Banani bakosekwa?
“Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.”—YOANE 5:28, 29.
1. Maloba nini ya kokamwa Moize ayokaki na kati ya mwa banzete ya nzubɛ oyo ezalaki kopela mɔtɔ, mpe nani azongelaki maloba yango na nsima?
LIKAMBO moko ya kokamwa mpenza esalemaki esili koleka mbula 3 500. Moize azalaki kobatela bampate ya Yetro. Pene na Ngomba Holebe, anzelu ya Yehova abimelaki ye na kati ya mɔtɔ oyo ezalaki kopela na mwa banzete ya nzubɛ. Mokanda ya Exode elobi boye: “Ye atalaki mpe talá, [mwa banzete ya nzubɛ, NW] ezalaki kopela na mɔtɔ nde ezikaki te.” Na nsima, mongongo moko ebengaki ye na kati ya mwa banzete yango. Mongongo yango elobaki boye: “Ngai nazali Nzambe ya tata na yo, Nzambe ya Abalayama, Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo.” (Exode 3:1-6) Bambula mingi na nsima, na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), Yesu, mwana ya Nzambe azongelaki maloba yango.
2, 3. (a) Elikya nini ezali mpo na Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo? (b) Yango ebimisi mituna nini?
2 Yesu azalaki kosolola na Basadukai, bato oyo bazalaki kondima lisekwa te. Yesu alobaki boye: “Kasi likambo oyo ete bakufi bazali kolamuka ata Moize amonisaki yango polele, na lisolo ya mwa banzete ya nzubɛ, ntango abengi Yehova ‘Nzambe ya Abalayama mpe Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo.’ Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi, mpo epai na ye bango nyonso bazali na bomoi.” (Luka 20:27, 37, 38) Na maloba wana, Yesu amonisaki ete bato lokola Abalayama, Yisaka mpe Yakobo oyo bakufá kala, Nzambe abombá bango na makanisi na ye. Lokola Yobo, bazali kozela nsuka ya ‘ntango ekoki na bango,’ elingi koloba ntango nyonso oyo balali mpɔngi ya liwa. (Yobo 14:14) Bakosekwa na mokili ya sika ya Nzambe.
3 Tokoloba nini mpo na bamiliare ya bato mosusu oyo bazali kokufa? Bango mpe bakosekwa? Liboso tózwa eyano ya sikisiki na motuna wana, tiká Liloba ya Nzambe eyebisa biso soki bakufi bakendaka wapi.
Bakufi bazali wapi?
4. (a) Bato bakendeke wapi soki bakufi? (b) Sheole ezali nini?
4 Biblia elobi ete bakufi “bayebi likambo te.” Soki moto akufi, atungisamaka na lifelo te, azalaka mpe na limbe te, kasi azongaka nde mputulu. Yango wana, Biblia epesi bato ya bomoi toli oyo: “Oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na nguya na yo mpo ete ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na [Sheole, NW], esika ekokenda yo.” (Mosakoli 9:5, 10; Genese 3:19) Bato mingi bayebi liloba “Sheole” te. Ezali liloba moko ya Liebele oyo eyebani mpenza te epai eutá. Mangomba mingi eteyaka ete bakufi bazali na bomoi, kasi ndenge Liloba ya Nzambe emonisi yango, bato oyo bazali na sheole bakufá mpenza, mpe bayebi lisusu eloko te. Sheole ezali nkunda ya bato nyonso.
5, 6. Ntango Yakobo akufaki, akendaki wapi, mpe kuna ayanganaki na banani?
