‘Bólanda ngai ntango nyonso’
“Ezali na nzela yango nde bobengamaki, mpamba te Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.”—1 PETELO 2:21, NW.
1, 2. Mpo na nini ndakisa ya kokoka oyo Yesu apesaki lokola moteyi eleki makasi mingi te mpo biso tókoka te kolanda yango?
YESU KLISTO azali Moteyi oyo aleki mpenza bateyi nyonso oyo baleká na mokili oyo. Lisusu, azalaki moto ya kokoka, asalaki ata lisumu moko te na bomoi na ye awa na mabele. (1 Petelo 2:22) Kasi, yango elingi koloba ete ndakisa ya Yesu eleki makasi mpe biso bato ya kozanga kokoka tokoki kolanda yango te? Ezali bongo te.
2 Lokola tomonaki yango na lisolo oyo eleki, eloko ya libosoliboso oyo esimbaki mosala ya koteya ya Yesu ezalaki bolingo. Nzokande, biso nyonso tokoki kolona bolingo. Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso mbala mingi ete tókolisa mpe tóbakisa bolingo na biso mpo na basusu. (Bafilipi 1:9; Bakolose 3:14) Yehova asɛngaka te ete bikelamu na ye básala makambo oyo bakokoka te. Kutu, lokola “Nzambe azali bolingo” mpe akelá biso na elilingi na ye, tokoki koloba ete asalaki biso mpo tómonisaka bolingo. (1 Yoane 4:8; Genese 1:27) Yango wana, maloba ya ntoma Petelo na vɛrsɛ oyo esimbi boyekoli na biso ekoki kopesa biso elikya ete tokoki kolonga. Tokoki kolanda matambe ya Klisto malamumalamu. Tokoki mpenza kosala likambo oyo ye moko Yesu asɛngaki ete: ‘Bólanda ngai ntango nyonso.’ (Luka 9:23, NW) Tótalela ndenge oyo tokoki kolanda ndakisa ya bolingo oyo Klisto amonisaki, libosoliboso mpo na solo oyo azalaki koteya; mpe na nsima, mpo na bato oyo azalaki koteya.
Tólinga solo oyo toyekolaka
3. Mpo na nini bato mosusu bakokaka koyekola te, kasi Masese 2:1-5 ezali kolendisa biso na likambo nini?
3 Mpo na kolinga solo oyo toteyaka basusu, biso moko tosengeli naino kolinga koyekola solo yango. Na mokili ya lelo, komonisa bolingo ya ndenge wana ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Bato mingi balingaka koyekola te mpo bakɔtá kelasi ya malonga te to mpe bamesanaki na makambo ya mabe na bolenge na bango. Nzokande, koyekola makambo ya Yehova ezali na ntina mingi. Masese 2:1-5 elobi boye: “Mwana na ngai, soko okozwa maloba na ngai mpe okobomba maloba na ngai kati na yo, ete osembola litoi na yo epai na mayele mpe ete otya motema na yo [na] koluka boyebi; ɛɛ, soko okolela mpo na bososoli mpe soko okoganga mpo na boyebi, soko okoluka [yango] lokola palata, mpe okolukaluka [yango] lokola na biloko ya motuya bibombami; mbɛlɛ, okososola botosi ya kotosa [Yehova] mpe okozwana na boyebi ya koyeba Nzambe.”
4. ‘Kotya’ motema elimboli nini, mpe mpo na kosala yango tosengeli kotalela makambo na ndenge nini?
4 Omoni ete banda na vɛrsɛ ya 1 tii na vɛrsɛ ya 4, bazali mbala na mbala kolendisa biso na kosala molende, kaka mpo na ‘kozwa’ mpe ‘kobomba’ te, kasi mpe mpo na ‘koluka’ mpe ‘kolukaluka.’ Na yango, eloko nini ekoki kopesa biso mposa ya kosala makambo nyonso wana? Eyano ezali na maloba oyo: ‘tyá motema na yo na koluka boyebi.’ Mokanda moko oyo ezali na ndimbola ya maloba elobi ete elendiseli yango “ezali kosɛnga te ete moto atya kaka likebi; ezali kosɛnga kozala na elimo moko boye: kozala na mposa mpenza ya koyoka mateya.” Nini ekoki kosalisa biso na kosepela koyoka mpe kozala na mposa ya koyekola mateya ya Yehova? Ezali nde ndenge na biso ya kotalela makambo. Tosengeli kotalelaka “boyebi ya Nzambe” lokola “palata” mpe lokola “biloko ya motuya bibombami.”
