Yelusaleme—Ezali ‘likoló ya esengo na yo oyo eleki monene’?
“Tiká ete lolemo na ngai lokangama kati na monɔkɔ na ngai, . . . soki nakokumisa Yelusaleme te likoló na esengo na ngai oyo eleki monene.”—NZEMBO 137:6.
1. Ndenge nini Bayuda mingi oyo bazalaki na boombo bazalaki kotalela mboka oyo Nzambe aponaki?
MBULA soki ntuku nsambo elekaki kobanda Bayuda ya liboso bautaki na boombo bazongaki na Yelusaleme na mobu 537 L.T.B. Batongaki lisusu tempelo ya Nzambe, kasi, mboka ebongisamaki naino te. Na ntango wana, Bayisalaele mingi bakolaki na boombo. Na ntembe te mingi na kati na bango bazalaki kokanisa lokola moto oyo ayembaki na nzembo ete: “Yelusaleme, soko ngai nakobosana yo, tiká ete lobɔkɔ na ngai na mobali lokauka.” (Nzembo 137:5) Bato mosusu basukaki kaka na kokanisa Yelusaleme te. Na misala na bango, bamonisaki ete Yelusaleme ezalaki “likoló na esengo na [bango] oyo eleki monene.”—Nzembo 137:6.
2. Ezela azalaki nani, mpe lipamboli nini azwaki?
2 Tókamata ndakisa ya nganga Ezela. Kutu, liboso azonga na ekólo na ye, asalaki na molende mpo na matomba ya losambo ya pɛto na Yelusaleme. (Ezela 7:6, 10) Ezela azwaki mapamboli mingi mpo na yango. Yehova Nzambe apusaki motema ya mokonzi ya Pelese ete apesa Ezela libaku malamu ya kokamba etuluku mosusu ya bato oyo bazalaki kozonga na Yelusaleme. Mokonzi apesaki bango mpe wolo na palata “mpo na kokembisa ndako na [Yehova].”—Ezela 7:21-27.
3. Ndenge nini Nehemia amonisaki ete Yelusaleme ezalaki lobanzo na ye ya liboso?
3 Nsima ya mbula soko 12, Moyuda mosusu asalaki likambo moko monene; nkombo na ye Nehemia. Azalaki kosala na ndako ya mokonzi ya Pelese na Susana. Azalaki na mosala ya lokumu lokola momemi kɔpɔ ya Mokonzi Alatazelezese, kasi yango ezalaki ‘esengo oyo eleki monene’ mpo na Nehemia te. Kasi, mposa na ye ezalaki akende na Yelusaleme mpo na kotonga yango lisusu. Na boumeli ya basanza mingi, Nehemia abondelaki mpo na likambo yango mpe Yehova Nzambe apambolaki ye lokola asalaki bongo. Ntango mokonzi ya Pelese ayokaki lobanzo ya Nehemia, apesaki ye basoda mpe mikanda oyo epesaki ye ndingisa ya kotonga lisusu Yelusaleme.—Nehemia 1:1–2:9.
4. Ndenge nini tokoki komonisa ete losambo ya Yehova ezali ntina ya esengo na biso oyo eleki monene?
4 Na ntembe te, Ezela, Nehemia, mpe Bayuda mingi oyo bapesaki bango mabɔkɔ bamonisaki ete losambo ya Yehova oyo ezalaki kosalema na Yelusaleme ezalaki na ntina mingi na miso na bango koleka makambo mosusu nyonso. Ezalaki ‘likoló ya esengo na bango oyo eleki monene,’ elingi koloba ete, elekaki likambo mosusu nyonso oyo ekokaki kosepelisa bango. Bato wana bazali solo elendiseli mpo na baoyo nyonso bazali lelo oyo kotalela Yehova, losambo na ye, mpe ebongiseli na ye etambwisami na elimo ete ezali likoló ya esengo na bango oyo eleki monene! Ezali mpe bongo mpo na yo? Molende na yo mpo na kosala misala malamu, emonisaka ete ntina ya esengo na yo oyo eleki monene ezali libaku malamu ya kosambela Yehova elongo na bato oyo bamipesi epai na ye? (2 Petelo 3:11) Mpo tólendisama lisusu na likambo yango, tótalela matomba ya mobembo ya Ezela na Yelusaleme.
