Tólóna kobanga ya pɛto mpo na Nzambe
“Bangá Yehova mpe tiká mabe.”—MASESE 3:7, NW.
1. Mokanda ya Masese mokomamaki mpo na banani?
MASESE, mokanda oyo mozwami na Biblia, ezali na ebele na batoli ya elimo. Yehova asalaki mokanda wana ete mozala litambwisi malamu mpo na kolakisa libota na ye, Yisraele. Lelo oyo, ezali na maloba ya mayele mpo na libota na ye mosantu ya boklisto, “oyo nsuka na bibongiseli ya biloko esili koyela [bango].”—1 Bakolinti 10:11, NW; Masese 1:1-5; 1 Petelo 2:9.
2. Mpo na nini likebisi lizwami na Masese 3:7 libongi mpenza mpo na mikolo na biso?
2 Na Masese 3:7 (NW), tozali kotanga ete: “Zalá mayele te na miso na yo mpenza. Bangá Yehova mpe tiká mabe.” Uta ntango ya baboti na biso ya liboso, wana Nyoka akosaki Eva, na kopesáká bango elaká ya ‘koyeba malamu mpe mabe,’ mayele moke ya moto elóngi te mpo na kokokisa bamposa ya bato. (Genese 3:4, 5; 1 Bakolinti 3:19, 20) Eleko moko te kati na Lisoló ya bato oyo ekokani mpenza na ekeke ya ntuku mibale—“mikolo ya nsuka” oyo bato bazali kobuka mbuma ya koboya kondima ete Nzambe azali, mpe ya mateya ya évolution, bazali kozwa mpasi na likambo ya koponapona mposo, na mobulu, mpe mpasi euti na lolenge nyonso na misala ya mbindo. (2 Timoté 3:1-5, 13; 2 Petelo 3:3, 4) Ezali “mokili ya sika ya mobulu” oyo mokoki kosembolama te ata na O.N.U. soko mpe na mangomba ya mokili oyo masili kokabwana.
3. Makambo nini masakolamaki mpo na mikolo na biso?
3 Liloba ya esakweli ya Nzambe liyebisi biso ete nguya ya bilimu mabe ebimaki epai na “bakonzi na mokili mobimba koyanganisa bango mpo na etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso . . . na esika ebéngami na monoko na Liebele ete Armagedon.” (Emoniseli 16:14, 16, NW) Mosika te, nsɔmɔ monene euti na Yehova ekozwa bakonzi, to bayangeli wana. Ekozala lokola nsɔmɔ oyo ezalaki likoló ya Bakanana, wana Yosua mpe Bayisraele bayaki koboma bango. (Yosua 2:9-11) Kasi lelo oyo, ezali na Ye oyo amonisamaki na Yosua, Yesu Klisto—“Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo”—ye oyo ‘akobola mabota mpe akokamba bango na mpimbo ya ebende’ mpo na kokokisa “nkanda na nkɛlɛ ya Nzambe-Mozwi-na-Nguya-Nyonso.”—Emoniseli 19:15, 16, NW.
4, 5. Banani bakozwa lobiko, mpe mpo na nini?
4 Banani bakozwa lobiko na ntango yango? Baoyo bakosikwama, ezali te baoyo bakolɛnga na nsɔmɔ, kasi baoyo nyonso basili kolóna ezaleli ya kobanga Yehova. Na esika ya komimona mayele na miso na bango mpenza, bazali nde ‘kotika mabe.’ Na komikitisa nyonso, bazali kotya makanisi na bango na makambo malamu, mpo ete mabe mazwa esika te kati na makanisi na bango. Bazali na botosi ya pɛto mpo na Nkolo Moyangeli Yehova, “Mosambisi na mokili mobimba,” oyo akani koboma baoyo bamipesi na misala mabe, lokola abomaki mpenza bato mabe ya mboka Sodomo. (Genese 18:25) Ya solo, mpo na libota ya Nzambe, “kobanga Yehova ezali liziba ya bomoi, mpo na kobutwa longwa na mitambo ya kufa.”—Masese 14:27, NW.
