Tókumisa nkombo ya Yehova elongo
“[Bókumisa Yehova, NW] esika moko na ngai; tókumisa nkombo na ye elongo.”—NZEMBO 34:3.
1. Ndakisa nini ya malamu mpenza Yesu apesaki ntango azalaki awa na mabelé?
NA BUTU ya mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Yesu ná bantoma na ye basanzolaki Yehova na loyembo na eteni ya likoló ya ndako moko na Yelusaleme. (Matai 26:30) Wana ezalaki mbala ya nsuka oyo Yesu asalaki yango elongo na bantoma na ye awa na mabelé. Kasi, ebongaki mpenza asukisa likita wana na bango na loyembo mpo na kokumisa Yehova. Banda na ebandeli tii na nsuka ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu azalaki kosanzola Tata na ye mpe koyebisa bato nkombo na ye na molende mpenza. (Matai 4:10; 6:9; 22:37, 38; Yoane 12:28; 17:6) Asalaki mpenza oyo mokomi ya nzembo alobaki: “[Bókumisa Yehova, NW] esika moko na ngai; tókumisa nkombo na ye elongo.” (Nzembo 34:3) Oyo nde ndakisa malamu mpo na biso!
2, 3. (a) Ndenge nini toyebi ete maloba ya Nzembo 34 ezali mpe esakweli? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo mpe na oyo ekolanda?
2 Mwa bangonga nsima ya kosanzola Nzambe elongo na Yesu, ntoma Yoane amonaki likambo moko ya ndenge mosusu mpenza. Babakaki Nkolo na ye ná bato mabe mibale likoló ya nzete mpo báboma bango. Basoda ya Loma babukaki bato mabe mibale wana makolo mpo bákufa noki. Kasi, Yoane alobaki ete babukaki oyo ya Yesu te. Ntango basoda yango bakómaki epai ya Yesu, bamonaki ete asili kokufa. Na evanzile na ye, Yoane alobaki ete yango ekokisaki likambo mosusu oyo Nzembo 34 esakolaki: ‘Ata moko na mikuwa na ye ekobukana te.’—Yoane 19:32-36; Nzembo 34:20.
3 Nzembo 34 ezali lisusu na makambo mingi oyo esengeli kobenda likebi ya baklisto. Yango wana, na lisolo oyo mpe na oyo ekolanda, tokolobela makambo oyo etindaki Davidi akoma nzembo yango, mpe na nsima tokotalela makambo ya kolendisa oyo ezali na kati.
Davidi azali kokimakima Saulo
4. (a) Mpo na nini Samwele apakolaki Davidi mafuta mpo akóma mokonzi ya Yisalaele? (b) Mpo na nini Saulo ‘alingaki Davidi mingi’?
4 Ntango Davidi azalaki elenge, Saulo azalaki mokonzi na Yisalaele. Kasi, Saulo azangaki botosi mpe Yehova aboyaki ye. Yango wana, mosakoli Samwele alobaki na ye ete: ‘Yehova abɔtɔli yo bokonzi na Yisalaele lelo mpe apesi yango epai ya mozalani moko na yo oyo aleki yo na malamu.’ (1 Samwele 15:28) Na nsima, Yehova atindaki Samwele apakola Davidi, mwana ya nsuka ya Yese, mafuta mpo akóma mokonzi ya Yisalaele. Nzokande, lokola elimo ya Nzambe ezalaki na Saulo lisusu te, akómaki kotungisama na makanisi. Lokola Davidi ayebaki kobɛta miziki mingi, bayaki na ye na Gibea mpo abɛtɛlaka mokonzi miziki. Miziki ya Davidi ezalaki mpenza kobɔndisa Saulo mpe Saulo “alingaki ye mingi.”—1 Samwele 16:11, 13, 21, 23.
