Tokoki kopamela Jéhovah te
“Lokola tata akoyokelaka bana na ye mawa, bobele bongo Jéhovah akoyokelaka baoyo bakobangaka ye mawa. Mpamba te ayebi malamu motindo na nzoto na biso, abosani te ete tozali bobele mputulu.”—NZEMBO 103:13, 14, MN.
1, 2. Abalayama azalaki nani, mpe ndenge nini Lota, mwana na ndeko na ye, akomaki kofanda na engumba mabe ya Sodome?
TOKOKI koloba te ete Jéhovah nde azali mobandisi ya bampasi oyo ekoki kokomela biso na ntina na mabunga na biso. Mpo na kolongisa likanisi yango, tokotalela makambo ya kala oyo maleka ekoki sikawa pene na mibu 3 900. Abalayama (Abram), moninga na Nzambe, mpe Lota mwana ya ndeko na ye bakomaki na bozwi mingi. (Yakobo 2:23) Mpo ete bazalaki na biloko mingi mpe na bibwele mingi, ‘mboka ekokaki na bango lisusu te ete bafanda elongo.’ Lisusu, kowelana ebimaki kati na babateli na bitonga na bango mibale. (Genese 13:5-7) Lolenge nini basengelaki kobongisa likambo yango?
2 Mpo na kosukisa matata, Abalayama apesaki likanisi ete bakabwana, mpe atikaki Lota apona liboso esika oyo alingaki kokende. Abalayama azalaki mokoló, mpe ekokaki kozala malamu ete mwana ya ndeko na ye atikela ye etúka ya malamu, nzokande Lota aponaki eteni oyo eleki kitoko: mokili nyonso oyo ezalaki na mai mingi na nse ya Yordani. Nzokande, lolenge ya komonana na yango ezalaki na bokosi, mpamba te penepene na esika yango ezalaki na bingumba ya Sodome mpe Gomore, bingumba oyo bizalaki na bizaleli ya mabe koleka. Nsima na mikolo, Lota mpe libota na ye bakendaki kofanda na Sodome, likambo oyo etyaki bango na likama kati na elimo. Na nsima, bakangamaki na boombo ntango mokonzi Kedolaomele mpe baninga na ye balongaki mokonzi ya Sodome. Abalayama mpe bato na ye basikolaki bango, kasi Lota mpe libota na ye bazongaki na Sodome.—Genese 13:8-13; 14:4-16.
3, 4. Nini ekomelaki Lota mpe libota na ye ntango Nzambe abomaki Sodome mpe Gomore?
3 Na ntina na pite mpe kobeba na bizaleli ya bafandi ya Sodome mpe Gomore, Jéhovah azwaki ekateli ya koboma bingumba wana mibale. Na motema mawa na ye, atindaki baanzelu mibale mpo na kobimisa Lota, mwasi na ye mpe bana na bango mibale ya basi. Atako bazwaki etinda ya kotala nsima te, mwasi na Lota abalukaki mpo na kotala nsima, mbala mosusu mpo ete ayokaki mawa mpo na biloko ya mosuni oyo atikaki. Bobele na ntango wana, akomaki likonzi ya mungwa.—Genese 19:1-26.
4 Oyo nde mawa mpo na Lota mpe bana na ye mibale ya basi! Bana yango batikaki nsima na bango mibali oyo basengelaki kobala bango. Mpo na Lota, sikawa abungisaki mwasi na ye mpe bozwi na ye nyonso. Akomaki kofanda kati na mobéngá elongo na bana na ye ya basi. (Genese 19:30-38) Oyo emonanaki litomba na miso na ye, nsuka na yango emonanaki ete ezali likama. Kasi atako asalaki mabunga minene, na nsima abengamaki ete “moyengebene Lota.” (2 Petelo 2:7, 8) Na bongo Jéhovah Nzambe asengelaki kopamelama te mpo na mabunga ya Lota.
“Nani akososola mabunga na ye?”
