Ndenge nini likoki ya kokanisa ekoki kobatela yo?
KOTALA mai ntango mbonge ezali kotombola yango likoló esepelisaka mpenza miso, kasi mpo na bato ya masuwa, ezalaka likama. Mai wana ya makasi ekoki komemela bango liwa.
Basaleli ya Nzambe mpe bakoki kokutana na ebele ya mikakatano oyo tokoki kokokanisa yango na mbonge oyo ezali koluka kokweisa bango. Ekoki kozala ete osilá komona mikakatano mpe komekama, oyo ezali kolandana lokola mbonge, ezali kotungisa baklisto. Na ntembe te okolinga kolonga yango na mpiko nyonso mpo ozinda te na elimo. (1 Timote 1:19) Likoki ya kokanisa ezali moko ya makambo ya ntina mingi oyo ekobatela yo. Yango ezali nini, mpe ndenge nini moto azwaka yango?
Liloba ya Liebele mezimmah oyo ebongolami na “likoki ya kokanisa” euti na liloba oyo elimboli “kokana to kolɛngɛla.” (Masese 1:4) Yango wana, na Babiblia mosusu babongoli mezimmah na “bokɛngi” to na “komona mosika.” Jamieson, Fausset mpe Brown, bango bazali bato ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia, balobi ete mezimmah elimboli “bokɛngi mpo na kokima mabe mpe komona bolamu.” Yango ezali kosɛnga kotalela malamu mbuma oyo misala na biso ekobimisa sikoyo mpe na mikolo oyo ekoya. Soki tozali na likoki ya kokanisa, tokotalela malamumalamu liboso ya kosala makambo, mingimingi ntango tosengeli kozwa bikateli ya minene.
Ntango moto oyo azali na likoki ya kokanisa azali kozwa bikateli mpo na makambo oyo akosala to mpo na makambo oyo azali na yango sikoyo, atalelaka liboso makama to mitambo oyo bikateli yango ekoki kobimisa. Ntango amoni makama nini ekoki kobima, alukaka koyeba ndenge nini akoki kopɛngola yango, mpe atalelaka mbuma oyo yango ekoki kobimisa na esika oyo afandi mpe epai ya bazalani na ye. Na ndenge yango, akoki kosala ebongiseli oyo ekobota mbuma malamu, mbala mosusu mapamboli ya Nzambe. Tótalela mwa bandakisa ebongi oyo ezali komonisa likambo yango.
Tókima motambo ya pite mpe ekobo
Ntango mosusu mopɛpɛ etindaka mbonge ya makasi mpenza liboso ya masuwa to na elongi na yango. Masuwa ekozinda te se soki bato ya masuwa batalisi mpenza elongi ya masuwa epai mopɛpɛ ezali kouta.
Biso mpe tokutanaka na likambo ya ndenge yango, lokola tozali na mokili oyo bato bamipesi mingi na pite mpe na ekobo. Mokolo na mokolo, maloba mpe bililingi ya makambo oyo elamusaka bamposa ya nzoto ezali kobɛta biso lokola mbonge. Toyebi malamu ndenge oyo makambo yango elamusaka bamposa na biso ya nzoto. Tosengeli kosalela likoki ya kokanisa mpe kozala na mpiko ya kolonga masɛnginya, na esika ya komemama na makambo oyo ekoki komemela biso makama.
Na ndakisa, mbala mingi mibali baklisto basalaka elongo na bato oyo bamemyaka basi te, oyo batalelaka basi lokola biloko mpamba ya kosilisa na yango mposa ya nzoto. Baninga ya mosala bakoki kosala masɛki ya nsɔni mpe maloba ya kosangisa nzoto. Nsukansuka, bato ya ndenge wana bakoki kolona mposa ya kosala pite to ekobo na makanisi ya moklisto.
Mwasi moklisto mpe akoki kokutana na mikakatano soki akendeke mosala. Ekoki kozala ete azali kosala esika moko na mibali mpe basi oyo basalaka pite to ekobo, makambo oyo ye asalaka te. Ntango mosusu, mobali moko oyo asalaka na ye esika moko akoki kolinga ete mwasi moklisto akóma makango na ye. Na ebandeli, mobali yango akoki kosalela ye boboto, akoki ata mpe komemya ye mpo na bindimeli na ye. Soki akangami kaka na ye mpe soki azali ntango nyonso penepene na ye, yango ekoki kotinda moklisto yango ete andima kokóma makango na ye.