5. Mpo na nini Saulo akómaki koyina Davidi, mpe Davidi amonaki malamu asala nini?
5 Nsima ya mikolo, ekómaki komonana polele ete Yehova azali na Davidi. Asalisaki Davidi alonga Goliata, engambe Mofilistia, mpe azalaki na ye ntango bakómaki kokumisa ye na Yisalaele mpo na bitumba oyo azalaki kolonga. Kasi, Saulo akómaki koyokela ye zuwa mpe koyina ye makasi. Mbala mibale mobimba, ntango Davidi azali kobɛtela ye miziki, Saulo abwakelaki ye likɔnga. Kasi, mbala nyonso mibale, Davidi akimaki mpe likɔnga ezwaki ye te. Ntango Saulo alukaki koboma ye mpo na mbala ya misato, Davidi amonaki ete asengeli kokima mpo na kobikisa bomoi na ye. Na nsima, lokola Saulo alɛmbaki te kolandalanda ye, Davidi amonaki malamu atika mokili ya Yisalaele.—1 Samwele 18:11; 19:9, 10.
6. Mpo na nini Saulo abomisaki bato ya Nobo?
6 Ntango Davidi azalaki kokende mpo na kobima na Yisalaele, atɛlɛmaki na engumba Nobo, esika tabenakle ya Yehova ezalaki. Na ntembe te, Davidi azalaki kokima elongo na bilenge mibali mosusu, mpe atɛlɛmaki wana mpo ye ná bilenge yango bázwa mwa eloko ya kolya mpe komɛla. Saulo ayokaki ete nganga-nzambe monene apesaki Davidi ná bato na ye bilei mpe mopanga ya Goliata oyo Davidi azwaki ntango abomaki ye. Na nkanda wana, Saulo abomisaki bato nyonso ya engumba yango, ná banganga-nzambe 85.—1 Samwele 21:1, 2; 22:12, 13, 18, 19; Matai 12:3, 4.
Davidi abiki lisusu na liwa
7. Mpo na nini Gata ezalaki esika malamu te ya komibomba mpo na Davidi?
7 Ntango Davidi alongwaki na Nobo, akimaki na mokili ya Bafilistia, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 40, mpe alukaki komibomba epai ya Akisi, mokonzi ya Gata, engumba ya Goliata. Ntango mosusu Davidi akanisaki ete Saulo akoki kozwa likanisi ya kokende koluka ye na Gata te. Kasi mosika te, bato ya mokonzi ya Gata bayebaki Davidi. Ntango Davidi amonaki ete bayebi ye, “abangaki mingi mpo na Akisi, mokonzi ya Gata.”—1 Samwele 21:10-12.
8. (a) Nzembo 56 eyebisi biso ete Davidi akutanaki na likambo nini na Gata? (b) Ndenge nini Davidi abikaki na liwa?
8 Bafilistia bakangaki Davidi. Ekoki kozala na ntango wana nde Davidi asalaki nzembo oyo abondelaki Yehova na kati na yango ete: ‘Tyá mpisoli na ngai kati na molangi na yo.’ (Nzembo 56:8, ná maloba oyo ezali na likoló ya nzembo yango) Na nsima, amonisaki elikya na ye ete Yehova akobosana mpasi na ye te, kasi na bolingo nyonso, akosunga mpe akobatela ye. Davidi asalelaki mpe mayele mpo na kokosa mokonzi ya Bafilistia. Amikómisaki lokola moto ya ligboma. Ntango Mokonzi Akisi amonaki ye, agangelaki bato na ye na ndenge bayelaki ye moto ya “ligboma.” Emonani mpenza ete Yehova asalaki ete mayele ya Davidi elonga. Babimisaki Davidi na engumba wana, mpe bongo abikaki lisusu na liwa.—1 Samwele 21:13-15.
9, 10. Ntina nini Davidi akomaki Nzembo 34, mpe ekoki kozala ete azalaki kokanisa banani ntango akomaki yango?
9 Biblia eyebisi te soki bato ya Davidi bakimaki elongo na ye na Gata to batikalaki kokɛngɛla ye na bamboka ya Yisalaele pene na Gata. Ezala bongo to te, ekoki kozala ete ntango bakutanaki, Davidi abɛtelaki bango lisolo ndenge Yehova abikisaki ye lisusu mpe basepelaki makasi. Ndenge maloba oyo ezali na likoló ya Nzembo 34 emonisi yango, likambo wana nde etindaki ye akoma nzembo yango. Na bavɛrsɛ nsambo ya liboso ya nzembo yango, Davidi azali kosanzola Nzambe mpo na ndenge abikisaki ye mpe azali kosɛnga bato na ye básanzola elongo na ye Yehova, Mobikisi monene ya basaleli na Ye.—Nzembo 34:3, 4, 7.
10 Davidi ná bato na ye bamibombaki na lidusu moko na engumba Adulama, mokili moko ya ngomba-ngomba na Yisalaele, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 15 na ɛsti ya Gata. Bayisalaele oyo bazalaki kosepela na boyangeli ya Saulo te babandaki kolanda Davidi kuna. (1 Samwele 22:1, 2) Na ntembe te, ntango Davidi akomaki Nzembo 34:8-22, azalaki kokanisa bato wana. Malako oyo ezali na bavɛrsɛ wana ezali mpe na ntina mpo na biso lelo oyo, mpe na ntembe te soki totaleli nzembo yango na mozindo, tokozwa matomba mingi.
Olukaka libosoliboso lokumu ya Yehova lokola Davidi?
11, 12. Wapi bantina oyo tozali na yango ya kosanzolaka Yehova ntango nyonso?
11 “Nakokumisa [Yehova] ntango nyonso, lisanzoli na ye ekozala na monɔkɔ na ngai libela.” (Nzembo 34:1) Na ntembe te, lokola Davidi akómaki koyengayenga, akómaki kokelela mingi. Kasi, ndenge maloba wana emonisi yango, kokelela epekisaki ye te kosanzola Yehova. Ezali ndakisa malamu mpenza mpo na biso na ntango ya mpasi! Ezala na eteyelo, na mosala, na kati ya bandeko na biso baklisto to na mosala ya kosakola, mposa na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya kosanzola Yehova. Kanisá naino ebele ya bantina oyo tozali na yango ya kosanzola ye! Na ndakisa, tokosilisa te koyeba misala ya Yehova nyonso ya kokamwa mpe kosepela na yango. Kanisá mpe nyonso oyo asali na nzela ya ebongiseli na ye awa na mabelé! Atako bato ya sembo oyo Yehova azali kosalela bazali bato ya kozanga kokoka, Yehova azali kosalela bango na ndenge ya kokamwa na mikolo na biso. Misala ya bato oyo mokili ekumisaka ekoki kopusana ata moke te pene na oyo ya Nzambe. Na ntembe te ondimi likanisi ya Davidi, oyo akomaki ete: “E Nkolo, kati na banzambe, mosusu azali [lokola, NW] yo te; mpe mosala mosusu ekokani na misala na yo te.”—Nzembo 86:8.
12 Lokola Davidi, tozalaka na mposa ya kosanzola Yehova ntango nyonso mpo na misala na ye ya minene. Lisusu, tozali na esengo ya koyeba ete Bokonzi ya Nzambe ezali sikoyo na mabɔkɔ ya Yesu, mokitani ya Davidi ya libela. (Emoniseli 11:15) Yango emonisi ete nsuka ya mokili oyo ekómi pene mpe bomoi ya bato koleka miliare motoba ekómi na likama. Lelo oyo, koleka bileko mosusu nyonso, ezali mpenza ntango ya koyebisa bato makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo na bato mosika te mpe kosalisa bango básanzola Yehova elongo na biso. Yango wana lokola ntango ezali naino, mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya kosalela mabaku nyonso mpo na kolendisa basusu bándima “nsango malamu oyo ya Bokonzi.”—Matai 24:14.
13. (a) Davidi atutaki ntolo mpo na nani, mpe yango ebendaki bato ya ndenge nini? (b) Ndenge nini bato ya komikitisa bazali koya na lisangá ya boklisto lelo oyo?
