Yehova ‘asikolaki’ na ntango ya kala
“Ee Nzambe, yaká noki epai na ngai; yo mosungi na ngai mpe mosikoli na ngai.”—NZ. 70:5.
1, 2. (a) Ntango nini basambeli ya Nzambe babondelaka ye mpo asalisa bango? (b) Yango ebimisi motuna nini, mpe epai wapi tokoki kozwa eyano?
NTANGO baboti ya elenge mwasi moko ya mbula 23 oyo abalaki bazalaki na konje, bayokaki ete mwana yango alimwe kaka boye. Emonanaki lokola babomi ye. Bakangaki mbala moko biloko na bango mpe bazongaki epai na bango, mpe nzelanzela bazalaki kobondela Yehova mpo asalisa bango. Minganga bayebisi Motatoli moko ya mbula 20 ete azali na maladi moko oyo ekoboma ye nzoto mobimba. Mbala moko abondeli Yehova. Mama moko oyo abɔkɔlaka mwana na ye ya mwasi ya mbula 12 kaka ye moko azali kobunda mpo na kozwa mosala mpe azali na mbongo mingi te mpo na kosomba bilei mpo na ye moko mpe mpo na mwana na ye. Abondeli Yehova na motema mobimba. Ya solo, ntango basambeli ya Yehova bakutanaka na mikakatano, bakakatanaka te kobondela Yehova mpo asalisa bango. Osilá kobondela Yehova asalisa yo ntango omonaki ete ozali na bosɛnga makasi?
2 Motuna moko ya ntina mpenza yango oyo: Tokoki mpenza kozala na elikya ete Yehova akosalisa biso soki tobondeli ye? Eyano ya kolendisa mpenza ezwami na Nzembo 70. Nzembo yango ekomamaki na Davidi, mosambeli ya Yehova ya sembo oyo akutanaki na komekama mpe mitungisi mingi na bomoi na ye. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, mokomi wana ya nzembo ayebisaki Yehova boye: “Ee Nzambe, . . . yo mosungi na ngai mpe mosikoli na ngai.” (Nz. 70:5) Kotalela Nzembo 70 ekoki kosalisa biso tómona mpe ntina oyo tokoki kobondela Yehova ntango tokómi na mpasi mpe kotya mpenza motema ete ‘akosikola’ biso.
Ozali “Mosikoli na ngai”
3. (a) Nzembo 70 ezali na maloba nini oyo emonisi ete Davidi azalaki mpenza na mposa Nzambe asunga ye? (b) Elikya nini Davidi amonisi na Nzembo 70?
3 Nzembo 70 ezali libondeli oyo ebandi mpe esuki na maloba oyo emonisi ete Davidi azalaki mpenza na mposa Nzambe asunga ye. (Tángá Nzembo 70:1-5.) Davidi abondelaki Yehova ‘aya noki’ mpo na kosikola ye. Na vɛrsɛ ya mibale tii ya minei, Davidi asali malɔmbɔ mitano. Malɔmbɔ misato ya liboso ezali mpo na baoyo bazalaki koluka koboma ye. Davidi asɛngaki Yehova azongisa banguna yango nsima mpe ayokisa bango nsɔni mpo na mabe na bango. Malɔmbɔ mibale oyo ezali na vɛrsɛ 4 ezali mpo na basaleli ya Nzambe. Davidi abondeli ete baoyo bazali koluka Yehova bázala na esengo mpe bákumisa ye. Mpo na kosukisa nzembo na ye, Davidi ayebisi Yehova ete: “Yo mosungi na ngai mpe mosikoli na ngai.” Simbá ete Davidi alobi te ete, “Tiká ete ozala,” lokola nde azali kosala lilɔmbɔ mosusu. Alobaki nde, “Yo mosungi na ngai,” mpo na komonisa elikya oyo azalaki na yango. Davidi andimaki ete Nzambe akosalisa ye.
4, 5. Nzembo 70 eteyi biso nini na ntina na Davidi, mpe elikya nini tokoki kozala na yango?
4 Nzembo 70 emonisi nini na ntina na Davidi? Ntango banguna na ye balingaki koboma ye, Davidi amonaki malamu asilisa likambo yango ye moko te. Kasi, azalaki na elikya ete Yehova akokata likambo ya banguna yango na ntango mpe na ndenge oyo ye moko amoni malamu. (1 Sam. 26:10) Davidi akobaki kondima ete Yehova asalisaka mpe asikolaka baoyo balukaka ye. (Ebe. 11:6) Davidi azalaki kondima ete basambeli ya solo bazali na ntina ya kosepela mpe kokumisa Yehova, wana bazali koyebisa basusu bonene na ye.—Nz. 5:11; 35:27.
