Tika ete mabɔkɔ na seko na Jéhovah mázala lisungi na biso
“Nzambe na seko azali efandelo na yo, mpe mabɔkɔ na libela mazali na nsé na yo.”—DETERONOME 33:27.
1, 2. Mpo na nini basaleli na Jéhovah bakoki kolikya na lisungi na ye?
JÉHOVAH azali komibanzabanza mpo na libota na ye. Na yango, ntango nyonso,oyo Bayisraele banyokwamaki, yango ezalaki mpasi mpo na ye.” Kati na bolingo na ye mpe na mawa na ye, atombólaki bango mpe akumbaki bango.” (Yisaya 63:7-9) Soki tozali bongo sembo epai na Nzambe, tokoki kolikya kozwa lisungi na ye.
2 Mosakoli Moïse alobaki ete: “Nzambe na seko azali na efandelo na yo mpe mabɔkɔ na libela mazali na nsé na yo. ”(Deteronome 33:27) Libongoli mosusu liyeisi mokapo yango ete: “Nzambe na kalakala azali ebómbamelo na yo, mpe mabɔkɔ na libela mazali na nsé na yo.” (Traduction du monde nouveau) Kasi lolenge nini mabɔkɔ na Nzambe mazali kosunga basaleli na ye?
Mpo na nini mimekamo mingi boye?
3. Ntango nini bato na botósi bakozwa mpenza “bonsomi un nkembo ya bana na Nzambe?”
3 Mosala na biso mpo na Jéhovah mobateli biso te na mimekamo oyo bato banso bazangi kokoka bazali kokutana na yango. Yobo, mosaleli na Nzambe alobaki ete: “Moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi. ”(Yobo 14:1) Na ntina na motuya ya mbula na biso,” mokomi na nzembo akomaki ete: “Lofundo na yango ezali bobele mpasi mpe bolozi.” (Nzembo 90:10) Bomoi ekozala bobele bongo kino ‘biloko na kozalisa binso bikosikwama na boombo ya libebi mpo na kozwa bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe.’ (Baloma 8:19-22) Ezali yango nde ekosalema na nsé na Boyangeli na Klisto. Bato na Bokonzi bakosikolama na lisumu mpe na liwa na nzela na mbeka ya lisiko na Yesu. Na nsuka ya mbula nkɔto, bato na botósi bakokóma kino na ezalela ya kokoka na lisalisi ya Klisto mpe banganga bakonzi oyo basangani na ye. Bato oyo bakozala sembo epai na Nzambe na momekamo ya nsuka oyo mokobimisama na Satana mpe bilimu mabe na ye, nkombo na bango ekokomama libela kati na “mokanda ya bomoi.” (Emoniseli 20:12-15) Na bongo, bakozwa bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe.
4. Tosengeli kosala nini na esika ete tomilelalela mpo na makambo oyo mazali koyela biso na bomoi?
4 Awa ezali biso kozela, totya motema epai na Jéhovah na esika na komilelalela mpo na makambo oyo tozali kokutana na yango na bomoi. (1 Samwele 12:22; Yuda 16) Tozala mpe na botɔndi epai na Nganga na biso Monene, Yesu, oyo na nzela na ye nde tokoki kobɛlɛma na Nzambe “ete tozwa mawa na ye mpe tomona ngolu na ye, mpo na kozwa lisungi na ntango na bosengá ” (Baebele 4:14-16) Tozala te lokola Adam, oyo afundaki Jéhovah na libungá nyonso ete, apesaki ye mwasi mabe. Na yango, alobaki ete: “Mwasi oyo yo opesaki ete azala na ngai, apesi ngai mbuma na nzeté yango. Ngai mpe nalei.” (Genese 3:12) Nzambe akopesaka biso biloko malamu, mpe akomekaka moto te. (Matai 5:45; Yakobo 1:17) Mpasi na biso euti mbala mingi mpo na kozanga mayele na biso to na mabungá ya bato mosusu. Ekoki mpe kouta na ezalela na biso ya bato na masumu to na mokili oyo tofandi na yango, oyo elali na nsé na nguya ya Satana. (Masese 19:3; 1 Yoane 5:19) Nzokande mabɔkɔ na seko na Jéhovah mazali ntango nyonso kosunga basaleli na ye ya sembo, baoyo bazali kotya motema epai na ye kati na mabondeli, mpe bazali kosalela batoli oyo ezali kati na liloba na ye.—Nzembo 37:5; 119:105.