5. Liyoki ya Davidi ezalaki nini likoló na mabunga mpe lolendo?
5 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka mpe basumuki, biso nyonso tosalaka mabunga. (Baloma 5:12; Yakobo 3:2) Lokola Lota, ekoki kokomela biso ete tokosami na oyo tozali komona na miso mpe topengwi na nzela ya sembo. Yango wana mokomi na nzembo Davidi asalaki libondeli oyo: “Nani akososola mabunga na ye? Petola ngai na mabunga na ngai mabombami. Batela moombo na yo na makambo na lolendo; tika te ete mazala na bokonzi likoló na ngai; bongo nakozala sembo mpe nakokwea na mabe monene te.” (Nzembo 19:12, 13) Davidi ayebaki ete asalaki masumu kozanga kososola yango. Na bongo asengaki lilimbisi mpo na mabunga oyo mabombami, mabunga oyo mbala mosusu asosolaki yango te. Ntango asalaki libunga monene na kotikaka nzoto na ye ya kozanga kokoka kopusa ye na kosala mabe, alukaki na etingya mpenza lisungi na Jéhovah. Alingaki ete Nzambe abatela ye na misala na lolendo. Alingaki te ete lolendo ekoma motindo na ye; mokano na ye ezalaki ete azala nde ya kokoka kati na bokangami na ye epai na Jéhovah Nzambe.
6. Elendiseli nini tokoki kozwa kati na Nzembo 103:10-14?
6 Biso baoyo tomipesi na Jéhovah mpo na kosalela ye, tozali mpe bato na kozanga kokoka, na ntina yango, tosalaka mpe mabunga. Lokola Lota, ekoki kokomela biso na ndakisa kosala liponi moko mabe mpo na oyo etali esika na biso ya kofanda. Mbala mosusu tolekisaki libaku moko ya kobakisa mosala na biso ya bulee mpo na Nzambe. Jéhovah azali komona mabunga yango, kasi ayebi baoyo motema na bango elingi boyengebene. Ata soki tosali lisumu moko monene, kasi tobongoli motema, Jéhovah azali kolimbisa biso, azali kosunga biso mpe azali kolanda kotalela biso lokola bato bakobangaka Nzambe. Mokonzi Davidi alobaki ete: “Asalaki epai na biso pelamoko masumu na biso te; apesaki biso libonza lokola ekoki na mabunga na biso te. Mpamba te lokola molai na lola ezali na likoló na mokili, boboto na ye ezali monene boye epai na baoyo bakobangaka ye. Pelamoko ebimelo na ntango ezali mosika na elimwelo na yango, mosika boye asili kolongola bipengweli na biso. Lokola tata akoyokelaka bana na ye mawa, bobele bongo Jéhovah akoyokelaka mawa baoyo bakobangaka ye. Mpamba te ayebi malamu motindo na nzoto na biso, abosani te ete tozali bobele mputulu.” (Nzembo 103:10-14, MN) Tata na biso ya likoló oyo azali na motema mawa akoki mpe kopesa biso nzela ete tosembola mabunga na biso to kopesa biso libaku mosusu ya kokolisa mosala na biso ya bulee, mpo na lokumu na ye.
Kopamela Nzambe ezali libunga
7. Ntina ya yambo ya bampasi na biso ezali nini?
7 Soki makambo mabongi te, bato bakozalaka na momeseno ya kopamela moto moko to eloko moko. Ezali na baoyo nkutu bapamelaka ata Nzambe. Kasi ezali Jehovah te nde akobimisaka mikakatano epai na bato. akosalaka malamu, kasi mabe te. Na yango, ‘azali kobimisa moi mpo na bato mabe mpe mpo na bato malamu mpe azali konokisa mbula mpo na bayengebene mpe mpo na bapengwi.’ (Matai 5:45) Moko na bantina minene ya bampasi na biso ezali ete tozali na bomoi kati na mokili oyo ezali kolanda mitinda ya moimi mpe ezali kotambwisama na Satan le Diable.—1 Yoane 5:19.
8. Adam asalaki nini ntango makambo mabebelaki ye?
8 Ezali bozoba mpe likama na kopamela Jéhovah Nzambe mpo na bampasi oyo mabunga na biso ezali komemela biso. Tokoki kobungisa ata bomoi na biso mpo na yango. Moto na liboso, Adam asengelaki koyeba ete biloko nyonso ya malamu oyo azalaki kosepela na yango eutaki na Nzambe. Ee mbele asengelaki kozala na botondi mozindo epai na Jéhovah mpo na bomoi yango moko mpe mpo na matomba oyo azalaki kozwa kati na lopango kitoko oyo ezalaki efandelo na ye, elanga na Edene. (Genese 2:7-9) Kasi Adam asalaki nini ntango makambo mabebaki wana azangaki kotosa Jéhovah mpe alyaki mbuma epekisamaki? Amilelaki epai na Nzambe na maloba oyo: “Mwasi oyo yo opesaki ete azala na ngai, apesi ngai mbuma na nzeté yango. Ngai mpe nalei.” (Genese 2:15-17; 3:1-12) Tosengeli soki moke te kopamela Jéhovah, lokola Adam asalaki yango.
