Oponaka kominanola oyo ebongi?
“Bókoba koluka koyeba malamu mpenza eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.” —EF. 5:10.
1, 2. (a) Ndenge nini Biblia emonisi ete Yehova alingi tózala na bomoi ya esengo? (b) Komona ete ntango oyo tolekisaka na kosakana ezali “likabo ya Nzambe” esengeli kotinda biso tósala nini?
BIBLIA emonisi polele ete Yehova alingi tózala na bomoi ya esengo. Na ndakisa, Nzembo 104:14, 15 elobi ete Yehova abimisaka “bilei na mabele, mpe vinyo oyo esepelisaka motema ya moto—mowei mpamba, mpo na kongɛngisa elongi na mafuta, mpe limpa oyo epesaka makasi na motema ya moto—mowei mpamba.” Yehova nde akolisaka milona mpo tózwa bilei, mafuta, mpe vinyo. Atako vinyo ezalaka na ntina mpenza te mpo tózala na bomoi, ekoki “kosepelisa motema.” (Mos. 9:7; 10:19) Ya solo, Yehova alingi tózala na esengo, mitema na biso etonda “na nsai.”—Mis. 14:16, 17.
2 Na yango, tosengeli te komona ete tosali mabe soki tozwi mwa ntango mpo na ‘kotala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló’ mpe “fololo lísi ya esobe,” to kosala mwa makambo mosusu oyo ekoki kopesa biso makasi mpe kobakisa esengo na bomoi. (Mat. 6:26, 28; Nz. 8:3, 4) Bomoi ya esengo ezali “likabo ya Nzambe.” (Mos. 3:12, 13) Ntango oyo tolekisaka na kosakana ezali na kati ya likabo yango ya Nzambe. Soki tozali kotalela yango bongo, tokosalela yango na ndenge oyo ekosepelisa ye.
Kominanola ezali ndenge na ndenge kasi tóyeba kopona
3. Mpo na nini ezali mabe te moto na moto apona kominanola oyo alingi?
3 Bato oyo bazalaka na bokatikati na oyo etali kominanola bayebaka ete kominanola ezali ndenge na ndenge, kasi mpe ete basengeli kopona oyo ya malamu. Mpo na nini? Mpo na kozwa eyano na motuna wana, tókokanisa naino kominanola na bilei. Bato na bisika ndenge na ndenge ya mokili balyaka biloko ya ndenge moko te. Kutu, bilei oyo bato ya esika moko boye balingaka mingi, ekoki kozala oyo bato ya esika mosusu balingaka te. Ndenge moko mpe, bakristo oyo bafandi na esika moko boye na mokili bakoki kosepela na lolenge moko boye ya kominanola, nzokande bakristo ya esika mosusu basepelaka na yango te. Ata bakristo oyo bafandi na mboka moko bakoki mpe kozala na makanisi ekeseni na oyo etali kominanola. Na ndakisa, moto mosusu akoki komona ete kotánga buku moko ya kitoko epesaka esengo, moto mosusu akoki komona ete ezali motungisi. Mokristo moko akoki komona ete kotambola na velo epesaka makasi, mosusu akoki komona ete elɛmbisaka. Tondimaka ete bilei mpe ndenge ya kominanola ezali mingi, mpe ete moto na moto akoki kopona oyo alingi.—Rom. 14:2-4.
4. Mpo na nini tosengeli kozala na bokatikati na oyo etali kominanola? Pesá ndakisa.
4 Nzokande, toyebi mpe ete kopona kominanola oyo tolingi elimboli te kosala nyonso oyo motema na biso elingi. Tólobela lisusu ndakisa ya bilei. Atako tokoki kosepela kolya bilei ya ndenge na ndenge, na ntembe te, tokopona te kolya bilei oyo epɔlá. Kolya bilei ya ndenge wana eyokani te na makanisi ya bomoto mpe ekoki kopesa biso maladi. Ndenge moko mpe, atako kominanola ya malamu ekoki kozala ndenge na ndenge, tokolinga te kominanola na makambo ya mobulu, ya mbindo to oyo ekoki kozala likama mpo na bomoi na biso. Makambo wana eyokani te na batoli ya Biblia mpe ekoki kobebisa nzoto na biso mpe boyokani na biso na Nzambe. Mpo tózala na bokatikati na oyo etali kominanola, tosengeli kokanisa liboso soki lisano oyo ezali kosepelisa motema na biso ezali malamu to te. (Ef. 5:10) Ndenge nini tokoki kosala yango?
