Zalá na kondima na Liloba ya Esakweli ya Nzambe!
“Liloba ya esakweli ekómi mpenza likambo ya solo mpo na biso.”—2 PETELO 1:19, NW.
1, 2. Esakweli ya liboso oyo ekomamaki elobaki nini, mpe yebisá moko na mituna oyo esakweli yango ebimisaki?
ESAKWELI ya liboso oyo ekomamaki eutaki na Yehova. Ntango Adama na Eva basalaki lisumu, Nzambe alobaki na nyoka boye: “Nakotya koyinana na kati na yo na mwasi, na kati ya mombóto na yo mpe mombóto na ye. Ye akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.” (Genese 3:1-7, 14, 15, NW) Bambula ebele mpenza esengelaki koleka liboso bákanga ntina malamu ya esakweli yango.
2 Esakweli yango ya liboso epesaki bato ya masumu elikya ya solosolo. Makomami emonisaki na nsima ete “nyoka ya kalakala” ezali Satana Zabolo. (Emoniseli 12:9) Kasi, Mombóto oyo Nzambe alakaki ezali nani?
Tóluka koyeba Mombóto
3. Ndenge nini Abele amonisaki ete azalaki na kondima na esakweli ya liboso?
3 Abele asalaki lokola tata na ye te, ye azalaki kobanga Nzambe mpe asalaki misala oyo emonisi ete azalaki na kondima na esakweli ya liboso. Ekoki mpenza kozala ete Abele akangaki ntina ete esengeli makila esopama mpo na kozipa masumu. Yango wana, lokola azalaki na kondima, apesaki mbeka ya nyama mpe Nzambe andimaki yango. (Genese 4:2-4) Kasi, Mombóto oyo elakamaki eyebanaki naino te.
4. Nzambe alakaki Abalayama nini mpe yango emonisaki nini mpo na Mombóto oyo elakamaki?
4 Soki mbula 2 000 nsima ya Abele, Yehova alakaki Abalayama likambo moko oyo alobaki yango lokola esakweli ete: “Nakopambola yo solo mpe nakofulisa bana na yo lokola minzoto ya likoló . . . Mabota nyonso ya nse bakopambolama mpo na bana na yo.” (Genese 22:17, 18) Maloba yango emonisi ete Abalayama azalaki na likambo ya kosala na kokokisama ya esakweli ya liboso. Maloba yango emonisaki ete Mombóto oyo ekobebisa misala ya Satana ekouta na libota ya Abalayama. (1 Yoane 3:8) “[Abalayama] atyaki ntembe te mpo na elaka ya Nzambe.” Mpe lisusu, batatoli mosusu ya Yehova oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya batyaki ntembe te atako “bazwaki te makambo oyo ye alakaki bango.” (Roma 4:20, 21; Baebreo 11:39, Boyokani ya Sika) Kasi, bazalaki ntango nyonso na kondima na liloba ya esakweli ya Nzambe.
5. Nani azalaki Mombóto oyo Nzambe alakaki mpe mpo na nini olobi bongo?
5 Ntoma Paulo amonisaki Mombóto oyo Nzambe alakaki ntango akomaki ete: “Bilaka bisalami epai na Abalayama mpe na [mombóto, NW] na ye. Elobi te ete, Mpe na [mimbóto, NW] na ye, bango mingi, kasi epai na moto moko ete, Mpe epai na [mombóto] na yo. Ye wana Klisto.” (Bagalatia 3:16) Mombóto oyo na nzela na ye mabota ekopambolama ezalaki bana nyonso ya Abalayama te. Bato basengelaki kopambolama na nzela ya bakitani ya mwana na ye Yisamaele te to bana oyo abotaki na Ketula. Mombóto ya lipamboli ebimaki na nzela ya mwana na ye Yisaka mpe na nkɔkɔ na ye Yakobo. (Genese 21:12; 25:23, 31-34; 27:18-29, 37; 28:14) Yakobo amonisaki ete “bato” bakotosa Silo, moto ya libota ya Yuda; mpe na nsima, emonanaki ete Mombóto ekobima na libota ya Davidi. (Genese 49:10; 2 Samwele 7:12-16) Bayuda ya ekeke ya liboso bazalaki kozela moto moko aya lokola Masiya to Klisto. (Yoane 7:41, 42) Esakweli ya Nzambe mpo na Mombóto ekokisamaki epai ya Mwana na ye, Yesu Klisto.