5, 6. (a) Nini ekoki kosalema nsima ya ntango, mpe eloko nini ekoki kopekisa yango? (b) Mpo na nini tosengeli kobakisaka boyebi oyo tozwi na Biblia?
5 Kokóma kotalela makambo ndenge wana ezali likambo ya mpasi te. Na ndakisa, tokanisi ete “boyebi ya Nzambe” oyo ozwi eteyi yo mpe ete Yehova akani ete mokolo mosusu bato ya sembo bázala na bomoi ya seko na Paladiso awa na mabele. (Nzembo 37:28, 29) Ntango oyokaki liteya yango mpo na mbala ya liboso, na ntembe te otalelaki yango lokola eloko ya motuya mpenza, likambo yango epesaki yo elikya mpe esengo. Tokoki koloba boni na moi ya lelo? Lokola ntango eleki kobanda wana, tokoki nde koloba ete motuya oyo ozalaki kopesa na likambo yango ekiti? Soki ezali bongo, tolendisi yo omeka kosala makambo mibale. Ya liboso, salá ete motuya oyo ozalaki kopesa na likambo yango ezonga lisusu, elingi koloba kanisáká mbala na mbala ntina oyo omonaka solo mokomoko oyo Yehova ateyi yo, ata oyo oyekolá eleki sikoyo bambula ebele, ete ezali na motuya.
6 Ya mibale, bakisáká ntango nyonso biloko mosusu ya motuya na oyo ozali na yango. Tókamata naino ndakisa: soki ozwi libaku malamu ya kokundola libanga moko ya ntalo, okanisi mpenza ete okokamata yango kaka otii yango na libenga mpe oleki na yo? To okotimola nde na esika yango mpo na koluka soki mabanga mosusu ezali? Liloba ya Nzambe ezali na ebele ya solo ya motuya oyo ekokani na palata mpe na biloko ya motuya oyo bibombami. Ata soki osili kozwa mingi, okoki kaka kozwa mosusu mpe. (Baloma 11:33) Na ntango oyekoli likambo moko ya sika, osengeli komituna mituna oyo: ‘Mpo na nini nakoki koloba ete likambo oyo ezali na motuya? Ezali kosalisa ngai na koyeba bomoto ya Yehova mpe mikano na ye malamu koleka? Ezali kolakisa ngai nzela oyo ekoki kosalisa ngai na kolanda matambe ya Yesu?’ Soki ozali komituna mituna ya ndenge oyo, ekosalisa yo olinga lisusu mingi solo oyo Yehova asili koteya yo.
Tólinga solo oyo toteyaka
7, 8. Wapi mwa ndenge oyo tokoki komonisa bato ete tolingaka solo oyo toyekoli na Biblia? Pesá ndakisa.
7 Na ntango tozali koteya basusu, ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka solo oyo toyekoli na Liloba ya Nzambe? Na ndakisa ya Yesu, tosalelaka Biblia mingi mpenza na mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya. Kobanda mwa bambula, basaleli ya Nzambe na mokili mobimba bazali kolendisama ete básalelaka Biblia mingi na mosala ya kosakola. Na ntango ozali kosalela toli yango, kanisáká ndenge oyo okoki komonisa moto oyo ozali kosolola na ye ete makambo oyo ozali kolakisa ye na kati ya Biblia ezali na motuya mingi na miso na yo.—Matai 13:52.
