Tambolá na ‘nzela ya sembo’
MOSAKOLI Yisaya alobaki ete: “Ekozala malamu mpo na [bayengebene], zambi bakolya mbuma ya misala na bango.” Alobaki lisusu ete: “Nzela ya moyengebene ezali sembo.” (Yisaya 3:10; 26:7) Yango elingi koloba ete mpo makambo na biso ebota mbuma ya malamu, tosengeli kosala oyo ezali sembo na miso ya Nzambe.
Kasi, ndenge nini tokoki kotambola na nzela ya sembo? Mapamboli nini tokozwa soki tosali ndenge yango? Mpe soki tolandi mitinda ya sembo ya Nzambe, ndenge nini bato mosusu bakoki kozwela yango litomba? Na Masese mokapo ya 10, Salomo mokonzi ya Yisalaele ya kala apesi biyano na mituna yango na ntango azali komonisa bokeseni kati na moyengebene mpe moto mabe. Asaleli liloba “moyengebene” [to “bayengebene”] mbala 13. Tokoki kokuta liloba yango mbala 9 kobanda na vɛrsɛ 15 tii na vɛrsɛ 32. Yango wana, boyekoli ya Masese 10:15-32, ekozanga te kolendisa biso.a
Kangamá makasi na disipilini
Salomo amonisi ntina ya boyengebene. Alobi boye: “Bozwi ya moto ya mosolo ezali esika na ye ya nguya; kozanga ya babola ezali ebebelo na bango. Mosala ya moyengebene ekoyeisa bomoi; litomba ya [moto] mabe ekoyeisa masumu.”—Masese 10:15, 16.
Bozwi ekoki kobatela moto na makambo mosusu oyo eyaka mbalakaka, se lokola mboka oyo ezali na lopango ya makasi ebatelaka ata mwa moke bato oyo bafandi kati na yango. Bobola mpe ekoki kobebisa moto soki azali ata na elikya moko te ete ekosila. (Mosakoli 7:12) Nzokande, ekoki mpe kozala ete mokonzi ya bwanya alingaki kolobela likama oyo, ezala bozwi to bobola ekoki komemela moto. Mozwi akoki kotya motema na ye nyonso na bomɛngo na ye mpe kokanisa ete biloko na ye ya motuya ezali “lokola lopango molai.” (Masese 18:11) Mobola mpe akoki komikosa na kokanisa ete lokola azali ndenge wana, azali na elikya moko te mpo na mikolo ezali koya. Na bongo, ezala mobola to mozwi, akoki kozanga kozala na lokumu malamu na miso ya Nzambe.
Nzokande, moyengebene, ata soki azali na biloko mingi to azali na yango te, mosala na ye ya sembo ekomema ye na bomoi. Na ndenge nini? Mpo azali kosepela na oyo azali na yango. Azali kotika nzela te ete kozwa to kokelela ebebisa boyokani na ye na Nzambe. Moyengebene, azala mozwi to mobola, asepelaka na bomoi na ye mpe azalaka na elikya ya bomoi ya seko na mikolo ezali koya. (Yobo 42:10-13) Moto mabe azwaka litomba moko te ata soki akómi na bozwi. Na esika azala na botɔndi ete bozwi ekoki kobatela ye mpe asala mokano ya Nzambe na bomoi na ye, bozwi na ye ezali mpo na bomoi ya masumu.
Mokonzi ya Yisalaele akomi lisusu ete: “Ye oyo azali kokangama na disipilini azali nzela ya bomoi, kasi ye aboyi mpamela azali kopɛngwisa.” (Masese 10:17, NW) Moto moko ya mayele oyo ayekolaka maloba ya Biblia alimbolaki ete ezali na ndenge mibale ya kokanga ntina ya maloba ya vɛrsɛ oyo. Ndimbola ya liboso ekoki kozala ete moto oyo azali kondima disipilini mpe azali kolanda boyengebene azali na nzela ya bomoi; nzokande, ye oyo aboyi mpamela, azali na nzela yango te. Vɛrsɛ yango ekoki mpe kolimbola ete “ye oyo ayokaka disipilini alakisaka [bato mosusu, mpamba te balandaka ndakisa malamu na ye] nzela ya bomoi, kasi ye oyo alingaka mpamela te, apɛngwisaka basusu.” (Masese 10:17, New International Version) Ndimbola nyonso mibale ezali komonisa ete ezali mpenza na ntina tókangama na disipilini mpe tóboyaka mpamela te!
