Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina ya eteni ya mibale ya mokanda ya Nzembo
BISO basaleli ya Yehova, toyebaka ete tokokutana na komekama. Ntoma Paulo akomaki ete: “Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya boyokani elongo na Klisto Yesu bango mpe bakonyokwama.” (2 Timote 3:12) Nini ekosalisa biso tóyika mpiko na komekama mpe na minyoko, mpe tómonisa ete tozali sembo epai ya Nzambe?
Eteni ya mibale ya Mokanda ya Nzembo ekosalisa biso. Nzembo 42 tii 72 emonisi ete soki tolingi kolonga komekama, tosengeli kotyela Yehova motema mobimba mpe kotalela ye mpo abikisa biso. Oyo nde liteya kitoko mpo na biso! Lokola nsango nyonso na Biblia, oyo ya eteni ya mibale ya Nzembo mpe “ezali na bomoi mpe ezali na nguya” tii lelo oyo.—Baebele 4:12.
YEHOVA AZALI “EKIMELO MPE NGUYA” NA BISO
Molevi moko azali na boombo na mboka mosusu. Azali na mawa mpo akoki te kokende na ndako ya Yehova mpo na kosambela mpe azali komibɔndisa na maloba oyo: “Ɛ molimo na ngai, mpo na nini okweisami, mpo na nini opesameli mawa kati na ngai? Tyá elikya epai na Nzambe.” (Nzembo 42:5, 11; 43:5) Maloba ya vɛrsɛ yango, oyo ezongelami mbala na mbala, esangisi biteni misato ya Nzembo 42 mpe 43 na loyembo moko. Nzembo 44 ezali libondeli mpo na Yuda—ekólo oyo ezalaki na mpasi, mbala mosusu ntango Baasulia bakɔtelaki yango na bitumba na mikolo ya Yizikiya.
Nzembo 45, loyembo oyo ezali kolobela libala ya mokonzi, ezali esakweli ya Bokonzi ya Masiya. Banzembo misato oyo elandi ezali komonisa Yehova lokola “ekimelo mpe nguya,” “Mokonzi monene likoló ya mokili mobimba,” mpe “mobateli makasi.” (Nzembo 46:1; 47:2; 48:3) Nzembo 49 ezali komonisa na maloba kitoko mpenza ete moto “akolonga kosikola ndeko na ye te”! (Nzembo 49:7) Banzembo mwambe ya ebandeli na eteni ya mibale ya Mokanda ya Nzembo ezali ya bana ya Kola. Oyo ya libwa, elingi koloba Nzembo 50, ezali ya Asafa.
Biyano na mituna ya Biblia:
44:19—“Bisika ya nkoi” ezalaki nini? Mokomi ya nzembo azalaki mbala mosusu kolobela esika ya bitumba, epai bibembe ya bato ekómaki bilei ya bankɔi.
45:13, 14a—“Mwana mwasi ya mokonzi” oyo “bakomema epai ya mokonzi, NW” ezali nani? Ezali mwana mwasi ya “Mokonzi ya seko,” Yehova Nzambe. (Emoniseli 15:3) Mwana mwasi yango ezali lisangá ya baklisto 144 000, oyo Yehova apakolá na elimo santu mpe akómisá bango bana na ye. (Baloma 8:16) Bakomema “mwana mwasi” wana ya Yehova, oyo ‘abongisami lokola mwasi ya libala,’ epai ya mobali na ye, Mokonzi Masiya.—Emoniseli 21:2.
45:14b, 15—“Bangɔndɔ, NW” ezali banani? Ezali “ebele ya bato,” basambeli ya solo oyo basangani na batikali bapakolami mpe bazali kosalisa bango. Lokola bakobika na “bolɔzi monene,” bakozala na mabelé ntango libala ya Mokonzi Masiya ekosalema na likoló. (Emoniseli 7:9, 13, 14) Na ntango wana, bakotonda na “esengo mpe na kosepela.”
