“Ɛ Nzambe, sosola ngai”
“Ɛ Nzambe, sosola ngai mpe yeba motema na ngai. . . . Kamba ngai na nzela na seko.”—NZEMBO 139:23, 24.
1. Lolenge nini Jéhovah azali kosala epai na basaleli na ye?
BISO banso tosepelaka na bato oyo bayebi komitya na esika ya bazalani na bango, baoyo bazali kotalela ezalela na biso, bakosalisaka biso soki tosali libunga, baoyo bakosengaka epai na biso te makambo oyo maleki makoki na biso. Jéhovah Nzambe asalaka epai na basaleli na ye na motindo yango. Nzembo 103:14 elobi ete: “Mpo ete ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” Mpe Yesu Klisto, oyo azali komonisa Tata na ye na motindo ya kokoka, apesi libyangi oyo ya bolingo: “Boya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito, mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likoló na bino [to, “Bokota na nse ya ekanganeli na ngai elongo na ngai,” engebene maloba na nse ya lokasa ya MN, na Lingelesi] mpe boyekola na ngai, mpamba te ngai nazali na bopolo mpe na motema mosokemi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.”—Matai 11:28-30.
2. Bokeseni nini ezali kati na Jéhovah mpe bato mpo na lolenge na bango ya kotalela (a) Yesu Klisto, mpe (b) bayekoli na Klisto?
2 Lolenge oyo Jéhovah azali kotalela basaleli na ye ekeseni mpenza na motindo ya bato. Akotalaka makambo na likanisi likeseni mpe azali kotalela mitindo na yango oyo bato bakoki koyeba yango te. Ntango Yesu Klisto azalaki na mabelé, “atyolamaki mpe aboyamaki na bato.” Baoyo bandimelaki ye te lokola Masiya “batyolaki ye mpe baboyaki ye.” (Yisaya 53:3; Luka 23:18-21) Nzokande, na miso na Nzambe, azalaki “Mwana [ya Nzambe], molingami,” oyo Tata alobaki na ye ete: “Nandimi yo.” (Luka 3:22; 1 Petelo 2:4) Kati na bayekoli na Yesu Klisto, basusu batyolami mpo ete bazali babola na mosuni mpe bazali konyokwama mingi. Nzokande, na miso ya Jéhovah mpe ya Mwana na ye, bato yango bakoki kozala bazwi. (Baloma 8:35-39; Emoniseli 2:9) Mpo na nini bokeseni ya etaleli?
3. (a) Mpo na nini lolenge oyo Jéhovah azali kotalela basaleli na ye ekeseni mingi na lolenge ya bato? (b) Mpo na nini ezali na ntina mingi ete totalela lolenge ya moto oyo tozali na kati?
3 Yilimia 11:20 eyanoli ete: “Jéhovah . . . akomekaka ngei mpe motema.” Akotalaka oyo ezali na kati, ata lolenge ya bomoto na biso oyo ebombami na miso na bato. Kati na botaleli na ye, azali libosoliboso kotya likebi na bizaleli mpe na makambo oyo mazali na ntina mingi kati na boyokani elongo na ye, oyo ezali mpo na bolamu oyo ekoki koumela mpenza. Boyebi na likambo yango ezali kopesa biso kimya; ezali lisusu kopesa biso makanisi oyo mabongi. Mpo ete Jéhovah azali kotya likebi na oyo tozali na kati, ezali na ntina mingi mpo na biso kotalela oyo tozali na kati mpo na koyeba soki tozali lolenge ya bato oyo akondima bango kati na mokili na ye ya sika. Liloba na ye lizali kosalisa biso na kosala botaleli motindo wana.—Baebele 4:12, 13.
Makanisi ya Nzambe mazali mpenza na motuya!
4. (a) Nini epusaki mokomi na Nzembo na koloba ete makanisi ya Nzambe mazalaki na motuya mingi mpo na ye? (b) Mpo na nini masengeli kozala na motuya mingi mpo na biso?