Tólona bolingo na esika ya koyinana
Na nsima, Salomo alobi lisese moko oyo ezali na biteni mibale, oyo ezali na likanisi se moko; eteni ya mibale ezali kosembola malamumalamu oyo ya liboso. Alobi ete: “Ye oyo abombi [koyina, NW] azali na bibebu ya nkuta.” Moto oyo azali koyina mozalani na ye na kati ya motema na ye mpe azali kobomba yango nsima ya maloba ya sukali, azali kokosa, azali na “bibebu ya nkuta.” Mokonzi ya bwanya abakisi ete: “Ye oyo akopalanganisa nsango mabe ya moto azali zoba.” (Masese 10:18) Nzokande, ezali na bato oyo basalaka ndenge mosusu, na esika ya kobomba koyina na bango, bakoselaka moto oyo bazali koyina makambo mpe bapanzaka ye nsango ya lokuta. Kosala bongo ezali bozoba mpamba te ebongolaka ata eloko moko te epai ya moto oyo bazali kotɔnga mpe kokosela makambo. Kutu, moto oyo ayebi kososola ntango azali koyoka, ayebaka ete motɔngi azali nde kokosa mpe yango ekitisaka lokumu na ye na miso ya moto yango. Yango wana, oyo azali kopanza nsango ya lokuta, ye moko nde amisalaka mabe.
Nzela ya sembo ezali ya koboya lokuta mpe matɔngi. Nzambe ayebisaki Bayisalaele ete: “Okoyina ndeko na yo na motema na yo te.” (Levitike 19:17) Lisusu, Yesu apesaki bato oyo bazalaki koyoka ye toli ete: “Bólinga [ata] bayini na bino mpe bóbondela mpo na banyokoli na bino. Bongo bokozala bana ya Tata na bino na Likoló.” (Matai 5:44, 45) Eleki mpenza malamu tólona bolingo na mitema na biso na esika ya koyina!
‘Pekisá mbebu na yo’
Mpo na komonisa malamumalamu ntina ya kobatela lolemo, mokonzi ya bwanya alobi ete: “Na mingi ya maloba, masumu mazangi te; nde ye oyo [akopekisa mbebu, “NW”] na ye azali na mayele.”—Masese 10:19.
“Zoba atondi na maloba.” (Mosakoli 10:14) Monɔkɔ na ye “mokosopa se bolema.” (Masese 15:2, Liloba lya Nzambe ) Maloba yango elimboli te ete moto nyonso oyo alobaka mingi azali zoba. Kasi, ezali mpasi te ete moto oyo alobaka mingi akóma na bilobaloba to atambwisa nungunungu! Moto ya bilobaloba akoki kobebisa lokumu na ye, akoki koyoka motema mpasi, akoki kobebisa boyokani na ye na bato, to mpe akoki komibendela mpasi na nzoto. “Lisumu lizali mosika te na moto akolobaloba mingi.” (Masese 10:19, Liloba lya Nzambe) Longola yango, moto nyonso amiyokaka malamu te pembeni ya moto oyo azangaka likambo ya koloba te na likambo nyonso. Yango wana, tózalaka bilobaloba te.
Moto oyo azali kobatela mbebu na ye, azali kokima lokuta, kasi azali mpe na mayele. Akanisaka liboso ya koloba. Lokola alingi banzela ya Yehova mpe azali mpenza na mposa ya kosalisa mozalani na ye, akanisaka soki maloba na ye ekobota mbuma nini epai ya baoyo bakoyoka yango. Azalaka na maloba ya bolingo mpe ya boboto. Akanisaka ndenge nini akoki koloba maloba oyo ekosepelisa mpe ekolendisa. Maloba na ye ezali lokola “mbuma ya wolo o sani ya palata”—ezalaka ntango nyonso maloba kitoko mpe ya lokumu.—Masese 25:11, Liloba lya Nzambe.
