‘Bwanya ekobakisela biso mikolo’
MOTO moko te akoki kotya ntembe ete bwanya ezali na ntina mingi mpo na kolonga mikakatano ya bomoi. Bwanya ya solosolo ezali likoki ya kosalela boyebi na ndenge oyo ebongi mpe kosalela bososoli malamu. Ekeseni mpenza na bolema to bozoba. Yango wana, Makomami ezali kolendisa biso ete tóluka bwanya. (Masese 4:7) Mokanda ya Masese ekomamaki mpenzampenza mpo na koteya bwanya mpe disipilini. Bavɛrsɛ na yango ya liboso elobaka boye: “Masese ya Salomo, mwana ya Davidi, mokonzi ya Yisalaele, mpo na koyeba [bwanya, NW] mpe [disipilini, NW].”—Masese 1:1, 2.
Na ndakisa, tótalela mateya malamu oyo ezali na mikapo ya liboso ya mokanda ya Masese. Salomo azali koloba lokola tata ya bolingo oyo azali kolendisa mwana na ye, azali kosɛnga batángi ya mokanda na ye ete bándima disipilini mpe báyoka maloba ya bwanya. (Mokapo 1 mpe 2) Azali komonisa biso ndenge ya kozala baninga ya Yehova mpe ndenge oyo tokoki kobatela motema na biso. (Mokapo 3 mpe 4) Azali mpe kolendisa biso na kozala ntango nyonso na etamboli ya pɛto. (Mokapo 5 mpe 6) Ndenge oyo mokanda yango emonisi mayele mabe ya moto ya pite ezali mpenza na ntina mingi mpo na biso. (Mokapo 7) Bwanya oyo emonisami lokola moto esaleli maloba ya kitoko mpenza oyo ezali kosepelisa moto nyonso. (Mokapo 8) Liboso abanda kopesa masese ya mikusemikuse na mikapo oyo ekolanda, mokonzi Salomo azongeli na mokuse makanisi ya kolendisa oyo alobelaki na mikapo oyo eleki.—Mokapo 9.
‘Yaká kolya limpa na ngai mpe komela vinyo na ngai’
Mokapo 9 oyo esukisi eteni ya liboso ya Masese ezali te kozongela kaka toli ya mikapo oyo ezali liboso na yango. Kasi, ekomami na ntɔki mpe bonzenga oyo ezali kolendisa motángi na koluka bwanya.
Masese mokapo 9 ebandi na maloba oyo: “[Bwanya, NW] atongi ndako na ye, akati makonzi na ye nsambo.” (Masese 9:1) Molimboli moko ya maloba ya Liebele alobi ete maloba “makonzi nsambo” “ezali kopesa likanisi ya ndako moko oyo etongami pembeni na lopango moko; ndako yango esimbami na makonzi misato ngambo na ngambo mpe na likonzi moko na ngambo oyo etalani na ekɔtelo.” Ezala bongo to te, bwanya ya solosolo etongi ndako ya makasi mpo na koyamba ebele ya bapaya.
Na ndako yango, nyonso esi ebongisami mpo na fɛti. Misuni mpe vinyo ezali. Bwanya yango moko etyaki likebi na ndenge oyo biloko ya kolya elambami mpe ndenge oyo babongisi mesa. “Abomi nyama na ye, abongisi vinyo na ye, atandi mesa na ye.” (Masese 9:2) Emonani ete bilei ya elimo oyo ebongi kotyelama mpenza likebi ezali na mesa yango ya elilingi.—Yisaya 55:1, 2.
Banani babengisami na fɛti oyo bwanya ya solosolo ebongisi? “Atindi baseka na ye, agangi na bisika bileki likoló kati na mboka ete, Ye oyo azali elema akɔta awa! Alobi mpe na bango bazangi mayele ete, Yaká kolya [limpa] na ngai mpe komela vinyo ebongisi ngai. Tiká bilema mpe zalá na bomoi, tambolá na nzela ya bososoli”—Masese 9:3-6.