4 Nsima ya kokanisa mozindo na ntina na bonene mpe bozindo ya boyebi oyo Nzambe azali na yango likoló na basaleli na ye, bakisa makoki ya kokamwa oyo azali na yango ya kopesa bango lisalisi oyo bazali na yango mposa, Davidi, mokomi na Nzembo akomaki ete: “Kobanza na yo epai na ngai ezali eloko na motuya mingi!” (Nzembo 139:17a) Makanisi wana, oyo mamonisami kati na Liloba na ye likomami, mazali mosika likoló na makanisi ya bato nyonso, ata soki makanisi na bango mamonani ete mazali ya kokamwa. (Yisaya 55:8, 9) Makanisi na Nzambe mazali kosalisa biso na kotya likebi na biso likoló na makambo maleki ntina kati na bomoi mpe na kozala na molende kati na mosala. (Bafilipi 1:9-11) Yango ezali kosalisa biso na komona makambo na lolenge oyo Nzambe azali komonela yango. Ezali kosalisa biso na komimonisa sembo epai na biso moko, na komitalela lokola tozali mpenza kati na motema na biso. Tozali pene na kosala bongo?
5. (a) Liloba na Nzambe lizali kolendisa biso na kobatela nini “koleka biloko nyonso”? (b) Litomba nini tokoki kozwa na lisoló ya Biblia etali Kaina? (c) Atako tozali na nse na Mibeko ya Moize te, lolenge nini yango ezali kosalisa biso na kososola makambo oyo Jéhovah asepelaka na yango?
5 Bato bazalaka na momeseno ya kotya likebi mingi na makambo oyo mazali komonana libanda, kasi Makomami mazali kopesa biso toli oyo: “Batela motema na yo na koleka biloko nyonso.” (Masese 4:23) Na nzela na mateya mpe na bandakisa, Biblia ezali kosalisa biso na kosala bongo. Ezali koloba na biso ete Kaina apesaki Nzambe mbeka moko ya likolólikoló wana motema na ye mozalaki kongala na likunya, na nkanda epai na ndeko na ye Abel. Mpe ezali kolendisa biso na kokokana na ye te. (Genese 4:3-5; 1 Yoane 3:11, 12) Tozali kokuta kati na yango mitinda ya botosi ya Mobeko na Moize. Kasi ezali lisusu komonisa makasi ete lisengami ya liboso ya Mobeko ya Moize lizalaki ete baoyo bazalaki kosambela Nzambe basengelaki kolinga ye na motema na bango mobimba, na makanisi na bango mobimba, na molimo na bango mobimba, mpe na makasi na bango mobimba; mpe elobaki ete oyo elandaki yango ezalaki mobeko ya kolinga bazalani na bango lokola bango moko.—Deteronome 5:32, 33; Malako 12:28-31.
6. Wana tozali kosalela Masese 3:1, mituna nini tosengeli komituna?
6 Na Masese 3:1, tolendisami te bobele na kotosa mibeko na Nzambe kasi na komindimisa lisusu ete botosi na biso ezali elembo na oyo ezali solo kati na motema na biso. Biso nyonso tosengeli komituna: ‘Ezali motindo oyo nde nazali kotosa mibeko na Nzambe?’ Soki tososoli ete na mwa makambo mosusu, mokano to makanisi na biso malongobani te—mpe moko te kati na biso akoki koloba ete azangi mabunga—boye tosengeli komituna ete: ‘Nazali kosala nini mpo na kobongisa makambo?’—Masese 20:9; 1 Yoane 1:8.
7. (a) Lolenge nini mokapo ya Matai 15:3-9 epai Yesu azali kokweisa Bafalisai ezali kosunga biso na kobatela motema na biso? (b) Makambo nini makoki kotinda biso na kozwa ekateli ya makasi mpo na kosembola makanisi na biso mpe motema na biso?