5. Ndenge nini tokoki koyeba soki kominanola na biso eyokani na mibeko ya Nzambe?
5 Mpo kominanola na biso esalisa biso mpe endimama na miso ya Yehova, esengeli koyokana na mibeko oyo ezali na Biblia. (Nz. 86:11) Mpo na koyeba soki kominanola oyo ozali kosepela na yango ezali malamu, okoki kosala mwa liste. Na mokuse, liste yango ekoki kozala na mituna oyo misato: ya ndenge nini? ntango nini? mpe ná banani? Tólobela yango mokomoko.
Ezali ya ndenge nini?
6. Kominanola ya ndenge nini tosengeli koboya, mpe mpo na nini?
6 Liboso tópona lisano oyo tokosala, tosengeli komituna boye: ‘Lisano oyo nazali kosepela na yango ezali ya ndenge nini?’ Ntango ozali koluka eyano, ekozala malamu obosana te ete kominanola ezalaka ndenge mibale. Lolenge ya liboso ezali na makambo oyo tosengeli kosala te. Ya mibale ezali na makambo oyo tokoki kondima kosala. Ya liboso ezali nini? Na mokili oyo, makambo mingi oyo bato basalaka mpo na kominanola eyokani te na batoli ya Biblia mpe ebukaka mibeko ya Nzambe. (1 Yoa. 5:19) Bakristo ya solo baboyaka makambo nyonso ya ndenge wana. Na ndakisa, kominanola oyo ezali komonisa ndenge bato bazali konyokola basusu na ndenge ya nsɔmɔ, misala ya bademo, kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi, pornografi, mobulu, to oyo ezali kokumisa pite mpe ekobo. (1 Ko. 6:9, 10; tángá Emoniseli 21:8.) Ezala tozali wapi, tokomonisa Yehova ete ‘toboyaka oyo ezali mabe’ soki tozali koboya kominanola oyo ezali na makambo ya ndenge wana.—Rom. 12:9; 1 Yoa. 1:5, 6.
7, 8. Ndenge nini tokoki koyeba soki lisano moko boye ezali malamu? Pesá ndakisa.
7 Lolenge ya mibale ya kominanola ezali na makambo oyo Biblia epekisi polelepolele te. Kasi batoli ya Biblia esalisaka biso tóyeba makambo oyo Yehova amonaka ete ezali malamu. Na yango, liboso tópona kominanola oyo ezali na makambo ya ndenge wana, tosengeli kotala soki eyokani na batoli ya Biblia. (Mas. 4:10, 11) Na nsima, tosengeli kozwa ekateli oyo ekotungisa lisosoli na biso te. (Gal. 6:5; 1 Tim. 1:19) Ndenge nini tokoki kosala yango? Kanisá naino: Liboso tólya elubu oyo tolyá naino te, tokotuna soki balambi yango na biloko nini. Ndenge moko mpe, liboso tópona lisano moko, tosengeli koluka koyeba soki ezali mingimingi na makambo nini.—Ef. 5:17.
8 Na ndakisa, mbala mosusu olingaka masano. Mabe ezali te mpo bato mingi mpe balingaka yango. Masano ekoki kosepelisa mingi. Kasi, okosala nini soki osepelaka na lisano moko mpo bato oyo bazali kosala yango bawelanaka makasi? To lisano oyo etyaka bomoi ya moto na likama, oyo bato basalaka makambo ya mobulu, to bakumisaka ekólo na bango, to basalaka makambo mosusu ya ndenge wana? Nsima ya kokanisa makambo oyo ezalaka na lisano yango, mbala mosusu okomona ete lisano yango eyokani te na makanisi ya Yehova mpe na nsango ya kimya mpe ya bolingo oyo tosakwelaka bato. (Yis. 61:1; Gal. 5:19-21) Kasi, soki omonisi ete lisano moko ezali na makambo oyo ezali mabe te na miso ya Yehova, lisano yango ekoki kozala malamu mpe kozongisela yo makasi.—Gal. 5:22, 23; tángá Bafilipi 4:8.
Ntango nini nasalaka yango?
