Tambolá na nzela ya bosembo
“Kasi ngai, nakotambola na bosembo na ngai.”—NZEMBO 26:11, NW.
1, 2. (a) Mpo na nini likambo etali bosembo ya bato ezali na esika monene na ntembe oyo etali lotomo ya Nzambe ya kozala mokonzi ya bikelamo nyonso? (b) Ndenge nini bato mpe baanzelu bakoki komonisa ete baponi bokonzi ya Yehova?
NTANGO Satana atombokaki na elanga ya Edene, abimisaki ntembe monene na ntina na lotomo ya Nzambe ya kozala mokonzi ya bikelamo na Ye nyonso. Na nsima, abimisaki ntembe mosusu; alobaki ete bato basalelaka Nzambe kaka soki bamoni ete bakozwela yango matomba. (Yobo 1:9-11; 2:4) Na ndenge yango, likambo etali bosembo ya bato ezwaki esika monene na ntembe etali lotomo ya Nzambe ya kozala mokonzi ya bikelamo nyonso.
2 Ya solo, Nzambe azali mokonzi mpe akotikala kaka mokonzi, ata soki bikelamo na ye batikali sembo to te; kasi, bato ná baanzelu bakoki komonisa soki bazali na ngámbo nini na ntembe yango. Na ndenge nini? Soki baponi kolanda nzela ya bosembo to te. Yango wana, mpo na kondima to koboya moto, Nzambe atalaka nde bosembo na ye.
3. (a) Eloko nini Yobo mpe Davidi balingaki Yehova aluka mpe atalela epai na bango? (b) Likambo etali bosembo ebimisi mituna nini?
3 Na kondima mpenza, Yobo alobaki boye: “[Yehova] ámeka ngai na kilo ya malamu, bongo akoyeba ‘tè nazali moto ya bosembo.” (Yobo 31:6, Bible na lingala ya lelo oyo) Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, asɛngaki Yehova atalela bosembo na ye ntango abondelaki boye: “Talelá ngai, Ee Yehova, mpamba te natamboli na bosembo na ngai, mpe natyeli Yehova motema, mpo natɛngatɛnga te.” (Nzembo 26:1, NW) Ezali mpenza na ntina ete biso mpe tótambola na nzela ya bosembo! Kasi, bosembo ezali nini, mpe kotambola na nzela ya bosembo elimboli nini? Nini ekosalisa biso tótikala na nzela ya bosembo?
‘Natamboli na bosembo na ngai’
4. kozala sembo elimboli nini?
4 Kozala sembo elimboli kotambola alima, kozala na mbeba te mpe na bizaleli mabe te. Kasi, kozala sembo esuki te kaka na kosala oyo ezali malamu. Yango elimboli mpe kozala na bizaleli oyo elongobani to kokangama na Nzambe na motema mobimba. Satana atyelaki bosembo ya Yobo ntembe ntango alobaki na Nzambe boye: “Mpo na kobongola makambo, nalɔmbi yo, sembolá lobɔkɔ na yo, mpe simbá [Yobo] tii na mokuwa mpe na mosuni na ye mpe talá soki akolakela yo mabe te na miso na yo.” (Yobo 2:5, NW) Longolá misala ya malamu, bosembo esɛngaka mpe kozala na makanisi malamu.
5. Nini ezali komonisa ete kozala sembo esɛngaka te kozala moto ya kokoka?
5 Kasi, kozala sembo elimboli te kozala moto ya kokoka. Mokonzi Davidi azalaki moto ya kozanga kokoka mpe asalaki mabunga ya minene na bomoi na ye. Kasi, Biblia elobaka ete atambolaki “na bosembo ya motema.” (1 Mikonzi 9:4, NW) Mpo na nini? Mpamba te Davidi alingaki Yehova. Amipesaki na Nzambe na motema mobimba. Azalaki kondima mabunga na ye, azalaki koboya mpamela te, mpe azalaki kobongisa etamboli na ye. Bosembo ya Davidi emonanaki na ndenge amipesaki na Yehova, Nzambe na ye, mpe na ndenge oyo azalaki kolinga Ye.—Deteronome 6:5, 6.
6, 7. Kotambola na bosembo esɛngaka nini?
