Jéhovah abongi mpo na kokumisama libela na libela
“Mikolo nyonso nakopambola yo mpe nakokumisa nkombo na yo seko na seko.”—NZEMBO 145:2.
1. Bantina nini Davidi azalaki na yango mpo na kokumisa Jéhovah?
DAVIDI, ye oyo azalaki mosaleli na sembo ya Jéhovah, azalaki na bantina mingi ya kokumisa Nzambe. Mokonzi wana ya Yisraele na kala oyo ayebani mingi ayebaki bonene mpe boboto ya Jéhovah, mpe ayebaki ete bokonzi na Nzambe ezalaki mpo na libela. Ye Oyo-Aleki-Likoló abongaki mpo na kokumisama, mpamba te azalaki kokokisa mposa ya bikelamu nyonso na bomoi mpe azalaki komonisa motema mawa epai na basaleli na ye ya sembo.
2. (a) Ndenge nini Nzembo 145 ekomami? (b) Mituna nini tokotalela?
2 Kokumisa Nzambe, ezali yango nde Davidi asalaki kati na Nzembo 145. Verset moko na moko ya loyembo yango ezali kobanda na likomi moko ya alfabe na hébreu, longola bobele likomi noun. Ndimbola wana ezalaki mbala mosusu kopesa nzela na kokanga yango libela kati na makanisi kozanga nkaka. Nzembo 145 ezali kokumisa Jéhovah, lokola maloba oyo mazali komonisa yango: “Mikolo nyonso nakopambola yo, mpe nakokumisa nkombo na yo seko na seko.” (Nzembo 145:2) Kasi, nzembo yango ezali koyebisa biso nini? Ekoki kozala na bopusi nini likoló na boyokani na biso elongo na Nzambe? Mpo na koyeba yango, totalela liboso versets 1 kino 10.
Bonene ya Jéhovah ezali mozindo mingi
3. Lokola Davidi, likambo nini tosengeli kosala mpo na ‘Nzambe na biso, Mokonzi,’ mpe mpo na nini?
3 Atako azalaki mokonzi, Davidi ayebaki ete bokonzi na Jéhovah ezalaki likoló na ye. Alobaki ete: “Nakokumisa yo Nzambe na ngai mpe Mokonzi na ngai mpe nakopambola nkombo na yo seko na seko.” (Nzembo 145:1, MN) Na limemya motindo moko, ba Témoins de Jéhovah bazali kokumisa nkombo na Nzambe mpe bazali kosanzola ye na mabelé mobimba. Oyo tozali kokokisa kati na mosala yango ezali kobongisa bomoi na biso. Lokola Davidi, tosengeli kozala na botosi mpe komisokisa liboso na jehovah, ‘Nzambe na biso, mpe Mokonzi na biso.’ Mpo na nini kozanga botosi epai na ye? Azali “Mokonzi na seko.” Boye te? (Emoniseli 15:3) Lisusu, Davidi Monene, Yesu Klisto, oyo azali koyangela na ngomba Siona ya likoló kobanda 1914, azali kopesa biso ndakisa malamu ya kozala na botosi epai na Jéhovah, Mokonzi na seko.
4. Ndenge nini tokoki ‘kopambola (kobenisa) nkombo ya Nzambe’? .
4 Davidi alobaki ete ‘akopambola nkombo na Nzambe.’ Ndenge nini ekoki kosalema ete moto mpamba apambola Nzambe? Kopambola to kobenisa moto, elimboli kati na makambo mosusu koloba malamu na ntina na ye. Na kopamboláká nkombo na ye, tozali komonisa epai na Nzambe ete tozali na bolingo mozindo mpo na ye mpe mpo na nkombo na ye mosantu, Jéhovah. Tozali koimaima soko moke te na ntina na ye, tozali kozwa ye mabe te to mpe tozali na ntembe te mpo na boboto na ye. Bobele soki tozali na ezalela motindo wana, soki tosila komipesa na Jéhovah mpe tozwá batisimo, mpe soki totikali Batemwe na ye ya sembo nde tokoki koloba lokola Davidi ete ‘tokopambola nkombo na Nzambe libela na libela.’ Soki toumeli kati na bolingo na Nzambe, tokozwa likabo ya bomoi na seko mpe tokokoka kopambola Jéhovah libela na libela.—Yuda 20, 21.
