-
Bingɛngiseli ya pole na eleko ya bantomaLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1995 | 15 Mai
-
-
Bingɛngiseli ya pole na eleko ya bantoma
“Pole mpenza engɛngi mpo na bayengebene, mpe nsai mpo na bato na mitema sembo.”—NZEMBO 97:11, NW.
1. Lolenge nini Batatoli ya Yehova lelo oyo bakokani na baklisto ya liboso?
BISO baklisto tozali mpenza kosepela na maloba oyo mazwami na Nzembo 97:11! ‘Pole engɛngɛlaka’ biso mbala na mbala. Ee, basusu kati na biso basili komona kongɛnga ya pole ya Yehova uta bambula mingi. Nyonso wana ezali kokundwela biso Masese 4:18, oyo elobi ete: “Njela na bayɛngɛbɛni ejali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokɔlɔ na malamu koleka.” Lokola topesaka motuya mingi na Makomami koleka makambo ya bonkɔkɔ, biso Batatoli ya Yehova tokokani na baklisto ya liboso. Ezaleli na bango ekoki komonana polele kati na mikanda ya kala ya Makomami ya Greke ya boklisto mpe kati na nkomá na yango, oyo ekomamaki na kopemama ya Nzambe.
2. Nini ezalaki kati na bingɛngiseli ya pole ya liboso oyo bayekoli ya Yesu bazwaki?
2 Kati na bingɛngiseli ya pole ya ebandeli oyo bayekoli ya liboso ya Yesu Klisto bazwaki ezalaki mpe na oyo etalelaki Masiya. Andelea ayebisaki ndeko na ye Simona Petelo ete: “Tosili komona Masiya.” (Yoane 1:41) Mwa ntango moke na nsima, Tata na likoló apesaki nzela na ntoma Petelo ete apesa litatoli na ntina na likambo yango: “Yɔ ojali Klisto, mwana na Njambe na bomɔi.”—Matai 16:16, 17; Yoane 6:68, 69.
Pole na ntina etali mokumba na bango ya kosakola
3, 4. Nsima ya kosekwa na ye, engɛngiseli nini Yesu apesaki epai na bayekoli na ye mpo na oyo etali mosala na bango na mikolo mizali liboso?
3 Nsima ya lisekwa na ye, Yesu Klisto apesaki bingɛngiseli ya pole na ntina etali mokumba oyo bayekoli na ye bazalaki na yango. Emonanaki mpenza ete ezalaki bongo epai na bayekoli 500 oyo bayanganaki na Galilai nde alobaki ete: “Boye bokɛnda kojalisa bayekoli na mabota yɔnsɔ, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na [elimo santu, NW], kolakisa mpe bango ete batosa yɔnsɔ esili ngai kolaka bino. Mpe tala, ngai najali na bino elɔngɔ mikɔlɔ yɔnsɔ kino nsuka na ekeke.” (Matai 28:19, 20; 1 Bakolinti 15:6) Na nsima, bayekoli nyonso ya Klisto basengelaki kozala basakoli, mpe mokumba na bango ya kosakola esengelaki kosuka te bobele epai na “bampate babungani na libota na Yisraele.” (Matai 10:6) Basengelaki mpe te kobatisa bato na batisimo ya Yoane, lokola elembo mpo na kobongola motema na masumu. Nzokande, basengelaki kobatisa bato “na nkombo na Tata mpe na mwana mpe na [elimo santu, NW].”
4 Bobele liboso ete Yesu amata na likoló, bantoma na ye 11 ya sembo batunaki ete: “[Nkolo, NW] okojongisela Yisalaele bokonji na ntango oyo?” Na esika ete ayanola na motuna yango, Yesu apesaki malako mosusu na ntina etali mokumba na bango ya koteya, alobaki ete: “Wana ekosila [elimo santu, NW] koya likoló na bino, bokojua nguya, mpe bokojala batatoli na ngai kati na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samalia, mpe kino nsuka na mokili.” Kino na ntango wana, bazalaki bobele batatoli ya Yehova, kasi sikawa basengelaki kokóma mpe batatoli ya Klisto.—Misala 1:6-8.
5, 6. Bingɛngiseli nini ya pole bayekoli ya Yesu bazwaki na Pantekote?
5 Bobele mikolo zomi mpamba na nsima, oyo nde bingɛngiseli ya pole makasi bayekoli ya Yesu bazwaki! Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., basosolaki mpenza mpo na mbala ya liboso ntina ya mokapo ya Yoele 2:28, 29: “[Ngai Yehova] nakosopa [elimo, NW] na ngai likolo na njoto yɔnsɔ; bana na bino babali mpe bana na bino basi bakosakola, mikolo na bino bakolɔta ndɔtɔ, bilɛngɛ na bino bakomɔna bimɔnɔnɛli. Ata epai na baombo na ngai babali mpe baombo na ngai basi na mikɔlɔ yango nakosopa [elimo, NW] na ngai.” Bayekoli ya Yesu bamonaki elimo santu na lolenge ya ndemo lokola oyo ya mɔ́tɔ, efandaki likoló na mitó na bango—pene na mibali mpe basi 120—baoyo bayanganaki na Yelusaleme.—Misala 1:12-15; 2:1-4.
6 Lisusu, na mokolo ya Pantekote, bayekoli bayaki koyeba mpo na mbala ya liboso ete maloba oyo mazwami na Nzembo 16:10 ekokanaki epai na Yesu Klisto oyo asekwisamaki. Mokomi na Nzembo alobaki ete: “Mpɔ ete [yo Yehova Nzambe] okotika molimo na ngai na esika na bakufi tɛ; okotika mondimi na yɔ komɔna kopɔla tɛ.” Bayekoli bayaki koyeba ete maloba wana masengelaki kokokana te epai na Mokonzi Davidi, mpamba te nkunda na ye ezalaki elongo na bango kino na eleko wana. Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete bato soko 3 000 na baoyo bayokaki kolimbolama ya pole wana ya sika bandimisamaki mpenza makasi na boye ete bazwaki batisimo bobele na mokolo wana!—Misala 2:14-41.
