“Sepelá na mwasi ya bolenge na yo”
“Sepelá na mwasi ya bolenge na yo. Ee mwana na ngai, mpo na nini okosepelisama na mwasi mopaya?”—MASESE 5:18, 20.
1, 2. Mpo na nini tokoki koloba ete lolango ya mwasi ná mobali epambolami?
BIBLIA esalelaka maloba ya polele mpo na kolobela makambo etali kosangisa nzoto. Na Masese 5:18, 19, tozali kotánga boye: “Tiká ete [liziba ya mai na yo epambolama, NW]; sepelá na mwasi ya bolenge na yo. Azali lokola mboloko ya bolingo mpe ntaba ya nkeka na kitoko, tiká ete mabɛlɛ na ye masepelisa yo ntango nyonso, yoká esengo na bolingo na ye libela.”
2 “Liziba ya mai” ezali elilingi ya likambo oyo ekokisaka mposa ya nzoto. Mai yango epambolami mpo lolango ya mwasi ná mobali mpe esengo oyo yango ememelaka bango ezali likabo ya Nzambe. Kasi, bisengo wana esengeli kozala kaka na kati ya bato oyo babalaná mpenza. Yango wana Salomo, mokonzi ya Yisalaele, atunaki boye: “Ee mwana na ngai, mpo na nini okosepelisama na mwasi mopaya? mpe okobumela ntolo ya mopaya?”—Masese 5:20.
3. (a) Likambo nini ya mawa ezali komonana na mabala mingi? (b) Ndenge nini Nzambe atalelaka ekobo?
3 Mokolo ya libala, mobali ná mwasi balapaka ndai ya kolingana mpe kofanda elongo mpo na libela. Nzokande lelo oyo, mabala mingi ezali kobeba mpo na ekobo. Kutu, moto moko ya mayele alobaki ete nsima ya kotalela baankɛtɛ 25, amonaki ete “basi 25 likoló ya monkama mpe mibali 44 likoló ya monkama basilá kosangisa nzoto na moto mosusu.” Ntoma Paulo alobaki boye: “Bómikosa te. Bato ya pite, mpe basambeli ya bikeko, mpe bato ya ekobo, mpe mibali oyo bazwamá mpo na kosangisa nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mpe mibali oyo balalaka na mibali . . . bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (1 Bakolinti 6:9, 10) Ezali polele ete ekobo ezali lisumu monene na miso ya Nzambe, mpe basambeli ya solo basengeli kokima yango. Nini ekoki kosalisa biso mpo “libala ekumisama na kati ya bato nyonso, mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te”?—Baebele 13:4.
Bókeba na motema ya bokosi
4. Wapi mwa makambo oyo ekoki kosala ete moklisto oyo abalá akwea na motambo ya kolinga moto mosusu?
4 Na kati ya mokili oyo bizaleli ya bato ebebi mingi, ebele ya bato “bazali na miso oyo etondá na ekobo mpe [bakokaka] te kotika lisumu.” (2 Petelo 2:14) Bato yango bazali kokosa balongani na bango mpe bazali koluka bato mosusu makango. Na mikili mingi, basi mingi bakómi kosala; lokola misala ya lelo ezali kosangisa basi ná mibali, ezaleli ya kolingana makango na esika ya mosala ekómi mingi. Lisusu, kosolola na Internet ekómi ndenge ya pɛtɛɛ ya koluka moto makango, ata mpo na bato oyo bazalaka nsɔninsɔni. Bato mingi oyo babalá bazali kokwea na mitambo yango kozanga koyeba.
5, 6. Ndenge nini mwasi moko moklisto alingaki kokwea na motambo, mpe yango ezali koteya biso nini?
