MOKAPO 12
Zaláká na maloba oyo “ezali malamu mpo na kotonga”
“Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te, kasi liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga.”—BAEFESE 4:29.
1-3. (a) Yehova apesi biso likabo nini, mpe ndenge nini moto akoki kosalela yango na ndenge ya mabe? (b) Mpo na kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, ndenge nini tosengeli kosalela likabo ya koloba?
OKOYOKA ndenge nini soki okabeli moninga moko eloko, kasi azali kosalela yango malamu te? Na ndakisa, okabeli ye velo, kasi na nsima, oyoki ete azali kotambwisa yango na ndenge ya ligboma, mpe atuti bato. Okoyoka mabe mpenza, boye te?
2 Koloba ezali likabo ya Yehova, Mopesi ya “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.” (Yakobo 1:17) Likabo yango, oyo ekesenisi biso ná banyama, esalisaka biso tóyebisa basusu makanisi mpe mayoki na biso. Kasi, kaka ndenge moto akoki kosalela velo na ndenge oyo ebongi te, moto mosusu mpe akoki kosalela likabo ya koloba na ndenge ya mabe. Yehova ayokaka mabe mpenza ntango moto azali kobimisa maloba oyo ezali kosala basusu mpasi na motema!
3 Mpo na kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, tosengeli kosalela likabo ya koloba na ndenge oyo Mopesi na yango alingaki. Yehova amonisi polele maloba oyo esepelisaka ye. Liloba na ye elobi boye: “Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te, kasi liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.” (Baefese 4:29) Tótalela ntina oyo tosengeli kokeba na maloba na biso, maloba oyo tosengeli koboya, mpe ndenge oyo tokoki kolobaka maloba oyo “ezali malamu mpo na kotonga.”
NTINA OYO TOSENGELI KOKEBA NA MALOBA NA BISO
4, 5. Ndenge nini masese mosusu ya Biblia emonisi nguya oyo maloba ezali na yango?
4 Ntina moko monene oyo tosengeli kokeba na maloba na biso ezali ete maloba ezalaka na nguya. Masese 15:4 elobi boye: “Kimya ya lolemo ezali nzete ya bomoi, kasi bongolabongola kati na yango nde kobukana na elimo.”a Maloba ya malamu ekoki kokitisa mitema ya baoyo bazali koyoka yango; nzokande, maloba ya mabe ekoki kolɛmbisa basusu. Ya solo, maloba na biso ekoki kobikisa, to mpe kozokisa.—Masese 18:21.
5 Lisese mosusu emonisi polele nguya ya maloba ntango elobi boye: “Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga.” (Masese 12:18) Moto oyo akanisaka te liboso ya kobimisa maloba akoki kozokisa basusu mpe kobebisa boyokani na ye ná bango. Motema na yo esilá kozokisama na maloba oyo ezali lokola mopanga? Nzokande, lisese yango ebakisi boye: “Lolemo ya bato ya bwanya nde nkisi oyo ebikisaka.” Maloba ya boboto oyo ebimaka na monɔkɔ ya moto oyo azali na bwanya euti na Nzambe ekoki kolendisa motema oyo ezali na mpasi mpe kozongisa boyokani oyo ebebaki. Okoki koyeba lisusu libaku moko oyo omonaki ete maloba ya boboto elendisaka mpenza? (Tángá Masese 16:24.) Lokola toyebi ete maloba ezalaka na nguya, tosengeli koluka ete maloba na biso elendisaka basusu, kasi ezokisaka bango te.
Maloba ya kimya elendisaka
6. Mpo na nini kopekisa lolemo na biso ezalaka pɛtɛɛ te?
6 Ata soki tosali makasi ndenge nini, tokolonga te kopekisa lolemo na biso na ndenge ya kokoka. Yango wana, ntina ya mibale oyo tosengeli kokebaka na maloba na biso ezali oyo: Lisumu mpe kozanga kokoka etindaka biso tósalela lolemo na biso na ndenge ya mabe. Maloba oyo ebimaka na monɔkɔ eutaka na motema, mpe “mposa ya motema ya moto ezali mabe.” (Ebandeli 8:21; Luka 6:45) Yango wana, kopekisa lolemo na biso ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te. (Tángá Yakobo 3:2-4.) Atako tokoki te kopekisa lolemo na biso na ndenge ya kokoka, tokoki kokoba kosala makasi mpo na kosalela yango na ndenge oyo ebongi. Lokola moto oyo azali kobɛta mai asengeli kobunda makasi mpo mai oyo ezali kotyola emema ye te, biso mpe tosengeli kobunda makasi mpo bomoto na biso ya masumu emema biso te na kosalela lolemo na ndenge ya mabe.