Mapamboli mpe mikumba
5. Bato ya Yuda bazwaki mapamboli nini na mikolo ya Ezela?
5 Bato soki 6 000 oyo bautaki na boombo mpe bazongaki nzela moko na Ezela bamemaki wolo mpe palata lokola makabo mpo na tempelo ya Yehova. Lelo oyo, biloko nyonso wana bizali na motuya ya dolare milio 35. Yango elekaki mbala nsambo wolo na palata nyonso oyo bato oyo bakómaki liboso bamemaki. Tokanisi ete bato oyo bafandaki na Yelusaleme mpe na Yuda batɔndaki Yehova mingi ntango bayambaki bato oyo bayaki kosunga bango na biloko mpo na mosala! Kasi, soki Nzambe apamboli mingi, ememaka mpe mikumba.—Luka 12:48.
6. Ezela amonaki likambo nini na ekólo na ye, mpe asalaki nini mpo na yango?
6 Eumelaki ntango molai te, Ezela amonaki ete Bayuda mingi, na banganga mpe bankolo mosusu, babukaki Mibeko ya Nzambe; babalaki basi oyo bazalaki Bayisalaele te. (Deteronome 7:3, 4) Ayokaki mawa mingi ndenge bato yango babukaki kondimana ya Mibeko ya Nzambe. “Eyokaki ngai bongo, napasolaki bilamba na ngai mpe elamba na ngai na libándá, . . . mpe nafandaki na kokamwa.” (Ezela 9:3) Bongo, Ezela abondelaki Yehova na mai na miso liboso ya Bayisalaele oyo bazalaki mpenza na mawa. Na matoi ya bato nyonso, Ezela amonisaki ndenge Bayisalaele bazangaki botosi na ntango ya kala mpe ndenge Nzambe azalaki kokebisa bango mpo na makambo oyo masengelaki kobima soki babalani na bapaya oyo bafandaki na mokili wana. Asukisaki boye: “Ɛ [Yehova], Nzambe na Yisalaele, yo ozali na boyengebene mpo ete totikali litika libikisami, lokola na lelo oyo; talá tozali liboso na yo na masumu na biso; moko akoyeba kotɛlɛma liboso na yo mpo na oyo te.”—Ezela 9:14, 15.
7. (a) Ndakisa malamu nini Ezela apesaki na ndenge oyo asilisaki misala ya mabe? (b) Na mikolo ya Ezela, ndenge nini bato oyo basalaki mabe bandimaki kosembola likambo yango?
7 Ezela asalelaki liloba “biso.” Emonisi ete amilongolaki te, atako ye moko azalaki na ekweli te. Lokola Ezela amonisaki mpenza mawa mpe asalaki libondeli na komikitisa, likambo yango esimbaki mitema ya bato nyonso mpe epusaki bango básala misala oyo mimonisi kobongola motema. Atako ezalaki mpasi, bandimaki kosembola likambo yango. Baoyo nyonso babukaki Mibeko ya Nzambe basengelaki kozongisa basi na bango bapaya na bikólo na bango, nzela moko na bana oyo babotaki na basi yango. Ezela andimaki ekateli yango mpe alendisaki baoyo basalaki mabe ete bándima yango. Lokola mokonzi ya Pelese nde aponaki ye mpo na koyangela, Ezela azalaki na lotomo ya koboma bato nyonso oyo babukaki mibeko to kobengana bango na Yelusaleme mpe na Yuda. (Ezela 7:12, 26) Kasi, tomoni ete asalaki bongo te. “Koyangana mobimba” elobaki ete: “Lokola yo osili koloba mpo na biso, boye tokosala yango.” Bayambolaki mpe ete: “Tosili kosala mabe mingi na likambo oyo.” (Ezela 10:11-13) Ezela mokapo 10 etángi bankombo ya mibali 111 oyo batosaki ekateli ya kozongisa basi na bango bapaya na bana na bango na mboka na bango.
