Bilenge, bókanisa Mozalisi na bino monene sikoyo
“Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.”—Mos. 12:1, NW.
1. Ndenge nini Yehova amonisi ete atyelaka bilenge oyo basambelaka ye motema?
NA MISO ya Yehova, bilenge baklisto bazali na motuya mpe bazali kitoko lokola mamwɛ. Kutu, asakolaki ete na “mokolo ya nguya” ya Mwana na ye, bilenge basi mpe mibali ‘bakomipesa na bolingo nyonso’ mpo na kosalela Klisto. (Nz. 110:3) Esakweli yango esengelaki kokokisama na eleko oyo bato mingi bakomipesa na makambo ya Nzambe te, bakomilinga bango moko, bakolinga mbongo mpe bakozala na botosi te. Kasi, Yehova ayebaki ete bilenge oyo bakosambela ye bakozala na bizaleli wana te. Tomoni mpenza ete Yehova atyelaka bino bilenge motema!
2. Kokanisa Yehova elimboli nini?
2 Kanisá esengo oyo Nzambe ayokaka ntango azali komona bilenge bazali kokanisa ye, Mozalisi na bango Monene. (Mos. 12:1, NW) Kasi, kokanisa Yehova esuki kaka te na koyeba ete azali. Yango elimboli kosala makambo oyo esepelisaka ye mpe kotika ete mibeko mpe mitinda na ye etambwisa bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Elimboli mpe kotyela Yehova motema lokola toyebi ete alukaka ntango nyonso bolamu na biso. (Nz. 37:3; Yis. 48:17, 18) Yo mpe osalaka bongo?
‘Talelá Yehova na motema na yo mobimba’
3, 4. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kotyela Yehova motema, mpe mpo na nini ezali na ntina tótyela Yehova motema lelo oyo?
3 Yesu Klisto azali ndakisa eleki malamu ya moto oyo azalaki kotyela Nzambe motema. Alandaki toli ya Masese 3:5, 6, oyo elobi ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” Ntango Yesu azwaki batisimo, mwa moke na nsima Satana amekaki ye; alakaki kopesa ye bokonzi ya mokili mpe nkembo na yango. (Luka 4:3-13) Yesu akosamaki te. Ayebaki ete “bozwi mpe lokumu mpe bomoi” ya solosolo eutaka na “komikitisa mpe kobanga Yehova.”—Mas. 22:4, NW.
4 Lelo oyo, mokili etondi na lokoso mpe moimi. Lokola tozali elongo na bato oyo bazali komonisa bizaleli yango, ebongi mpenza tólanda ndakisa ya Yesu. Lisusu, tóbosana te ete Satana azali kosala nyonso mpo na kolongola basaleli ya Yehova na nzela ya moke oyo ezali komema na bomoi. Alingi ete moto nyonso atambola na nzela ya monene oyo ezali komema na libebi. Bilenge, bótika te ete Satana akosa bino! Kasi, bózala na ekateli makasi ya kokanisa Mozalisi na bino Monene. Bótyela ye motema mobimba mpe bósimba makasi “bomoi ya solosolo,” oyo ekoya mosika te.—1 Tim. 6:19.
Bilenge, bózala na bwanya!
5. Omonaka ete mokili oyo ezali kokende wapi?
5 Bilenge oyo bakanisaka Mozalisi na bango Monene bazali na bwanya koleka bilenge mosusu oyo bazali na bango mbula moko. (Tángá Nzembo 119:99, 100.) Lokola bazali kolanda makanisi ya Nzambe, bayebi malamu ete nsuka ya mokili oyo ekómi pene. Atako bozali naino bilenge, na ntembe te bino mpe bozali komona ndenge bato bakómi kobanga mpe komitungisa mingi. Soki bozali naino bana-kelasi, na ntembe te boyokaka ete mai mpe mopɛpɛ ezali kobeba, molunge ezali kobakisama, bato bazali kobebisa bazamba, mpe mikakatano mosusu ndenge na ndenge ezali kobima. Makambo yango ezali kotungisa bato mingi; kasi, kaka Batatoli ya Yehova nde bazali kokanga ntina ete yango ezali na kati ya elembo oyo ezali komonisa ete nsuka ya mokili ya Satana ekómi pene.—Emon. 11:18.
6. Bilenge mosusu basili kokosama na makambo nini?
6 Kasi, ezali mawa komona ete bilenge mosusu oyo bazali basaleli ya Nzambe bazali lisusu ekɛngɛ te, bakómi kobosana ete nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene. (2 Pet. 3:3, 4) Bilenge mosusu bakweaki na masumu ya minene mpo balandaki baninga ya mabe to mpo bakómaki kotala bafilme mpe mikanda oyo elakisaka bato bazali bolumbu. (Mas. 13:20) Kobebisa boyokani na biso na Nzambe lelo oyo ezali likama lokola nsuka ekómi mpenza pene! Na esika ya kosala bongo, tózwa liteya na likambo oyo ekómelaki Bayisalaele na mobu 1473 L.T.B., ntango bazalaki na mokili ya Moaba, pembeni mpenza ya Mokili ya Ndaka. Likambo nini esalemaki kuna?