9. (a) Soki ekomi ete tozwi mpasi mpo ete tozangi mayele, likanisi nini ekoki kolendisa biso? (b) Engebene Masese 19:3, basusu bazali kosala nini ntango bazali komibendela mikakatano?
9 Soki ekomi ete tobandi kozwa mpasi mpo ete tozangi mayele, tokoki kozwa libondisi na komikundola ete Jéhovah ayebi bolembu na biso malamu koleka biso moko mpe akosikola biso na mikakatano na biso soki tokangami makasi epai na ye. Esengeli na biso kondima lisalisi oyo Nzambe azali kopesa biso, mpe kopamela ye ata mbala moko te ntango tozali komibendela mikakatano. Mpo na yango, lisese moko na mayele elobi ete: “Ebebe na moto ekobebisa nzela na ye, mpe motema na ye ekotombokela Jéhovah.” (Masese 19:3) Libongoli moko ebongoli lisese yango boye: “Ntango moto moko amipesi mpasi na misala mabe na ye, azali kofunda Nkolo.” (Kuen) Tala libongoli mosusu: “Soko moto zoba abebisi ezaleli ya ye, akosilika makasi bobele na Yawe.”—Biblia Liloba lya Nzambe.
10. Na lolenge nini bozoba ya Adam ‘ebebisaki nzela na ye’?
10 Na boyokani na oyo lisese yango elobi, Adam asalaki na moimi mpe lolenge mabe na ye ya kokanisa ‘ebebisaki nzela na ye.’ Motema na ye epengwaki kolongwa epai na Jéhovah Nzambe, mpe alandaki nzela na ye ya moimi mpe ya lipanda. Adam azangaki botondi mpenza kino apamelaki Mozalisi na ye, komikomisaka bongo monguna na Oyo-Aleki-Likoló! Lisumu ya Adam ememaki ye mpe libota na ye, na libebi. Oyo nde likebisi! Baoyo bazali pene na kopamela Jéhovah mpo na mikakatano oyo bazali kokutana na yango bakosala malamu na komituna mituna oyo: Nayebi ete biloko nyonso oyo nazali kozwa litomba na yango biuti nde na Nzambe? Nazali na botondi epai na ye lokola nazali na bomoi, na kozaláká moko ya bikelamu na ye? Ekoki kozala ete bampasi na ngai ezali kouta na mabunga na ngai moko? Nazali mpenza komimonisa ete nabongi mpo na kondimama to kozwa lisalisi na Jéhovah na kolandáká batoli oyo azali kopesa kati na Liloba na ye lipemami, Biblia?
Likama oyo lizali kokomela ata basaleli na Nzambe
11. Bakonzi na mangomba ya Bayuda na ekeke ya liboso bazwamaki na ekweli nini na miso na Nzambe?
11 Bakonzi na mangomba ya Bayuda na ekeke ya liboso ya ntango na biso bazalaki komikumisa ete bazali kosalela Nzambe, kasi bazalaki kotya pembeni liloba na ye ya solo mpe bazalaki kolanda mayele na bango moko. (Matai 15:8, 9) Lokola Yesu Klisto azalaki kosakola polele lolenge mabe na bango ya kokanisa, babomaki ye. Na nsima, bamonisaki likunya makasi epai na bayekoli na ye. (Misala 7:54-60) Nzela na bato wana epengwaki mingi kino basilikaki mpenza epai na Jéhovah.—Tala Misala 5:34, 38, 39.
12. Ndakisa nini emonisi ete ata basangani ya lisangá na boklisto bazali mbala mosusu komeka kopamela Jéhovah mpo na mikakatano na bango?
12 Ntango mosusu basangani ya lisangá na boklisto bazali kokoma na makanisi mabe mpenza, na komekaka kokomisa Nzambe mobandisi ya mikakatano na bango oyo bazali kokutana na yango. Na ndakisa, bankulutu ya lisangá moko bamonaki malamu ete bakebisa na boninga nyonso kasi na kozalaka ngwi, elenge mwasi moko oyo asili kobala, kasi azalaki na momeseno ya kokutana mbala na mbala na mobali moko ya mokili. Na boumeli ya lisolo moko, elenge mwasi yango, apamelaki Nzambe mpo ete asalisaki ye te na kopika liboso ya lisenginya wana ya kokutana mbala na mbala na mobali yango. Ya solo, alobaki ete asilikeli Nzambe makasi. Bankulutu basololaki elongo na ye na nzela na Makomami mpe basalaki nyonso mpo na kosalisa ye mbala mingi, kasi eloko moko te ebongwanaki: na nsima, akomaki kosala ekobo mpe abimisamaki na lisangá ya boklisto.