5. Mposa na biso ya kopambola Jéhovah “na mokolo mobimba” esengeli kopusa biso na kosala nini?
5 Soki tolingi mpenza Mobandisi ya bomoi na biso, tokoloba lokola Davidi ete: “Mikolo nyonso (na mokolo mobimba, MN) nakopambola yo mpe nakokumisa nkombo na yo seko na seko.” (Nzembo 145:2) Soki mokolo mobimba moleki kozanga kosanzola Nzambe ekozala mpenza mpamba! Tozalaka na mosala mingi mpenza te to mpe na mitungisi te mpo na biloko ya mosuni kino kobosana koloba malamu na ntina na Tata na biso ya likoló to mpe kozanga likoki ya kobondela ye mokolo na mokolo. Yesu ayebisaka ete tosengeli kosambela mokolo na mokolo ntango alobaki kati na libondeli ya Tata na biso ete: “Pesa biso limpa ekoki na biso mpo na mokolo na mokolo.” (Luka 11:3) Ba pionniers mingi bazali kosanzola Jéhovah mokolo na mokolo na kosanganáká kati na mosala ya boklisto. Kasi ata ezalela na biso ezali nini, motema na biso esengeli kotinda biso na kosanzola Nzambe na motindo moko to mpe mosusu mokolo na mokolo. Mpe kanisa naino! Lokola tozali ba Témoins de Jéhovah oyo basili komipesa, baoyo bazali na elikya ya bomoi na seko, tozali na elaká kitoko ya kosanzola nkombo na ye libela na libela.—Yoane 17:3.
6. Mpo na nini Jéhovah “abongi kosanzolama mingi”?
6 Ya solo, bantina ya kosanzola Nzambe na boumeli ya mokolo mobimba ezangi te; mpamba te Davidi abakisaki ete: “Jéhovah azali monene, abongi na kosanzolama mingi; bonene na ye ekoki koyebana te.” (Nzembo 145:3, MN) Jéhovah azali mpenza monene na boye ete ekelamu moko te ekokani na ye, mpe bokonzi na ye ekoki mpenza. Nebukadanezare mokonzi ya Babilone andimaki likambo oyo: “Moto moko akoki kopekisa loboko na ye te to kolobela ye ete: ‘Ozali kosala nini?’” (Danyele 4:34, 35) Jéhovah azali na “nguya koleka banzambe nyonso mosusu.” (Nzembo 96:4) Likambo ya kokamwa ezali te ete “abongi na kosanzolama mingi.” Lisanzoli moko te ezali ya kolekisa ndelo ntango tozali kokumisa Jéhovah. Abongi mpenza mpo na kozwa masanzoli mazangi ndelo mpe ya libela na libela.
7. Nini emonisi ete ‘bonene na Nzambe ekoki koyebana te’?
7 ‘Bonene ya Jéhovah ekoki koyebana te.’ Bonene na ye ezali kati na motindo ya Nzambe oyo ye azali. Mpamba te, biloko oyo akelaki bizali ya kokamwisa mpo ete tokoka kokanga ntina na yango, mpe biso moko ‘tozalisami na motindo ya kokamwa.’ (Nzembo 139:14; Yobo 9:10; 37:5) Lisusu, bonene nini Jéhovah azali komonisa te kati na motindo na ye ya kosala! Azali kokokisa na bosembo nyonso bilaka na ye mpe azali koyebisa mikano na ye na bolingo nyonso. Nzokande, tokoki koyeba makambo nyonso te na ntina na Nzambe. Seko na seko tokolanda koyekola mpo na koyeba ye malamu, koyeba bikelamu na ye mpe mikano na ye.—Baloma 11:33-36.
Tokumisa misala na Jéhovah
8. (a) Ndenge nini “libota moko na moko” ekumisaki misala na Jéhovah? (b) Soki tozali koteya epai na bana na biso makambo matali bikelamu mpe misala na Jéhovah, na ntembe te ndenge nini bakotalela losambo na ye? (c) “Libota” na esengo oyo ezali bongo batikali bapakolami esalaki nini?