6 Bosembo esuki kaka te na mwa makambo mosusu oyo moto asalaka na bomoi na ye, na ndakisa na komipesa na makambo ya losambo. Etalelaka makambo nyonso ya bomoi na biso. Davidi ‘atambolaki’ na bosembo. Buku The New Interpreter’s Bible elobi boye: “Liloba ‘kotambola’ ezali kopesa likanisi ya ‘etamboli’ to ‘lolenge ya bomoi.’” Mpo na bato oyo ‘batambolaka alima,’ mokomi ya nzembo alobaki boye: “Esengo na baoyo [balandaka] litatoli [ya Nzambe], bango bakolukaka ye na motema mobimba. Baoyo bakosalaka mabe te, bakotambolaka nde na nzela na ye.” (Nzembo 119:1-3) Kozala sembo esɛngaka koluka ntango nyonso kosala mokano ya Nzambe mpe kotambola na nzela na ye.
7 Kotambola na bosembo esɛngaka kokangama na Nzambe, ata na ntango ya mpasi. Ntango tozali koyikela minyoko mpiko mpe tozali kozonga nsima te ata tokutani na mikakatano, to ntango tozali koboya kolanda makambo mabe ya mokili oyo, tomonisaka mpenza ete tozali sembo. ‘Tosepelisaka motema ya Yehova’ mpamba te yango epesaka ye likoki ya kozongisa eyano na moto oyo atumolaka ye. (Masese 27:11) Yango wana, tokoki mpenza kozwa ekateli lokola Yobo ete: “Tii nakokufa, nakotika bosembo na ngai te.” (Yobo 27:5, NW) Nzembo 26 emonisi makambo oyo ekosalisa biso tótambola na bosembo.
“Pɛtolá bangɛi na ngai mpe motema na ngai”
8. Liteya nini ozwi na libondeli ya Davidi oyo asɛngaki Yehova atalela bangɛi na ye mpe motema na ye?
8 Davidi abondelaki boye: “Talelá ngai, Ee Yehova, mpe meká ngai; pɛtolá bangɛi na ngai mpe motema na ngai.” (Nzembo 26:2, NW) Bangɛi (reins) ezalaka na kati mpenza ya nzoto. Na maloba ya elilingi, bangɛi elimbolaka makanisi oyo ezali na motema ya moto. Motema ya elilingi elimbolaka bomoto ya kati, elingi koloba makanisi ya moto, mayoki mpe mayele na ye. Ntango Davidi asɛngaki Yehova ete atalela ye, abondelaki ye aluka mpe asosola makanisi ya motema na ye mpe mayoki na ye.
9. Ndenge nini Yehova apɛtolaka bangɛi mpe motema na biso ya elilingi?
9 Davidi abondelaki Nzambe apɛtola bangɛi na ye mpe motema na ye. Ndenge nini Yehova apɛtolaka bomoto na biso? Davidi ayembaki boye: “Nakopambola Yehova, oyo apesi ngai toli. Ya solo, na butu bangɛi na ngai esemboli ngai.” (Nzembo 16:7, NW) Maloba wana elimboli nini? Elimboli ete toli ya Nzambe ekɔtaki na matoi ya Davidi, efandaki na motema na ye, mpe kuna esembolaki makanisi mpe mayoki na ye. Ekoki mpe kozala bongo mpo na biso soki tozali kokanisa malamumalamu toli oyo Yehova azali kopesa biso na nzela ya Liloba na ye, ya basaleli na ye, mpe ya ebongiseli na ye, mpe tozali kobomba yango na motema na biso. Soki tozali kobondela Yehova mbala na mbala ete apɛtola biso na ndenge wana, yango ekosalisa biso tótambola na bosembo.
‘Motema-boboto na yo ezali liboso na ngai’
10. Nini esalisaki Davidi na kotambola na solo ya Nzambe?
10 Davidi ayembaki lisusu boye: “Motema-boboto na yo ezali liboso ya miso na ngai, mpe natamboli na solo na yo.” (Nzembo 26:3, NW) Davidi ayebaki malamu misala ya motema-boboto ya Nzambe, mpe azalaki na botɔndi ntango azalaki kokanisa yango. Ayembaki boye: “Ee molimo na ngai, sanzolá [Yehova] mpe bosaná [misala] na ye nyonso te.” Nsima ya kokanisa moko na “misala” ya Nzambe, Davidi alobaki lisusu boye: “[Yehova] akosalaka misala ya boyengebene mpe akokataka sembo makambo ya [baoyo nyonso bazali kobɔtɔla bango biloko]. Ayebisaki Moize nzela na ye mpe misala na ye epai ya bato ya Yisalaele.” (Nzembo 103:2, 6, 7) Mbala mosusu Davidi azalaki kokanisa ndenge Baezipito babɔtɔlaki Bayisalaele biloko na ntango ya Moize. Soki ezali bongo, boye ntango Davidi akanisaki ndenge Yehova ayebisaki Moize makambo oyo akosala mpo na kobikisa bango, yango esimbaki motema na ye mpe elendisaki ekateli na ye ya kotambola na solo ya Nzambe.