7 Yesu akweisaki bokosi ya Bafalisai, oyo balobaki ete bazali kokumisa Nzambe, nzokande, bazalaki kolendisa momeseno moko mopusamaki na koluka matomba na bango moko, mpe Yesu amonisaki ete losambo na bango lozalaki mpamba. (Matai 15:3-9) Yesu akebisaki lisusu biso ete mpo na kosepelisa Nzambe, oyo azali komona na motema, ekoki te bobele kozala na bomoi oyo na libandá ezali peto, mpe bobele na ntango wana, komitika mbala na mbala na makanisi ya mbindo mpo na koluka komisepelisa. Mbala mosusu esengeli na biso kokamata meko ya makasi mpenza mpo na kosembola makanisi mpe motema na biso. (Masese 23:12; Matai 5:27-29) Ekosengela kosembolama motindo yango lisusu soki mosala na biso ya mosuni, mokano na biso ya kotanga kelasi, to lolenge ya kominanola oyo toponi ebandi kopusa biso na kokóma bamekoli ya mokili, wana tozali kopesa yango nzela ete ebongola biso engebene mitinda na yango. Tika tobosana te ete moyekoli Yakobo abengi “bato na ekobo” baoyo bazali koloba ete bazali kosambela Nzambe kasi bazali baninga ya mokili. Mpo na nini? Mpamba te “mokili mobimba mozali kolala kati na oyo mabe.”—Yakobo 4:4; 1 Yoane 2:15-17; 5:19.
8. Mpo na kozwa litomba mingi na makanisi ya Nzambe, tosengeli kosala nini?
8 Mpo na kozwa matomba mpenza na makanisi na Nzambe na ntina na makambo wana mpe na makambo mosusu, tosengeli komibombela ntango mpo na kotanga mikanda to koyoka makanisi yango na badiskur. Lisusu, tosengeli koyekola yango, kolobela yango, mpe kokanisa likoló na yango. Batangi mingi ya Mosenzeli bayanganaka poso na poso na makita ya ba Témoins Jéhovah, epai bayekolaka Biblia. Basombaka ntango na makambo mosusu mpo na kokoka kosala bongo. (Baefese 5:15-17) Mpe oyo bazali kozwa lokola mbano ezali na motuya mingi koleka bozwi ya mosuni. Yo mpe ozali na mayoki motindo moko, boye te?
9. Mpo na nini bato mosusu oyo bazali koyangana na makita ya boklisto bakólaka nokinoki koleka basusu?
9 Nzokande, bamoko oyo bazali koyangana na makita yango bazali kokola nokinoki koleka basusu. Bazali kosalela solo na molende nyonso kati na bomoi na bango. Nini ezali kosala bokeseni yango? Mbala mingi, likambo lileki ntina lizali molende na bango kati na boyekoli na bango moko. Bakangi ntina ete moto akobika bobele na limpa te; kolya bilei ya elimo mokolo na mokolo ezali na ntina motindo moko na kolya bilei ya mosuni. (Matai 4:4; Baebele 5:14) Yango wana bazali kosala makasi na kozwa mokolo nyonso mwa ntango mpo na kotanga Biblia to mikanda oyo mizali kolimbola yango. Bazali komibongisa mpo na makita ya lisangá, koyekola mateya yango na liboso mpe bazali koluka mikapo ya Makomami. Bazali bobele kotanga makambo oyo epesami te; bazali kokanisa yango na mozindo. Wana bazali koyekola bazali kokanisa na mozindo na ntina na bopusi ya makambo oyo bazali koyekola likoló na bomoi na bango moko. Wana bazali kokóla na elimo, bakokóma na mayoki motindo moko na oyo mokomi na Nzembo akomaki ete: “Nalingi mobeko na yo na bolingo bɛ! . . . Matatoli na yo mazali ya kokamwa.”—Nzembo 1:1-3; 119:97, 129.
10. (a) Esengeli kolanda koyekola Liloba na Nzambe na boumeli ya ntango boni? (b) Lolenge nini Makomami mazali komonisa yango?
10 Ezala ete tozali koyekola Liloba na Nzambe uta mbula moko, bambula 5, to bambula 50, ekokóma te bobele bozongeli ya mpamba, soko makanisi na Nzambe mazali na motuya na miso na biso. Atako toyebi makambo mingi kati na Makomami, ezali na makambo mingi mosusu oyo toyebi naino yango te. Davidi alobaki ete: “Ɛ Nzambe, motuya na yango ezali monene boni! Soko nameki kotanga yango, eleki mbuma na zelo na motuya.” Tokokoka te kotanga makanisi ya Nzambe. Soki tobandi kotanga makanisi na Nzambe mokolo mobimba kino tokei kolala, wana tokolamuka lobi, tokozala naino na makambo mingi ya kokanisa likoló na yango. Na bongo, Davidi akomaki ete: “Ekolongwa ngai na mpongi, nazali mpe naino esika moko na yo.” (Nzembo 139:17, 18) Tokozala na makambo mingi ya koyekola na ntina na Jéhovah libela na libela. Tokokóma te na koyeba yango nyonso.—Baloma 11:33.