8 Na ndakisa, na mbula oyo eleki, ntango bato ya mobulu bakweisaki babuludingi mibale na engumba New York; na mikolo oyo elandaki, ndeko mwasi moko azalaki kosalela mokapo ya Nzembo 46:1, 11 na mosala ya kosakola. Azalaki naino kotuna moto soki azali kosala ndenge nini mpo na kobosana mpasi oyo moto nyonso azalaki na yango nsima ya makambo wana ya nsɔmɔ. Azalaki kolanda malamumalamu eyano oyo moto akopesa, na nsima azalaki kondima eyano yango, mpe azalaki koloba boye: “Okosepela natángela yo vɛrsɛ moko oyo ezali kolendisa ngai mingi na mikolo ya mpasi oyo?” Bato mingi bazalaki kondima atángela bango, mpe azwaki mabaku ya kosolola malamu na bato mingi. Soki akutani na elenge, mbala mingi ndeko mwasi yango azalaki koloba boye: “Nakokisi sikoyo mbula 50 banda nabandá koteya Biblia, kasi oyebi? Nakutaná naino na likambo ata moko te oyo Biblia ezangaki kolakisa lolenge ya kolonga yango.” Soki tozali koloba na bosembo mpe na esengo, tokomonisa bato ete topesaka motuya na makambo oyo toyekoli na kati ya Liloba ya Nzambe mpe tolingaka yango.—Nzembo 119:97, 105.
9, 10. Mpo na nini ezali na ntina ete tósalelaka Biblia ntango tozali koyanola na mituna oyo etali mateya ya lingomba na biso?
9 Tozalaka na libaku malamu mpenza ya komonisa ete tolingaka Liloba ya Nzambe ntango batuni biso mituna etali mateya ya lingomba na biso. Na kolanda ndakisa ya Yesu, topesaka biyano na kolanda makanisi na biso moko te. (Masese 3:5, 6) Kasi, tosalelaka Biblia mpo na kopesa eyano. Obangaka ete bátuna yo motuna oyo oyebi eyano na yango te? Soki ezali bongo, ezali na makambo mibale ya malamu oyo okoki kosala:
10 Salá makasi ete omibongisaka. Ntoma Petelo akomaki boye: “Bósantisa Klisto lokola Nkolo na kati ya mitema na bino, bómibongisa ntango nyonso mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni bino ntina ya elikya oyo ezali na kati na bino, kasi bósalaka bongo na elimo ya boboto mpe na limemya makasi.” (1 Petelo 3:15, NW) Omibongisaka mpo na kolongisa mateya oyo ondimaka? Soki na ndakisa moto moko alingi koyeba ntina oyo osalaka te makambo mosusu oyo euti na Makomami te, koloba kaka te ete, “Lingomba na biso epekisi yango.” Eyano ya ndenge wana ekomonisa lokola nde ondimaka makambo oyo bato mosusu bayebisaka yo kaka bindimelá mpe na bongo, ozali moto ya mwa lingomba moko ya molili. Eleki malamu koloba, “Biblia, Liloba ya Nzambe, epekisi yango,” to “Nzambe asepelaka na likambo yango te.” Na nsima, pesá ndimbola oyo ebongi mpo na kolongisa likanisi yango.—Baloma 12:1.
11. Mokanda nini ekoki kosalisa biso tómibongisa mpo na kopesa biyano na mituna etali solo ya Liloba ya Nzambe?
11 Soki omoni ete okozanga biyano na mituna mosusu oyo bakoki kotuna yo, ekozala malamu ozwaka mwa ntango mpo na koyekola buku Comment raisonner à partir des Écritures soki ezali na monɔkɔ moko oyo olobaka.a Luká mwa mitó ya makambo oyo bakoki kotuna yo mituna likoló na yango, mpe kangá mwa bavɛrsɛ ya Makomami na motó. Zaláká ntango nyonso na buku Comment raisonner mpe Biblia na yo. Kokakatana te mpo na kosalela babuku yango. Okoki koloba na moto oyo atuni yo motuna ete ozali na mokanda moko oyo olingaka kosalela mpo na kozwa eyano oyo euti na Biblia na mituna oyo batunaka yo.
