Bayengebene bakosanzola Nzambe libela na libela
“Bakokanisa moyengebene . . . Boyengebene na ye ezali mpo na libela.”—NZ. 112:6, 9, NW.
1. (a) Bomoi ya ndenge nini ezali kozela baoyo bazali bayengebene na miso ya Nzambe? (b) Motuna nini yango ebimisi?
BOMOI kitoko ezali kozela baoyo nyonso bazali bayengebene na miso ya Nzambe! Bakozala na esengo ya koyekola bizaleli kitoko ya Yehova libela na libela. Mitema na bango ekotonda na esengo wana bakoyekola makambo ya sika na biloko oyo Nzambe akelá. Ezaleli ya ntina mingi mpo na kozwa mapamboli yango ezali oyo Nzembo 112 elobeli: “Boyengebene.” Kasi, ndenge nini bato ya masumu bakoki komonana bayengebene na miso ya Yehova, Nzambe oyo azali mosantu mpe sembo? Ata soki tosali makasi mpo na kosala oyo ezali malamu, tozangaka te kosala mabunga, ntango mosusu mabunga ya minene mpenza.—Lom. 3:23; Yak. 3:2.
2. Wapi makamwisi mibale oyo Yehova asalaki na bolingo na ye?
2 Na bolingo na ye, Yehova alukaki ndenge ya kosilisa likambo yango. Asalaki nini? Liboso, asalaki likamwisi na ndenge atyaki bomoi ya Mwana na ye na libumu ya elenge mwasi moko oyo ayebaki naino mibali te mpo abotama moto ya kokoka. (Luka 1:30-35) Na nsima, ntango banguna ya Yesu babomaki ye, Yehova asalaki likamwisi mosusu na ndenge asekwisaki ye. Nzambe asekwisaki Yesu lokola ekelamu ya elimo ya nkembo.—1 Pet. 3:18.
3. Mpo na nini Nzambe asepelaki mpenza kopesa Mwana na ye mbano ya bomoi na likoló?
3 Yehova apambolaki Yesu; apesaki ye eloko oyo azalaki na yango te liboso aya na mabelé—bomoi oyo ekoki te kobebisama. (Ebe. 7:15-17, 28) Yehova asepelaki kosala yango mpamba te Yesu atikalaki sembo ata na kati ya komekama makasi. Na ndenge yango, Yesu apesaki eyano ya malamu mpe oyo esukisaki ntembe oyo Satana abimisaki ntango alobaki ete moto moko te asalelaka Nzambe na bolingo ya solosolo.—Mas. 27:11.
4. (a) Ntango azongaki na likoló, Yesu asalaki nini mpo na biso, mpe Yehova atalelaki yango ndenge nini? (b) Oyokaka ndenge nini mpo na likambo oyo Yehova mpe Yesu basali mpo na yo?
4 Ntango azongaki na likoló, Yesu asalaki makambo mingi koleka. ‘Amonanaki liboso ya Nzambe mpo na biso’ “na makila na ye moko.” Tata na biso ya bolingo andimaki mbeka yango ya motuya lokola “mbɔndi mpo na masumu na biso.” Yango wana, na ‘lisosoli ya pɛto,’ tokoki kosalela “Nzambe ya bomoi mosala mosantu.” Yango epesi biso ntina ya koloba maloba oyo ezali na vɛrsɛ ya liboso ya Nzembo 112 (NW): “Bósanzola Yehova”!—Ebe. 9:12-14, 24; 1 Yoa. 2:2.
5. (a) Tosengeli kosala nini mpo tózala bayengebene na miso ya Nzambe? (b) Nzembo 111 mpe 112 ebongisamá ndenge nini?
5 Mpo tótikala bayengebene na miso ya Nzambe, tosengeli kokoba komonisa kondima na makila ya Yesu. Tosengeli kolekisa mokolo te kozanga kotɔnda Yehova mpo na bolingo oyo amonisaki mpo na biso. (Yoa. 3:16) Tosengeli mpe kokoba koyekola Liloba ya Nzambe mpe kosala nyonso mpo etamboli na biso eyokana na mateya ya Biblia. Nzembo 112 ezali na batoli kitoko mpo na baoyo nyonso balingi kozala na lisosoli ya pɛto liboso ya Nzambe. Nzembo yango ezali na boyokani na Nzembo 111. Banzembo yango mibale ebandi na maloba “Bósanzola Yehova!” to “Aleluya!” mpe elandani na milɔngɔ 22, oyo mokomoko na yango ebandi na moko ya balɛtrɛ 22 ya alfabɛ ya Liebele.a