Toyina oyo Jéhovah azali koyina
11. Mpo na nini ezali na ntina mingi bobele ya koyeba makanisi ya Nzambe te, kasi lisusu ya kozala na mayoki motindo moko na ye?
11 Boyekoli na biso ya Liloba na Nzambe ezali te bobele mpo na kotondisa makambo na motó na biso. Wana tozali kotika yango kokotela motema na biso, tobandi kokóma na mayoki lokola oyo ya Nzambe. Oyo nde likambo ya ntina! Soki tokólisi mayoki motindo yango te, nini ekoki kokóma? Atako tokoki kolobela makambo oyo Biblia ezali koteya, nzokande, tokoki kokóma na kosepela na makambo mapekisami, to tokoki koyoka ete makambo oyo bazali kosenga biso mazali kilo. Ya solo, atako tozali koyina oyo ezali mabe, tokoki kozala na etumba makasi na ntina na kozanga kokoka na biso. (Baloma 7:15) Kasi soki tosali molende makasi te mpo na koyokanisa bomoto na biso ya kati na makambo oyo mazali sembo, tokoki nde komizela na kosepelisa Jéhovah, “ye oyo akotalaka kati na mitema”?—Masese 17:3.
12. Lolenge nini bolingo oyo eyokani na mokano na Nzambe mpe kobanga kobuka mitinda na Nzambe ezali na ntina mingi mpo na biso?
12 Kobanga oyo eyokani na mokano na Nzambe ezali libateli ya nguya mpo na kokima misala mabe, motindo moko lokola bolingo engebene mokano na Nzambe ezali kopesa esengo ya kosala oyo ezali sembo. (1 Yoane 5:3) Mbala na mbala Makomami mazali kolendisa biso na kolona bolingo mpe kobanga wana. “Bino baoyo bokolingaka Jéhovah, boyina mabe.” (Nzembo 97:10) “Boyinaka makambo mabe mpe bokangama na makambo malamu.” (Baloma 12:9) Tosalaka yango?
13. (a) Tondimi mpenza libondeli nini oyo Davidi asalaki na ntina na kobomama ya bato mabe? (b) Lokola emonisami na libondeli ya Davidi, banani bazali bato mabe oyo ye abondelaki Nzambe ete aboma bango?
13 Jéhovah asili koyebisa polele mokano na ye ya kolongola bato mabe na mabelé mpe ya kosala mabelé ya sika epai bato malamu bakofanda. (Nzembo 37:10, 11; 2 Petelo 3:13) Baoyo balingi boyengebene bazali kozela ntango wana na motema likoló. Bazali kondima oyo Davidi, mokomi na Nzembo, alobaki na libondeli ete: “Ɛ Nzambe, solo okoboma bato mabe; bongo bino bato na makila, longwa na ngai, bato baoyo bakoboyaka yo na minoko mabe mpe bayini na yo [baoyo] bakotukaka nkombo na yo na lolenge mabe.” (Nzembo 139:19, 20) Davidi ye moko akanaki te koboma bato wana ya mabe. Abondelaki ete lifuti na bango liuta na maboko na Jéhovah. (Deteronome 32:35; Baebele 10:30) Bato wana basalaki mabe epai na Davidi te. Bamonisaki Nzambe na lolenge ya mabe, kotukaka nkombo na ye to kotangaka nkombo na ye mpamba. (Exode 20:7) Na bokosi, balobi ete bazali kosalela ye, kasi bazalaki kosalela nkombo na ye mpo na kotombola mikano na bango moko. Davidi azalaki na bolingo moko te mpo na baoyo baponaki kozala banguna na Nzambe.
