Tósalela Yehova na esengo na motema
“Bilakeli mabe oyo nyonso bikokwela yo . . . mpo ete osalelaki Yehova Nzambe na yo na kosepela mpe na esengo na motema te.”—DETERONOME 28:45-47, NW.
1. Elembeteli nini tozali na yango oyo emonisi ete baoyo bazali kosalela Yehova bazali na esengo, epai nyonso oyo bazali kosalela ye?
BASALELI ya Yehova bazali na esengo, ezala ete bazali kosala mokano na ye na likoló to na mabelé. Baanzelu, “miɔtɔ na ntɔngɔntɔngɔ” bangangaki na esengo na ntango mabelé esalemaki, mpe kozanga ntembe, na esengo nyonso, bibele ya baanzelu ya likoló bazali ‘komema liloba ya Nzambe.’ (Yobo 38:4-7; Nzembo 103:20) Yesu Klisto, Mwana bobele moko ya Yehova Nzambe azalaki “kapita-mosáli” ya esengo kati na likoló mpe azalaki kosepela na kosala mokano ya Nzambe lokola moto awa na mabelé. Lisusu, “mpɔ na esɛngɔ etiami liboso na ye, ayikeli [nzeté ya mpasi, NW] mpiko, atioli nsɔni na yango mpe ajali kofanda na lobɔkɔ na mobali na kiti na bokonji na Njambe.”—Masese 8:30, 31; Baɛbɛlɛ 10:5-10; 12:2.
2. Nini esengelaki mpo ete Bayisraele bázwa mapamboli to bilakeli mabe?
2 Bayisraele bazalaki na esengo ntango bazalaki kosepelisa Nzambe. Kasi nini ezalaki kokómela bango ntango bazangaki kotosa ye? Bapesamelaki likebisi oyo ete: “[Bilakeli mabe] ikojala na likolo na yɔ lokola elembo mpe likambo na kokamwa, mpe na likolo na bana na yɔ libela. Yɔ osalelaki [Yehova] Njambe na yɔ na esɛngɔ mpe na kosepela na motema tɛ, na ntina na kotonda na bilɔkɔ yɔnsɔ, yango wana okosalela bayini na yɔ, baoyo [Yehova] akotindela yɔ, na njala mpe na mposa na mai mpe na bolumbu mpe na bosenga na bilɔkɔ yɔnsɔ, mpe ye akotia ekanganeli na ebende na nkingo na yɔ kino esili ye koboma yɔ.” (Dutɛlɔnɔmɛ 28:45-48) Mapamboli mpe bilakeli mabe emonisaki polele bokeseni kati na baoyo bazalaki basaleli ya Yehova mpe baoyo bazalaki basaleli na ye te. Bilakeli mabe wana emonisaki mpe ete mitinda mpe mikano ya Nzambe ekokaki te kotalelama na kozanga limemya, ekokaki mpe kotyolama te. Lokola Bayisraele baboyaki koyoka makebisi ya Nzambe na ntina na libebi mpe na ntina na kokende na boombo, Yelusaleme ekómaki “elakeli mabe mpo na mabota nyonso ya mabelé.” (Yilimia 26:6, NW) Na yango, tiká ete tótosaka Nzambe mpe tósepelaka na ngɔlu na ye. Esengo ezali moko kati na mapamboli mingi ya Nzambe oyo bato na bizaleli na Nzambe bazali kozwa.
Lolenge ya kosala na “esengo na motema”