5 Biblia elobeli “Sheole” mpo na mbala ya liboso na Genese 37:35. Ntango Yakobo ayokaki ete Yozefe, mwana na ye oyo azalaki kolinga mingi akufi, aboyaki kobɔndisama mpe alobaki boye: “Nakokita na [sheole] epai ya mwana na ngai bobele na kolela.” Lokola akanisaki ete mwana na ye akufi, Yakobo akómaki na mposa ete ye mpe akufa mpe akende na Sheole. Na nsima, lokola nzala ekɔtaki na mboka na bango, bana libwa ya Yakobo oyo bakómaki mikóló balingaki kozwa Benyamina, mwana na ye ya nsuka, mpo bákende na ye na Ezipito koluka biloko. Kasi, Yakobo aboyaki mpe alobaki boye: “Mwana na ngai akokita na bino te, mpo ete ndeko na ye akufi mpe ye moko atikali. Soki mabe ekweli ye na mobembo elingi bino kokenda na yango, mbele bokokitisa nsuki mpɛmbɛ na ngai na mawa kino [na Sheole, NW].” (Genese 42:36, 38) Mikapo mibale wana elobi te ete bato oyo bakufá bazali na bomoi ya lolenge boye to boye, elobi nde ete bazali na Sheole.
6 Mokanda ya Genese emonisi ete Yozefe akómaki mokɛngɛli ya biloko ya kolya na Ezipito. Yango wana, Yakobo akendeki kuna epai ayokaki esengo ya kokutana lisusu na Yozefe. Afandaki na mboka wana tii ntango akufaki na mbula 147. Bana na ye ya mibali basalaki likambo oyo tata na bango asɛngaki bango liboso akufa, elingi koloba bamemaki ebembe na ye mpe bakendeki kokunda yango na Makapela, na mokili ya Kanana. (Genese 47:28; 49:29-31; 50:12, 13) Na ndenge yango, Yakobo ayanganaki na tata na ye Yisaka mpe na nkɔkɔ na ye Abalayama.
‘Bayanganisamaki na bankɔkɔ na bango’
7, 8. (a) Abalayama akendeki wapi ntango akufaki? Limbolá. (b) Nini emonisi ete bato mosusu mpe bakendeki na Sheole ntango bakufaki?
7 Bambula liboso, ntango Yehova alobelaki lisusu kondimana oyo asalaki na Abalayama mpe alakaki ye ete momboto na ye ekokóma mingi, ayebisaki ye mpe oyo esengelaki kokómela ye. Yehova Alobaki boye: “Yo okokenda na kimya epai ya batata na yo, mpe okokundama na nsima ya bonunu ya bambula mingi.” (Genese 15:15) Esalemaki mpe kaka ndenge wana. Genese 25:8 elobi boye: “Abalayama apemaki mpema ya nsuka mpe akufaki nsima ya bonunu ya bambula mingi. Azalaki mpaka mpenza na mbula mingi mpe ayanganisamaki na bato na ye.” Bato yango ezalaki banani? Genese 11:10-26 etandi molɔngɔ ya bankɔkɔ na ye tii na Semi, mwana ya Noa. Na bongo, Abalayama ayanganisamaki na bato wana oyo bazalaki na Sheole liboso ye akufa.
8 Makomami ya Liebele esaleli mbala mingi maloba “ayanganisamaki na bato na ye.” Yango wana, tokoki mpenza koloba ete Yisamaele, mwana ya Abalayama, mpe Alona, ndeko ya Moize, bakendeki na Sheole ntango bakufaki, epai bazali kozela lisekwa. (Genese 25:17; Mituya 20:23-29) Na bongo, Moize mpe akendeki na Sheole, atako moto moko te ayebaki esika lilita na ye ezalaki. (Mituya 27:13; Deteronome 34:5, 6) Ndenge moko mpe, Yosua, oyo akómaki motambwisi ya Yisalaele nsima ya Moize, mpe ebele ya bato nyonso ya ntango na ye bakufaki mpe bakendeki na Sheole.—Basambisi 2:8-10.
9. (a) Ndenge nini Biblia emonisi ete liloba ya Liebele “Sheole” mpe oyo ya Grɛki “Hadesi” ezali kolobela kaka esika moko? (b) Elikya nini ezali mpo na bato oyo bazali na Sheole to Hadesi?