14. Ezali na bato mabe oyo tokoki kosalisa bango? Soki ee, lolenge nini?
14 Ezali na bamiliare na bato oyo bayebi Jéhovah te. Mingi kati na bango bazali kosala kozanga koyeba makambo oyo Liloba na Nzambe emonisi ete ezali mabe. Soki bakangami na nzela yango, bakozala kati na bato oyo bakokufa na bolozi monene. Nzokande, Jéhovah asepelaka na liwa ya moto mabe te, biso mpe tosengeli kosepela na yango te. (Ezekiele 33:11) Wana ntango epesi biso nzela, tokosalaka makasi mpo na kosalisa bato ya lolenge wana na koyekola mpe kosalela banzela ya Jéhovah. Kasi tokosala nini soki bato mosusu bazali koyina Jéhovah?
15. (a) Banani oyo mokomi na nzembo atalelaki bango lokola “banguna mpenza”? (b) Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali “koyina” baoyo bazali kotombokela Jéhovah?
15 Na ntina na bango, mokomi na Nzembo alobaki ete: “O Jéhovah, nakoyinaka bango te, baoyo bakoyinaka yo? Nakoyokela bango mpi te, baoyo bakotemela yo? Nayini bango na koyina eleki makasi, bazali na ngai bobele bayini.” (Nzembo 139:21, 22) Ezali mpo ete bayinaki Jéhovah mingi nde Davidi azalaki na mpii makasi epai na bango. Bapengwi bazali kati na baoyo bazali komonisa koyina na bango epai na Jéhovah wana bazali kotombokela ye. Lipengwi lizali mpenza kotombokela Jéhovah. Bapengwi mosusu bazali koloba ete bazali kosalela Nzambe, kasi bazali kobwaka mateya to masengami oyo mazali kati na Liloba na ye. Basusu bazali koloba ete bandimaka Biblia, kasi bazali koboya lisangá ya Jéhovah mpe bazali komeka na makasi nyonso kopekisa misala na yango. Ntango baponi na bolingo na bango moko mabe motindo yango nsima ya koyeba oyo ezali sembo, ntango mabe ekómi lokola eteni na nzoto na bango oyo ekoki kolongolama te, bongo, baklisto basengeli koyina bango (na ndimbola oyo Biblia esaleli liloba yango) mpamba te bakangami makasi na misala mabe. Baklisto bazali na mayoki lolenge moko na oyo Jéhovah azali na yango epai na bapengwi; bazali na mposa te ya koyoka mateya ya bapengwi. Nkutu, bazali nde “na mpii” epai na baoyo bamikómisi bango moko bayini na Nzambe, kasi bazali kotika ete Jéhovah akoka kozongisa mabe epai na bango.—Yobo 13:16; Baloma 12:19; 2 Yoane 9, 10.
Wana Nzambe azali kososola biso
16. (a) Mpo na nini Davidi azalaki na mposa ete Nzambe asosola ye? (b) Makambo nini kati na motema na biso tosengeli kosenga ete Nzambe asalisa biso na kososola yango?
16 Davidi alingaki ata moke te kozala lokola bato mabe. Bato mingi balukaka kobomba bomoto na bango ya kati, kasi Davidi abondelaki na komikitisa nyonso ete: “Ɛ Nzambe, sosola ngai mpe yeba motema na ngai; luka kati na ngai mpe yeba kobanza na ngai. Tala soko nazali kotambola na nzela mabe; mpe kamba ngai na nzela na seko.” (Nzembo 139:23, 24) Wana azalaki kolobela motema na ye, Davidi azalaki kokanisa na motema ya mosuni te. Na boyokani na ndimbola ya elilingi ya liloba yango, azalaki komonisa oyo ye azalaki na kati na ye, bomoto ya kati. Bobele bongo, biso mpe tosengeli kolinga ete Nzambe asosola motema na biso mpo na komona soki tozali na bamposa, bolingo, mayoki, mikano, makanisi, to myango oyo mibongi te. (Nzembo 26:2) Jéhovah azali kobyanga biso ete: “Mwana na ngai, pesa ngai motema na yo, tika ete miso na yo matala nzela na ngai.”—Masese 23:26.