3. Motema ya elilingi ezali nini?
3 Bayisraele basengelaki kosalela Yehova “na kosepela mpe na esengo na motema.” Basaleli ya Nzambe na mikolo na biso basengeli kosala sé bongo. Kosepela elimboli kozala na nsaí; kotonda na esengo.” Atako ezali mpenza motema nde elobelami kati na Makomami, kasi yango ekanisaka to esosolaka te. (Exode 28:30) Mosala na yango ya liboso ezali ya kobimisa makila oyo ezali koleisa baselilɛ ya nzoto. Nzokande, kati na makambo mingi, Biblia elobelaka motema ya elilingi, oyo ezali bobele te efandelo ya mayoki, ya bamposa, mpe ya makanisi. Elobelami ete ezali “eteni ya ntéi, ya kati, mpe ezali bongo moto ya kati, lokola ete azali komimonisa na misala na ye nyonso mikeseni, na makambo oyo alingaka mingi, na bolingo, na mayoki, na bamposa, na mikano, na makanisi, na lolenge ya komonela makambo, na mabanzo, na mayele, na boyebi, na makoki, na bindimeli, na lolenge ya kokanisa, na makoki ya komikundola makambo mpe na lisosoli na ye.” (Journal of the Society of Biblical Literature and Exegesis, 1882, lokasa 67) Motema na biso ya elilingi esangisi makanisi mpe mayoki, esengo mpe ezali kati na yango.—Yoane 16:22.
4. Nini ekoki kosalisa biso na kosalela Yehova Nzambe na esengo na motema?
4 Nini ekoki kosalisa biso na kosalela Yehova na esengo na motema? Kotalela na lolenge ya malamu mpe na limemya mapamboli na biso mpe mabaku kitoko Nzambe azali kopesa biso ezali na ntina mingi. Na ndakisa, tokoki kokanisa na esengo nyonso na ntina na libaku tozali na yango ya kosalela Nzambe ya solo “mosala ya bulɛɛ.” (Luka 1:74) Libaku kitoko mosusu oyo tozali na yango ezali oyo ya komema nkombo ya Yehova lokola Batatoli na ye. (Yisaya 43:10-12) Likoló na oyo, tokoki lisusu kobakisa esengo ya koyeba ete soki tozali kolanda Liloba ya Nzambe tozali kosepelisa ye. Mpe oyo nde esengo tozali na yango na komonisa pole ya elimo mpe ya kosalisa bato mingi na kolongwa na molili!—Matai 5:14-16; kokanisá na 1 Petelo 2:9.
5. Nini ezali liziba ya esengo ya Nzambe?
5 Nzokande, kosalela Yehova na esengo na motema esuki te bobele na kozala na makanisi malamu. Ezali litomba koyeba kotalela makambo na lolenge ya malamu. Kasi esengo ya Nzambe ezali te bobele eloko oyo tozali kobimisa na nzela ya bokóli ya bomoto. Yango ezali mbuma ya elimo ya Yehova. (Bagalatia 5:22, 23) Soki tozali na esengo motindo wana te, tosengeli kosala mbongwana mpo na kobwaka makanisi to misala oyo miyokani te na Makomami, oyo ekoki koyokisa elimo ya Nzambe mawa. (Baefese 4:30) Nzokande, lokola tozali bato oyo bamipesi epai na Yehova, tiká tózala na bobangi te na kokanisáká ete kozanga mayoki ya esengo oyo ekómelaka biso na bantango mosusu kati na motema ezali elembeteli ete tondimami te na Nzambe. Tozali bato bazangi kokoka mpe tozwaka bampasi, mawa, mpe ata kotungisama na makanisi na bantango mosusu, kasi Yehova ayebi biso malamu. (Nzembo 103:10-14) Na yango, tiká ete tóbondelaka mpo na kozwa elimo santu na ye, na komikundoláká ete Nzambe nde apesaka mbuma na yango oyo ete esengo. Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo akoyanola na mabondeli motindo wana mpe akopesa biso makoki ya kosalela ye na esengo na motema.—Luka 11:13.
Ntango esengo ezangi
6. Soki tozangi esengo kati na mosala na biso mpo na Nzambe, tosengeli kosala nini?
6 Soki tozangi esengo kati na mosala na biso, milende na biso mpo na kosalela Yehova ekoki kokita to ata mpe komimonisa kozanga sembo epai na ye. Na yango, ekozala likambo ya mayele na kotalela makanisi na biso na komikitisa nyonso mpe na bosembo nyonso mpe kosala mbongwana oyo esengeli. Mpo na kozwa esengo oyo Nzambe apesaka, tosengeli kosalela Yehova na kopusamáká na bolingo mpe na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, mpe na makanisi na biso mobimba. (Matai 22:37) Tosengeli te kosalela ye na elimo ya kowelana, mpamba te Paulo akomaki ete: “Sɔkɔ tojali kobika mpɔ na [elimo, NW] totambolaka mpe na [elimo, NW]. Tojala na lolɛndɔ tɛ, totungisana tɛ, tolulanaka tɛ.” (Bagalatia 5:25, 26) Tokozala na esengo ya solo te soki tozali kosala na likanisi ya kolinga koleka basusu to koluka lokumu.