Lisungi na ntango na maladi
5. Elendiseli nini tokoki kozwa na Nzembo 41:1-3 wana ezali biso na maladi?
5 Ekómaka mbala mosusu ete mingi kati na biso bazwa maladi. Nzokande Davidi alobaki ete: “Esengo na ye oyo akobanzaka babólá! Jéhovah akobikisa ye na mokolo na mpasi. Jéhovah ye moko akobatela ye mpe akotika ye na bomoi. Akopambola ye na mokili mpe okokaba ye epai na banguna na ye te. Jéhovah ye moko akosunga ye na mbeto na mpasi; kati na maladi na ye, okosalisa ye.”—Nzembo 41:1-3, MN.
6, 7. Lolenge nini Nzambe asungaki Davidi na ntango azalaki un maladi, mpe yango ekoki kolendisa basaleli na Jéhovah kati na likambo nini?
6 Ye oyo akomibanzabanza mpo na babólá, asalisaka bango. “Mokolo na mpasi” ezali mbala mosusu eleko ya bomoi oyo moto yango azali na mikakatano makasi to akutani na momekamo ya ntango molai oyo mozali kolɛmbisa ye. Azali na elikya ete Nzambe akobatela ye na boumeli ya maladi, mpe bazalani na ye “bakopambola ye na mokili” na komonisáká motema mawa na Nzambe epai na ye. Ezali mbala mosusu na eleko oyo Abisalome, mwana na Davidi, alukaki kobɔtɔla bokonzi na Yisraele nde Nzambe asungaki Davidi “na mbeto na mpasi.”—2 Samwele 15:1-6.
7 Davidi amonisaki bolingo epai na babólá; mpo na yango azalaki kokanisa ete Nzambe akosunga ye na ntango azalaki na mbeto na ye, kati na maladi mpe kozanga libateli. (Nzembo 18:24-26) Atako azwaki mpasi makasi, azalaki na elikya ete Nzambe ‘akosalisa ye,’ na kosilisáká maladi na ye na ekamwiseli te, kasi na kokembisáká ye na makanisi ya kolendisa. Ezalaki lokola nde Nzambe abikisi ye na maladi. Bobele bongo lelo, ntango basaleli na ye babɛli maladi, Jéhovah akosungaka bango na mabɔkɔ na ye na seko.
Libɔndisi mpo na baoyo banyokwami na makanisi
8. Lolenge nini moklisto oyo abɛli maladi azali komonisa ete atii motema na ye epai na Nzambe?
8 Maladi ekoki kobimisa konyokwama na makanisi. Moklisto moko oyo azali na maladi makasi, azali mbala mosusu na makasi mingi te mpo na kotanga Alobi ete: “Nazali na motindo na makanisi nyonso oyo ezali kotungisa ngai, nazali komiyoka na bolɛmbu mingi, mpe mbala mosusu nalelaka.” Koyebáká ete Satana alingi kokweisa ye na kolɛmbisa motema na ye, azali kosala makasi na elikya ete Jéhovah akosalisa ye ete akwea te. (Yakobo 4:7) Mobali wana azali elendiseli mpo na baninga na ye, mpamba te bayebi ete ye azali kotya motema epai na Nzambe. (Nzembo 29:11) Ata na ntango oyo azali na lopitalo, azali kobenga bamaladi na telefone mpe bato mosusu mpo na kolendisa bango. Ye moko azali komilendisa na koyokáká bakasete ya Mélodies du Royaume mpe oyo ya La Tour de Garde mpe ya Réveillez-vous!, mpe na kozaláká esika moko na baninga na ye baklisto. Ndeko yango alobaki ete: “Nakobondelaka Jéhovah mbala na mbala ete apesa ngai makasi, litambwisi, elendiseli mpe lisalisi oyo nazali na yango mposa mpo na koyika mpiko.” Soki ozali na maladi makasi, landa kotya motema epai na Jéhovah mpe tika ete mabɔkɔ na ye na seko mazala lisungi na yo.