8 Ezali na makambo mingi ya koloba mpo na kokumisa Nzambe na biso oyo bonene na ye ekoki koyebana te; ntina wana Davidi abendamaki na koloba ete: “Libota moko na moko (ekokumisa) misala na yo na bana na bango, mpe bakosakola misala na yo minene minene.” (Nzembo 145:4) Mabota na bato oyo malandanaki bakumisaki misala na Jéhovah mpe basololaki mpo na misala na ye na nguya. Oyo nde libaku kitoko mpo na kosolola makambo yango epai na bato oyo tozali koyekola Biblia elongo na bango! Na ndakisa tokoki koyebisa bango ete Nzambe akelaki biloko nyonso. (Genese 1:1 kino 2:25; Emoniseli 4:11) Tokoki koloba mpo na misala na nguya oyo asalaki na ntango asikolaki Bayisraele na boombo na Ezipito, ntango asalisaki bango na kolonga banguna na bango Bakanané, ntango abatelaki bango na libomi kati na mokili ya Perse ya kala, mpe na mabaku mingi mosusu. (Exode 13:8-10; Basambisi 4:15; Estere 9:15-17) Epai mosusu, topusami te na koloba epai na bana na biso na ntina na bikelamu mpe misala ya Jéhovah? Soki tozali kopesa bango mateya yango mpe soki bazali komona biso moko tozali kosalela Nzambe na esengo nyonso, na ntembe te bakotalela losambo na ye lokola mosala kitoko mpe bakokola na kozalaka na ‘esengo na Jéhovah lokola nguya’ na bango. (Nehemia 8:10; Nzembo 78:1-4) Batikali bapakolami bazali “libota” na esengo ya ba Témoins de Jéhovah oyo bazali kokumisa misala na Nzambe liboso na “ebele monene,” baoyo bazali libota oyo ekotondisa Paradis na mabelé. —Emoniseli 7:9.
9. Ntango tozali kokanisa likoló na bikelamu mpe na misala na nguya na Nzambe, kondimisama na likambo nini?
9 Ntango tozali kokanisa likoló na bikelamu mpe na misala na nguya na Nzambe, tondimisami lisusu koleka ete “Jéhovah akotika bato na ye te mpo na lokumu ya nkombo na ye monene.” (1 Samwele 12:22; Nzembo 94:14) Liboso na mimekamo, na mikakatano mpe na monyoko, tokoki kozala na kimya mpe kozala na elikya ete “kimya ya Nzambe” ekobatela mitema na biso mpe makanisi na biso. (Bafilipi 4:6, 7) Na bongo, ekoki mpenza ete toloba epai na bazalani na biso na ntina na Tata na biso ya likoló oyo alingi biso mpe azali kobatela biso.
10. Makambo nini mazali kati na “misala na kokamwa” na Jéhovah, mpe kokanisa likoló na makambo yango ezali kopesa biso nzela na kosala nini?
10 Esengeli na biso kozwa ntango mpo na kokanisa likoló na nkembo mpe na misala ya Jéhovah, mpamba te Davidi abakisaki ete: “Ngai nakokanisa mpo na nkembo monene na bokonzi na yo mpe mpo na misala na kokamwa na yo.” (Nzembo 145:5, MN) Nkembo na Nzambe ezali monene mpe eleki nyonso. (Yobo 37:22; Nzembo 148:13) Yango wana Davidi akomisaki nkembo monene ya lokumu na Jéhovah, lobanzo na ye ya liboso. Mokomi na Nzembo azalaki komibanzabanza mpe na ntina na “misala kitoko” ya Nzambe. Kati na yango, ezwami mpe kosalelama ya boyengebene na Nzambe na nzela na kobomama ya bato na masumu mpe kobatelama ya bato na sembo, lokola na ntango ya mpela. (Genese 7:20-24; 2 Petelo 2:9) Kokanisa na ntina na makambo yango ezali kolendisa boyokani na biso elongo na Jéhovah mpe ezali kopesa biso nzela na koloba epai na baninga na biso mpo na lokumu na ye mpe misala na ye ya kokamwa. Na boumeli ya mikolo 40 kati na esobe, Yesu amilendisaki mpo na kotelema ngwi liboso na komekama na kokanisaka likoló na makambo oyo makoló emonisaki ye, ntango efungwamaki. (Matai 3:13 kino 4:11) Na nsima alobaki epai na bazalani na ye mpo na lokumu mpe misala na kokamwa na Jéhovah.
11. (a) Mpo na nini bafandi na Yeriko bayokaki nsomo? (b) Na elimo ya motindo nini ba Témoins de Jéhovah bazali koloba na ntina na “misala minene” mpe na “monene” na Nzambe?