5 Tótalela ndenge oyo moklisto moko oyo topesi nkombo Marie azwamaki na likambo moko oyo elingaki komema ye na ekobo. Mobali na ye, oyo azali Motatoli ya Yehova te, azalaki mpenza kokipe ye ná bana te. Marie alobi ete eleki mwa bambula, akutanaki na moninga ya mosala ya mobali na ye. Mobali yango azalaki na bonkonde mpenza; kutu, akómaki kosepela na mateya ya Biblia. Marie alobi boye: “Mobali yango azalaki boboto, akesanaki mpenza na mobali na ngai.” Mosika te, Marie ná moninga ya mobali na ye bakómaki kolulana. Marie akómaki kokanisa boye: “Nasali ekobo te, mpe mobali yango azali kosepela na mateya ya Biblia. Mbala mosusu nakosalisa ye ayeba solo.”
6 Liboso ete lolango emema ye na ekobo, Marie amonaki likama yango. (Bagalatia 5:19-21; Baefese 4:19) Lisosoli na ye ekómaki kotungisama, mpe asalaki makasi mpo azonga na nzela ya malamu. Lisolo ya Marie ezali komonisa ete “motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.” (Yilimia 17:9) Biblia ezali kopesa toli oyo: “Batelá motema na yo na mpiko nyonso.” (Masese 4:23) Ndenge nini tokoki kobatela yango?
‘Moto ya mayele akomibomba’
7. Ntango tozali kosalisa moto oyo azali na mikakatano na libala, toli nini ya Biblia ekobatela biso?
7 Ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká ete moto oyo azali kokanisa ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.” (1 Bakolinti 10:12) Lisusu, Masese 22:3 elobi ete: “Moto ya mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba.” Na esika ya koloba na motema na yo ete: ‘Mabe moko te ekokómela ngai,’ eleki malamu omonaka mosika mpe okima makambo oyo ekoki kobendela yo mindɔndɔ. Na ndakisa, kolinga te ete moto moko oyo azali na mikakatano na libala na ye ayebisaka basɛkɛlɛ na ye epai yo. (Masese 11:14) Osengeli koyebisa ye ete ndenge malamu ya kosilisa mikakatano na libala ezali ya kosolola na molongani na ye, to na moklisto oyo akɔmeli na elimo (ndeko mwasi, soki ye moko azali mwasi; mpe ndeko mobali, soki ye moko azali mobali), to mpe na bankulutu. (Tito 2:3, 4) Bankulutu na masangá ya Batatoli ya Yehova bapesaka ndakisa malamu na likambo yango. Ntango nkulutu moko alingi kosolola na ndeko moko ya mwasi, alingaka kozala na esika oyo bazali komona bango, na ndakisa na Ndako ya Bokonzi.
8. Likebisi nini ezali na ntina mingi na esika ya mosala?
8 Na esika ya mosala mpe na bisika mosusu, esengeli kokeba na makambo oyo ekoki kotinda yo okóma selesele ná moto oyo azali molongani na yo te. Na ndakisa, kotikala na mosala, na mobali, soki ozali mwasi, to na mwasi, soki ozali mobali, ekoki komema yo na komekama. Soki ozali na mwasi to mpe soki ozali mwasi ya libala, osengeli komonisa polele na maloba mpe na ezaleli na yo ete opesá motema na yo nyonso epai ya molongani na yo mpe ete esika mpo na moto mosusu ezali te. Lokola ozali na ezaleli ya kokangama na Nzambe, osengeli koboya kozala selesele na moto mosusu to mpe kolataka bilamba oyo ebongi te. (1 Timote 4:8; 6:11; 1 Petelo 3:3, 4) Kotya fɔtɔ ya molongani na yo mpe ya bana na yo na esika ya mosala ekosalisa yo omonaka bango ntango nyonso na makanisi mpe ekosala ete bato mosusu báyeba ete olingaka bato ya libota na yo mingi. Kolendisa ata moke te, kokanga mpe miso te, na moto oyo azali koya na maloba ya kolengola to azali kosala likambo mosusu nyonso oyo elongobani te.—Yobo 31:1.