9 Mbula koleka nkóto na nsima, Davidi akómaki mokonzi ya mabota 12 ya Yisalaele. Ntango akufaki, “alalaki na batata na ye.” (1 Mikonzi 2:10) Ye mpe akendeki na Sheole? Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete na mokolo ya pantekote ya mobu 33 T.B., ntoma Petelo alobelaki liwa ya Davidi mpe atángaki Nzembo 16:10: “Okotika molimo na ngai na [kati ya Sheole, NW] te.” Nsima ya komonisa ete Davidi azalaki kaka na lilita na ye, Petelo alobaki ete maloba yango ekokisamaki epai ya Yesu mpe alobaki ete Davidi “amonaki liboso mpe alobaki na ntina etali lisekwa ya Klisto, ete asundolamaki te na kati ya Hadesi mpe mosuni na ye epɔlaki te. Yesu yango Nzambe asekwisaki ye, likambo oyo biso nyonso tozali batatoli na yango.” (Misala 2:29-32) Petelo asaleli liloba ya Grɛki “Hadesi,” oyo ekokani na liloba ya Liebele “Sheole.” Na yango, bato oyo bazali na Hadesi, bazali ndenge moko na baoyo bazali na Sheole. Balali mpɔngi, bazali kozela lisekwa.
Bato oyo bazangi boyengebene bazali mpe na sheole?
10, 11. Mpo na nini tokoki koloba ete bato mosusu oyo bazangi boyengebene bakendaka na Sheole to Hadesi soki bakufi?
10 Ntango Moize abimisaki libota ya Yisalaele na Ezipito mpe bakómaki kotambola na lisobe, bamosusu kati na bango batombokaki. Moize ayebisaki bango bákabwana na bakambi ya batomboki: Kola, Datana mpe Abilama. Basengelaki kokufa, kasi na lolenge moko ya mabe. Moize alobaki ete: “Soki bato oyo bakokufa lokola ekokufa bato nyonso, to soki bakokita na ekweli ya bato nyonso, mbɛlɛ [Yehova] atindaki ngai te. Soki nde [Yehova] akozalisa likambo ya sika mpe mabelé ekofungola monɔkɔ na yango mpe ekomɛla bango ná biloko na bango nyonso elongo, mpe bango bakokita na [Sheole] wana ezali bango na bomoi, mbɛlɛ bokoyeba ete bato oyo batyoli [Yehova].” (Mituya 16:29, 30) Na yango, ezala baoyo mabelé efungwamaki mpe emɛlaki bango to baoyo mɔtɔ ezikisaki bango, ndenge ekómelaki Kola ná Balevi 250 oyo balandaki ye, batomboki wana nyonso bakendeki na Sheole to Hadesi.—Mituya 26:10.
11 Salomo, mokitani ya Davidi, apesaki Simi etumbu mpamba te alakelaki Mokonzi Davidi mabe. Davidi alobaki na Salomo boye: “Okotánga ye moto ya sembo te; nde yo ozali moto ya mayele mpe oyebi yango ekoki kosalema mpo na ye; nde okokitisa motó na ye [na Sheole] na makila.” Salomo atindaki Benaya aboma Simi. (1 Mikonzi 2:8, 9, 44-46) Moto mosusu oyo Benaya abomaki ezali Yoaba, oyo azalaki mokonzi ya basoda ya Yisalaele. Nsuki mpɛmbɛ na ye ‘ekitaki na Sheole na kimya’ te. (1 Mikonzi 2:5, 6, 28-34) Bandakisa nyonso wana emonisi mpenza bosolo ya loyembo ya Davidi: “Bato mabe bakozonga na [Sheole], mabota nyonso baoyo bakobosana Nzambe.”—Nzembo 9:17.
12. Ahitofele azalaki nani, mpe akendaki wapi ntango akufaki?
12 Ahitofele azalaki mopesi-toli ya Davidi. Toli na ye ezalaki lokola nde euti mpenza epai na Yehova. (2 Samwele 16:23) Likambo ya mawa, moto yango oyo Davidi azalaki kotyela motema atɛkaki ye mpe akɔtaki na botomboki ya Abesaloma, mwana ya Davidi. Emonani mpenza ete Davidi alobelaki likambo yango ntango akomaki boye: “Ezali moyini na ngai te oyo akotukaka ngai, soki bongo mbɛlɛ nayiki mpiko. Ezali motɛmɛli na ngai te oyo akonyokolaka ngai, soki boye mbɛlɛ nakomibomba liboso na ye.” Davidi akobaki boye: “Tiká ete kufa ekwela bango; tiká ete bákita na bomoi kino [Sheole], mpo ete mabe ezali na efandelo na bango mpe na mitema na bango.” (Nzembo 55:12-15) Ntango Ahitofele ná baninga na ye bakufaki, bakendeki na Sheole.