Ntina ya kozala na esengo
6. Mapamboli nini “moto” oyo abangaka Nzambe oyo Nzembo 112 elobeli azwi?
6 “Esengo na moto oyo azali kobanga Yehova, oyo asepeli mingi na mitindo na ye. Bana na ye bakokóma na nguya na mabele. Kasi, libota ya bato ya makambo alima ekopambolama.” (Nz. 112:1, 2, NW) Simbá ete mokomi ya nzembo alobi liboso “moto”; mpe na nsuka ya vɛrsɛ 2 alobi “bato ya makambo alima.” Yango emonisi ete Nzembo 112 ezali kolobela nde bato ebele. Na nzela ya elimo santu, ntoma Paulo amonisaki ete Nzembo 112:9 ekokisamaki mpe epai ya baklisto ya ekeke ya liboso. (Tángá 2 Bakolinti 9:8, 9.) Nzembo yango emonisi malamu mpenza esengo oyo bayekoli ya Klisto bakoki kozala na yango lelo oyo!
7. Mpo na nini basaleli ya Nzambe basengeli kobanga ye, mpe ndenge nini osengeli kotalela mibeko ya Nzambe?
7 Ndenge Nzembo 112:1 emonisi yango, baklisto yango ya solo bazali na esengo monene na ndenge bazali kotambola na “kobanga Yehova.” Kobanga yango oyo epekisaka bango básala makambo oyo Nzambe aboyaka, esalisaka bango bátɛmɛla elimo ya mokili ya Satana. ‘Basepelaka mingi’ koyekola Liloba ya Nzambe mpe kotosa mibeko na ye. Na kati ya mibeko yango, tokoki kotánga etinda ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba. Basalaka makasi mpo na kokómisa bato ya bikólo nyonso bayekoli mpe kokebisa bato mabe ete etikali moke mokolo ya kosambisa ya Nzambe eya.—Ezek. 3:17, 18; Mat. 28:19, 20.
8. (a) Mapamboli nini basaleli ya Nzambe bazali kozwa lelo mpo na molende na bango? (b) Mapamboli nini ezali kozela baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé?
8 Lokola batosaka mibeko yango, basaleli ya Nzambe na mokili mobimba lelo oyo bakómi soki milio nsambo. Nani akoki kowangana ete bakómi “na nguya na mabele”? (Yoa. 10:16; Emon. 7:9, 14) ‘Bakopambolama’ mpe ntango Nzambe akokokisa mokano na ye. Baoyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabelé bakobika na “bolɔzi monene” oyo ezali koya mpe bakosala “mabelé moko ya sika” epai “boyengebene ekofanda.” Nsukansuka, bato oyo bakobika na Armagedona ‘bakopambolama’ lisusu mingi koleka. Bakoyamba bamilio ya bato oyo bakosekwa. Oye nde elikya kitoko! Nsukansuka, baoyo ‘basepelaka mingi’ na mibeko ya Nzambe bakokóma bato ya kokoka mpe bakozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo” libela na libela.—2 Pet. 3:13; Lom. 8:21.
Ndenge malamu ya kosalela bozwi
9, 10. Ndenge nini baklisto ya solo basalelaka bozwi na bango ya elimo, mpe na ndenge nini boyengebene na bango ekoumela seko?
9 “Biloko ya motuya mpe bomɛngo ezali na ndako na ye; mpe boyengebene na ye ezali mpo na libela. Angɛngi na molili lokola pole ya bato ya makambo alima. Azali na ngɔlu mpe na motema mawa mpe azali moyengebene.” (Nz. 112:3, 4, NW) Na ntango ya kala, basaleli mosusu ya Nzambe bayebanaki mpo na bomɛngo na bango. Na maloba mosusu, baoyo Nzambe andimaka bakómaka na bozwi mpenza, ata soki ezali ya biloko ya mokili te. Kutu, mingi kati na baoyo bandimaka komikitisa liboso ya Nzambe bakoki kozala babola mpe kotyolama ndenge ezalaki na ntango ya Yesu. (Luka 4:18; 7:22; Yoa. 7:49) Kasi, ata soki moto azali mozwi te na mokili oyo, akoki kozala mozwi na elimo.—Mat. 6:20; 1 Tim. 6:18, 19; tángá Yakobo 2:5.
