Bangá Yehova mpe sepelá na bomoi
“Bino basantu na ye, bóbanga Yehova. Zambi baoyo babangaka ye bakozanga eloko te.”—NZEMBO 34:9, NW.
1, 2. (a) Wapi balolenge ekeseni oyo mangomba ya boklisto etalelaka kobanga Nzambe? (b) Mituna nini tokotalela sikoyo?
MBALA mingi, bateyi ya mangomba oyo bateyaka bato bábanga Nzambe, basalelaka liteya ya lokuta oyo elobi ete Nzambe abwakaka bato na lifelo ya mɔtɔ epai banyokwamaka libela na libela. Liteya yango eyokani te na oyo Biblia eteyaka mpo na Yehova, ete azali Nzambe ya bolingo mpe ya boyengebene. (Genese 3:19; Deteronome 32:4; Baloma 6:23; 1 Yoane 4:8) Bateyi mosusu kutu balobelaka likambo ya kobanga Nzambe ata moke te. Bateyaka ete Nzambe akipaka makambo te mpe andimaka moto nyonso, ata soki azali na bomoi ya ndenge nini. Biblia eteyaka mpe bongo te.—Bagalatia 5:19-21.
2 Biblia ezali kolendisa biso tóbanga Nzambe. (Emoniseli 14:7) Yango ezali kobimisa mituna oyo: Mpo na nini Nzambe ya bolingo alingi tóbangaka ye? Kobanga ya ndenge nini Nzambe azali kosɛnga biso? Kobanga Nzambe ekomemela biso matomba nini? Tokotalela mituna wana ntango tozali kokoba kotalela Nzembo 34.
Ntina ya kobanga Nzambe
3. (a) Ndenge nini otalelaka mobeko ya kobanga Nzambe? (b) Mpo na nini bato oyo babangaka Yehova bazali bato ya esengo?
3 Lokola Yehova azali Mozalisi mpe Mokonzi ya molɔ́ngɔ́, ebongi mpenza tóbangaka ye. (1 Petelo 2:17) Kasi, kobanga yango ezali te kolɛnga na nsɔmɔ, lokola nde tozali liboso ya nzambe moko ya motema mabe. Ezali nde komemya Yehova mpo na bonene na ye. Elimboli mpe kobanga kosala makambo oyo ekosepelisa ye te. Kobanga Nzambe etombolaka moto, kasi elɛngisaka na nsɔmɔ te. Yehova, “Nzambe ya esengo,” alingaka bato oyo ye akelá bázala na esengo. (1 Timote 1:11) Kasi, mpo na kozala na esengo, tosengeli kokokisa masɛngami ya Nzambe. Mpo na bato mingi, yango esɛngaka bábongola bomoi na bango. Bato nyonso oyo babongolaka bomoi na bango bamonaka bosolo ya maloba ya Davidi oyo: “Meká mpe sosolá ete Yehova azali malamu; esengo na moto oyo akokima epai na ye. Bino basantu na ye, bóbanga Yehova. Zambi baoyo babangaka ye bakozanga eloko te.” (Nzembo 34:8, 9, NW) Lokola Bato nyonso oyo babangaka Yehova bazali na boyokani malamu na Ye, bazangaka eloko moko te oyo motuya na yango ekosila te.
4. Elikya nini Davidi ná Yesu bapesaki?
4 Tóbosana te ete Davidi abengaki bato na ye “basantu” mpo na kopesa bango limemya ndenge liloba yango ezalaki kosalelama na ntango wana. Bazalaki bato ya ekólo mosantu ya Nzambe. Batyaki mpe bomoi na bango na likama mpo na kolanda Davidi. Atako bazalaki kokimakima Mokonzi Saulo, Davidi azalaki na elikya mpenza ete Yehova akokoba kokokisa bamposa na bango. Akomaki boye: “Bana ya nkɔsi bakozangaka mpe bakoyokaka nzala, kasi baoyo bakolukaka [Yehova] bakozanga eloko malamu soki moko te.” (Nzembo 34:10) Yesu apesaki mpe bayekoli na ye elikya ya ndenge wana.—Matai 6:33.