Banani bazali na Gehena?
13. Mpo na nini Yesu abengaki Yuda “mwana ya libebi”?
13 Tókokanisa likambo oyo ekómelaki Davidi na oyo ekómelaki Yesu, Davidi monene. Yuda Mokeliota, moko ya bantoma 12 ya Klisto, atɛkaki Yesu ndenge kaka Ahitofele atɛkaki Davidi. Kasi, likambo oyo Yuda asalaki ezalaki mabe koleka oyo Ahitofele asalaki. Atɛkaki mwana-mobotami kaka moko ya Nzambe. Na libondeli moko oyo Mwana ya Nzambe asalaki na nsuka ya mosala na ye awa na mabelé, alobaki boye mpo na bayekoli na ye: “Ntango nazalaki elongo na bango nazalaki kokɛngɛla bango mpo na nkombo na yo mpenza oyo opesaki ngai; mpe nabatelaki bango, mpe moko te na kati na bango abebaki, longola kaka mwana ya libebi, mpo likomami ekokisama.” (Yoane 17:12) Lokola Yesu abengaki Yuda “mwana ya libebi,” amonisaki ete elikya ya lisekwa ezali ata moke te mpo na ye. Nzambe abombaki ye na makanisi na ye te. Akendeki na Sheole te, kasi na Gehena. Gehena ezali nini?
14. Gehena ezali elilingi ya nini?
14 Yesu atɔndɔlaki bakonzi ya mangomba ya mikolo na ye mpamba te bazalaki kokómisa bayekoli na bango ‘bato oyo babongi kokenda na Gehena.’ (Matai 23:15) Na ntango wana, bato ya Yelusaleme bayebaki malamu Lobwaku ya Hinomo, esika oyo bazalaki kobwaka bibembe ya bato mabe oyo bazalaki komona ete babongi te kokundama na lokumu. Yesu alobelaki mpe Gehena na Lisolo Likoló ya Ngomba. (Matai 5:29, 30) Bato oyo bazalaki koyoka ye bayebaki malamu nini alingaki koloba ntango asalelaki maloba wana ya elilingi. Gehena ezalaki elilingi ya liwa ya libela oyo, mpo na yango, elikya ya lisekwa ezali te. Longola Yuda Mokeliota, ezali mpe na bato mosusu oyo bakendá na Gehena na esika ya kokende na Sheole to Hadesi ntango bakufaki?
15, 16. Banani bakendeki na Gehena ntango bakufaki, mpe mpo na nini bakendeki kuna?
15 Bato ya liboso, Adama ná Eva, bazalaki bato ya kokoka ntango Nzambe akelaki bango. Basalaki lisumu na nko. Basengelaki kopona bomoi ya seko to liwa. Baboyaki kotosa Nzambe mpe balandaki Satana. Ntango bakufaki, bazalaki na elikya te ya kosikolama na mbeka oyo Klisto apesaki. Bakendeki nde na Gehena.
16 Kaina, mwana ya liboso ya Adama abomaki ndeko na ye Abele mpe na nsima akómaki mokimi. Ntoma Yoane abengaki Kaina moto “oyo autaki na moto mabe.” (1 Yoane 3:12) Tokoki mpenza koloba ete Kaina mpe akendeki na Gehena lokola baboti na ye. (Matai 23:33, 35) Likambo oyo ekómelaki ye ekeseni mpenza na oyo ekómelaki moyengebene Abele! Mpo na Abele, Paulo alobaki boye: “Na kondima Abele apesaki Nzambe mbeka ya motuya monene koleka oyo ya Kaina, kondima oyo na nzela na yango litatoli epesamaki mpo na ye ete azalaki moyengebene, na ndenge Nzambe apesaki litatoli na ntina etali makabo na ye”; abakisaki ete “mpe na nzela na yango ye, atako akufá, azali naino koloba.” (Baebele 11:4) Ya solo, Abele azali sikoyo na Sheole mpe azali kozela lisekwa.