Masiya Ayei!
6. (a) Ndenge nini tozali kokanga ntina ya esakweli ya pɔsɔ 70? (b) Ntango nini mpe ndenge nini Yesu ‘asilisaki lisumu’?
6 Mosakoli Danyele akomaki esakweli moko ya ntina mingi mpo na Masiya. Na mbula ya liboso ya boyangeli ya Dalio, moto ya Mede, Danyele amonaki ete mbula 70 oyo Yelusaleme etikalaki mpamba ekómaki na nsuka na yango. (Yilimia 29:10; Danyele 9:1-4) Ntango Danyele azalaki kobondela, anzelu Gabaliele ayaki mpe amonisaki ete ‘pɔsɔ ntuku nsambo elakamaki mpo na kosilisa lisumu.’ Masiya asengelaki kolongolama na katikati ya pɔsɔ ya 70. “Bapɔsɔ ntuku nsambo ya bambula” ebandaki na mobu 455 L.T.B. ntango Alatazelezese I, mokonzi ya Perse ‘abimisaki liloba ya kotonga lisusu Yelusaleme.’ (Danyele 9:20-27; Nehemia 2:1-8) Masiya asengelaki koya nsima ya pɔsɔ 7 bakisa pɔsɔ 62. Bambula 483 yango ebandaki na mobu 455 L.T.B. mpe esukaki na mobu 29 T.B., ntango Yesu azwaki batisimo mpe Nzambe apakolaki ye lokola Masiya, to Klisto. (Luka 3:21, 22) Yesu ‘asilisaki lisumu’ ndenge apesaki bomoi na ye lokola mbeka na mobu 33 T.B. (Malako 10:45) Talá ntina malamu oyo tosengeli kozala na kondima na liloba ya esakweli ya Nzambe!a
7. Na lisalisi ya Makomami, monisá ndenge oyo Yesu akokisaki bisakweli oyo elobelaki Masiya.
7 Kondimela liloba ya esakweli ya Nzambe ezali kosalisa biso tóyeba Masiya. Bisakweli mingi ya Makomami ya Liebele elobeli Masiya, mpe bato oyo bakomaki Makomami ya Greke ya boklisto bamonisaki ete mingi kati na bisakweli yango ekokisamaki na bomoi ya Yesu. Na ndakisa: Yesu abotamaki na ngɔndɔ moko na mboka Beteleme. (Yisaya 7:14; Mika 5:2; Matai 1:18-23; Luka 2:4-11) Babengaki ye na Ezipito, mpe babomaki bana mike nsima ya kobotama na ye. (Yilimia 31:15; Hosea 11:1; Matai 2:13-18) Yesu amemaki maladi na biso. (Yisaya 53:4; Matai 8:16, 17) Lokola esakolamaki, amataki likoló ya mwana ya mpunda ntango akɔtaki na Yelusaleme. (Zekalia 9:9; Yoane 12:12-15) Maloba ya mokomi ya nzembo ekokisamaki nsima ya kobaka Yesu na nzete: Basoda bakabolaki bilamba na ye kati na bango mpe babɛtaki zeke mpo na kopona moto oyo akozwa elamba na ye ya kati. (Nzembo 22:18; Yoane 19:23, 24) Esakweli mosusu mpe ekokisamaki na ndenge babukaki mikuwa ya Yesu te mpe lokola batɔbɔlaki ye na mopanzi. (Nzembo 34:20; Zekalia 12:10; Yoane 19:33-37) Yango ezali kaka mwa bandakisa ya bisakweli etali Masiya oyo bato oyo bakomaki Biblia na lisalisi ya elimo santu bamonisaki ete ekokisamaki epai ya Yesu.b
Bókumisa Mokonzi Masiya!