5. (a) Bayuda mingi oyo bakómaki bayekoli ya Yesu bazalaki bato ya ndenge nini? (b) Toli nini Yesu apesaki na likambo ya kobanga?
5 Bayuda mingi oyo bayokaki Yesu bazalaki bato mpamba. Yango wana, Yesu “ayokelaki bango mawa, mpo batikamaki mpamba mpe bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli.” (Matai 9:36) Ndenge nini bakokaki kozwa mpiko ya kolanda Yesu? Mpo bálanda ye, basengelaki kobanga Yehova, kasi bato te. Yesu alobaki boye: “Bóbanga te baoyo babomaka nzoto mpe na nsima na yango bakoki kosala eloko mosusu te. Kasi nakomonisa bino nani bosengeli kobanga: Bóbanga moto oyo nsima ya koboma azali na bokonzi ya kobwaka na Gehena. Ɛɛ, nazali koyebisa bino, bóbanga Moto wana. Bakɛngɛli-mboka mitano etɛkamaka na mbongo mibale ya bibende ya motuya moke, boye te? Nzokande Nzambe abosanaka ata moko na yango te. Kasi ata nsuki ya mitó na bino etángami yango nyonso. Bóbanga te; bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.”—Luka 12:4-7.
6. (a) Maloba nini ya Yesu elendisaka baklisto? (b) Mpo na nini Yesu azali ndakisa oyo eleki malamu ya kobanga Nzambe?
6 Soki banguna bapekisi bango kosalela Nzambe, bato oyo babangaka Yehova babosanaka te toli ya Yesu oyo: “Moto nyonso oyo ayambolaka bomoko na ye elongo na ngai liboso ya bato, Mwana ya moto mpe akoyambola bomoko na ye elongo na ye liboso ya baanzelu ya Nzambe. Kasi moto oyo azali kowangana ngai liboso ya bato akowanganama liboso ya baanzelu ya Nzambe.” (Luka 12:8, 9) Maloba wana elendisaka mpenza baklisto, mingimingi na bisika oyo losambo ya solo epekisami. Bakobaka na ekɛngɛ nyonso kosanzola Yehova na makita ya lisangá mpe na mosala ya kosakola. (Misala 5:29) Yesu apesaki ndakisa oyo eleki malamu na likambo ya “kobanga Nzambe.” (Baebele 5:7) Biblia esakolaki mpo na ye ete: “Elimo ya Yehova ekofanda likoló na ye, elimo ya . . . kobanga Yehova; mpe kobanga Yehova ekozala esengo na ye.” (Yisaya 11:2, 3, NW) Na yango, ebongi mpenza Yesu ayebisa biso matomba oyo tokoki kozwa soki tobangi Nzambe.
7. (a) Na ndenge nini baklisto bandimaka libyangi oyo ekokani na oyo Davidi asalaki? (b) Ndenge nini baboti bakoki kolanda ndakisa malamu ya Davidi?
7 Yango wana, bato nyonso oyo balandaka ndakisa ya Yesu mpe batosaka mateya na ye, bandimaka libyangi oyo ekokani na oyo Davidi asalaki: “Yaká bino bana, yokamelá ngai, nakoteya bino nsɔmɔ ya [Yehova].” (Nzembo 34:11) Ebongaki mpenza Davidi abenga bato na ye “bana,” mpamba te bazalaki kotalela ye lokola mokambi na bango. Davidi azalaki kolendisa bato na ye na elimo mpo bázala na bomoko mpe Nzambe asepela bango. Ezali ndakisa malamu mpenza mpo na baboti baklisto! Yehova apesá bango bokonzi likoló ya bana na bango, mpo bákoba “kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Soki baboti bazali kolobela makambo ya elimo mokolo na mokolo elongo na bana na bango mpe koyekola na bango Biblia mbala na mbala, bakosalisa bango báyeba kobanga Yehova mpe básepela na bomoi.—Deteronome 6:6, 7.