7. Lolenge nini tokoki kopelisa lisusu esengo na biso na motema?
7 Tozali na esengo soki tozali na bomoi oyo eyokani na komipesa na biso epai na Yehova. Ntango tomipesaki sika epai na Nzambe, tomikɔtisaki na molende nyonso kati na nzela ya bomoi ya boklisto. Tozalaki koyekola Makomami mpe kosangana na makita pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. (Baebele 10:24, 25) Yango epesaki biso esengo ya kosangana na mosala ya kosakola. Nzokande, ezali boni soki esengo na biso ekiti? Boyekoli ya Biblia, koyangana na makita, kosangana na mosala ya kosakola—ya solo, komipesa mingi kati na misala nyonso ya boklisto—esengeli kopesa kimya ya elimo na bomoi na biso mpe ekopelisa lisusu bolingo oyo tozalaki na yango na ebandeli mpe esengo na motema oyo tozalaki na yango liboso. (Emoniseli 2:4) Bongo tokozala te lokola basusu oyo bazali na esengo te mpe oyo mbala mingi bazali na mposa ya lisungi na elimo. Bankulutu basepelaka kosalisa, kasi tosengeli moto na moto kokokisa mokano ya komipesa na biso epai na Nzambe. Ezali na moto mosusu te oyo akoki kosala yango mpo na biso. Na yango, tiká tósala ete yango ezala mokano na biso ya kolanda na mimeseno malamu ya boklisto mpo na kokokisa komipesa na biso epai na Yehova mpe kozala na esengo ya solo.
8. Mpo na nini kozala na lisosoli ya pɛto ezali na ntina mingi soki tolingi kozala na esengo?
8 Soki tolingi kozala na esengo oyo ezali bongo mbuma ya elimo ya Nzambe, tosengeli kozala na lisosoli ya pɛto. Na boumeli ya ntango oyo, Davidi, mokonzi ya Yisraele amekaki kobomba lisumu na ye, azalaki mpenza na mawa. Ya solo, londende ya bomoi na ye emonanaki lokola ete ezalaki kolimwa, mpe ekoki kozala ete akómaki kobɛla na nzoto. Oyo nde lisungi monene azwaki ntango abongolaki motema mpe ayambolaki lisumu na ye! (Nzembo 32:1-5) Tokoki kozala na esengo te soki tozali kobomba masumu mosusu ya minene. Yango ekoki kobimisela biso bomoi moko ya mobulungano. Ya solo, yango ezali nzela ya kozwa esengo te. Kasi koyambola masumu mpe kobongola motema epesaka libɔndisi mpe ezongisaka ezalela ya esengo.—Masese 28:13.
Kozela na esengo
9, 10. (a) Elaka nini Abalayama azwaki, kasi mbala mosusu lolenge nini kondima mpe esengo na ye emekamaki? (b) Lolenge nini tokoki kozwa litomba na ndakisa ya Abalayama, Yisaka mpe Yakobo?