8. Ndenge nini likambo monene ya kozongisa basi bapaya na bamboka na bango ezalaki na litomba mpo na bato nyonso?
8 Likambo yango ezalaki na matomba bobele mpo na Yisalaele te kasi mpo na bato nyonso. Soki basalaki eloko te mpo na kosembola makambo, Bayisalaele balingaki kosangana na mabota ya zingazinga. Na bongo, molɔngɔ ya bakitani oyo esengelaki kobimisa Mombóto oyo elakamaki mpo na kopambola bato nyonso elingaki kobebisama. (Genese 3:15; 22:18) Elingaki kokóma mpasi mpo na koyeba Mombóto oyo balakelaki Mokonzi Davidi na libota ya Yuda. Nsima ya mbula 12, batyelaki lisusu likambo yango ya ntina mingi likebi ntango “libota na Yisalaele bamikabolaki na bapaya nyonso.”—Nehemia 9:1, 2; 10:29, 30.
9. Toli nini ya malamu Biblia ezali kopesa na baklisto oyo basi to mibali na bango bazali bandimi te?
9 Lisolo oyo ekoki koteya nini epai ya basaleli ya Yehova na mikolo na biso? Ya solo, baklisto bazali na nse ya kondimana ya Mibeko te. (2 Bakolinti 3:14) Kasi, batosaka “mibeko ya Klisto.” (Bagalatia 6:2, NW) Yango wana, moklisto oyo azali na molongani oyo azali mondimi te, alandaka toli ya Paulo ete: “Soko ndeko moko azali na mwasi oyo azangi kondima mpe ye asepeli kofanda na ye, ekoki na mobali kolongola ye te.” (1 Bakolinti 7:12) Makomami esɛngisi mpe baklisto oyo babalani na bango bazali bandimi te ete básala nyonso mpo ete libala na bango elonga. (1 Petelo 3:1, 2) Mbala mingi kotosa toli oyo ebimisaki matomba na boye ete mibali to basi oyo bazali bandimi te babongolaki ndenge na bango ya kotalela losambo ya solo. Kutu, basusu bakómaki baklisto ya sembo oyo bazwi batisimo.—1 Bakolinti 7:16.
10. Baklisto bakoki kozwa liteya nini na ndakisa ya Bayisalaele 111 oyo bazongisaki basi na bango bapaya na bamboka na bango?
10 Likambo ya Bayisalaele oyo bazongisaki basi na bango bapaya ezali na liteya monene mpo na baklisto oyo bazali minzemba. Bango basengeli te koluka kobala bato oyo bazali bandimi te. Koboya libala ya ndenge wana ekoki kozala mpasi, kasi yango nde nzela oyo eleki malamu soki moto alingi ete Nzambe alanda kopambola ye. Basɛngi na baklisto ete: “Bókangana na ekanganeli na bokesene te, esika moko na bato bazangi kondima.” (2 Bakolinti 6:14) Moklisto oyo azali monzemba mpe alingi kobala asengeli koluka moninga na ye mondimi.—1 Bakolinti 7:39.