Lokola tozali baklisto, ndenge nini likoki ya kokanisa ekoki kosalisa biso na makambo ya ndenge wana? Ya liboso, ekoki kokebisa biso na makama ya elimo, mpe ya mibale, ekoki kotinda biso tózwa ekateli ya kosala oyo ezali malamu. (Masese 3:21-23) Na makambo ya motindo wana, esengeli koyebisa baninga ya mosala polele ete bizaleli na biso ekeseni na oyo ya bango mpo bindimeli na biso euti na Makomami. (1 Bakolinti 6: 18, NW) Masolo na biso mpe etamboli na biso ekoki kobakisa bokasi na oyo tokoyebisa bango. Lisusu, esengeli te komesana mingi na baninga mosusu ya mosala.
Nzokande, makambo oyo ekoki komema na pite to na ekobo esuki kaka na esika ya mosala te. Makambo ya bongo ekoki mpe kobima soki mwasi na mobali batiki ete mikakatano ebebisa bomoko na bango. Mokɛngɛli-motamboli moko alobaki boye: “Kokufa ya libala ezali likambo oyo esalemaka na mbalakaka te. Ekoki kozala ete mokemoke mwasi na mobali bazali kokabwana, bazali kosolola lisusu mingi te to bazali kolekisa lisusu ntango esika moko te. Bakoki kobanda koluka biloko ya mokili mpo na kobosana kozanga boyokani na kati ya libala na bango. Mpe, lokola bazali lisusu kolobelana maloba ya boboto te, mwasi akoki kobanda kosepela na mobali mosusu to mpe mobali akoki kobanda kosepela na mwasi mosusu.”
Mokɛngɛli yango oyo aumeli na mosala na ye alobaki boye: “Mbala na mbala, babalani basengeli kofandaka mpe kosololaka mpo na kotala soki eloko nini ezali kotambola malamu te na kati ya libala na bango. Bakoki kobongisa ndenge oyo basengeli koyekola, kobondela, mpe kobima elongo na mosala ya kosakola. Bakozwa matomba mingi soki bazali kosolola ‘kati na ndako, na nzela, ntango balali, mpe ntango balamuki,’ ndenge kaka baboti basalaka na bana.”—Deteronome 6:7-9.
Ndenge ya kolonga ezaleli oyo eyokani na boklisto te
Longola ete likoki ya kokanisa ekoki kosalisa biso mpo na kolonga komekama, ekoki mpe kosalisa biso tóyikela mabunga ya bandeko na biso baklisto mpiko. Ntango mopɛpɛ ya makasi ezali kotinda mbonge oyo ebɛtaka na nsima ya masuwa, yango ekoki kotombola eteni ya nsima ya masuwa mpe kobalola yango na mopanzi. Yango ekoki kosala ete mbonge mosusu eya kobɛta na mopanzi ya masuwa mpe kobebisa yango.
Biso mpe tokoki kokutana na makama oyo ekoki kouta na esika oyo tokanisaki te. Tozali kosalela Yehova “na motema moko” elongo na ebele ya bandeko na biso mibali mpe basi baklisto ya sembo. (Sefania 3:9) Soki moko na bango azali kosala makambo oyo eyokani te na mitinda ya boklisto, ekoki komonana lokola ete moto yango abebisi, mpe yango ekoki kopesa mawa monene. Ndenge nini likoki ya kokanisa ekoki kobatela biso tótɛngatɛnga te mpe tómilukela mpasi koleka te?
Tóbosana te ete “ezali na moto te oyo asalaka lisumu te.” (1 Mikonzi 8:46, NW) Yango wana, tokoki kokamwa te soki, na bantango mosusu, ndeko moko asilikisi biso to azokisi biso. Lokola toyebi yango, tokoki komibongisa mpo na likambo ya ndenge wana mpe kokanisa ndenge nini tokosala soki tokutani na yango. Ntoma Paulo asalaki nini ntango bandeko mosusu balobelaki ye maloba ya kozokisa mpe ya kotyola? Na esika ete likambo yango ebulunganisa elimo na ye, amonaki ete kondimama na Nzambe ezali na ntina mingi koleka kondimama na bato. (2 Bakolinti 10:10-18, NW) Makanisi ya ndenge wana ekosalisa biso tókanisa liboso ntango basali biso mabe.