9 Kozala na esengo ntango tobandi koyekola mokano ya Nzambe ezali likambo mosusu kasi kotikala na esengo wana bambula ezali koleka ezali mpe likambo mosusu. Yango ekoki komonisama na likambo likómelaki mosembwi Abalayama. Nsima wana alingaki kopesa mwana na ye Yisaka lokola mbeka na kolanda etinda ya Nzambe, anzelu moko apesaki nsango oyo ete: “[Yehova] alobi ete, ‘Nasili kokata ndai na nkombo na ngai mpenja, mpɔ ete osili kosala oyo, mpe oboyi kopɛsa mwana na yɔ tɛ, mwana na yɔ na likinda, nakopambola yɔ sɔlɔ mpe nakofulisa bana na yɔ lokola miɔtɔ na likolo mpe lokola jɛlɔ na libongo na mai. Bana na yɔ bakobɔtɔla bikuke na bayini na bango. Mabota yɔnsɔ na nse bakopambolama mpɔ na [mombóto, NW] na yɔ, mpɔ ete yɔ osili kotosa monɔkɔ na ngai.’” (Genese 22:15-18) Na ntembe te, Abalayama asepelaki mingi na elaka wana.
10 Abalayama akokaki mbala mosusu kokanisa ete Yisaka nde alingaki kozala “mombóto” oyo na nzela na ye mapamboli malingaki koya. Kasi lokola bambula ezalaki koleka eloko moko ya kokamwa ekokisamaki te epai na Yisaka, yango ekokaki kotya kondima mpe esengo ya Abalayama mpe ya libota na ye na komekama. Nzambe alobelaki lisusu elaka yango epai na Yisaka mpe na nsima epai na mwana na ye Yakobo, kondimisáká bango ete koya ya Mombóto ezalaki na mikolo mizalaki koya, mpe yango esalisaki bango na kobatela bosembo mpe esengo na bango. Atako bongo, Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo bakufaki kozanga komona kokokisama ya bilaka oyo Nzambe apesaki bango, kasi bazalaki te basaleli ya Yehova oyo bazangaki esengo. (Baebele 11:13) Biso mpe tokoki kolanda kosalela Yehova na kondima mpe na esengo wana ezali biso kozela kokokisama ya bilaka na ye.
Esengo atako minyoko
11. Mpo na nini tokoki kozala na esengo atako tokutani na minyoko?
11 Lokola tozali basaleli ya Yehova, tokoki kosalela Ye na esengo na motema, ata soki tozali konyokwama. Yesu alobaki ete baoyo bazali konyokwama mpo na ye bazali na esengo, mpe ntoma Petelo alobaki ete: “Bosepela ete bojali kosangana na mpasi na Klisto ete bosepela na esɛngɔ monɛnɛ wana ekomɔnana nkɛmbɔ na ye. Esɛngɔ na bino sɔkɔ bokotukama mpɔ na nkombo na Klisto, mpɔ ete [elimo, NW] na nkɛmbɔ mpe na Njambe [ezali, NW] koumela na bino.” (1 Pɛtɛlɔ 4:13, 14; Matai 5:11, 12) Soki ozali koyika mpiko na minyoko mpe na mpasi na ntina na boyengebene, ozali na elimo mpe ngɔlu ya Yehova, mpe yango ekokólisa solo esengo.
12. (a) Mpo na nini tokoki kolónga komekama ya kondima na esengo nyonso? (b) Liteya nini ya ntina tokoki kozwa na kotalela likambo ya Molevi moko oyo azalaki na boombo?
12 Na esengo nyonso, tokoki kolónga wana kondima na biso emekami mpamba te Nzambe azali Ekimelo na biso. Yango emonani polele na Nzembo 42 mpe 43. Mpo na ntina moko boye, Molevi moko azalaki na boombo. Na bongo azangisaki mingi losambo oyo ezalaki kosalema na esika mosantu na boye ete azalaki lokola nganzi (biche) mpe mbuli ya mwasi oyo ayoki mposa makasi ya mai kati na etúká ekauká mpe ya lisobe. Azalaki na “mposa” to kobanzabanza mpo na Yehova mpe mpo na libaku kitoko ya kosambela Nzambe na esika mosantu na Ye. (Nzembo 42:1, 2) Likambo litali boombo oyo Molevi wana akutanaki na yango esengeli kopusa biso na komonisa botɔ́ndi mpo na boninga na biso kati na libota ya Nzambe. Soki ezalela moko lokola kokangama na bolɔ́kɔ na ntina na minyoko ya mwa ntango mokuse esali ete tókabwana na bango, tiká ete tókanisa na bisengo tozwaki liboso elongo na bango kati na mosala ya bulɛɛ mpe tóbondela mpo na kozwa mpiko ntango tozali “kozela Nzambe” ete asunga biso na kozongela mosala na biso ya ntango nyonso elongo na basambeli na ye.—Nzembo 42:4, 5, 11; 43:3-5.