13 “Molimo na ngai ekosepela kati na [Yehova], bato ya bopɔlɔ bakoyoka yango mpe bakosepela.” (Nzembo 34:2) Awa, Davidi amikumisaki te mpo na misala na ye. Na ndakisa, atutaki ntolo te na ndenge akosaki mokonzi ya Gata. Ayebaki ete Yehova azalaki kobatela ye ntango azalaki na Gata mpe ye nde abikisaki ye. (Masese 21:1) Na yango, Davidi atutaki ntolo mpo na ye moko te, kasi nde mpo na Yehova. Yango etindaki bato ya komikitisa báya epai na Yehova. Yesu mpe azalaki ntango nyonso kokumisa nkombo ya Yehova, mpe yango etindaki bato ya komikitisa, oyo bandimaka koteyama, báya epai na ye. Lelo oyo, bato ya komikitisa ya bikólo nyonso bazali koya na lisangá ya mokili mobimba ya baklisto bapakolami, oyo ezali kotambwisama na Yesu. (Bakolose 1:18) Mitema ya bato yango esimbamaka ntango bayokaka basaleli ya Nzambe bazali kokumisa nkombo na ye, ntango bayokaka nsango ya Biblia mpe elimo santu ya Nzambe esalisaka bango bákanga ntina na yango.—Yoane 6:44; Misala 16:14.
Makita elendisaka kondima na biso
14. (a) Davidi azalaki kosanzola Yehova kaka ye moko? (b) Ndakisa nini Yesu atiká mpo na mayangani ya losambo?
14 “[Bókumisa Yehova] esika moko na ngai; tókumisa nkombo na ye elongo.” (Nzembo 34:3) Davidi azalaki kosanzola Yehova kaka ye moko te. Azalaki mpe kosɛnga baninga na ye básanzola Nzambe elongo na ye. Ndenge moko, Yesu Klisto, Davidi monene, azalaki kosepela kosanzola Yehova liboso ya bato, na ndakisa na sinagoga, na bafɛti oyo ezalaki kosalema na tempelo ya Nzambe na Yelusaleme mpe elongo na bayekoli na ye. (Luka 2:49; 4:16-19; 10:21; Yoane 18:20) Ezali mpenza likambo ya esengo kolanda ndakisa ya Yesu mpo na kosanzola Yehova na mabaku nyonso elongo na bandeko na biso baklisto, mingimingi sikoyo, lokola tozali “komona mokolo yango ezali kokóma pene.”—Baebele 10:24, 25.
15. (a) Bomoi ya Davidi etindaki bato na ye básala nini? (b) Litomba nini tozwaka na makita na biso?
15 “Nalukaki [Yehova] mpe ye ayambaki ngai; abikisaki ngai na nsɔmɔ na ngai nyonso.” (Nzembo 34:4) Likambo wana ezalaki na ntina mingi mpo na Davidi. Yango wana alobaki boye: “Mobola oyo abelelaki mpe [Yehova] ayokaki, abikisaki ye na mpasi na ye nyonso.” (Nzembo 34:6) Soki tozali koyangana elongo na baklisto mosusu, tokozwa mabaku mingi ya kobɛtɛla bango masolo ya kolendisa, oyo emonisi ndenge Yehova asalisaki biso tóyikela mikakatano mpiko. Yango elendisaka kondima na bango, ndenge kaka maloba ya Davidi ezalaki kolendisa kondima ya bato na ye. Mpo na Davidi, baninga na ye ‘batalaki epai ya [Yehova] mpe bazwaki esengo; bilongi na bango ezipamaki na nsɔni te.’ (Nzembo 34:5) Atako bazalaki kokimakima Mokonzi Saulo, bayokaki nsɔni te. Bazalaki na kondima ete Nzambe azali na Davidi, mpe bilongi na bango ezalaki kongɛnga na esengo. Ndenge moko mpe, ezala bato ya sika to baoyo baumeli na kati ya lisangá, batalelaka Yehova mpo asalisa bango. Ntango bazali komona lisalisi ya Yehova, bilongi na bango engɛngaka na esengo, mpe yango emonisaka ekateli na bango ya kokangama kaka na ye.
