Biloko oyo Nzambe akelá esakolaka nkembo na ye!
“Likoló ekosakolaka nkembo ya Nzambe, lola ekoyebisaka misala ya mabɔkɔ na ye.”—NZEMBO 19:1.
1, 2. (a) Mpo na nini bato bakoki te komona nkembo ya Nzambe na miso? (b) Ndenge nini bankulutu 24 bapesaka Nzambe nkembo?
“OKOKI kotala elongi na ngai te, mpo ete moto akotala ngai mpe kobika te.” (Exode 33:20) Yehova alobaki bongo na Moize. Lokola moto azali na nzoto ya mosuni, akoki kotala nkembo ya Nzambe na miso te. Atako bongo, ntoma Yoane amonaki nkembo ya kiti ya bokonzi ya Yehova na emonaneli.—Emoniseli 4:1-3.
2 Nzokande, bikelamu ya sembo ya elimo bakoki kotala elongi ya Yehova, likambo oyo bato bakoki kosala te. “Bankulutu ntuku mibale na minei” oyo Yoane amonaki na emonaneli, oyo bazali komonisa ba 144 000, bazali na kati ya bikelamu yango ya elimo. (Emoniseli 4:4; 14:1-3) Basalaka nini ntango bazali komona nkembo ya Nzambe? Emoniseli 4:11 emonisi ete balobaka boye: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.”
Mpo na nini “bazali kutu na likambo ya koloba te”
3, 4. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete moto ya siansi akoki mpe kondima Nzambe? (b) Koboya kondima Nzambe ebombaka ntango mosusu likambo nini?
3 Ozalaka na mposa ya kopesa Nzambe nkembo? Bato mingi koleka bazalaka na mposa yango te, bamosusu kutu bandimaka te ete Nzambe azali. Na ndakisa, moto moko ya mayele na astronomi akomaki boye: “Nzambe nde abongisá mokili mpo na biso? . . . Ezali mpasi te moto andima likanisi yango. Kasi, na makanisi na ngai ezali solo te. . . . Nzambe te nde asalaki yango.”
4 Bato ya siansi bakoki kolimbola makambo nyonso te; bayekolaka kaka makambo oyo bato bakoki komona. Soki tolongoli makambo oyo bakoki komona, nyonso oyo etikali ezalaka kaka makanisi ya mpamba. Lokola “Nzambe azali Elimo,” bato bakoki koyekola ye na nzela ya siansi te. (Yoane 4:24) Yango wana, soki moto alobi ete moto ya siansi akoki kondima Nzambe te, lolendo nde ezali kolobisa ye. Vincent Wigglesworth, moto ya siansi na Iniversite ya Cambridge, alobaki ete mayele ya siansi yango moko “esɛngaka kondima.” Na ndenge nini? “Mayele yango esimbami na kondima makasi ete makambo oyo esalemaka elandaka kaka ‘mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́.’” Yango wana, soki moto aboyi kondima Nzambe, atiki kaka kondima mosusu mpe ayambi kondima mosusu! Kutu, ntango mosusu kozanga kondima ezalaka nde koboya kondima makambo oyo ezali komonana polele ete ezali solo. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Na nzombo ya elongi na ye, moto ya masumu akoluka ye te; makanisi na ye nyonso ete, Nzambe azali te.”—Nzembo 10:4.