5 Lokola Davidi, biso mpe tokoki kozala mpenza na elikya ete Yehova azali Mosungi mpe ‘Mosikoli na biso.’ Na yango, soki tokómi na mpasi to tozali mpenza na mposa ya lisungi, tosengeli kobondela Yehova mpo aya nokinoki kosalisa biso. (Nz. 71:12) Kasi, ndenge nini Yehova akoki koyanola biso soki tosɛngi ye lisalisi? Liboso tólobela ndenge Yehova akoki kosalisa biso, tótalela ndenge misato oyo asikolaki Davidi ntango azalaki mpenza na mposa ya lisalisi.
Abikisamaki na mabɔkɔ ya banguna
6. Nini esalisaki Davidi ayeba ete Yehova abikisaka basembwi?
6 Na lisalisi ya mikanda ya Biblia oyo esilaki kokomama na ntango wana, Davidi ayebaki ete basembwi bakoki kotya motema ete Yehova akosunga bango. Ntango Yehova abomaki mokili ya mabe na Mpela, abatelaki Noa ná libota na ye mpo bazalaki kobanga ye. (Gen. 7:23) Ntango Nzambe anɔkisaki mɔtɔ mpe sufulu likoló ya bato ya Sodomo mpe Gomola, abikisaki mosembwi Lota ná bana na ye mibale ya basi. (Gen. 19:12-26) Ntango Yehova abomaki Falo, moto ya lolendo, ná basoda na ye na Mbu Motane, abatelaki basaleli na ye. (Ex. 14:19-28) Yango wana, tokoki kokamwa te ete na nzembo mosusu Davidi akumisaki Yehova ete azali “Nzambe ya kobikisa.”—Nz. 68:20.
7-9. (a) Mpo na nini Davidi azalaki kondima ete Nzambe azali na nguya ya kobikisa? (b) Ntango Davidi abikisamaki, azongisaki lokumu epai ya nani?
7 Makambo oyo ekómelaki Davidi esalisaki ye andima mpenza ete Yehova azali na likoki ya kobikisa bato. Davidi amonaki ete “mabɔkɔ ya seko” ya Yehova ekoki kosikola basaleli na Ye. (Det. 33:27) Mbala ebele, Yehova abikisaki Davidi na mabɔkɔ ya ‘bayini na ye.’ (Nz. 18:17-19, 48) Tózwa ndakisa.
8 Ntango basi ya Yisalaele babandaki kokumisa Davidi mpo na bitumba oyo azalaki kolonga, Mokonzi Saulo akómaki koyokela ye zuwa makasi, mpe mbala mibale mobimba alukaki koboma Davidi na likonga. (1 Sam. 18:6-9) Mbala nyonso wana, Davidi akimaki likonga. Davidi akimaki likonga wana kaka mpo ayebaki kobunda? Te. Biblia elobi ete “[Yehova] azalaki na ye elongo.” (Tángá 1 Samwele 18:11-14.) Na nsima, ntango mayele mabe oyo Saulo asalelaki mpo Bafilistia báboma Davidi esimbaki te, “Saulo amonaki mpe ayebaki ete [Yehova] azali na Davidi elongo.”—1 Sam. 18:17-28.
9 Davidi ayebaki ete moto moko abikisaki ye. Moto yango ezalaki nani? Maloba oyo ezali likoló ya Nzembo 18 elobi ete Davidi “alobaki na [Yehova] na maloba ya loyembo oyo na mokolo wana [Yehova] abikisaki ye . . . na lobɔkɔ ya Saulo.” Davidi amonisaki esengo na ye na loyembo na maloba oyo: “[Yehova] azali libanga na ngai mpe esika makasi na ngai mpe mobikisi na ngai, Nzambe na ngai, libanga na ngai oyo nakokima epai na ye.” (Nz. 18:2) Koyeba ete Yehova akoki kosikola basaleli na ye elendisi kondima na biso, boye te?—Nz. 35:10.
Asungamaki na mbeto ya maladi
10, 11. Nini esalisi biso tóyeba ntango oyo Davidi abɛlaki maladi oyo Nzembo 41 elobeli?
10 Mokonzi Davidi abɛlaki makasi, ndenge Nzembo 41 emonisi yango. Lokola akangamaki na mbeto mpo azalaki kobɛla makasi, banguna na ye mosusu bakanisaki ete “akotɛlɛma lisusu te.” (Vɛrsɛ 7, 8) Ntango nini Davidi abɛlaki makasi ndenge wana? Emonani lokola makambo oyo nzembo yango elobeli eyokani na ntango ya mpasi mpenza oyo Davidi alekisaki, ntango mwana na ye Abesaloma alukaki kobɔtɔla ye bokonzi.—2 Sam. 15:6, 13, 14.