7. Pole nini ya makasi ntoma Petelo azwaki na ntango akendaki epai na Korneye, mokonzi ya basoda na Baloma?
7 Na boumeli ya bikeke mingi, Bayisraele basosolaki makambo oyo Nzambe azalaki koloba na ntina na bango: “Nayebi bobele bino kati na mabota yɔnsɔ na mokili.” (Amosa 3:2) Na yango, oyo ntoma Petelo mpe baoyo bazalaki elongo na ye bazwaki na ntango bakendaki na ndako ya Korneye, mokonzi ya basoda ya Baloma, ezalaki bongo engɛngiseli ya pole makasi ntango elimo santu ekitaki mpo na mbala ya liboso epai na bandimi Bapakano oyo bakatamaki ngɛnga te. Tosengeli koyeba ete wana ezalaki mbala bobele moko oyo elimo santu epesamaki epai na bato bazwi naino batisimo te. Kasi esengelaki ete ezala bongo. Soki te, mbɛlɛ Petelo alingaki koyeba te ete Bapakano wana bakatami ngɛnga te basilaki kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo. Kososoláká malamu ntina ya likambo yango, Petelo atunaki ete: “Moto ayebi koboya mai mpɔ na kobatisa baoyo bajui [elimo santu, NW] lokola biso?” Ya solo, moko te kati na baoyo bazalaki wana akokaki kozala na elonga ya koboya yango, mpe Bapakano wana bazwaki batisimo.—Misala 10:44-48; kokanisá na Misala 8:14-17.
Kokatama ngɛnga ezali lisusu te
8. Mpo na nini baklisto mosusu ya liboso bazalaki na mokakatano mpo na kotika liteya ya kokatama ngɛnga?
8 Pole mosusu ebimaki na ntina na likambo litalaki kokatama ngɛnga. Kokatama ngɛnga ebandaki na 1919 L.T.B. na ntango Yehova asalaki kondimana elongo na Abalayama. Na ntango yango, Nzambe apesaki Abalayama etindá ete ye mpe mibali mosusu ya libota na ye basengelaki kokatama ngɛnga. (Genese 17:9-14, 23-27) Na yango, kokatama ngɛnga ekómaki elembo oyo ezalaki kokesenisa bakitani ya Abalayama na bato mosusu. Bazalaki komikumisa mingi mpo na likambo yango! Na nsima, “bato na esute” ekómaki ebéngeli ya kotyola. (Yisaya 52:1; 1 Samwele 17:26, 27) Ezali mpasi te na komona soki mpo na nini baklisto ya liboso oyo bazalaki Bayuda balingaki kobatela elembo wana. Bamoko kati na bango balobanaki mingi na Paulo mpe Balanaba na ntina na likambo yango. Mpo na kosilisa ntembe yango, Paulo mpe Balanaba mpe basusu bakendaki epai na lisangani ya mikólo-bakambi ya baklisto na Yelusaleme.—Misala 15:1, 2.
9. Bingɛngiseli nini ya pole bimonisamaki epai na lisangani ya mikólo-bakambi ya liboso, lokola yango eyebisami kati na Misala mokapo 15?
9 Sikawa ezalaki te na nzela ya ekamwiseli ya polele nde baklisto wana bazwaki kongɛngisama ete kokatama ngɛnga ezalaki lisusu te likambo Yehova azalaki kosɛnga mpo na basaleli na ye. Nzokande, pole wana ebakisamelaki bango wana basalaki bolukiluki kati na Makomami, batyaki motema na bango na elimo santu ya Nzambe ete etambwisa bango, mpe na koyokáká makambo oyo Petelo mpe Paulo bakutanaki na yango na ntina na kobongwana ya Bapakano bakatami ngɛnga te. (Misala 15:6-21) Ekateli oyo ezwamaki ebimisamaki na nkomá oyo ndambo na yango elobi ete: “Mpɔ ete emonanaki malamu na [elimo, NW] mpe na biso kotyela bino mikumba misusu tɛ, bobɛlɛ makambo oyo mabɔngi, ete boboya bilɔkɔ bipɛsamɛli bikeko, na makila, na banyama bakamolami, na ekobo.” (Misala 15:28, 29) Na bongo, baklisto ya liboso basikolamaki na mobeko ya kokatama ngɛnga mpe na masɛngami misusu ya Mibeko ya Mose. Mpo na yango, Paulo akokaki koloba na Baklisto ya Galatia ete: “Klisto akangɔli biso mpɔ na bonsomi.”—Bagalatia 5:1.
Pole kati na Baevanzile
10. Wapi bingɛngiseli mosusu ya pole oyo emonisami kati na Evanzile ya Matai?
10 Ntembe ezali te ete Evanzile ya Matai, oyo ekomamaki soko na mobu 41 T.B., ezali na bingɛngiseli mingi ya pole oyo ekopesa litomba na batángi na yango. Bobele baklisto moke ya liboso nde bayokaki Yesu na matoyi na bango mpenza kolakisa mateya na ye. Mingimingi, Evanzile ya Matai elobelaki makasi ete motó ya likambo ya mosala ya kosakola ya Yesu ezalaki bongo Bokonzi ya Nzambe. Na nguya nyonso mpenza, Yesu alobelaki makasi ntina ya kozala na mikano ya sembo! Oyo nde bingɛngiseli ya pole ebimaki kati na Lisoló likoló na Ngomba, kati na masese na ye (lokola oyo ekomami na mokapo 13), mpe kati na esakweli na ye monene oyo ezwami na mikapo 24 mpe 25! Nyonso wana eyebisamaki epai na baklisto ya liboso kati na lisoló ya Evanzile ya Matai, ekomami bobele bambula soko mwambe nsima ya Pantekote na mobu 33 T.B.