“Fandá na esengo na mwasi oyo yo olingani na ye”
9. Makambo nini ekoki kosala ete mwasi to mobali oyo abalá akóma kolula moto mosusu?
9 Kobatela motema esuki te kaka na kokima makambo ekoki kozala motambo. Soki mwasi to mobali azali kobendama na moto mosusu, ntango mosusu emonisaka ete makambo ezali kotambola malamu te na libala na bango. Ntango mosusu mobali azali kokipe mwasi na ye te to mpe mwasi azali ntango nyonso kokitisa mobali na ye. Akoki kokutana na moto moko, na mosala, ata mpe na kati ya lisangá, oyo azali na bizaleli oyo azali komona te epai ya molongani na ye. Mokemoke, mokomoko akokóma kosepela na moninga, mpe komesana ekoki komema bango na kolulana. Likambo ya ndenge wana emonisi bosolo ya maloba ya Biblia oyo: “Moto na moto akomekamaka nde na komemamáká mpe na kobendamáká na mposa na ye moko.”—Yakobo 1:14.
10. Ndenge nini mwasi ná mobali bakoki kolendisa bolingo na bango?
10 Na esika ete mwasi to mobali oyo abalá akóma koluka moto mosusu oyo akoki kokokisa bamposa na ye (na ndakisa moto oyo akoki ata kolalisela motó na lipeka, to moninga ya kosolola na ye, to moto oyo akoki kolendisa ye ntango azali na mitungisi), asengeli nde kosala makasi mpo na kokolisa bolingo na libala na bango. Yango wana, bólekisaka ntango elongo, bóluka kokóma “patalo ná mokaba.” Bókanisaka makambo oyo ememaki bino na kolingana lokola mwasi ná mobali. Mokomoko amekaka kokanisa ndenge oyo azalaki koyoka soki amoni moto oyo akómá molongani na ye. Bókanisaka makambo ya malamu oyo bozalaki kosala elongo. Bóbondelaka Nzambe mpo na likambo yango. Davidi, mokomi ya nzembo, abondelaki Yehova boye: “Ee Nzambe, zaliselá ngai motema ya pɛto mpe pesá ngai [elimo, NW] ya sika ya boyengebene kati na ngai.” (Nzembo 51:10) Zalá na ekateli ya ‘kofanda na esengo na mwasi oyo yo olingani na ye mikolo nyonso ya bomoi na yo oyo Nzambe apesi yo na nse ya moi.’—Mosakoli 9:9.
11. Boyebi, mayele, mpe bososoli esalaka mosala nini na oyo etali kokembisa nsinga ya libala?
11 Mpo na kokembisa nsinga ya libala na bino, bosengeli koyeba ntina ya boyebi, mayele, mpe bososoli. Masese 24:3, 4 elobi boye: “Ndako ekotongama malamu na nzela ya mayele; ekokokisama na nzela ya bososoli. Na nzela ya boyebi, biteni-ya-ndako ekotonda na biloko ya motuya malamu mpe ya kitoko.” Na kati ya biloko ya motuya oyo epesaka esengo na libala, tokoki kotánga bizaleli malamu lokola bolingo, bosembo, kobanga Nzambe, mpe kondima. Mpo moto akóma na bizaleli yango, asengeli kozwa boyebi ya Nzambe. Yango wana, mobali ná mwasi basengeli koyekolaka Biblia. Bongo, mayele ná bososoli ezali na ntina nini? Mpo na kolonga mikakatano ya mokolo na mokolo esɛngaka kozala na mayele, elingi koloba likoki ya kosalela boyebi ya Biblia. Moto oyo azali na bososoli akoki koyeba makanisi mpe bamposa ya molongani na ye. (Masese 20:5) Na nzela ya Salomo, Yehova alobi ete: “Mwana na ngai, batelá mayele na ngai, mpe sembolá litoi na yo epai na boyebi na ngai.”—Masese 5:1.
Na ntango ya “bolɔzi”
12. Mpo na nini tokoki kokamwa te soki babalani bakutani na mikakatano na libala na bango?
12 Libala moko te ezangi mikakatano. Kutu, Biblia elobi ete mibali mpe basi bakozala na “bolɔzi na kati ya mosuni.” (1 Bakolinti 7:28) Mitungisi, maladi, minyoko, mpe makambo mosusu epesaka mpasi na kati ya libala. Kasi, ntango mikakatano ebimi, bosengeli kosimbana makasi mpo na koluka elongo ndenge oyo bokoki kosilisa yango lokola mwasi ná mobali oyo bazali na mposa ya kosepelisa Yehova.
