Ndenge oyo okoki kolonga na bomoi
KAKA ndenge baboti bamibanzabanzaka mpo na bana na bango mpe balingaka ete bálonga na bomoi, ndenge moko mpe Tata na biso ya likoló amibanzabanzaka mpo na biso mpe alingaka ete tólonga na bomoi. Mpo na komonisa ete alukaka bolamu na biso, ayebisaka biso makambo mingi oyo tosengeli kosala mpe kosala te mpo tólonga na bomoi. Kutu, Biblia elobi mpo na moto oyo atyelaka maloba ya Nzambe likebi ete: “Nyonso akosala ekolonga.”—Nzembo 1:3, NW.
Soki ezali bongo, mpo na nini kasi bato mingi balongi na bomoi te mpe bazali na esengo te? Soki totaleli nzembo yango mobimba na mozindo, tokozwa eyano na motuna wana mpe tokoyeba oyo tosengeli kosala mpo biso mpe tólonga na bomoi.
“Toli ya bato mabe”
Mokomi ya Nzembo akebisi na likama oyo ekoki kokómela moto soki alandi “toli ya bato mabe.” (Nzembo 1:1, NW ) “Moto mabe” ya libosoliboso ezali Satana Zabolo. (Matai 6:13) Makomami elobi ete azali “moyangeli ya mokili oyo” mpe ete “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (Yoane 16:11; 1 Yoane 5:19) Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ete batoli mingi oyo toyokaka na mokili ezalaka na makanisi ya moto mabe.
Toli ya ndenge nini bato ya mabe bapesaka? Na momeseno, bato mabe batosaka te. (Nzembo 10:13) Batoli na bango oyo etyolaka Nzambe ezali bisika nyonso. Lelo oyo, bato bazali kotya liboso ‘mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na bango ya kobikela.’ (1 Yoane 2:16) Na radio to televizyo, bazali kotinda bato báluka kozala na biloko nyonso ya mokili. Na mokili mobimba, bakompanyi ezali kobungisa mbongo koleka bamiliare 500 ya dolare na piblisite mpo na kobenda bato básomba biloko na bango, ezala bazali na mposa na yango to te. Bapiblisite yango ebongoli mimeseno ya bato na likambo etali kosomba biloko mpe esali ete bato bákóma kotalela kolonga na bomoi na ndenge ebongi te.
Yango wana lelo oyo, atako bato bazali na biloko mingi oyo kala bazalaki kokoka kosomba te, bazali kaka na mposa ya kobakisa biloko mosusu. Likanisi ezali ete moto oyo azali na biloko yango te akoki te kozala na esengo to kolonga na bomoi. Likanisi yango ezali lokuta, mpe “euti epai ya Tata te, kasi euti na mokili.”—1 Yoane 2:16.
Mozalisi na biso ayebi makambo oyo ekosalisa biso tólonga mpenza na bomoi. Toli na ye ekeseni na “toli ya bato mabe.” Na yango, soki tozali koluka kosepelisa Nzambe mpe koluka kolonga ndenge ya mokili ezali kosɛnga, ekozala lokola nde tozali koluka kotambola na banzela mibale na mbala moko. Ekoki kosalema ata moke te. Yango wana, tokokamwa te soki Biblia ezali kokebisa ete: “Bólanda bizaleli ya bato ya mokili oyo té”!—Ba-romén [Baloma] 12:2, Bible na lingala ya lelo oyo.
Kolanda mokili te
Mokili oyo etambwisami na Satana elukaka komonisa ete elingi bolamu na biso. Nzokande, tosengeli kokeba. Kobosana te ete Satana akosaki Eva, mwasi ya liboso, mpo na kokokisa bamposa na ye moko. Na nsima, asalelaki Eva mpo na kotinda Adama asala lisumu. Lelo oyo, Satana asalelaka mpe bato mpo na kopalanganisa toli na ye ya mabe.