11. Tokoki koloba nini na ntina na makambo mazali kati na Baevanzile ya Luka mpe ya Malako?
11 Bambula 15 na nsima, Luka akomaki Evanzile na ye. Atako eteni monene na yango ekokanaki na oyo ya Matai, 59 % ya makambo ebakisami. Luka akomaki makamwisi motoba ya Yesu Klisto mpe masese na Ye mingi, oyo, koleka mbala mibale, malobami te na bakomi mosusu ya Baevanzile. Emonani lokola ete bobele mwa bambula moke na nsima, Malako akomaki Evanzile na ye, alobelaki mingi Yesu Klisto lokola moto na misala minene, mosáli makamwisi. Atako Malako alobelaki mingi mpenza makambo oyo masilaki kokomama na Matai mpe Luka, kasi akomaki lisese moko oyo basusu bakomaki te. Kati na lisese yango, Yesu akokanisaki Bokonzi ya Nzambe na mbótó oyo ezali kobima, kokóla, mpe ezali kobota mbuma mokemoke.a—Malako 4:26-29.
12. Na meko nini Evanzile ya Yoane epesi engɛngiseli mosusu mingi?
12 Na nsima Evanzile ya Yoane, ekomamaki bambula 30 na nsima wana Malako akomaki lisoló na ye. Oyo nde ebele ya pole oyo Yoane angɛngisaki likoló na mosala ya Yesu, mingimingi mpo na oyo etali bisika mingi epai alobelaki bomoi ya Yesu liboso ya koya na ye awa na mabelé! Bobele Yoane nde alobeli lisoló ya kosekwa ya Lasalo, mpe bobele ye nde amonisi biso makambo mingi kitoko oyo Yesu abendaki na yango likebi ya bantoma na ye ya sembo, bakisa mpe mabondeli na ye ya mozindo oyo asalaki na butu oyo atekamaki, lokola yango ekomami kati na mokapo 13 kino mokapo 17. Ya solo, elobami ete 92 % ya makambo mazwami na Evanzile ya Yoane ezali na Evanzile mosusu te.
Bingɛngiseli ya pole kati na nkomá ya Paulo
13. Mpo na nini basusu batalelaki nkomá ya Paulo epai na Baloma lokola nde ezalaki Evanzile?
13 Ntoma Paulo asalelamaki mingimingi mpo na komema bingɛngiseli ya solo epai na baklisto oyo bazalaki na bomoi na eleko ya bantoma. Na ndakisa, nkomá ya Paulo epai na Baloma, ekomamaki soko na mobu 56 T.B.—penepene na ntango oyo Luka akomaki Evanzile na ye. Kati na nkomá yango, Paulo amonisi polele likambo oyo ete boyengebene epesami mpo na ngɔlu ya Nzambe mpe na nzela ya kondima kati na Yesu Klisto. Lolenge Paulo alobelaki makasi likambo yango na ntina etali nsango malamu epusaki bato mosusu na kotalela nkomá na ye epai na Baloma lokola Evanzile ya mitano.
14-16. (a) Kati na mokanda na ye ya liboso epai na baklisto na Kolinti, pole nini Paulo amwangisaki mpo na oyo etali ntina ya bomoko? (b) Nkómá ya liboso epai na Bakolinti ezali na pole nini mosusu na ntina etali etamboli?
14 Paulo akomaki na ntina na makambo mosusu oyo ezalaki kotungisa Baklisto na Kolinti. Nkomá na ye epai na bakolinti ezali na batoli mingi epemami oyo ezali na litomba mpo na baklisto kino mikolo na biso. Ya liboso, asengelaki kopesa Bakolinti engɛngiseli mpo na libunga bazalaki kosala ya kopesa bato mosusu lokumu na kolekisa ndelo. Ntoma Paulo asembolaki bango na mpiko nyonso na kolobáká ete: “Bandeko, nalɔmbi bino na nkombo na nkolo na biso Yesu Klisto ete bino yɔnsɔ bolobaka na motindo mɔkɔ; bokabwana kati na bino tɛ kasi bosangana na motema mɔkɔ mpe na [makanisi motindo moko, NW].”—1 Bakɔlinti 1:10-15.
15 Bazalaki kotika nzela na ezaleli ya mbindo kati na lisangá na Kolinti. Kuna, mobali moko akamataki mwasi ya tata na ye; na yango, azalaki kosala “ekobo na lolenge lomɔnani ata kati na bapakano tɛ.” Ntoma Paulo alobaki kozanga kokakatana ete: “Bengana moto yango mabe kati na bino.” (1 Bakolinti 5:1, 11-13) Kobimisa moto na lisangá—yango ezalaki likambo ya sika kati na lisangá ya boklisto. Likambo mosusu mpo na yango lisangá ya Kolinti ezalaki na mposa ya kongɛngisama etalaki likambo oyo ete basangani na yango mosusu bazalaki kofunda bandeko na bango ya elimo na bisambiselo ya mokili mpo na kosilisa matata na bango. Paulo apamelaki bango na mpiko nyonso mpo na yango.—1 Bakolinti 6:5-8.
16 Nzokande, likambo mosusu oyo ezalaki kotungisa lisangá ya Kolinti etalelaki kosangisa nzoto. Kati na 1 Bakolinti mokapo 7, Paulo amonisaki ete lokola pite epalanganaki mingi, ebongaki malamu ete mobali nyonso azala na mwasi na ye mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye. Paulo amonisaki mpe ete atako minzemba bakoki kosalela Yehova kozanga mindɔndɔ, kasi bato nyonso te nde bazali na likabo ya bonzemba. Mpe soki mwasi akufeli mobali, azalaki na bonsomi ya kobala lisusu kasi “bobɛlɛ kati na Nkolo.”—1 Bakɔlinti 7:39.
17. Pole nini Paulo amwangisaki na ntina etali liteya ya lisekwa?
17 Oyo nde bingɛngiseli ya pole Nkolo asalelaki ete Paulo amonisa yango na ntina na lisekwa! Baklisto bapakolami bakosekwa na nzoto ya lolenge nini? Paulo akomaki ete: “Ekokonama njoto na mosuni mpenja ekosekwa njoto na [elimo, NW].” Nzoto ya mosuni ekomata na likoló te, mpamba te “mosuni mpe makila ekoki te kosangola Bokonzi ya Nzambe.” Paulo abakisaki ete bapakolami nyonso te nde bakolala kati na kufa kasi na boumeli ya ntango ya kozala ya Yesu basusu bakosekwisama mbala moko mpo na kozwa bomoi bozangi nsuka.—1 Bakolinti 15:43-53, NW.