10 Baklisto bapakolami ná baninga na bango babombaka bozwi na bango ya elimo mpo na bango moko te. Kasi, ‘bangɛngaka lokola pole ya bato ya makambo alima’ na kati ya molili ya mokili ya Satana. Basalaka yango ntango basalisaka bato mosusu bázwa matomba na bwanya mpe boyebi ya Nzambe. Banguna basili koluka kopekisa mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi, kasi balongi te. Kutu, mbuma ya mosala ya boyengene “ezali mpo na libela.” Wana bazali kokangama na ezaleli na bango ya boyengebene, basaleli ya Nzambe bakoki kozala na elikya ya kozala na bomoi ya seko “mpo na libela.”
11, 12. Tángá lolenge oyo basaleli ya Nzambe basalelaka bozwi na bango?
11 Basaleli ya Nzambe, ezala baklisto bapakolami to mpe “ebele ya bato,” bakabaka mpe biloko ya mosuni. Nzembo 112:9 (NW) elobi boye: “Akabi biloko mingi; apesi babola.” Mbala mingi, baklisto ya solo bapesaka makabo mpo na kosalisa bandeko na bango baklisto, ata mpe bazalani na bango oyo bazali na bosenga. Basalelaka mpe bozwi na bango mpo na kosalisa baoyo makama ekómeli bango. Yango mpe epesaka bango esengo, ndenge Yesu amonisaki yango.—Tángá Misala 20:35; 2 Bakolinti 9:7.
12 Lisusu, kanisá naino mbongo oyo esɛngaka mpo na kobimisa zulunalo oyo na minɔkɔ 172; nzokande, bato mingi oyo balobaka minɔkɔ yango bazali babola. Kanisá mpe ete zulunalo oyo ebimisamaka mpe mpo na bababa mpe bato oyo bakufá miso.
Ngɔlu mpe bosembo
13. Banani bazali ndakisa malamu koleka ya kokaba na boboto, mpe ndenge nini tokoki komekola bango?
13 “Moto oyo azali na ngɔlu mpe azali kodefisa azali moto malamu.” (Nz. 112:5, NW) Na ntembe te, oyebi ete bato mingi oyo basalisaka basusu basalaka yango mpo na motema mawa te. Basusu bapesaka na mitema mibale to mpo na kolakisa bozwi na bango. Ezalaka esengo te kozwa likabo ya bato ya ndenge wana. Nzokande, ezalaka mpenza esengo kozwa likabo ya moto oyo azali na ngɔlu to na motema boboto. Yehova azali ndakisa eleki monene ya ngɔlu mpe apesaka na esengo. (1 Tim. 1:11; Yak. 1:5, 17) Yesu Klisto amekolaki mpenza ndakisa ya ngɔlu ya Tata na ye. (Mko. 1:40-42) Na yango, mpo Nzambe amona ete tozali bayengebene tosengeli kopesaka na esengo mpe na motema boboto, mingimingi na mosala ya kosakola, ntango tozali kosalisa bato báyeba Yehova.
14. Wapi mwa bandenge oyo tokoki ‘kotambwisa makambo na biso na bosembo’?
14 “Atambwisaka makambo na ye na bosembo.” (Nz. 112:5, NW) Ndenge esakolamaki, kapita ya sembo abatelaka biloko ya Nkolo na ye na bosembo. (Tángá Luka 12:42-44.) Yango emonanaka na litambwisi ya elimo oyo apesaka bankulutu, oyo mbala mosusu basambisaka bato oyo basali masumu minene na lisangá. Bosembo yango emonanaka mpe na malako oyo moombo ya sembo apesaka mpo na ndenge oyo makambo esengeli kotambola na masangá, na bandako ya bamisionɛrɛ, mpe na Betele. Longola bankulutu, baklisto nyonso na lisangá basengeli mpe komonisa bosembo moko epai ya mosusu mpe epai ya bato oyo bazali Batatoli te, ata na makambo ya mombongo.—Tángá Mika 6:8, 11.
Mapamboli mpo na bayengebene
15, 16. (a) Bansango ya mabe oyo ezali kobima na mokili esalaka nini epai ya bayengebene? (b) Basaleli ya Nzambe bazali na ekateli ya kokoba kosala nini?