13. Na makambo nini mobali to mwasi akoki komitalela?
13 Bosengeli kosala nini soki mikakatano ya libala na bino ezali kouta na makambo oyo moto na moto azali kosala moninga? Bosengeli kosala milende mpo na kosilisa yango. Na ndakisa, ekoki kozala ete mwasi moko ná mobali na ye bakómi na momeseno ya kolobana maloba ya mabe. (Masese 12:18) Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, yango ekoki kosala mabe mingi. Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Kofanda na mokili ya lisobe eleki malamu kozala na mwasi ya kowelana mpe na nkanda.” (Masese 21:19) Soki ozali mwasi mpe ozali na libala ya ndenge wana, osengeli komituna boye, ‘Ezaleli na ngai nde esalaka ete mobali na ngai akima kolekisaka ntango na ngai?’ Biblia elobi na mibali boye: “Bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasimakasi te.” (Bakolose 3:19) Soki ozali mobali, omituna boye: ‘Nazalaka nde nkandankanda, mpe yango etindaka mwasi na ngai aluka moto mosusu oyo akoki kosɛka na ye?’ Ya solo, makambo nyonso wana esengeli kopesa moto nzela te ya komipesa na mabɔkɔ ya moto mosusu. Nzokande, lokola toyebi ete likambo yango ekoki kosalema, ezali malamu mwasi ná mobali básololaka polele mpo na kosilisa mikakatano na bango.
14, 15. Mpo na nini kosepela na moto mosusu ekoki kosilisa mikakatano ya libala te?
14 Koluka moto mosusu mpo asalelaka yo makambo oyo molongani na yo asalelaka yo te ekosilisa mikakatano ya libala te. Boninga ya ndenge wana ekoki komema bino wapi? Ekoki nde kopesa yo nzela ozwa molongani mosusu, oyo aleki malamu? Bato mosusu bakoki kokanisa bongo. Moto mosusu akoki koloba ete, ‘Moto yango azali na makambo nyonso oyo ngai nalukaka epai ya mobali (to epai ya mwasi).’ Kasi, makanisi ya ndenge wana ezali lokuta, mpamba te moto nyonso oyo atiki molongani na ye—to oyo azali kolendisa yo otika molongani na yo—ayebi te ete libala ezali eloko ya bosantu na miso ya Nzambe. Moto oyo azali kokanisa ete bolingo ya ndenge wana ekosuka na libala ya malamu koleka, azali komikosa.
15 Marie, oyo tolobelaki na ebandeli, akanisaki malamu epai oyo nzela oyo alingaki kolanda ekokaki komema ye, bakisa mpe likoki ete ye moko to moto mosusu abebisa boyokani malamu na Nzambe. (Bagalatia 6:7) Alobi boye: “Ntango nakómaki kokanisa ndenge oyo nabandaki kotalela moninga ya mobali na ngai, namonaki ete soki mobali yango akoki koyekola Biblia, ngai nde nakokaki kokanga ye nzela. Kosala likambo oyo ebongi te ekosala moto nyonso mabe mpe ekobɛtisa bato mosusu libaku!”—2 Bakolinti 6:3.
Ntina oyo eleki monene
16. Tángá mwa mbuma mabe oyo ekobo ebotaka.
16 Biblia elobi boye: “Monɔkɔ ya mwasi mopaya ekotangisa elɛngi lokola nzoi mpe bibɛbu na ye eleki mafuta na kitoko. Kasi nsuka na ye ezali na bololo lokola mbondo, ezali na mopɔtu lokola mbeli ya mpia mibale.” (Masese 5:3, 4) Ekobo ememaka mpasi, ekoki ata koboma. Mbuma na yango ezalaka makambo lokola oyo: kotungisama lisosoli, kozwa maladi mabe, mpe molongani akotungisama mingi. Nyonso wana esengeli mpenza kotinda biso tómeka ata kotya lokolo te na nzela oyo ekoki komema biso na kosala ekobo.