11. Nini ekosalisa biso tótambola na nzela ya bosembo?
11 Koyekola ntango nyonso Liloba ya Nzambe mpe kokanisa na mozindo makambo oyo tozali koyekola ekosalisa mpe biso tótambola na nzela ya bosembo. Na ndakisa, soki tokanisi ndenge Yozefe akimaki mwasi ya Potifala oyo azalaki kolengola ye mpo asala na ye pite, yango ekolendisa biso tókima makambo ya ndenge wana soki tokutani na yango na mosala, na kelasi, to na esika mosusu. (Genese 39:7-12) Bongo soki tomekami na mposa ya kokóma na bozwi mingi to kokóma bato minene na mokili, tokokanisa ndakisa ya nani? Tozali na ndakisa ya Moize oyo aboyaki kokóma moto monene na Ezipito. (Baebele 11:24-26) Soki tozali kokanisa mpiko ya Yobo, yango ekolendisa ekateli na biso ya kotikala sembo epai ya Yehova ata soki tobɛli to tokutani na mikakatano mosusu. (Yakobo 5:11) Ezali boni soki bazali konyokola biso? Tokozwa mpiko soki tokanisi lisolo ya Danyele ntango babwakaki ye na libulu ya bankɔsi!—Danyele 6:16-22.
“Nafandi esika moko te na bato ya lokuta”
12, 13. Baninga ya ndenge nini tosengeli kokima?
12 Davidi amonisaki likambo mosusu oyo elendisaki ye atikala sembo na maloba oyo: “Nafandi esika moko te na bato ya lokuta; mpe nasanganaka te na baoyo babombaka bomoto na bango. Nayini lisangá ya basali na mabe, mpe nafandaka na bato ya mabe te.” (Nzembo 26:4, 5, NW) Davidi azalaki kofanda na bato ya mabe te. Ayinaki baninga mabe.
13 Ezali boni mpo na biso? Toboyaka kofanda na bato ya lokuta na nzela ya televizyo, video, bafilme, Internet, mpe bongo na bongo? Tokimaka bato oyo babombaka bomoto na bango? Bato mosusu, ezala na kelasi to na mosala, bakoki koluka tókóma baninga na bango mpo bámema biso na banzela ya mabe. Tokondima kokóma baninga ya bato oyo batambolaka na solo ya Nzambe te? Bapɛngwi mpe bakoki komonisa ete bazali koloba solo, nzokande babombaka mokano na bango ya kopɛngwisa biso mpo tótika kosalela Yehova. Ndenge nini tosengeli kotalela bandeko mosusu na lisangá oyo toyebi ete basalaka makambo mabe na kobombana? Bato ya ndenge wana mpe babombaka bomoto na bango. Jayson, oyo azali lelo oyo mosaleli na misala, azalaki na baninga ya ndenge wana ntango azalaki elenge. Alobi boye: “Mokolo mosusu, moko na bango alobaki na ngai boye: ‘Ata soki tozali kosala mabe lelo oyo, ekosala eloko moko te, mpamba te ntango mokili ya sika ekoya, ekokuta biso tokufá. Tokoyeba kutu te makambo oyo ekoleka.’ Maloba wana emonisaki ngai mbala moko ete bazali baninga mabe. Ngai nalingi kozala na bomoi na mokili ya sika.” Jayson aboyaki baninga wana. Ntoma Paulo apesaki likebisi oyo: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakolinti 15:33) Ezali na ntina mingi tókima baninga mabe!
‘Nakosakola misala na yo nyonso ya kokamwa’
14, 15. Ndenge nini tokoki ‘kotambola zingazinga ya etumbelo ya Yehova’?