5. Mpo na nini bato oyo bandimaka Nzambe te bazali kutu na likambo ya koloba te?
5 Kasi, kondima Nzambe ezali bindimelá te, mpamba te ezali na ebele ya makambo oyo ezali komonisa ete Nzambe azali. (Baebele 11:1) Allan Sandage, moto moko ya mayele na astronomi, alobaki boye: “Nakakatanaka mpo na kondima ete makambo [ya molɔ́ngɔ́] oyo ebongisamá malamu, ebandaki kaka na mobulungano moko boye. Na ntembe te ezalaki na mayele oyo ebongisaki makambo. Mpo na ngai, tokoki koyeba Nzambe te, kasi biloko oyo ezali emonisaka ete azali, soki azalaki te mbɛlɛ eloko moko te ezali.” Ntoma Paulo ayebisaki baklisto ya Loma ete “bizaleli [ya Nzambe] oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpamba te yango emonanaka na nzela ya biloko oyo esalemá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye, yango wana [bato oyo bandimaka te] bazali kutu na likambo ya koloba te.” (Baloma 1:20) Banda “kozalisama ya mokili”—mingimingi banda kozalisama ya bato oyo bazali na mayele ya komona biloko oyo ezali komonisa ete Nzambe azali—emonanaka polele ete ezali na Mozalisi moko oyo azali na nguya mingi, Nzambe oyo tosengeli kosambela. Yango wana, baoyo baboyaka kondima nkembo ya Nzambe, bazali kutu na likambo ya koloba te. Kasi, bikelamu emonisaka polele makambo nini?
Molɔ́ngɔ́ esakolaka nkembo ya Nzambe
6, 7. Ndenge nini likoló esakolaka nkembo ya Nzambe?
6 Nzembo 19:1 epesi eyano oyo: “Likoló ekosakolaka nkembo ya Nzambe, lola ekoyebisaka misala ya mabɔkɔ na ye.” Davidi asosolaki ete minzoto mpe baplanɛti oyo engɛngaka na “lola” emonisaka polele ete ezali na Nzambe moko ya nkembo. Abakisaki boye: “Mokolo moko nsima na mosusu ebimisaka maloba, mpe butu moko nsima na misusu emonisaka boyebi.” (Nzembo 19:2, NW) Mokolo moko nsima na mosusu mpe butu moko nsima na mosusu, likoló emonisaka bwanya ya Nzambe mpe nguya na ye ya kokela. Ezali lokola nde likoló ‘ebimisaka’ maloba ya kosanzola Nzambe.
7 Kasi, esɛngaka bososoli mpo na koyoka yango. “Ezali na monɔkɔ te, ezali na maloba te, mongongo na bango eyokani te.” Nzokande, atako biloko yango elobaka te, litatoli na yango ezali na nguya mpenza. “Lokito na bango ekómi na mokili mobimba, maloba na bango kino nsuka ya mokili.”—Nzembo 19:3, 4.
8, 9. Wapi mwa makambo ya kokamwa oyo moi ezali na yango?
8 Na nsima, Davidi alobelaki likambo mosusu ya kokamwa na biloko oyo Nzambe akelá: “Kati na yango [likoló] asali hema mpo na moi; ezali lokola mokweli-ya-mwasi oyo azali kobima na ndako na ye; ezali mpe na esengo lokola moto makasi oyo alingi kopota na nzela. Kobima na yango ezali na nsuka moko ya lola, mpe akoleka kino nsuka mosusu na yango; eloko moko ekozanga moi na yango te.”—Nzembo 19:4-6.
9 Soki tokokanisi yango na minzoto mosusu, moi ezali mpenza monene te. Atako bongo, monzoto yango ezali monene mpenza soki tokokanisi yango na baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango. Buku moko elobi ete “mabelé ekoki kokɔta na moi mbala 330 000. Ata soki tosangisi baplanɛti nyonso oyo ebalukaka zingazinga na yango, moi eleki kaka na monene”! Moi ezali na nguya ya kobenda biloko oyo esalaka ete mabelé, atako ekabwani na moi na ntaka ya kilomɛtrɛ milio 150, elandaka kaka nzela na yango ntango ezali kobaluka zingazinga ya moi, etangwaka mosika te, epusanaka mpe penepene te. Na nguya nyonso oyo moi ebimisaka, kaka ndambo moke mpenza nde ekómaka na mabelé, kasi ekoki mpo na kobatela bomoi awa na mabelé.
10. (a) Ndenge nini moi ebimaka mpe ekɔtaka na “hema” na yango? (b) Ndenge nini moi epotaka mbangu lokola “moto makasi”?