11. Lokola mibali ya Yisalaele, ndenge nini tokoki komekama na ntina ya esengo na biso?
11 Baklisto basembolaki mpe makanisi na bango na makambo mosusu mingi ntango bamonisaki bango ete etamboli na bango eyokani na Makomami te. (Bagalatia 6:1) Mbala mingi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki bizaleli oyo Makomami endimaka te, bizaleli oyo soki moto alandi yango, azali na esika te na kati ya ebongiseli ya Nzambe. Na ndakisa, na 1973, basaleli ya Yehova basosolaki polelepolele ete komela likaya mpe komela bangi ezali masumu minene. Mpo na kolanda nzela ya Nzambe, tosengeli ‘komipɛtola na mbindo nyonso ya nzoto mpe ya elimo.’ (2 Bakolinti 7:1) Bato mingi balandaki toli wana ya Biblia; bandimaki koyoka mpasi oyo ezalaka na ebandeli ntango moto atiki momeseno moko mpo ete bátikala na kati ya libota ya Nzambe oyo ezali pɛto. Malako ya polele oyo mauti na Makomami mapesamaki mpe mpo na makambo matali pite mpe ekobo, molato, monzɛlɛ, kopona mosala ya malamu, kominanola, mpe miziki. Soki babendi likebi na biso ata na etinda nini ya Makomami, tóndima ‘komibongisa,’ lokola mibali 111 ya Yisalaele. (2 Bakolinti 13:11) Boye tokomonisa ete libaku malamu ya kosambela Yehova elongo na libota mosantu na ye ezali ‘likoló ya esengo na biso oyo eleki monene.’
12. Likambo nini esalemaki na mobu 455 L.T.B.?
12 Nsima ya kolobela likambo ya basi bapaya, Biblia eyebisi biso te makambo masalemaki na Yelusaleme na boumeli ya mbula 12 oyo elandaki. Na ntembe te, botɛmɛli ya mabota ya zingazinga engalaki mpo ete Bayisalaele babomaki ebele ya mabala oyo basalaki na basi ya mboka na bango. Na mobu 455 L.T.B., Nehemia akómaki na Yelusaleme na limpinga ya basoda oyo bayaki kotika ye. Mokonzi ya Pelese aponaki ye azala guvernere ya Yuda mpe amemaki mikanda oyo eutaki na mokonzi ya Pelese, oyo apesaki ye ndingisa ya kotonga lisusu mboka yango.—Nehemia 2:9, 10; 5:14.
Botɛmɛli ya mabota ya zingazinga mpo na zuwa
13. Mabota oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta na zingazinga ya Bayuda bamonisaki elimo nini, mpe Nehemia asalaki nini?
13 Mabota ya zingazinga oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta batɛmɛlaki mokano oyo Nehemia ayaki na yango. Bakambi na bango balukaki kobangisa ye; batunaki ete: “Bokotombokela nde mokonzi?” Nehemia amonisaki kondima epai ya Yehova mpe ayanolaki ete: “Nzambe na lola, ye akolongisa biso mpe biso baombo na ye tokotɛlɛma mpe tokotonga. Nde bino bozali na libula to lokumu to na ekaniselo kati na Yelusaleme te.” (Nehemia 2:19, 20) Ntango babandaki mosala ya kobongisa bifelo, banguna yango basɛkaki bango ete: ‘Bayuda oyo na nguya moke bazali kosala nini? Bakobikisa nde mabanga kati na mabondo na mputulu wana ezikaki yango? Soko ngombolo akobuta wana, akobuka lopango na bango na mabanga.’ Na esika azongisela batyoli wana eyano, Nehemia abondelaki ete: “Ɛ Nzambe na biso, yoká mpo ete totyolami; butwisá nsɔni na bango likoló na mitó na bango mpenza.” (Nehemia 4:2-4) Nehemia akobaki kopesa ndakisa malamu ya moto oyo azalaki kotyela Yehova motema!—Nehemia 6:14; 13:14.
14, 15. (a) Nehemia asalaki nini liboso ya makaneli ya kosala mobulu oyo banguna bazalaki kobimisa? (b) Ndenge nini Batatoli bazali kokoba mosala na bango ya kotonga na elimo atako bazali kokutana na botɛmɛli makasi?