“Salelá Yehova na bosepeli”
13. Lolenge nini Nzembo 100:1, 2 emonisi ete esengo esengeli kozala likambo ya ntina na mosala oyo tozali kosalela Nzambe?
13 Esengo esengeli kozala likambo moko ya ntina na mosala na biso mpo na Nzambe. Yango emonisamaki kati na loyembo ya kopesa matɔ́ndi oyo kati na yango mokomi na Nzembo ayembaki ete: “Bosala lokito na kosepela liboso na [Yehova], bino bato na mokili mobimba; bosalela [Yehova] na esɛngɔ, boya liboso na ye na loyembo.” (Njembo 100:1, 2) Yehova azali “Nzambe ya esengo” mpe alingi ete basaleli na ye bázala na esengo wana ezali bango kokokisa mikumba mitali komipesa na bango epai na ye. (1 Timoté 1:11, NW) Bato ya mabota nyonso basengeli kosepela kati na Yehova, mpe masanzoli na biso masengeli kozala makasi, lokola ‘lokito na kosepela’ ya mampinga oyo balóngi etumba. Lokola mosala ya Nzambe ezali ya kosepelisa, esengeli mpe ete esalema na bosepeli. Yango wana mokomi na Nzembo asɛngaki na bato ete báya liboso na Nzambe na “loyembo ya esengo.”
14, 15. Lolenge nini Nzembo 100:3-5 ezali kokokana epai na basaleli ya esengo ya Yehova lelo oyo?
14 Mokomi na Nzembo abakisaki ete: “Boyeba ete [Yehova] ye ajali Njambe; ye asalaki biso, biso tojali bato na ye. Tojali bato na ye, mpate na elanga na ye.” (Njembo 100:3) Mpo ete Yehova azali Mozalisi na biso, azali nkolo na biso lolenge moko mobateli na mpate azali nkolo ya bampate na ye. Na bongo lokola Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso, tosengeli kokumisa ye na botɔ́ndi nyonso. (Nzembo 23) Na ntina na Yehova, mokomi na Nzembo ayembaki mpe ete: “Bokɔta kati na bikuke na ye na matɔndi, na lopango na ye na kosanjola; botɔnda ye, bosanjola nkombo na ye. Jambi [Yehova] ajali malamu, boboto na ye ekosila tɛ; sɔlɔ na ye ekotikalaka na libota na libota.”—Njembo 100:4, 5.
15 Lelo oyo, bato na esengo kati na mabota nyonso bazali kokɔta na mapango ya esika mosantu ya Yehova mpo na kopesa ye matɔ́ndi mpe masanzoli. Na esengo nyonso, tozali kopambola nkombo ya Nzambe na kolobáká ntango nyonso malamu mpo na Yehova, mpe bizaleli na ye minene bizali kopusa biso na kosanzola ye. Azali malamu na makambo nyonso, mpe motema-boboto na ye to ezaleli azali na yango ya koyokela basaleli na ye mawa ekoki ntango nyonso kotyelama motema, mpamba te ekolanda kozala libela na libela. Epai na “libota moko nsima na libota mosusu,” Yehova azali sembo na komonisáká bolingo epai na baoyo bazali kosala mokano na ye. (Baloma 8:38, 39) Na bongo, tozali solo na bantina malamu ya “kosalela Yehova na bosepeli.”
Sepelá na elikya na yo
16. Kati na bilikya nini baklisto bakoki kosepela mpo na yango?
16 Paulo akomaki ete: “Mpɔ na elikia, bosepelaka.” (Baloma 12:12) Bayekoli bapakolami ya Yesu Klisto bazali kosepela na elikya kitoko ya kozala na bomoi bozangi kufa na likoló, oyo Nzambe asali ete bázwa yango na nzela ya Mwana na ye. (Baloma 8:16, 17; Bafilipi 3:20, 21) Baklisto oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé bazali mpe na bantina malamu ya kosepela. (Luka 23:43) Basaleli nyonso ya sembo ya Yehova bazali na ntina ya kosepela na elikya ya Bokonzi, mpamba te bamoko kati na bango bakosangana na boyangeli yango ya likoló mpe basusu bakozala na bomoi na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi yango. Oyo nde lipamboli ya esengo!—Matai 6:9, 10; Baloma 8:18-21.
17, 18. (a) Nini esakolamaki na Yisaya 25:6-8? (b) Lolenge nini esakweli wana ya Yisaya ezali kokokisama sikawa, mpe ezali boni mpo na kokokisama na yango na mikolo mizali koya?
17 Yisaya mpe asakolaki mikolo mizali koya ya esengo mpo na bato ya botosi. Akomaki ete: “Na ngomba oyo [Yehova] na bibele akobɔngisɛla mabota yɔnsɔ elambo na bilei na mafuta, elambo na vinyo oyo esili koumela, na bilei kitɔkɔ bitondi na mafuta mpe na vinyo iumeli mpe ipɔnami. Na ngomba oyo akobebisa ejipeli oyo etandisami likolo na bato yɔnsɔ mpe ejipeli-na-elongi oyo etandisami epai na mabota yɔnsɔ. Akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi yɔnsɔ; akolongola mpe nsɔni na bato na ye longwa na mokili mobimba, jambi [Yehova] alobi bongo.”—Yisaya 25:6-8.
18 Elambo ya elimo oyo tozali kosangana na yango lelo oyo lokola tozali basambeli ya Yehova ezali mpenza elambo moko ya esengo. Ya solo, esengo na biso ezali kobakisama wana tozali kosalela Nzambe na molende nyonso na kozeláká elambo mpenzampenza ya biloko kitoko oyo alaki mpo na mokili ya sika. (2 Petelo 3:13) Na moboko ya mbeka ya Yesu, Yehova akolongola “ejipeli-na-elongi” oyo ezipi bato banso na ntina na lisumu ya Adama. Oyo nde esengo ekozala na komona kolongwama ya lisumu mpe kufa! Oyo nde esengo na koyamba balingami na biso oyo bakosekwa, na komona ete mpisoli ezali lisusu te, mpe kozala na bomoi na paladiso awa na mabelé, epai libota ya Yehova likopamelama te kasi ekopesa nde Nzambe eyano epai na motumoli monene, Satana Zábolo!—Masese 27:11.
19. Mayoki na biso masengeli kozala nini liboso na bilikya oyo Yehova atye liboso na biso lokola tozali Batatoli na ye?
19 Yango ezali kotondisa yo na esengo mpe na botɔ́ndi na koyeba oyo Yehova akosala mpo na basaleli na ye, boye te? Ya solo, bilikya minene wana bizali kosala ete tózala na esengo! Lisusu, elikya kitoko oyo tozali na yango ezali kotinda biso na kotalela Nzambe na biso ya esengo, ya bolingo mpe ya bokabi na mayoki lokola oyo: “Tala oyo Njambe na biso; tolambeli ye mpe ye akobikisa biso. Oyo ajali [Yehova], tolambeli ye, tika ete tosepela mpe toyoka esɛngɔ na lobiko na ye.” (Yisaya 25:9) Wana ezali biso kobatela na makasi nyonso kati na makanisi elikya kitoko oyo tozali na yango, tiká ete tósala milende makasi mpo na kosalela Yehova na esengo na motema.
Lolenge nini okoyanola?
◻ Lolenge nini tokoki kosalela Yehova na “esengo na motema”?
◻ Tokoki kosala nini soki tozangi esengo kati na mosala ya Nzambe?
◻ Mpo na nini basaleli ya Yehova bakoki kozala na esengo atako bazali konyokwama?
◻ Bantina nini tozali na yango ya kosepela na elikya na biso?
[Bililingi na lokasa 17]
Kosangana na biteni nyonso ya mosala ya boklisto ekokólisa esengo na biso