‘Leisáká bato mingi’
Salomo alobi lisusu ete: “Lolemo ya moyengebene ezali lokola palata eponami; nde motema ya zoba ezali eloko mpamba.” (Masese 10:20) Maloba ya bayengebene ezalaka pɛto, ezali lokola palata kitoko mpenza, oyo eponami, ezali na mbindo te. Basaleli ya Yehova bazalaka mpenza na maloba ya ndenge wana ntango basalisaka bato mosusu báyeba Liloba ya Nzambe oyo epesaka bomoi. Yehova Nzambe, Molakisi Monene na bango, ateyi bango mpe ‘apesi bango lolemo ya baoyo balakisami ete báyeba kosimba na maloba ye oyo alɛmbi.’ (Yisaya 30:20, NW; 50:4) Ntango lolemo na bango ezali kobimisa mateya ya solo ya Biblia ezalaka mpenza lokola palata kitoko. Epai ya bato ya mitema sembo, maloba na bango ezali na motuya monene koleka mikano ya moto mabe! Tiká ete tózala na mposa ya kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe misala na ye ya kokamwa.
Moyengebene azali lipamboli mpo na baoyo bafandi na ye. Salomo alobi lisusu ete: “Bibebu ya moyengebene ikoleisa [bato] mingi, bazoba bakokufa zambi bazangi motema.”—Masese 10:21.
Ndenge nini ‘moyengebene akoleisa bato mingi’? Liloba ya Liebele oyo basaleli awa ezali kopesa likanisi ya “koleisa bibwele.” (Masese 10:21, NW, maloba na nse ya lokasa) Ezali na likanisi ya kotambwisa mpe koleisa, ndenge oyo, na ntango ya kala, mobateli ya bampate azalaki kosala. (1 Samwele 16:11; Nzembo 23:1-3; Loyembo ya Salomo 1:7) Moyengebene atambwisaka to akambaka basusu na nzela ya boyengebene, maloba na ye eleisaka bato oyo bayokaka yango. Yango wana bazalaka na esengo mpe na bomoi malamu mpe bakoki ata kozwa bomoi ya seko.
Kasi, ezali boni mpo na zoba? Lokola azangi motema, akanisaka te epai wapi nzela oyo azali kolanda ekomema ye. Moto ya ndenge yango asalaka nyonso oyo alingi, akanisaka te mbuma nini yango ekobota. Yango wana, misala na ye ememelaka ye mpasi. Moyengebene asalisaka basusu bázala na bomoi; nzokande, moto oyo azangi motema akoki kobatela ata bomoi na ye moko te.
Kimá etamboli ya mbindo
Ndenge ya moto eyebanaka na makambo oyo alingaka mpe oyo aboyaka. Mokonzi ya Yisalaele amonisaki likambo yango na maloba oyo: “Mpo na zoba, etamboli ya mbindo ezali lokola lisano, kasi moto ya bwanya nde azali na bososoli.”—Masese 10:23, NW.
Bato mosusu batalelaka etamboli ya mbindo lokola lisano mpe bazwaka yango lokola lisɛki. Bato ya ndenge wana babosanaka ete Nzambe akosambisa bango, mpe bamonaka mabe moko te na etamboli na bango. (Baloma 14:12) Bakómaka na makanisi oyo etɛngami oyo etindaka bango bákanisa ete Nzambe azali komona misala mabe na bango te. Na misala na bango, ezali lokola balobaka ete: “Nzambe azali te.” (Nzembo 14:1-3; Yisaya 29:15, 16) Talá bozoba ya boye!
Nzokande, moto oyo azali na bososoli ayebaka ete etamboli ya mbindo ezali lisano te. Ayebaka ete Nzambe asepelaka na yango te mpe ekoki kobebisa boyokani ya moto na Nzambe. Etamboli ya ndenge wana ezali bozoba mpamba te epesaka moto nzoto kilo te, ebomaka mabala, ebebisaka makanisi mpe nzoto, esalaka ete moto asepela lisusu na makambo ya elimo te. Nzela ya malamu mpo na biso ezali ya kokima etamboli ya mbindo mpe kolinga bwanya lokola nde ezali ndeko mwasi na biso ya bolingo.—Masese 7:4.
Tongá likoló ya moboko ya malamu
Salomo alobeli sikoyo ntina ya kotonga bomoi na biso likoló ya moboko ya malamu na maloba oyo: “Likambo likopesa moto mabe nsɔmɔ, ekoyela ye; nde mposa ya bayengebene ikopesamela bango. Lokola ekoleka mopɛpɛ, boye moto ya masumu akolimwa; nde moyengebene atyami miboko ya seko.”—Masese 10:24, 25.