17. (a) Na esika ya kobomba makanisi na biso ya mabe, tosengeli nde kosala nini? (b) Tosengeli kokamwa na komona ete makanisi mabe mazali kati na motema na biso, mpe tosengeli kosala nini na yango?
17 Soki kati na motema na biso tozali kobomba makanisi mabe na ntina na bamposa mabe to myango mabe to lisusu etamboli mabe, boye tozali solo na mposa ya lisalisi ya Jéhovah mpo na kobongisa makambo. Na esika ya kolobela “nzela mabe,” Traduction du monde nouveau esaleli elobeli “nzela ya mpasi”; Pierre de Baumont, na Lifalanse, alobeli “nzela oyo ezali [koyokisa yo Nzambe] mpasi.” Ekoki kokóma ete biso moko tososoli mpenza polele te makanisi mabe oyo tozali na yango mpe na bongo toyebi malamu te lolenge nini kolimbola mokakatano na biso epai na Nzambe, kasi ye azali kososola ezalela na biso. (Baloma 8:26, 27) Tosengeli kokamwa te soki makanisi ya mabe ezali na motema na biso; nzokande, tosengeli te kotikela yango nzela. (Genese 8:21) Tosengeli koluka lisalisi na Nzambe mpo na kolongola yango nyonso. Soki tolingi solo Jéhovah mpe banzela na ye, tokoki kobelema na ye mpo na koluka lisalisi wana na elikya nyonso mpamba te “Nzambe aleki mitema na biso na monene mpenza mpe ayebi makambo nyonso.”—1 Yoane 3:19-21.
18. (a) Lolenge nini Jéhovah azali kokamba biso na nzela ya bomoi ya seko? (b) Soki tolandi kotambola na nzela oyo Jéhovah azali kokamba biso na yango, makumisi nini ya esengo tokozwa?
18 Na boyokani na libondeli oyo mokomi na Nzembo asalaki ete Jéhovah akamba ye na nzela ya seko, Jéhovah azali kokamba basaleli na ye oyo bazali na botosi mpe na komikitisa. Azali kotambolisa bango te bobele na nzela oyo ekoki kolimbola bomoi molai mpo ete babomami nokinoki te mpo na misala mabe na bango kasi lisusu na nzela oyo ekoki komema bango na bomoi ya seko. Azali kokundola biso ete tozali na mposa na motuya ya mbeka ya Yesu Klisto. Na nzela na Liloba na ye mpe na lisangá na ye, azali kopesa biso malako mpo ete tokoka kosala mokano na ye. Azali komonisa biso ntina ya kondima lisalisi oyo azali kopesa biso mpo ete na kati tozala solo lolenge na moto oyo tozali komonisa na miso na bato. (Nzembo 86:11) Mpe azali kolendisa biso wana azali kopesa biso elikya ya kolongono malamu ya nzoto, kati na mokili ya sika ya sembo, epai tokosalela ye, Nzambe bobele moko ya solo, mpo na libela. Soki tolandi kotambola na sembo nyonso na nzela oyo azali kokamba biso, ya solo, akoloba na biso, lokola alobaki na Mwana na ye ete: “Nandimi yo.”—Luka 3:22; Yoane 6:27; Yakobo 1:12.
Okanisi nini na yango?
◻ Mpo na nini lolenge oyo Jéhovah azali kotalela basaleli na ye ekeseni mingi na oyo ya bato?
◻ Nini ekoki kosalisa biso na koyeba oyo Nzambe azali komona wana azali kososola motema na biso?
◻ Boyekoli ya lolenge nini ezali kosunga biso na kosimba makambo mpe na kobatela motema na biso?
◻ Mpo na nini ezali na ntina ya koyeba bobele te makambo oyo Nzambe alobi, kasi lisusu ya kozala na mayoki motindo moko na ye?
◻ Mpo na nini esengeli na biso kobondela ete: “Ɛ Nzambe, sosola ngai, yeba motema na ngai”?
[Elilingi na lokasa 16]
Wana tozali koyekola, tosala nyonso mpo ete makanisi mpe mayoki ya Nzambe ezala lokola ete ya biso mpenza
[Elilingi na lokasa 18]
Makanisi ya Jéhovah “maleki ata mbuma ya zelo”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.