15 “Mpo akotengatenga soki moke te. Bakokanisa moyengebene mpo na seko. Akobanga nsango mabe te. Motema na ye ezali kotengatenga te, ezali kotalela Yehova. Motema na ye ekoki koningana te; akobanga te, kino akotala banguna na ye na nse.” (Nz. 112:6-8, NW) Lelo oyo, bansango ya mabe, bakisá mpe makambo mosusu lokola bitumba, terorisme, bamaladi ya sika mpe bamaladi mosusu ya kala oyo ezali kozonga, kobomana, bobola, mpe kobeba ya mopɛpɛ ezali kosalema na mokili na ndenge oyo esalemá naino te. Makambo yango etungisaka ata bayengebene, kasi ebangisaka bango te. Kutu, mitema na bango ‘etengatengaka te’ mpe ‘eninganaka te’ mpo bayebi ete mokili ya sembo ya Nzambe ekómi pene. Soki likama ekómeli bango, bayikaka mpiko mpamba te batyaka motema ete Yehova akosunga bango. Atikaka te ete bayengebene ‘bátengatenga,’ kasi apesaka bango makasi ya koyika mpiko.—Filp. 4:13.
16 Atako banguna na bango bazali koyina bango mpe kokosela bango makambo, basaleli ya Nzambe bayikaka mpiko; nyonso wana elongi te mpe ekolonga te kolɛmbisa baklisto ya solo. Kutu, bazali kokoba na molende nyonso kosala mosala oyo Yehova apesi bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. Ntembe ezali te ete moyengebene akokutana na botɛmɛli ya makasi awa nsuka ezali kokóma pene. Botɛmɛli yango ekokóma makasi koleka ntango Satana Zabolo, Gogo ya Magogo, akoluka kosimba basaleli ya Nzambe na mokili mobimba. Na ntango yango, ‘tokotala banguna na biso,’ ndenge bakokufa bango nyonso. Ekozala mpenza esengo komona ndenge nkombo ya Yehova ekosantisama mpo na libela!—Ezek. 38:18, 22, 23, NW.
“Ekotombwama na nkembo”
17. Ndenge nini moyengebene ‘akotombwama na nkembo’?
17 Ekozala mpenza esengo kosanzola Yehova na bomoko, kozanga ete Zabolo mpe mokili na ye bátɛmɛla biso! Bato nyonso oyo bazali kotikala sembo epai ya Nzambe bakozala na esengo yango libela na libela. Bakolonga bango te, mpo Yehova alaki ete “liseke” ya moyengebene “ekotombwama na nkembo.” (Nz. 112:9, NW) Moyengebene akosepela mpenza ntango bato nyonso oyo bazali kotɛmɛla bokonzi ya Yehova bakolimwa.
18. Ndenge nini maloba ya nsuka ya Nzembo 112 ekokokisama?
18 “Moto mabe akomona mpe akoyoka mpenza nkanda. Akolya mino mpe akonyangwa mpenza. Mposa ya bato mabe ekokufa.” (Nz. 112:10, NW) Mosika te, baoyo nyonso bazali kokoba kotɛmɛla basaleli ya Nzambe ‘bakonyangwa’ na mposa na bango ya mabe. Mposa oyo bazali na yango ya kosukisa mosala na biso ekosuka mpenza ntango “bolɔzi monene” ekoya.—Mat. 24:21.
19. Elikya nini tokoki kozala na yango?
19 Yo mpe okozala na kati ya bato oyo bakobika na ntango yango? To soki esalemi ete okufa mpo na maladi to bobange liboso nsuka ya mokili ya Satana eya, okozala kati na “bayengebene” oyo bakosekwa? (Mis. 24:15) Ekozala bongo soki okobi komonisa kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu mpe omekoli Yehova, ndenge “moto” oyo Nzembo 112 elobeli asalaki. (Tángá Baefese 5:1, 2.) Yehova ‘akokanisa’ bato ya ndenge wana mpe akobosana bango te, akobosana mpe te misala na bango ya bosembo. Yehova akokoba kokanisa mpe kolinga bango libela na libela.—Nz. 112:3, 6, 9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Boyokani oyo ezali na banzembo yango mibale emonanaka na ndenge oyo ekomamá mpe na makambo oyo elobelá. “Moto” oyo abangaka Yehova, oyo Nzembo 112 elobeli, amekoli bizaleli kitoko ya Nzambe oyo elobelami na Nzembo 111, ndenge tokoki komona yango na Nzembo 111:3, 4 mpe na Nzembo 112:3, 4.
Mituna ya bozongeli
• Wapi bantina oyo tozali na yango ya koloba “Aleluya”?
• Makambo nini oyo ezali kosalema na lisangá ezali kopesa baklisto ya solo esengo?
• Yehova alingaka moto oyo apesaka ndenge nini?
[Elilingi na lokasa 25]
Mpo na kozala moyengebene na miso ya Nzambe tosengeli komonisa kondima na makila ya Yesu
[Bililingi na lokasa 26]
Makabo oyo epesamaka na bolingo ekoki kosunga ntango likama esalemi mpe mpo na kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia