LISOLO YA BOYEKOLI 44
Bolingo ya sembo ya Yehova elimboli nini mpo na yo?
“Motema boboto [to bolingo ya sembo ya Yehova] ezali seko na seko.”—NZ. 136:1.
LOYEMBO 108 Bolingo ya sembo ya Nzambe
NA MOKUSEa
1. Yehova asɛngi biso tósala nini?
BOLINGO ya sembo ezali na ntina mingi na miso ya Yehova. (Hos. 6:6) Alendisaka basaleli na ye bátalelaka yango mpe bongo. Na nzela ya mosakoli Mika, Nzambe asɛngi biso ‘tólinga boboto’ to bolingo ya sembo. (Mika. 6:8) Kasi liboso tólinga bolingo ya sembo, tosengeli naino koluka koyeba soki ezali nini.
2. Bolingo ya sembo elimboli nini?
2 Na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ya Anglais, maloba “bolingo ya sembo” ezali mbala soki 230. Bolingo ya sembo elimboli nini? Elimboli kolinga moto makasi mpenza, kokangama na ye makasi, kozala sembo epai na ye mpe kozala ntango nyonso elongo na ye. Mbala mingi esalelamaka mpo na kolobela bolingo oyo Nzambe azalaka na yango mpo na bato. Bato mpe bakoki komonisela yango basusu. Yehova azali ndakisa eleki malamu na likambo etali komonisa bolingo ya sembo. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo amonisaka ezaleli yango. Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge oyo tokoki komekola Yehova na likambo etali komonisela basusu bolingo ya sembo.
YEHOVA “ATONDI NA MOTEMA BOBOTO” TO BOLINGO YA SEMBO
3. Likambo nini Yehova ayebisaki Moize mpo na nkombo mpe bizaleli na ye?
3 Mwa moke ntango bana ya Yisraele babimaki na Ezipito, Yehova ayebisaki Moise makambo etali nkombo mpe bizaleli na ye. Alobaki boye: “Yehova, Yehova, Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto [to bolingo ya sembo], mpe solo, abatelaka motema boboto mpo na bankóto, alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu.” (Kob. 34:6, 7) Na maloba wana ya kitoko, Yehova ayebisaki Moize likambo moko oyo etali motema boboto to bolingo na ye ya sembo. Likambo yango nini?
4-5. (a) Yehova alobi nini mpo na ye moko? (b) Mituna nini tokotalela?
4 Yehova ayebisaki Moize kaka te ete azali na motema boboto to bolingo ya sembo, kasi alobaki nde ete “atondi” na yango. Maloba ‘kotonda na motema boboto’ to bolingo ya sembo ezali mpe na bisika mosusu motoba na Biblia. (Mit. 14:18; Neh. 9:17; Nz. 86:15; 103:8; Yoe. 2:13; Yona 4:2) Na mbala nyonso, maloba yango esalelami kaka mpo na kolobela Yehova kasi bato te. Ezali mpenza likambo ya kokamwa ndenge Yehova ye moko azali kolobela ezaleli na ye ya motema boboto to bolingo ya sembo! Na ntembe te, ezaleli yango ezali na ntina mingi na miso na ye.b Yango wana Mokonzi Davidi alobaki ete: “Ee Yehova, motema boboto [to bolingo ya sembo] na yo ezali na likoló . . . Ee Nzambe! Motema boboto na yo ezali mpenza kitoko, mpe bana ya bato bazali kokima na elili ya mapapu na yo.” (Nz. 36:5, 7) Osepelaka mpe na bolingo ya sembo ya Nzambe lokola Davidi?
5 Mpo tóyeba malamumalamu soki bolingo ya sembo elakisi mpenza nini, tótalela mituna mibale oyo: Yehova amoniselaka banani bolingo ya sembo? Ndenge nini bolingo ya sembo ya Yehova esalisaka biso?
YEHOVA AMONISELAKA BANANI BOLINGO YA SEMBO?