8. Mokóló na Mikolo ezali nani mpe ndenge nini esakweli ya Danyele 7:9-14 ekokisamaki?
8 Na mbula ya liboso ya boyangeli ya Belesasala, mokonzi ya Babilone, Yehova alɔtisaki mosakoli Danyele ndɔtɔ moko mpe alakisaki ye bimonaneli ya kokamwa. Ya liboso, mosakoli amonaki banyama minei ya minene. Anzelu ya Nzambe alobaki ete banyama yango ezali bililingi ya “bakonzi minei,” elingi koloba ete ezalaki bililingi ya banguya ya mokili mobimba oyo esengelaki kolandana moko nsima ya mosusu. (Danyele 7:1-8, 17) Na nsima, Danyele amonaki Yehova, “Mokóló na Mikolo,” afandi na kiti ya bokonzi ya nkembo. Akatelaki banyama yango bitumbu, abɔtɔlaki bokonzi ya banyama yango mpe abomaki nyama ya minei. Na nsima, apesaki ye oyo azalaki “lokola mwana ya moto” bokonzi mpo na libela likoló ya “mabota mpe mikili mpe nkota.” (Danyele 7:9-14) Yango ezali esakweli ya kokamwa mpenza oyo etaleli ndenge oyo “Mwana ya moto,” Yesu Klisto, afandaki na kiti ya bokonzi na likoló na 1914!—Matai 16:13.
9, 10. (a) Eteni mokomoko ya ekeko emonisaki nini? (b) Ndenge nini okoki kolimbola kokokisama ya Danyele 2:44?
9 Danyele ayebaki ete Nzambe “akolongolaka mikonzi mpe akotɛmisaka mikonzi.” (Danyele 2:21) Mosakoli yango azalaki na kondima epai ya Yehova, “oyo akomonisaka makambo mabombami,” yango wana apesaki ndimbola ya ekeko monene oyo Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone, amonaki na ndɔtɔ. Eteni na eteni ya ekeko yango emonisaki kobima mpe kolimwa ya banguya ya mokili mobimba lokola Babilone, Bamede na Baperse, Grèce, na Loma. Nzambe asalelaki mpe Danyele mpo na komonisa makambo oyo makobima na mokili tii na ntango na biso mpe nsima na yango.—Danyele 2:24-30.
10 Mosakoli alobaki boye: “Na mikolo ya mikonzi yango Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44) Na 1914, ntango “ntango ya mabota” esukaki, Nzambe atyaki Bokonzi ya likoló mpe apesaki yango na mabɔkɔ ya Klisto. (Luka 21:24, NW; Emoniseli 12:1-5) Na nguya ya Nzambe, “libanga” to Bokonzi ya Masiya elongwaki na “ngomba,” elingi koloba bokonzi ya Nzambe na molɔ́ngɔ́ mobimba. Na Armagedon, libanga yango ekobɛta ekeko mpe ekonika yango tii ekokóma mputulu. Bokonzi ya Masiya ekotɛlɛma lokola ngomba oyo ekoyangela “mabele mobimba” libela na libela.—Danyele 2:35, 45; Emoniseli 16:14, 16.c