Bakweaki ntango bakómaki pene ya Mokili ya Ndaka
7, 8. (a) Mayele nini Satana asalelaki na mokili ya Moaba? (b) Mayele nini Satana azali kosalela lelo oyo?
7 Satana azalaki na mokano ya kozangisa Bayisalaele libaku ya kokɔta na mokili oyo Nzambe alakaki bango. Asalelaki mosakoli Balama mpo alakela Bayisalaele mabe kasi alongaki te; yango wana asalelaki mayele mosusu, amemaki bango básala likambo oyo esalaki ete Yehova aboya kopambola bango. Zabolo asalelaki basi ya Moaba mpo na kolengola Bayisalaele, mpe na mbala yango, alongaki kokweisa bamosusu. Bato ya Yisalaele bakómaki kosala pite na bana-basi ya Moaba mpe kosambela Baala ya Peolo! Atako Bayisalaele bakómaki pene mpenza ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, bato 24 000 kati na bango bakufaki. Ezalaki mpenza mawa!—Mit. 25:1-3, 9.
8 Lelo oyo, tozali kopusana nokinoki na mokili ya malamu mingi koleka, mokili ya sika oyo Nzambe alaki biso. Kaka ndenge asalaki na ntango ya kala, Satana azali kosalela pite mpo na kobebisa basaleli ya Nzambe. Na mokili, bizaleli ya bato ebebi mpenza; pite ezali lisusu komonana mabe te mpe kosangisa nzoto mibali na mibali ekómi likambo etali kaka moto ye moko. Kutu, ndeko-mwasi moko alobaki boye: “Kaka na ndako mpe na Ndako ya Bokonzi nde bana na ngai bayokaka ete kosangisa nzoto mibali na mibali mpe kosala pite ezali mabe na miso ya Nzambe.”
9. Likambo nini ekoki kosalema na “eleko ya ebandeli ya bolenge,” mpe bilenge basengeli kosala nini na ntango yango?
9 Bilenge oyo bakanisaka Mozalisi na bango Monene bayebi ete kosangisa nzoto ezali likabo oyo Nzambe apesi mpo ete na nzela na yango, bato bákoka kobotana. Yango wana, bayebi ete moto asengeli kosangisa nzoto kaka na ndenge oyo Nzambe abongisá, elingi koloba kaka na kati ya libala. (Ebe. 13:4) Nzokande, ntango moto akómi na “eleko ya ebandeli ya bolenge,” mposa ya kosangisa nzoto ezalaka makasi mpe moto akoki kozanga bososoli; yango wana, ekoki kozala mpasi mpo atikala pɛto. (1 Kol. 7:36) Osengeli kosala nini ntango makanisi ya mabe eyeli yo? Bondelá Yehova na etingya mpo asalisa yo otya makanisi na makambo oyo ezali pɛto. Yehova ayokaka ntango nyonso bato oyo balukaka lisalisi epai na ye. (Tángá Luka 11:9-13.) Masolo oyo elendisaka ekoki mpe kosalisa moto azongisa makanisi na ye na makambo ya malamu.
Bópona malamu mikano na bino!
10. Makanisi nini ya mabe tosengeli koboya, mpe mituna nini tokoki komituna?
10 Moko na bantina oyo bilenge mingi na mokili bamipesaka na bamposa ya nzoto ezali mpo bazali na molili; bazali na litambwisi ya Nzambe te mpe bazali na elikya te mpo na mikolo ezali koya. (Mas. 29:18) Bilenge yango bazali lokola Bayisalaele ya mikolo ya Yisaya oyo bapesaki Nzambe mokɔngɔ mpe bazalaki kokanisa kaka “esengo mpe kosepela, . . . kolya mosuni mpe komɛla vinyo.” (Yis. 22:13) Na esika tólulaka bato ya ndenge wana, mpo na nini te kokanisaka elikya malamu oyo Yehova apesi basaleli na ye ya sembo? Elenge, ozelaka mokili ya sika na mposa makasi? Osalaka nyonso mpo na kozala na “makanisi malamu . . . wana [ozali] kozela elikya ya esengo” oyo Yehova apesi yo? (Tito 2:12, 13) Biyano na yo na mituna yango ekomonana na mikano na yo mpe na makambo oyo otyaka na esika ya liboso.