9. Bandakisa nini emonisi ete bato oyo bazali kobanga Nzambe bakoki konyokwama na makanisi?
9 Konyokwama na makanisi ebandi lelo te. Wana amekamaki Yobo alobaki lokola moto oyo azalaki na mayoki ete atikami na Nzambe. (Yobo 29:2-5) Nehemia aokaki mawa mpo na kobebisama na Yelusaleme mpe bifelo na yango; Petelo anyokwamaki mpenza na makanisi na ntango awanganaki Klisto mpe alelaki mingi. (Nehemia 2:1-8; Luka 22:62) Epafolodite anyokwamaki na makanisi mpo ete baklisto ya Filipi bazwaki nsango ete ye azalaki maladi. (Bafilipi 2:25, 26) Baklisto ya Tesaloniki mpe banyokwamaki na makanisi Mpamba te Paulo apesi toli na basangani ya lisangá ya engumba wana ete “babɔndisa milimo minyokwami.’’ (1 Batesaloniki 5:14, MN) Kasi lolenge nini Nzambe azali kosalisa bato wana?
10. Tokoki kosala nini mpo na komeka kobundisa maladi ya konyokwama na makanisi?
10 Soki konyokwama na makanisi eleki makasi, moto ye moko akoki kopona lolenge malamu asengeli kosalisama.a (Bagalatia 6:5) Kopema mpe kosala mosala na bokatikati ekoki kosalisa. Na esika na kokanisa mingi likoló na mitungisi na ye nyonso na mbala moko, ye oyo anyokwami na makanisi akoki komeka kosilisa yango moko na moko. Lisalisi na kolendisa liuti na bankulutu ya lisangá ekoki mpenza kozala malamu, mingimingi soki mokakatano ya kolongono na nzoto ezali na bopusi likoló na elimo na ye. (Yakobo 5:13-15) Oyo eleki mpenza, ezali ntina ete totya motema na biso epai na Jéhovah mpe ’tokitisa mitungisi na biso likoló na ye, mpamba te ye azali kobatela biso.’ Soki tozali kolendendela mingi kati na mabondeli, ’kimya ya Nzambe ekobatela mitema na biso mpe bikaniselo na biso kati na Klisto Yesu.’—1 Petelo 5:6-11; Bafilipi 4:6, 7.
Jéhovah azali kosalisa biso na koyika mpiko kati na mpasi
11-13. Eloko nini ekoki kokitisa mpasi oyo tookaka na ntango tokufeli moto oyo tolingi mingi?
11 Liwa ya moto oyo tolingi ye mingi ezali mpe kopesa mpasi. Abrahame aokaki mawa mingi mpo na liwa ya Sara, mwasi na ye. (Genese 23:2) Davidi aokaki mawa mpo na liwa ya mwana na ye Abisalome. (2 Samwele 18:33) Ata Yesu oyo azalaki moto ya kokoka, “atangisaki mpisoli” na liwa ya moninga na ye Lazare. (Yoane 11:35) Ee, tozalaka na mawa na liwa ya moto moko oyo tolingi. Kasi, eloko nini ekoki kokitisa mpasi na biso?
12 Nzambe akosalisaka basaleli na ye ete bayika mpiko na mpasi makasi mpo na liwa ya moto oyo balingi ye mingi. Tozali kotanga kati na Liloba na ye ete lisekwa likozala. Na yango, tooka mawa te “lokola baoyo bazangi elikya.” (1 Batesaloniki 4:13; Misala 24:15) Elimo na Jéhovah ezali kosalisa biso na kozwa lisusu kimya mpe kondima, mpe kokanisa likoló na elaká ezali kati na Liloba na ye mpo na mikolo kitoko oyo mizali koya, na motindo wana tokozala na mawa koleka te na kokanisáká ntango nyonso mpo na moto oyo tolingaki mingi nde asili kokufa. Libɔndisi likoutaka mpe na kotangáká Makomami mpe na kobondeláká “Nzambe ya kobɔndisa nyonso.”—2 Bakolinti 1:3, 4; Nzembo 68:4-6.
13 Elikya ya lisekwa ekoki kolendisa, lokola yango esalemaki epai na Yobo, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, ye oyo alobaki ete: “Ɛ [Jéhovah]! Soko okobómba ngai kati na esika na bakufi kino nkanda na yo ekosila, soko okotyela ngai elaká mpe okokanisa ngai. Soko moto akokufa, akobika nde lisusu? Nakozila kino mikolo nyonso na ntango ekoki na ngai, kino kolongwa na ngai ekoya. Okobénga ngai mpe ngai nakoyanola yo. Okozala na mposa mpo na mosala na mabɔkɔ na yo.” (Yobo 14:13-15) Na ntango moninga ya bolingo akei mobémbo’ tookaka mawa koleka te, mpamba te toyebi ete tokomonana lisusu elongo na ye. Mawa mingi oyo tozalaka na yango na liwa ya moto oyo tolingaki, ekoki kokita soki totaleli liwa ya moklisto wana na sembo lokola likambo oyo lizali mpo na ntango mokuse. Soki azali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé, akolamuka na mpongi na kufa awa na mabelé, na nsé na Boyangeli ya mbula nkɔto na Klisto. (Yoane 5:28, 29; Emoniseli 20:11-13) Mpe soki tozali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé, mbala mosusu tokozala wana mpo na koyamba ye na ntango akosekwa.
14. Lolenge nini basi baklisto mibale balóngaki mpasi ya liwa ya mibali na bango?
14 Mwasi moklisto moko, oyo autaki kokufela mobali, ayebaki ete mosala na ye mpo na Nzambe mosengelaki kokóba. Bakisa na likambo oyo ya “kozala ntango nyonso na mosala mingi kati na Nkolo,” atongaki molikani moko mosalemaki na biteni mike ya bilamba 800. (1 Bakolinti 15:58, MN) Alobi ete: “Nazali kooka motema mpasi te mpo na mosala oyo, mpamba te ntango nyonso oyo nazalaki kotonga yango [molikani], nazalaki koyoka ba Mélodies du Royaume mpe bakasete ya Biblia, makambo oyo mazalaki na makanisi na ngai.” Na esengo nyonso, azali komikundola mokolo oyo nkulutu moko aumeli na mosala wana, ayaki kotala ye elongo na mwasi ye. Nkulutu wana amonisaki ye kati na Biblia ete Nzambe azali komibanzabanza mpo na basi bakufeli mibali. (Yakobo 1:27) Mwasi moklisto mosusu aokaki mawa koleka te mpo na liwa ya mobali na ye. Asepelaki na lisungi ya baninga na ye mpe amipesaki mingi mpo na kosalisa bato mosusu. Alobi ete: “Nazali kobondela mbala mingi mpenza mpe nazali na boyokani malamu elongo na Jéhovah.” Oyo nde mapamboli na kotya motema na mabɔkɔ na seko na Nzambe!
Lisalisi na ntango tosali lisumu
15. Davidi alobi nini kati na Nzembo 19:7-13?
15 Atako bolingi mibeko ya Jéhovah, ekomelaka biso ete tosala masumu. Na ntembe te, yango epesaka mpasi, lokola epai na Davidi oyo mibeko, bokundoli, mitinda mpe malako na Nzambe elekaki wolo na kitoko. Alobaki ete: “Moombo na yo apesameli toli na yango, mbano monene ekomonana wana akotósa yango. Nani akososola mabungá na ye? Pɛtola ngai na mabungá na ngai mabómbami. Batela moombo na yo na misala na nkɔ; tika te ete mazala na bokonzi likoló na ngai; bongo nakozala sembo mpe nakokwea na mabe mingi te.” (Nzembo 19:7-13) Totalela maloba oyo malamu.
16. Mpo un nini tosengeli kokima ezaleli ya lolendo?
16 Misala na nko mizali mabe mingi koleka mabungá. Saulo abungisaki bokonzi mpo ete apesaki mbeka na nko nyonso mpe atikaki Agag, mokonzi Moamaleke mpe biloko kitoko, nzokande, Baamaleke basengelaki kobomama nyɛɛ na kolanda etinda na Nzambe. (1 Samwele 13:8-14; 15:8-19) Mokonzi Oziasi azwaki maladi ya mába mpo ete akokisaki na lolendo nyonso mokumba oyo mozalaki bobele mpo na banganga. (2 Ntango 26:16-21) Na ntango sanduku na kondimana ememamaki na Yelusaleme, ngombe oyo ezalaki kobenda likálo elingaki kokweisa sanduku; bongo Nzambe abomaki Uza mpo ete azangaki botósi mpe asimbaki sanduku yango ete ekwea te. (2 Samwele 6:6, 7) Na yango, soki toyebi te likambo oyo tosengeli kosala, to soki tozali kokakatana na ntina na lotómo ya kosala likambo, tosengeli bongo kozala na bopɔlɔ mpe kotuna baoyo bazali na bososoli. (Masese 11:2; 13:10) Mpe soki ekómelaki biso na kosala likambo moko na nkɔ, tosengeli kosɛnga na Nzambe ete alimbisa biso mpe asalisa biso ete tomibatela na lolendo.
17. Lolenge nini tokoki kotungisama un lisumu libómbami, mpe lolenge nini tokoki kolimbisama mpe kozwa lisusu kimya?
17 Masumu mabombami makoki mpe kopesa mpasi. Engebene makambo tozali kotanga na Nzembo 32:1-5 (MN), Davidi amekaki kobómba lisumu, kasi alobaki ete: “Wana nabómbaki mabe na ngai, nzoto na ngai ebebaki na kokimela mokolo mobimba. Mpo ete lobɔkɔ na yo ezalaki na bozito likoló na ngai na moi mpe butu. Mai na nzoto na ngai makauki lokola na moi makasi.” Davidi abebaki wana ezalaki ye komeka kobómba mikakatano na ye, mpe mpasi na ye elɛmbisaki ye lokola nzeté oyo mai na yango makauki na boumeli ya moi makasi. Mpo ayambolaki lisumu na ye te, amonanaki ete anyokwamaki na makanisi mpe na nzoto lokola, mpe abungisaki esengo na ye. Akokaki kolimbisa mpe kozwa lisusu kimya bobele soki ayambolaki lisumu na ye epai na Nzambe. Alobaki ete: “Esengo na ye oyo alimbisami na mabungá na ye ye oyo masumu na ye mazipami. . . . Nayambwelaki yo masumu na ngai, nabómbaki mabe na ngai na motema te. Nalobaki ete: ’Nakoyambola mabungá na ngai epai na Jéhovah.’ Mpe yo olimbisi mabe ya masumu na ngai. ”Lisalisi ya bolingo ya bakɛngɛli baklisto, ekoki kosunga mpo na kobikisa mosumuki moko kati na elimo.—Masese 28:13; Yakobo 5:13-20.
18. Nini emonisi ete lisumu likoki kotika bilembo bikoumelaka, kasi nini ekoki kozala liziba ya elendiseli na ntango wana?
18 Lisumu ekoki kotika bilembo ya seko. Ezali yango nde esalemaki epai na Davidi, oyo asalaki ekobo elongo na Bata—Seba, mpe abomisaki mobali na ye nde abalaki mwasi mokufeli mobali wana azalaki na zemi. (2 Samwele 11:1-27) Nzambe amonisaki motema mawa mpo na kondimana na Bokonzi, mpo ete Davidi abongolaki motema mpe mpo na motema mawa oyo ye amonisaki; atako bongo, Davidi azwaki ‘mpasi kati na libota na ye.’ (2 Samwele 12:1-12)Mwana oyo abotamaki na ekobo, akufaki. Amenona, mwana na Davidi abebisaki Tamala, ndeko na ye ya mwasi oyo abotamaki na mama mosusu; mpe Abisalome, oyo abotamaki mama moko na Tamala, apesaki etinda ete baboma Amenona. (2 Samwele 12:15-23; 13:1-33) Abisalome asangisaki nzoto elongo na basi oyo bazalaki makángo ya Davidi, kosambwisáká bongo tata na ye. Amekaki kobɔtɔla bokonzi na ye na makasi, kasi yango ememaki ye na liwa. (2 Samwele 15:1 kino 18:33) Lelo lisusu, lisumu likopesaka mpasi ya koumela. Na ndakisa, mosumuki moko oyo abimisamaki na lisangá akoki kobongola motema mpe kozonga na lisangá, kasi lokumu na ye ekoki mbala mosusu kozala na litɔnɔ na boumeli ya bambula mingi mpe akoki kooka mpasi euti na lisumu na ye. Na ntango wana, akolendisama mpo ete asili kozwa lilimbisi na Jéhovah mpe lisungi ya mabɔkɔ na ye ya seko.
Tobikisami na mpasi na biso
19. Lisalisi nini elimo na Nzambe ekoki komemela biso na ntango oyo tokutani na momekamo makasi?
19 Na ntango tokutani na momekamo makasi, tokoki mbala mosusu kozanga mayele mpe makasi masengeli mpo na kozwa ekateli mpe kokokisa yango. Na bongo, elimo na Nzambe “ekosungaka biso kati na bolɛmbu na biso. Mpo ete toyebi te kobondela na motindo mokoki. Nde elimo yango moko ekosɛngaka mpo na biso na maloba oyo moto ayebi koloba yango te. ” (Baloma 8:26) Soki Jéhovah abongoli ezalela ya likambo moko, tosengeli kotɔndo ye. Nzokande, lobɔkɔ na ye ekoki kobikisa biso na lolenge mosusu. Soki tokosɛnga ye mayele, akoki kolakisa biso, na nzela na elimo na ye, lolenge nini tosengeli kosala mpe kopesa biso makasi ya kosala yango. (Yakobo 1:5-8) Na lisalisi na ye, tokoki koyika mpiko na ntango oyo tozali “na mawa mpo na komekama ndenge na ndenge” mpe kolónga yango na kondima oyo esili komekama mpe elendisami.—1 Petelo 1:6-8.
20. Tokozwa nini soki nde tosali ete mabɔkɔ na seko na Jéhovah mázala lisungi na biso?
20 Totika kobondela te. Davidi alobaki ete: “Miso na ngai makotalaka ntango nyonso epai na Jéhovah, mpamba te ye akobimisa makolo na ngai kati na monyama. Bongwana epai na ngai mpe yokela ngai mawa, mpo ete nazali bobele ngai moko mpe nazali na mpasi. Mikakatano ya motema na ngai miyei mingi koleka; tala mpasi na ngai mpe kotungisama na ngai, limbisa masumu na ngai nyonso.” (Nzembo 25:15-18) Lokola Davidi, soki tokosala ete mabɔkɔ na seko na Jéhovah mázala lisungi na biso, tokobikisama, tokozwa ngolu mpe lilimbisi ya Jéhovah.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala masoló ya konyokwama na makanisi kati na banimero ya Réveillez-vous! ya 22 Octobre 1987, pages 2-16, mpe ya 8 Novembre 1987, pages 12-16.
Bozongeli
◻ Lisalisi nini Jéhovah azali kopesa epai na basaleli na ye baoyo bazali na maladi?
◻ Nini ekosalisa biso mpo na kolónga konyokwama na makanisi?
◻ Nini ekoki kokitika mpasi oyo euti na kokufela moto oyo tolingi mingi?
◻ Lolenge nini baoyo bazali kobómba masumu na bango bakoki kozwa lisusu kimya?
◻ Lisalisi nini basaleli na Jéhovah bazali kozwa na ntango oyo bakutani na momekamo makasi?
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Elikya ya lisekwa ekoki kolendisa biso, lokola esalemaki epai na Yobo, moto oyo azalaki kobanga Nzambe