11. Mbongwana ya Yesu ezalaki elakiseli ya nini mpe ndenge nini emonaneli yango esimbaki motema ya Petelo?
11 Yesu azalaki kokanisa bokonzi yango ntango ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nazali koloba na bino solo ete bamosusu bazali kotɛlɛma awa baoyo bakomona kufa te liboso na komona Mwana ya moto oyo azali koya na Bokonzi na ye.” (Matai 16:28) Mikolo motoba na nsima, Yesu akamataki Petelo, Yakobo, na Yoane mpe bakendaki na ngomba moko molai mpe kuna abongwanaki na miso na bango. Ntango lipata moko oyo ezalaki kongɛnga ezipaki bantoma, Nzambe alobaki ete: “Oyo Mwana na ngai ya bolingo, nasepeli [na] ye mingi. Bóyoka ye!” (Matai 17:1-9; Malako 9:1-9) Likambo yango elakisaki mpenza nkembo ya Bokonzi ya Klisto! Tokoki kokamwa te ete Petelo akanisaki emonaneli yango ya nkembo mpe alobaki ete: “Yango wana liloba ya esakweli ekómi mpenza likambo ya solo mpo na biso.”—2 Petelo 1:16-19, NW.d
12. Mpo nini tokoki koloba ete sikoyo ezali mpenza ntango ya komonisa kondima na liloba ya esakweli ya Nzambe?
12 Tomoni mpenza ete “liloba ya esakweli” esangisi bisakweli ya Makomami ya Liebele oyo elobelaki Masiya mpe maloba ya Yesu ete akoya “na nguya mpe na nkembo mingi.” (Matai 24:30) Mbongwana endimisaki liloba ya esakweli oyo etali koya ya Klisto na nguya ya Bokonzi. Etikali moke mpenza, na ntango ya komonana na ye na nkembo, Klisto akoboma bato oyo bazangi kondima mpe akopambola bato oyo bazali kosala misala ya kondima. (2 Batesaloniki 1:6-10) Ndenge bisakweli ya Biblia bizali kokokisama emonisi ete tozali sikoyo na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5, 16, 17; Matai 24:3-14) Mikaele, elingi koloba Yesu Klisto, Mopesi ya bitumbu ya Yehova, amibongisi mpo na koboma mokili oyo mabe na ntango ya “bolɔzi monene.” (Matai 24:21; Danyele 12:1) Yango wana, oyo ezali mpenza ntango ya kolakisa ete tozali kondima liloba ya esakweli ya Nzambe.
Batelá kondima na liloba ya esakweli ya Nzambe
13. Nini ekoki kosalisa biso tólinga ntango nyonso Nzambe mpe tóndima ntango nyonso liloba na ye?
13 Na ntembe te tosepelaki mingi mbala ya liboso oyo toyokaki ndenge oyo liloba ya esakweli ya Nzambe ezali kokokisama. Kasi banda wana, kondima na biso ekiti mpe bolingo na biso ekómi mpiɔ? Tólinga ata moke te kozala lokola baklisto ya Efese, baoyo ‘batikaki bolingo na bango ya liboso.’ (Emoniseli 2:1-4) Ata soki tosili kolekisa mbula boni mpo na kosalela Yehova, kondima na biso ekoki kokita mpe bolingo na biso ekoki kokóma mpiɔ soki tozali lisusu ‘koluka liboso bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye te’ mpo na komibombela biloko ya motuya na likoló. (Matai 6:19-21, 31-33) Soki tozali komipesa na koyekola Biblia, mpe tozali ntango nyonso koyangana mpe kopesa biyano na makita, mpe tozali na molende na mosala ya kosakola Bokonzi, ekosalisa biso tóbatela bolingo na biso mpo na Yehova, mpo na Mwana na ye mpe mpo na Makomami. (Nzembo 119:105; Malako 13:10; Baebele 10:24, 25) Na nsima, makambo yango ekobatela kondima na biso na liloba ya Nzambe.—Nzembo 106:12.