9. Eyano na biso na motuna oyo: ‘Ntango nini nakosala lisano yango?’ ekomonisa nini?
9 Motuna ya liboso ezalaki ya koyeba soki kominanola oyo tolingi ezali ya ndenge nini. Eyano na biso na motuna yango emonisi makambo oyo tolingaka mpe oyo toboyaka. Motuna ya mibale etaleli ntango. Tómituna boye: ‘Ntango nini nakosala lisano yango? Ekozwa ngai ntango boni?’ Eyano na biso na motuna oyo etali ntango ekomonisa makambo oyo totyaka na esika ya liboso mpe oyo tomonaka ete ezali na ntina mingi. Na yango, ndenge nini tokoki koyeba soki kosakana ezali na esika nini na bomoi na biso?
10, 11. Ndenge nini maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:33 esalisaka biso tóyeba ntango boni tokolekisa na kosakana?
10 Yesu Kristo alobaki boye: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.” (Mrk. 12:30) Na yango, likambo ya liboso na bomoi na biso nde kolinga Yehova. Tokomonisa ete ezali bongo soki tozali kolanda toli oyo ya Yesu: “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.” (Mat. 6:33) Ndenge nini maloba yango ekoki kosalisa biso tóyeba esika nini tosengeli kotya kominanola na bomoi na biso mpe ntango boni tosengeli kopesa yango?
11 Yebá ete Yesu alendisaki biso ‘tókoba koluka liboso bokonzi.’ Alobaki te ete ‘tókoba koluka kaka bokonzi.’ Emonani polele ete Yesu ayebaki ete longola koluka Bokonzi, tokozala na mposa ya koluka makambo mosusu mingi na bomoi na biso. Tozalaka na mposa ya kozwa esika ya kofanda, bilei, bilamba, kotánga kelasi, mosala, kominanola, mpe bongo na bongo. Kasi, na makambo wana nyonso, kaka moko nde tosengeli koluka liboso: Bokonzi. (1 Ko. 7:29-31) Koyeba likambo yango esengeli kotinda biso tósalaka liboso makambo oyo eleki ntina—makambo oyo etali Bokonzi—mpe na nsima makambo mosusu, kati na yango kominanola. Soki tosali bongo, kominanola ekozala malamu mpo na biso.
12. Ndenge nini likanisi oyo ezali na Luka 14:28 etali kominanola?
12 Na yango, liboso ya kopona kominanola moko boye, tosengeli kokanisa likambo etali ntango, ndenge kaka moto oyo alingi kotonga ndako alukaka “koyeba mosolo boni yango ekosɛnga.” (Luka 14:28) Tosengeli kotala soki kominanola yango ekozwa biso ntango boni. Na nsima, tokotala soki ntango boni ebongi tólekisa na kominanola yango. Soki lisano oyo toponi ekotinda biso tóbosana makambo oyo eleki ntina na ndakisa koyekola Biblia biso moko, losambo na libota, koyangana na makita, to kosakola Bokonzi, ebongi te tómipesa na lisano yango. (Mrk. 8:36) Kasi, soki kominanola oyo toponi ekopesa biso makasi mpo tókoba na mosala ya Nzambe, mbala mosusu tokoki komona ete ezali mabe te tólekisa mwa ntango na kominanola yango.
Nakozala elongo na banani?
13. Mpo na nini tosengeli kokanisa soki tokozala elongo na banani ntango tozali kominanola?
13 Motuna ya misato oyo osengeli komituna yango oyo: ‘Nakosala lisano yango ná banani?’ Ezali na ntina tókanisa likambo yango. Mpo na nini? Mpamba te bato oyo tozali kominanola elongo na bango bakoki mpe kosala ete kominanola yango ezala malamu to mabe. Kaka ndenge mbala mingi kolya elongo na baninga ya malamu epesaka esengo mingi, kosakana mpe epesaka esengo mingi soki tozali elongo na baninga ya malamu. Yango wana, mingi kati na biso, mingimingi bilenge, basepelaka kosakana elongo na basusu. Kasi, soki tolingi ete lisano na biso eleka malamu, tosengeli koyeba liboso bato oyo bakoki kozala baninga malamu to baninga mabe na lisano yango.—2 Nt. 19:2; tángá Masese 13:20; Yak. 4:4.