12. Tokoki koloba nini soki toyebi eyano te na motuna moko oyo batuni biso mpo na mateya ya Biblia?
12 Komitungisa mingi te. Moto moko te ayebi biyano na mituna nyonso. Yango wana, soki batuni yo motuna oyo oyebi eyano na yango te, okoki koloba boye: “Mersi mingi mpo na motuna na yo. Kasi, lokuta mabe, nayebi eyano na yango te. Nayebi ete Biblia elobeli likambo yango. Nasepelaka mingi koluka bandimbola ya makambo ya Biblia na mikanda oyo ezali kolimbola yango; yango wana, nakoluka eyano na motuna na yo mpe nakozongela yo.” Kozala sembo mpe na bopɔlɔ ndenge wana ekoki kopesa yo nzela ozwa mabaku mosusu ya kosolola na moto oyo atuni motuna.—Masese 11:2.
Tólinga bato oyo tozali koteya
13. Mpo na nini tosengeli kotalelaka na ndenge ya malamu bato oyo tozali kosakwela bango ?
13 Yesu alingaki bato oyo azalaki koteya. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye na likambo yango? Tosengeli soki moke te kozala bato oyo bakipaka te bazalani na bango oyo bafandaka na bango esika moko. Toyebi ete “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” ezali se kokóma pene, mpe ebele ya bato bakobomama na etumba yango. (Emoniseli 16:14, NW; Yilimia 25:33) Kasi, toyebi te nani akobika mpe nani akokufa. Likambo yango ekokatama na mikolo ezali koya mpe na moto oyo Yehova ye moko aponi, elingi koloba Yesu Klisto. Liboso ete mokolo yango ya kokata makambo eya, tosengeli kotalelaka moto nyonso ete akoki kokóma mosaleli ya Yehova.—Matai 19:24-26; 25:31-33; Misala 17:31.
14. (a) Ndenge nini tokoki komitalela mpo na koyeba soki toyokelaka bato mawa? (b) Na ndenge nini oyo ebongi mpenza tokoki komonisa motema mawa mpe komibanzabanza mpo na basusu?
14 Yango wana, tosengeli koyokelaka bato mawa ndenge Yesu azalaki koyokela bango mawa. Tokoki komituna mituna oyo: ‘Bato oyo bazali kokosama na bakonzi ya mangomba ya mokili oyo, na bato ya politiki, mpe na bato ya mombongo, nayokelaka bango mawa? Soki bazali koboya koyoka nsango oyo tozali komemela bango, nalukaka koyeba mpo na nini basalaka bongo? Nayebaka ete ngai moko, to bato mosusu oyo bazali kosalela Yehova na bosembo lelo oyo, bazalaki mpe kosala ndenge yango liboso? Nabongoli ndenge na ngai ya koyebisa bango nsango na kotalela ezaleli na bango? To natalaka bato yango te mpo namonaka ete bakoki kobongwana te?’ (Emoniseli 12:9) Soki bato bazali komona ete tozali mpenza koyokela bango mawa, na ntembe te bakondima koyoka nsango na biso. (1 Petelo 3:8) Motema mawa ekoki mpe kotinda biso na komibanzabanza mingi mpo na bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola. Tokoki kokoma mituna oyo bazali kotuna mpe makambo oyo ezali kotungisa bango. Ntango tozongeli bango, tokoki komonisa bango ete tokanisaki makambo oyo bayebisaki biso ntango tokutanaki mbala oyo eleki. Soki mpe, na ntango wana, bazali na mposa ya eloko moko, tokoki kosalisa bango.
15. Mpo na nini tosengeli kotya likebi mingimingi na bizaleli malamu oyo moto azali na yango, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?
15 Na ndakisa ya Yesu, totyaka likebi na biso na bizaleli malamu oyo moto azali na yango. Tokoki kokutana na mwasi moko oyo azali mpenza kosala molende mpo azali kobɔkɔla bana ye moko. Tokoki mpe kokutana na mobali moko oyo azali kobunda etumba mpo na koleisa libota na ye. To mobange moko oyo azali kosepela mpenza na makambo ya elimo. Ntango tokutani na bato ya ndenge wana, totyelaka makambo na bango wana likebi mpe topesaka bango longonya mpo na yango? Soki tozali kosala ndenge wana, tokobɛta nsɛtɛ na makambo oyo ekoyokanisa biso na bango mpe yango ekoki kopesa biso nzela ya koyebisa bango nsango ya Bokonzi.—Misala 26:2, 3.