Bwanya etindi baseka na yango mpo na kobengisa bato. Bakei na babalabala epai kuna bakoki kobenga bato ebele mpenza. Babengisi bato nyonso, ezala baoyo “bazangi mayele,” to bazangi bososoli na bilema mpe. (Masese 9:4) Elaki bango mpe bomoi. Na ntembe te, moto nyonso azali mpenza na likoki ya kozwa bwanya oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe, bakisa mpe na mokanda ya Masese. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali lokola bato oyo bwanya ya solosolo ezali kotinda, bazali kosala milende mpo na kokutana na bato na bisika nyonso bazali mpo na kolendisa bango báyekola Biblia. Kozwa boyebi yango ekoki komema na bomoi ya seko.—Yoane 17:3, NW.
Baklisto basengeli komikitisa mpe kondima disipilini oyo bwanya epesaka. Likambo yango etali mingimingi bilenge na bato oyo babandi kozwa boyebi ya Yehova sika. Lokola bameseni naino na banzela ya Nzambe te, bakoki ‘kozanga mayele.’ Yango elingi koloba te ete bamposa na bango nyonso ezali mabe, kasi esɛngaka ntango mpe milende mpo ete moto akóma na motema oyo ezali mpenza kosepelisa Yehova Nzambe. Yango esɛngaka kokóma na makanisi, bamposa, mayoki mpe mikano oyo eyokani na makambo oyo Nzambe alingaka. Yango wana, ezali mpenza na ntina mingi ete bilenge na baoyo babandi kozwa boyebi ya Yehova sika ‘báyoka mposa makasi ya mabɛlɛ ya sika oyo ezali ya liloba.’—1 Petelo 2:2, NW.
Kutu, biso nyonso tosengeli kotikala kaka na “mateya ya ebandeli” te. Tosengeli mpenza kokolisa mposa ya “makambo mozindo ya Nzambe” mpe kolya bilei ya makasi oyo ezali mpo na bato oyo bakɔmeli. (Baebele 5:12–6:1, NW; 1 Bakolinti 2:10, NW) “Moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo Yesu Klisto ye moko azali kotambwisa, azali kosala milende mpo na kopesa bato nyonso bilei ya elimo na ntango ebongi. (Matai 24:45-47) Tiká ete tólya mpe tómela na mesa ya bwanya, elingi koloba tómipesa na koyekola Liloba ya Nzambe mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, mikanda oyo moombo ya sembo azali kobimisa.
“Pamelá motyoli te”
Kosembolama mpe mpamela ezali mpe kati na mateya oyo bwanya epesaka. Bato mingi bandimaka kosembolama mpe mpamela te. Yango wana, na nsuka, eteni ya liboso ya mokanda ya Masese epesi likebisi oyo: “Ye oyo [akosembola, NW] motyoli, akotukama; mpe ye oyo [akopamela, NW] moto mabe akozwa likambo. Pamelá motyoli te ete ayinana na yo te.”—Masese 9:7, 8a.
Motyoli akangelaka moto oyo azali koluka kosembola ye nkanda mpe ayinaka ye. Moto mabe amonaka mpenza ntina ya mpamela te. Ekozala mpenza kozanga mayele soki tokolekisa ntango na biso na koluka koteya solo kitoko ya Liloba ya Nzambe epai ya moto oyo azali koyina yango to azali se koluka kotyola yango! Ntango ntoma Paulo azalaki kosakola na Antiokia, akutanaki na Bayuda oyo balingaki mateya ya solo ata moke te. Balukaki koswanisa ye mpe bafingaki ye; kasi, Paulo aboyaki mindɔndɔ, alobaki kaka ete: “Awa eboyi bino [liloba ya Nzambe], mpe ekanisi bino ete bino mpenza bobongi na bomoi ya seko te, [sikoyo tokokende] epai ya bapakano.”—Misala 13:45, 46.