11. Mpo na nini bilenge oyo bazali naino na kelasi basengeli kotánga malamu?
11 Mokili ezali kolendisa bilenge bámipesa mobimba mpo na kokokisa mikano ya mokili. Ya solo, bino bilenge oyo bozali naino na kelasi bosengeli kotánga malamu mpo na kozwa mayele. Mokano na bino esengeli kozala kaka te ya koluka kozwa mosala ya malamu, kasi mpe ya kozala na ntina mpo na lisangá mpe kozala basakoli oyo bazali kobota mbuma. Yango wana, bosengeli koyeba koloba, kokanisa malamu, mpe komonisa bato mosusu makanisi na bino na boboto mpe na limemya. Nzokande, bilenge oyo bayekolaka Biblia mpe balandaka mitinda na yango na bomoi na bango nde bazwaka mateya oyo eleki malamu mpe bamibongisaka mpo na kolonga na bomoi mpe kozwa bomoi ya seko.—Tángá Nzembo 1:1-3.a
12. Ndakisa nini mabota ya baklisto esengeli kolanda?
12 Na Yisalaele, baboti bazalaki kozwa na lisɛki te mokumba ya koteya bana na bango. Mateya yango ezalaki kotalela makambo nyonso ya bomoi, mingimingi makambo ya Nzambe. (Det. 6:6, 7) Yango wana, bilenge Bayisalaele oyo bazalaki koyoka baboti na bango mpe mikóló mosusu oyo bazalaki kobanga Nzambe bazalaki kozwa boyebi, bwanya, bososoli, mayele, mpe makoki ya kokanisa, makambo oyo moto akoki kozwa kaka soki ayekoli mateya ya Nzambe. (Mas. 1:2-4; 2:1-5, 11-15) Lelo oyo mpe esengeli ete mabota ya baklisto etalelaka likambo ya koteya bana ndenge wana.
Bóyokaka bato oyo balingaka bino
13. Toli nini bato mosusu bapesaka bilenge, mpe mpo na nini bilenge basengeli kokeba na yango?
13 Lelo oyo, bato ndenge na ndenge bazali kopesa bilenge batoli; na ndakisa, balakisi na bango, oyo mbala mingi bakanisaka kaka kolonga na mokili. Tozali kolendisa bino bótángaka Liloba ya Nzambe, bóbondelaka mpe bótalelaka makanisi ya moombo ya sembo mpe ya mayele ntango bozali kokanisa likoló ya batoli yango. Boyekoli ya Biblia esalisi bino bóyeba ete Satana alukaka liboso kokweisa bilenge mpo bayebi makambo mingi te. Na ndakisa, na elanga ya Edene, Eva ayokaki Satana, mopaya oyo amonisaki ata moke te ete azalaki koluka bolamu na ye. Likambo elingaki kosuka ndenge mosusu mpenza soki ayokaki Yehova, oyo asilaki kosala makambo mingi oyo ezalaki komonisa ete alingaka ye mpenza!—Gen. 3:1-6.
14. Mpo na nini tosengeli koyokaka Yehova mpe baboti na biso oyo bazali na kati ya solo?
14 Mozalisi na yo Monene alingaka yo mpenza. Alingi ete ozala na esengo lelo mpe mpo na libela! Yango wana, na boboto nyonso mpe lokola tata, azali koloba na yo mpe bato mosusu nyonso oyo basambelaka ye ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.” (Yis. 30:21) Soki baboti na yo bazali na kati ya solo mpe balingaka mpenza Yehova, yango ezali mpe lipamboli mpo na yo. Yokáká toli na bango ntango ozali kotalela mikano na yo mpe makambo oyo osengeli kotya na esika ya liboso. (Mas. 1:8, 9) Kutu, bazali na mposa ete ozwa bomoi, eloko oyo ezali na motuya koleka bomɛngo to lokumu ya mokili oyo.—Mat. 16:26.
15, 16. (a) Elikya nini tokoki kotyela Yehova? (b) Liteya nini ya ntina mingi tokoki kozwa na lisolo ya Baluku?
15 Bato oyo bakanisaka Mozalisi na bango Monene bazalaka na bomoi ya mindɔndɔ te, bazalaka na elikya ete Yehova akotika bango “soki moke te” mpe akosundola bango “ata moke te.” (Tángá Baebele 13:5.) Lokola makanisi yango ekeseni mpenza na makanisi ya bato ya mokili, tosengeli kokeba ete tóbendama te na elimo ya mokili. (Ef. 2:2) Mpo na yango, tótalela ndakisa ya Baluku, sekrɛtɛrɛ ya Yilimia, oyo azalaki na bomoi na eleko moko ya mpasi, liboso Yelusaleme ebomama na mobu 607 L.T.B.