5 Na mokolo yango ya kosambisama na Nzambe, baoyo nyonso bamipesi mobimba epai na Yehova na kobangáká ete basala te likambo oyo lizangi kosepelisa ye, bakokokisa maloba ya elilingi oyo mazwami na Masese 3:8, ete: “Yango [kobanga Yehova] ekojala lokola nkisi mpɔ na njoto na yɔ mpe mafuta mpɔ na mikwa na yɔ.”
Tókumisa Yehova
6. Nini esengeli kopusa biso na kotya likebi na Masese 3:9?
6 Kobanga oyo tozali na yango mpo na Yehova, bakisa mpe bolingo monene tozali na yango mpo na ye, esengeli kopusa biso na kotalela Masese 3:9 ete: “Kumisa [Yehova, NW] na bilɔkɔ na yɔ, mpe na mbuma na liboso na bojui na yɔ yɔnsɔ.” Tosɛngisami na makasi te mpo na kokumisa Yehova na makabo na biso. Yango esengeli kopesama na bolingo malamu, lokola yango emonisami mbala 12 longwa na Exode 35:29 kino na Deteronome 23:23 na ntina etali kopesa mbeka na Yisraele ya kala. Mbuma ya liboso oyo epesami epai na Yehova esengeli kozala makabo ya kitoko oyo tokoki kopesa, na botɔ́ndi mpo na malamu mpe boboto oyo tozali kozwa na lobɔkɔ na ye. (Nzembo 23:6) Yango esengeli komonisa ekateli na biso ya ‘koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye.’ (Matai 6:33, NW) Bongo matomba nini makozwama soki tokumisi Yehova na biloko na biso ya motuya? “Boye bibombelo na yɔ ikotonda maa mpe bikamwelo na yɔ ikobimisa vinyo na sika mingi mpenja.”—Masese 3:10.
7. Mbuma nini ya liboso oyo tosengeli kopesa na Yehova, mpe litomba nini likozwama na yango?
7 Yambo mpenza, Yehova azali kopambola biso kati na elimo. (Malaki 3:10) Na yango, mbuma ya liboso oyo tozali kopesa ye esengeli libosoliboso kozala oyo ya elimo. Tosengeli kosalela ntango na biso, nguya na biso, mpe makasi na biso mpo na kokokisa mokano na ye. Mosala yango mokoleisa biso na motindo moko yango ekómaki “bilei” oyo bizalaki kopesa Yesu nguya. (Yoane 4:34) Bozwi na biso ya elimo ekoyikana, mpe esengo na biso, vinyo ya sika na elilingi, ekotonda kino kosopana. Lisusu, lokola tozali kobondela na elikya nyonso mpo na kozwa bilei ya mokolo na mokolo, tokoki ntango nyonso kopesa likabo na biso na motema malamu mpo na kosunga mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. (Matai 6:11) Biloko mingi tozali na yango, bakisa mpe bozwi ya mosuni, epesameli biso na Tata na biso ya bolingo, oyo na likoló. Akosopa ebele na mapamboli, na meko oyo tozali kosalela biloko yango ya motuya mpo na lokumu na ye.—Masese 11:4; 1 Bakolinti 4:7.
Mpamela ya bolingo
8, 9. Lolenge nini tosengeli kotalela mpamela mpe toli?
8 Na molɔngɔ́ 11 mpe molɔngɔ́ 12, Masese mokapo 3 (NW) elobeli lisusu boyokani ya esengo kati na tata mpe mwana, oyo ezali kati na mabota oyo makobangaka Nzambe, oyo ezali lisusu kati na Yehova mpe bana balingami na ye ya elimo awa na mabelé. Totangi ete: “Ɛ mwana na ngai, kobwaka toli ya Yehova te; kotyola mpamela na ye te, mpo ete Yehova akopamelaka moto oyo ye alingi, lokola tata akosalaka na mwana oyo asepeli na ye.” Bato ya mokili bakoboyaka mpamela. Libota ya Yehova lisengeli koyamba yango na esengo. Ntoma Paulo atangaki maloba oyo mazwami na Masese, ete: “Mwana na ngai, tyolá mpamela na Yehova te, mpe kolɛmba te wana osembolami na ye; mpo ete Yehova akopamelaka moto oyo ye alingi . . . Ezali solo ete, mpamela nyonso ezali [likambo] na esengo te wana yango epesami, kasi ezali nde [likambo] ya mawa; nde na nsima, epai na baoyo babongisami na yango, ekobota mbuma ya kimya, yango boyengebene.”—Baebele 12:5, 6, 11, NW.