Moto mabe akoki mpenza kobangisa bato mosusu. Kasi, nsukansuka, makambo oyo azali kobanga, eyelaka ye. Lokola mitinda ya sembo ezali mpenza na motema na ye te, azali lokola ndako oyo ezali na miboko ya makasi te mpe ekokwea soki mopɛpɛ ya makasi ebɛti yango. Moto ya ndenge yango akweaka soki batindiki ye. Nzokande, moyengebene azali lokola moto oyo asalaka ndenge oyo Yesu alobaki. Yesu alobaki ete azali “moto ya mayele oyo atongi ndako na ye likoló ya mabanga. Mbula enoki mpe mpela eyei mpe mipɛpɛ mipɛpi mpe ibɛti ndako yango nde ekwei te, zambi etongami likoló ya libanga.” (Matai 7:24, 25) Moto ya ndenge yango atɛngatɛngaka te; makanisi mpe misala na ye esimbami na mitinda ya Nzambe.
Liboso abakisa makambo mosusu mpo na kolobela bokeseni kati na moto mabe na moyengebene, mokonzi ya bwanya apesi likebisi moko mokuse kasi ya ntina mingi. Alobi ete: “Lokola mai ya ngaí na mino mpe molinga epai na miso, moto ya goigoi azali bongo epai ya baoyo bakotindaka ye.” (Masese 10:26) Mai ya ngaí etyaka mino ngaí. Aside na yango ezalaka ngaí na monɔkɔ mpe esalaka mino mpasi. Milinga eswaka na miso. Na bongo, ye oyo azwi moto ya goigoi na mosala to atindi ye, nsukansuka akosilika mpe akobungisa bozwi na ye.
“Nzela ya Yehova ezali esika ya makasi”
Mokonzi ya Yisalaele alobi lisusu boye: “[Kobanga Yehova, NW] ekoyeisa mikolo milai; kasi [bambula] ya bato mabe ikozala mikuse. Elikya na bayengebene ezali esengo; nde elikya ya bato mabe ekobeba.”—Masese 10:27, 28.
Moyengebene abangaka Nzambe mpe asalaka makasi ete makanisi, maloba mpe misala na ye esepelisa Yehova. Nzambe abatelaka ye mpe akokisaka bilikya na ye oyo ezali sembo. Nzokande, moto mabe akanisaka Nzambe te na bomoi na ye. Ekoki komonana ntango mosusu ete bilikya na ye ekokisamaka, kasi ezalaka mpo na ntango mokuse, mpamba te mobulu to maladi oyo misala na ye ememelaka ye esukisaka mikolo na ye. Na mokolo ya liwa na ye, bilikya na ye nyonso esilaka.—Masese 11:7.
Salomo alobi ete: “Nzela ya [Yehova] ezali [esika ya makasi, NW] epai na mosembwi, nde ezali kobeba epai na basali na mabe.” (Masese 10:29) Nzela ya Yehova oyo balobeli awa ezali te nzela ya bomoi oyo tosengeli kolanda, kasi ndenge oyo Nzambe asalaka makambo epai ya bato. Mose alobaki ete: “Ye libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene.” (Deteronome 32:4) Banzela ya sembo ya Nzambe elimboli libateli mpo na bayengebene mpe libebi mpo na bato mabe.
Yehova azalaka mpenza esika ya makasi mpo na bato na ye! “Moyengebene akolongolama libela te; nde bato ya mabe bakofanda na mokili te. Monɔkɔ ya moyengebene ekobimisa mayele, nde lolemo ya bato mabe ekokatama. Bibebu ya moyengebene izali na ngɔlu, nde monɔkɔ ya bato mabe ekolobaka mobulu.”—Masese 10:30-32.
Bayengebene bazalaka malamu mpe bazwaka mapamboli mpo batambolaka na nzela ya sembo. Ya solo, “mapamboli ya Yehova ikoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.” (Masese 10:22) Yango wana, tiká ete tómitalaka mpo na koyeba soki tozali ntango nyonso kolanda mitinda ya Nzambe. Tiká mpe ete tóbatelaka bibebu na biso mpe tósalelaka lolemo na biso mpo na koleisa basusu na mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe oyo epesaka bomoi mpe tókamba bango na nzela ya boyengebene.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 2001, na nkasa 24-27, ezali na lisolo oyo elimboli Masese 10:1-14.
[Elilingi na lokasa 26]
Lolemo ekoki kozala lokola “palata kitoko”