Na ndakisa, David, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, bazalaki kosɛnga ye asalaka ata nsima ya ngonga ya mosala mpe bazalaki kotinda ye na mibembo mbala na mbala. David alobaki boye: “Nazalaki kotika ndako mwayambo na ntɔngɔ mpe kozonga kaka mwaminei na mpokwa.” Lokola baninga na ye ya motema, bato ya libota na ye mpe baninga na ye ya mosala bayebaki ete mpo na kolonga na mokili esɛngaka kaka kosala bongo, bazalaki kolendisa ye ete, “Salá yango mpo na libota na yo.” Bazalaki koloba na ye ete akosala bongo kaka mwa bambula, mpe na nsima makambo ekobongwana. David alobaki boye: “Bazalaki koloba na ngai ete kosala bongo ezali malamu mpo na libota na ngai mpamba te nakobanda kozwa mbongo ebele mpo na libota na ngai mpe yango ekosala ete nalonga mpenza na bomoi. Atako nazalaki kozwa ntango mingi te ya kofanda na libota na ngai, baninga na ngai bazalaki komonisa ngai ete oyo nazalaki kosalela bango eleki kofandaka na bango.” Lokola David, bato mingi bazali koboma nzoto mpo na kolukela mabota na bango biloko nyonso oyo bakanisi ete basengeli na yango. Kasi, kolanda toli ya ndenge wana ekosalisa yo olonga na bomoi? Libota na yo basengeli mpenza na nini?
David ayebaki oyo libota na ye esengelaki na yango mpenza ntango asalaki mobembo moko. Alobaki boye: “Nazalaki kosolola na mwana na ngai ya mwasi Angelica na telefone mpe atunaki ngai ete: ‘Tata, mpo na nini olingaka te kofanda na biso na ndako?’ Likambo yango esalaki ngai mpasi mingi na motema.” Motuna oyo mwana atunaki ye etindaki ye alongwa na mosala yango. David azwaki ekateli ya kopesa libota na ye eloko oyo basengelaki na yango mpenza, elingi koloba ye moko.
Kotosa toli ya Nzambe esalisaka moto alonga na bomoi
Okosala nini mpo olanda te makanisi ya lokuta oyo etondi na mokili oyo? Mokomi ya Nzembo ayebisi biso ete moto oyo alongi na bomoi mpe oyo azali na esengo ezali moto oyo “asepelaka na mobeko ya Yehova; mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu na moi.”—Nzembo 1:2, NW.
Ntango Yehova atyaki Yosua mokambi ya libota ya Yisalaele, alobaki na ye boye: “Osengeli kotánga [Liloba ya Nzambe] na mongongo ya nse butu na moi.” Ya solo, kotánga mpe komanyola Liloba ya Nzambe ezalaki na ntina mingi, kasi Yosua asengelaki mpe “kotosa makambo oyo ekomami na kati na yango.” Kotánga Biblia kaka te nde ekosala ete olonga na bomoi. Osengeli kosalela makambo oyo ozali kotánga. Yehova alobaki na Yosua ete: “Na bongo nzela na yo ekolonga mpe okosala makambo na bwanya.”—Yosua 1:8, NW.
Kanisá naino mwana moko ya moke oyo tata na ye amemi ye mpe bazali kotánga elongo lisolo moko ya kitoko. Atako batángá lisolo yango mbala boni, ntango nyonso oyo bazongelaka yango ezalaka esengo mpenza mpo na bango. Ndenge moko mpe, moto oyo alingaka Nzambe asepelaka mpenza kotánga Biblia mokolo na mokolo; ezalaka ntango ya esengo mpenza oyo alekisaka elongo na Tata na ye ya likoló. Soki moto yango alandi toli mpe litambwisi ya Yehova, akokóma lokola “nzete oyo ekonami penepene na bitima na mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekokauka te. Nyonso [akosala ekolonga, NW].”—Nzembo 1:3.
Nzete oyo mokomi ya Nzembo alobeli ebimaki yango moko te. Nkolo na yango alonaki yango pene na mai mpe abatelaki yango malamu. Ndenge moko mpe, Tata na biso ya likoló asembolaka makanisi na biso na nzela ya batoli ya Biblia. Yango nde esalaka ete tókende liboso mpe tómonisa bizaleli malamu oyo esepelisaka Nzambe.
Nzokande, “bato mabe bazali bongo te.” Ya solo, ekoki komonana mpo na mwa ntango lokola balongi, nzokande nsuka na bango ekozala mabe. “Bakotɛlɛma kati na kosambisama te.” Kasi, “nzela ya bato mabe ekobeba nyɛɛ.”—Nzembo 1:4-6.
Na yango, kolanda mokili te mpe lolenge na yango ya kotalela makambo. Atako ozali na makoki oyo ekoki kosala ete olonga na mokili oyo, kebá na lolenge ozali kosalela yango to ndenge ozali kotika mokili esalela yango. Koluka biloko ya mokili oyo ezangi ntina ekoki kosala ete moto ‘akauka.’ Epai mosusu, soki moto azali na boyokani malamu na Nzambe, yango ekosala ete alonga mpenza mpe azala na esengo ya solosolo.