9 Ya solo, mpamela mpe toli ezali na ntina monene mpo na kosembola moko na moko kati na biso, ata tozwi yango epai na baboti, na nzela ya lisangá ya boklisto, to na ntango tozali kokanisa likoló na Makomami na boumeli ya boyekoli na biso moko. Mpo na biso, kolanda toli ezali likambo ya bomoi to kufa, lokola Masese 4:1, 13 (NW) elobi lisusu, ete: “Ɛ bana, bóyoka toli ya tata mpe bótya likebi, mpo na koyeba bososoli. Bósimba toli; kotika yango te. Bóbatela yango, mpo ete yango ezali bomoi na bino.”
Bolamu boleki monene
10, 11. Wapi mwa mitindo mikeseni ya maloba kitoko mazwami na Masese 3:13-18?
10 Oyo nde maloba kitoko malandi, ‘maloba na [kosepelisa, NW] mpe na sembo’! (Mosakoli 12:10) Maloba ya Salomo oyo mapemamaki mazali komonisa bolamu ya solo. Ezali maloba oyo tosengeli kokoma yango kati na mitema na biso. Totangi ete:
11 “Esengo na moto oyo azwi mayele, mpe na moto oyo azwi bososoli, mpo ete kozwa yango lokola litombá, eleki kozwa litombá ya paláta mpe kozwa yango lokola mosolo, eleki wolo na kitoko. Eleki pauni na motuya, mpe nsai na yo nyonso mosusu ekokokana na yango te. Mikolo molai mizali kati na lobɔkɔ na yango ya mobali; bozwi mpe nkembo ezali na lobɔkɔ na yango ya mwasi. Nzela na yango ezali nzela na kosepelisa, mpe balabála na yango nyonso ezali kimya. Ezali nzeté na bomoi mpo na baoyo basimbi yango, mpe baoyo bakangi yango makasi babéngami bato na esengo.”—Masese 3:13-18, NW.
12. Lolenge nini mayele mpe bososoli ezali kopesa biso bolamu?
12 Mayele—elobelami mingi mpenza kati na mokanda ya Masese: nyonso ezali mbala 46. “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya mayele.” Oyo ezali mayele mauti na Nzambe, oyo mabongi na kosalelama, oyo matongami likoló na boyebi ya Liloba ya Nzambe, oyo ezali kosalisa libota na ye na kozala na etamboli ya kimya atako bazali komekama mingi kati na mokili ya Satana. (Masese 9:10) Bososoli, oyo elobelami mbala 19 na Masese, ezali eloko oyo esimbi mayele, ezali kosalisa biso na kobundisa myango ya Satana. Monguna monene asili kolekisa bambula nkóto na nkóto kati na mayele mabe na ye. Kasi bososoli ya banzela na Nzambe, makoki ya kokesenisa malamu mpe mabe mpe kopona nzela malamu, ezali liteya ya motuya koleka likambo oyo ya kozala na boyebi. Yango ezali likambo oyo Yehova azali koteya biso na nzela ya Liloba na ye.—Masese 2:10-13; Baefese 6:11.