10 Mokomi ya nzembo alobelaki moi na maloba ya elilingi; abengaki yango “moto makasi” oyo, na moi, azali kopota mbangu longwa na nsuka ya mokili tii na nsuka mosusu, mpe na butu, akei kopema na “hema.” Ntango moi elimwaka na mpokwa, moto oyo azali awa na mabelé amonaka lokola nde ekɔti na “hema” mpo na kopema. Na ntɔngɔ, emonanaka lokola nde ebimi mbala moko, ebandi kotinda pole “lokola mokweli-ya-mwasi oyo azali kobima na ndako na ye.” Ntango Davidi azalaki mobateli ya mpate, azalaki koyoka malili makasi oyo ezalaka na butu. (Genese 31:40) Azalaki koyeba lisusu ndenge oyo moi ezalaki kosilisa ye malili mpe kotinda molunge na mokili zingazinga na ye. Na maloba ya polele, moi ezalaki kolɛmba te na mobembo na yango banda na ɛsti tii na wɛsti, kasi ezalaki lokola “moto makasi,” ezalaki kobandela lisusu mobembo na yango.
Minzoto mpe bagalaksi
11, 12. (a) Tozali komona nini na kotalela ndenge oyo Biblia ekokanisi motángo ya minzoto na zɛlɔ na libongo ya mai? (b) Molɔ́ngɔ́ ekoki kozala monene ndenge nini?
11 Lokola Davidi azalaki na masini te oyo batalaka na yango minzoto, azalaki komona kaka mwa bankóto ya minzoto. Nzokande, na mikolo na biso, na lisalisi ya bamasini wana, bato ya mayele bamoni ete minzoto oyo ezali na etando oyo tomonaka ezali ebele, ebele, nsuka te! Yehova amonisaki ete minzoto ezali ebele mpenza ntango akokanisaki motángo na yango na “zɛlɔ na libongo ya mai.”—Genese 22:17.
12 Na boumeli ya bambula ebele, bato ya astronomi bazalaki komona oyo bazalaki kobenga “mwa bisika oyo engɛngaka, kasi emonanaka polele te.” Bato ya siansi bazalaki kokanisa ete ezali kaka mwa biloko mikemike na galaksi oyo mabelé ezali kati na yango. Na 1924, bamonaki ete moko na biloko na yango, oyo ezali pene ya mabelé koleka mosusu, ezali nde galaksi mobimba, bapesaki yango nkombo Andromède; ezali mosika, mosika, mosika mpenza! Lelo oyo, bato ya siansi bazali kokanisa ete bagalaksi ekoki kozala bamiliare, mpe mokomoko na yango ezali na bankóto na bankóto, ata mpe bamiliare ya minzoto. Nzokande, Yehova ‘atángaka motuya ya minzoto ya likoló, abengaka yango nyonso na bankombo na yango.’—Nzembo 147:4.
13. (a) Likambo nini ya kokamwa ezali na maboke ya minzoto? (b) Nini ezali komonisa polele ete bato ya siansi bayebi “mibeko ya lola” te?
13 Yehova atunaki Yobo boye: “Okoki kokanga bansinga ya liboke ya minzoto Kima to okoki kofungola bansinga ya liboke ya minzoto Kesil?” (Yobo 38:31, NW) Minzoto oyo ezali na liboke moko emonanaka lokola elilingi ya eloko moko boye. Atako minzoto ekabwani na bantaka milai mpenza, moto oyo azali awa na mabelé amonaka yango lokola nde ezalaka kaka esika moko. Lokola bisika oyo minzoto ezali eyebani malamu, “esalisaka bato ya masuwa mpo na kotambola na mai, bato ya astronomi mpo na kotinda bafize, mpe mpo na koyeba minzoto mosusu.” (The Encyclopedia Americana) Atako bongo, moto moko te ayebaka malamumalamu “bansinga” oyo ekangisi maboke ya minzoto. Tii lelo oyo, bato ya siansi bazwi naino eyano te na motuna oyo ezali na Yobo 38:33: “Oyebi nde mibeko ya lola?”