18. Nkómá ya Paulo epai na Batesaloniki ezali na pole nini na ntina etali mikolo mizali koya?
18 Kati na nkomá na ye oyo akomaki epai na baklisto ya Tesaloniki, Paulo asalelamaki mpo na komwangisa pole na ntina na mikolo mizali koya. Mokolo ya Yehova ekoya lokola moyibi kati na butu. Paulo alobaki lisusu ete: “Ekolobaka bato ete, Kimia ejali, makambo majali tɛ, wana libebi ekokwela bango pwasa pelamɔkɔ mpasi ekoyela mwasi na jemi mpe njela na kobima ekojala tɛ.”—1 Batɛsaloniki 5:2, 3.
19, 20. Bingɛngiseli nini ya pole Baklisto ya Yelusaleme mpe ya Yuda bazwaki kati na nkomá ya Paulo epai na Baebele?
19 Wana akomaki nkomá na ye epai na Baebele, Paulo apesaki bingɛngiseli ya pole epai na baklisto ya liboso na Yelusaleme mpe na Yudea. Na nguya nyonso, amonisaki ete ebongiseli ya boklisto eleki ebongiseli ya losambo ya Mibeko ya Mose! Na esika ete bálanda mibeko oyo mipesami na nzela ya baanzelu, baklisto bazali na kondima kati na lobiko oyo Mwana na Nzambe alobelaki liboso, ye oyo azali likoló na baanzelu bamemi nsango wana. (Baebele 2:2-4) Mose azalaki bobele mosáli mpamba kati na ndako ya Nzambe. Nzokande, Yesu Klisto azali koyangela likoló na ntango yango mobimba. Klisto azali nganga monene na motindo ya Melekisedeki, azali na etɛlɛmɛlo oyo eleki oyo banganga ya libota ya Alona bazalaki na yango. Paulo amonisaki mpe ete Bayisraele bakokaki te kokɔta kati na eleko ya bopemi ya Nzambe mpo ete bazangaki kondima mpe bazangaki botosi kasi baklisto bazali kokɔta kati na yango na ntina na bosembo mpe botosi na bango.—Baebele 3:1–4:11.
20 Lisusu, kondimana ya sika eleki mpenza kondimana ya Mibeko. Lokola esakolamaki uta mibu 600 liboso na Yilimia 31:31-34, baoyo bazali kati na kondima ya sika bazali na mibeko ya Nzambe mikomami kati na mitema na bango mpe bazali kozwa bolimbisi mpenza ya masumu. Na esika ete bazala na nganga monene oyo asengeli kopesa mbeka mbula na mbula mpo na ye na ntina na masumu na ye moko mpe na oyo ya libota mobimba, baklisto bazali na Nganga Monene na bango Yesu Klisto, oyo azali na masumu te mpe apesaki mbeka ya masumu mpo na libela. Akɔtaki te na esika ya bulɛɛ oyo esalemi na mabɔkɔ ya bato mpo na kopesa makabo na ye, kasi akɔtaki na likoló, mpo na komonana liboso na Yehova. Lisusu, bambeka ya banyama oyo ezalaki kopesama na nsé ya mibeko ya Mose ekokaki mpenza kolongola masumu nyonso te, mpamba te esengelaki kopesama mbula na mbula. Kasi mbeka ya Klisto, oyo apesaki mbala moko mpo na libela, ekolongolaka mpenza masumu. Nyonso wana emwangisaki engɛngiseli na ntina na tempelo monene ya elimo, oyo kati na lopango na yango, batikali bapakolami mpe “bampate mosusu” bazali kosala lelo oyo.—Yoane 10:16; Baebele 9:24-28.
21. Lisoló oyo emonisi nini na ntina na kokokisama ya Nzembo 97:11 mpe Masese 4:18 na eleko ya bantoma?
21 Esika ekoki te mpo na kolobela bandakisa mosusu, na ndakisa bingɛngiseli ya pole oyo ezwami kati na nkomá ya ntoma Petelo mpe oyo ya moyekoli Yakobo mpe moyekoli Yuda. Kasi oyo tolobeli ekoki mpo na komonisa ete Nzembo 97:11 mpe Masese 4:18 ekokisamaki na lolenge ya kobenda likebi na eleko ya bantoma. Solo ebandaki kokóla kolongwa na bilembo mpe bililingi mpo na kokokisama mpe makambo oyo mazali ya solo.—Bagalatia 3:23-25; 4:21-26.
22. Likambo nini libimaki nsima ya liwa ya bantoma, mpe lisoló lilandi likomonisa nini?
22 Nsima na liwa ya bantoma ya Yesu mpe na ebandeli ya lipɛngwi oyo esakolamaki, pole ya solo ekitaki. (2 Batesaloniki 2:1-11) Nzokande, na bokokani na elaka ya Yesu, nsima ya bikeke mingi Nkolo azongaki mpe akutaki “moombo na sembo mpe na mayele” azali kopesa bilei na ntango ebongi epai na “[basáli, NW].” Na nsima na yango, Yesu Klisto atyaki moombo yango “likolo na bilɔkɔ yɔnsɔ bijui ye.” (Matai 24:45-47) Bingɛngiseli nini ya pole bilandaki na nsima? Yango ekolobelama na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Awa, mabelé malimboli zingazinga ya esika oyo mbótó ya solo ya Bokonzi elonami epai na moto moko moko.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛ́mbɛ 1980 (ebimeli ya Lifalansé), nkasá 18-19.
-
-
Eteni ya liboso—Bingɛngiseli ya pole—Ya Minene mpe ya mikeLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1995 | 15 Mai
-
-
Eteni ya liboso—Bingɛngiseli ya pole—Ya Minene mpe ya mike
“Njela na bayɛngɛbɛni ejali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino na mokɔlɔ na malamu koleka.”—MASESE 4:18.