6. Yehova amoniselaka banani bolingo ya sembo?
6 Yehova amoniselaka banani bolingo ya sembo? Biblia elobi ete tokoki kolinga biloko mingi, na ndakisa “mosala ya bilanga,” “vinyo mpe mafuta,” “disiplini,” “boyebi,” “bwanya” mpe biloko mosusu. (2 Nt. 26:10; Mas. 12:1; 21:17; 29:3) Kasi tokoki soki moke te komonisela biloko bolingo ya sembo, tomoniselaka yango kaka bato. Yehova amonisaka ezaleli yango epai ya moto nyonso te. Amonisaka yango kaka epai ya baoyo bazalaka na boyokani ya malamu mpenza elongo na ye. Nzambe na biso azalaka sembo epai na biso, baninga na ye. Azali na mokano moko ya malamu mpo na biso, mpe akosundola biso te.
7. Ndenge nini Yehova amonisi ete alingaka bato nyonso?
7 Yehova amonisi bolingo na ye epai ya bato nyonso. Yesu ayebisaki mobali moko na nkombo Nikodeme ete: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te, kasi azwa bomoi ya seko.”—Yoa. 3:1, 16; Mat. 5:44, 45.
8-9. (a) Mpo na nini Yehova amoniselaka basaleli na ye bolingo ya sembo? (b) Tokolobela makambo nini?
8 Ndenge touti komona yango, Yehova amonisaka bolingo na ye ya sembo kaka epai ya baoyo bazalaka na boyokani ya malamu elongo na ye, elingi koloba basaleli na ye. Yango emonisami polele na makambo oyo Mokonzi Davidi mpe mosakoli Danyele balobaki. Na ndakisa, Mokonzi David alobaki: “Kobá komonisela baoyo bayebi yo motema boboto [to bolingo ya sembo] na yo.” Alobaki lisusu: “Motema boboto [to bolingo ya sembo] ya Yehova ezali libela na libela epai ya baoyo bazali kobanga ye.” Mpe Danyele alobaki: “Ah Yehova, Nzambe ya solo, Ye . . . oyo abatelaka kondimana mpe motema boboto [to bolingo ya sembo] epai ya baoyo balingaka ye mpe epai ya baoyo batosaka mitindo na ye.” (Nz. 36:10; 103:17; Dan. 9:4) Na kotalela bavɛrsɛ oyo, Yehova amonisaka motema boboto, to bolingo ya sembo, epai ya basaleli na ye mpo bayebi ye, babangaka ye, balingaka ye, mpe batosaka mibeko na ye. Amonisaka ezaleli yango epai ya baoyo basalelaka ye na bosembo.
9 Liboso tóbanda kosalela Yehova, azalaki komonisela biso bolingo oyo amoniselaka bato nyonso. (Nz. 104:14) Kasi lokola tozali basambeli na ye, amoniselaka biso mpe bolingo na ye ya sembo. Kutu, Yehova ayebisi mosaleli na ye mokomoko ete: “Motema boboto [to bolingo ya sembo] na ngai ekolongolama epai na yo te.” (Yis. 54:10) Na ntembe te, kaka ndenge Mokonzi Davidi ye moko amonisaki yango, “Yehova akomonisela mpenza moto na ye ya sembo boboto.” (Nz. 4:3) Yango esengeli kotinda biso tósala nini? Mokomi ya Nzembo alobaki ete ‘moto oyo azali na bwanya akotyela makambo yango likebi mpe lisusu akotyela misala ya bolingo ya sembo ya Yehova likebi.’ (Nz. 107:43) Oyo nde toli ya bwanya mpenza oyo euti epai ya Yehova! Tólobela sikoyo lolenge misato oyo Yehova amoniselaka biso bolingo na ye ya sembo mpe ndenge oyo esalisaka biso.