7, 8. Na ndenge nini tokozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na maloba na biso?
7 Ntina ya misato oyo tosengeli kokeba na maloba na biso ezali ete tokozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na maloba na biso. Ndenge oyo tosalelaka lolemo na biso ekoki kobongisa to mpe kobebisa boyokani na biso ná bazalani na biso, ata mpe ná Yehova. Yakobo 1:26 elobi boye: “Soki moto amonaka ete asambelaka na ndenge oyo ebongi nzokande apekisaka lolemo na ye te, kasi azali kokoba kokosa motema na ye moko, losambo ya moto yango ezali mpamba.” Ndenge tomonaki yango na mokapo eleki, Nzambe akondima losambo na biso te soki tozalaka na maloba ya mabe. Soki tozali kopekisa lolemo na biso te, elingi koloba tozali kobimisa maloba ya mabe, oyo ezali lokola pwazɔ, makambo nyonso oyo tokoki kosala mpo na Nzambe ekozala na ntina te na miso na ye. Tomoni mpenza ete likambo yango ezali lisɛki te!—Yakobo 3:8-10.
8 Tomoni ete tozali na bantina ya solosolo oyo tosengeli kokeba mpo tósalelaka likabo ya koloba na ndenge oyo ebongi. Liboso tólobela maloba oyo elendisaka, tólobela naino maloba oyo ezali na esika te na bomoi ya mokristo ya solo.
MALOBA OYO ETONGAKA TE
9, 10. (a) Maloba ya ndenge nini bato ya mokili bakómi kosalela mokolo na mokolo? (b) Mpo na nini tosengeli koboya maloba ya nsɔni? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
9 Maloba ya nsɔni. Lelo oyo, bato ya mokili bameseni kosalela maloba ya mabe, kofinga, mpe kobimisa maloba mosusu ya mbindo. Bato mingi basalelaka maloba oyo ebongi te mpo na kobenda likebi ya bato to mpo bayebi te maloba oyo basengeli kosalela. Mbala mingi, bato ya teyatre basalelaka maloba ya balabala mpe maloba ya nsɔni mpo na kosɛkisa bato. Nzokande, koloba maloba ya mbindo ezali masɛki oyo ebongi te. Eleki mbula soki 2 000, ntoma Paulo apesaki bakristo ya lisangá ya Kolose toli ete bálongola “maloba ya nsɔni.” (Bakolose 3:8) Paulo ayebisaki bandeko ya lisangá ya Efese ete “masɛki ya nsɔni” ezali na kati ya makambo oyo esengeli “ata kotángama te na kati” ya bakristo ya solo.—Baefese 5:3, 4.
10 Maloba ya nsɔni ezali mabe na miso ya Yehova. Ezali mpe mabe na miso ya bato oyo balingaka ye. Bolingo na biso epai ya Yehova etindaka biso tóboya maloba ya nsɔni. Ntango Paulo alobelaki “misala ya nzoto,” atángaki mpe “mbindo,” oyo ekoki mpe kozala maloba ya nsɔni. (Bagalatia 5:19-21) Tomoni ete ezali likambo ya lisɛki te. Moto akoki kobimisama na lisangá soki, nsima ya kopesa ye toli mbala na mbala, azali kotika te momeseno ya koloba maloba ya nsɔni.b
11, 12. (a) Kotɔnga elimboli nini, mpe ntango nini ekoki kokóma mabe? (b) Mpo na nini basambeli ya Yehova basengeli koboya kokosela bato makambo?
