Zwá mayele mpe ndimá disipilini
YEHOVA NZAMBE azali Moteyi Monene ya basaleli na ye. Ateyaka bango makambo na ye mpe makambo ya bomoi. (Yisaya 30:20; 54:13; Nzembo 27:11) Na ndakisa, na libota ya Yisalaele, Yehova atyaki basakoli, Balevi, mingi mpenza banganga, mpe mibali mosusu ya mayele lokola balakisi. (2 Ntango 35:3; Yilimia 18:18) Basakoli bazalaki koteya bato mikano mpe bizaleli ya Nzambe mpe bazalaki kolakisa nzela malamu oyo bato basengelaki kolanda. Banganga na Balevi bazalaki na mokumba ya koteya Mibeko ya Yehova. Bato ya mayele, to mikóló, bazalaki kopesa toli ya malamu na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo.
Salomo, mwana ya Davidi, alekaki bato nyonso ya mayele na Yisalaele. (1 Mikonzi 4:30, 31) Nsima ya komona nkembo mpe bozwi ya Salomo, Mokonzi-mwasi na Seba, moko na bato ya lokumu oyo bayaki kotala Salomo, alobaki boye: “Nayebisameli ata ndambo te. Mayele na yo mpe mosolo na yo izali koleka lokumu loyokaki ngai.” (1 Mikonzi 10:7) Mayele ya Salomo eutaki wapi? Ntango akómaki mokonzi ya Yisalaele na mobu 1037 L.T.B., Salomo abondelaki Nzambe apesa ye “mayele mpe boyebi.” Lokola Yehova asepelaki na likambo Salomo asɛngaki, apesaki ye boyebi, mayele, mpe motema oyo eyebi kososola. (2 Ntango 1:10-12; 1 Mikonzi 3:12) Tokoki kokamwa te na ndenge Salomo alobaki “masese nkóto misato”! (1 Mikonzi 4:32) Bamoko na masese yango, elongo na “maloba na Agulu,” mpe “maloba na mokonzi Lemuele,” ekomamaki na mokanda ya Masese na kati ya Biblia. (Masese 30:1; 31:1) Solo oyo elobami na masese yango ezali komonisa mayele ya Nzambe mpe ekozala bongo seko na seko. (1 Mikonzi 10:23, 24) Mpo na moto nyonso oyo alingi kozala na bomoi ya esengo mpe ya malamu, masese yango ezali na ntina mingi lelo oyo ndenge ezalaki ntango balobaki yango.
Ndenge nini kozala na bomoi malamu mpe bizaleli malamu?
Maloba ya ebandeli ya Masese elimboli ntina ya mokanda yango ete: “Masese na Salomo, mwana na Davidi, mokonzi na Yisalaele, mpo na koyeba mayele mpe [disipilini, NW] mpe kososola maloba na boyebi. Ɛɛ, kolakisama na mayele mpe boyengebene mpe kosambisa na sembo mpo na kokata na solo; kopesa mayele epai na [baye bazangi mayele, NW], boyebi mpe toli epai na elenge.”—Biso nde totɛngisi; Masese 1:1-4.
“Masese ya Salomo” ezali mpenza na ntina ya malamu! “Mpo na koyeba mayele mpe [disipilini, NW].” Kozala na mayele elimboli komona makambo ndenge ezali mpe kosalela boyebi yango mpo na kosilisa mikakatano, kokokisa mikano, kokima makama, to kosalisa bato mosusu na kosala bongo. Buku moko elobi ete: “Na mokanda ya Masese, ‘mayele’ elimboli kozala mayele na bomoi, kozwa mikano ya mayele mpe kozala na bomoi ya malamu.” Tomoni ete kozwa mayele ezali mpenza na ntina!—Masese 4:7.
Masese ya Salomo eteyaka mpe disipilini. Tozali na mposa ya kolakisama ndenge yango? Na Biblia, liloba disipilini elimbolaka kosembola, mpamela, to etumbu. Molimboli moko ya Biblia alobi ete, ezali “komonisa kobongisa makanisi, kosembola makanisi oyo ekoki komema moto na misala ya bozoba.” Ezala biso moko tomipesi disipilini to bato mosusu bapesi biso yango, epekisaka biso kolanda nzela mabe mpe lisusu epusaka biso tóbongwana mpo na kosala malamu. Ɛɛ, tozali na mposa ya disipilini soki tolingi kozala ntango nyonso na bizaleli malamu.