NDENGE OYO BOLINGO YA SEMBO ESALISAKA BISO
10. Ndenge nini bolingo ya sembo ya Nzambe oyo ezalaka seko na seko esalisaka biso? (Nzembo 31:7)
10 Bolingo ya sembo ya Nzambe ezali seko na seko. Nzembo 136 ezongeli likambo yango mbala 26. Vɛrsɛ ya liboso ya mokapo yango elobi boye: “Bópesa Yehova matɔndi mpo azali malamu, mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.” (Nz. 136:1) Kobanda na vɛrsɛ 2 tii 26, tozali kotánga maloba “mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.” Ntango totángaka bavɛrsɛ mosusu ya Nzembo yango, tokamwaka ndenge Yehova amonisaka bolingo na ye ya sembo na ndenge mingi kozanga kotika. Maloba “mpo motema boboto na ye ezali seko na seko” ezali kondimisa biso ete bolingo ya sembo ya Yehova mpo na basaleli na ye ebongwanaka te. Koyeba ete Yehova atikaka basaleli na ye ya sembo mbala moko te ezali mpenza kolendisa biso! Kutu, akangamaka makasi na baoyo basalelaka ye mpe asundolaka bango te, mingimingi na ntango ya mpasi. Ndenge oyo esalisaka biso: Koyeba ete Yehova akangamaka na biso ndenge wana epesaka biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tóyika mpiko na mikakatano oyo tozali kokutana na yango mpe tókoba kotambola na nzela ya bomoi.—Tángá Nzembo 31:7.
11. Na kotalela Nzembo 86:5, nini etindaka Yehova alimbisa biso?
11 Bolingo ya sembo ya Nzambe etindaka ye alimbisa biso. Soki Yehova amoni ete mosumuki moko abongoli motema mpe atiki makambo mabe oyo azalaki kosala, bolingo na ye ya sembo etindaka ye alimbisa ye. Mokomi ya Nzembo Davidi alobaki boye mpo na Yehova: “Asaleli biso makambo na kolanda masumu na biso te, akweisi mpe biso te na makambo oyo esengelaki tókwea, na kolanda mabunga na biso.” (Nz. 103:8-11) Davidi ye moko ayebaki mpenza mpasi mpe mawa makasi oyo moto ayokaka soki lisosoli na ye ezali kotungisa ye. Kasi amonaki mpe ndenge oyo Yehova ‘asepelaka kolimbisa.’ Nini etindaka Yehova alimbisa? Eyano ezali na Nzembo 86:5. (Tángá.) Ya solo, ndenge kaka Davidi alobaki yango na libondeli oyo asalaki, Yehova alimbisaka mpo atondi na motema boboto to bolingo ya sembo epai ya baoyo babelelaka ye.
12-13. Nini ekosalisa biso soki tozali komitungisa koleka ndelo mpo na mabunga oyo tosalá kala?
12 Soki tósali lisumu, ezali malamu mpe ebongi ete tómitungisa mpo na makambo ya mabe oyo tosalaki. Yango ekoki kotinda biso tóbongola motema, mpe tóbongisa makambo ya mabe oyo tosalaki. Kasi basaleli mosusu ya Nzambe bamipesaka foti koleka ndelo mpo na mabunga oyo basalá kala. Bakobaka kokanisa ete Yehova alimbisá bango te ata soki babongolá mpenza motema mpe batiká makambo yango ya mabe. Soki yo mpe omiyokaka bongo, koyeba ete Yehova asepelaka komonisa bolingo na ye ya sembo epai ya basaleli na ye ekosalisa yo.