11 Matɔngi, maloba ya lokuta. Kotɔnga moto elimboli kobɛta lisolo na ye ná bato mosusu mpe kolobela makambo na ye. Kotɔnga nyonso ezalaka mabe? Ekoki kozala mabe te soki tozali kolobela likambo ya malamu to ya ntina, na ndakisa tozali kolobela moto oyo auti kozwa batisimo to moto oyo azali na mposa ya kolendisama. Na siɛklɛ ya liboso, bakristo bazalaki komibanzabanza mpo na bolamu ya bandeko na bango mpe bazalaki koyebisana nsango ya bandeko mosusu. (Baefese 6:21, 22; Bakolose 4:8, 9) Nzokande, matɔngi ekoki kozala mabe soki tozali koloba makambo ndenge ezali mpenza te to kolobela makambo oyo etali biso te. Kutu, yango ekoki komema na kokosela moto makambo, oyo ezali ezaleli ya mabe koleka. Kokosela moto makambo ebebisaka lokumu na ye. Na ndakisa, Bafarisai bazalaki kokosela Yesu makambo mpo na kobebisa lokumu na ye. (Matai 9:32-34; 12:22-24) Mbala mingi, kokosela moto makambo ebimisaka kowelana.—Masese 26:20.
12 Yehova akangaka miso te na ezaleli mabe ya bato oyo basalelaka lolemo na bango mpo na kobebisa lokumu ya basusu to mpo na kokɔtisa bokabwani. Ayinaka mpenza baoyo babimisaka “kowelana na kati ya bandeko.” (Masese 6:16-19) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “moto oyo akoselaka bato makambo” ezali diabolos, nkombo mosusu ya Satana. Ye azali “Zabolo,” moto oyo akoselaka Nzambe makambo. (Emoniseli 12:9, 10) Tosengeli koboya maloba oyo ekoki kokómisa biso lokola Zabolo. Na lisangá ya bokristo, esika ezali te mpo na bato oyo bakoselaka basusu makambo, ezaleli oyo elendisaka misala ya nzoto lokola “kowelana” mpe “bokabwani.” (Bagalatia 5:19-21) Yango wana, liboso ya kopanza nsango oyo oyoki mpo na moto moko, osengeli komituna boye: ‘Likambo yango ezali solo? Nakosala mabe te soki nalobi yango epai ya moto mosusu? Ezali na ntina to ezali malamu nabɛtela bato mosusu lisolo yango?’—Tángá 1 Batesaloniki 4:11.
13, 14. (a) Maloba ya kofinga ekoki kosala nini epai ya baoyo bazali koyoka yango? (b) Kotyola basusu elimboli nini, mpe mpo na nini moto oyo azali na ezaleli yango azali komitya na likama?
13 Kofinga. Ndenge tolobaki yango liboso, maloba ekoki kozokisa. Ya solo, ekómelaka moto nyonso ya kozanga kokoka aloba likambo moko mpe na nsima ayoka mawa mpo na yango. Nzokande, Biblia ezali kokebisa biso na momeseno ya kobimisa maloba oyo ebongi te na libota ya bakristo to na lisangá. Paulo apesaki bakristo toli oyo: “Makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongwa mosika na bino.” (Baefese 4:31) Na mabongoli mosusu ya Biblia, “maloba ya kofinga” ebongolami na “maloba ya mabe.” Maloba ya kofinga, ata mpe kobamba moto nkombo ya kotyola, koyokisa ye nsɔni na miso ya bato, ekoki kobebisa lokumu na ye mpe kosala ete amiyoka lokola nde azali na ntina moko te. Maloba ya kofinga ebulunganisaka mpenza bana mike mpo bazalaka motema makasi te mpe batyelaka basusu motema.—Bakolose 3:21.
14 Biblia esaleli maloba ya makasi mpenza mpo na kokweisa ezaleli ya kosambwisa moto, kobebisa lokumu na ye, to koloba na ye maloba ya kotyola. Moto oyo azali na momeseno ya kobimisa maloba ya ndenge wana azali komitya na likama, mpamba te motyoli akoki kobimisama na lisangá soki bapesi ye toli mbala na mbala, kasi alingi kobongwana te. Soki atiki ezaleli yango te, akoki mpe kozanga bomoi ya seko na mokili ya sika. (1 Bakorinti 5:11-13; 6:9, 10) Tomoni polele ete tokoki te kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe soki tozali na momeseno ya kobimisa maloba ya mabe, ya lokuta, mpe oyo ezangi boboto. Maloba ya ndenge wana etongaka te.