11 Na ndakisa, Davidi alobi ete moninga na ye moko ya motema, oyo azalaki kolya na ye saani moko, atɛki ye. (Vɛrsɛ 9) Yango etindi biso tókanisa lisusu likambo moko oyo ekómelaki Davidi. Ntango Abesaloma atombokelaki Davidi, Ahitofele, mopesi-toli ya Davidi oyo azalaki kotyela motema, abalukelaki ye mpe akɔtaki na botomboki ya Abesaloma. (2 Sam. 15:31; 16:15) Kanisá naino: mokonzi alali na maladi mpe azali ata na makasi ya kotɛlɛma te, kasi ayebi mpe ete azingami na bato oyo bazali koluka liwa na ye, mpo na kokokisa mokano na bango ya mabe.—Vɛrsɛ 5.
12, 13. (a) Kondima nini Davidi amonisaki? (b) Tokanisi ete Nzambe alendisaki Davidi ndenge nini?
12 Davidi atikaki kotyela ‘mosungi na ye’ motema te. Na ntina na mosambeli ya Yehova ya sembo oyo azali kobɛla, Davidi alobaki ete: “[Yehova] akobikisa ye na mokolo mabe. [Yehova] akolendisa ye na mbeto na ye ya maladi; kati na maladi na ye, okobikisa ye na mpasi na ye nyonso.” (Nz. 41:1, 3) Awa lisusu, Davidi amonisi kondima na ye na maloba “[Yehova] akolendisa.” Davidi andimaki mpenza ete Yehova akobikisa ye. Ndenge nini?
13 Davidi azalaki na mposa te ete Yehova asala likamwisi mpo na kobikisa ye na maladi yango. Kasi, andimaki mpenza ete Yehova ‘akolendisa ye,’ elingi koloba akopesa ye makasi na mbeto na ye ya maladi. Davidi azalaki mpenza na mposa ya lisalisi wana. Longola maladi oyo elɛmbisaki ye, Davidi azingamaki mpe na banguna oyo bazalaki koloba makambo mabe mpo na ye. (Vɛrsɛ 5, 6) Ekoki kozala ete Yehova asalisaki Davidi akanisa makambo oyo ekolendisa ye. Davidi alobaki boye: “Yo osimbi ngai mpo na boyengebene na ngai.” (Vɛrsɛ 12) Ekoki mpe kozala ete Davidi azwaki makasi ntango akanisaki ete Yehova azalaki kaka kotalela ye lokola mosembwi atako maladi elɛmbisaki ye mpe banguna na ye bazalaki koloba mabe mpo na ye. Nsukansuka, Davidi abikaki. Tobɔndisami mpenza lokola toyebi ete Yehova alendisaka baoyo bazali kobɛla.—2 Kol. 1:3.
Yehova aleisaki ye
14, 15. Ntango nini Davidi ná bato na ye bakómaki na mposa ya lisungi, mpe bazwaki lisungi yango ndenge nini?
14 Ntango akómaki mokonzi na Yisalaele, Davidi azalaki kolya mpe komɛla malamu, mpe azalaki ata kobenga bato mosusu báya kolya na ye. (2 Sam. 9:10) Kasi, ezalaki mpe na ntango oyo Davidi akelelaki. Ntango mwana na ye Abesaloma atombokelaki ye mpe alukaki kobɔtɔla ye bokonzi, Davidi ná bato na ye balongwaki na Yelusaleme. Bakimaki na Gileadi, na ɛsti ya Ebale Yolodani. (2 Sam. 17:22, 24) Lokola akómaki kokimakima banguna na ye, mosika te Davidi ná bato na ye bakómaki kokelela mpe kozanga ata esika ya kopema. Kasi, na mosika wana oyo bazalaki, epai wapi bakokaki kozwa bilei?
15 Nsukansuka, Davidi ná bato na ye bakómaki na engumba Mahanaimi. Kuna, bakutanaki na mibali misato ya mpiko: Sobi, Makili mpe Balasilai. Mibali yango bandimaki kotya bomoi na bango na likama mpo na kosunga Davidi, mokonzi oyo Nzambe atyaki, mpo bayebaki ete soki Abesaloma azwi bokonzi, akopesa moto nyonso oyo asungaki Davidi etumbu makasi. Lokola bayebaki mpasi ya Davidi ná bato na ye, bato wana misato ya sembo bayelaki bango bambeto, ble, orje, madesu, mafuta ya nzoi, manteka, bamɛmɛ mpe biloko mosusu. (Tángá 2 Samwele 17:27-29.) Na ntembe te, mibali misato wana basimbaki mpenza motema ya Davidi na ndenge bakangamaki kaka na ye mpe bayambaki bango malamu. Ndenge nini Davidi akokaki kobosana bolamu oyo basalelaki ye?