45:16, NW—Na ndenge nini bankɔkɔ ya mokonzi bakokóma bana na ye? Ntango Yesu abotamaki awa na mabelé, azalaki na bankɔkɔ. Bakokóma bana na ye ntango akosekwisa bango na boumeli ya Mbula Nkóto ya boyengeli na ye. Bana yango mosusu bakozala na kati ya “bankumu na mokili mobimba.”
50:2, Bible na lingala ya lelo oyo—Mpo na nini Yelusaleme ebengami “mboka ya kitoko penza”? Ezali te mpo na kitoko ya mboka yango. Ezali nde mpo Yehova azalaki kosalela yango mpe apesaki yango lokumu na ndenge atyaki tempelo mpe mboka mokonzi wana.
Mateya mpo na biso:
42:1-3. Lokola ngandi ya bisika ezangi mai ezalaka na mposa ya mai makasi, Molevi yango azalaki mpe na mposa makasi ya Yehova. Lokola azalaki na mawa makasi mpo akokaki te kosambela Yehova na tempelo na ye, ‘mpisoli na ye ekómaki bilei na ye butu na moi,’ mpe azalaki lisusu na mposa ya kolya te. Biso mpe tosengeli kosepelaka na ndenge tozali kosambela Yehova elongo na bandeko na biso.
42:4, 5, 11; 43:3-5. Soki likambo moko esali ete tókabwana na lisangá ya boklisto mpo na mwa ntango, bantango ya esengo oyo tolekisaki na baninga baklisto ekoki kosunga biso. Na ebandeli tokoki koyoka mpasi makasi lokola tokómi kaka biso moko, kasi ekoki mpe kosalisa biso tómikundola ete Nzambe azali ebombamelo na biso mpe tózala na elikya ete akosunga biso.
46:1-3. Ezala mpasi nini tokutani na yango, tosengeli kotya motema mobimba ete “Nzambe azali ekimelo mpe nguya na biso.”
50:16-19. Moto nyonso oyo akosaka mpe asalaka makambo ya mabe abongi te komema nkombo ya Nzambe.
50:20. Na esika ya kolobela mingi mabunga ya basusu, tosengeli kobosana yango.—Bakolose 3:13.
“MOLIMO NA NGAI EKOZALA NA KIMYA EPAI NA NZAMBE”
Eteni oyo ebandi na libondeli oyo Davidi asalaki nsima ya lisumu na ye ná Bata-seba. Nzembo 52 tii 57 emonisi ete Yehova akosikola baoyo bazali kokitisela ye mikumba na bango mpe bazali kozela ete abikisa bango. Ndenge Nzembo 58 tii 64 emonisi yango, Davidi akómisaki Yehova ekimelo na ye na ntango azalaki kotungisama. Ayembaki ete: “Molimo na ngai ekozala na kimya bobele epai ya Nzambe; mpo ete elikya na ngai ezali epai na ye.”—Nzembo 62:5.
Kozala baninga ya Mosikoli na biso ekotinda biso ‘tóyemba mpo na lokumu ya nkombo na ye.’ (Nzembo 66:2) Nzembo 65 ekumisi Yehova lokola Mokabi monene, Nzembo 67 mpe 68 elobi ete azali Nzambe ya kobikisa, mpe Nzembo 70 mpe 71 elobi ete azali esika ya komibomba.
Biyano na mituna ya Biblia:
51:12—“Elimo ya kondimana” oyo Davidi asɛngaki ete básunga ye na yango ezalaki ya nani? Ezali te ete azalaki kosɛnga Nzambe asalisa ye to apesa ye elimo santu na ye. Kasi azalaki nde kolobela elimo na ye moko, elingi koloba makanisi ya motema na ye. Asɛngaki Nzambe apesa ye mposa ya kosala oyo ezali malamu.
53:1—Ndenge nini moto oyo alobaka ete Nzambe azali te azali “elema”? Bolema oyo balobeli awa ezali te kozanga mayele. Ezali nde kolobela moto oyo azali na bizaleli mabe oyo Nzembo 53:1-4 elobeli.