MALOBA OYO EZALI “MALAMU MPO NA KOTONGA”
15. Maloba ya ndenge nini “ezali malamu mpo na kotonga”?
15 Ndenge nini tokoki kosalela likabo ya koloba na ndenge oyo Mopesi na yango alingaka? Tóbosana te ete Biblia ezali kolendisa biso tólobaka “liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga.” (Baefese 4:29) Yehova asepelaka ntango tozali koloba maloba oyo etongaka, oyo elendisaka, mpe oyo epesaka basusu makasi. Esɛngaka moto akanisaka naino mpo alobaka maloba ya ndenge wana. Biblia epesi mibeko te oyo tosengeli kolanda mpo maloba na biso ezala ndenge wana; epesi biso mpe te liste ya “maloba ya pɛto.” (Tito 2:8) Mpo maloba na biso ezala “malamu mpo na kotonga,” tosengeli kosimba makambo misato oyo emonanaka na maloba oyo etongaka: Ezalaka pɛto, ezalaka solo, mpe ezalaka ya boboto. Lokola toyebi makambo yango, tiká tótalela mwa bandakisa ya maloba oyo etongaka.—Talá etanda “Maloba na ngai elendisaka basusu?”
16, 17. (a) Mpo na nini tosengeli kopesaka basusu longonya? (b) Mabaku nini tozali na yango ya kopesa basusu longonya na kati ya lisangá? na kati ya libota?
16 Kopesa longonya ya solosolo. Yehova mpe Yesu bayebi ntina ya kopesa moto longonya mpe kondima ye. (Matai 3:17; 25:19-23; Yoane 1:47) Biso bakristo mpe tosengeli mpenza kopesaka basusu longonya ya solosolo. Mpo na nini? Masese 15:23 elobi boye: “liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza ezali malamu mingi!” Omituna naino boye: ‘Nayokaka ndenge nini soki bapesi ngai longonya ya solosolo? Nayokaka esengo mpe nalendisamaka?’ Ya solo, ntango moto apesi yo longonya ya solosolo, omonaka ete moto yango atyelaka yo likebi, mpe ete milende na yo ezalaki ya mpamba te. Likambo wana esalisaka yo omiyoka ete ozali na ntina mpe epesaka yo mposa ya kosala malamu koleka. Lokola osepelaka soki bapesi yo longonya, omoni te ete ebongi osala makasi mpo yo mpe opesaka basusu longonya?—Tángá Matai 7:12.
17 Yekolá kotyaka likebi na makambo malamu ya basusu, mpe pesáká bango longonya mpo na yango. Okoki kolanda lisukulu moko kitoko na makita, okoki komona elenge moko oyo azali kolanda mikano ya elimo, to ndeko moko oyo azangisaka makita te atako akómi mobange mpenza. Kopesa bato ya ndenge wana longonya ekoki kosimba mitema na bango mpe kolendisa bango na elimo. Na kati ya libota, mobali azalaka na mposa ete mwasi na ye apesaka ye longonya, mwasi mpe azalaka na mposa ete mobali na ye apesaka ye longonya. (Masese 31:10, 28) Bana basepelaka mingi soki bazali kotyela bango likebi mpe bazali kosepela na bango. Kopesa mwana longonya mpe kondima ye elendisaka ye, ndenge kaka molona ekolaka malamu ntango bazali kosopela yango mai mpe ezali kozwa moi. Baboti, bólekisaka te mabaku ya kopesa bana na bino longonya mpo na bizaleli na bango ya malamu mpe milende oyo basalaka. Maloba ya ndenge wana ekopesa bango makasi, bakomiyoka ete bazali na ntina, mpe ekopesa bango mposa ya kobakisa milende mpo na kosala oyo ezali malamu.
18, 19. Mpo na nini tosengeli kosala makasi mpo na kobɔndisa bandeko na biso, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?
18 Kobɔndisa. Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na “bato ya komikitisa” mpe “bato oyo batutami.” (Yisaya 57:15) Liloba na ye ezali kolendisa biso ‘tókoba kobɔndisana’ mpe ‘kolobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi.’ (1 Batesaloniki 5:11, 14) Tóyeba ete Nzambe amonaka mpe asepelaka na milende na biso mpo na kobɔndisa bandeko na biso oyo bazali na mawa.