Ndenge ya kolonga
Mpo na nini moto oyo azali kolanda toli ya Nzambe, alongaka na makambo nyonso? Mokomi ya Nzembo azalaki kolobela te kolonga na lolenge ya mokili. Moto oyo abangaka Nzambe alongaka mpamba te asalaka mokano ya Nzambe mpe mokano ya Nzambe elongaka kaka. Tiká tólobela ndenge oyo kotosa mitinda ya Biblia ekoki kosala ete moto alonga.
Na libota: Makomami esɛngi mibali ‘bálingaka basi na bango lokola nzoto na bango moko,’ mpe esɛngi mwasi moklisto ‘azala na limemya makasi epai ya mobali na ye.’ (Baefese 5:28, 33) Baboti balendisami ete balekisaka ntango elongo na bana na bango, basɛkaka na bango mpe báteyaka bango makambo ya ntina na bomoi. (Deteronome 6:6, 7; Mosakoli 3:4) Liloba ya Nzambe epesi mpe toli oyo epai ya baboti: “Bósilikisaka bana na bino te.” Soki baboti batosi toli yango, ekozala pɛtɛɛ mpo bana ‘bátosa baboti na bango’ mpe ‘bákumisa batata na bango mpe bamama na bango.’ (Baefese 6:1-4) Kolanda toli wana ya Nzambe ekosalisa libota elonga.
Baninga: Moto nyonso alingaka azala na baninga. Tokelamá na likoki ya kolinga mpe na mposa ete bálinga biso. Yesu alobaki ete bayekoli na ye ete basengeli ‘kolinganaka bango na bango.’ (Yoane 13:34, 35) Kati na bango, ezali na baoyo tokoki kolinga mpe kotyela motema, ezala kutu koyebisa bango makambo na biso ya motema. (Masese 18:24) Likambo eleki ntina, kotosa mitinda ya Biblia ekosalisa biso ‘tópusana penepene ya Nzambe’ mpe na ndakisa ya Abalayama, tóbengama ‘baninga ya Yehova.’—Yakobo 2:23; 4:8.
Ntina ya bomoi: Na esika ya kozala na bomoi ezangi ntina, baoyo balongi mpenza bamonaka mpenza ete bomoi na bango ezali na ntina. Batyaka elikya na bango te na makambo ya mokili oyo, oyo ezali ntango nyonso koleka. Mikano na bango ezali komemela bango matomba ya libela, mpamba te bayebi mpenza ntina ya bomoi. Nini esalaka ete bomoi ya moto ezala na ntina? “Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mibeko na ye. Mpamba te yango nde likambo esɛngami na moto.”—Mosakoli 12:13, NW.
Elikya: Kozala moninga ya Nzambe epesaka mpe biso elikya mpo na mikolo ezali koya. Ntoma Paulo alendisaki Baklisto ete “bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe.” Soki basali bongo, ‘bakomibombela moboko kitoko na esika moko ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.’ (1 Timote 6:17-19) Bomoi wana ya solosolo ekoya mosika te, ntango Bokonzi ya Nzambe ekokómisa mabelé oyo Paladiso.—Luka 23:43.
Elingi koloba te ete soki otosi mitinda ya Biblia nde okozwa mikakatano te na bomoi, kasi okomipengwisa na mpasi oyo bato mabe bamilukelaka. David oyo tolobelaki na lisolo ya liboso mpe bamilio ya bato mosusu lokola ye bamoni na miso litomba ya kotosa mitinda ya Biblia na bomoi na bango. Ntango David azwaki mosala oyo ezalaki kotikela ye ngonga mingi, alobaki boye: “Nazali na esengo mingi mpo na boyokani oyo nazali na yango ná mwasi mpe bana na ngai, ezala mpe mpo na libaku ya kosalela Yehova Nzambe lokola nkulutu na lisangá.” Yango wana ezali likambo ya kokamwa te ntango Mokanda ya Nzembo ezali kolobela moto oyo atyaka likebi na toli ya Nzambe ete: “Nyonso akosala ekolonga”!
[Etanda na lokasa 6]
MAKAMBO MITANO OYO EKOSALISA MOTO ALONGA NA BOMOI
1 Kolanda mokili te na lolenge na yango ya kotalela makambo.
2 Tángáká mpe manyoláká Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo.
3 Saleláká toli ya Biblia na bomoi na yo.
4 Kómá moninga ya Nzambe.
5 Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mibeko na ye.
[Bililingi na lokasa 7]
Olandaka makambo oyo esɛngami mpo na kolonga na bomoi?