1. Mpo na nini solo emonisamaki mokemoke?
KOMONISAMA ya makambo ya solo ya elimo oyo ezali kosalema moke moke na nzela ya bingɛngiseli ya pole, na boyokani na Masese 4:18, ezali elembo ya mayele ya Nzambe. Na lisoló oyo euti koleka, tomonaki lolenge nini mokapo oyo mokokanaki na eleko ya bantoma. Soki ebele na makambo ya solo oyo mazwami kati na Biblia mayebisamaki nyonso na mbala moko, mbɛlɛ elingaki kobebisa miso mpe kobulunganisa—lolenge moko na likambo oyo emonanaka soki outi na libulu ya molili mpo na kobima na esika pole ya moi ezali kongala makasi. Lisusu, solo oyo emonisami mokemoke eyeisaka ntango nyonso kondima ya baklisto makasi. Engɛngisaka ntango nyonso nzela oyo basengeli kotambola mpe ekopelisaka elikya na bango ntango nyonso.
“Moombo na sembo mpe na mayele”
2. Yesu amonisaki ete akosalela nani mpo na komema pole ya elimo epai na bayekoli na ye, mpe banani nde bazali esaleli yango?
2 Na eleko ya bantoma, Yesu Klisto amonaki malamu kosalela mwango oyo eleki nguya ya bato mpo na kopesa bingɛngiseli ya liboso epai na bayekoli na ye. Tozali na bandakisa mibale ya likambo yango: Pantekote na mobu 33 T.B. mpe kobongwana ya Korneye na mobu 36 T.B. Na nsima, Klisto amonaki malamu ete asalela bato, lokola asakolaki yango ete: “Nani ajali moombo na sembo mpe na mayɛlɛ oyo nkolo na ye atiki ye likolo na [basáli kati na ndako, NW] na ye ete apɛsa bango bilei na elaka na yango? Esɛngo na moombo yango oyo nkolo na ye akomɔna ye kosalaka boye wana ekoya ye. Najali koloba na bino sɔlɔ ete, akotya ye likolo na bilɔkɔ yɔnsɔ bijui ye.” (Matai 24:45-47) Moombo yango akokaki te kozala bobele moto moko, mpamba te asengelaki kopesa bilei ya elimo kobanda na ntango oyo lisangá ya boklisto ebandaki, na Pantekote, kino na ntango Nkolo, Yesu Klisto, asengelaki koya kotala. Makambo mamonisi ete kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele esangisi baklisto nyonso bapakolami lokola etuluku awa na mabelé na bileko nyonso.
3. Banani bazalaki kati na basangani ya liboso ya kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele?
3 Banani bazalaki kati na basangani ya liboso ya kelasi ya moombo ya sembo mpe ya mayele? Moko na bango ezalaki bongo ntoma Petelo, oyo alandaki etinda oyo ya Yesu, ete: “Leisa bampate na ngai.” (Yoane 21:17) Basangani mosusu ya liboso ya kelasi ya moombo bazalaki: Matai, ye oyo akomaki Evanzile oyo ebéngami na nkombo na ye, mpe Paulo, Yakobo mpe Yuda, baoyo bakomaki nkómá epemami. Ntoma Yoane, oyo akomaki mokanda ya Emoniseli, Evanzile na ye, mpe nkómá na ye, azalaki mpe moko na basangani ya kelasi ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Mibali yango bakomaki na boyokani na etindá ya Yesu.
4. Banani bazali “basáli kati na ndako”?
4 Soki etuluku mobimba ya bapakolami, kozanga kotalela esika oyo bango nyonso bafandi awa na mabelé, bazali basangani ya kelasi ya moombo, banani nde bazali “basáli kati na ndako”? Ezali bobele bapakolami wana kasi batalelami na lolenge mosusu—moko na moko kati na bango. Ee, na kotalela moto mokomoko, basengelaki kozala kati na kelasi ya “moombo” to ya “basáli kati na ndako,” na kotalela soki bazalaki kopesa bilei ya elimo to kolia bilei yango. Na ndakisa: Lokola yango ekomami kati na 2 Petelo 3:15, 16, ntoma Petelo alobeli nkómá ya Paulo. Wana azalaki kotánga yango, Petelo asengelaki kotalelama lokola mosáli oyo azali kolia bilei ya elimo oyo Paulo apesi, lokola momonisi ya kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele.
5. (a) Nini ekómelaki moombo na boumeli ya bikeke oyo elandaki nsima ya liwa ya bantoma? (b) Makambo nini mabimaki na eteni ya mibale ya ekeke ya 19?
5 Mpo na yango, búku Le Royaume millénaire de Dieu s’est approché elobaki ete: “Mpo na oyo etali lolenge oyo kelasi ya ‘moombo na sembo mpe na mayele’ ezalaki mpe esalaki na boumeli ya bikeke na nsima ya liwa ya bantoma ya Nkolo Yesu Klisto, toyebi yango na bosikisiki te. Emonani polele ete na kelasi ya ‘moombo’ ya eleko moko ezalaki koleisa oyo ya eleko oyo ezalaki kolanda na nsima. (2 Timoté 2:2) Kasi na nsima ya katikati ya ekeke ya zomi na libwa ezalaki na bato ya kobanga Nzambe baoyo bazalaki kolinga bilei ya elimo oyo ezwami kati na Biblia Mosantu mpe oyo bazalaki kosepela kolia yango . . . bituluku ya boyekoli Biblia . . . bisalemaki mpe bizalaki kokóla kati na boyebi ya mateya ya moboko matali solo ya Makomami ya bulɛɛ. Baoyo bazalaki sembo mpe bazalaki koluka litomba ya moimi te bazalaki na mposa makasi ya kopesa bilei wana ya elimo mpe ya ntina mingi epai na basusu. Bazalaki na elimo ya sembo ya ‘moombo’ oyo aponamaki mpo na kopesa ‘bilei ya elimo na ntango na yango’ mpo na kokokisa mposa ya ‘basáli kati na ndako.’ Bazalaki na ‘mayele’ na kososoláká ete wana ezalaki ntango oyo ebongi mpe nini ezalaki myango mileki malamu mpo na kopesa bilei. Basalaki milende mpo na kopesa bilei yango.”—Nkásá 344 kino 345.a
Bingɛngiseli ya liboso ya solo na mikolo na biso
6. Makombo nini mamonani polele mpo na komonisama ya solo mokemoke?
6 Likambo moko ezali mpenza kobenda likebi, na kotalela baoyo Yehova asalelaki mpo na koyeisa bokóli wana ya pole ya elimo mokemoke, ezali oyo ete: bamikumisaki te. Ezaleli ya C. T. Russell, prezidá wa yambo ya la Société Watch Tower, ezalaki oyo ete Nkolo asepelaki kosalela mwa makoki moke oyo bazalaki na yango. Na kotalela bankombo oyo bayini na bango bazalaki kosalela, ndeko Russell ayebisaki ete ezalaki na moto ata moko te oyo abéngamaki “Russelliste” mpe eloko oyo babéngi “Russellisme” ezalaki soko moke te. Lokumu nyonso epesamaki na Nzambe.