Wana tozali kosala milende mpo na koteya bato ya mitema sembo nsango malamu ya Bokonzi, tókebaka ete tólekisa ntango na biso te na kotyana ntembe na batyoli. Klisto Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “[Ekokɔta] bino na ndako, bópesa mbote wana. Soko mpe ndako ezali na malamu, tiká ete kimya na bino efanda na yango. Nde soko ezali na malamu te, tiká ete kimya na bino [ezonga] epai na bino. Mpe soko moto nani akoyamba bino te, soko nde akoyoka maloba na bino te, wana ekobima bino na ndako yango to na mboka yango, bóbwaka mputulu na matambe na bino.”—Matai 10:12-14.
Ndenge oyo moto ya bwanya atalelaka mpamela ekeseni na ndenge oyo motyoli atalelaka yango. Salomo alobi ete: “Pamelá moto ya [bwanya, NW] mpe akolingana na yo. Lakisá moto ya [bwanya, NW] mpe akoleka na [bwanya, NW].” (Masese 9:8b, 9a) Moto ya bwanya ayebi ete “na ntango na yango, [disipilini, NW] nyonso iyokani na esengo te kasi na mpasi; nde nsima ikozwisa mbuma ya kimya na boyengebene epai na bango baoyo balendisami na yango.” (Baebele 12:11) Atako tokoki komona ete toli bapesi biso esali biso mpasi na motema, tosengeli koboya yango te soki ekobakisela biso bwanya.
Mokonzi oyo azalaki na bwanya abakisi ete: “Teyá moyengebene mpe akobakisa boyebi.” (Masese 9:9b) Moto moko te akoki koloba ete azali lisusu na makambo ya koyekola te mpo azali na bwanya mingi to akómi mpenza mokóló. Ezalaka mpenza esengo na komona mibange bazali kondima solo mpe, na nsima bazali komipesa na Yehova! Biso mpe tósala makasi mpo tozalaka ntango nyonso na mposa ya koyekola mpe ya kosalelaka ntango nyonso bɔɔngɔ na biso.
“Bambula ya bomoi na yo ekobakisama”
Salomo abendi likebi na likambo ya ntina oyo azali kolobela, mpe amonisi eloko oyo moto asengeli kosala mpo azala na bwanya. Akomi boye: “Kotosa [Yehova] ezali ebandeli ya [bwanya, NW]; mpe koyeba ye [Oyo-Aleki-Bosantu, NW] ezali bososoli.” (Masese 9:10) Moto akoki kozala na bwanya ya solosolo te, bwanya oyo Nzambe apesaka, soki amemyaka Nzambe ya solo te. Moto akoki kozala na boyebi mingi, kasi soki abangaka Yehova te, boyebi yango ekokumisa Mozalisi te. Moto ya ndenge yango akoki ata komikosa na makambo oyo eyebani malamu mpe akomonana zoba na miso ya bato. Lisusu, koyeba Yehova, ye Oyo-Aleki-Bosantu, ezali na ntina mingi mpo na kozwa bososoli, ezaleli oyo emonisaka mpenza bwanya.
Bwanya ebotaka mbuma nini? (Masese 8:12-21, 35) Mokonzi ya Yisalaele alobi ete: “Zambi na ngai mikolo na yo ikokóma mingi mpe [bambula] ya bomoi na yo ikobakisama.” (Masese 9:11) Kozala na bwanya epesaka moto mikolo mpe mbula mingi ya bomoi. Ya solo, “[bwanya, NW] ekobikisa bomoi na ye oyo azwi yango.”—Mosakoli 7:12.
Kosala makasi mpo na kozwa bwanya ezali likambo ya moto na moto kati na biso. Mpo na yango, Salomo alobi boye: “Soko ozali na [bwanya, NW], [bwanya, NW] ezali mpo na yo moko; soko ozali kotyola, okokumba yango bobele yo mpenza.” (Masese 9:12) Moto ya bwanya azalaka na yango mpo na litomba na ye moko mpe soki motyoli azali na mpasi ezali libunga na ye moko. Ya solo, tokobuka oyo tokolona. Yango wana, tiká ‘tósembola litoi epai ya [bwanya, NW].’—Masese 2:2.