13 Ndenge oyo esalisaka biso: Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kosalela Yehova na esengo mpe na lisosoli ya pɛto. Ezali bongo mpo “makila ya Yesu Mwana na ye ezali kopɛtola biso na lisumu nyonso.” (1 Yoa. 1:7) Soki olɛmbi nzoto mpo na mabunga oyo osalaka, kobosana te ete Yehova asepelaka mpenza kolimbisa mosumuki oyo abongoli mpenza motema. Davidi amonisaki boyokani oyo ezali kati na bolingo ya sembo ya Nzambe mpe ndenge oyo alimbisaka biso. Alobaki boye: “Se ndenge likoló etombwaná koleka mabele, motema boboto na ye epai ya baoyo bazali kobanga ye eleki monene. Se ndenge epai moi ebimaka ezali mosika mingi na epai moi elalaka, ndenge yango nde atye mosika na biso ebele ya misala na biso ya kobuka mibeko.” (Nz. 103:11, 12) Ya solo, Yehova ‘alimbisaka mpenza.’—Yis. 55:7.
14. Davidi alobaki ete bolingo ya sembo ya Nzambe ebatelaka biso lokola nini?
14 Bolingo ya sembo ya Nzambe ebatelaka biso na elimo. Na libondeli moko oyo asalaki epai ya Yehova, Davidi alobaki boye: “Yo ozali esika na ngai ya kobombana; okobatela ngai liboso ya mpasi. Okozinga ngai na koganga ya esengo na ntango ya kobikisama. . . . Moto oyo azali kotyela Yehova motema, motema boboto [to bolingo ya sembo ya Yehova] ezingaka ye.” (Nz. 32:7, 10) Na ntango ya kala, bifelo oyo ezingaki engumba ezalaki kobatela yango mpe bato oyo bazalaki kofanda na kati. Ndenge moko mpe, bolingo ya sembo ya Yehova ezingaka biso lokola efelo mpe ebatelaka biso na makambo nyonso oyo ekoki kobebisa boyokani na biso ná ye. Lisusu, bolingo ya sembo ya Yehova etindaka ye apusana penepene na biso.—Yir. 31:3.
15. Na ndenge nini bolingo ya sembo ya Yehova ezali lokola esika ya libateli mpe ya komibomba?
15 Davidi akokanisaki mpe ndenge oyo Yehova abatelaka basaleli na ye na eloko mosusu. Akomaki boye: “Nzambe azali esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná, Nzambe ya motema boboto epai na ngai.” Davidi alobaki lisusu boye mpo na Yehova: “[Azali] motema boboto na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai, esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná mpe Mobikisi na ngai, nguba na ngai mpe ye oyo nakimi epai na ye.” (Nz. 59:17; 144:2) Mpo na nini Davidi akokanisaki bolingo ya sembo ya Yehova na esika ya kobombana mpe ya libateli? Ata soki tofandaka wapi, lokola tozali basaleli na ye, Yehova akopesa biso libateli oyo tosengeli na yango mpo na kosalisa biso tóbatela boyokani ya malamu elongo na ye. Nzembo 91 mpe endimisi biso likambo yango. Mokomi ya nzembo yango alobaki boye: “Nakoloba na Yehova: ‘Ozali ekimelo na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai.’” (Nz. 91:1-3, 9, 14) Moize mpe asalelaki maloba ya ndenge wana mpo na kolobela esika ya komibomba. (Nz. 90:1) Lisusu, liboso Moize akufa, alobaki maloba mosusu ya kolendisa. Akomaki boye: “Nzambe ya ntango ya kala azali esika ya komibomba, mpe mabɔkɔ oyo ezali koumela seko ezali na nse na yo.” (Mib. 33:27) Maloba “mabɔkɔ oyo ezali koumela seko ezali na nse na yo” emonisi nini mpo na Yehova?