16. Nani mpenza asungaki Davidi ná bato na ye?
16 Kasi, nani mpenza asungaki Davidi ná bato na ye? Davidi andimaki ete Yehova asungaka bato na ye. Yehova akoki kosalela basaleli na ye mosusu mpo na kosunga moninga na bango oyo azali na bosɛnga. Na ntembe te, ntango Davidi akanisaki makambo oyo elekaki na mokili ya Gileadi, amonaki ete motema malamu oyo mibali misato wana bamoniselaki ye ezalaki elembo ya bolingo ya Yehova mpo na ye. Pene na nsuka ya bomoi na ye, Davidi akomaki ete: “Nazalaki elenge mpe nakómi mobange, nde naino namoni moyengebene te oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka kwanga.” (Nz. 37:25) Tosengeli mpenza kobɔndisama lokola toyebi ete lobɔkɔ ya Yehova ekoki kokóma mokuse te.—Mas. 10:3.
‘Yehova ayebi kosikola bato’
17. Likambo nini Yehova amonisaka mbala na mbala?
17 Davidi azali kaka moko ya ebele ya basambeli oyo Yehova asikolaki na ntango ya kala. Banda na ntango ya Davidi, Nzambe amonisi mbala na mbala bosolo ya maloba ya Petelo oyo: “Yehova ayebi kosikola uta na komekama bato ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (2 Pet. 2:9) Tózwa ndakisa mosusu mibale.
18. Ndenge nini Yehova asikolaki bato na ye na ntango ya Hizikiya?
18 Ntango basoda ya Asulia oyo, bazalaki bilombe, babɔtɔlaki bamboka ya Yuda na ekeke ya mwambe L.T.B. mpe balingaki kokɔta na Yelusaleme, Mokonzi Hizikiya abondelaki boye: “Ee [Yehova], Nzambe na biso, nabɔndeli yo ete obikisa biso . . . ete makonzi nyonso ya mokili báyeba ete yo ozali [Yehova], bobele yo moko.” (Yis. 37:20) Hizikiya amitungisaki libosoliboso mpo na nkombo mpe lokumu ya Nzambe. Yehova ayokaki libondeli na ye. Na butu moko kaka, anzelu moko abomaki Baasulia 185 000, mpe asikolaki basaleli ya Yehova ya sembo.—Yis. 37:32, 36.
19. Baklisto ya ekeke ya liboso babikaki mpo batosaki toli nini?
19 Mwa moke liboso akufa, Yesu apesaki esakweli moko mpo na kokebisa bayekoli na ye oyo bazalaki na Yudea. (Tángá Luka 21:20-22.) Bambula elekaki, kasi na mobu 66 T.B., Bayuda batombokaki, mpe basoda ya Loma bayaki na Yelusaleme. Basoda oyo Cestius Gallus azalaki kokamba babandaki kotɔbɔla efelo ya tempelo mokemoke; kasi na mbala moko batikaki mpe bakendaki. Lokola bamonaki yango lokola libaku mpo na kokima libebi oyo Yesu asakolaki, baklisto ya sembo bakimaki na bangomba. Na mobu 70 T.B., basoda ya Loma bazongaki lisusu. Kasi, na mbala wana bazongaki lisusu nsima te, mpe babebisaki Yelusaleme nyɛɛ. Baklisto oyo bayokaki toli ya Yesu babikaki ntango Yelusaleme ebebisamaki.—Luka 19:41-44.
20. Mpo na nini tosengeli kotalela Yehova lokola ‘mosikoli na biso’?
20 Koyeba ete Yehova abikisaka basaleli na ye esengeli mpenza kolendisa biso. Oyo asalaki mpo na basaleli na ye na ntango ya kala elendisi kondima na biso epai na ye. Ezala tozali kobunda na mikakatano nini sikoyo to tokokutana na yango nsima, biso mpe tokoki kotya motema ete Yehova ‘akosikola biso.’ Kasi, ndenge nini Yehova akoki kosikola biso? Ezali boni mpo na bato oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo? Esukaki ndenge nini mpo na bango? Tokozwa biyano na lisolo oyo elandi.
Ozali koyeba lisusu?
• Nzembo 70 epesi biso elikya nini?
• Ndenge nini Yehova alendisaki Davidi ntango abɛlaki?
• Bandakisa nini emonisi ete Yehova akoki kosikola basaleli na ye na mabɔkɔ ya banguna?
[Elilingi na lokasa 6]
Yehova ayokaki libondeli ya Hizikiya