Masese ezali na ntina mibale: kopesa mayele mpe koteya disipilini. Disipilini na bizaleli mpe na makanisi ezali na ndenge mingi. Na ndakisa, boyengebene mpe bosembo ezali bizaleli ya motema, mpe yango esalisaka biso na kolanda mibeko ya Yehova oyo esɛngaka bizaleli malamu.
Mayele esangisi makambo mingi: kokanga ntina, bososoli, bokɛngi, mpe kokanisa malamu. Kozala na mayele elimboli koyeba likambo, kokesenisa eloko na eloko ya likambo yango, koyeba yango na mozindo mpo na kokanga ntina ya likambo yango mobimba, mpe na nsuka koyeba ndimbola na yango. Kozala na bososoli esɛngi koyeba oyo ezali komonisa ete likambo moko ezali malamu to mabe. Na ndakisa, moto ya mayele akoki kososola ntango moto moko abandi kolanda nzela mabe, mpe akoki mbala moko kokebisa ye na likama. Kasi asengeli kozala na bososoli mpo na kokanga ntina oyo moto azali kotambola na nzela yango mpe kosalela ndenge malamu ya kosalisa ye.
Bato ya bokɛngi bazalaka na angɛlɛ, bakosamaka mpambampamba te. (Masese 14:15) Bakoki komona likama na mosika mpe komilengela. Mpe mayele esalisaka biso na kozala na makanisi mabongi mpo na komitambwisa malamu na bomoi. Koyekola masese ya Biblia ezali na litomba mpamba te ekomamaki mpo na kopesa biso mayele mpe disipilini. Ezala “baye bazangi mayele” soki batii likebi na masese ya Biblia, bakokóma na bokɛngi, mpe “elenge,” akokóma na boyebi mpe bososoli.
Masese mpo na moto ya mayele
Nzokande, masese ya Biblia etaleli kaka moto oyo azangi mayele te to mpe elenge. Ezali mpo na moto nyonso oyo azali na mayele ya koyoka. Mokonzi Salomo alobi boye: “Moto na mayele akoyoka mpe [akotondisa] mayele; moto na boyebi akozwa toli malamu, mpo na kososola lisese mpe ntina, ɛɛ, mpe maloba na bato na mayele mpe kosakola na bango.” (Biso nde totɛngisi; Masese 1:5, 6) Moto ya mayele akobakisa lisusu mayele na ye na koyoka masese, mpe moto ya bososoli akobakisa makoki na ye mpo na kotambwisa bomoi na ye malamu.
Mbala mingi, lisese ezali likambo ya solo mpenza oyo elobami na maloba moke. Lisese ya Biblia ekoki kozala na maloba oyo ezali polele te. (Masese 1:17-19) Masese mosusu ezali basambole, to maloba ya makasimakasi mpe ya kobulunganisa oyo ezali kosɛnga koluka ndimbola na yango. Lisese ekoki mpe kozala kokokanisa biloko mibale, maloba ya elilingi mpe makambo mosusu ya ndenge yango. Mpo na koyeba yango ezali kosɛnga ntango mpe kokanisa mozindo. Na ntembe te, Salomo moto oyo akomaki masese mingi, azalaki mpenza na mayele mingi mpe ayebaki kolimbola masese. Na mokanda ya Masese, amipesi mokumba ya koteya batángi mayele yango. Moto oyo azali na mayele akosepela kotya likebi na masese yango.
Ebandeli oyo ezali komema na mokano moko
Moto asengeli koluka mayele mpe disipilini epai wapi? Salomo apesi eyano: “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya boyebi. Bazoba baboyi mayele na disipilini.” (Masese 1:7, NW) Boyebi ebandaka na kobanga Yehova. Moto akoki kozala na mayele to disipilini te soki azali na boyebi te. Na yango, kobanga Yehova ezali ebandeli ya mayele mpe disipilini.—Masese 9:10; 15:33.