Komikitisa ezali na ntina mingi mpo na komonisa bolingo
16. Mpo na nini ezali na ntina mingi tózala na boboto mpe na limemya epai ya bato oyo tozali kosakwela bango?
16 Soki tozali mpenza na bolingo mpo na bato oyo toteyaka, yango ekosalisa biso tólanda likebisi oyo ezali na Biblia: “Boyebi evimbisaka na lolendo, kasi bolingo etongaka.” (1 Bakolinti 8:1, NW) Yesu ayebaki makambo mingi mpenza, kasi azalaki kotombola mapeka te. Yango wana, ntango tozali koteya makambo oyo biso tondimaka, tólobaka te lokola bato oyo bazali kotyana ntembe to tólukaka te kolakisa ete biso nde toyebi mingi to toleki na mayele. Mposa na biso ezali ya kosimba mitema ya bato mpe kobenda bango na solo oyo biso tolingaka mingi. (Bakolose 4:6) Tóbosana te ete ntango Petelo apesaki toli ete biso baklisto tózalaka pene ya kolongisa mateya oyo tondimaka, abakisaki ete tosengeli kosala yango “na elimo ya boboto mpe na limemya makasi.” (1 Petelo 3:15, NW) Soki tozali na boboto mpe na limemya, na ntembe te, tokobenda bato epai ya Nzambe na biso.
17, 18. (a) Tosengeli kosala nini ntango bato mosusu bazali koloba ete tobongi te kozala baministre ya Liloba ya Nzambe? (b) Mpo na nini bayekoli ya Biblia bazali na mposa te ya koyeba naino minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia?
17 Ezali na ntina moko te tóluka kokamwisa bato na boyebi na biso to na mayele na biso ya kelasi. Soki na teritware na bino bato mosusu bandimaka te koyoka mateya ya moto oyo azali na diplome ya iniversite te to azali na batitre ya mineneminene te, yango elɛmbisa yo nzoto te. Yesu alandaki te bato oyo bazalaki koloba ete atángaki na bakelasi ya lokumu ya balabi te; alukaki mpe kolakisa te ete ayebi makambo mingi mpo na kokangisa bato yango monɔkɔ.—Yoane 7:15.
18 Mpo na baministre baklisto, komikitisa mpe bolingo nde ezali na ntina mingi koleka bakelasi oyo moto atángi. Yehova, Molakisi Monene, azali kobongisa biso mpo tósala mosala ya kosakola malamu. (2 Bakolinti 3:5, 6) Ata soki bakonzi mosusu ya mangomba ya boklisto bazali koloba nini, biso tozali na mposa te ya koyekola naino minɔkɔ ya kala oyo bakomaki na yango Biblia liboso tókóma bateyi ya Liloba ya Nzambe. Yehova akomisaki Biblia na maloba ya polele, ya mindɔndɔ te, mpo ete bato nyonso bákanga ntina ya solo na yango ya motuya mingi. Solo yango ebongwanaka te ata soki etyami na bankama na bankama ya minɔkɔ. Yango wana, atako koyeba minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia ezalaka ntango mosusu na mwa litomba, kasi yango te nde likambo eleki ntina. Lisusu, soki moto azali na lolendo mpo ayebi minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia, akoki kobungisa ezaleli moko oyo ezali na ntina mingi mpo na baklisto ya solo: kondima koteyama.—1 Timote 6:4.
19. Na ndimbola nini tokoki koloba ete ntango tozali kosakola tozali kosalela bato mosusu?
19 Na ntembe te mosala na biso ya baministre baklisto ezali kosɛnga kozala na komikitisa mingi. Mbala mingi tokutanaka na bato mosusu oyo batɛmɛlaka biso, mosusu baboyaka koyoka biso, tokutanaka mpe na minyoko. (Yoane 15:20) Kasi, soki tozali kokokisa mokumba na biso na bosembo mpenza, tóyeba ete tozali kosala mosala ya ntina mingi. Soki tozali kokoba kosalela basusu na komikitisa mpenza na mosala yango, tozali kolanda ndakisa ya bolingo oyo Yesu Klisto azalaki na yango mpo na bato. Tókanisa naino: Soki tosengeli kosakola epai ya bato nkóto moko oyo bazali koboya koyoka to bazali kotɛmɛla biso, mpo na koluka mpate moko oyo azali kati na bango, tokosala molende yango te? Na ntembe te, tokosala yango! Yango wana, soki tozali kolendendela na mosala yango mpe tozali kotika te, tozali nde kosalela bampate oyo tokutani na bango naino te. Liboso ete nsuka eya, Yehova na Yesu bakozanga te kosunga biso mpo tókutana na bato mingi mosusu ya ndenge wana oyo bazali na motuya mingi na miso na bango mpe tósalisa bango.—Hagai 2:7.