11 Ntango tozali koloba mpo na nkembo mpe misala na Nzambe, tozali mpe kopusa bazalani na biso na kosala motindo moko. Davidi alobi ete: “Bato bakosakola nguya na misala minene na yo, ngai mpe nakosakola mpo na monene na yo.” (Nzembo 145:6) Rahabe alobaki na ntina na nsomo oyo bato na Yeriko bazalaki na yango na ntango bayokaki ete Jéhovah abikisaki Bayisraele penepene na mai Motane mpe ndenge apesaki bango elonga likoló na mikonzi mibale na Baamola. Balobelaki mingi mpenza ‘makambo na kokamwa’l wana na Yeriko. (Yosua 2:9-11) “Bolozi monene” oyo esili kobelama, na ntembe te ekozala mpe nsomo. (Matai 24:21) Kasi, makambo oyo ya nsomo koleka mpo na bato oyo batangwi mosika na Nzambe ezali koyeisa “kobanga ya Jéhovah” kati na mitema ya bato na sembo, elingi koloba kobanga ya lobiko mpo na ye. (Masese 1:7) Ezali na limemya motindo boye nde ba Témoins de Jéhovah bazali koloba mpo na misala na nguya ya Nzambe. Na yango, Nzambe monene oyo azali kosala bikamwiseli azali mpenza ntina na lisolo monene kati na baklisto bapakolami mpe baninga na bango oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi libela awa na mabelé! Ata monyoko mozali kopekisa bango te mpo na koloba na baninga na bango na ntina na makambo wana mpe na “bonene” ya Jéhovah.—Misala 4:18-31; 5:29.
Tokumisa Jéhovah mpo na boboto na ye
12. Boboto monene na Jéhovah ezali kopusa biso na kosala nini?
12 Nzambe abongi na kokumisama, ezali bobele mpo na bonene na ye te, kasi lisusu mpo na boboto na ye mpe boyengebene na ye. Yango wana Davidi alobaki ete: (“Bakobimisa maloba mingi ya,) lokumu na malamu monene na yo mpe bakoyemba na esengo mpo na boyengebene na yo.” (Nzembo 145:7) Boboto na Jéhovah ezali monene mingi na boye ete biso tobimisaka maloba mingi ya esengo na ntina na ye. Mokapo oyo, na monoko na liebele ezali komonisa likanisi ya mai oyo mazali kopunzwapunzwa longwa na libulu. Tika ete masanzoli na botondi epai na Nzambe masopana kati na biso, lokola ebele na mai! (Masese 18:4) Bayisraele babosanaki boboto na Jéhovah, mpe yango ebendelaki bango mpasi monene kati na elimo. (Nzembo 106:13-43) Kasi mpo na biso, tika ete motema na biso efuluka na botondi na boye ete bamosusu babongola mitema nsima na koyekola motindo nini Jéhovah azali na boboto mpo na Batemwe na ye oyo bamipesi.—Baloma 2:4.
13. Misala na boyengebene mpe na bosembo na Nzambe misengeli kotinda biso na kosala nini?
13 Misala na boyengebene mpe na bosembo na Nzambe misengeli mpe kopusa biso na konganga na esengo. Soki tozali na liyoki motindo wana, tokoluka liboso bobele Bokonzi na Nzambe te, kasi lisusu boyengebene na Ye. Tokolinga ntango nyonso ete etamboli na biso ekumisa Jéhovah. Ee, tokozala basakoli ya Bokonzi oyo bazali kosala sanza nyonso, baoyo bazali na mingi ya kosala kati na mosala ya Nzambe. Masanzoli na biso epai na Jéhovah makopekisama soko moke te.—Matai 6:33; 1 Bakolinti 15:58; Baebele 10:23.
Jéhovah azali na ngolu
14. Nini emonisi ete “Jéhovah azali na ngolu mpe na motema mawa”?
14 Kotangaka bizaleli mosusu ya Nzambe oyo bibongi na kosanzolama, Davidi alobi ete: “Jéhovah azali na ngolu mpe na motema mawa, akoyoka nkanda noki te mpe azali na boboto mingi.” (Nzembo 145:8) Nzambe azali na ngolu na ndimbola oyo ete azali mpenza na boboto mingi mpe na bokabi mingi. (Matai 19:17; Yakobo 1:5) Azali kosala malamu ata epai na baoyo bazali kosalela ye te. (Misala 14:14; 17) Jéhovah azali mpe na motema mawa, ayebi kokabola mpasi na biso ’’abosani te ete tozali bobele putulu.” Azali koboya te motema oyo motutami mpe azali kosala te epai na biso engebene masumu na biso, mpe azali na ngolu mingi koleka tata oyo azali na bolingo mingi epai na bana na ye. (Nzembo 51:17; 103:10-14) Na ntina na ezalela na ye ya koyokela bato mawa mingi, atindaki Mwana na ye molingami mpo ete ye akufa mpo na biso, mpo ete tokoka kozongisa boyokani elongo na ye mpe kosepela mpenza na ngolu na ye.—Baloma 5:6-11.