Kobanga Yehova elimboli te kozala na nsɔmɔ na ye na ndenge ya mabe. Kasi, elimboli nde kozala na limemya mpe botosi ya mozindo. Moto akoki kozala na boyebi ya solo te soki abangaka Nzambe te. Yehova Nzambe azali liziba ya bomoi, nzokande, esengeli kozala na bomoi mpo na kozala na boyebi ata ya likambo nini. (Nzembo 36:9; Misala 17:25, 28) Lisusu, Nzambe nde akelaki biloko nyonso; yango wana boyebi nyonso oyo bato bazali na yango euti na koyekola misala ya mabɔkɔ na ye. (Nzembo 19:1, 2; Emoniseli 4:11) Lisusu, Nzambe akomisaki Liloba na ye na nzela ya elimo santu; Liloba yango ezali “na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kosembola.” (2 Timote 3:16, 17, NW) Na yango, boyebi ya solo eteyaka bato libosoliboso Yehova, mpe moto oyo azali koluka boyebi yango asengeli kobanga Nzambe na ndenge ebongi.
Soki moto abangaka Nzambe te, ata azali na boyebi mpe na mayele ya mokili, yango ezali na ntina nini? Ntoma Paulo akomaki boye: “Wapi moto na mayele? Wapi mokomeli? Wapi molobalobi na ekeke oyo? Nzambe akómisi mayele na mokili eloko na bolema te?” (1 Bakolinti 1:20) Moto oyo azali na mayele ya mokili, soki abangaka Nzambe te, akolimbola na ndenge mabe ata makambo oyo bato bayebi malamu mpe akosuka kaka na ‘bozoba.’
“Monyɔlɔlɔ na nkingo na yo”
Na nsima, mokonzi ya mayele alobaki na bilenge boye: “Mwana na ngai, yoká mateya ya tata na yo mpe tiká mibeko na mama na yo te. Zambi yango ikozala lokola [ekɔti kitoko, NW] na motó na yo mpe lokola monyɔlɔlɔ na kitoko na nkingo na yo.”—Biso nde totɛngisi; Masese 1:8, 9.
Na Yisalaele ya kala, Nzambe apesaki baboti mokumba ya koteya bana na bango. Mose alendisaki baboti boye: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛ[lɛ]ma yo.” (Deteronome 6:6, 7) Bamama mpe bazalaki kokokisa mokumba monene na likambo ya koteya bana. Na kotosàká bokonzi ya mobali na ye, mwasi Moyuda akokaki kosala ete libota elanda mibeko malamu.
Yango wana, na Biblia mobimba, banda ebandeli tii nsuka, tozali komona ete libota ezali esika ya liboso oyo bana basengeli koteyama. (Baefese 6:1-3) Soki bana bazali kotosa baboti na bango oyo bazali bandimi, ezali lokola nde, na elobeli ya elilingi, balati ekɔti kitoko mpe monyɔlɔlɔ ya lokumu.
“Bakobotolo bayibi bomoi bwa bango”
Tata moko na Azia atindaki mwana na ye ya mobali ya mbula 16 akende kotánga na États-Unis, kasi apesaki ye toli ete asangana na bato ya mabe te. Toli yango eyokani na likebisi ya Salomo oyo elobi ete: “Mwana na ngai, soko bato mabe bakobenda yo, kendá te.” (Biso nde totɛngisi; Masese 1:10) Kasi, Salomo amonisi motambo oyo basalelaka: “Soko bakoloba ete, Yaká na biso! tóluka makila, [tózela] moto na sembo bobele mpamba; tómela bango lokola ekosalaka ewelo [“Sheol,” NW], bákita mobimba lokola bango bokokóma na libulu; tokomona biloko nyonso na motuya, tokotondisa ndako na biso na biloko bipunzami. Salá na biso elongo! tózala na libenga moko.”—Biso nde totɛngisi; Masese 1:11-14.