14 Lelo oyo, Batatoli ya Yehova mpe batyelaka Nzambe motema mpo na kokokisa mosala na bango ya ntina mingi oyo etali kosakola. Batɛmɛli bazali koluka kopekisa mosala yango na kosɛkáká bango. Mbala mosusu, bato oyo basepeli na nsango ya Bokonzi balɛmbaka mpo ete bazali kosɛka bango. Soki kosɛka esali eloko te, batɛmɛli bayokaka nkanda mpe babimisaka makaneli ya kosala mobulu. Baoyo bazalaki kotonga bifelo ya Yelusaleme bakutanaki na likambo yango. Kasi, Nehemia abangaki te. Kutu, atyaki basoda mpo na kobatela batongi liboso ya matumoli ya banguna mpe alendisaki kondima na bango na maloba oyo: “Bóbanga bango te! Kanisá [Yehova] oyo azali monene mpe na nsɔmɔ. Bóbundela bandeko na bino mpe bana na bino babali mpe basi, basi na bino mpe ndako na bino.”—Nehemia 4:13, 14.
15 Lokola na mikolo ya Nehemia, Batatoli ya Yehova bazali na bisaleli nyonso oyo esengeli mpo na kokoba mosala na bango ya botongi na elimo atako bazali kokutana na botɛmɛli makasi. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa bilei ya elimo oyo ezali kolendisa kondima mpe ezali kosalisa basaleli ya Nzambe ete bálanda kobota mbuma ata na bisika oyo mosala na bango epekisami. (Matai 24:45) Mpo na yango, Yehova azali kokoba kopambola basaleli na ye na ndenge bazali se kobakisama na kati ya mokili mobimba.—Yisaya 60:22.
Mikakatano kati na bango moko
16. Mikakatano nini ebimaki kati na Bayuda oyo milɛmbisaki elimo ya batongi ya bifelo ya Yelusaleme?
16 Wana mosala ya kotonga lisusu bifelo ya Yelusaleme ezalaki kokende liboso mpe bifelo emataki, mosala ekómaki mpasi mingi. Mokakatano moko ebimaki oyo elɛmbisaki batongi baye bazalaki kosala na molende. Lokola nzala ekɔtaki na mboka, Bayuda mosusu bakokaki lisusu te koleisaka mabota na bango mpe kofutaka mpako ya mokonzi ya Pelese. Bayuda oyo bazalaki na bozwi badefisaki bandeko na bango bilei na mbongo. Kasi, Bayuda oyo bazalaki babola basengelaki kopesa bango mabelé mpe bana na bango lokola ndanga ete bakozongisa mbongo wana na matabisi; nzokande Mibeko ya Nzambe epekisaki likambo yango. (Exode 22:25; Levitike 25:35-37; Nehemia 4:6, 10; 5:1-5) Badefisi bakómaki kotungisa badefi ete bakobɔtɔla mabelé na bango mpe bazalaki kopusa bango na makasi ete bátɛkisa bana na bango lokola baombo. Nehemia asepelaki na elimo wana te, yango emonisaki kozanga bolingo mpe kolinga mingi biloko ya mosuni. Asalaki likambo moko na lombangu mpo ete Yehova alanda kopambola mosala ya kotonga lisusu bifelo ya Yelusaleme.
17. Nehemia asalaki nini mpo ete Yehova akoba kopambola mosala ya kotonga, mpe esukaki ndenge nini?
17 Babongisaki “koyangana monene” mpe Nehemia amonisaki polele Bayisalaele oyo bazalaki na bozwi ete Yehova asepelaki te na likambo oyo basalaki. Bongo, asɛngaki na bato oyo basalaki mabe, na banganga mosusu, ete bázongisa matabisi nyonso oyo bazwaki mpe bázongisa mabelé oyo babɔtɔlaki baoyo bazalaki na likoki ya kofuta matabisi likoló te. Likambo ya malamu, baoyo basalaki mabe balobaki ete: “Tokozongisa yango mpe tokoluka eloko epai na bango te; ɛɛ, tokosala bongo lokola yo olobi.” Ezalaki bobele na maloba te, mpamba te Biblia eyebisi ete, “Bato basalaki mpe lokola elaka [ya Nehemia].” Mpe lisangá mobimba basanzolaki Yehova.—Nehemia 5:7-13.