“Zoba azali mwasi ya makɛlɛlɛ”
Sikoyo, Salomo alobi makanisi oyo ekeseni na oyo auti koloba, ete: “[Zoba] azali mwasi ya makɛlɛlɛ, azali elema, ayebi eloko te. Afandi na ekuke ya ndako na ye, azali na kiti na bisika ya likoló ya mboka; akobyanga epai na baoyo bazali koleka, epai na baoyo bazali alima na nzela na bango ete, ye oyo azali elema akɔta awa!”—Masese 9:13-16a.
Akokanisi bozoba na mwasi ya makɛlɛlɛ, oyo ayebi komipekisa te mpe azali mayele te. Mwasi yango mpe atongi ndako. Ye mpe azali kobenga moto nyonso oyo azangi mayele. Na yango, baleki-nzela basengeli kopona soki bakosepela kokende na ndako ya bwanya to na ndako ya bozoba.
“Mai mayibami ezali na elengi-e!”
Ezala bwanya to bozoba, mokomoko ezali kobenga baoyo bazali koyoka bango ete: ‘Bókɔta awa.’ Kasi, makambo oyo bazali kobengela bato ekeseni. Bwanya ezali kobenga bato na fɛti, epai vinyo, misuni mpe mampa ezali. Nzokande, bozoba ezali kobengisa bato mpo na ntina oyo ezali kozongisa biso makanisi na makambo ya mwasi ya pite. Salomo alobi ete: “Akolobaka mpe epai na ye oyo azangi mayele ete, mai mayibami ezali na elengi-e! Kolya [limpa] na nkuku ezali kitoko-e!”—Masese 9:16b, 17.
Na esika ya vinyo oyo esangisami, “mama Bozoba” ezali kopesa mai mayibami. (Biyele [Masese] 9:13, Liloba lya Nzambe) Makomami ekokanisi esengo ya moto azali kosangisa nzoto na mwasi na ye na komela mai oyo ezali kokitisa motema. (Masese 5:15-17) Na bongo, mai mayibami elakisi pite to ekobo oyo ezali kosalema na nkuku. Mai yango ezali komonisa lokola nde ezali elɛngi, koleka kutu vinyo, mpamba te ezali mai oyo bayibi mpe ezali komonisa likambo oyo esalemi na nkuku. Limpa oyo elyami na nkuku ezali komonana kitoko koleka limpa na misuni oyo bwanya epesi, mpamba te basalaki makambo ya sembo te mpo na kozwa limpa yango. Soki tozali kosepela na makambo oyo epekisami to mpe ya nkuku, ekomonisa ete tozali bazoba.
Ntango bwanya ezali kobengisa bato ezali mpe kolaka bomoi; nzokande, mwasi ya zoba alobeli makambo oyo ekoyela moto akolanda banzela na ye te. Salomo ye moko apesi likebisi oyo: “Kasi ye ayebi te ete bakufi bazali wana, soko babyangami na ye bazali kati na [sheole, NW].” (Masese 9:18) Molimboli moko ya Biblia akomaki ete: “Ndako ya Mama Bozoba ezali ndako ya kofanda te, kasi ezali nde lilita monene. Soki okɔti kuna, okobima na bomoi te.” Komipesa na bomoi ya pite to ekobo ezali kozanga bwanya, ezali komilukela liwa.
Yesu Klisto alobaki ete: “[Bókɔta] na ekuke ya nkaka. Zambi ekuke ezali monene mpe nzela ezali na esika monene oyo ekoleka kino libebi. Bazali mingi baoyo [bakokɔta] na yango. Mpo ete ekuke ezali na nkaka mpe nzela ekangani oyo ekoleka na bomoi mpe baoyo bakomona yango bazali mingi te.” (Matai 7:13, 14) Tiká ete tólyaka ntango nyonso na mesa ya bwanya mpe tózalaka kati na baoyo bazali na nzela oyo ezali komema na bomoi.
[Elilingi na lokasa 31]
Moto ya bwanya andimaka basembola ye
[Elilingi na lokasa 31]
Kozwa bwanya ezali likambo oyo etali moto na moto