Ndenge ya komonisa ete tobangaka Nzambe
8, 9. (a) Mpo na nini kobanga Nzambe ezali bomoi ya esengo? (b) Kobatela lolemo na biso elimboli nini?
8 Ndenge tolobaki liboso, kobanga Yehova ezangisaka biso esengo te. Davidi atunaki boye: “Moto nani alingi bomoi mpe komona mikolo mingi ete azwa malamu?” (Nzembo 34:12) Emonani mpenza ete kobanga Nzambe ezali sɛkɛlɛ ya kozala na bomoi molai mpe ya esengo. Kasi, atako ezali mpasi te koloba ete, “Nabangaka Nzambe,” komonisa yango na bomoi na biso ezali pɛtɛɛ te. Yango wana, Davidi alimbolaki ndenge oyo tokoki komonisa ete tobangaka Nzambe.
9 “Pekisá lolemo na yo na mabe mpe bibɛbu na yo ete biloba lokuta te.” (Nzembo 34:13) Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Petelo azongelaki maloba wana ya Nzembo 34 nsima ya kopesa baklisto toli ete bálinganaka lokola bandeko. (1 Petelo 3:8-12) Kobatela lolemu na biso na mabe elimboli koboya matongi. Tolukaka nde ntango nyonso kolendisa basusu ntango tozali kosolola na bango. Lisusu, tosengeli kozalaka na mpiko mpe kolobaka solo.—Baefese 4:25, 29, 31; Yakobo 5:16.
10. (a) Kokima mabe elimboli nini? (b) Kosala malamu elimboli nini?
10 “Longwá na mabe mpe salá malamu; luká mpe kimya, ɛɛ [landá, NW] yango.” (Nzembo 34:14) Tokimaka makambo oyo Nzambe aboyaka lokola pite mpe ekobo, bafɔtɔ mpe bafilme ya bato bazali bolumbu, moyibi, bikelakela, mobulu, kolangwa masanga mpe bangi. Toboyaka mpe kominanola na makambo yango. (Baefese 5:10-12) Tolekisaka ntango na biso nde na makambo ya malamu. Likambo eleki malamu oyo tokoki kosala ezali komipesa mingi na kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli, mpo na kosalisa basusu bázwa lobiko. (Matai 24:14; 28:19, 20) Kosala malamu elimboli mpe kobongisaka makita ya boklisto mpe koyangana, kopesa makabo mpo na mosala na biso oyo ezali kosalema na mokili mobimba, kobatela mpe kobongisa Ndako na biso ya Bokonzi mpe komibanzabanza mpo na baklisto oyo bazali na bosɛnga.
11. (a) Ndenge nini Davidi ye moko asalelaki toli oyo apesaki basusu ya koluka kimya? (b) Ndenge nini okoki ‘kolanda kimya’ na kati ya lisangá?
11 Davidi apesaki ndakisa malamu mpenza ya koluka kimya. Mbala mibale mobimba, azwaki libaku ya koboma Saulo. Na mbala nyonso mibale, aboyaki kosopa makila mpe na nsima asololaki na mokonzi na limemya mpenza, na elikya ete bakoyokana. (1 Samwele 24:8-11; 26:17-20) Tokoki kosala nini lelo oyo soki likambo moko elingi kolongola kimya na lisangá? Tosengeli ‘koluka kimya mpe kolanda yango.’ Na yango, soki tomoni ete matata ezali kati na biso ná ndeko moko, tolandaka toli ya Yesu oyo: “Liboso yokaná yo ná ndeko na yo.” Wana nde tokozwa nzela ya kosala makambo mosusu ya losambo.—Matai 5:23, 24; Baefese 4:26.
Kobanga Nzambe ezali na mapamboli ebele
12, 13. (a) Matomba nini bato oyo babangaka Nzambe bazali kozwa lelo? (b) Mbano nini monene basambeli ya sembo bakozwa mosika te?