15. Mpo na nini tokoki koloba ete Jéhovah Nzambe “ayokaka nkanda noki te” mpe azali na “boboto mingi”?
15 Tata na biso ya likoló ayokaka nkanda noki te. Akweisaka nkanda na ye te kozanga ntina. Jéhovah azali mpe “monene na motema boboto.” Liloba na liebele oyo lisalelami kati na verset oyo elimboli motema boboto oyo euti na bolingo mpe oyo ekangani na eloko moko kino mokano oyo omityelaki mpenza na ntina na eloko yango ekokokana. Liloba yango ekoki mpe kobongolama na liloba “bolingo na sembo.” Nzambe amonisaki mpenza motema boboto na ye, to bolingo na sembo, na kosikoláká, na kobateláká, na kobondisáká mpe na kobikisáká biso na masumu na nzela ya lisiko. (Nzembo 6:4; 25:7; 31:16, 21; 40:11; 61:7; 119:88, 159; 143:12; Yoane 3:16) Lokola .Jéhovah ayeisaki Armagedon nokinoki te nsima ya “etumba kati na likoló”, yango epesi nzela epai na bibele mingi na bato na kozwa lobiko mpe yango ezali elembo ya motema boboto na ye. -Emoniseli 12:7-12; 2 Petelo 3:15.
16. Ndenge nini Jéhovah amimonisaki “malamu epai na bato nyonso”?
16 Na kotalela ngolu na Nzambe, tokoki koloba ete azali na motema monene. Davidi alobaki ete: “Jehovah azali malamu epai na bato nyonso mpe ngolu na ye ezali likoló na misala na ye nyonso.” (Nzembo 145:9) Ya solo, Nzambe azalaki malamu epai na Bayisraele. Nkutu, “azali kobimisa moi na ye mpo na bato mabe mpe bato malamu mpe . . . akonokisa mbula na bayengebene mpe na bapengwi.” (Matai 5:43-45) Na Edene, Jéhovah alakaki “libota” moko oyo ekozala lipamboli. Bikeke mingi na nsima, alobaki na Abrahame: “Mabota nyonso na nse bakopambolama mpo na (libota) na yo.” (Genese 3:15; 22:18) Mpe boboto na Nzambe ezali mpenza mingi na mikolo na biso, “na ntango na nsuka,” na boye ete moto nyonso akoki ‘koya mpe kokamata mai na bomoi, kozanga kofuta.’ (Danyele 12:4; Emoniseli 22:17) Jéhovah alingi kosala malamu epai na bikelamu na ye nyonso ya mayele, mpe boboto na ye esengeli kobelemisa biso ntango nyonso penepene na ye mpenza.
17. Na ndimbola nini ‘ngolu na Jéhovah ezali likoló na misala na ye nyonso’?
17 ‘Ngolu na Jéhovah ezali likoló na misala na ye nyonso’ na ndimbola oyo ete azali kokokisa bamposa ya bato mpe ya banyama na lolenge ekoki. Azali “Oyo akopesaka bilei epai na bikelamu nyonso na bomoi.” (Nzembo 136:25; 147:9) Nzambe azali kokumisa mozwi te na kotyolaka mobola, akokumisaka moto na lolendo te na kotyolaka ye oyo azali mosokemi, to mpe kotombolaka zoba te mpo na kokitisa moto na mayele. Ezali boye nde bato na masumu bakosalaka, kasi Tata na biso ya likoló oyo azali na ngolu azali kosala bongo te. (Nzembo 102:17; Sofoni 3:11, 12; Mosakoli 10:5-7) Oyo nde ezalela monene boye ya ngolu, ya boboto mpe ya bolingo ya sembo Nzambe apesaki na kosalaka ete lobiko ekoka kozwama na nzela na mbeka na lisiko ya Mwana na ye molingami!—1 Yoane 4:9, 10.