14. Baklisto bapakolami bazali kozwa mbano nini mpo na kondima na bango na liloba ya esakweli ya Nzambe?
14 Se ndenge liloba ya esakweli ya Nzambe ekokisamaki na ntango ya kala, tokoki kondima ete makambo oyo liloba yango ezali kosakola mpo na mikolo oyo ezali koya makosalema. Na ndakisa, sikoyo Klisto azali na kati ya nkembo ya Bokonzi, mpe likambo oyo elakamaki lokola esakweli ekokisami epai ya baklisto bapakolami oyo bazalaki sembo tii na liwa na bango: “Mpo na molongi, nakopesa ye nzela ya kolya mbuma ya nzete na bomoi, oyo ezali kati na paladiso ya Nzambe.” (Emoniseli 2:7, 10; 1 Batesaloniki 4:14-17) Yesu azali kopesa balongi yango libaku malamu ya “kolya mbuma ya nzete ya bomoi” na “paladiso ya Nzambe” kuna na likoló. Na lisekwa na bango mpe na nzela ya Yesu Klisto, Yehova, “mokonzi ya seko, ye Nzambe bobele moko oyo akokufa te oyo mpe akomonanaka te” azali kopesa bango nzoto oyo ekoki kokufa te mpe ekoki kobeba te. (1 Timote 1:17; 1 Bakolinti 15:50-54; 2 Timote 1:10) Yango ezali mbano monene mpo na bolingo na bango oyo ekoki kosila te epai ya Nzambe mpe kondima makasi na bango na liloba ya esakweli na ye.
15. Moboko ya “mabele ya sika” etongami likoló ya banani mpe banani bazali baninga na bango?
15 Mwa moke na nsima wana bapakolami ya sembo oyo bakufá basekwaki na “paladiso ya Nzambe” kuna na likoló, batikali ya Yisalaele ya elimo oyo bazali naino awa na mabele basikwamaki mpe babimaki na “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. (Emoniseli 14:8; Bagalatia 6:16) Moboko ya “mabele ya sika” etongami likoló na bango. (Emoniseli 21:1) Na bongo, “mokili” moko ebotamaki mpe mokili yango ekómaki paladiso ya elimo oyo ezali lelo oyo na mokili mobimba. (Yisaya 66:8) “Na mikolo ya nsuka” oyo tozali, baninga ya Yisalaele ya elimo baoyo bazali lokola bampate bazali koya ebele na paladiso yango.—Yisaya 2:2-4; Zekalia 8:23; Yoane 10:16; Emoniseli 7:9.
Liloba ya esakweli ya Nzambe eyebisaki bomoi ya bato na mikolo ekoya
16. Bato oyo bazali kosalisa bapakolami na bosembo nyonso bazali na elikya nini mpo na mikolo oyo ezali koya?
16 Bato oyo bazali kosalisa bapakolami na bosembo nyonso bazali na elikya nini mpo na mikolo oyo ezali koya? Bango mpe bazali na kondima na liloba ya esakweli ya Nzambe, mpe bazali na elikya ya kokɔta na Paladiso oyo ekozala awa na mabele. (Luka 23:39-43) Na paladiso yango, bakomela mai ya bomoi na “ebale ya mai ya bomoi” mpe “nkasa ya nzete” oyo ezali pembenipembeni ya ebale yango ekobikisa bango. (Emoniseli 22:1, 2) Soki ozali na elikya malamu wana, lakisá ntango nyonso bolingo makasi na yo epai ya Yehova mpe kondima na yo na liloba ya esakweli na ye. Tiká ete ozala na kati ya baoyo bazali kosepela mingi mpo bazali na elikya ya bomoi ya seko na Paladiso awa na mabele.
17. Mapamboli nini ekozala na bomoi na Paladiso awa na mabele?
17 Bato ya kozanga kokoka bakoki mpenza te kolimbola ndenge oyo bomoi ekozala na kati ya Paladiso awa na mabele, kasi liloba ya esakweli ya Nzambe ezali komonisa biso mapamboli oyo bato ya botosi bakozwa. Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela kozanga ete moto moko atɛmɛla yango, mokano na ye ekosalema na mabele ndenge ezali kosalema na likoló, ata moto mabe moko te to mpe nyama, ‘akoyokisa mpasi to akobebisa.’ (Yisaya 11:9; Matai 6:9, 10) Bato ya komikitisa bakofanda na mokili, mpe “bakosepela na kimya ya solo.” (Nzembo 37:11) Tokomona lisusu te ebele ya bato bazali kokufa nzala, mpamba te “masango ikotondana na mokili ata kino likoló ya [ngomba].” (Nzembo 72:16) Bato bakotangisa lisusu mpisoli ya mawa te. Maladi ekozala lisusu te ata mpe liwa ekozala lisusu te. (Yisaya 33:24; Emoniseli 21:4) Kanisá naino: minganga, bankisi, balopitalo to bisika oyo batyaka bato ya magboma mpe matanga, ekozala te. Talá bilikya kitoko boye!