14, 15. (a) Ndakisa nini Yesu atiká na oyo etali kopona baninga ya malamu? (b) Mituna nini tosengeli komituna liboso tópona baninga?
14 Kolanda ndakisa ya Yesu na oyo etali kopona baninga ekosalisa biso mingi. Banda mokili ebandá, Yesu alingaka bato mingi. (Mas. 8:31) Ntango azalaki awa mabele, azalaki kolinga mpe komemya bato ya ndenge nyonso. (Mat. 15:29-37) Kasi, Yesu ayebaki ete kosepela na moto ekeseni na kozala moninga na ye. Atako azalaki kosepela na bato nyonso, azalaki moninga ya moto nyonso te. Alobaki na bantoma na ye 11 ya sembo ete: “Bozali baninga na ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kopesa bino mitindo.” (Yoa. 15:14; talá mpe Yoane 13:27, 30.) Bato oyo Yesu aponaki mpo bázala baninga na ye, ezalaki kaka baoyo bazalaki kolanda ye mpe kosalela Yehova.
15 Na yango, liboso opona moto moko boye mpo azala moninga na yo, ekozala malamu okanisa maloba wana ya Yesu. Omituna boye: ‘Maloba mpe misala ya moto yango emonisaka ete atosaka mitindo ya Yehova mpe ya Yesu? Ye mpe alingaka oyo ezali malamu mpe ayinaka oyo ezali mabe, ndenge Biblia esɛngi biso? Soki nazali elongo na ye, akosalisa ngai natya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na ngai mpe nasalela Yehova na bosembo?’ Soki oyanoli mpenza ɛɛ na mituna yango, wana ozwi moninga oyo okoki kolekisa ntango elongo na ye mpo na kominanola.—Tángá Nzembo 119:63; 2 Ko. 6:14; 2 Tim. 2:22.
Kominanola na biso ebongi mpenza?
16. Mituna nini tosengeli komituna na oyo etali kominanola?
16 Tolobeli na mokuse makambo misato oyo etali kominanola: lolenge na yango, ntango boni ekozwa, mpe baninga oyo tokozala na bango. Mpo kominanola na biso ezala malamu, esengeli koyokana na batoli ya Biblia na makambo wana misato. Na yango, liboso tósala lisano moko boye, tosengeli kotala soki lisano yango ebongi mpenza. Mpo na koyeba lolenge na yango, tómituna boye: ‘Ezali na makambo ya ndenge nini? Ezali ya malamu to ya mabe?’ (Mas. 4:20-27) Mpo na ntango oyo ekozwa biso, tómituna boye: ‘Nakolekisa ntango boni na lisano yango? Ntango yango eleki mingi to te?’ (1 Tim. 4:8) Mpe na oyo etali baninga, tómituna boye: ‘Nakozala ná banani? Bazali baninga ya malamu to ya mabe?’—Mos. 9:18; 1 Ko. 15:33.
17, 18. (a) Tokoki kosala nini mpo tóyeba soki kominanola na biso eyokani na batoli ya Biblia? (b) Ekateli na yo ezali nini mpo na kominanola?
17 Soki lisano moko eyokani te na batoli ya Biblia ata na moko ya makambo misato oyo touti kolobela, lisano yango ebongi te. Kasi, soki tomoni mpenza ete kominanola oyo toponi eyokani na batoli ya Biblia na makambo wana nyonso misato, kominanola yango ekopesa Yehova lokumu mpe ezali malamu mpo na biso.—Nz. 119:33-35.
18 Na yango, ntango tolingi kopona ndenge ya kominanola, tóluka mpenza kosala oyo ezali malamu na ntango oyo ebongi mpe na bato oyo babongi. Tiká mokomoko na biso azala na mposa makasi ya kotosa toli oyo ya Biblia: “Ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”—1 Ko. 10:31.
Okoki kolimbola?
Na oyo etali kominanola, ndenge nini okoki kolanda toli oyo ezali na . . .
• Bafilipi 4:8?
• Matai 6:33?
• Masese 13:20?
[Etanda na lokasa 9]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
✔Ya ndenge nini
[Etanda na lokasa 10]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
✔Ntango nini
[Etanda na lokasa 12]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
✔Na banani
[Elilingi na lokasa 10]
Ndenge nini tokoki komekola Yesu na oyo etali kopona baninga mpe kominanola?