14. Na ndenge nini lolenge oyo pole epanzanaka ekoki kolimbolama te?
14 Bato ya siansi bakoki mpe kopesa eyano te na motuna mosusu oyo batunaki Yobo: “Nzela ezali wapi kino epanzelo ya pole?” (Yobo 38:24) Mokomi moko alobaki mpo na motuna wana na ntina na pole ete ezali “motuna oyo ebongi mpenza bato ya siansi bámituna.” Nzokande, bafilozofe mosusu ya Bagrɛki bazalaki kokanisa ete miso ya bato nde ebimisaka pole. Eleki mwa bambula, bato ya siansi bazalaki kokanisa ete pole ezalaka nde ebele ya biloko mikemike oyo ekoki komonana na miso te. Bamosusu bakanisaki ete pole epanzanaka lokola mbonge. Lelo oyo, bato ya siansi bazali kokanisa ete pole epanzanaka lokola mbonge mpe lisusu ezalaka lokola biloko mikemike. Kasi, motindo mpenza oyo pole ezali mpe ndenge oyo ‘epanzanaka’ eyebani te.
15. Lokola Davidi, tosengeli koyoka ndenge nini ntango tozali kotala likoló?
15 Na kotalela nyonso wana, tokozanga te koyoka lokola Davidi, mokomi ya nzembo, oyo alobaki ete: “Ekomona ngai Likoló oyo ezali mosala ya misapi na yo, sanza mpe minzoto ya likoló oyo yo obongisaki, moto azali nini ete okanisa ye? mpe mwana ya moto nini ete otalela ye?”—Nzembo 8:3, 4.
Mabelé mpe bikelamu oyo ezali kati na yango epesaka Yehova nkembo
16, 17. Ndenge nini bikelamu ya “bisika ya bozindo” ekumisaka Yehova?
16 Nzembo 148 elobeli ndenge mosusu oyo biloko oyo Nzambe akelá esakolaka nkembo na ye. Nzembo 148 Vɛrsɛ 7 elobi boye: “Bósanzola [Yehova] awa na mokili, bino nyama ya mai mpe bisika ya bozindo nyonso.” “Bisika ya bozindo” etondi mpenza na makambo ya kokamwa oyo emonisaka bwanya mpe nguya ya Nzambe. Ezali na motindo moko ya balɛnɛ oyo ezalaka na tɔni 120—ekokani na kilo ya nzoku 30! Motema na yango mpamba ezali na kilo 450 mpe etindaka kilogramɛ 6 400 ya makila na nzoto na yango! Tokanisi ete lokola babalɛnɛ yango ezali mineneminene, eyokaka nde nzoto kilo mpe etambolaka malɛmbɛmalɛmbɛ na kati ya mai? Eloko te. Lapolo ya ebongiseli moko (European Cetacean Bycatch Campaign) elobi boye: “[Babalɛnɛ yango] etambolaka na kati ya mbu” na mbangu ya kosakana te. Satelite moko emonaki ete “na boumeli ya sanza 10, balɛnɛ moko etambolaki bakilomɛtrɛ koleka 16 000.”
17 Nyama mosusu ya mai babengi dauphin ekitaka na nse ya mai na bozindo ya mɛtrɛ 45; kasi, basí bamoná moko na yango oyo ekitaki tii na bozindo ya mɛtrɛ 547! Esalaka ndenge nini mpo ekufa te na bozindo ya ndenge wana? Ntango ekiti na nse, motema na yango ebɛtaka malɛmbɛ mpenza, mpe makila ekendaka na motema, na mimpululu, mpe na bɔɔngɔ. Lisusu, na misuni na yango, ezalaka na mai moko oyo ebombaka mpema. Nyama mosusu babengi éléphant de mer ná mosusu babengi cachalot ekoki kokita na bozindo lisusu koleka. Na zulunalo Discover bakomaki boye: “Na esika ebunda mpo na kokita na nse ya mai, etikaka nde makasi ya mai ebimisa mopɛpɛ nyonso na mimpululu na yango.” Ebombaka mpema oyo esengeli na yango na kati ya misuni. Tomoni mpenza ete bikelamu yango emonisaka bwanya ya Nzambe oyo azali na nguya nyonso!