18. Batatoli ya Yehova bayebani mpo na elimo nini?
18 Bongo na mikolo na biso? Na esika ya kobuba bato mosusu, Batatoli ya Yehova bayebani mingi mpo na elimo ya kokabela baninga na bango bandimi mpe bato mosusu oyo bazali kozwa mikakatano. Lokola na mikolo ya Nehemia, yango epusi bato mingi ete básanzola Yehova. Nzokande, epai mosusu, “moombo ya sembo mpe ya mayele” amonaki malamu kopesa toli euti na Makomami na makambo ya mombongo mpe koyiba basusu mpo na lokoso. Na mikili mosusu, bato bazali na momeseno ya kosɛnga mbongo mingi mpo na libala. Kasi, Biblia ezali mpenza kokebisa ete bato ya lokoso mpe babɔtɔli bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe te. (1 Bakolinti 6:9, 10) Lolenge oyo baklisto mingi bazali kondima toli yango ezali kokundwela biso lolenge oyo Bayuda basosolaki ete kobuba bandeko na bango oyo bazalaki babola ezali lisumu.
Basilisi kotonga bifelo ya Yelusaleme
19, 20. (a) Batɛmɛli bazalaki na mayoki nini ntango bifelo ya Yelusaleme bisilaki kotongama? (b) Bolongi nini Batatoli ya Yehova bazwi na mikili mingi?
19 Atako botɛmɛli ezalaki makasi, basilisaki kotonga bifelo ya Yelusaleme nsima ya mikolo 52. Likambo yango esalaki nini epai ya batɛmɛli? Nehemia alobaki ete: “Eyokaki bayini nyonso na biso likambo oyo, bato na mabota mosusu baoyo bazingelaki biso babangaki mpe bamisɔkisaki na miso na bango mpenza mpo ete basosolaki ete mosala oyo esalemaki na Nzambe na biso.”—Nehemia 6:16.
20 Lelo oyo, na bisika mingi, banguna bazali kokoba kotɛmɛla mosala ya Nzambe na mitindo ndenge na ndenge. Kasi, bato mingi bamoni ete kotɛmɛla Batatoli ya Yehova ezali na ntina moko te. Na ndakisa, tótala ndenge balukaki kosukisa mosala ya kosakola na Allemagne na boyangeli ya Banazi, na Mpoto ya Ɛsti, mpe na bikólo mingi ya Afrika. Nyonso wana elongaki te, mpe bato mingi bazali kososola ete ‘mosala oyo ezali kosalema na Nzambe na biso.’ Bandeko ya sembo oyo baumeli mingi bazwi mbano monene na ndenge basalaki ete losambo ya Yehova ‘ezala ntina ya esengo na bango oyo eleki monene’ na bikólo wana!
21. Makambo minene nini tokotalela na lisolo oyo elandi?
21 Na lisolo oyo ekolanda, tokotalela makambo minene oyo malekaki kino basalaki molulu ya bofungoli ntango basilisaki kotonga lisusu bifelo ya Yelusaleme. Tókotalela mpe ndenge oyo mboka ya monene koleka elingi kosila kotongama mpo na litomba ya bato nyonso.
Ozali komikundola?
◻ Ndenge nini Ezela mpe bato mosusu basepelaki na ntina na Yelusaleme?
◻ Ezela na Nehemia basalisaki Bayuda mingi na kosembola mabunga nini?
◻ Masolo ya Ezela na Nehemia ezali koteya yo nini?
[Elilingi na lokasa 15]
Ezali nde Yelusaleme, kasi mosala ya lokumu na Susana te nde ezalaki lobanzo ya liboso ya Nehemia
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Lokola Nehemia, tosengeli kobondela Yehova ete apesa litambwisi mpe makasi mpo na kokoba na mosala na biso ya ntina mingi etali kosakola