19 Kasi, okoki koloba nini mpo na kolendisa mokristo moko oyo alɛmbi to azali konyokwama na makanisi? Kokanisa te ete osengeli kaka kosilisa mokakatano na ye. Mbala mingi, ata mwa maloba mpamba ya kobɔndisa esalisaka mpenza. Monisá moto oyo alɛmbi ete ozali komibanzabanza mpo na ye mpe ozali komitya na esika na ye. Sɛngá na moto oyo alɛmbi ete obondela na ye elongo; okoki kosɛnga Yehova asalisa ye ayeba ete bandeko na ye balingaka ye mingi mpe Nzambe alingaka ye mingi. (Yakobo 5:14, 15) Monisá ye ete lisangá ezali na mposa na ye mpe azali na motuya. (1 Bakorinti 12:12-26) Tángá na ye vɛrsɛ ya Biblia oyo ekondimisa ye ete Yehova atyelaka ye likebi. (Nzembo 34:18; Matai 10:29-31) Kozwa ntango oyo ekoki mpo na koloba “liloba ya malamu” epai ya moto oyo alɛmbi nzoto mpe koloba na ye makambo oyo ezali mpenza kouta na motema ekosalisa ye amiyoka ete balingaka ye mpe basepelaka na ye.—Tángá Masese 12:25.
20, 21. Makambo nini esalaka ete toli ezala malamu?
20 Toli ya malamu. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tozalaka na mposa ya toli. Biblia elendisi biso na maloba oyo: “Yoká toli mpe ndimá disiplini, mpo ozala na bwanya na bomoi na yo na mikolo oyo ezali koya.” (Masese 19:20) Kopesa basusu toli ezali kaka mokumba ya bankulutu te. Baboti basengeli kopesa bana na bango toli. (Baefese 6:4) Bandeko basi oyo bakɔmɛli bakoki kopesa bilenge basi toli. (Tito 2:3-5) Bolingo na biso epai ya basusu etindaka biso tópesa bango toli na ndenge oyo ekozala mpasi te mpo bándima yango. Nini ekoki kosalisa biso tópesaka batoli ya ndenge wana? Tótalela makambo misato oyo esalaka ete toli ezala malamu: ezaleli mpe makanisi ya mopesi-toli, epai oyo toli yango euti, mpe ndenge oyo azali kopesa yango.
21 Mpo na kopesa toli ya malamu, esɛngaka mpe mopesi-toli ya malamu. Omituna boye, ‘Ntango nini ezalaka mpasi te mpo nandima toli?’ Soki oyebi ete moto oyo azali kopesa yo toli azali koluka bolamu na yo, azali koloba na nkanda te, mpe azali na makanisi ya mabe te, ezalaka mpasi te mpo ondima toli na ye. Yango wana, ntango yo mpe ozali kopesa moto mosusu toli, osengeli kozala na ezaleli mpe makanisi ya ndenge wana. Lisusu, toli ya malamu esimbamaka na Liloba ya Nzambe. (2 Timote 3:16) Ezala totángi yango mbala moko na Biblia to te, toli na biso esengeli kosimbama na makanisi ya Biblia. Yango wana, bankulutu basengeli te koluka kondimisa bato mosusu makanisi na bango moko; basengeli mpe te koluka kobongola makanisi ya Biblia mpo emonana ete Biblia ezali kolongisa makanisi na bango. Lisusu, toli ezalaka malamu soki epesami na ndenge oyo ebongi. Soki toli epesami na boboto, ezalaka mpasi te mpo na kondima yango mpe moto oyo azali kozwa toli ayokaka te lokola nde bazali kokitisa ye.—Bakolose 4:6.
22. Ozwi ekateli ya kosalela likabo ya koloba ndenge nini?
22 Ya solo, koloba ezali likabo kitoko ya Nzambe. Bolingo na biso epai ya Yehova esengeli kotinda biso tósalelaka likabo yango malamu. Tóbosana te ete maloba oyo tobimisaka ezali na nguya ya kolendisa to mpe ya kolɛmbisa. Yango wana, tósala makasi mpo tósalelaka likabo yango “mpo na kotonga,” ndenge Mopesi na yango alingaki. Na ndenge yango, maloba na biso ekolendisa bazalani na biso mpe ekosalisa biso tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.
a Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “bongolabongola” na Masese 15:4 ekoki mpe kolimbola “kotɛngama.”
b Na Biblia, liloba “mbindo” esalelami mpo na masumu ndenge na ndenge. Atako lolenge nyonso te ya misala ya mbindo esɛngaka kosambisa moto oyo asali yango, moto akoki kobimisama na lisangá soki akómi na momeseno ya kosala makambo ya mbindo na koleka ndelo mpe aboyi kobongola motema.—2 Bakorinti 12:21; Baefese 4:19; talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2006.