7. Elembeteli nini ndeko Russell mpe basálani elongo na ye bamonisaki ete bazalaki basangani ya moombo na sembo mpe na mayele?
7 Na kotalela engebene oyo emonanaki, ntembe ezali soko moke te ete elimo santu ya Yehova ezalaki kokamba milende ya ndeko Russell mpe baoyo bazalaki kosala na ye elongo. Bamonisaki elembeteli ete bazalaki kati na moombo na sembo mpe na mayele. Atako bakonzi mingi ya mangomba ya eleko wana bazalaki koloba ete bazalaki kondimela Biblia lokola Liloba lipemami ya Nzambe mpe ete Yesu azali Mwana ya Nzambe, kasi bandimaki mateya ya lokuta oyo eutaki na Babilone, lokola Bosato, kozanga kokufa ya molimo, mpe minyoko ya seko. Engebene elaká ya Yesu, ezalaki mpenza mpo na elimo santu nde milende ya komikitisa ya Russell mpe ya baninga na ye esalaki ete solo engɛnga mingi koleka liboso. (Yoane 16:13) Bayekoli ya Biblia bapakolami wana bamonisaki mpenza ete bazalaki basangani ya kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele oyo mokumba na yango ezali ya kopesa bilei ya elimo mpo na basáli ya Nkolo. Milende na bango mizalaki lisungi monene mpo na oyo etali koyanganisama ya bapakolami.
8. Makambo nini ya moboko Bayekoli ya Biblia basosolaki na ntina na Yehova, Biblia, Yesu Klisto mpe elimo santu?
8 Ezali likambo ya kobenda likebi, na komona lolenge oyo Yehova, na nzela ya elimo santu, andimaki Bayekoli ya Biblia wana ya liboso na kopesáká bango bingɛngiseli mingi ya pole. Ya liboso, bamonisaki na molende nyonso ete Mozalisi azali mpe ete azali na nkombo Yehova, oyo ekeseni na nkombo nyonso mosusu. (Nzembo 83:18; Baloma 1:20) Basosolaki ete Yehova azali na bizaleli minei ya minene—nguya, boyengebene, mayele, mpe bolingo. (Genese 17:1; Deteronome 32:4; Baloma 11:33; 1 Yoane 4:8) Baklisto bapakolami wana bamonisaki polele ete Biblia ezali Liloba lipemami na Nzambe mpe ezali solo. (Yoane 17:17; 2 Timoté 3:16, 17) Lisusu, bandimaki ete Mwana ya Nzambe, Yesu Klisto, azalisamaki mpe apesaki bomoi na ye lokola mbeka mpo na mokili mobimba. (Matai 20:28; Bakolose 1:15) Elimo santu, ezali soko moke te moto ya misato kati na Bosato, basosolaki ete ezali nguya ya Nzambe oyo ekosalaka mosala.—Misala 2:17.
9. (a) Makambo nini ya solo Bayekoli ya Biblia basosolaki na ntina na moto mpe bilikya oyo bimonisami kati na Biblia? (b) Makambo nini mosusu ya solo basaleli ya Yehova bazali kososola polele?
9 Bayekoli ya Biblia bamonaki polele ete moto azali te na molimo oyo ezangi kokufa kasi azali nde molimo oyo ekokufaka. Basosolaki ete “lifuti oyo lisumu efutaka ezali liwa,” kasi te minyoko ya seko, lifelo ya mɔ́tɔ ezali te. (Baloma 5:12; 6:23, NW; Genese 2:7; Ezekiele 18:4) Lisusu, bamonaki polele ete liteya ya évolution euti na makomami te mpe ezali na bilembeteli ya solosolo te. (Genese, mokapo 1 mpe mokapo 2) Basosolaki mpe ete Biblia ezali komonisa bilikya mibale—oyo ya bomoi na likoló mpo na bapakolami 144 000 baoyo balandaka matambé ya Klisto mpe ya bomoi na mabelé oyo ekobongwana Paladiso mpo na “ebele monene” ya “bampate mosusu” oyo motuya na bango ekoki kotángama te. (Emoniseli 7:9; 14:1; Yoane 10:16) Bayekoli ya Biblia wana ya liboso bayebaki ete mabelé ezali mpo na libela mpe ekozikisama te, lokola mangomba mingi ezali koteya yango. (Mosakoli 1:4; Luka 23:43) Bayekolaki mpe ete bozongi ya Klisto esengelaki kozala ya kozanga komonana mpe na nsima asengelaki kosambisa mabota mpe kotya paladiso na mabelé.—Misala 10:42; Baloma 8:19-21; 1 Petelo 3:18.
10. Solo nini Bayekoli ya Biblia bayekoli na ntina na batisimo, bokabwani kati na bakonzi ya mangomba mpe basangani mosusu, mpe Ekaniseli ya liwa ya Klisto?
10 Bayekoli ya Biblia bayaki koyeba ete engebene Makomami batisimo elimboli te komwangisa mwa matangá ya mai epai na bana mike kasi esengeli kosalema na boyokani na etindá ya Yesu oyo ezwami na Matai 28:19, 20, ezali bongo kozindisa bandimi kati na mai, baoyo basilaki koteyama. Bayaki komona ete kokabola bakonzi ya mangomba mpe basangani mosusu ezali na moboko te kati na Makomami. (Matai 23:8-10) Nzokande, baklisto nyonso basengeli kozala basakoli ya nsango malamu. (Misala 1:8) Bayekoli ya Biblia bayebaki malamu ete Ekaniseli ya Nkolo esengelaki kosalema bobele mbala moko na mbula, na 14 Nisan. Lisusu, bamonaki ete Pasika ezali elambo ya bapakano. Mpe, bapakolami wana bazalaki na elikya makasi ete Nzambe azalaki kosimba mosala na bango, yango wana bazalaki te kokongola makabo. (Matai 10:8) Uta na ebandeli mpenza, basosolaki ete baklisto basengeli kotosa mitinda ya Biblia, kati na yango mpe kolóna mbuma ya elimo santu ya Nzambe.—Bagalatia 5:22, 23.