Basembwi bazali kopambola Jéhovah
18. (a) Ndenge nini misala na Nzambe “mizali kokumisa ye”? (b) Ntango nini tosengeli kopusama na kokumisa Jéhovah?
18 Nzambe abongi kokumisama na bikelamu na ye nyonso. Mpo na yango Davidi alobi ete: “Misala na yo nyonso mikokumisa yo, e Jehovah mpe (basembwi) na yo mpenza bakopambola yo.” (Nzembo 145:10) Misala na Nzambe mizali ‘kokumisa’ ye, lokola ndako kitoko ekopesaka lokumu epai na motongi na yango mpe mbeki kitoko epai na moyemi na mayele oyo ayemaki yango. (Tala Baebele 3:4; Yisaya 29:16; 64:8) Misala na Jéhovah mizali ya kokamwa kino mizali kopusa baanzelu mpe bato ete bakumisa ye. Bana na Nzambe baanzelu bangangaki na esengo ntango akelaki mabelé. (Yobo 38:4-7) Davidi alobaki ete: “Makoló makosakolaka nkembo na Nzambe, etando na likoló ekoyebisaka misala na maboko na ye.” (Nzembo 19:1-6, MN) Tozali na bantina mingi ya kokumisa jéhovah ntango tozali komona kombekombe ekolɛ́mbɛ (planer) na likoló to mboloko moko kopumbwa likoló na ngomba etondi na matiti. (Yobo 39:26; Loyembo na Salomo 2:17) Ebongi tokumisa ye ntango tozali kobuka bilanga to ntango tozali kolya bilei kitoko elongo na baninga. (Nzembo 72:16; Masese 15:17) Nzoto na biso oyo esalami na motindo na kokamwa ezali mpe eloko oyo esengeli kopusa biso na koloba masanzoli epai na Nzambe na botondi nyonso.—Nzembo 139:14-16.
19. Banani bazali “basembwi”, mpe bazali kosala nini?
19 Na mikolo na biso, awa na mabelé, “basembwi” na Jéhovah baoyo bapakolami na elimo bazali kopambola (kobenisa) ye. Bazali koloba malamu mpo na ye mpe bazali na motema móto na kozelaka ete mokano na ye ekokisama awa na mabelé lokola yango ezali kosalema na likoló. (Matai 6:9, 10) Lokola baklisto bapakolami bazali koloba epai na bazalani na ntina na misala kitoko na Nzambe, ebele monene oyo bazali kobakisama ntango nyonso bazali koyokamela bango. Bazali kosakola Bokonzi na molende esika moko na baklisto na sembo bapakolami. Botondi na yo ezali kopusa yo na kosangana mbala na mbala na mosala yango mpo na kokumisa Nzambe?
20. (a) Ndenge nini nkombo na Jéhovah ekosantisama? (b) Mpo na oyo etali Nzembo 145, mituna nini mitikali mpo na kotalela?
20 Biso baoyo tozali ba Témoins de Jéhovah, tozali komekola Davidi na kokumisaka Nzambe. Na miso na biso, kosantisama mpe kosanzolama ya nkombo mosantu na Jéhovah ezali likambo ya liboso. Mpo ete yango ekosalema na nzela na Bokonzi na Nzambe, oyo Biblia ezali koteya na ntina na Bokonzi yango ezali bongo eteni moko ya ntina monene ya nsango malamu oyo tozali kosakola. Nzembo 145 ezali kopesa bandimbola ya polele na ntina na likambo yango? Boyekoli na biso ya eteni oyo etikali ya Nzembo yango ekoteya biso lisusu nini? Na lolenge nini mosusu ezali komonisa ete Jéhovah abongi na kosanzolama mpo na libela?
Bozongeli?
◻ Ndenge nini tokoki kopambola (kobenisa) nkombo na Jehovah?
◻ Tanga mwa bamoko na misala ya Nzambe oyo mibongi na kokumisama?
◻ Tokosala nini soki tozali na boyebi ya boboto na Jehovah?
◻ Ngolu na Nzambe ezali komonana na motindo nini?
[Elilingi na lokasa 12]
Oyebisaka misala na nguya ya Jéhovah epai na bana na yo, lokola baboti na sembo kati na Yisraele ya kala bazalaki kosala yango?
[Elilingi na lokasa 15]
Ndako kitoko epesaka lokumu epai na motongi na yango; bobele bongo misala na Jehovah mizali kokumisa ye