18. Na ndenge nini mai ya mbu emonisaka bwanya ya Yehova?
18 Mai ya mbu yango moko mpe emonisaka bwanya ya Yehova. Na zulunalo Scientific American bakomaki boye: “Banda na likoló tii na mɛtrɛ 100 na nse ya mai, litanga mokomoko ya mai ya mbu ezalaka na bankóto ya milona oyo emonanaka na miso te.” Na bongo, mai ya mbu ezali lokola “zamba monene oyo emonanaka na miso te” oyo epɛtolaka mopɛpɛ na ndenge ebendaka batɔni na batɔni ya bagazɛ ya mabe. Milona wana nde ebimisaka ndambo monene ya mopɛpɛ malamu oyo topemaka.
19. Ndenge nini mɔtɔ mpe mbula-mpɛmbɛ ekokisaka mokano ya Yehova?
19 Nzembo 148:8 elobi boye: “Mɔtɔ mpe matandala, mbula mpɛmbɛ mpe molinga na likoló, mopɛpɛ ya makasi, okotosa liloba na ye.” Yehova asalelaka mpe biloko wana oyo ezali na mpema te mpo na kokokisa mokano na ye. Tózwa ndakisa ya mɔtɔ. Kala, bazalaki kokanisa ete mɔtɔ ya zamba ezalaka na mosala mosusu te kaka kobebisa. Lelo oyo, bato ya mayele bamoni ete mɔtɔ ezali na ntina mingi mpo na mopɛpɛ, mai mpe mabelé; ezikisaka banzete oyo enuná mpe oyo ekufá, esalisaka milona mingi ebota, esalaka ete bipɔli mpe biloko mosusu ezonga na mabelé, mpe epekisaka makama ya mɔtɔ oyo ezikisaka bazamba minene. Mbula-mpɛmbɛ mpe ezali na ntina mingi, epolisaka mabelé mpe ebongisaka yango, ezongisaka mai na bibale, mpe ebatelaka banzete mpe banyama na malili makasi.
20. Bangomba mpe banzete esalisaka bato na makambo nini?
20 Nzembo 148:9 (NW) elobi boye: “Bangomba milai mpe bino nyonso, bangomba mike, banzete ya mbuma mpe basɛdrɛ nyonso.” Bangomba milai emonisaka nguya monene ya Yehova. (Nzembo 65:6) Kasi, ezali mpe na ntina na bomoi ya bato. Lapolo ya ebongiseli moko na Suisse (Institut géographique de Berne), elobi boye: “Mitó ya bibale minene nyonso na mokili ezali na bangomba. Koleka katikati ya bato nyonso ya mokili bamɛlaka mai oyo eutaka na bangomba . . . ‘Bibombelo ya mai’ wana ezali na ntina mingi mpo na bolamu ya bato.” Ata mpe nzete oyo tomesaná komona epesaka Mozalisi na yango nkembo. Lapolo ya ebongiseli moko ya ONU (Programme des Nations unies pour l’environnement) elobi ete banzete “ezali na ntina mingi mpo na bolamu ya bato na mikili nyonso . . . Banzete mingi ezali na ntina mpo na nkita mpamba te basalaka na yango mabaya, mpe epesaka biloko lokola bambuma, ndika, mpe makiki. Na mokili mobimba, bato miliare mibale balambaka mpe basalaka makambo mosusu na mɔtɔ ya nkoni.”