12 “Miso ya [Yehova] ekotalaka bato ya boyengebene mpe matoi na ye ekoyokaka koganga na bango.” (Nzembo 34:15) Lisolo ya makambo oyo Yehova asalelaki Davidi ezali komonisa bosolo ya maloba wana. Lelo oyo, tozali na esengo mpe kimya ya solosolo mpo toyebi ete miso ya Yehova ezali likoló na biso. Tozali na elikya ete akotika te kokokisa bamposa na biso, ata ntango mpasi elekeli biso. Toyebi ete mosika te Gogo ya Magogo akobundisa basambeli ya solo nyonso ndenge Biblia esakolaki yango, mpe ‘mokolo ya nsɔmɔ’ ya Yehova ekoya. (Yoele 2:11, 31; Ezekiele 38:14-18, 21-23) Na ntango wana, ata soki tokutani na likambo nini, tokomona mpenza bosolo ya maloba ya Davidi oyo: “Ekoganga bayengebeni, [Yehova] akoyoka mpe akobikisa bango na mpasi na bango nyonso.”—Nzembo 34:17.
13 Ekozala mpenza esengo komona ndenge Yehova akosantisa nkombo na ye monene na ntango wana! Tokotonda na limemya mpo na Yehova na ndenge oyo esalemá naino te, mpe batɛmɛli nyonso bakobebisama na ndenge moko ya nsɔni. “Elongi ya [Yehova] ekangami makasi mpo na bato ya masumu ete asilisa nkombo na bango na mokili.” (Nzembo 34:16) Lobiko monene wana oyo tokozwa na mokili ya sika ya Nzambe oyo ekotonda na boyengebene ekozala lipamboli moko monene!
Bilaka oyo esalisaka biso tóyika mpiko
14. Nini ekosalisa biso tóyikela mikakatano mpiko?
14 Liboso ntango yango ekoka, tosengeli kozala na mpiko mpo na kokoba kotosa Yehova na mokili oyo ya mabe. Kobanga Nzambe ekosalisa biso tótosa ye. Na ntango ya mpasi oyo tozali na yango, basaleli mosusu ya Yehova bazali kokutana na mikakatano ya makasi mpenza, oyo ezali kopesa bango mpasi mpe kolɛmbisa bango. Kasi, basengeli kondima mpenza ete soki bataleli Yehova, akosalisa bango báyika mpiko. Maloba ya Davidi ekoki mpenza kobɔndisa: “[Yehova] azali penepene na bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na milimo minyetami.” (Nzembo 34:18) Na elikya mpenza, Davidi alobaki boye: “Moyengebeni azali na makambo mingi ya mpasi nde [Yehova] akobikisa ye kati na yango nyonso.” (Nzembo 34:19) Ata soki tokutani na mikakatano mingi ndenge nini, Yehova azali na makasi ya kobikisa biso na yango nyonso.
15, 16. (a) Nsango nini ya mawa Davidi ayokaki mwa moke nsima ya kosala Nzembo 34? (b) Nini ekosalisa biso tóyikela mikakatano mpiko?
15 Mwa moke nsima ya kosala Nzembo 34, Davidi ayokaki nsango ya mpasi oyo ekómelaki bato ya Nobo, ntango Saulo abomaki mingi kati na bango mpe ebele ya banganga-nzambe. Ayokaki mpasi mingi ntango amikundolaki ete Saulo atombokaki mpo ye akendeki na Nobo. (1 Samwele 22:13, 18-21) Na ntembe te, Davidi abondelaki Yehova mpo asalisa ye, mpe tokoki koloba ete elikya ya lisekwa ya “bayengebeni” ebɔndisaki ye.—Misala 24:15.
