpo ‘bafutaki biloko ya Kaisala epai na Kaisala mpe biloko ya Nzambe epai ya Nzambe’ na ntango Banazi bazalaki koyangela Allemagne. (Luka 20:25) Basaleli ya Yehova batɛlɛmaki ngwi, baboyaki kobuka mitinda ya Biblia, likambo oyo bakonzi ya mangomba mpe na bandimi ya mangomba ya boklisto bakokaki kosala te. (Yisaya 2:4; Matai 4:10; Yoane 17:16) Profɛsɛrɛ Christine King oyo akomaki buku Leta ya Nazi mpe mangomba ya sika (na Lingelesi), alobaki ete: “Ezali kaka Batatoli nde guvɛrnɛma [ya Nazi] ekokaki bango te, mpo ata babomaki bango ebele, mosala esukaki te mpe na sanza ya Mai 1945 lingomba ya Batatoli ya Yehova ezalaki kaka, nzokande bokonzi ya Nazi ezalaki lisusu te.”
18. Batatoli ya Yehova bazalaka ndenge nini ata bazali konyokola bango?
18 Ndenge Batatoli ya Yehova bazalaka na ntango bazali konyokola bango ekamwisaka bato. Ata bakonzi ya Leta bakoki kokamwa kondima na biso, eloko ekamwisaka bango lisusu makasi ezali ndenge tobombaka nkanda te. Na ndakisa, Batatoli oyo babikaki na bakaa ya Banazi bazalaka ntango nyonso na esengo mpe basepelaka ntango bakanisaka lisusu makambo oyo bakutanaki na yango. Bayebi ete Yehova apesaki bango “nguya eleki nguya ya bato.” (2 Bakolinti 4:7, NW) Bapakolami oyo tozali na bango elongo bazali na kondima ete “nkombo na bango isili kokomama na Likoló.” (Luka 10:20) Molende na bango ebimisi elikya oyo ememaka mawa te, mpe bato ya sembo oyo bazali kosala mosala ya kobuka mbuma, oyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabele bazali na kondima ya solosolo lokola bapakolami.—Baloma 5:4, 5.
Tókangama na mosala ya kobuka mbuma
19. Mayele nini ya malamu esalelamaki na mosala ya kosakola?
19 Toyebi te soki kino ntango nini Yehova akotika biso tósala mosala ya kobuka mbuma . Kasi tóbosana te ete bato oyo babukaka mbuma bazalaka na mayele oyo esengeli mpo na kosala mosala yango. Ndenge moko mpe, tosengeli kondima ete soki tosaleli malamumalamu mitindo oyo eyebani malamu, mosala na biso ekobota mbuma. Paulo ayebisaki baninga na ye baklisto ete: “Nalɔmbi bino ete bózala [bamekoli, NW] na ngai.” (1 Bakolinti 4: 16) Ntango Paulo akutanaki na bankulutu ya Efese na Milete, ayebisaki bango ete amipekisaki te koteya bango “kati na koyangana mpe ndako na ndako.” (Misala 20:20, 21, NW ) Timote, moninga ya Paulo, ayekolaki mayele oyo Paulo azalaki kosalela mpe alakisaki yango epai ya Bakolinti. (1 Bakolinti 4:17) Nzambe apambolaki mayele oyo ntoma Paulo azalaki kosalela mpo na koteya, akopambola biso mpe soki tokangami kaka na mosala ya kosakola nsango malamu epai ya bato nyonso, na ndakisa na bozongeli ya sika, ntango toyekolaka na bango Biblia, to mpe na bisika nyonso oyo bato bakoki komonana.—Misala 17:17.
20. Ndenge nini Yesu amonisi ete mosala monene ya kobuka mbuma na elimo ezalaki koya, mpe esalemaki ndenge nini na bambula oyo euti koleka?
20 Nsima ya kotatola epai ya mwasi Mosamalia pene ya Sukala na mobu 30 T.B., Yesu alobelaki mosala ya kobuka mbuma ya elimo. Ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bótombola miso na bino mpe bótala na bilanga ete bisili kotela mpo na kobuka naino. Mobuki azali kozwa lifuti mpe azali kobuka mbuma mpo na bomoi ya seko ete mokoni mpe mobuki basepelana elongo.” (Yoane 4:34-36) Ekoki kozala ete Yesu amonaki litomba na ndenge akutanaki na mwasi Mosamalia wana, mpo bato mingi bakómaki kondimela ye mpo na makambo oyo mwasi wana alobaki. (Yoane 4:39) Na bambula oyo euti koleka, bamboka mingi etikaki kopekisa mosala ya Batatoli ya Yehova to mpe epesaki bango nzela ya kosala mosala na bango ndenge balingi, yango efungolaki bateritware ya sika ya mosala ya kobuka mbuma. Litomba ezali ete na mokili mobimba, tozali kobuka mbuma mingi wana mosala ezali kokoba.
21. Mpo na nini tosengeli kokangama na mosala ya kobuka mbuma na esengo nyonso?
21 Ntango mbuma eteli mpe etikali kaka bábuka yango, bato ya mosala basengeli kosala nokinoki. Basengeli kozela te. Lelo oyo, tosengeli kosala na molende mpe na lombangu mpamba te tozali na “ntango ya nsuka.” (Danyele 12:4, NW) Ya solo, tozali kokutana na mikakatano, mosala ya koluka bato oyo bakosambela Yehova ezali monene koleka liboso. Yango wana, oyo ezali mokolo ya kosepela. (Yisaya 9:3) Lokola tozali basali ya esengo, tiká tókangama na mosala ya kobuka mbuma!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okopesa eyano nini?
• Nkolo ya elanga asalaki nini ntango basɛngaki ye ete atinda basali mingi?
• Atako ‘toyinami,’ tosalaka makasi tózala ndenge nini?
• Mpo na nini tosengeli kozala kaka na esengo ata soki bazali konyokola biso?
• Mpo na nini tosengeli kokangama na mosala ya kobuka mbuma mpe kosala yango nokinoki?
[Bililingi na lokasa 17]
Baanzelu bazali kosunga baoyo bazali kosala mosala ya kobuka mbuma na elimo
[Elilingi na lokasa 18]
Kotambola na babalabala mpo na kopanza nsango malamu ebimisaki nsango ya Bokonzi polele na miso ya bato mingi
[Elilingi na lokasa 18]
Tolonaka mpe tosopaka mai, kasi Yehova akolisaka