13. Eloko nini ekoki kobatela biso na boumeli ya eleko ya mpasi mpo na makambo ya nkita, mpe lolenge nini?
13 Kokwea ya nkita na mokili ya lelo ezali elembo na kokokana na esakweli ya Ezekiele 7:19, ete: “Bakobwaka palata na bango na njela, mpe wɔlɔ na bango ekojala lokola elɔkɔ na mbindo, palata mpe wɔlɔ na bango ikokoka kosikola bango tɛ na mokɔlɔ na nkɛlɛ na [Yehova, NW].” Bozwi nyonso ya mosuni awa na mabelé ekoki soko moke te kokokisama na nguya ya kobikisa oyo ezali kati na mayele mpe bososoli. Salomo, mokonzi ya mayele, alobaki na libaku mosusu ete: “Mayɛlɛ ekobatelaka lokola ekobatelaka mosɔlɔ. Malamu na mayɛlɛ ejali ete mayɛlɛ ekobikisa bomɔi na ye oyo ajui yango.” (Mosakoli 7:12) Esengo mingi ezali na baoyo nyonso bazali lelo kotambola na banzela ya kosepelisa ya Yehova mpe baoyo, na mayele nyonso, baponi “mikolo molai,” bomoi ya seko oyo ezali likabo ya Nzambe epai na baoyo bazali na kondima kati na mbeka na lisiko na Yesu!—Masese 3:16; Yoane 3:16; 17:3.
Tólóna mayele ya solo
14. Kati na makambo nini Yehova apesaki ndakisa ya mayele?
14 Ebongi mpenza ete biso bato, baoyo tozalisami na elilingi na Nzambe, tósala makasi mpo na kolóna mayele mpe bososoli, bizaleli oyo Yehova ye moko amonisaki yango mpenza kati na misala na ye minene ya kozalisa. “Yehova asalaki mabelé na mayele. Apikaki makoló na bososoli.” (Masese 3:19, 20, NW) Abandaki kosala bikelamu ya bomoi, na motindo na libombami te soko na nzela ya évolution oyo ezangi kolimbolama te, kasi na misala na ye ya kozalisa, moko na moko “na lolenge na yango” mpe mpo na mokano ya mayele. (Genese 1:25) Na nsuka, wana moto akelamaki na mayele mpe na makoki koleka oyo ya banyama, boye baanzelu, bana na Nzambe, babɛtaki mabɔkɔ ntango molai kuna na makoló. (Kokanisá na Yobo 38:1, 4, 7.) Makoki ya Yehova mpo na kososola makambo mazali koya liboso, mayele na ye, mpe bolingo na ye emonani polele kati na biloko na ye nyonso oyo azalisi na mabelé.—Nzembo 104:24.
15. (a) Mpo na nini ekoki te bobele kolóna mayele? (b) Masese 3:25, 26 elamwisi elikya nini kati na biso?
15 Tosengeli te bobele kolóna bizaleli ya Yehova, oyo ete mayele mpe bososoli, kasi tosengeli lisusu kosimba yango makasi, kozanga kolɛmba kati na boyekoli na biso ya Liloba na ye. Akebisi biso ete: “Mwana na ngai, tika tɛ ete ilongwa liboso na miso na yɔ, batela mayɛlɛ na sɔlɔ mpe bosɔsɔli. Ikojala bomɔi mpɔ na molimo na yɔ mpe kitɔkɔ mpɔ na nkingo na yɔ.” (Masese 3:21, 22) Boye tokoki bongo kotambola na libateli mpe na kimya ya elimo, ata na boumeli ya mokolo ya “libebi ya pwasa” oyo ekoya lokola moyibi mpo na kobuka mokili ya Satana. (1 Batesaloniki 5:2, 3) Na boumeli ya bolózi monene, “banga mpɔ na nsɔmɔ na pwasa tɛ mpe na kobeba na bato mabe tɛ, wana ekoya yango. Jambi [Yehova, NW] akojala elikia na yɔ mpe akobatela lokolo na yɔ ete lojuama tɛ.”—Masese 3:23-26.