16. Wapi mapamboli mibale oyo Yehova apesá biso? (Nzembo 136:23)
16 Soki tomindimisi ete Yehova azali esika na biso ya komibomba, tokoyoka ete tobatelami. Kasi na bantango mosusu tokoki kolɛmba nzoto mpe kokoka te kotɛlɛma mpo na kosala makambo mosusu. Na bantango ya ndenge wana, Yehova asalaka nini mpo na biso? (Tángá Nzembo 136:23.) Na boboto mpenza atyaka mabɔkɔ na ye oyo ezali koumela seko na nse na biso mpo na kotɛlɛmisa biso mpe kopesa biso makasi. (Nz. 28:9; 94:18) Ndenge oyo esalisaka biso: Koyeba ete tokoki ntango nyonso kotyela lisalisi ya Nzambe motema esalisaka biso tóbosana te mapamboli oyo mibale: Ya liboso, tozali na esika malamu ya komibomba ata soki tofandaka wapi, mpe ya mibale, Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo atyelaka biso likebi.
TONDIMISAMI ETE NZAMBE AKOKOBA KOMONISELA BISO BOLINGO NA YE YA SEMBO
17. Tondimisami ete Nzambe akokoba kosala nini? (Nzembo 33:18-22)
17 Ndenge tomoni yango, ntango tozali kokutana na mikakatano, Yehova akosalisa biso mpo tókoba kobatela bosembo na biso epai na ye. (2 Ko. 4:7-9) Mosakoli Yirimia alobaki boye: “Ezali mpo na misala ya motema boboto ya Yehova nde tosili te mpamba te ebele ya misala na ye ya motema mawa ekosuka te.” (Bil. 3:22) Toyebi ete Yehova akokoba komonisela biso bolingo na ye ya sembo mpo Biblia eyebisi biso ete “liso ya Yehova ezali kotala baoyo babangaka ye, baoyo bazelaka motema boboto [to bolingo ya sembo] na ye.”—Tángá Nz. 33:18-22.
18-19. (a) Likambo nini tosengeli kobosana te? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
18 Likambo nini tosengeli kobosana te? Liboso tóbanda kosalela Yehova, azalaki komonisela biso bolingo oyo amoniselaka bato nyonso, kasi lokola tokómi basambeli na ye, amoniselaka biso mpe bolingo ya sembo. Bolingo yango etindaka Yehova abatela biso. Akozala ntango nyonso penepene na biso mpe akokokisa makambo oyo alaki biso. Alingi ete tózala baninga na ye mpo na seko! (Nz. 46:1, 2, 7) Na yango, ata soki tokutani na mikakatano nini, Yehova akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tóbatela bosembo na biso.
19 Touti komona ndenge oyo Yehova amoniselaka basaleli na ye bolingo ya sembo. Kasi alingi ete biso mpe tómoniselana bolingo ya sembo. Ndenge nini tokoki kosala yango? Lisolo oyo elandi ekolobela likambo yango ya ntina.
LOYEMBO 136 Yehova akopesa yo mbano
a Bolingo ya sembo ezali nini? Yehova amonisaka bolingo ya sembo epai ya banani, mpe matomba nini bazwaka? Na lisolo oyo tokozwa biyano na mituna yango. Lisolo ya mibale ekolobela mpe ezaleli yango ya kokamwa.
b Bavɛrsɛ mosusu ya Biblia elobeli mpe likanisi oyo emonisi ete Yehova atondi na motema boboto to bolingo ya sembo.—Talá Nehemia 13:22; Nzembo 69:13; 106:7; mpe Bileli 3:32.
c ELILINGI: Yehova amonisaka bolingo na ye epai ya bato nyonso, ata mpe basaleli na ye. Bililingi oyo ezali likoló ezali komonisa mwa makambo oyo Nzambe asalaka mpo na komonisela bato bolingo na ye. Oyo eleki ntina, ezali likoki ya kozwa matomba na mbeka ya Yesu.
d ELILINGI: Baoyo bakómaka basaleli na ye mpe oyo bamonisaka kondima na mbeka ya lisiko, Yehova asalelaka bango makambo na ndenge ya malamu koleka. Longola bolingo oyo Nzambe amoniselaka bato nyonso, Yehova amoniselaka basaleli na ye mpe bolingo ya sembo. Bililingi ezali komonisa ndenge oyo amonisaka bolingo yango.