13. Mpo na nini esengeli kobwaka ezaleli ya komilela?
13 Moto oyo azali na momeseno ya komilela akoki kopamela Nzambe. “Bato na mbindo” oyo bamikotisaki kati na lisangá na ekeke ya liboso bazalaki na ezaleli wana mabe, mpe na bizaleli mosusu oyo bizalaki komonisa ete makanisi na bango masili kobeba. Lokola moyekoli Yakobo alobaki yango, bato yango ‘bazalaki kobalola ngolu na Nzambe na biso kino bosoto, bazalaki koangana ye Mokonzi moko mpenza mpe Nkolo na biso Yesu Klisto.’ Yuda alobaki lisusu ete: “Bazali baimaimi baoyo bakoimaima mpo na makambo na bango na bomoi.” (Yuda 3, 4, 16) Basaleli na sembo ya Jéhovah bazali kosenzela na mayele nyonso ete basambela mpo na kozala na botondi, mpe ete bazala na momeseno ya koimaima te, likambo oyo ekoki kopesa bango nkele na motema kino kobungisa kondima na bango epai na Nzambe mpe kotombokela boyokani oyo bozali kosangisa bango elongo na ye.
14. Lolenge nini tokoki kosala soki moninga moko moklisto asaleli biso mabe, kasi mpo na nini kosala bongo ekozala malamu te?
14 Ntango mosusu ozali koloba ete yango ekokomela yo te. Kasi ntango makambo mazali kotambola malamu te na ntina na mabunga na biso to na oyo ya mozalani, tokoki kokoma kino kopamela Nzambe. Na ndakisa, ekomaka ete moto moko ayoki mabe mpo ete moko kati na baninga na ye baklisto alobi to asali mabe. Moto oyo basaleli ye mabe azali mbala mosusu kosalela Jéhovah na bosembo nyonso uta mibu mingi; nzokande akoki koloba ete: ‘Wana moto yango akozala naino kati na lisangá, ngai nakoyangana na makita te.’ Ntango mosusu asiliki kino koloba kati na motema na ye ete: ‘Soki boye, nakozala lisusu kati na lisangá te.’ Kasi moklisto asengeli mpenza kozala na ezalela motindo wana? Soki moto mosusu azangi kokoka asaleli ye mabe, mpo na nini akosilikela lisangá mobimba ya bato oyo bandimami na Nzambe mpe oyo bazali kosalela ye na bosembo nyonso? Mpo na nini, ye moto amipesaki na Jéhovah, akotika kosala mokano na Nzambe mpe akosilikela Nzambe? Ezali mpenza likambo na mayele ete totika eloko moko te mpe moto moko te ete abebisa boyokani na biso malamu elongo na Jéhovah! Na ntembe te, ekozala bozoba mpe lisumu soki tokotika kosambela Jéhovah Nzambe ata likambo yango ezali motindo nini.—Yakobo 4:17.
15, 16. Makambo nini ya mabe Diotelefe azalaki kosala, kasi atako bongo ezalela nini Gayo abatelaki?
15 Kanisa naino ete ozalaki na lisangá moko elongo na Gayo, moklisto oyo azalaki na bolingo mpo na bandeko na ye. ‘Azalaki kosala mosala na sembo’ na komonisáká boyambi epai ya bandeko, atako bango bazalaki bapaya. Kasi bobele kati na lisangá moko wana, ezalaki na moto moko ya lolendo, Diotelefe. Azalaki koyamba na limemya te mitinda oyo mizalaki kouta epai na Yoane, moko na bantoma na Yesu Klisto. Diotelefe azalaki ata kotongo Yoane na maloba ya kotuka. Ntóma alobaki ete: “Akosuka mpe na makambo yango te; ye moko akoyambaka bandeko te nde akopekisaka baoyo balingi koyamba bango mpe akobimisaka bango na lisangá.”—3 Yoane 1, 5-10.
16 Yoane akanaki ete, soki akokende kotala lisangá wana, akundola makambo oyo Diotelefe azalaki kosala. Kasi na kozelaka, Gayo mpe baklisto mosusu bayambi na bapaya oyo bazalaki na lisangá wana basalaki nini? Kati na Makomami, eloko moko te emonisi ete moko na bango alobaki ete: ‘Lokola Diotelefe akozala naino na lisangá, ngai nakozala kati na yango te. Bokomona ngai kati na makita te.’ Gayo mpe baoyo bazalaki na ezalela motindo moko na ye na ntembe te batikalaki ngwi. Bapesaki nzela na eloko moko te ete epekisa bango kosala mokano na Nzambe, mpe ata mbala moko te batombokelaki Jéhovah. Bakweaki te na mayele mabe ya Satan le Diable, oyo akokaki kosepela soki batikaki Jéhovah mpe soki basilikaki epai na ye.—Baefese 6:10-18.