Lisekwa ya “liboso” mpe oyo “eleki malamu”
17. (a) Banani bazali kokende na Sheole na ‘ntango oyo ya nsuka’? (b) Elikya nini ezali mpo na bato oyo bazali na Sheole mpe mpo na baoyo bazali na Gehena?
17 Bato mingi oyo bakotánga makambo oyo bakolinga koyeba nini ekómelaka bato oyo bazali kokufa na ‘ntango oyo ya nsuka.’ (Danyele 8:19) Emoniseli mokapo ya 6 ezali kolobela batambwisi-mpunda minei na ntango ya nsuka. Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete nkombo ya motambwisi-mpunda ya nsuka ezali liwa, mpe Hadesi ezali kolanda ye na nsima. Na yango, ebele ya bato oyo bazali kokufa mobesu mpo na makambo oyo batambwisi-mpunda ya liboso bazali kosala bazali kokende na Hadesi, epai bazali kozela lisekwa na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. (Emoniseli 6:8) Elikya nini ezali mpo na bato oyo bazali na Sheole (to Hadesi) mpe baoyo bazali na Gehena? Na mokuse, baoyo bazali na Sheole bakosekwa, nzokande baoyo bazali na Gehena bakei libela, elingi koloba bakozala lisusu na bomoi te libela na libela.
18. Elikya nini ezali mpo na bato oyo bakosekwa na “Lisekwa ya liboso”?
18 Ntoma Yoane akomaki boye: “Esengo mpe mosantu moto nyonso oyo azwi lisekwa ya liboso; likoló na bango liwa ya mibale ezali na bokonzi te, kasi bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Klisto, mpe bakoyangela elongo na ye mbula yango nkóto.” Baoyo bakoyangela elongo na Klisto bazali kozwa “lisekwa ya liboso,” kasi elikya nini ezali mpo na bato mosusu?—Emoniseli 20:6.
19. Ndenge nini bato mosusu bakozwa “lisekwa moko oyo eleki malamu”?
19 Banda na ntango ya basaleli ya Nzambe lokola Eliya ná Elisa, bato bazongaki na bomoi na nzela ya lisekwa. Paulo alobaki boye: “Basi bazwaki bakufi na bango na nzela ya lisekwa; kasi bato mosusu banyokolamaki makasi mpo bandimaki te kosikolama na nzela ya lisiko moko boye, mpo bákoka kokóma na lisekwa moko oyo eleki malamu.” Ya solo, basaleli wana ya sembo bazalaki kozela lisekwa mpo na kozwa bomoi ya seko, kasi balingaki te kozala na bomoi oyo ekoumela kaka mwa bambula mpe na nsima bakufi! Wana nde ekozala “lisekwa moko oyo eleki malamu.”—Baebele 11:35.
20. Lisolo oyo elandi ekolobela nini?
20 Soki totikali sembo tii na liwa liboso Yehova asukisa ebongiseli ya makambo mabe ya ntango oyo, tóyeba ete tokozwa “lisekwa moko oyo eleki malamu,” elingi koloba tokosekwa mpo na kozala na bomoi libela na libela. Yesu alakaki boye: “Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Lisolo oyo elandi ekolobela ntina ya lisekwa. Ekomonisa ndenge oyo elikya ya lisekwa epesaka biso makasi ya kotikala sembo mpe esalisaka biso tólona elimo ya komipesa.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini babengaka Yehova Nzambe “ya bato ya bomoi”?
• Bato oyo bazali na Sheole bazali ndenge nini?
• Elikya nini ezali mpo na bato oyo bazali na Gehena?
• Ndenge nini bato mosusu bakozwa “lisekwa moko oyo eleki malamu”?
[Elilingi na lokasa 15]
Lokola Abalayama, baoyo bazali kokende na Sheole bakosekwa
[Bililingi na lokasa 16]
Mpo na nini Adama, Eva, Kaina mpe Yuda Mokeliota bakendaki na Gehena?