17. Wapi ntina eleki monene oyo tosengeli kotikala sembo epai ya molongani na biso?
17 Ntina ya libosoliboso oyo ekobo ezali mabe ezali ete Yehova, Mobandisi ya libala mpe ye oyo apesá mobali ná mwasi likabo ya kosepela na kosangisa nzoto, aboyi yango. Na nzela ya mosakoli Malaki, Yehova alobaki boye: “Nakobɛlɛma epai na bino na kosambisa-sembo mpe nakozala motatoli ya mbangu kotɛmɛla . . . bato ya [ekobo, NW].” (Malaki 3:5) Masese 5:21 elobi boye: “Nzela ya moto ezali liboso ya miso ya [Yehova] mpe ye akobanza mpo na bilekelo na ye nyonso.” Ya solo, “biloko nyonso ezali bolumbu mpe etandami polele na miso ya moto oyo epai na ye tokozongisa monɔkɔ.” (Baebele 4:13) Yango wana, ntina eleki monene oyo moto asengeli kozala sembo epai ya molongani na ye ezali ete ata soki abombi likambo mpe ata soki abuki mbuma mabe te na nzoto to abɛtisi bato mosusu libaku te, lisano nyonso ya mbindo oyo moto asali na moto mosusu oyo azali molongani na ye te, ebebisaka boyokani na ye na Yehova.
18, 19. Lisolo ya Yozefe ná mwasi ya Potifala ezali koteya biso nini?
18 Ndakisa ya Yozefe, mwana ya Yakobo, ezali komonisa ete mposa ya kobatela boyokani malamu na Nzambe epesaka makasi ya koboya misala ya mabe. Lokola Potifala, moto moko oyo azalaki kosala epai ya Falao, asepelaki na Yozefe, apesaki ye mikumba minene na ndako na ye. Yozefe azalaki “bonzenga mpe kitoko” mpe mwasi ya Potifala akómaki kolula ye. Mokolo na mokolo azalaki komeka kolengola ye, kasi Yozefe azalaki koboya na motema moko. Mpo na nini Yozefe azalaki koboya? Biblia elobi na biso boye: “Ye aboyaki mpe alobaki na mwasi ya nkolo na ye ete, Ezali ngai awa nkolo na ngai . . . aboyi ngai eloko moko te bobele yo mpo ete ozali mwasi na ye. Bongo nakoka kosala mabe oyo mpe kosala lisumu epai ya Nzambe boni?”—Genese 39:1-12.
19 Yozefe azalaki monzemba, kasi aboyaki kosangisa nzoto na mwasi ya moto mpamba te ezali lisumu na miso ya Nzambe. Masese 5:15 elobi na mibali oyo babalá boye: “Mɛlá mai na pilita na yo moko mpe etima ya mai longwa na liziba na yo mpenza.” Boyá kozala selesele na moto oyo azali molongani na yo te! Salá nyonso oyo okoki mpo ete na libala na yo bolingo ezala makasi; mpe salá nyonso mpo na kosilisa mokakatano nyonso oyo bokutani na yango. Ee, “Sepelá na mwasi ya bolenge na yo.”—Masese 5:18.
Oyekoli makambo nini?
• Ndenge nini moklisto akoki kozwama na lolango ná moto mosusu?
• Makambo nini moto akoki kosala mpo na kobatela motema na ye ebendama te na kolinga moto mosusu?
• Ntango mwasi ná mobali bakutani na mikakatano, basengeli kosala nini?
• Wapi ntina ya libosoliboso moto oyo abalá asengeli koboya ekobo?
[Elilingi na lokasa 26]
Esika ya mosala ekómi esika ya kolingana makango
[Elilingi na lokasa 28]
‘Na nzela ya boyebi, biteni-ya-ndako ekotonda na biloko ya motuya malamu mpe ya kitoko’