Kolinga kosala malamu
16. Nini esɛngami lisusu epai na baklisto mpo na kobakisa molende kati na mosala ya kosakola?
16 Oyo ezali ntango ya komonisa molende kati na mosala ya kosakola nsango malamu oyo ya Bokonzi lokola litatoli na mabota nyonso. Kasi mosala yango ya kotatola mosengeli kosimbama na misala mosusu ya boklisto, lokola yango emonisami na Masese 3:27, 28, ete: “Boya kosalela bato malamu tɛ baoyo bakoki kojua yango, wana lobɔkɔ na yɔ ejui eposa na kosala bongo. Loba na mojalani na yɔ tɛ ete, Kɛnda mpe yaka lisusu, nakopɛsa yɔ lobi; kasi ojali na bilɔkɔ epai na yɔ.” (Kokanisá na Yakobo 2:14-17.) Lokola mingi kati na mokili banyokwami na bobólá mpe na nzala, tosɛngami nokinoki mpo na kosunga bazalani na biso, mingi mpenza bandeko na biso ya elimo. Lolenge nini Batatoli ya Yehova bazali koyanola?
17-19. (a) Mposa nini ya nokinoki oyo ekokisamaki na boumeli ya mobu 1993, mpe eyano nini epesamaki? (b) Nini emonisi ete bandeko na biso oyo bazali kati na mpasi bazali “kozwa elónga mobimba”?
17 Tózwa ndakisa moko: Na boumeli ya mbula oyo euti koleka, libyangi ya nokinoki lipesamaki mpo na kosunga mboka oyo ebéngamaki kala ete Yougoslavie. Bandeko ya mikili mizali zingazinga bayanolaki na motindo kitoko. Na boumeli na sanza ya malili makasi ya eleko ya mpiɔ ya mobu moleki, ebele na mituka minene mikokaki kokɔta na etúká wana ya bitumba, komemáká ebele na mikanda, bilamba ya komibatela na malili, bilei, mpe bankisi mpo na Batatoli oyo bazalaki na bosɛngá. Na libaku moko, bandeko balukaki kozwa ndingisa ya kokɔtisa batone 15 ya biloko mpo na kopesa lisungi, kasi ntango bazwaki ndingisa, ezalaki nde mpo na batone 30! Batatoli ya Yehova ya mboka Autriche, batindaki nokinoki mituka misusu misato ya minene. Na nyonso, ezalaki nde batone 25 oyo ekómaki esika yango etindamaki. Oyo nde esengo bandeko na biso bazalaki na yango mpo na kozwa ebele na bilei wana ya elimo mpe ya mosuni!
18 Lolenge nini baoyo bazwaki biloko wana bayanolaki? Na ebandeli na mbula oyo, nkulutu moko akomaki ete: “Bandeko mibali mpe basi ya Sarajevo bazali na bomoi mpe bazali malamu, kasi likambo ya ntina mingi ezali ete, tozali ntango nyonso makasi kati na elimo mpo na koyika mpiko na etumba oyo ya bolemá. Bomoi ezalaki mpasi mingi na ntina na bilei. Tiká ete Yehova apambola bino mpe apesa bino mbano mpo na milende bosali mpo na biso. Bakonzi ya Leta bazali mpenza na limemya epai na Batatoli ya Yehova mpo na etamboli na bango malamu mpe mpo na botosi na bango epai na bakonzi. Topesi lisusu botɔ́ndi mpo na bilei ya elimo oyo botindelaki biso.”—Kokanisá na Nzembo 145:18.
19 Bandeko wana oyo bazalaki na likámá bamonisaki mpe botɔ́ndi na molende na bango kati na mosala ya elanga. Mingi kati na bazalani na bango bazali koya epai na bango mpo na kosɛnga boyekoli ya Biblia. Na engumba ya Tuzla, epai kuna batone mitano ya bilei etindamaki, basakoli 40 bazalaki kosala mwayene ya ngonga 25 na sanza kati na mosala ya kosakola, na lisungi malamu lipesami na babongisi-nzela (pionniers) libwa oyo bazali kati na lisangá. Bazwaki motuya monene ya bayangani 243 na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Bandeko wana ya bolingo bazali mpenza “kozwa elónga mobimba mpo na ye oyo alingaki biso.”—Baloma 8:37, NW.
20. “Bokokanisi” nini bosalemaki na mikili oyo mibéngamaki kala ete Union soviétique?