58:3-5—Na ndenge nini bato mabe bazali lokola nyoka? Lokuta oyo babukelaka basusu ezali lokola ngɛngɛ ya nyoka. Bato yango mpe babebisaka lokumu ya basusu ndenge kaka ngɛngɛ ya nyoka ebebisaka nzoto. Moto mabe ayokaka toli to andimaka disipilini te “lokola nyoka ekangi matoi.”—Liloba lya Nzambe.
58:7—Ndenge nini bato mabe “bakolimwa lokola mai oyo ekolekaleka”? Ekoki kozala ete Davidi azalaki kokanisa mai ya mabwaku mosusu na Mokili ya Ndaka. Atako mbula makasi etondisaka mai na mabwaku yango, mai yango ekaukaka noki mpe elimwaka. Davidi azalaki kobondela ete bato mabe bálimwa nokinoki.
68:13—Ndenge nini mapapu ya ebenga ezipamaki na palata, mpe nsala na ye ezalaki kongɛnga lokola wolo? Bibenga mosusu ya langi ya bule mpe mosaka ezalaka na nsala mosusu ya ngɛlingɛli. Nsala na yango engɛngaka lokola ebende soki moi ebɛti yango. Ekoki kozala ete Davidi akokanisaki basoda ya Yisalaele oyo balongi etumba na ebenga motindo wana: bazalaki makasi lokola ebenga oyo ezali kopumbwa mpe bazalaki kongɛnga. Mpo na bato mosusu oyo balimbolaka Biblia, ekoki mpe kozala ete azalaki kolobela liyemi moko kitoko mpe ya motuya mingi oyo bapunzi na etumba. Ezala ndenge nini, Davidi alobelaki ndenge Yehova asalisaki basaleli na ye bálonga banguna na bango.
68:18, NW—Banani bazalaki “makabo na motindo ya mibali”? Ezali mibali oyo bazwamaki na kati ya baoyo bakangaki na bitumba oyo bazalaki kobunda mpo na kobɔtɔla Mokili ya Ndaka. Na nsima, bapesaki mibali yango mokumba ya kosalisa Balevi.—Ezela 8:20.
68:30—Libondeli oyo Davidi asalaki ete Nzambe ‘apamela nyama oyo efandaka kati na matiti ya ebale’ elimboli nini? Davidi akokanisaki banguna ya basaleli ya Yehova na banyama mabe mpe asɛngaki ye apamela bango, to apekisa bango kosala mabe.
69:23, NW—Maloba ‘lɛmbisá loketo ya banguna’ elimboli nini? Loketo ezali na ntina mingi mpo na kosala misala ya makasi, na ndakisa kotombola mpe komema biloko ya kilo. Kolɛmba loketo elimboli kobungisa makasi. Davidi abondelaki ete banguna na ye bábungisa makasi na bango.
Mateya mpo na biso:
51:1-4, 17. Kosala lisumu elimboli te kokabwana libela na Yehova Nzambe. Soki tobongoli motema, tokoki kolikya ete akoyokela biso mawa.
51:5, 7-10. Soki tosali lisumu, tokoki kobondela Yehova alimbisa biso mpo tobotamá bato ya masumu. Tosengeli mpe kobondela ye apɛtola biso, abongisa biso, asalisa biso tólongola mposa ya kosala masumu na motema na biso, mpe alendisa elimo na biso.
51:18. Masumu ya Davidi elingaki kobebisa bolamu ya ekólo mobimba. Na yango, abondelaki ete Nzambe amonisela Siona motema boboto. Soki tosali lisumu monene, mbala mingi efingisaka nkombo ya Yehova mpe lisangá. Tosengeli kobondela Nzambe mpo abongisa mbeba oyo tosalaki.
52:8. Soki tozali kotosa Yehova mpe kondima disipilini na ye na motema moko, tokoki kozala “lokola nzete mobesu ya elaya oyo ekokola na ndako ya Nzambe,” elingi koloba kozala pene na Yehova mpe kobota mbuma na mosala na ye.—Baebele 12:5, 6.
55:4, 5, 12-14, 16-18. Davidi ayokaki mpasi mingi na motema ndenge mwana na ye Abesaloma asalaki mwango mabe mpe ndenge mopesi-toli na ye ya motema Ahitofele atɛkaki ye. Atako bongo, Davidi atikaki kotyela Yehova motema te. Tosengeli te kotika ete mitungisi elɛmbisa biso tótika kotyela Nzambe motema.