16 Lelo mpe, elikya ya lisekwa ezali kolendisa biso. Toyebi ete ata soki banguna na biso basali biso mabe nini, ekotikala libela na libela te. (Matai 10:28) Davidi amonisaki elikya yango na maloba oyo: “Akobatela mikuwa [ya moyengebene] nyonso, ata moko na yango ekobukana te.” (Nzembo 34:20) Maloba ya vɛrsɛ wana ekokisamaki mpenza epai na Yesu. Atako babomaki Yesu na ndenge ya nsɔmɔ, mokuwa na ye ata moko te ‘ebukanaki.’ (Yoane 19:36) Kasi, vɛrsɛ yango ezali kopesa biso elikya ete ezala minyoko nini baklisto bapakolami ná baninga na bango “bampate mosusu” bakoki kokutana na yango, ekomemela bango mpasi ya libela te. Na elobeli ya elilingi, mikuwa na bango ekobukana soki moke te.—Yoane 10:16.
17. Likama nini ezali kozela banguna ya basaleli ya Nzambe oyo balingi kobongola motema te?
17 Mpo na bato mabe, ezali mpenza ndenge mosusu. Mosika te, bakobuka mbuma ya mabe na bango. “Yauli ekoboma moto mabe, oyo akoyina moyengebene akokitisama.” (Nzembo 34:21) Bato nyonso oyo bazali kokoba kotɛmɛla basaleli ya Nzambe bazali komitya na likama moko monene. Ntango Yesu Klisto akomimonisa, “bakozwa etumbu ya lisambisi ya libebi ya seko.”—2 Batesaloniki 1:9.
18. Na ndenge nini “ebele ya bato” basili kosikolama, mpe matomba nini bakozwa na mikolo ezali koya?
18 Loyembo ya Davidi esuki na maloba ya kobɔndisa oyo: “[Yehova] akosikola milimo ya baombo na ye, baoyo bakokima epai na ye bakozwa soki likambo moko te.” (Nzembo 34:22) Pene na nsuka ya boyangeli na ye ya mbula ntuku minei, Mokonzi Davidi alobaki boye: “[Nzambe] abikisi molimo na ngai kati na makambo nyonso ya mpasi.” (1 Mikonzi 1:29) Lokola Davidi, mosika te bato oyo babangaka Yehova bakobanda kokanisa mpe kosepela ndenge masumu na bango nyonso ekolimbisama mpe bakosikolama na bampasi na bango nyonso. Baklisto bapakolami mingi basili kozwa mbano na bango na likoló. Lelo oyo, “ebele ya bato” ya bikólo nyonso bazali kosangana na bandeko ya Yesu oyo bazali naino awa na mabelé na mosala ya Nzambe, mpe yango ezali kopesa bango lisosoli ya pɛto liboso ya Yehova. Bazali kosala yango mpo bandimi ete makila oyo Yesu asopaki ezali na nguya ya kosikola bango. Na boyangeli ya mbula nkóto ya Klisto oyo ezali koya, bakozwa matomba nyonso ya mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola biso mpe bakokóma bato ya kokoka.—Emoniseli 7: 9, 14, 17; 21:3-5.
19. “Ebele ya bato” bazwi ekateli ya kosala nini?
19 Mpo na nini “ebele ya bato” oyo bazali kosambela Nzambe bakozwa mapamboli nyonso wana? Mpo bazwi ekateli ya kokoba kobanga Yehova mpe kosalela ye na limemya nyonso mpe na botosi. Ya solo, kobanga Yehova ezali komemela biso esengo sikoyo, mpe ezali kosalisa biso ‘tósimba makasi bomoi ya solosolo,’ elingi koloba bomoi ya seko na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.—1 Timote 6:12, 18, 19; Emoniseli 15:3, 4.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini tosengeli kobanga Nzambe, mpe kobanga ye elimboli nini?
• Tokozala na etamboli ya ndenge nini soki tozali kobanga Nzambe?
• Kobanga Nzambe ezali na matomba nini?
• Bilaka nini epesaka biso mpiko?
[Elilingi na lokasa 26]
Bato oyo babangaka Yehova basalaka na bokɛngi nyonso ntango mosala na bango epekisami
[Elilingi na lokasa 28]
Likambo eleki malamu oyo tokoki kosalela bazalani na biso ezali koteya bango nsango malamu ya Bokonzi