20 Bokabi oyo bomonisamaki na milɔngɔ́ ya mituka minene ya bilei mpe na bilamba oyo etindamaki mpo na kosunga bandeko bazwami na mikili oyo mibéngamaki kala ete Union soviétique, ekokanaki mpe na molende ya bandeko ya mikili wana. Na ndakisa, na Moscou, motuya ya bayangani na Ekaniseli na mbula oyo, ezalaki 7 549, nzokande na mbula eleki ezalaki 3 500. Bobele na boumeli ya ntango yango, masangá ya engumba wana makólaki longwa na masangá 12 kino masangá 16. Na mikili nyonso mibéngamaki kala ete Union soviétique (longola mikili ya Baltes), bokóli na masangá ezalaki ya 14 kati na monkámá, na basakoli ezalaki ya 25 kati na monkámá, mpe na babongisi-nzela ezalaki ya 74 kati na monkámá. Oyo nde elimo ya molende mpe ya komipesa! Yango ezali kokundola “bokokanisi” oyo bosalemaki na ekeke ya liboso. Baklisto oyo bazalaki na bozwi na elimo mpe na mosuni, bazalaki kopesa makabo epai na baoyo bafandaki na mikili ya bobólá, nzokande molende na bandeko yango oyo bazalaki kokélela mopesaki esengo mpe elendiseli epai na baoyo bazalaki kokabela bango.—2 Bakolinti 8:14, NW.
Tóyina mabe!
21. Lolenge nini bato ya mayele mpe bazóba bakesenisami kati na maloba ya nsuka ya Masese mokapo 3?
21 Mokapo ya misato ya Masese molandi komonisa molɔngɔ́ ya makambo makeseni, na kopesáká likebi oyo na nsuka, ete: “Kolula moto na mobulu te, kopona soko moko na nzela na ye te. Mpo ete moto mabe azali eloko eboyami na Yehova, nde boninga na Ye ezali elongo na basembwi. Kolakelama mabe na Yehova ezali likoló na ndako ya moto mabe, nde akopambolaka efandelo ya moyengebene. Soki ezali mpo na batyoli, ye moko akosɛka; nde akomonisa ngolu epai na basɔkɛmi. Lokumu ezali eloko oyo ekozwama na bato ya mayele, nde bazóba bakokumba nsɔni.”—Masese 3:29-35, NW.
22. (a) Lolenge nini tokoki kopɛngola kotangama kati na bazóba? (b) Bato ya mayele bazali koyina makambo nini, mpe bazali kolóna makambo nini, mpe bakozwa mbano nini?
22 Lolenge nini tokoki kopɛngola kotangama kati na bazoba? Tosengeli koyekola koyina mabe, ee, koboya makambo oyo Yehova azali koboya—banzela mabe nyonso ya mokili oyo ya mobulu, oyo esopi makila mingi. (Talá lisusu Masese 6:16-19.) Lisusu, tosengeli kolóna makambo oyo mazali malamu—bosembo, boyengebene, mpe bosɔkɛmi—mpo ete na komikitisa mpe na kobanga Yehova, tokoki kozala na “bozwi mpe nkembo mpe bomoi.” (Masese 22:4, NW) Oyo ezali mbano oyo ekopesama na banso kati na biso baoyo, na sembo nyonso, bakolanda toli oyo ete: “Tyá elikya epai na Yehova na motema na yo mobimba.”
Okoyanola boni?
◻ Lolenge nini mokapo mosimbi lisoló ya boyekoli na biso ekoki kosalelama na mikolo na biso?
◻ Lolenge nini tokoki kokumisa Yehova?
◻ Mpo na nini tosengeli te kotyola toli?
◻ Epai wapi tokoki kozwa bolamu oyo boleki monene?
◻ Tokoki kosala nini mpo na kolinga malamu mpe koyina mabe?
[Elilingi na lokasa 18]
Baoyo bazali kopesa biloko na bango ya kitoko lokola mbeka epai na Yehova, bakozwa ebele na mapamboli