14 Davidi ayembaki lisusu boye: “Nakosukola mabɔkɔ na ngai, mpe nakotambola zingazinga ya etumbelo na yo, Ee Yehova.” Mpo na nini? “Mpo na kopesa matɔndi na mongongo makasi, mpo na kosakola misala na yo nyonso ya kokamwa.” (Nzembo 26:6, 7, NW) Davidi azalaki na mposa ya kotikala pɛto mpo akoka kosambela Yehova mpe komonisa ete amipesi na Nzambe.
15 Biloko nyonso oyo bazalaki kosalela na losambo ya solo na tabenakle mpe na nsima na tempelo ezalaki “ndakisa mpe elili ya makambo ya likoló.” (Baebele 8:5; 9:23) Etumbelo ezalaki elilingi oyo ezalaki komonisa mposa ya Yehova na ndenge andimaki mbeka ya Yesu Klisto mpo na kobikisa bato. (Baebele 10:5-10) Biso tosukolaka mabɔkɔ na biso mpe ‘totambolaka zingazinga ya etumbelo ya Yehova’ na ndenge tomonisaka ete tondimi mbeka yango.—Yoane 3:16-18.
16. Tozwaka matomba nini ntango tozali koyebisa bato misala ya kokamwa ya Nzambe?
16 Soki tokanisi makambo malamu nyonso oyo mbeka ya Yesu ekomemela biso, tozalaka na botɔndi mingi epai ya Yehova mpe Mwana na ye mobotami-se-moko! Yango wana, na botɔndi mpenza na mitema, tiká tóyebisa bato misala ya kokamwa ya Nzambe, banda kozalisama ya moto na elanga ya Edene tii kozongisama ya makambo nyonso na mokili ya sika. (Genese 2:7; Misala 3:21) Lisusu, mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli ebatelaka biso mpenza na elimo! (Matai 24:14; 28:19, 20) Komipesa na mosala yango esalisaka biso ete elikya na biso mpo na mikolo ezali koya ezala ntango nyonso makasi, esalaka ete kondima na biso na bilaka ya Nzambe elɛmba te, mpe esalisaka biso tótika te kolinga Yehova mpe bazalani na biso.
“Nalingi efandelo ya ndako na yo”
17, 18. Ndenge nini tosengeli kotalelaka makita ya lisangá mpe mayangani?
17 Tabenakle ná etumbelo na yango ya bambeka, ezalaki esika ya losambo ya Yehova na Yisalaele. Mpo na komonisa ete azalaki kosepela na esika yango, Davidi abondelaki boye: “Yehova, nalingi efandelo ya ndako na yo mpe esika oyo nkembo na yo efandi.”—Nzembo 26:8, NW.
18 Tosepelaka koyangana na bisika oyo toyekolaka makambo ya Yehova? Ndako ya Bokonzi, esika oyo mateya ya elimo epesamaka, ezali esika ya losambo ya solo na mboka to na kartye mokomoko. Longola yango, tozalaka na mayangani ya etúká, mayangani ya zongazonga, mpe mayangani ya mokolo moko. Na makita yango toyokaka ‘makambo oyo Yehova azongelaka’ koyebisa biso. Soki toyekoli ‘kolinga yango mingi,’ tokolinga te kozangisa makita yango mpe ntango tozali kuna, tokofungola mpenza matoi. (Nzembo 119:167, NW) Tolendisamaka mingi ntango tozali na bandeko na biso bandimi oyo balukaka bolamu na biso mpe basalisaka biso tókoba kotambola na nzela ya bosembo!—Baebele 10:24, 25.
‘Kolongola bomoi na ngai te’
19. Davidi aboyaki kokwea na masumu nini?
19 Lokola Davidi ayebaki malamu mabe oyo ekoki kokómela moto oyo atiki nzela ya solo ya Nzambe, abondelaki boye: “Kolongola te molimo na ngai nzela moko na bato ya masumu, to bomoi na ngai nzela moko na bato oyo basopaka makila, baoyo mabɔkɔ na bango ezali na etamboli ya mbindo, mpe baoyo lobɔkɔ na bango ya mobali etondi na kanyaka.” (Nzembo 26:9, 10, NW) Davidi alingaki te bátánga ye na kati ya bato oyo batosaka Nzambe te, oyo bazali na etamboli ya mbindo mpe balingaka kanyaka.
20, 21. Nini ekoki komema biso na nzela ya bato oyo babangaka Nzambe te?
20 Lelo oyo, bato ya mokili bamipesi mingi na pite mpe ekobo. Na televizyo, na bazulunalo, na bafilme bazali kolakisa makambo ya mbindo—“bosɔtɔ, etamboli ya mbindo.” (Bagalatia 5:19) Bato mosusu bakómi baombo ya bafilme to bazulunalo oyo ezali na bililingi ya bato bazali bolumbu to bazali kosangisa nzoto, oyo mbala mingi ememaka na pite to na ekobo. Mingimingi, ezalaka mpasi te bilenge bábendama na makambo ya ndenge wana. Na mikili mingi, bilenge mibali bazali na momeseno ya kokutanaka na bilenge basi, kosolola masolo ya bolingo; yango wana, elenge nyonso akómá kokanisa ete ye mpe asengeli kozala na mwa moto na ye. Bilenge mingi balinganaka lokola mwasi ná mobali atako bakoki naino kobala te. Mpo na kokokisa bamposa ya nzoto oyo bakómaka na yango, bakómaka na etamboli ya mbindo to mpe bakweaka na pite.
21 Baninga mabe bakoki kobebisa ata mpe mikóló. Soki moto oyo asalaka mombongo azali kokosa bakiliya, to soki moto azali kotalela bolamu ya basusu te, yango mpe ezali kozanga bosembo. Soki tolandi banzela ya mokili, tokokabwana na Yehova. Yango wana, ‘tóyina mabe, mpe tólinga malamu’ mpe tókoba kotambola na nzela ya bosembo.—Amosa 5:15.
“Sikolá ngai mpe moniselá ngai ngɔlu”
22-24. (a) Ndenge nini maloba ya nsuka ya Nzembo 26 elendisi yo? (b) Motambo nini tokolobela na lisolo oyo elandi?
22 Davidi asukisaki libondeli na ye epai Nzambe na maloba oyo: “Kasi ngai, nakotambola na bosembo na ngai. Sikolá ngai mpe moniselá ngai ngɔlu. Lokolo na ngai ekotɛlɛma na esika oyo ezali alima; na kati ya ebele ya bato oyo bayangani nakopambola Yehova.” (Nzembo 26:11, 12, NW) Davidi alobelaki ekateli na ye ya kotikala sembo esika moko na libondeli na ye mpo na kosɛnga Nzambe asikola ye. Likambo yango ezali mpenza kolendisa! Atako tozali bato ya masumu, Yehova akosalisa biso soki tozwi ekateli ya kotambola na nzela ya bosembo.
23 Tiká ete etamboli na biso mobimba emonisa ete tozali komemya bokonzi ya Nzambe mpe tozali kopesa yango motuya mingi. Mokomoko na biso akoki kosɛnga Yehova atalela ye mpe apɛtola makanisi mpe motema na ye. Soki tozali komipesa na koyekola Liloba ya Nzambe, solo na ye ekolongwa na mitema na biso te. Yango wana, tósala nyonso mpo na kokima baninga mabe; tópambola nde Yehova na kati ya ebele ya bato oyo bayangani. Tósala na molende mpenza mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli; tótika te ete mokili ebebisa boyokani na biso na Nzambe. Ntango tozali kosala nyonso mpo na kotambola na nzela ya bosembo, tokoki kolikya ete Yehova akomonisela biso ngɔlu.
24 Lokola tosengeli kozala sembo na makambo nyonso ya bomoi na biso, tosengeli mpe kokeba na motambo moko monene: komɛla masanga mingi. Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini ebongi mpenza ete Nzambe atalela bosembo ya moto mpo na kondima to koboya ye?
• Kozala sembo elimboli nini, mpe kotambola na nzela ya bosembo esɛngaka nini?
• Nini ekosalisa biso tótambola na nzela ya bosembo?
• Mpo na kotikala sembo, tosengeli koyeba mpe kokima makama nini?
[Elilingi na lokasa 14]
Obatelaka misala ya motema-boboto ya Yehova liboso ya miso na yo?
[Bililingi na lokasa 14]
Osɛngaka Yehova mbala na mbala ete atalela makanisi na yo?
[Bililingi na lokasa 15]
Ntango tozali kotikala sembo na minyoko, tosepelisaka motema ya Yehova
[Bililingi na lokasa 17]
Tolandaka bibongiseli nyonso ya Yehova mpo na kosalisa biso tótambola na nzela ya bosembo?