Ekokani mwa moke na ntango tobɛti libaku na mosapi ya lokolo. Ntango likambo ya ndenge wana ekómeli biso, makanisi ebulunganaka mbala moko. Kasi soki mpasi esili, tokoki kokanisa mpe kozongela kosala makambo ndenge tomesaná. Ndenge moko mpe, tosengeli te kosala likambo mbala moko ntango moto moko alobi na biso mabe to asali biso mabe. Kasi, tókitisa naino motema mpe tótalela makambo oyo ekoki kobima soki tozongisi mabe kozanga ete tókanisa liboso.
Malcolm, ye aumeli bambula ebele na mosala ya misionɛrɛ, alimboli ndenge oyo asalaka soki basali ye mabe. “Likambo ya liboso nasalaka ezali ya komituna mituna oyo: Nazali koyokela ndeko wana nkanda mpo bomoto na ye na oyo ya ngai ekeseni mingi? Makambo oyo alobi ezali mpenza na ntina? Ekoki nde kozala ete malaria na ngai ezali kobakisa nkanda na ngai? Nakomona makambo lolenge mosusu nsima ya mwa bangonga?” Malcolm amonaki ete mbala mingi, mokakatano ezalaka moke mpe akoki kobosana yango.a
Malcolm alobi lisusu boye: “Na bantango mosusu, atako nasali milende mpo na kosilisa likambo yango, okomona ete ndeko yango azali ntango nyonso na nkanda. Natikaka nzela te ete likambo yango etungisa ngai. Nsima ya kosala nyonso oyo nakoki kosala, natalelaka makambo na ndenge mosusu. Na kati ya makanisi na ngai, natyaka likambo yango pembeni, na esika natya yango na motema. Nakotika te ete likambo yango ebebisa elimo na ngai to ebebisa boyokani na ngai na Yehova mpe na bandeko mosusu.”
Lokola Malcolm, tosengeli te kotika ete etamboli mabe ya moto mosusu etungisa biso koleka ndelo. Na lisangá mokomoko, ezali na ebele ya bandeko mibali mpe basi ya malamu mpe ya sembo. Kosala “elongo” na bango na bomoi na biso ya boklisto ezali esengo mingi. (Bafilipi 1:27, NW) Soki tokanisi ndenge oyo tata na biso ya likoló asungaka biso na bolingo mpenza, yango ekosalisa biso tótalela makambo na liso ya malamu.—Nzembo 23:1-3; Masese 5:1, 2; 8:12.
Tólinga biloko ya mokili te
Likoki ya kokanisa ekoki kosalisa biso tólonga mokakatano mosusu ya mabe. Ntango mosusu mopɛpɛ etindaka mbonge ya makasi mpenza na mopanzi ya masuwa. Soki mopɛpɛ ezali te, mai ya lolenge wana ekolongola mwa moke masuwa na nzela na yango. Kasi, na ntango ya mopɛpɛ makasi, mbonge oyo ezali kobɛta masuwa na mopanzi ekoki kozindisa yango.
Ndenge moko mpe, soki tozali kosepela na biloko nyonso oyo mokili ya lelo ezali kolakisa biso, na maloba ya elilingi, bomoi ya koluka bozwi ekoki kotindika biso na mopanzi. (2 Timote 4:10) Soki tomipesi na makambo ya mokili, nsukansuka ekoki kotinda biso na kotika nzela ya boklisto. (1 Yoane 2:15) Ndenge nini likoki ya kokanisa ekoki kosalisa biso?
Ya liboso, ekosalisa biso tóyeba malamu makama oyo tokoki kokutana na yango. Mokili ezali kosalela bapiblisite ndenge na ndenge mpo na kobenda biso. Ezali ntango nyonso kolendisa lolenge ya bomoi oyo bakanisaka ete bato nyonso basengeli kozala na yango: bozwi mpe koluka kolakisa biloko oyo bazali na yango, bomoi ya bisengo, mpe ya bato oyo “babongá.” (1 Yoane 2:16, NW) Balobaka ete soki tozali na bomoi ya ndenge wana, bato nyonso bakokumisa biso mpe bakondima biso, mingimingi baninga mpe bato oyo bafandi penepene na biso. Likoki ya kokanisa ekosalisa biso tóboya makanisi ya ndenge wana, ekosalisa biso tóbosana te ntina ya ‘koboya bolingo ya mbongo,’ mpamba te Yehova alaki ete ‘akotika biso soki moke te.’—Baebele 13:5, NW.