Tózala na botɔndi mpo na lisalisi ya baanzelu
16. Ndenge nini Yehova azali kobatela biso na nzela ya baanzelu na ye?
16 “Anzelu ya [Yehova] akozingela esika ya baoyo [babangaka, NW] ye; mpe akobikisa bango.” (Nzembo 34:7) Davidi akanisaki ata moke te ete Yehova azalaki kosunga kaka ye moko. Ya solo, Davidi azalaki mopakolami ya Yehova, oyo asengelaki kokóma mokonzi ya Yisalaele; kasi ayebaki ete Yehova atindaka baanzelu na ye mpo na kobatela basambeli na ye nyonso ya sembo, bázala bato minene to bato mpamba. Na mikolo na biso mpe, Yehova azali kobatela basambeli ya solo. Na Allemagne ya ntango ya Banazi, na Angola, na Malawi, na Mozambique mpe na bikólo mosusu mingi, bakonzi basalaki nyonso mpo na kolimwisa Batatoli ya Yehova, kasi balongaki te. Basaleli ya Yehova na bikólo wana bazali se kobakisama mpe kosanzola nkombo na ye elongo. Mpo na nini? Mpo Yehova azali kobatela mpe kotambwisa basaleli na ye na nzela ya baanzelu na ye.—Baebele 1:14.
17. Ndenge nini baanzelu ya Nzambe basalisaka biso?
17 Lisusu, baanzelu ya Yehova bakoki kosala ete moto nyonso oyo azali kobɛtisa basusu libaku abimisama na lisangá ya Yehova. (Matai 13:41; 18:6, 10) Ata soki na ntango wana biso toyebi yango te, baanzelu balongolaka makambo oyo ekoki kopekisa biso tósalela Nzambe, mpe babatelaka biso na makambo oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. Likambo eleki ntina, batambwisaka biso na mosala ya kosakola “nsango malamu ya seko” epai ya bato nyonso, ata na bisika oyo basakoli bazali kokutana na mikakatano ya makasi. (Emoniseli 14:6) Totángaka mbala na mbala na mikanda ya Batatoli ya Yehova masolo oyo ezali komonisa ete baanzelu basalisaka biso.a Tokoki te koloba ete ezali kaka ndenge makambo ekokanaka, mpamba te bandakisa yango ezali ebele.
18. (a) Tosengeli kosala nini soki tolingi baanzelu básalisaka biso? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo elandi?
18 Soki tolingi baanzelu bákoba kotambwisa mpe kobatela biso, tosengeli kotika te kokumisa nkombo ya Yehova ata na kati ya botɛmɛli. Tóbosana te, anzelu ya Nzambe azingelaka kaka “esika ya [baoyo babangaka Yehova, NW].” Elingi koloba nini? Kobanga Nzambe elimboli nini, mpe ndenge nini tokoki kolona ezaleli yango? Mpo na nini Nzambe ya bolingo alingi tóbangaka ye? Tokotalela mituna wana na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá na buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, lokasa 550; Annuaire des Témoins de Jéhovah 2005, nkasa 53-54; Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 1 Marsi 2000, nkasa 5-6; 1 Yanuali 1991, lokasa 27; mpe 15 Febwali 1991, lokasa 26.
Okopesa eyano nini?
• Mikakatano nini Davidi akutanaki na yango na bolenge na ye?
• Lokola Davidi, mposa na biso ya libobosoliboso ezali nini?
• Ndenge nini totalelaka makita ya boklisto?
• Ndenge nini Yehova asalisaka biso na nzela ya baanzelu na ye?
[Karte na lokasa 21]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Lama
Gata
Sikelage
Gibea
Nobo
Yelusaleme
Beteleme
Adulama
Keila
Hebeloni
Zifi
Holese
Kalemele
Maono
En-gedi
Mbu ya mungwa-na-mungwa
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Karte: Euti na bakarte ya Pictorial Archive (Near Eastern History) Est. Mpe Survey of Israel
Ata ntango azalaki kokimakima, Davidi akumisaki nkombo ya Yehova
[Elilingi na lokasa 21]
Ata ntango azalaki kokimakima, Davidi akumisaki nkombo ya Yehova
[Elilingi na lokasa 23]
Kondima na biso elendisamaka ntango tozali koyoka masolo ya kolendisa oyo bandeko babɛtaka na makita ya boklisto