16 Ekoki kozala ete Baluku alukaki kokóma na biloko mingi mpo azala na bomoi ya malamu. Yehova ayebaki makanisi ya Baluku mpe akebisaki ye na boboto ete atika koluka “makambo minene.” Baluku azalaki na komikitisa mpe na bwanya, mpamba te ayokelaki Yehova mpe abikaki ntango Yelusaleme ebomamaki. (Yil. 45:2-5) Nzokande, bato mosusu oyo balukaki “makambo minene” na mokili mpe babosanaki Yehova, babungisaki nyonso ntango Bakaladi (bato ya Babilone) babebisaki Yelusaleme. Lisusu, mingi kati na bango bakufaki. (2 Nta. 36:15-18) Lisolo ya Baluku ezali kosalisa biso tómona ete kozala na boyokani malamu na Nzambe ezali na ntina koleka bozwi mpe lokumu ya mokili oyo.
Bólanda bandakisa ya malamu
17. Mpo na nini Yesu, Paulo, mpe Timote bazali bandakisa malamu mpo na basaleli ya Yehova lelo oyo?
17 Liloba ya Nzambe epesi biso bandakisa mingi ya malamu mpo na kosalisa biso tótambola na nzela ya bomoi. Na ndakisa, Yesu azalaki na mayele koleka moto mosusu nyonso, kasi amipesaki na mosala oyo ekokaki kosalisa bato mpo na libela, mosala ya kosakola “nsango malamu ya bokonzi.” (Luka 4:43) Mpo na kosalela Yehova malamu koleka, ntoma Paulo atikaki mosala oyo ekokaki kopesa ye bozwi mpe asalelaki ntango mpe makasi na ye nyonso mpo na kosakola nsango malamu. Timote, “mwana ya solosolo na kati ya kondima,” alandaki ndakisa malamu ya Paulo. (1 Tim. 1:2) Yesu, Paulo, to Timote, bayokaki nde mawa mpo na nzela oyo baponaki? Soki moke te! Kutu, Paulo alobaki ete azalaki kotalela makambo oyo akokaki kozwa na mokili lokola “liboke ya bosɔtɔ” soki akokanisi yango na libaku malamu ya kosalela Nzambe.—Filp. 3:8-11.
18. Mbongwana nini elenge moko asalaki, mpe mpo na nini epesaka ye mawa te?
18 Lelo oyo, bilenge mingi bazali kolanda ndakisa ya Yesu, Paulo, mpe Timote. Na ndakisa, elenge moko oyo azalaki na mosala oyo bazalaki kofuta ye malamu akomaki boye: “Lokola nalandaka mitinda ya Biblia, naumelaki te komata mpɛtɛ na mosala. Atako nazalaki kozwa mbongo mingi, nazalaki komona ete nazali kolekisa ntango mpamba. Ntango nasololaki na bakonzi ya kompanyi mpo na koyebisa bango ete nalingi kokende kosala mosala ya ntango nyonso, balobaki ete bakobakisa mbongo oyo bakobanda kofuta ngai; bakanisaki ete nakondima kotikala. Kasi, nasilaki kozwa ekateli na ngai. Bato mingi bakokaki kokanga ntina te oyo natikaki mosala oyo nazalaki kozwela mbongo mingi mpo na komipesa na mosala ya ntango nyonso. Nazalaki koyebisa bango ete nalingi kokokisa malamumalamu ndai na ngai ya kosalela Nzambe. Lelo oyo, lokola nazali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, nazali na esengo oyo motuya moko te ya mbongo to lokumu ekoki kopesa ngai.”
19. Bilenge balendisami na kopona nzela nini?
19 Na mokili mobimba, ebele ya bilenge baponi mpe nzela wana. Yango wana, bilenge, ntango bozali komityela mikano ya bomoi, bóbosanaka te ete mokolo ya Yehova ekómi pene. (2 Pet. 3:11, 12) Bólula te bato oyo bazali komipesa na makambo ya mokili oyo. Bóyoka nde bato oyo balingaka bino mpenza. Komibombela “biloko ya motuya na likoló” eleki likambo mosusu nyonso oyo bokoki kosala mpe kaka yango nde ekomemela bino matomba ya libela. (Mat. 6:19, 20; tángá 1 Yoane 2:15-17.) Bókanisa Mozalisi na bino Monene. Na ndenge yango, Yehova akopambola bino.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na oyo etali bakelasi milaimilai mpe mosala, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 2005, nkasa 26-31.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka Nzambe motema?
• Mateya nini eleki mateya mosusu nyonso?
• Ndakisa ya Baluku ekoki koteya biso nini?
• Banani bazali ndakisa malamu, mpe mpo na nini?
[Bililingi na lokasa 13]
Mateya ya Yehova eleki mateya mosusu nyonso
[Elilingi na lokasa 15]
Baluku ayokaki toli ya Yehova mpe abikaki ntango Yelusaleme ebomamaki. Ndakisa na ye ekoki koteya yo nini?