55:22. Ndenge nini tokitisaka mokumba na biso epai ya Yehova? Tokoki (1) koyebisa ye likambo oyo ezali kotungisa biso na libondeli, (2) koluka litambwisi mpe lisungi ya Liloba na ye mpe ebongiseli na ye, mpe (3) kosala oyo tokoki mpo na kokitisa mokakatano yango.—Masese 3:5, 6; 11:14; 15:22; Bafilipi 4:6, 7.
56:8. Yehova ayebaka te kaka makambo oyo tokutanaka na yango, kasi ayebaka mpe ndenge makambo yango ekoki kotungisa biso.
62:11. Nzambe azalaka na mposa ya nguya te. Ye nde apesaka nguya. ‘Nguya eutaka epai ya Nzambe.’
63:3. ‘Boboto ya Nzambe ezali malamu koleka bomoi,’ mpo soki yango te, bomoi ekozala na ntina te. Tokomonisa bwanya soki tosali boninga na Yehova.
63:6. Na butu—ntango oyo makelele ezali te, ekoki kozala malamu mingi mpo na komanyola.
64:2-4. Matongi ekoki kobebisa lokumu ya moto oyo asali likambo te. Tosengeli soki moke te koyoka yango mpe kotambwisa yango.
69:4. Mpo na kobatela kimya, tokoki mbala mosusu “kozongisa” eloko oyo toyibaki te, to na maloba mosusu kosɛnga bolimbisi, ata soki toyebi ete tosali mabe te.
70:1-5. Yehova ayokaka malɔmbɔ oyo tosalaka mpo na kosɛnga ye asalisa biso. (1 Batesaloniki 5:17; Yakobo 1:13; 2 Petelo 2:9) Nzambe akoki kotika ete tónyokwama, kasi akopesa biso bwanya ya kosilisa monyoko yango mpe makasi ya koyikela yango mpiko. Akotika biso te tómekama koleka oyo tokoki kokangela motema.—1 Bakolinti 10:13; Baebele 10:36; Yakobo 1:5-8.
71:5, 17. Lokola Davidi azalaki kotyela Yehova motema na bolenge na ye, yango epesaki ye mpiko mpe makasi, ata liboso ya Goliata, engambe Mofilistia. (1 Samwele 17:34-37) Bilenge bakosala malamu soki bazali kotalela Yehova na makambo nyonso oyo bazali kosala.
‘Tiká ete mabelé mobimba etonda na nkembo na ye’
Nzembo 72, oyo ezali loyembo ya nsuka na eteni ya mibale ya Mokanda ya Nzembo, ezali kolobela boyangeli ya Salomo, oyo ezali elilingi ya makambo oyo ekozala na boyangeli ya Masiya. Loyembo yango elobeli makambo ya esengo mpenza: kimya ekozala mingi, mabe mpe mobulu ekosila mpe mbuma ekotonda na mabelé. Tokozala na kati ya bato oyo bakomona makambo yango mpe makambo mosusu oyo Bokonzi ekomema? Tokozala na kati na bango soki, lokola mokomi ya nzembo, tozali kozela Yehova mpe kokómisa ye ekimelo mpe makasi na biso.
“Mabondeli ya Davidi” esukaki na maloba oyo: “Tiká ete [Yehova] Nzambe, Nzambe ya Yisalaele asanzolama zambi ezali bobele ye akosalaka makambo ya kokamwa. Tiká nkombo na ye ya nkembo esanzolama libela; tiká ete [mabelé mobimba, NW] etonda na nkembo na ye. Tondimi, ɛɛ tondimi!” (Nzembo 72:18-20) Biso mpe, tósanzolaka Yehova na motema mobimba mpe tókumisaka nkembo na ye monene.
[Elilingi na lokasa 9]
Oyebi soki “mwana mwasi ya mokonzi” ezali nani?
[Elilingi na lokasa 10]
Mpo na nini Yelusaleme ebengami “mboka ya kitoko penza”?