Bokóli ya bingɛngiseli ya pole
11. Pole nini emwangisamaki likoló na mokumba ya moklisto mpe likoló na lisese ya bampate mpe bantaba?
11 Mingimingi, uta 1919, basaleli ya Yehova bapambolami na bingɛngiseli ya pole oyo ezali sé kobakisama. Oyo nde kongɛnga ya pole makasi engɛngaki na liyangani oyo esalemaki na Cedar Point wana J. F. Rutherford, prezidá ya mibale ya la Société Watch Tower alobelaki makasi ete mokumba ya liboso ya basaleli ya Nzambe ezali bongo ‘Kosakola, kosakola, kosakola, Mokonzi mpe Bokonzi na ye’! Bobele na mbula oyo elandaki, pole makasi emwangisamaki likoló na lisese ya bampate mpe bantaba. Esosolamaki ete esakweli wana esengelaki kokokisama na mokolo ya Nkolo, eleko oyo tozali, kasi te na boumeli ya Mbula Nkótó, lokola eteyamaki liboso. Na boumeli ya mbula nkóto, bandeko ya Klisto bakobɛla te mpe bakotyama na boloko te. Lisusu, na nsuka ya mbula nkóto, Yehova nde akosambisa, kasi Yesu Klisto te.—Matai 25:31-46.
12. Engɛngiseli nini ya pole emonisamaki na ntina na Armagedon?
12 Na 1926 engɛngiseli mosusu ya pole makasi emonisaki ete etumba ya Armagedon ezali te mbongwana ya makambo ya bato, lokola Bayekoli ya Biblia bazalaki koteya yango liboso. Kasi, ekozala nde etumba oyo kati na yango Yehova akomonisa nguya na ye polele na boye ete bato banso bakondimisama solo ete ye azali Nzambe.—Emoniseli 16:14-16; 19:17-21.
Eyenga ya Mbotámá—Elambo ya bapakano
13. (a) Pole nini emwangisamaki likoló na kokumisama ya Eyenga ya Mbotamá? (b) Mpo na nini batikaki kokumisa mokolo ya kobotama? (Lobelá maloba na nsé ya lokosa.)
13 Mwa moke na nsima, engɛngiseli moko ya pole epusaki Bayekoli ya Biblia na kotika kokumisa Eyenga ya Mbotámá. Liboso, Bayekoli ya Biblia kati na mokili mobimba bazalaki kokumisa Eyenga ya Mbotama, mpe na biro monene na Brooklyn, bazalaki kosala elambo monene mpo na yango. Kasi, na nsima bayaki kososola ete kokumisa mokolo mwa 25 Desɛ́mbɛ ezalaki mpenza momeseno ya bapakano mpe boklisto ya lipɛngwi nde eponaki yango mpo na kobenda bapakano ete babongwana nokinoki. Lisusu, emonanaki ete Yesu akokaki te kobotama na eleko ya mpiɔ, mpamba te na ntango abotamaki babateli na mpate bazalaki koleisa bampate kati na bilanga—bakokaki kosala yango te na butu, pene na nsuka ya sanza ya Dɛsɛ́mbɛ. (Luka 2:8) Nzokande, Makomi mamonisi ete Yesu abotamaki pene na 1 Ɔkɔtɔ́bɛ. Bayekoli ya Biblia basosolaki mpe ete baoyo babéngamaki bato ya mayele oyo bayaki kotala Yesu bambula mibale nsima ya kobotama na ye bazalaki bapakano banganga-minzoto.b
Nkombo ya sika
14. Mpo na nini nkombo Bayekoli ya Biblia ekokanaki na bosikisiki te mpo na basaleli ya Yehova?
14 Na 1931 engɛngiseli ya pole ya solo emonisaki epai ya bayekoli wana ya Biblia nkombo ebongi na bango mpenza oyo euti na Makomami. Basaleli ya Yehova basilaki kososola ete bakokaki te kondima bankombo oyo basusu babambaki bango, lokola ba Russellistes, ba Auroristes du Millénium, ba “anti-infernalistes.”c Kasi bakómaki mpe komona ete nkombo oyo bango moko bakamataki—Bayekoli ya Biblia na mikili ndenge na ndenge—ekokaki na bango na bosikisiki mpenza te. Bazalaki bobele te bayekoli ya Biblia. Lisusu, ezalaki mpe na bato mingi mosusu oyo bazalaki bayekoli ya Biblia nzokande bazalaki na boyokani te elongo na Bayekoli ya Biblia.
15. Nkombo nini Bayekoli ya Biblia bakamataki na 1931, mpo na nini yango ebongi?
15 Lolenge nini Bayekoli ya Biblia bazwaki nkombo ya sika? Na boumeli ya bambula mingi Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki kobenda likebi makasi likoló na nkombo ya Yehova. Na yango, ebongaki mpenza ete Bayekoli ya Biblia bándima nkombo oyo ezwami na Yisaya 43:10: “[Yehova] alobi ete, Bino bojali batatoli na ngai, mpe moombo na ngai, oyo nasili kopɔna yɔ, ete boyeba mpe bondima ngai mpe bosɔsɔla ete ngai najali ye. Liboso na ngai Njambe mosusu asalamaki tɛ, mpe mosusu akojala nsima na ngai tɛ.”
Kolóngisama mpe “Ebele Monene”
16. Mpo na nini bisakweli na ntina na kozongisama ekokisamaki te na bozongi ya Bayuda na mosuni na Palestine, kasi ezali kokokana epai na banani?