20. Pesá ndakisa ya ndenge oyo tokoki kosalela makambo oyo tozali koteya.
20 Kosala makambo oyo tozali koteya ezali mpe ndenge mosusu ya komonisa mposa ya kosalela basusu. Na ndakisa, tolingaka koteya bato ete kosalela Yehova, “Nzambe ya esengo,” ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. (1 Timote 1:11, NW) Ntango bazali kotala bizaleli na biso moko mpe ndenge na biso ya kofanda na bato ya kartye na biso, na kelasi, mpe na mosala, bakoki mpenza komona ete tozali na esengo mpe tomilelalelaka te? Lisusu, toyebisaka bato oyo toyekolaka na bango Biblia ete lisangá ya boklisto ezali esika oyo moto akoki komona bolingo na kati ya mokili oyo ezangi bolingo. Bato yango bakoki komona polele ete tolingaka bato nyonso na kati ya lisangá mpe tosalaka makasi mpo na kobatela kimya na bandeko na biso?—1 Petelo 4:8.
21, 22. (a) Soki biso moko tozali komituna mituna na ndenge oyo tozali kosala mosala na biso, wapi mabaku malamu tokoki kozwa? (b) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ekolanda ekolobela makambo nini?
21 Na bantango mosusu, mposa ya kosala ekoki kotinda biso na komituna mituna na ndenge oyo tozali kosala mosala na biso. Bato mingi oyo bazali kosala yango na bosembo bazali komona ete bakoki kosala mingi lisusu soki basɛngi mosala ya ntango nyonso to soki bakei kofanda na esika oyo bazali na mposa ya basakoli mingi. Bamosusu bazwi ekateli ya koyekola monɔkɔ ya bapaya mpo na kosakola epai ya bapaya mingi oyo bazali kokende kofanda na teritware na bango. Soki okoki kosala moko na makambo wana, kanisá malamu mpe bondelá Nzambe mpo na yango. Kosalela basusu epesaka esengo, bolamu mpe kimya mingi.—Mosakoli 5:12.
22 Tósala nyonso ete tólanda ndakisa ya Yesu Klisto na kobakisáká bolingo na biso mpo na solo oyo tozali koteya mpe mpo na bato oyo tozali koteya. Soki tozali kobakisa bolingo na biso mpo na solo oyo tozali koteya mpe mpo na bato oyo tozali koteya mpe tozali komonisa yango, tokotya nde moboko mpo ete, na nsima, tókóma bateyi oyo bazali lokola Klisto. Kasi, ndenge nini tokoki kotonga likoló ya moboko yango? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ekolanda ekozala na masolo oyo ekolobela mayele ya koteya oyo Yesu asalelaki.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okopesa eyano nini?
• Nini ezali kondimisa biso ete ndakisa ya Yesu lokola moteyi eleki makasi mingi te mpo biso tókoka te kolanda yango?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka solo oyo toyekoli na Biblia?
• Mpo na nini ezali na ntina tózala ntango nyonso na komikitisa ntango tozali kokóma na boyebi mingi?
• Tángá mwa ndenge oyo tokoki komonisa ete tolingaka bato oyo toteyaka.
[Bililingi na lokasa 16]
Salá makasi ete omibongisaka
[Bililingi na lokasa 17]
Soki omonaka ete “boyebi ya Nzambe” ezali eloko ya motuya, okoki kosalela Biblia malamu
[Elilingi na lokasa 18]
Tomonisaka ete tolingaka bato soki tozali kosakwela bango nsango malamu