Ya mibale, likoki ya kokanisa ekopekisa biso kolanda bato oyo “batangwi mosika na solo.” (2 Timote 2:18, NW) Ezali mpasi mpo na koboya makanisi ya bato oyo tolingaki mpe tozalaki kotyela motema. (1 Bakolinti 15:12, 32-34) Ata soki tozali kolanda mwa moke kaka makanisi ya bato oyo bazali lisusu baklisto te, yango ekoki kopekisa biso kokola na elimo mpe nsukansuka ekomemela biso likama. Tokoki kokóma lokola masuwa oyo etiki kaka mwa moke nzela ya malamu. Soki masuwa etiki mwa moke nzela ndenge wana, ekoki kobunga nzela soki ezali kosala mobembo na ntaka ya molai mpenza.—Baebele 3:12.
Likoki ya kokanisa ekoki kosalisa biso tóyeba malamumalamu esika oyo tokómi mpe esika tozali kokende na ndimbola ya elimo. Ntango mosusu, tozali koyeba ete tosengeli kolekisa ntango mingi koleka na makambo ya elimo. (Baebele 6:11, 12, NW) Yoká ndenge oyo elenge mobali moko Motatoli asalelaki likoki ya kokanisa mpo na kolanda mikano ya elimo: “Nazwaki libaku ya kosala mosala ya mopanzi-nsango. Mosala yango ezalaki mpenza kosepelisa ngai, kasi nakanisaki lisusu vɛrsɛ moko ya Biblia oyo elobaka ete ‘mokili ezali koleka’ nzokande ‘moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.’ (1 Yoane 2:17, NW) Namonaki ete makambo oyo nazali kosala na bomoi na ngai esengelaki komonisa bindimeli na ngai. Baboti na ngai batikaki lisangá ya boklisto, mpe ngai nalingaki kolanda ndakisa na bango te. Yango wana, nazwaki ekateli ya kolanda nzela oyo ezali na ntina mpe nabandaki mosala ya ntango nyonso lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Na nsima ya mbula minei ya mosala ya esengo, nayebi sikoyo ete naponaki nzela ya malamu.”
Ndenge ya kolonga mipɛpɛ makasi na elimo
Mpo na nini ezali likambo ya lombango ete tózala na likoki ya kokanisa lelo oyo? Bato ya masuwa basengeli kotya likebi na bilembo oyo emonisaka ete likama ezali koya, mingimingi ntango mipɛpɛ ya makasi ezali koya. Soki malili ekómi makasi mpe mipɛpɛ ekómi kobɛta makasi, bato ya masuwa bakangaka nkobe malamu mpe bamibongisaka mpo na likama oyo elingi koyela bango. Biso mpe ndenge moko, tosengeli komibongisa mpo na kobunda na mikakatano oyo ezali lokola mopɛpɛ ya makasi awa ebongiseli ya makambo mabe oyo ekómi pene na nsuka na yango. Bizaleli ya bato ya mokili ezali se kobeba mpe ‘bato mabe bazali kokende lisusu mosika na kati ya mabe.’ (2 Timote 3:13, NW) Se ndenge bato ya masuwa balandaka meteo mpo na koyeba soki mopɛpɛ makasi ekozala to te, biso mpe tosengeli koyoka bisakweli ya Liloba epemami ya Nzambe oyo ezali kokebisa biso.—Nzembo 19:7-11.
Ntango tozali kosalela likoki ya kokanisa, tozali kosalela boyebi oyo ememaka na bomoi ya seko. (Yoane 17:3, NW) Tokoki komibongisa liboso mpo na mikakatano oyo ekoki kokómela biso mpe kozwa ekateli na ndenge oyo tokolonga yango. Na ndenge yango tokomibongisa malamu mpo tólongwa te na nzela ya boklisto, mpe tokoki komityela mikano ya elimo mpe kokokisa yango mpe na ndenge yango tokomityela “moboko kitoko na esika moko ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya.”—1 Timote 6:19, NW.
Soki tobateli mayele ya bomoto mpe likoki ya kokanisa, tokobanga te “mpo na nsɔmɔ ya pwasa.” (Masese 3:21, 25, 26) Kasi, tokoki kobɔndisama na elaka ya Nzambe oyo elobi ete: “Ntango bwanya ekɔti na motema na yo mpe boyebi ekómi kosepelisa molimo na yo, likoki ya kokanisa ekobatela yo.”—Masese 2:10, 11, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Baklisto basengeli komeka kobongisa makambo na kimya, na kolanda toli oyo ezali na Matai 5:23, 24. Soki ezali masumu minene, basengeli komeka kozongisa boyokani na ndeko na bango, lokola Matai 18:15-17 elobeli yango. Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1999, nkasa 17-22.
[Elilingi na lokasa 23]
Kosolola ntango nyonso ebongisaka libala