16 Kati na volimi ya mibale ya búku Justification (Kolóngisama), oyo ebimisamaki na la Société Watch Tower Society na 1932, engɛngiseli moko ya pole emonisaki ete bisakweli ya kozongisama oyo Yisaya, Yilimia, Ezekiele mpe basakoli mosusu bakomaki ekokanaki te epai na Bayuda ya mosuni (lokola ekanisamaki liboso), baoyo bazalaki kozonga na Palestine, baoyo bazalaki na mikano mizangi kondima mpe mikano ya politiki. Nzokande, bisakweli wana ya kozongisama, oyo ekokanaki na moke epai na Bayuda na ntango bazongaki nsima na kobima na boombo na Babilone na 537 L.T.B., ekokanaki na bonene na yango na ntango Yisraele ya elimo esikolamaki mpe ezongisamaki kobanda na 1919 mpe na bozwi mingi oyo emonanaki na nsima kati na paladiso ya elimo oyo basaleli ya solo ya Yehova bazali kati na yango lelo oyo.
17, 18. (a) Na nsima, na nzela ya engɛngiseli moko ya pole, nini emonisamaki ete ezali mokano moleki monene ya Yehova? (b) Na ntina etali Emoniseli 7:9-17 engɛngiseli nini ya pole emonanaki na 1935?
17 Na nsima, bingɛngiseli ya pole emonisaki ete mokano monene ya Yehova mozalaki te lobiko ya bato, kasi kolóngisama ya boyangeli na ye. Emonanaki ete motó ya likambo lileki monene ya Biblia ezalaki bongo lisiko te kasi Bokonzi, mpamba te yango nde ekolóngisa boyangeli ya Yehova. Oyo ezalaki solo engɛngiseli ya pole! Baklisto ya sembo batikaki komibanzabanza bobele mpo na kokende na bango na likoló.
18 Na 1935, engɛngiseli moko ya solo emonisaki ete ebele monene oyo elobelami na Emoniseli 7:9-17 ezalaki te kelasi ya mibale ya bato bakokende na likoló. Ekanisamaki ete baoyo balobelami na mikapo wana ezalaki bongo bapakolami mosusu oyo bazalaki mpenzampeza sembo te, yango wana batelemaki liboso ya kiti ya bokonzi na esika ete báfanda na kiti ya bokonzi mpo na koyangela lokola bakonzi mpe banganga elongo na Yesu Klisto. Kasi moto moko te akoki kozala sembo bobele ndambo. Moto akoki kozala bobele sembo to sembo te. Na yango, emonanaki ete esakweli wana etalelaki ebele monene ya bato oyo motuya na bango eyebani te, baoyo bauti na mabota nyonso mpe bazali sikawa koyanganisama mpe bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé. Bazali “bampate” oyo balobelami na Matai 25:31-46 mpe “bampate mosusu” oyo balobelami na Yoane 10:16.
Ekulusu—Ezali elembo ya boklisto te
19, 20. Mpo na nini ekulusu ekoki te kozala elembo ya bokliksto?
19 Na boumeli ya bambula mingi, Bayekoli ya Biblia basalelaki mingi ekulusu lokola elembo ya boklisto. Nkutu, bazalaki na elembo ya “ekulusu mpe motóle ya bokonzi.” Engebene libongoli ya King James, Yesu asɛngaki bayekoli na ye ete bakamata “ekulusu” na bango, mpe bato mingi bayaki kondima ete abomamaki likoló na ekulusu. (Matai 16:24; 27:32) Na boumeli ya bambula mingi elembo yango ezalaki mpe kobima na ezipeli ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (na Lingelesi).
20 Mokanda Richesses, oyo la Société abimisaki na 1936, emonisaki polele ete Yesu abomamaki likoló na ekulusu te, kasi likoló na nzeté moko semba. Engebene nganga mayele moko, liloba ya Greke (stau·rosʹ) oyo ebongolami “ekulusu” na libongoli ya King James, “emonisi, liboso mpenza, nzete moko semba [esengeli] kokesenisama na ekulusu ya mangomba, oyo esalemi na banzete mibale . . . Yango eutaki na mokili ya kala ya Bakaladi, mpe esalelamaki lokola elembo ya nzambe Tammuz.” Na esika ete esambelama, eloko oyo Yesu abakisamaki likoló na yango esengeli kotalelama na mpii nyonso.
21. Nini ekolobelama na lisoló lilandi?
21 Ezali na bandakisa mosusu ya bingɛngiseli minene mpe ya oyo ekoki kotalelama na oyo ya moke. Mpo na kososola yango, talá lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
b Na nsima, emonanaki ete soki mokolo ya kobotama oyo eleki ntina esengelaki kokumisama te, tosengeli te kokumisa mikolo nyonso mosusu ya kobotama. Lisusu, ezala Bayisraele, to mpe baklisto ya liboso bazalaki kokumisa te mokolo ya kobotama. Biblia elobeli bobele bokundoli mibale na ntina etali mokolo ya kobotama, oyo Falao mpe Elode Antipa basalaki. Mokomoko na yango ezwaki lokumu mabe mpo ete na boumeli na yango bato babomamaki. Batatoli ya Yehova bakumisaka te mokolo ya kobotama mpamba te milulu yango euti na bapakano mpe etombolaka moto oyo azali kokumisa mokolo na ye ya kobotama.—Genese 40:20-22; Malako 6:21-28.
c Wana ezalaki libunga oyo mangomba mingi ya boklisto ya nkombo mpamba basalaki. Babambaki nkombo oyo ete Luthérien epai na balandi ya Martin Luther, oyo na nsima bandimaki nkombo yango. Bobele bongo, ba Baptistes bandimaki nkombo oyo bato mosusu babambaki bango mpamba te bazalaki koteya batisimo ya kozindisa na mai. Lolenge moko mpe, ba Methodistes bandimaki nkombo oyo bato mosusu babambaki bango. Mpo na oyo etali lolenge nini basangani ya la Société des Amis bakómaki kobéngama ba Quakers, búku The World Book Encyclopedia elobi ete: “Liloba Quaker ezalaki liboso mpo na kofinga Fox [mobandisi], oyo ayebisaki zuzi moko ya Angleterre ete ‘alɛnga liboso na Liloba ya Nkolo.’ Zuzi yango abengaki ye ‘quaker [molɛngisi].’”
-