18. (a) Bapesaki Danyele elikya ya likambo nini? (b) “Oyo eponami” mpo na Danyele ekozala nini?
18 Ata mpe malita ekotikala mpamba na ntango oyo, na esika bato bákufaka, bakobanda nde kosekwa. Yobo, moto ya sembo, azalaki na elikya yango. (Yobo 14:14, 15) Mosakoli Danyele mpe azalaki na elikya yango, mpamba te anzelu ya Yehova alobaki na ye maloba ya kolendisa oyo: “Kendá na yo kino nsuka. Okopema, mpe okotɛlɛma mpo na yango eponami mpo na yo na nsuka ya mikolo.” (Danyele 12:13) Danyele asalelaki Nzambe na bosembo tii na nsuka ya bomoi na ye. Sikoyo azali kopema na liwa, kasi “akotɛlɛma” na ntango ya “lisekwa ya bato ya sembo” na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto. (Luka 14:14) “Oyo eponami” mpo na Danyele ekozala nini? Ntango esakweli ya Ezekiele ekokokisama na kati ya Paladiso, basaleli ya Yehova bakozala na esika; ɛɛ, mokili ekokabolama na bosembo mpe na mobulu te. (Ezekiele 47:13–48:35) Boye, Danyele akozala na esika na ye na kati ya Paladiso, kasi oyo eponami mpo na ye ekosuka kaka wana te. Akozala mpe na esika kati na mokano ya Yehova.
19. Moto asengeli kosala nini mpo na kozwa bomoi na Paladiso awa na mabele?
19 Ezali boni mpo na yo mpe oyo eponami mpo na yo? Soki ozali na kondima na Biblia, Liloba ya Nzambe, na ntembe te okozala na mposa ya bomoi na Paladiso awa na mabele. Okoki ata komimona na makanisi ete ozali na kati ya Paladiso, ozali kozwa ebele ya mapamboli, ozali kobongisa mabele, mpe ozali koyamba basekwi na esengo. Kutu, Paladiso ezali mpenza nde esika ya moto. Nzambe akelaki mwasi na mobali ya liboso mpo báfanda na esika ya ndenge wana. (Genese 2:7-9) Mpe alingi ete bato ya botosi báfanda libela na libela na Paladiso. Okosalela makambo oyo Makomami ezali koloba mpo ozala na kati ya bamiliare ya bato oyo bakozala na bomoi na Paladiso awa na mabele? Okoki kokɔta na Paladiso soki olingaka mpenza Tata na biso ya likoló, Yehova, mpe soki ozali na kondima makasi na liloba ya esakweli na ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokanda Tyá likebi na esakweli ya Danyele!, na mokapo 11 mpe mokanda Étude perspicace des Écritures na motó ya likambo “Soixante-dix semaines,” nyonso ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Talá mokanda “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” nkasa 343-344, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Talá mokanda Tyá likebi na esakweli ya Danyele! na mokapo 4 mpe 9.
d Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 2000, na lisolo “Tyá likebi na liloba ya esakweli ya Nzambe.”
Okopesa eyano nini?
• Esakweli ya liboso elobaki nini mpe nani azali Mombóto oyo elakamaki?
• Tángá mwa bisakweli oyo elobelaki Masiya mpe ekokisamaki epai ya Yesu.
• Danyele 2:44, 45 ekokokisama ndenge nini?
• Liloba ya esakweli ya Nzambe elobi ete bato ya botosi bakozala na bomoi ya ndenge nini na mikolo oyo ezali koya?
[Elilingi na lokasa 18]
Ozali na elikya ya kozala na bomoi na Paladiso awa na mabele?