Tosilikela Jéhovah ata mokolo moko te!
17. Tosengeli kosala nini soki likambo moko to moto moko atumoli biso to ayokisi biso mpasi na motema?
17 Ata soki kati na lisangá moto moko to likambo moko ezokisi to epesi mpasi na mosaleli moko na Nzambe, mpo na koloba malamu moto yango akobebisa nzela na ye soki atiki kosangana elongo na libota na Jéhovah. Na kosalaka bongo, akosalela malamu te bisoswɛlo na ye. (Baebele 5:14) Na bongo tozala na ekateli ya kotikala ngwi liboso na matumoli nyonso. Totikala sembo epai na Jéhovah Nzambe, epai na Yesu Klisto mpe na lisangá ya boklisto. (Baebele 10:24, 25) Esika mosusu te tokoki kokuta solo oyo ezali komema na bomoi ya seko.
18. Ata soki tozali ntango nyonso te koyeba lolenge oyo Jéhovah Nzambe azali kosala, nini tokoki ntango nyonso kolikya na ntina na ye?
18 Tomikundola lisusu ete Jéhovah akomekaka moto ata moko te na mabe. (Yakobo 1:13) Nzambe, oyo azali bolingo, akosalaka malamu, mingi mpenza epai na baoyo bakolingaka ye. (1 Yoane 4:8) Atako tokoyebaka ntango nyonso te lolenge oyo Jéhovah Nzambe azali kosala, kasi tokoki kondimisama ete akozanga te kosala malamu mpo na matomba ya basaleli na ye. Petelo akomaki: “Na yango, bomisokisa na nse na loboko na nguya ya Nzambe mpo ete atombola bino na ntango ebongi, na kokitisaka mitungisi na bino nyonso epai na ye, mpamba te akobatelaka bino.” (1 Petelo 5:6, 7, MN) Ee, Jéhovah akobatelaka mpenza libota na ye.—Nzembo 94:14.
19, 20. Tosengeli kosala nini, ata soki ekomeli biso ete tolembi mpo na mimekamo na biso?
19 Na ntina yango, topesa nzela na moto te mpe na eloko moko te ete ebetisa biso libaku. Lokola mokomi na Nzembo alobaki yango, “kimya mingi ezali na bango balingi mobeko na [Jehovah Nzambe]; libaku ezali liboso na bango te.” (Nzembo 119:165) Biso nyonso tokozwaka mimekamo, mpe mbala mosusu ekoki kobulunganisa biso, kolembisa biso na lolenge moko to mosusu. Kasi tosenzela ntango nyonso ete tokoma na motema na bololo te, mingi mpenza na ntina na Jéhovah. (Masese 4:23) Na lisalisi na ye mpe na kolandaka batoli ya Makomami, tolonga mikakatano oyo tokoki kosilisa mpe toyikela mpiko oyo ezali koumela.—Matai 18:15-17; Baefese 4:26, 27.
20 Totika te ete mayoki na biso mamema biso na kosala na lolenge ya bozoba, kobebisaka bongo nzela na biso. Toloba mpe tosala na lolenge oyo ezali kosepelisa motema na Jéhovah. (Masese 27:11) Tobelela Jéhovah na kobondelaka ye na etingya, koyebáká ete azali mpenza kobatela biso, basaleli na ye, mpe ete akopesa biso mayele masengeli mpo totikala kati na nzela ya bomoi elongo na libota na ye. (Masese 3:5, 6) Likoló na nyonso, tosilikela Nzambe te. Ntango makambo mabebi, tomikundola mbala nyonso ete tokoki kopamela Jéhovah te.
Bozongeli
◻ Libunga nini Lota asalaki, kasi atako bongo lolenge nini Nzambe atalelaki ye?
◻ Liyoki ya Davidi na ntina na mabunga mpe lolendo ezalaki nini?
◻ Mpo na nini tosengeli kopamela Nzambe te ntango makambo mazali kotambola malamu te?
◻ Nini ekosalisa biso ete tosilikela Jéhovah te?
[Elilingi na lokasa 15]
Ntango ekabwanaki na Abalayama, Lota asalaki liponi ya malamu te mpo na oyo etali esika ya kofanda