Tomoni polele ete motambo yango ezali nde bozwi. Mpo na kozwa bomɛngo nokinoki, “bato mabe” bakosaka bato mosusu na komemaka bango na banzela ya mobulu to oyo elongobani te. Mpo na kozwa biloko mingi, bato mabe yango bakakatanaka te ata mpo na kosopa makila. Ntango bakangi moto ‘bakomela ye lokola ekosalaka libulu to Sheol,’ bakobɔtɔla ye biloko nyonso oyo azali na yango, se ndenge nkunda eyambaka ebembe na mobimba na yango. Babéngaka bato mosusu na makambo ya mobulu, balingi ‘kotondisa ndako na bango na biloko oyo babotoli,’ mpe balingi ete moto oyo ayebi makambo mingi te ‘asala na bango elongo.’ Likebisi oyo ebongi mpenza na ntango na biso! Ezali mayele yango nde bilenge ya mobulu na baoyo bamelaka bangi basalelaka, boye te? Bato mingi babendamaka na misala ya mombongo oyo elongobani te soki balaki bango ete bakozwa bomɛngo ya nokinoki, boye te?
Mokonzi ya mayele apesi toli oyo: “Mwana wa ngai, otambola na bango elongo te, kimá nzela inso bango bazali kokende, zambi makolo ma bango mazali kotambola o nzela ebe, bakoluka noki kosopa makila ma bato.” (Biso nde totɛngisi.) Alobi boye mpo na komonisa ndenge ekosukela bango mabe: “Solo, kotanda monyama ezali mpamba soko ndeke inso isili komono mwango. Na botieli baninga motambo bakosopa se makila ma bango moko, mabe bakoluka kosala baninga makokwela bango moko. Nsuka ya baye bazali na mposa ya koyiba izali boye: bakobotolo bayibi bomoi bwa bango.”—Biso nde totɛngisi; Biyele (Masese) Mas. 1:15-19, Liloba lya Nzambe.
“Baye bazali na mposa ya koyiba” bakokufa na nzela na bango. Kaka motambo oyo bato mabe batyelaka bato mosusu nde ekokanga bango moko. Bato oyo basalaka mabe na nko bakotika banzela na bango? Te. Monyama ekoki komonana polele, kasi bandɛkɛ, “bikelamu ya mapapu,” bakokende kaka wana. Bato mabe mpe, lokoso ezipi bango miso, bazali kotika te misala na bango ya mobulu, atako bayebi ete ata ndɛlɛ bakozwama.
Nani akoyoka mongongo ya mayele?
Bato ya masumu bayebaka mpenza ete nzela na bango ezali likama? Bakebisi bango na likama oyo ezali kozela bango? Moto te akoki koloba ete ye ayebi te, mpo nsango ezali kosakolama polele.
Salomo alobi boye: “Mayele akoganga libándá, [akotombola] mongongo na ye kati na nzela. Akosakola na biyanganelo minene mpe na bikɔtelo na bikuke; kati na mboka akoloba.” (Biso nde totɛngisi; Masese 1:20, 21) Mayele azali koganga na mongongo makasi mpe polele na bisika ya bato nyonso mpo bato nyonso báyoka. Na ntango ya kala na Yisalaele, mikóló bazalaki kopesa toli ya mayele mpe kokata makambo na bikɔtelo ya engumba. Mpo na biso, Yehova akomisi mayele ya solo na kati ya Biblia, Liloba na ye, oyo moto nyonso akoki kozwa yango. Mpe basaleli na ye bazali kosakola nsango na yango bipai nyonso. Nzambe azali kotinda ete mayele esakolama epai ya bato nyonso.
Mayele ya solo alobaka nini? Alobaka boye: “Kino ntango nini, bino bazoba, bokolinga [bozoba]? Mpe bino batyoli kolinga kotyola? . . . Mpo ete nangangaki nde bino boboyaki; nasembolaki lobɔkɔ nde moto atalaki te.” (Biso nde totɛngisi.) Bazoba batyelaka mongongo ya mayele likebi te. Yango wana, “bakolya mbuma na nzela na bango mpenza.” (Biso nde totɛngisi.) ‘Kobongwana na bazoba ekoboma bango mpe kolonga na bibebe ekosilisa bango.’—Biso nde totɛngisi; Masese 1:22-32.
Kasi, ezali boni mpo na moto oyo azwaki ntango ya koyoka mongongo ya mayele? “Akofanda na kimya, mpe akobanga mabe te.” (Biso nde totɛngisi; Masese 1:33) Tiká ete ozala na kati ya bato oyo bazwi mayele mpe bandimi disipilini mpo batii matoi na bango na masese ya Biblia.
[Elilingi na lokasa 15]
Moto nyonso akoki kozwa mayele ya solo.