21. Limbolá ndenge oyo lokasa emonisaka ete ebongisami na ndenge ya kokamwa.
21 Ndenge oyo nzete esalemá emonisaka mpenza bwanya ya mozalisi. Na ndakisa, tótalela kaka lokasa. Likoló na yango ezalaka na mwa mafuta moko boye oyo ebatelaka yango. Na nse ya mafuta yango, na ngámbo oyo etalá likoló, lokasa ezalaka na ebele ya baselile oyo ebendaka nguya ya moi. Nkasa esalelaka nguya wana ya moi mpo na kolamba bilei mpo na nzete mobimba. Misisa ya nzete ebendaka mai na mabelé mpe mai yango emataka tii na nkasa. Na nse na yango, lokasa mokomoko ezalaka na madusu mikemike oyo efungwamaka mpe ekangamaka mpo na kobenda bagazɛ ya mabe na mopɛpɛ. Mai esanganaka na bagazɛ na lisalisi ya nguya ya moi. Na ndenge yango, nzete elambaka bilei na yango. Kasi, ntango makambo nyonso wana ezali kosalema, toyokaka makɛlɛlɛ te mpe ntango tozali kotala nzete, tomonaka yango kaka kitoko. Na esika ebwakaka salite, ebimisaka nde mopɛpɛ ya malamu oyo biso bato topemaka!
22, 23. (a) Makambo nini ya kokamwa bandɛkɛ mpe banyama mosusu ezali na yango? (b) Mituna nini mosusu esengeli tótalela?
22 Nzembo 148:10 elobi boye: “Nyama ya zamba mpe bibwele nyonso, nyama mikemike ekolandalanda, ndɛkɛ ekopumbwaka na likoló.” Ebele ya banyama ya zamba mpe bandɛkɛ ya likoló esalaka makambo ya kokamwa. Ndɛkɛ moko babengi albatros de Laysan ekoki kopumbwa na ntaka molai (bamonaki moko etambolaki kilomɛtrɛ 40 000 na mikolo 90 mpamba). Mwa ndɛkɛ moke babengi fauvette elongwaka na Amerika ya Nɔrdi tii na Amerika ya Sudi, epumbwaka na boumeli ya ngonga 80, kozanga kopema. Kamela ebombaka mai, na matutu ya mokɔngɔ na yango te, ndenge bato mingi bakanisaka, kasi na libumu na yango, mpe esalisaka yango etambola bangonga ebele, kozanga ete eyoka mposa ya mai. Yango wana, tokoki kokamwa te ete bato ya mayele bayekolaka malamumalamu makambo ya banyama mpo na kobimisa bamasini mpe biloko ya sika. Mokomi Gail Cleere alobaki boye: “Soki olingi kosala eloko moko oyo ekotambola malamu . . . mpe ekobebisa biloko mosusu te, okolonga soki olandi modɛlɛ ya biloko oyo ezali na mokili.”
23 Ya solo, biloko oyo Nzambe akelá epesaka ye nkembo! Ezala minzoto na likoló, banzete mpe banyama, eloko mokomoko ekumisaka Mozalisi na ndenge na yango. Kasi, ezali boni mpo na biso bato? Ndenge nini tokoki kosangisa mingongo na biso na biloko oyo Nzambe akelá mpo na kokumisa ye?
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini bato oyo bandimaka Nzambe te bazali kutu na likambo ya koloba te?
• Ndenge nini minzoto mpe baplanɛti epesaka Nzambe nkembo?
• Ndenge nini banyama ya mbu mpe ya zamba emonisaka ete Mozalisi moko oyo atondi na bolingo azali?
• Ndenge nini biloko oyo ezali na mpema te ekokisaka mokano ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 10]
Bato ya siansi balobi ete minzoto oyo emonanaka ezali ebele, ebele, nsuka te!
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Frank Zullo
[Elilingi na lokasa 12]
“Dauphin”
[Elilingi na lokasa 13]
Litanga ya mbula-mpɛmbɛ
[Eutelo ya bafɔtɔ]
snowcrystals.net
[Elilingi na lokasa 13]
Mwana ya “albatros de Laysan”